Lisolo ya Bomoi
“Mpo na kondima oyo ekolɛmba te”!
YA HERBERT MÜLLER
Nsima ya mwa basanza ntango basoda ya Hitler bakɔtaki na Hollande, lingomba ya Batatoli ya Yehova epekisamaki. Mwa moke na nsima, nkombo na ngai ebimaki na molɔngɔ ya bato oyo Banazi bazalaki koluka makasi mpe bakómaki kolukaluka ngai lokola nyama.
MOKOLO moko, lokola nalɛmbaki komibomba mpe kokimakima, nayebisaki mwasi na ngai ete ekozala malamu kutu basoda bákanga ngai. Na ntango yango, maloba ya loyembo moko eyelaki ngai na makanisi: “Mpo na kondima oyo ekolɛmba te, atako banguna nyonso banyokoli ngai.”a Ntango nakanisaki maloba ya loyembo yango, nazwaki lisusu makasi nakanisaki lisusu baboti na ngai na Allemagne mpe mokolo oyo baninga na ngai bayembaki loyembo yango mpo na kopesa ngai mbote liboso nakabwana na bango. Bokosepela ete nayebisa bino mwa makambo mosusu?
Ndakisa ya baboti na ngai
Ntango nabotami na 1913 na mboka Copitz na Allemagne, baboti na ngai bazalaki na Lingomba ya Évangélique.b Mbula nsambo na nsima, na 1920 tata alongwaki na lingomba yango. Na mokolo ya 6 Aprili, asɛngaki Kirchenaustrittsbescheinigung (Mokanda ya kolongwa na lingomba). Basalelaki ye mokanda yango na biro ya État-Civil. Kasi, nsima ya pɔsɔ moko, tata azongaki lisusu na biro yango mpe alimbolaki ete na mokanda yango, nkombo ya mwana na ye ya mwasi ekɔtaki te. Moto oyo azalaki kosala na biro yango asalaki mokanda ya mibale oyo emonisaki ete Martha Margaretha Müller mpe alongwi na lingomba. Na ntango wana, ndeko na ngai ya mwasi Margaretha azalaki na mbula moko na ndambo. Mpo na oyo etali kosalela Yehova, tata azalaki kokakola te!
Kaka na mbula yango, Bayekoli ya Biblia—nkombo oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana—babatisaki baboti na ngai. Tata azalaki kopesa biso disipilini ya makasi, kasi lokola azalaki sembo epai na Yehova, tozalaki kotosa ye. Mpe lisusu, lokola baboti na ngai bazalaki sembo, yango esalisaki bango básembola makanisi mosusu oyo bazalaki na yango. Na ndakisa, na eleko moko bapekisaki biso kosakana na lopango na mokolo ya lomingo. Kasi, mokolo moko ya lomingo, na 1925, baboti na biso bayebisaki biso ete tokokenda kotambola. Tomemaki mwa biloko ya kolya mpe tolekisaki ntango malamu. Yango ezalaki mpenza mbongwana, liboso bazalaki kokanga biso na ndako mokolo mobimba! Tata alobaki ete ayokaki makambo mosusu na liyangani ya etúká, yango ebongolaki makanisi na ye na ndenge ya kolekisa mokolo ya lomingo. Na bantango mosusu, azalaki komonisa ete andimi kobongola makanisi na ye.
Atako baboti na ngai bazalaki mpenza nzoto kolɔngɔnɔ te, batikaki mosala ya kosakola te. Na ndakisa mokolo moko na mpokwa, tozwaki engbunduka elongo na bandeko nyonso ya lisangá, mpe tokendaki tii na engumba Regensbourg, na ntaka ya kilomɛtrɛ 300 na Dresden mpo na kokabola trakte oyo ezalaki na motó ya likambo ete Tofundi bakonzi ya mangomba na makambo oyo. Na mokolo oyo elandaki, tokabolaki trakte yango na engumba mobimba, mpe ntango tosilisaki, tokɔtaki lisusu engbunduka mpo na kozonga. Na ntango tokómaki na ndako, toutaki kolekisa pene na mokolo mobimba.
Nalongwi na ndako
Baninga na ngai ya Jugendgruppe (Bilenge) ya lisangá na biso basalisaki ngai mingi mpo nakola na elimo. Pɔsɔ na pɔsɔ, bilenge oyo bazalaki na bambula koleka 14 bazalaki kokutana na bandeko mosusu oyo bazali mikóló na lisangá. Tozalaki kosala mwa masano, kobɛta miziki, koyekola Biblia, mpe kolobela bozalisi mpe makambo ya siansi. Atako bongo, na 1932, ntango nakómaki na mbula 19, nakabwanaki na bilenge wana.
Na Aprili ya mbula wana, Tata azwaki mokanda moko oyo eutaki na biro ya la Société na Magdebourg. La Société azalaki koluka moto oyo ayebi kotambwisa motuka mpe azali na mposa ya kosala lokola mobongisi-nzela. Nayebaki ete mposa ya baboti na ngai ezalaki ete nazala mobongisi-nzela, kasi ngai nazalaki kokanisa yango te na ntango wana. Lokola baboti na ngai bazalaki babola, ntango nazalaki kaka na mbula 14, nabandaki kobongisa bavelo, bamasini ya kotonga bilamba, bamasini ya kokoma mikanda, mpe bisaleli mosusu. Ndenge nini nakokaki kotika libota na ngai? Bazalaki na mposa ya lisungi na ngai. Lisusu, nazwaki naino batisimo te. Tata afandisaki ngai mpe atunaki ngai mituna mosusu mpo na kotala soki nasimbaki ntina ya batisimo malamu. Lokola biyano na ngai endimisaki ye ete nakoli mpenza na elimo mpo nakoka kozwa batisimo na mikolo ekoya, alobaki ete: “Ebongi ondima mosala yango.” Nasalaki mpe bongo.
Pɔsɔ moko na nsima, babengaki ngai na Magdebourg. Ntango nayebisaki baninga na ngai Bilenge, basepelaki koyembela ngai nzembo ya esengo liboso nakende. Bakamwaki mingi na loyembo oyo naponaki mpamba te maloba na yango ezalaki mozindo. Atako bongo, basusu bazwaki ba violon, mandoline, mandanda na bango mpe bango nyonso bayembaki: “Mpo na kondima oyo ekolɛmba te, atako banguna nyonso batungisi ngai; oyo ekotɛngatɛnga te liboso na mpasi nyonso ya mokili.” Mokolo wana, nayebaki te ndenge oyo maloba ya loyembo wana ekolendisa ngai na bambula oyo ezalaki liboso.
Ebandeli ezalaki na yikiyiki
Ntango bandeko ya Magdebourg bamekaki ngai mpo na koyeba soki nayebi kotambwisa motuka malamu, bapesaki biso motuka, ngai na babongisi-nzela mosusu minei mpe tokendaki na Schneifel, etúká moko oyo ezali pene na Belgique. Eumelaki te, tomonaki ete motuka na biso ezalaki na ntina mingi. Bato ya Lingomba ya Katolike basepelaki te ete biso tózala kuna; yango wana, mbala mingi basango bazalaki kotinda bato ya mboka ete bábengana biso. Mbala mingi, tozalaki kokima na motuka na biso liboso ete bato ya mboka bálanda biso na bankongo na barato.
Nsima ya Ekaniseli ya 1933, mokɛngɛli ya etúká Paul Grossmann ayebisaki ngai ete mosala ya la Société na Allemagne epekisami. Mwa moke na nsima, biro esɛngaki ngai nakende na motuka na Magdebourg kozwa mikanda mpe namema yango na etúká ya Saxe, na ntaka ya kilomɛtrɛ 100 na Magdebourg. Kasi ntango nakómaki na Magdebourg, bato ya Gestapo (basirete ya Banazi) basilaki kokanga biro ya la Société. Natikaki motuka epai ya ndeko moko na Leipzig mpe nazongaki na mboka na biso, kasi naumelaki te.
Bandeko ya biro ya la Société na Suisse basɛngaki ngai nakende kosala mosala ya mobongisi-nzela na Hollande. Nakanaki kokende nsima ya pɔsɔ moko to mibale. Kasi, Tata apesaki ngai toli ete nakende mbala moko. Nayokaki toli na ye, mpe nsima ya mwa bangonga, nakendaki. Mokolo oyo elandaki, bapolisi bayaki na ndako ya Tata mpo na kokanga ngai, bafundaki ngai ete nakimaki mosala ya soda. Bakómaki na nsima wana ngai nasi nakendaki.
Nabandi mosala na Hollande
Mwa 15 Augusto 1933, nakómaki na ndako ya babongisi-nzela na Heemstede, engumba oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 25 na Amsterdam. Na mokolo oyo elandaki, nabimaki na mosala ya kosakola atako nayebaki ata liloba moko na monɔkɔ ya Néerlandais te. Na kalati na ngai oyo ezalaki na mwa lisolo ya Biblia, nabandaki kosakola mpe nalendisamaki mpenza ntango mwasi moko, mondimi ya Lingomba ya Katolike andimaki buku Réconciliation! Kaka na mokolo wana nakabolaki lisusu mwa babuku 27. Na nsuka ya mokolo wana ya liboso, nasepelaki mingi lokola nazwaki lisusu libaku ya kosakola na bonsomi.
Na ntango wana, babongisi-nzela bazalaki kobikela kaka na mwa mbongo oyo bazalaki kozwa soki batikeli bato mikanda. Bazalaki kosalela mbongo wana mpo na kosomba biloko ya kolya mpe biloko mosusu. Soki ndambo ya mbongo etikali na nsuka ya sanza, babongisi-nzela bazalaki kokabola yango mpo na bamposa na bango mosusu. Tozalaki na biloko mingi te, kasi Yehova apesaki biso biloko oyo tosengelaki na yango, yango wana, na 1934, nakendaki na liyangani moko ya etúká na Suisse.
Nabali mwasi ya sembo
Na liyangani ya etúká, namonaki Erika Finke, azalaki na mbula 18. Nayebaki ye ntango nazalaki epai na biso. Azalaki moninga ya ndeko na ngai ya mwasi Margaretha. Erika azalaki kosepelisa ngai mpo azalaki kolinga solo. Nsima ya batisimo na ye na 1932, moto moko afundaki ye na Gestapo ete aboyi koloba “Heil Hitler!” Basoda ya Gestapo bakangaki ye mpo na kotuna ye ntina oyo aboyaki. Erika atángaki vɛrsɛ ya Misala 17:3 na biro ya bapolisi mpe alimbolaki ete Nzambe aponaki kaka moto moko lokola Mobikisi, Yesu Klisto. Mokonzi ya basoda atunaki ye ete: “Ezali na bato mosusu oyo bandimaka makambo oyo?” Erika aboyaki kopesa ata nkombo moko. Ntango soda yango alobaki na ye ete akotya ye na bolɔkɔ, Erika ayebisaki ye ete akondima akufa kasi akondima kotanga nkombo ya bato te. Afungolelaki ye miso na nkanda mpe alobaki na mongongo makasi ete: “Bimá awa! Kendá epai na bino. Heil Hitler!”
Nsima ya liyangani ya etúká, nazongaki na Hollande mpe Erika atikalaki na Suisse. Atako bongo, biso mibale tomonaki ete boninga na biso ekolaki. Ntango azalaki naino na Suisse, Erika ayokaki ete basoda ya Gestapo bakendaki koluka ye na ndako. Azwaki ekateli ya kotikala na Suisse mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela kuna. Mwa basanza na nsima, la Société atindaki ye na Espagne. Asalaki lokola mobongisi-nzela na Madrid, na nsima na Bilbao, mpe na San Sebastian, kuna ye na moninga na ye ya mosala bakɔtaki bolɔkɔ mpo na minyoko oyo bakonzi ya mangomba bazalaki kobimisa. Na 1935, balobaki na bango bálongwa na Espagne. Erika ayaki na Hollande, kaka na mbula wana tobalanaki.
Etumba ekómi pene
Nsima ya libala na biso, tokendeki kosala mosala ya mobongisi-nzela na Heemstede, mpe na nsima tokendeki na engumba Rotterdam. Mwana na biso ya mobali Wolfgang abotamaki kuna na 1937. Mbula moko na nsima tokendaki na engumba Groningen, na nɔrdi ya Hollande epai tofandaki ndako moko na Ferdinand Holtorf na mwasi na ye Helga mpe na mwana na bango ya mwasi; bango mpe bazalaki babongisi-nzela mpe bato ya Allemagne. Na Yuli ya mobu 1938, la Société ayebisaki biso ete guvɛrnɛma ya Hollande ebimisi mobeko ete Batatoli oyo bazali bato ya Allemagne bakoki lisusu kosakola te. Kaka na ntango wana, naponamaki mokɛngɛli ya zongazonga mpe, na mwasi na mwana na biso tokendeki kofanda na Lichtdrager, masuwa ya la Société oyo babongisi-nzela oyo bazalaki kosakola na nɔrdi ya Hollande, bazalaki kosalela yango lokola ndako. Mbala mingi, nabandaki kozala esika moko na libota na ngai te, nazalaki kokende na masangá mosusu mpo na kolendisa bandeko ete bákoba kosakola. Mpe bandeko basalaki bongo. Basusu kutu babakisaki molende na bango na mosala. Wim Kettelari azalaki ndakisa malamu.
Ntango nakutanaki na Wim, azalaki naino elenge, ayebaki ete oyo nateyaki ye ezali solo, kasi azalaki kosala na ferme moko. Napesaki ye toli ete: “Soki olingi kozwa ntango ya kosalela Yehova, osengeli koluka mosala mosusu.” Asalaki yango. Mbala ya nsima, ntango tokutanaki lisusu, nalendisaki ye ete akóma mobongisi-nzela. Ayanolaki ete: “Esengeli nasala mpo na kolya.” Nayebisaki ye ete: “Okolya. Yehova akosunga yo.” Wim abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Na nsima, ata na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, azalaki kosala lokola mokɛngɛli-motamboli. Lelo, azali na mbula koleka 80, mpe azali ntango nyonso Motatoli ya molende. Ya solo mpenza, Yehova asungaki ye.
Epekiseli mpe ntango bapolisi bazalaki kolukaluka ngai
Na sanza ya Mai 1940, pene ya mbula mobimba nsima ya kobotama ya Reina mwana na biso ya mibale, basoda ya Hollande batikaki kobunda mpe Banazi bakɔtaki na Hollande. Na Yuli, basoda ya Gestapo bazwaki biro ya la Société mpe ndako ya konyata mikanda. Na mbula oyo elandaki, babandaki kokanga Batatoli, bakangaki mpe ngai. Lokola nazalaki Motatoli mpe moto ya Allemagne oyo akoki na mosala ya soda, nayebaki te soki basoda ya Gestapo bakosala na ngai nini. Namekaki kotya na makanisi ete esili, nakomonana lisusu na libota na ngai te.
Na nsima, na sanza ya Mai 1941, basoda ya Gestapo babimisaki ngai na bolɔkɔ mpe bayebisaki ngai nakɔta mosala ya soda. Nandimaki te. Kaka mokolo wana namibombaki, mpe na sanza yango kaka nazongelaki mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga na nkuku. Gestapo etyaki nkombo na ngai na molɔngɔ ya bato ya libosoliboso oyo bazalaki koluka kokanga.
Ndenge nini libota na ngai ezalaki kobika?
Mwasi na ngai na bana bakendeki kofanda na mboka Vorden na ɛsti ya ekólo. Kasi, mpo na kolukela bango mindɔndɔ te, nasengelaki kokende kotalaka bango mingi te. (Matai 10:16) Mpo na kobatela ngai, bandeko bazalaki kobenga ngai na nkombo mosusu, bazalaki kobenga ngai Duitse Jan (Yoane Moto ya Allemagne). Ata Wolfgang, mwana na ngai ya mobali ya mbula minei, akokaki kobenga ngai “Tata” te, kaka “Ome Jan” (Noko Yoane).” Ezalaki mpenza kosala ye mpasi monene na motema.
Ntango nazalaki kokimakima, Erika azalaki kobatela bana mpe akobaki kosakola. Ntango Reina akómaki na mbula mibale, Erika azalaki komema ye na velo mpe azalaki kokende na ye elongo kosakola na bamboka. Atako kozwa biloko ya kolya ekómaki mpasi, Erika na bana bakufaki nzala te. (Matai 6:33) Moto moko ya Lingomba ya Katolike azalaki na ferme, nabongiselaká ye masini ya kotonga bilamba, apesaki ye mabɛngɛ (patate douce). Azalaki kopesa ngai nsango ya Erika mpe azalaki kopesa Erika bansango na ngai. Mokolo moko, Erika abimisaki gulden (mbongo ya Hollande) moko mpo na kosomba eloko moko na farmasi. Lokola mokóló farmasi ayebaki ete Erika azali kobombama mpe azalaki na likoki te ya kozwa kalati ya biloko ya kolya, apesaki ye eloko oyo alingaki kosomba mpe akabelaki ye gulden mibale. Boboto ya ndenge wana oyo bazalaki kosalela ye nde ezalaki kosalisa ye na kobika.—Baebele 13:5.
Nasali na bomoko na bandeko ya molende
Na ntango yango, nazalaki kokoba kotala masangá, atako nazalaki kokutana kaka na bandeko oyo bazali na mikumba na lisangá. Lokola basoda ya Gestapo bazalaki ntango nyonso koluka ngai, nakokaki koumela esika moko ngonga mingi te. Bapekisaki bandeko basi mpe mibali kokutanaka na ngai. Bayebanaki kaka na Batatoli oyo bazalaki koyangana na bango na mwa etuluku ya boyekoli ya Biblia. Yango wana, bandeko basi mibale yaya na leki oyo bazalaki kofanda moto na moto na esika na ye na engumba yango bayebaki ete bango nyonso mibale bákóma Batatoli na nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.
Nazalaki mpe na mokumba ya kozwa bisika mpo na kobomba mikanda ya la Société. Tozalaki mpe kobomba bapapye, masini ya stencil, masini ya kokoma mikanda mpo na kosala bakopi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, soki bandeko bazali na mposa na yango. Ntango mosusu, tozalaki kolongola babuku oyo la Société anyati na libombo moko tomemi yango na libombo mosusu. Nazali koyeba lisusu ete mokolo moko namemaki kartɔ 30 ya mikanda mpe nasalaki nyonso mpo eyebana te ete nazali komema biloko oyo epekisami. Ezalaki mosala moke te!
Lisusu, tobongisaki makambo mpo na komema bilei banda na baferme ya ɛsti ya Hollande tii na bingumba ya wɛsti atako likambo yango epekisamaki. Tobandaki kotya biloko na wagɔ oyo mpunda ezalaki kobenda mpe kokende na yango na wɛsti. Ntango tokómaki na ebale moko, tokokaki koleka na gbagba te, mpamba te basoda bazalaki kokɛngɛla yango. Kasi, tokitisaki biloko mpe tokɔtisaki yango na babwato ya mike, tokatisaki ebale mpe na nsima totyaki yango lisusu na wagɔ mosusu. Ntango tokómaki na engumba oyo tozalaki kokende, tozelaki kino molili ekɔta, tolatisaki mpunda basosɛti mpe, na malɛmbɛ tokendaki na libombo ya lisangá oyo eyebanaki te. Kuna nde esika bazalaki kokabolela bandeko oyo bazalaki na bosɛnga biloko.
Soki kaka basoda ya Allemagne bamoni libombo wana ya bilei, moto oyo azalaki kobomba yango asengelaki kobomama. Atako bongo, bandeko ebele bandimaki kopesa mabɔkɔ. Na ndakisa, libota ya Bloemink na engumba Amersfoort, batikaki ete básalela shambre na bango lokola esika ya kobomba biloko ya kolya atako ndako na bango ezalaki mosika te na kaa ya basoda ya Allemagne. Batatoli ya molende lokola wana batyaki bomoi na bango na likama mpo na matomba ya bandeko na bango.
Yehova asalisaki ngai na mwasi na ngai tótikala sembo na bambula ya epekiseli. Na sanza ya Mai 1945, balongaki basoda ya Allemagne na bitumba mpe nazalaki lisusu kokimakima te. La Société asɛngaki ngai nakoba kosala lokola mokɛngɛli-motamboli tii ntango bandeko mosusu bakomonana. Na 1947, Bertus van der Bil akómaki kosala mosala yango na esika na ngai.c Na ntango wana, mwana na biso ya misato abotamaki mpe tokómaki kofanda na ɛsti ya ekólo.
Ntango ya mawa mpe ntango ya bisengo
Ntango etumba esilaki, nayokaki ete mbula moko nsima ya kolongwa na ngai na ndako mpo na kokende Hollande, bakangaki Tata. Batikaki ye mbala mibale mobimba mpamba te azalaki nzoto kolɔngɔnɔ te, atako bongo, bazalaki lisusu kokanga ye ntango nyonso. Na sanza ya Febwali 1938, batindaki ye na kaa ya bakangami ya Buchenwald mpe na nsima na kaa ya Dachau. Kuna, na sanza ya Mai 1942, tata na ngai akufaki. Atikalaki ngwi mpe sembo tii na nsuka.
Batindaki Mama mpe na kaa ya bakangami ya Dachau. Atikalaki kuna kino babimisaki ye na 1945. Lokola ndakisa ya mpiko ya baboti na ngai esalisaki ngai mingi mpo nazwa mapamboli ya elimo oyo nazwaki, ezalaki libaku moko malamu ntango mama ayaki kofanda na biso na 1954. Ndeko na ngai ya mwasi Margaretha oyo azalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela na Allemagne ya Ɛsti kobanda 1945, ayaki mpe lokola. Atako mama azalaki kobɛla mpe ayebaki koloba monɔkɔ ya Néerlandais te, kasi akobaki na mosala ya kosakola na bosembo tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1957.
Liyangani ya etúká ya 1955 na Nuremberg, na Allemagne, ezalaki na ntina mingi. Ntango tokómaki kuna, bandeko oyo bautaki na Dresden bayebisaki Erika ete mama na ye mpe azali na liyangani yango. Lokola Dresden ezalaki na mabɔkɔ ya Allemagne ya Ɛsti, Erika amonanaki na mama na ye te na boumeli ya mbula 21. Tobongisaki makambo ete tókutana, mpe mama na mwana bayambanaki. Ezalaki mpenza liyangani ya esengo!
Nsukansuka tokómaki na bana mwambe. Mwana na biso moko akufaki na likama ya motuka. Kasi, tozali na esengo mingi ya komona ete bana na biso nyonso oyo batikali bazali kosalela Yehova. Tozali na esengo mpamba te mwana na biso Wolfgang na mwasi na ye bazali na mosala ya zongazonga; mwana na bango ya mobali azali mpe mokɛngɛli ya zongazonga.
Nazali na botɔndi mingi na ndenge namoni na miso na ngai ndenge oyo mosala ya Yehova ekoli na Hollande. Ntango nabandaki mosala ya mobongisi-nzela awa na 1933, Batatoli bazalaki soki pene na nkama moko. Na moi ya lelo, bazali koleka 30 000. Atako tokómi sikoyo mibange, ngai na Erika tozali na mokano ya kolanda maloba ya loyembo wana ya kalakala: “Mpo na kondima oyo ekolɛmba te.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Loyembo 194.—Nzembo mpo na kokumisa Yehova (1928) (na Lingelesi).
b Mboka Copitz, oyo ekómá kobengama lelo oyo Pirna, ezali na pembeni ya Ebale Elbe, na kilomɛtrɛ 18 longwa na engumba ya Dresden.
c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1998, oyo elobeli lisolo ya bomoi ya Ndeko Van der Bijl: “Eloko moko te eleki solo na malamu.”
[Elilingi na lokasa 23]
“Jugendgruppe” bazali kopema nsima ya mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 24]
Ngai na babongisi-nzela mosusu tosakolaki na teritware ya Schneifel mobimba. Nazalaki na mbula 20
[Elilingi na lokasa 25]
Na Erika mpe Wolfgang, na 1940
[Elilingi na lokasa 26]
Banda na lobɔkɔ ya mwasi: Nkɔkɔ na ngai Jonathan na mwasi na ye Mirjam, Erika, ngai, mwana na ngai Wolfgang na mwasi na ye Julia
[Elilingi na lokasa 26]
Ndeko moko oyo azalaki na tata na bolɔkɔ azwaki fɔtɔ na ye oyo na 1941