Banzete oyo eumelaka ntango molai
Esika ya mabangamabanga ekoki komonana ete ezali esika malamu te ya kotonga ndako, mingimingi soki esika yango ezali likoló ya ngomba. Nzokande, atako likambo yango emonanaka lokola ete ekoki kobimisa matomba malamu te, banzete mosusu oyo ebimaka na bangomba ya milai epikamaka makasi na esika ya mabangamabanga motindo wana; ezala na ntango ya mpio makasi mpenza to na ntango oyo mai ezangaka mpenza, na eleko ya molunge, banzete yango ezalaka kaka.
MBALA mingi, banzete yango ya makasi ezalaka mpenza minene te lokola banzete mosusu oyo ezali motindo moko na yango, kasi oyo ebimaka na esobe. Ntango mosusu, ebimisaka mibimbi, mpe ezalaka ya kolingamalingama; yango esalaka ete ekolaka mpenza malɛmbɛ. Moi mpe malili makasi oyo ebɛtaka banzete yango, bakisá mpe mwa ndambo ya mabele oyo ezalaka na esika oyo banzete yango ekolaka, nyonso wana ekómisaka banzete yango ndenge bato bamonaka yango.
Lokola banzete yango ekolaka na bisika wana ya malamu te, okoki kokanisa ete ekoumela mingi te. Kasi ezali bongo te. Bato mosusu balobaka ete nzete oyo babengi Metusela (pin to pinus aristata) oyo ezalaka na bangomba White Mountains ya etúká ya Californie, ezwami na esika oyo etombwami na bolai ya mɛtrɛ 3 000, mpe eumeli mbula 4 700. Buku moko (The Guinness Book of Records 1997) eyebisi ete nzete yango eumelá bambula mingi koleka banzete nyonso oyo ezali na mabele. Edmond Schulman, moto oyo ayekolaki banzete wana ya kala, alimbolaki boye: “Emonani ete soki Pinus aristata . . . ezali kaka koumela, ezali nde mpo ekolaka na mpasi. Banzete [pinus aristata] nyonso ya kala oyo ezalaka na bangomba White Mountains, ekolaka na bisika bikauki mpe ya mabangamabanga oyo ezali likoló ya mabele na bolai ya mɛtrɛ pene na 3 000.” Schulman mpe amonaki ete mitindo mosusu ya banzete yango, oyo mpe eumeli mingi, ekolaka mpe na bisika ya mpasi mpenza.
Atako esengeli kokola na mikakatano makasi motindo wana, banzete yango oyo eumelaka mingi esalelaka mingi matomba mibale oyo yango ezwaka. Ya liboso, ekolaka na esika na yango moko, esika oyo matiti mpe banzete mosusu ezali mingi te; likambo oyo esalaka ete banzete yango ezika te ntango batumbaka bazamba, mpamba te yango nde ezalaka likama monene mpo na banzete oyo ekoli mingi. Ya mibale, misisa na yango epikamá makasi na mabanga, na bongo kaka koningana ya mabele nde ekoki kokweisa banzete yango.
Na kati ya Biblia, bakokanisi basaleli ya sembo ya Nzambe na banzete. (Nzembo 1:1-3; Yilimia 17:7, 8) Na kotalela esika oyo bazali mpe bomoi oyo bazali na yango, bango mpe bakoki kokutana na mikakatano. Konyokwama, mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, bobola oyo eleki ndelo, nyonso wana ekoki kotya kondima na bango na komekama makasi, mingimingi ntango mikakatano yango ezali kokoba se kokoba mbula na mbula. Atako bongo, Mozalisi na bango, oyo asalaki banzete oyo eumelaka mingi atako ekutanaka na mikakatano ndenge na ndenge, alaki basambeli na ye ete akosunga bango. Mpo na baoyo bazali kotikala ngwi, Biblia epesi elaka oyo: “Akolendisa bino, akopesa bino makasi.”—1 Petelo 5:9, 10.
Na Biblia, liloba ya Grɛki, oyo ebongolami mbala mingi na “koyika mpiko,” epesaka mpe likanisi ya ‘kotikala ngwi to kolendendela.’ Ndenge moko na banzete oyo ekolaka na bangomba ya milai, mpo na koyika mpiko esengeli ete lolenge oyo misisa ekɔti na mabele ezala malamu. Mpo na oyo etali baklisto, misisa na bango esengeli kopikama makasi kati na Yesu Klisto mpo ete bátelema ngwi. Paulo akomaki ete: “[Lokola] boyambaki Klisto Yesu, ye Nkolo, bótambola kati na ye, bózalaka na [misisa, NW] na bino kati na ye, bótongama likoló na ye lokola moboko; bolendisama na bindimeli biyekolaki bino; botonda na matondi makoyikanaka.”—Bakolose 2:6, 7.
Paulo ayebaki ete esengeli kozala na misisa makasi na elimo. Ye moko azalaki kobundana na “monzube kati na nzoto;” mpe na mosala ya kosakola, ayikelaki minyoko mingi mpiko. (2 Bakolinti 11:23-27; 12:7) Kasi ayaki komona ete na nzela ya nguya ya Nzambe, akokaki kokende liboso. Alobaki ete: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.”—Bafilipi 4:13.
Ndenge ndakisa ya Paulo emonisi yango, baklisto bayikaka mpiko kaka te na ntango oyo makambo nyonso ezali kotambola malamu. Lokola banzete oyo ekolaka na bangomba ya milai, banzete oyo eumelaka bankama ya bambula atako moi, mipɛpɛ to malili makasi ebɛtaka yango, tokoki kotelema ngwi na kondima soki misisa na biso epikami kati na Yesu mpe soki tozali kotalela nguya oyo Nzambe apesaka. Lisusu, soki toyiki mpiko tii na nsuka, tokoki komona kokokisama ya elaka oyo mosusu ya Nzambe: “Lokola mikolo ya nzete, bongo ekozala mikolo ya bato na ngai.”—Yisaya 65:22; Matai 24:13.