Solo efandi mpenza na motema na yo?
“Bóbongwana mpo na kozwa makanisi ya sika kino bokokoka kososola mokano ya Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi [mpenza].”—BALOMA 12:2.
1, 2. Mpo na nini kozala moklisto ya solo lelo oyo ezali lisɛki te?
KOZALA moklisto ya solo na mikolo oyo ya nsuka, oyo ezali “ntango ya mpasi,” ezali likambo ya lisɛki te. (2 Timote 3:1) Mpo na kolanda ndakisa ya Klisto, moto asengeli mpenza kolonga mokili. (1 Yoane 5:4) Kanisá lisusu maloba oyo Yesu alobaki mpo na bomoi ya moklisto: “[Bókɔta] na ekuke ya nkaka. Zambi ekuke ezali monene mpe nzela ezali na esika monene oyo ekoleka kino libebi. Bazali mingi baoyo [bakokɔta] na yango. Mpo ete ekuke ezali na nkaka mpe nzela ekangani oyo ekoleka na bomoi mpe baoyo bakomona yango bazali mingi te.” Alobaki lisusu ete: “Soki moto alingi kolanda ngai, atika kokanisa mpo na nzoto na ye moko, amema [nzete ya mpasi, NW] na ye mokolo na mokolo, mpe alanda ngai.”—Matai 7:13, 14; Luka 9:23, Boyokani ya Sika.
2 Nsima ya komona nzela moke oyo ememaka na bomoi, etumba mosusu oyo moklisto akómaka na yango ezali ya kotikala na nzela yango. Mpo na nini tolobi ete ezali etumba? Mpamba te lokola tomipesi na Nzambe mpe tozwi batisimo, Satana atyeli biso miso mpe azali kosalela mayele mabe to masɛnginya mpo akweisa biso. (Baefese 6:11) Alukaka bisika oyo tozali na bolɛmbu mpe asalelaka yango mpo na kobebisa elimo na biso. Alukaki kokweisa ata Yesu, yango wana tokoki kolikya ete akotika biso te.—Matai 4:1-11.
Mayele mabe ya Satana
3. Ndenge nini Satana alonaki ntembe na makanisi ya Eva?
3 Moko na mayele mabe oyo Satana asalelaka ezali kolona ntembe na makanisi na biso. Alukaka bisika oyo bolɛmbu ezali na kati ya molato na biso ya etumba ya elimo. Na ebandeli mpenza, asalelaki mayele yango epai ya Eva, atunaki ye boye: “Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga te?” (Genese 3:1) Na maloba mosusu, Satana alobaki boye: ‘Ya solo mpenza Nzambe apekisi bino likambo ya ndenge wana? Mpo na nini apimeli bino likambo ya malamu boye? Nzambe ayebi ete kaka na mokolo oyo bokolya mbuma yango, miso na bino ekofungwama mpe bokozala lokola ye, bokoyeba malamu na mabe!’ Satana alonaki ntembe na makanisi ya Eva mpe azelaki ekola.—Genese 3:5.
4. Makanisi nini ya ntembe bato mosusu bakoki kokóma na yango?
4 Ndenge nini Satana azali kosalela mayele yango lelo oyo? Soki tosali lokola kobosana momeseno na biso ya kotánga Biblia, koyekola biso moko, kobondela, kobima na mosala ya kosakola mpe koyangana na makita, tokoki kotika nzela ete ntembe oyo bato mosusu bazali kobimisa ekɔta na mitema na biso. Na ndakisa: “Nini ezali kolakisa ete tozali mpenza koyekola solo oyo Yesu ateyaki?” “Oyo ezali mpenza mikolo ya nsuka? Kutu, tosi tokómi na ekeke ya 21.” “Armagedon ekómi mpenza pene to ezali naino mosika?” Soki makanisi ya ntembe motindo wana ebandi koyela biso, tokosala nini mpo na kolongola yango?
5, 6. Tosengeli kosala nini soki tokómi na ntembe na motema?
5 Yakobo apesaki toli ya malamu ntango akomaki boye: “Soki moto moko na kati na bino azangi mayele, asenga yango epai ya Nzambe, mpe Nzambe akopesa ye yango; mpamba te Nzambe akabelaka mingi bato nyonso na motema ya malamu mpe abombaka eloko te. Kasi asenga na Nzambe na [kondima] nyonso mpe atia ntembe te; mpo moto oyo atiaka ntembe azali lokola mbonge ya mai: mopepe ezali kotindika mpe komema yango epai na epai. Moto ya ndenge wana akanisaka te ‘te akozwa ata eloko moko epai ya Mokonzi Nzambe, mpo azali moto moko ya mitema mibale mpe abongolaka bizaleli na ye ntango nyonso.”—Yakobi 1:5-8, Boyokani ya Sika.
6 Na yango, tosengeli kosala nini? Tosengeli kotika kobondela te mpo na ‘kosɛnga na Nzambe’ apesa biso kondima mpe bososoli mpe asunga biso ntango tozali kosala milende ya koyekola biso moko mpo na kosilisa likambo to ntembe nyonso tozali na yango. Tokoki mpe koluka lisalisi epai ya baoyo bazali na kondima makasi mpe tózala na ntembe te ete Yehova akopesa biso lisungi oyo tosengeli na yango. Yakobo alobaki lisusu boye: “Na bongo, bótosaka Nzambe. Bótɛmɛlaka oyo na mabe mpe akokima longwa na bino. Bóbɛlɛma epai na Nzambe mpe ye akobɛlɛma epai na bino.” Ntembe ekosila na mitema na biso soki tozali kobɛlɛma epai na Nzambe na nzela ya koyekola mpe na mabondeli.—Yakobo 4:7, 8.
7, 8. Wapi mwa makambo ya ntina mpo na koyeba lolenge ya losambo oyo Yesu ateyaki mpe banani bazali kosala makambo yango?
7 Na ndakisa, talelá motuna oyo: Nini ezali komonisa biso ete tozali kolanda losambo oyo Yesu ateyaki? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tosengeli kotalela makambo nini? Biblia emonisi ete baklisto ya solo basengeli kolingana solo. (Yoane 13:34, 35) Basengeli kokumisaka Yehova, nkombo ya Nzambe. (Yisaya 12:4, 5; Matai 6:9) Basengeli mpe kosakola nkombo yango.—Exode 3:15; Yoane 17:26.
8 Likambo mosusu oyo esengeli komonana na losambo ya solo yango oyo: bato oyo bazali kolanda yango basengeli kozala na limemya mpo na Liloba ya Nzambe, Biblia. Yango ezali mokanda kaka moko oyo ezali koyebisa biso bomoto mpe mikano ya Nzambe. (Yoane 17:17; 2 Timote 3:16, 17) Longola yango, baklisto ya solo basakolaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo moto akoka kozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. (Malako 13:10; Emoniseli 21:1-4) Bakɔtaka te na makambo ya politiki ya mokili oyo mpe na misala na yango ya mbindo. (Yoane 15:19; Yakobo 1:27; 4:4) Lelo oyo banani bazali kosala makambo yango? Makambo nyonso ezali komonisa ete ezali bato mosusu te kaka Batatoli ya Yehova.
Tokosala nini soki ntembe ezali kosila te na motema na biso?
9, 10. Tokosala nini mpo na kosilisa ntembe oyo ezali kolongwa te na motema na biso?
9 Tokosala nini soki totungisami na makanisi ya ntembe? Salomo, mokonzi ya mayele apesi eyano: “Mwana na ngai, soko okozwa maloba na ngai mpe okobomba maloba na ngai kati na yo, ete osembola litoi na yo epai na mayele mpe ete otya motema na yo koluka boyebi; ɛɛ, soko okolela mpo na bososoli mpe soko okonganga mpo na boyebi; soko okoluka [yango] lokola palata, mpe okolukaluka [yango] lokola na biloko ya motuya bibombami; mbɛ, okososola botosi ya kotosa [Yehova] mpe okozwana na boyebi ya koyeba Nzambe.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 2:1-5.
10 Yango ezali likambo ya kokamwa te? Soki tomonisi mposa makasi ya koyoka mayele ya Nzambe, ‘tokozwa boyebi ya Nzambe.’ Tokoki kozwa boyebi ya Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba soki tozali na mposa ya koyoka mpe kobatela maloba na ye. Na yango, tosengeli koluka Yehova na mabondeli mpe na boyekoli ya biso moko. Biloko ya motuya oyo ebombami na Liloba na ye ekoki kosilisa ntembe nyonso mpe ekosalisa biso tómona kongɛnga ya mateya ya solo.
11. Ndenge nini mosaleli ya Elisa akómaki na makanisi ya ntembe?
11 Ndakisa moko malamu oyo ezali komonisa ndenge oyo libondeli esalisaki mosaleli moko ya Nzambe oyo azalaki kobanga mpe azalaki na ntembe ezali na 2 Mikonzi 6:11-18. Mosaleli ya Elisa azangaki bososoli ya elimo. Azalaki komona te ete basoda ya likoló bazali kobatela mosakoli ya Nzambe liboso ya basoda ya Sulia oyo bazingaki mboka mpo na kokanga ye. Mosaleli ya mosakoli azalaki kobanga mpe agangaki ete: “Ɛ nkolo na ngai, tokosala nini?” Elisa alobaki na ye nini? “Bangá te mpo ete baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na bango!” Kasi ndenge nini mosaleli ya mosakoli akokaki kondima? Ye azalaki komona basoda ya likoló te.
12. (a) Ndenge nini ntembe ya mosaleli ya mosakoli esilaki? (b) Ndenge nini tokoki kosilisa ntembe oyo tokoki kozala na yango?
12 “Elisa abondelaki ete, [Yehova], fungolá miso na ye ete amona! Mpe [Yehova] afungolaki miso ya elenge mpe amonaki. Talá, ngomba etondaki na mbalata mpe makalo ya mɔ́tɔ oyo izali kozingela Elisa.” Na libaku wana, Yehova afungolaki miso ya mosaleli ya mosakoli mpo amona basoda ya likoló oyo bazali kobatela Elisa. Kasi, biso tokoki kolikya te ete Nzambe asunga biso na ndenge yango lelo oyo. Tóbosana te ete mosaleli ya mosakoli azalaki na Biblia mobimba te mpo ayekola yango mpe elendisa kondima na ye. Nzokande, biso tozali na Biblia. Soki tozali kosalela Biblia malamu, kondima na biso mpe ekoki kolendisama. Na ndakisa, tokoki kokanisa masolo ndenge na ndenge oyo ezali komonisa Yehova na kiti ya bokonzi na ye kuna na likoló. Masolo yango ezali kosilisa ntembe nyonso oyo ezali komonisa ete Yehova azali na ebongiseli te kuna na likoló mpo na kosunga basaleli na ye na mosala na bango ya koteya bato na mokili mobimba lelo oyo.—Yisaya 6:1-4; Ezekiele 1:4-28; Danyele 7:9, 10; Emoniseli 4:1-11; 14:6, 7.
Kebá na masɛnginya ya Satana!
13. Mayele nini Satana azali kosalela mpo na komeka kolɛmbisa bokangami na biso na mateya ya solo?
13 Wapi mayele mosusu oyo Satana azali kosalela mpo na kolɛmbisa biso na elimo mpe kolɛmbisa bokangami na biso na mateya ya solo? Moko na yango ezali ndenge nyonso ya misala ya mbindo. Na mokili ya lelo, epai bato bamipesi na pite mpe na ekobo, kozala na makango to kosangisa nzoto na moto oyo boyebani mpenza te mpe kosukisa na ye kaka mokolo yango, ekómi momeseno ya mokolo na mokolo mpo bato balingi bisengo ata soki basengeli kopesa nini mpo na kozwa yango. Bafilime, televizyo, na video ezali kolendisa bizaleli yango. Bazulunalo, mikanda, televizyo mpe mingimingi Internet ezali kolakisa bililingi ya bato oyo bazali bolumbu. Komekama ezali kozela moto nyonso oyo azali na mposa ya kotala yango.—1 Batesaloniki 4:3-5; Yakobo 1:13-15.
14. Mpo na nini baklisto mosusu bakweaki na masɛnginya ya Satana?
14 Mposa ya koyeba ememi baklisto mosusu na kotala makambo yango mpe babebisi makanisi mpe mitema na bango nsima ya kotala bililingi ya bato oyo bazali bolumbu to ya bato oyo bazali kosangisa nzoto. Bamitiki na motambo ya Satana. Mpo na makambo yango, mingi bazindi na elimo. Bato yango bazalaki lisusu te “bana mike na makambo mabe.” Bakómaki “bato oyo bakɔmeli na bososoli” te. (1 Bakolinti 14:20, NW) Mbula na mbula, ebele ya bato bazali kobuka mbuma mabe mpo bazali koboya kolanda mibeko ya Liloba ya Nzambe. Babosanaki kolata mpe kotikala na “molato mobimba ya etumba ya Nzambe.”—Baefese 6:10-13; Bakolose 3:5-10; 1 Timote 1:18, 19.
Tóbatela oyo tozali na yango
15. Mpo na nini bato mosusu bamonaka mpenza te motuya ya libula na bango ya elimo?
15 Yesu alobaki ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Batatoli mingi batikaki makambo oyo bazalaki kosala liboso mpe balongwaki na mangomba na bango ya kala. Yango wana, bamonaka mbala moko bonsomi oyo mateya ya solo epesaka. Nzokande, bilenge mosusu oyo babɔkwami na baboti oyo bazali na kati ya solo, ntango mosusu bamonaka mpenza te motuya ya libula na bango ya elimo. Bakɔtá na lingomba ya lokuta ata mbala moko te to bazalaki te bato ya mokili oyo elingi se bisengo, bamelá bangi te, mpe basalá pite to ekobo te. Yango wana, ekoki kozala ete bazali komona te bokeseni monene oyo ezali kati na paladiso na biso ya elimo na mokili mabe ya Satana. Bamosusu bazali kolanda mposa ya komeka pwazo ya mokili mpo na komona makambo nini bazangaki!—1 Yoane 2:15-17; Emoniseli 18:1-5.
16. (a) Mituna nini tokoki komituna? (b) Bazali koteya mpe kolendisa biso na kosala nini?
16 Ebongi mpenza tósimba naino mɔ́tɔ bongo tóyeba ndenge oyo yango ezikisaka? Tokoki te kozwa liteya na makambo mabe oyo bato mosusu bakutanaki na yango? Tolingi kozonga na “pɔtɔpɔtɔ” ya mokili oyo mpo na koyeba soki tozali kozanga eloko moko? (2 Petelo 2:20-22, NW) Petelo ayebisaki baklisto ya ekeke ya liboso oyo bautaki na mokili ya Satana ete: “Ntango esili koleka mpo na kosala mokano ya bapakano. Na ntango yango botambolaki na mobulu mpe na mposa mabe, komeláká vinyo mpe kozala na lokoso mpe na [milangwa] mpe na kosambela bikeko.” Na ntembe te tozali na mposa te ya kokɔta na “pɔtɔpɔtɔ ya misala ya mbindo” mpo na koyeba bololo oyo bomoi ekoki kokóma na yango. (1 Petelo 4:3, 4, NW) Nzokande, na Bandako ya Bokonzi, bisika ya kozwa mateya ya Biblia, bazali koteya biso bizaleli malamu oyo Yehova azali kosɛnga. Bazali mpe kolendisa biso tókanisaka malamu mpo tóyeba biso moko soki tozali na solo mpe soki solo efandi mpenza na mitema na biso.—Yosua 1:8; Baloma 12:1, 2; 2 Timote 3:14-17.
Nkombo na biso ezali kaka ebengeli te
17. Ndenge nini tokoki kozala mpenza Batatoli ya Yehova oyo bazali kobota mbuma malamu?
17 Soki solo efandi mpenza na mitema na biso, tokoluka koyebisa yango bato mosusu na libaku malamu nyonso oyo emonani. Elingi koloba te ete tokotingama na moto ata soki asepeli te. (Matai 7:6) Kasi, tokobanga te komimonisa ete tozali Batatoli ya Yehova. Soki moto asepeli ata mwa moke mpe atuni biso na bosembo mpenza motuna moko to andimi mokanda oyo ezali kolobela makambo ya Biblia, tokokanga monɔkɔ te mpe tokomibongisa mpo na koyebisa ye elikya na biso. Yango wana, tosengeli kozangaka mwa mokanda to trakte te epai nyonso oyo tozali, ezala na ndako, na mosala, na kelasi, na wenze to na bisika ya masano.—1 Petelo 3:15.
18. Ndenge nini komimonisa polele ete tozali baklisto ekoki kozala malamu mpo na bomoi na biso?
18 Soki tozali komimonisa polele ete tozali baklisto, tozali kolendisa makambo oyo ekoki kobatela biso tókwea te na mayele mabe ya Satana. Ntango baninga ya mosala babongisi fɛti ya anivɛrsɛrɛ to bazali kosepela Noele to basali tombola, bango moko bakobanda koloba ete, “Bótungisa ye te. Azali Motatoli ya Yehova.” Mpe lisusu, bato bakobanga koloba maloba ya nsɔni na esika oyo tozali. Tomoni ete soki tozali koyebisa bato polele ete tozali baklisto, ezali malamu mpo na biso, lokola ntoma Petelo alobaki yango ete: “Nani akosalela bino mabe soko bozali na mposa makasi ya malamu? Kasi soko boyoki mpasi mpo na boyengebene, esengo na bino!”—1 Petelo 3:13, 14.
19. Ndenge nini toyebi ete mikolo ya nsuka ebandá kala?
19 Litomba mosusu ya kofandisa mpenza solo na mitema na biso yango oyo: tokondima mpenza ete tozali na mikolo ya nsuka. Tokomona ete ebele ya bisakweli ya Biblia ezali kokokisama na ntango na biso.a Likebisi oyo Paulo apesaki ete “na mikolo ya nsuka, ntango ya mpasi ekoya” ezali komonana na makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaki na ekeke oyo euti koleka. (2 Timote 3:1-5; Malako 13:3-37) Lisolo moko ebimaki na zulunalo moko mpo na ekeke ya 20 ezalaki na motó ya likambo ete: “Etikali na makanisi ya bato ete ezalaki eleko ya bonyama.” Lisolo yango elobaki boye: “1999 ezalaki mbula oyo bato balekaki kokufa na kati ya mbula 50 ya nsuka ya ekeke oyo bato balekaki kobomama.”
20. Oyo ezali ntango ya kosala nini?
20 Oyo ezali ntango ya kokakatana te. Mapamboli ya Yehova ezali komonana polele na mosala eleki monene ya koteya bato Biblia na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso. (Matai 24:14) Tiká ete solo efanda mpenza na motema na yo mpe teyáká yango bato mosusu. Mpo okoka kozwa bomoi ya seko, etaleli makambo oyo ozali kosala sikoyo. Soki olɛmbisi mabɔkɔ okozwa mapamboli ya Yehova te. (Luka 9:62) Oyo ezali nde ntango ya ‘kotɛlɛma ngwi, ya koningana te, ya kosala mosala ya Nkolo ntango nyonso, awa toyebi ete kati na Nkolo mosala na biso ezali mpamba te.’—1 Bakolinti 15:58.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 2000, nkasa 12-14. Baparagrafe 13-18 epesi makambo motoba oyo emonisi mpenza ete banda 1914, tozali na mikolo ya nsuka.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini tokoki kolongola makanisi ya ntembe?
• Ndakisa ya mosaleli ya Elisa ekoki koteya biso nini?
• Tosengeli ntango nyonso kokeba na makambo nini mpo ete tómekama te?
• Mpo na nini tosengeli komimonisa polele ete tozali Batatoli ya Yehova?
[Bililingi na lokasa 10]
Koyekola Biblia mbala na mbala mpe kobondela ekoki kosalisa biso na kolongola makanisi ya ntembe
[Elilingi na lokasa 11]
Mosaleli ya Elisa amonaki emonaneli oyo esilisaki ntembe na ye
[Elilingi na lokasa 12]
Bayekolaka bizaleli malamu oyo Yehova azali kosɛnga na Bandako ya Bokonzi lokola oyo na Bénin