Ezaleli ya kokaba epesaka esengo
LOKOLA ntoma Paulo azalaki mokɛngɛli moklisto ya bolingo, azalaki ntango nyonso kokanisa bamposa ya bandeko na ye bandimi. (2 Bakolinti 11:28) Yango wana, na kati ya bambula ya 50 na ekeke ya liboso T.B., ntango asalaki ebongiseli ya kokɔngɔla mbongo mpo na kosunga baklisto ya Yudea oyo bazalaki na bosɛnga, ateyaki mpe likambo moko ya ntina mingi mpo na elimo ya kokaba. Ntoma Paulo amonisaki ete Yehova asepelaka mingi na likabo oyo moto apesaka na esengo. Alobaki boye: “Moto na moto asala [ndenge akani, NW ] na motema na ye, na mposa moke te mpe na kopusama te; mpo Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.”—2 Bakolinti 9:7.
Bazali babola, kasi bazali kokaba
Baklisto mingi ya ekeke ya liboso bazalaki mpenza na bozwi te. Ntoma Paulo alobaki ete kati na bango ezalaki na bato “mingi ya nguya te.” Bazalaki “biloko ya bolɛmbu kati na mokili,” “biloko bizangi lokumu.” (1 Bakolinti 1:26-28) Na ndakisa, baklisto ya Makedonia bazalaki “kati na bobola,” mpe “na matumoli mingi.” Kasi, bandimi yango ya Makedonia basɛngaki na etingya ete bango mpe bápesa mbongo mpo na “kosunga babulami.” Mpe ntoma Paulo alobaki ete makabo oyo bapesaki ezalaki “nsuka na nguya na bango mpe na koleka”!—2 Bakolinti 8:1-4.
Kasi, bakumisaki elimo na bango ya kokaba mpo na motuya ya mbongo oyo bapesaki te. Nzokande, eloko oyo elekaki ntina ezalaki nde elimo to mposa ya kokaba mpe mitema na bango. Ntoma Paulo amonisaki baklisto ya Kolinti ete kopesa makabo etalelaka elimo mpe motema. Alobaki boye: “Nayebi mposa na bino ya kosunga; nakomikumisaka mpo na bino epai na bato ya Makedonia . . . boye mposa monene na bino epesi mingi na bango [molende].” Baklisto ya Kolinti ‘bakanaki na mitema na bango’ kopesa na bolingo.—2 Bakolinti 9:2, 7.
‘Makanisi na bango nde etindaki bango’
Ekoki kozala ete ntoma Paulo akanisaki ndakisa moko ya kopesa makabo ya bolingo oyo esalemaki kala na mokili mokauki koleka bikeke 15 liboso. Mabota 12 ya Yisalaele eutaki kolongwa na boombo na Ezipito. Bakómaki na Ngomba Sinai, mpe Yehova alobaki na bango bátonga mongombo mpo na losambo mpe bátya biloko ya losambo na kati. Yango esɛngaki biloko mingi ya motuya, mpe basɛngaki libota yango bápesa makabo.
Ndenge nini Bayisalaele yango basalaki? “[Bayaki], moto na moto na mposa na motema na ye mpe moto na moto akanaki boye na makanisi na ye, bayaki na makabo ya [Yehova] mpo na kobongisa hema ya koyangana.” (Exode 35:21) Libota yango epesaki makabo mingi? Ɛɛ, mingi koleka! Bayebisaki Mose makambo yango na maloba oyo: “Bato bazali koya na biloko bileki mpo na kosala mosala molakelaki [Yehova] biso.”—Exode 36:5.
Bayisalaele bazalaki na bozwi na ntango yango? Eleki naino ntango mingi te, bazalaki baombo ya mawa, ‘konyokwama na mikumba ya bozito,’ bazalaki na ‘bomoi ya mpasi,’ bomoi ya “monyoko.” (Exode 1:11, 14; 3:7; 5:10-18) Yango wana, tokanisi mpenza te ete bazalaki na bozwi mingi. Ya solo, Bayisalaele babimaki na mboka epai bazalaki baombo na bampate na bangɔmbɛ. (Exode 12:32) Kasi ekoki mpenza kozala ete bampate na bangɔmbɛ yango ezalaki mingi te, mpamba te ntango babimaki na Ezipito, mwa moke na nsima bamilelaki ete bazalaki ata na mosuni to limpa te mpo na kolya.—Exode 16:3.
Boye, epai wapi Bayisalaele bazwaki biloko ya motuya oyo bapesaki makabo mpo na kotonga mongombo? Epai ya bato oyo bango bazalaki kosalela lokola baombo, elingi koloba epai ya Baezipito. Biblia elobi boye: “Bato ya Yisalaele . . . balɔmbaki biloko ya palata mpe biloko ya wolo mpe bilamba na mabɔkɔ ya Baezipito . . . [Baezipito] bapesaki bango yango elɔmbaki bango.” Yehova nde apambolaki bango mpo Baezipito bákabela bango biloko yango, kasi Falo te. Mokanda ya Nzambe elobi boye: “[Yehova] apesaki bato ngɔlu na miso ya Baezipito mpe bapesaki bango yango elɔmbaki bango.”—Exode 12:35, 36.
Kanisá naino ndenge Bayisalaele bayokaki. Bankɔkɔ na bango mingi banyokwamaki na boombo mpe bazalaki kokelela. Bango bakómaki na bonsomi mpe bazalaki na biloko ya motuya mingi. Ndenge nini bayokaki mpo na kokaba ndambo ya biloko yango? Mbala mosusu bakokaki komona ete ezali biloko oyo bazwaki na motɔki na bango mpe bazalaki na lotomo ya kobomba yango mpo na bango moko. Kasi, ntango basɛngaki bango bápesa makabo mpo na losambo ya pɛto, bapesaki, bapesaki na kokakatana to na mitema mibale te! Babosanaki te ete Yehova nde asalaki ete bázwa biloko yango. Yango wana, bapesaki ebele ya palata na bango mpe wolo na bibwele. Bazalaki na “motema malamu.” ‘Mitema’ na bango ‘elingaki.’ ‘Bakanaki yango na makanisi na bango.’ Ezalaki mpenza “makabo ya bolingo epai ya [Yehova].”—Exode 25:1-9; 35:4-9, 20-29; 36:3-7.
Mposa ya kopesa
Ezali motuya ya likabo te nde elakisaka mpenza motema ya kokaba ya moto oyo azali kopesa. Mokolo moko Yesu azalaki kotala bato oyo bazalaki kotya mbongo na sanduku ya makabo na tempelo. Bato ya bozwi batyaki mbongo mingi, kasi Yesu akamwaki ntango amonaki mwasi moko mobola oyo akufelá mobali atyaki mea mibale ya motuya moke mpenza. Alobaki boye: “Mwasi oyo mobola aleki bango nyonso na kopesa makabo, . . . na kozanga na ye atii nyonso ezalaki na ye mpo na kolya.”—Luka 21:1-4; Malako 12:41-44.
Makambo ntoma Paulo alobaki na Bakolinti eyokani na makanisi yango ya Yesu. Ntango esengelaki kopesa makabo mpo na kosunga bandimi oyo bazalaki na bosɛnga, ntoma Paulo alobaki boye: “Soko mposa ezali, likabo ekoyambama [na kotalela] biloko bizali na moto, nde [na kotalela] biloko bizangeli ye te.” (2 Bakolinti 8:12) Ya solo, kopesa likabo ezali likambo ya kowelana to ya komekana na bamosusu te. Moto akopesa na kotalela makoki na ye, mpe Yehova asepelaka na motema ya kokaba.
Atako moto te akoki kokómisa Yehova mozwi, mpamba te biloko nyonso ezali ya ye, nzokande kopesa makabo ezali libaku malamu oyo epesaka basambeli ya Nzambe nzela ya kolakisa bolingo na bango epai na ye. (1 Ntango 29:14-17) Moto oyo apesaka makabo mpo na komilakisa te to mpo na bamposa mosusu ya moimi te, kasi na motema malamu mpe mpo losambo ya solo ekende liboso, azwaka esengo mpe Nzambe apambolaka ye. (Matai 6:1-4) Yesu alobaki boye: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” (Misala 20:35) Tokoki kozwa esengo yango soki topesi makasi na biso na mosala ya Yehova mpe soki tobongisi mwa eloko oyo tozali na yango mpo losambo ya solo ekende liboso mpe mpo na kosalisa bato oyo bazali na bosɛnga.—1 Bakolinti 16:1, 2.
Mposa ya kopesa lelo oyo
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya komona ndenge mosala ya kosakola “nsango oyo ya Bokonzi” ezali kopalangana na mokili mobimba. (Matai 24:14) Na mbula zomi ya nsuka ya ekeke ya 20, bato koleka milio misato bazwaki batisimo mpo na kolakisa ete bamipesi na Yehova Nzambe, mpe masangá ya sika soki 30 000 esalemaki. Elingi koloba ete soki okamati masangá misato ya Batatoli ya Yehova lelo oyo, moko esalemaki na boumeli ya mbula zomi oyo eleki! Batatoli bakómi mingi mpo na mosala makasi ya baklisto oyo bapesaki ntango mpe makasi na bango mpo na kotala bazalani na bango mpe koyebisa bango mikano ya Yehova. Batatoli bakómi lisusu mingi mpo na mosala ya bamisionɛrɛ oyo batikaka bamboka na bango mpe bakendaka na mikili mosusu mosika mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola Bokonzi. Lokola Batatoli bakómi mingi, babongisaki bazongazonga ya sika, oyo esɛngaki mpe kopona bakɛngɛli ya zongazonga ya sika. Lisusu, esengelaki Babiblia mingi mpo na mosala ya kosakola mpe boyekoli ya moto na moto. Esengelaki lisusu kobimisa mikanda mingi oyo elimbolaka Biblia. Na mikili mingi, esengelaki koyeisa bandako ya filiale monene to kotonga bandako ya monene koleka. Mosala nyonso oyo ebakisamaki esalemaki na makabo ya bolingo malamu ya basaleli ya Yehova.
Mposa ya Bandako ya Bokonzi
Lokola Batatoli ya Yehova bakómi mingi, emonanaki polele ete basengeli na eloko moko ya ntina mingi: Bandako ya Bokonzi. Ntango batalelaki likambo yango na ebandeli ya mobu 2000 bamonaki ete tosengeli na Bandako ya Bokonzi 11 000, na mikili ya bobola, epai bandeko bazali mpenza na mbongo te. Tókamata ndakisa ya Angola. Atako etumba kati na banamboka esili naino te, na ekólo yango basakoli ya Bokonzi bazali kobakisama mingi mbula na mbula (10 %). Nzokande, na masangá mingi kati na masangá 675 na ekólo monene yango ya Afrika, bandeko bayanganaka na bisika ya polele. Bandako ya Bokonzi ezali kaka 22 na ekólo mobimba, mpe kaka Bandako ya Bokonzi 12 nde ezali na manzanza na likoló.
Ezali mpe ndenge moko na République démocratique du Congo. Atako masangá etikali moke ekoka 300 na engumba-mokonzi Kinshasa, Bandako ya Bokonzi ezali kaka 10 mpamba. Na ekólo yango mobimba bandeko basengeli na Ndako ya Bokonzi koleka 1 500. Lokola Batatoli bazali kokóma mingi na mikili ya Mpoto ya Ɛsti, lapolo emonisi ete ekólo Russie na ekólo Ukraine esengeli na bankama mingi ya Bandako ya Bokonzi. Na Amérique latine motango ya Batatoli ezali kobakisama nokinoki, mingimingi na Brésil, epai oyo Batatoli bazali koleka 500 000 mpe basengeli na Bandako ya Bokonzi mingi mpenza.
Mpo na kokokisa bosɛnga na bikólo ya ndenge yango, Batatoli ya Yehova bazali kosalela programɛ ya nokinoki mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi. Mbongo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi eutaka na makabo ya bandeko na mokili mobimba, mpo ata masangá oyo ezali na mbongo te ezala na esika ya malamu mpo na losambo.
Lokola na ntango ya Yisalaele ya kala, misala mingi ekoki kosalema mpamba te baklisto ya sembo ‘bazali kokumisa Yehova na biloko na bango ya motuya.’ (Masese 3:9, 10) Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova esaleli libaku oyo mpo na kopesa matɔndi na moto nyonso oyo motema na ye etindaki ye apesa makabo ya bolingo malamu. Mpe tokoki kolikya ete elimo ya Yehova ekolanda kotinda mitema ya bato na ye mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola Bokonzi oyo ezali se kobakisama.
Lokola Batatoli bazali kokóma mingi na mokili mobimba, tólanda koluka mabaku mpo na komonisa ete tozali na esengo mpe na motema malamu ya kopesa makasi na biso, ntango na biso, mpe biloko na biso. Mpe tiká ete tóyoka esengo oyo eutaka na kopesa makabo.
[Etanda na lokasa 29]
“BÓSALELA YANGO MALAMU!”
“Nazali na mbula zomi. Natindeli bino mbongo oyo bósomba papye to eloko mosusu mpo na kosala mikanda.”—Cindy.
“Nalingi kotindela bino mbongo oyo mpo bósalela biso mikanda mingi. Nabombaki mbongo yango ntango nasalisaki Tata na mosala. Bósalela yango malamu!”—Pam, mbula nsambo.
“Nsango ya mopɛpɛ makasi oyo ebɛtaki epesaki ngai mawa. Nazali na elikya ete bozali malamu. [Dolare 2] oyo, ezali mbongo nyonso nazalaki na yango na kɛsi na ngai.”—Allison, mbula minei.
“Nkombo na ngai Rudy, mpe nazali na mbula 11. Leki na ngai ya mobali nkombo na ye Ralph, azali na mbula motoba. Mpe oyo ya mwasi Judith, azali na mbula mibale na ndambo. Banda sanza misato tozalaki kobomba mbongo oyo bazalaki kopesa biso mpo na kosalisa bandeko na biso na [mikili oyo ezali na bitumba]. Tobombaki dolare 20 oyo totindi sikoyo.”
“Nazali koyoka mawa mpo na bandeko [oyo mopɛpɛ makasi ebɛtaki na mboka na bango]. Nazwaki dolare 17 ntango nasalaki mosala na Tata. Nalobi te eloko oyo bosengeli kosala na mbongo oyo natindi, bino moko bósala oyo bomoni malamu.”—MacLean, mbula mwambe.