Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
“Bóbɔkɔla bango na mateya mpe na mpamela ya Nkolo”—BAEFESE 6:4.
1. Mposa ya Nzambe mpo na libota ezalaki nini, kasi nini esalemaki?
“BÓBOTAKA mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili.” (Genese 1:28) Yehova alobaki bongo na Adama na Eva mpe na maloba yango, abandisaki libota. (Baefese 3:14, 15) Mwasi na mobali ya liboso bakokaki kotala liboso na bango mpe komona na miso ya makanisi mabele oyo etondi na bana na bango: libota monene ya bato ya kokoka bafandi na esengo na kati ya paladiso awa na mabele mpe bazali kosambela Mozalisi na bango Monene na bomoko. Kasi, Adama na Eva bakweaki na lisumu, mpe mabele etondaki lisusu te na bato ya sembo, baoyo babangaka Nzambe. (Baloma 5:12) Kutu, makambo ebebaki mbala moko mpo na libota mpe koyinana, mobulu, kozanga “bolingo” epalanganaki, mingimingi na “mikolo ya nsuka” oyo tozali.—2 Timote 3:1-5; Genese 4:8, 23; 6:5, 11, 12.
2. Bana ya Adama bazalaki na makoki nini, kasi esengelaki nini mpo na kozala na mabota oyo ezali makasi na elimo?
2 Nzambe akelaki Adama na Eva na elilingi na ye. Atako Adama akómaki moto ya masumu, Yehova atikaki ye ete abota bana. (Genese 1:27; 5:1-4) Lokola tata na bango, bana ya Adama bazalaki na lisosoli mpe bakokaki kokesenisa malamu na mabe. Bakokaki koteya bango ndenge ya kosambela Mozalisi na bango mpe koteya bango ntina ya kolinga ye na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba, na makanisi na bango mobimba mpe na makasi na bango mobimba. (Malako 12:30; Yoane 4:24; Yakobo 1:27) Longola yango, bakokaki koteya bango ‘kosala na boyengebene mpe ete bálinga boboto mpe ete bátambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe.’ (Mika 6:8) Kasi, lokola bazali bato ya masumu, basengelaki kosala molende mingi mpo na kozala na mabota oyo ezali makasi na elimo.
Sombá ntango
3. Ndenge nini baboti bakoki ‘kosomba ntango’ mpo na kobɔkɔla bana mpo bákóma baklisto?
3 Na mikolo na biso oyo etondi na mpasi mpe mikakatano, kobɔkɔla bana mpe kokómisa bango ‘bato oyo balingaka Yehova’ mpe ‘bayinaka mabe’ ezali kosɛnga molende mpenza. (Nzembo 97:10) Baboti ya mayele ‘basombaka ntango’ mpo na kokokisa mokumba monene yango. (Baefese 5:15-17) Ndenge nini yo moboti okoki kosomba ntango yango? Ya liboso, osengeli kotya “makambo oyo eleki ntina” na esika ya liboso, makambo lokola koteya mpe kolakisa bana. (Bafilipi 1:10, 11, NW) Ya mibale, kozala na bomoi ya mindɔndɔ te. Ntango mosusu esengeli na yo kotika misala mosusu oyo ezali na ntina mpenza te. To mpe osengeli kotika biloko mosusu oyo ezali kozwa yo ntango mingi mpo na kobongisa yango. Lokola ozali moklisto, okoyoka mawa ata mokolo moko te soki osali milende oyo esengeli mpo na kobɔkɔla bana oyo babangaka Nzambe.—Masese 29:15, 17.
4. Ndenge nini libota ekoki kobatela bomoko na yango?
4 Soki bozali kolekisa ntango elongo na bana na bino, mingimingi mpo na kolobela makambo ya elimo, ezali na ntina mingi mpe ezali lolenge eleki malamu mpo na kobatela bomoko ya libota. Kasi bósalaka yango te kaka soki libaku emonani. Bótya na programɛ bantango oyo bokoki kolekisaka elongo. Elingi koloba te ete bófandaka na ndako moko, kasi moto na moto asalaka makambo na ye. Bana bakolaka malamu soki bazali kotyela bango likebi mokolo na mokolo. Bana basengeli komonaka ntango nyonso ete balingaka bango mpe bamibanzabanzaka mpo na bango. Liboso ya kozwa mokano ya kobota bana, mwasi na mobali basengeli kokanisa malamumalamu ndenge oyo bakokokisa mokumba monene wana. (Luka 14:28) Soki basali yango, kobɔkɔla bana ekozala motungisi te mpo na bango. Bakomona yango lokola lipamboli mpe libaku malamu.—Genese 33:5; Nzembo 127:3.
Teyá na maloba mpe na ndakisa
5. (a) Esengeli kobanda ndenge nini mpo na koteya bana ete bálinga Yehova? (b) Deteronome 6:5-7 epesi baboti toli nini?
5 Mpo na koteya bana na yo ete bálinga Yehova, yo moko naino osengeli kobanda kolinga Yehova. Soki olingaka Nzambe mingi, okolanda malako na ye nyonso malamumalamu. Moko ya malako yango esɛngi obɔkɔla bana na “mateya mpe mpamela ya Nkolo.” (Baefese 6:4) Nzambe azali kopesa baboti toli ete bápesa bana na bango ndakisa, básololaka na bango mpe báteyaka bango. Deteronome 6:5-7 elobi ete: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba. Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛma yo.” Soki ozali ntango nyonso kopesa toli mpe ozali kozongela yango, okokɔtisa mibeko ya Nzambe na mitema ya bana na yo. Na ndenge yango, bana na yo bakomona ete olingaka mpenza Yehova, bongo, bango mpe bakolinga kozala na boyokani malamu na ye.—Masese 20:7.
6. Lokola bana balandaka mingi ndakisa oyo bazali komona, baboti basengeli kosala nini?
6 Bana bazalaka na mposa ya koyeba makambo. Bana bayokaka makambo malamu mpe balandaka likambo nyonso ezali koleka mpe baumelaka te kolanda ndakisa na yo. Soki bazali komona ete yo moboti omipesaka mingi te na bozwi ya mokili, ekosalisa bango báyekola kolanda toli ya Yesu. Okoteya bango bámitungisaka mpo na biloko ya mokili te kasi ‘bálukaka liboso Bokonzi ya Nzambe.’ (Matai 6:25-33) Soki ozali kosolola na bango makambo ya malamu, makambo oyo etongaka, lokola mateya ya solo ya Biblia, lisangá ya Nzambe mpe bankulutu, okoteya bana na yo komemya Yehova mpe kosepela na bibongiseli na ye ya elimo. Lokola bana bayebaka mbala moko makambo oyo ezali bongolabongola, ntango ozali koteya bango na maloba, esengeli ete bizaleli mpe makanisi na yo emonisa ete osepelaka mpenza na makambo ya elimo. Baboti bakozala na esengo mingi soki bamoni bana na bango balandi ndakisa malamu na bango mpe bakómi bato oyo bábangaka Yehova na motema mobimba!—Masese 23:24, 25.
7, 8. Ndakisa nini ezali komonisa ntina ya koteya bana banda bazali naino mike mpenza, mpe nani oyo asengeli kozwa lokumu mpo na yango?
7 Ndakisa oyo euti na ekólo Venezuela ezali komonisa ntina ya koteya bana banda bazali naino mike mpenza. (2 Timote 3:15) Ndeko mobali moko nkombo na ye Félix, na mwasi na ye Mayerlín, bazali babongisi-nzela. Ntango mwana na bango Felito abotamaki, balingaki kosala nyonso mpo na kosalisa ye akóma mosaleli ya solo ya Yehova. Mayerlín abandaki kotángela Felito Mokanda mpo na masolo ya Biblia na mongongo makasi. Ntango azalaki naino moke mpenza, Felito ayebaki elilingi ya Mose na bato mosusu na mokanda yango.
8 Felito abandaki kosakola ye moko ntango azalaki naino mwana moke. Akokisaki mposa na ye, akómaki mosakoli, mpe na nsima azwaki batisimo. Nsukansuka, Felito akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Baboti na ye balobi boye: “Ntango tozali komona ndenge oyo mwana na biso azali kokola, toyebaka ete ezali nde mosala ya Yehova mpe mateya na ye.”
Salisá bana ete bákola na elimo
9. Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi mpo na mateya ya moombo ya sembo mpe ya mayele?
9 Ezali na ebele ya bazulunalo mpe mikanda oyo ezali kopesa toli mpo na kobɔkɔla bana; ata mpe na nzela ya Internet. Nimero moko ya zulunalo Newsweek oyo elobelaki makambo ya bana eyebisaki boye: “Mokanda na mokanda ezalaka na makanisi na yango. Likambo oyo eleki kobulunganisa ezali ete makanisi oyo moto akotyela motema, yango nde ekobota mbuma mabe mpenza.” Tozali mpenza na botɔndi ete Yehova apesi biso ebele ya batoli mpo na koteya mabota na biso ekola na elimo! Osalelaka biloko nyonso oyo apesi biso na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele?—Matai 24:45-47.
10. Ndenge nini boyekoli malamu ya Biblia na kati ya libota epesaka matomba, ezala epai ya baboti mpe epai ya bana?
10 Kozala na programɛ malamu ya koyekola Biblia mbala na mbala na esengo na kati ya libota ezali na ntina mpenza. Mpo boyekoli eteya bino mpenza, esepelisa mpe elendisa bino, bosengeli komibongisa malamu. Baboti bakoki koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bana soki bazali kopesa bango mposa ya koloba. Mpo na koyeba soki boyekoli na bino ezali malamu, bótalaka soki moto na moto azalaka na mposa ete mokolo oyo bosalaka yango ekoka noki.
11. (a) Baboti bakoki kosalisa bana na komityela mikano nini? (b) Litomba nini emonanaki ntango elenge mwasi moko ya ekólo Japon akokisaki mokano na ye?
11 Libota ezalaka makasi na elimo soki bozali komityela mikano ya elimo; baboti basengeli kosalisa bana bámityela mikano yango. Kotánga Biblia mokolo na mokolo, kokóma mosakoli ya nsango malamu, komipesa mpe kozwa batisimo ezali na kati ya mikano malamu oyo moto akoki komityela. Mikano mosusu ekoki kozala ya kosala mosala ya mobongisi-nzela, kosala na Betele to kokende mosala ya misionɛrɛ. Ntango azalaki na eteyelo ya ebandeli, Ayumi, elenge mwasi moko ya ekólo Japon, azwaki mokano ya koyebisa moninga na ye nyonso ya kelasi nsango malamu. Mpo na kopesa molakisi na baninga na ye ya kelasi mposa ya koyoka, asɛngaki nzela mpo atya mikanda oyo elimbolaka Biblia na bibliotɛkɛ ya kelasi. Litomba na yango ezali ete Ayumi ayekolaki Biblia na bato 13 na boumeli ya mbula motoba oyo asalaki na eteyelo ya ebandeli. Moko na bato oyo ayekolaki na bango mpe bandeko na ye mosusu bakómaki baklisto oyo bazwi batisimo.
12. Ndenge nini bana bakoki kozwa litomba mingi na makita ya lisangá?
12 Mpo na kozala makasi na elimo tosengeli mpe koyanganaka ntango nyonso na makita. Ntoma Paulo apesaki baninga na ye bandimi toli ete ‘bátika te koyanganaka elongo, ndenge oyo bamosusu bameseni kosala.’ Tózwa te momeseno ya kozangisa makita, mpamba te, ezala bilenge to mikóló, biso nyonso tozwaka matomba ntango toyanganaka na makita. (Baebele 10:24, 25, NW; Deteronome 31:12) Esengeli koteya bana koyoka malamu. Kobongisa makita ezali mpe na ntina mingi, mpamba te tozwaka litomba mingi koleka soki tozali kopesa biyano. Mwana oyo azali naino moke akoki kobanda kopesa biyano ya liloba moko to maloba mibale to mpe kotánga mwa maloba na kati ya paragrafe. Kasi, ekozala malamu mingi soki bozali kolakisa bana bálukaka biyano mpe báloba yango na maloba na bango moko. Baboti, bopesaka bana na bino ndakisa? Bozalaka na momeseno ya kopesa biyano ya malamu? Ebongi mpe ete, na libota, moto na moto azala na Biblia na ye, mokanda na ye ya nzembo, mpe mokanda na ye oyo tozali koyekola.
13, 14. (a) Mpo na nini baboti basengeli kobimaka mosala ya kosakola na bana na bango? (b) Ndenge nini bana bakoki kozwa litomba mpe kosepela na mosala ya kosakola?
13 Baboti ya mayele balendisaka bana na bango básalela Yehova ntango bazali bilenge mpe na nzoto makasi, basalisaka bango batyá mosala ya kosakola na esika ya liboso na kati ya bomoi na bango. (Baebele 13:15) Baboti bakobongisa bana na bango bákóma baministre oyo ‘babongi koyoka nsɔni te, oyo bazali kosembola liloba ya solo’ se soki bazali kobima na bango na mosala ya kosakola. (2 Timote 2:15) Ezali boni mpo na yo? Soki ozali moboti, osalisaka bana na yo na komibongisa mpo na mosala ya kosakola? Na ndenge yango, bakosepela na mosala ya kosakola, bakomona yango mosala ya ntina mpe mosala na bango ekobota mbuma.
14 Mpo na nini ezali na ntina ete baboti bábimaka elongo na bana na bango na mosala ya kosakola? Mpamba te na ndenge yango, bana bakomona ndakisa malamu ya baboti na bango mpe bakolanda yango. Yango mpe ekopesa baboti libaku ya kotala elimo, etamboli mpe mayele ya bana na bango. Bóbimaka na bana na bino na mosala ya ndako na ndako, ntango bozali kozongela bato oyo basepelaki, mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia, kokabola bazulunalo, mpe bongo na bongo. Soki likoki ezali, mwana na mwana azala na sakosi na ye mpo na mosala ya kosakola, mpe lakisá ye ndenge ya kobatela yango malamu mpe pɛto. Soki ozali ntango nyonso kolakisa bango mpe kolendisa bango, bana bakosepela na mosala ya kosakola mpe ekozala mpo na bango lolenge ya komonisa bolingo epai ya Nzambe mpe epai ya bazalani na bango.—Matai 22:37-39; 28:19, 20.
Bóbatela boyokani malamu na Nzambe
15. Lokola ezali na ntina ete libota ezala ntango nyonso na boyokani malamu na Nzambe, ndenge nini bokoki kosala yango?
15 Ezali na ntina mingi ete libota ezala ntango nyonso na boyokani ya malamu na Nzambe. (Nzembo 119:93) Lolenge moko oyo bokoki kosala yango ezali na kozala na momeseno ya kosolola makambo ya elimo na ndako mbala nyonso oyo libaku emonani. Botalelaka mokapo ya mokolo na libota? Bozali na momeseno ya kobɛta masolo ya makambo oyo bokutanaki na yango na mosala ya kosakola to makanisi oyo botángi na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ‘ntango bozali kotambola na nzela’? Bobondelaka Yehova ‘wana bolali mpe wana botɛlɛmi’ mpo na kotɔnda ye mpo na bomoi oyo azali kopesa bino mokolo na mokolo mpe mpo na ebele ya biloko oyo azali kopesa bino? (Deteronome 6:6-9) Soki bana bazali komona na makambo na bino nyonso ete bolingaka mpenza Nzambe, yango ekosalisa bango mpo ete solo efanda mpenza na mitema na bango.
16. Kolendisa bana ete báyekolaka mikanda mpo na koyeba makanisi ya Nzambe ezali na ntina nini?
16 Ntango mosusu, bana balukaka toli mpo na kolonga mikakatano to makambo mosusu oyo bakoki kokutana na yango. Na esika bóyebisaka bango ntango nyonso oyo basengeli kosala, eleki malamu kolendisa bango bálukaka bango moko na mikanda mpo na koyeba makanisi ya Nzambe. Soki bozali koteya bana kosalela malamu mikanda nyonso oyo ‘moombo ya sembo’ azali kopesa biso, ekosalisa bango bákóma baninga ya Yehova. (1 Samwele 2:21b) Mpe ntango bazali koyebisa bato mosusu na kati ya libota makambo oyo bayekoli na mikanda, yango ekobakisa makasi ya elimo ya libota mobimba.
Tyá elikya nyonso epai ya Yehova
17. Mpo na nini baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko bakoki kozala na elikya ete bakoki kosalisa bana na bango bákóma baklisto?
17 Tokoloba boni mpo na baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko? Baboti yango bazali mpe na mikakatano na bango mosusu na likambo etali kobɔkɔla bana. Bino baboti oyo bozali kobɔkɔla bana bino moko, bólɛmba nzoto te! Bóyeba ete bokoki kolonga. Ezali na ebele ya bandakisa ya baboti oyo bazalaki na molongani te, batyelaki Nzambe motema, balandaki toli na ye, babɔkɔli bana na bango malamu mpe bana yango bakómaki baklisto oyo bazali makasi na elimo. (Masese 22:6) Baklisto oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko basengeli mpenza kotyela Yehova motema mobimba. Basengeli kozala na kondima ete akosunga bango.—Nzembo 121:1-3.
18. Bamposa nini ya nzoto mpe ya makanisi ya bana na bango baboti basengeli kotyela likebi, kasi likambo nini basengeli kotya na esika ya liboso?
18 Baboti ya mayele bayebaka ete ezali na ‘ntango mpo na kosɛka mpe ntango mpo na kobina.’ (Mosakoli 3:1, 4) Mpo mwana akola malamu na nzoto mpe na makanisi, asengeli kozala na ntango ya kopema mpe kosala masano ya malamu. Soki mwana azali koyoka miziki ya malamu mpe mingimingi soki ayembaka nzembo ya kokumisa Nzambe, ekoki kosalisa ye azala na elimo ya malamu, likambo oyo ekoki kozala na ntina mingi mpo na kolendisa boyokani na ye na Yehova. (Bakolose 3:16) Ntango moto azali naino elenge ezali ntango ya komibongisa mpo na kozala mokóló oyo abangaka Nzambe, mpo na kosepela na bomoi libela na libela na paladiso awa na mabele.—Bagalatia 6:8.
19. Mpo na nini baboti basengeli kozala na elikya ete Yehova akopambola milende oyo bazali kosala mpo na kobɔkɔla bana na bango?
19 Yehova alingi ete mabota nyonso ya baklisto ezala makasi na elimo mpe ezala na bomoko. Soki tolingaka mpenza Nzambe mpe tozali kosala nyonso oyo ekoki mpo na kotosa Liloba na ye, akopambola milende na biso mpe akopesa biso mpiko oyo tosengeli na yango mpo na kolanda toli ya Liloba na ye. (Yisaya 48:17; Bafilipi 4:13) Yebá ete libaku malamu oyo ozali na yango sikoyo ya koteya mpe kolakisa bango ezali mpo na mwa ntango mpe soki eleki, ekozonga lisusu te. Salá nyonso oyo ekoki mpo na kolanda toli ya Liloba ya Nzambe mpe Yehova akopambola milende oyo ozali kosala mpo libota na yo ezali makasi na elimo.
Makambo nini toyekoli??
• Mpo na nini kosomba ntango ezali na ntina mingi mpo na koteya bana?
• Mpo na nini ndakisa malamu ya baboti ezali na ntina?
• Wapi mwa makambo ya ntina mpo na kosalisa bana bákola na elimo?
• Ndenge nini libota ekoki kobatela boyokani malamu na Nzambe?
[Bililingi na lokasa 24]
Mabota oyo ezali makasi na elimo bayekolaka Liloba ya Nzambe mbala na mbala, bayanganaka na makita, mpe babimaka na mosala ya kosakola elongo