Yehova azali esika na biso mpo na komibomba
“Mpamba te olobaki ete: ‘Yehova azali esika na ngai mpo na komibomba,’ . . . mpasi moko te ekokwela yo.”—NZEMBO 91:9, 10, NW.
1. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali esika na biso mpo na komibomba?
YEHOVA azali esika oyo basaleli na ye bakoki mpenza komibomba. Soki tomipesi mobimba na ye, bakoki ‘kofina biso na ndenge nyonso, kasi tokozanga te ndenge ya koningana; bakoki kobimisela biso mikakatano, kasi tokozanga te nzela ya kokima; bakoki konyokola biso, kasi tokosundolama te; bakoki kobwaka biso na nse, kasi tokobomama nyɛɛ te.’ Mpo na nini? Mpamba te Yehova azali kopesa biso “nguya oyo eleki nguya ya bato.” (2 Bakolinti 4:7-9, NW) Ya solo, Tata na biso ya likoló azali kosalisa biso tózala na bomoi oyo ezali kosepelisa ye, mpe tokoki kokanisa malamumalamu maloba oyo ya mokomi ya nzembo: “Mpamba te olobaki ete: ‘Yehova azali esika na ngai mpo na komibomba,’ okómisi Oyo-Aleki-Likoló ye moko ndako na yo; mpasi moko te ekokwela yo.”—Nzembo 91:9, 10, NW.
2. Tokoki koloba nini mpo na Nzembo 91 mpe makambo nini elakami na nzembo yango?
2 Ekoki kozala ete Mose nde akomaki maloba ya Nzembo 91. Mwa maloba oyo ezali likoló ya Nzembo 90 emonisi ete ye nde akomaki nzembo yango mpe ekoki kozala ete ye kaka nde akomaki Nzembo 91 oyo elandi yango, mpamba te batii nkombo ya moto mosusu te likoló na yango. Ekoki kozala ete bazalaki koyemba Nzembo 91 boye: moto moko azalaki koyemba eteni ya liboso (91:1, 2), na nsima, bato ebele bazalaki koyamba (91:3-8). Bongo, moto moko azalaki koyemba maloba oyo elandi (91:9a) mpe bato ebele bazalaki koyamba lisusu (91:9b-13). Na nsima, moto moko azalaki koyemba maloba ya nsuka (91:14-16). Ata soki ezalaki bongo to te, Nzembo 91 elaki ete baklisto bapakolami bakobatelama na elimo mpe epesi elikya yango na baninga na bango oyo bamipesi na Nzambe.a Sikoyo, tótalela naino nzembo yango lokola ete etaleli basaleli nyonso wana ya Yehova.
Tobatelami na ‘esika oyo ebombami ya Nzambe’
3. (a) “Esika oyo ebombami ya Oyo-Aleki-Likoló” ezali nini? (b) Tomiyokaka ndenge nini ntango tozali ‘kopema na nse ya elilingi ya Oyo-na-Nguya-Nyonso’?
3 Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Oyo akofandaka kati na [esika oyo ebombami] ya Oyo-Aleki-Likoló, akopema na nse ya elilingi ya Oyo-na-Nguya-Nyonso. Nakoloba epai na [Yehova] ete, Yo ozali [esika na ngai mpo na komibomba, “NW”] mpe ndako na ngai makasi, Nzambe na ngai oyo ekondima ngai.” (Nzembo 91:1, 2) “Esika oyo ebombami ya Oyo-Aleki-Likoló” ezali esika ya elilingi epai biso nyonso tobatelami, mpe mingimingi bapakolami na elimo, baoyo Zabolo azali mpenzampenza kokanela bango. (Emoniseli 12:15-17) Zabolo mbɛlɛ asilisá biso nyonso nyɛɛ soki tozangaki libateli oyo tozali na yango na ndenge tofandi elongo na Nzambe lokola bapaya na ye na elimo. Lokola ‘topemi na nse ya elilingi ya Oyo-na-Nguya-Nyonso,’ tozali koyoka ete elili ya Nzambe ezali kobatela biso. (Nzembo 15:1, 2; 121:5) Ezali na esika mosusu te mpo na komibomba to ndako makasi oyo ezali malamu koleka Nkolo Mokonzi na biso Yehova.—Masese 18:10.
4. Mitambo nini Satana to “oyo akobomaka ndɛkɛ” asalelaka mpe ndenge nini tozali kokima yango?
4 Mokomi ya nzembo abakisi ete: “Zambi [Yehova] akobikisa yo na monyama na oyo akobomaka ndɛkɛ, mpe na maladi mabe [oyo ezali komema bwale, “NW”].” (Nzembo 91:3) Na Yisalaele ya kala, mbala mingi mobomi-ndɛkɛ azalaki kosalela mitambo mpe minyama. Kati na mitambo ya “oyo akobomaka ndɛkɛ,” elingi koloba Satana, tokoki kotánga ebongiseli na ye mpe “mayele mabe.” (Baefese 6:11, NW; maloba na nse ya lokasa) Azali kotya mitambo oyo ezali komonana polele te na nzela na biso mpo tóbendama na misala ya mabe mpe tókufa na elimo. (Nzembo 142:3) Kasi, lokola totiki misala ya mabe, ‘molimo na biso ekimi lokola ndɛkɛ kati na monyama.’ (Nzembo 124:7, 8) Tozali mpenza na botɔndi epai ya Yehova na ndenge azali kobikisa biso na mabɔkɔ ya ye “oyo akobomaka ndɛkɛ”!—Matai 6:13.
5, 6. “Maladi mabe” nini ememi “bwale,” kasi mpo na nini basaleli ya Yehova bazali kozwa yango te?
5 Mokomi ya nzembo alobeli “maladi mabe oyo ezali komema bwale.” Lokola maladi oyo ezwaka bato ebele mbala moko, ezali na likambo moko oyo ezali komema “bwale” epai ya bato nyonso mpe epai ya bato oyo bamitii na ngámbo ya bokonzi ya Yehova. Mpo na yango, Arnold Toynbee, ye azali moto ya mayele na istware, akomaki boye: “Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bikólo ebakisamaki mpe motángo na yango ekómaki mbala mibale koleka ndenge ezalaki liboso, nyonso wana mpo na bolingo ya ekólo . . . Lelo oyo, bato mingi bazali se kokóma na mposa ya kokabwana.”
6 Banda kalakala, bakonzi mosusu bazali kopelisa mɔ́tɔ ya bitumba oyo ezali kokabola bato na mokili mobimba. Balingi mpe ete bákumisaka bango to bákumisaka bikeko ndenge na ndenge to bililingi. Kasi, Yehova atikaki te ete bato oyo bazali sembo epai na ye bákwea na “maladi mabe” wana. (Danyele 3:1, 2, 20-27; 6:7-10, 16-22) Tozali na kati ya lisangá ya bandeko na mokili mobimba oyo tozali komonisana bolingo, tozali kosambela kaka Yehova, tokɔtaka na makambo ya mokili te, mpe tozali koyeba ete “na mabota nyonso, oyo akobangaka [Nzambe] mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” (Misala 10:34, 35; Exode 20:4-6; Yoane 13:34, 35; 17:16; 1 Petelo 5:8, 9) Atako tozali kokutana na “bwale” lokola minyoko mpo tozali baklisto, kasi tozali na esengo mpe tobatelami na elimo “na esika oyo ebombami ya Oyo-Aleki-Likoló.”
7. Ndenge nini Yehova abatelaka biso na “nsala na ye”?
7 Lokola Yehova azali esika na biso mpo na komibomba, maloba oyo ezali kobɔndisa biso: “Akozipa yo na nsala na ye mpe okobombama na nse na mapapu na ye; solo na ye ekozala nguba mpe ebombelo.” (Nzembo 91:4) Nzambe abatelaka biso ndenge moko ndɛkɛ epumbwapumbwaka likoló ya bana na yango mpo na kobatela yango. (Yisaya 31:5) ‘Azipaka biso na nsala na ye.’ Soki balobeli nsala, biso tokoki komona mbala moko mapapu. Ndɛkɛ ezipaka bana na yango na nse ya mapapu na yango mpo na kobatela bango ete banyama mosusu ya mabe elya bango te. Tozali lokola bana ya ndɛkɛ, tozali na libateli na mapapu ya elilingi ya Yehova mpamba te tomibombi na kati ya ebongiseli na ye.—Luta 2:12; Nzembo 5:1, 11.
8. Ndenge nini “solo” ya Yehova ezali nguba monene mpe ebombelo?
8 Totyelaka “solo” to bosembo elikya. Yango ezali lokola nguba monene oyo bazalaki kosalela na ntango ya kala; bazalaki kosala yango mwa moke lokola ekuke mpe monene na yango ekokaki kozipa nzoto ya moto mobimba. (Nzembo 5:12) Tozali kobanga te mpo totii elikya na biso na libateli wana. (Genese 15:1; Nzembo 84:11) Ndenge moko na kondima na biso, solo ya Nzambe ezali nguba monene mpo na komibatela, nguba oyo ezali kokanga bambanzi ya mɔ́tɔ oyo Satana azali kobwaka mpe makofi to masasi ya banguna. (Baefese 6:16) Ezali mpe ebombelo, elingi koloba ngomba makasi oyo ebombi biso.
‘Tokobanga te’
9. Mpo na nini butu ekoki kozala ntango oyo ebangisaka, kasi mpo na nini tozali na nsɔmɔ te?
9 Na kotalela libateli ya Nzambe, mokomi ya nzembo alobi boye: “Okobanga biloko ya nsɔmɔ na butu te to mbanzi oyo ekopumbwa na moi te, to maladi mabe te oyo ekotambolaka na molili to kobɛta te oyo ekobomaka na ntango ya moi makasi.” (Nzembo 91:5, 6) Lokola makambo mingi ya mabe esalemaka na molili ya butu, tokoki kokokanisa butu na ntango oyo ebangisaka. Na kati ya molili ya elimo oyo ezipi mokili, banguna na biso bazali mingimingi kobombana mpe kosalela mayele mabe mpo na kokweisa biso na elimo mpe kopekisa mosala na biso ya kosakola. Kasi, ‘tozali kobanga biloko ya nsɔmɔ na butu te’ mpamba te Yehova azali kokɛngɛla biso.—Nzembo 64:1, 2; 121:4; Yisaya 60:2.
10. (a) “Mbanzi oyo ekopumbwa na moi” ekoki kolimbola nini, mpe biso tozali kosala nini liboso na yango? (b) ‘Maladi mabe oyo ekotambolaka na molili’ ezali nini, mpe mpo na nini tozali kobanga yango te?
10 “Mbanzi oyo ekopumbwa na moi” ekoki kolimbola maloba ya mabe. (Nzembo 64:3-5; 94:20) Lokola tozali kozonga nsima te mpo na koteya solo, botɛmɛli wana ya polele na mosala mosantu oyo tozali kosala ezali lokola mai na mokɔngɔ ya libata. Lisusu, tozali kobanga te ‘maladi mabe oyo ekotambolaka na molili.’ Yango ezali maladi ya elilingi oyo ezali kokola na kati ya mokili oyo ezali na maladi na makambo etali bizaleli malamu mpe mateya ya mangomba, mokili oyo ezali na mabɔkɔ ya Satana. (1 Yoane 5:19) Maladi yango epesaka makanisi mpe elimo oyo ekoki komema na liwa, ezali kokanga bato na molili mpo báyeba Yehova te, báyeba mikano na ye te mpe báyeba te bibongiseli na ye kitoko. (1 Timote 6:4) Na kati ya molili yango, tozali kobanga te, mpamba te pole monene ya elimo ezali kongɛngisa biso.—Nzembo 43:3.
11. Nini ekómelaka baoyo bazali kokutana na ‘kobɛta na ntango ya moi makasi’?
11 ‘Kobɛta oyo ekobomaka na ntango ya moi makasi’ ezali mpe kobangisa biso te. “Ntango ya moi makasi” ekoki kozala makambo oyo mokili ebengaka kongɛnga. Bato oyo balandaka makanisi na yango ya komipesa na koluka biloko ya mokili bakufaka na elimo. (1 Timote 6:20, 21) Ntango tozali kosakola nsango ya Bokonzi na molende, tobangaka banguna te, mpo toyebi ete Yehova azali Mobateli na biso.—Nzembo 64:1; Masese 3:25, 26.
12. Bankóto ya bato ‘bazali kokwea’ pembeni ya banani, mpe na ndenge nini?
12 Mokomi ya nzembo alobi lisusu boye: “Nkóto bakokwea pembeni na yo mpe nkóto zomi na lobɔkɔ na yo ya mobali; likambo yango nde ekoya penepene na yo te. Kasi okotala bobele na miso mpe okomona kofuta epai na bato mabe.” (Nzembo 91:7, 8) Lokola bazali komibomba epai ya Yehova te, mingi bazali ‘kokwea’ na liwa ya elimo “pembeni” na biso mpenza. “Nkóto zomi” basili kokwea na ‘lobɔkɔ ya mobali’ ya Bayisalaele ya elimo lelo oyo. (Bagalatia 6:16) Kasi, ezala baklisto bapakolami na elimo to baninga na bango oyo mpe bamipesi na Nzambe, biso nyonso tozali na libateli na “esika oyo ebombami” ya Nzambe. Tozali ‘kotala na miso mpe komona kofuta ya bato mabe,’ na mikakatano oyo bazali kozwa na mombongo, na losambo mpe na makambo mosusu.—Bagalatia 6:7.
‘Mpasi moko te ekoyela yo’
13. Mpasi nini ekokwela biso te, mpe mpo na nini?
13 Atako libateli ezali lisusu te na mokili oyo, biso tozali kotya Nzambe na esika ya liboso mpe maloba ya mokomi ya nzembo ezali kopesa biso mpiko ete: “Mpamba te olobaki ete: ‘Yehova azali esika na ngai mpo na komibomba,’ okómisi Oyo-Aleki-Likoló ye moko ndako na yo; mpasi moko te ekokwela yo, ata maladi mabe ekopusana te pembeni ya ndako na yo ya kapo.” (Nzembo 91:9, 10, NW) Ya solo, Yehova azali esika na biso mpo na kobombama. Kasi, Nzambe Oyo-Aleki-Likoló azali mpe ‘ndako na biso,’ epai tozali na libateli. Tozali kokumisa Yehova lokola Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, tozali ‘kofanda’ kati na ye lokola Ye oyo abatelaka, mpe tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ye. (Matai 24:14) Yango wana, ‘mpasi moko te ekokwela biso’; elingi koloba mpasi oyo touti kotánga na kati ya nzembo oyo. Ata na ntango oyo mpasi oyo ezali kokómela bato mosusu ezali mpe kokómela biso, mpasi lokola koningana ya mabele, mipɛpɛ makasi, mpela, nzala mpe bitumba, yango ezali kobungisa kondima na biso te to kolongola biso libateli ya elimo te.
14. Mpo na nini biso basaleli ya Yehova tozali kozwa te bamaladi mabe oyo ebomaka?
14 Baklisto bapakolami na elimo bazali lokola bapaya oyo bazali kofanda na bandako ya kapo mpe bakabwani na mokili oyo. (1 Petelo 2:11) ‘Maladi mabe ekopusana te pembeni ya ndako na bango ya kapo.’ Ezala ete tozali na elikya ya kozala na bomoi na likoló to awa na mabele, tozali bato ya mokili oyo te, mpe bamaladi oyo ebomaka na elimo lokola pite mpe ekobo, mposa ya biloko mingi ya mokili, losambo ya lokuta, mpe kosambela “nyama ya yauli” na “elilingi” na yango, elingi koloba ONU, ezali kozwa biso te.—Emoniseli 9:20, 21; 13:1-18, NW; Yoane 17:16.
15. Na makambo nini baanzelu bazali kosunga biso?
15 Na ntina etali libateli oyo tozali na yango, mokomi ya nzembo abakisi ete: “Ye [Yehova] akolakisa baanzelu na ye na ntina na yo ete bábatela yo na nzela na yo nyonso. Bakotombola yo na mabɔkɔ na bango ete otuta litambe na yo na libanga te.” (Nzembo 91:11, 12) Nzambe apesi baanzelu nguya ya kobatela biso. (2 Mikonzi 6:17; Nzembo 34:7-9; 104:4; Matai 26:53; Luka 1:19) Bakɛngɛlaka biso ‘na nzela na biso nyonso.’ (Matai 18:10) Baanzelu batambwisaka mpe babatelaka biso na mosala na biso lokola basakoli ya Bokonzi mpe yango wana tobɛtaka mabaku na elimo te. (Emoniseli 14:6, 7) Ata ‘mabanga,’ lokola kopekisa mosala na biso, ekweisi biso te mpe Nzambe aboyi biso te mpo na yango.
16. Bokeseni nini ezali kati na ndenge oyo “nkosi” ebundisaka mpe ndenge oyo “etupa” ebundisaka, mpe ndenge nini biso totalelaka nyonso wana?
16 Mokomi ya nzembo abakisi ete: “Okotambola likoló ya nkosi mpe etupa, okonyata mpe nkosi mpe nyoka [monene, “NW”].” (Nzembo 91:13) Nkosi emibombaka te, etalanaka mpenza na nyama oyo ezali kobunda na yango; ndenge moko mpe, banguna na biso mosusu bazali komibomba te ntango bazali kotɛmɛla biso na nzela ya mibeko oyo ezali kopekisa mosala na biso ya kosakola. Kasi, ezali mpe na baoyo bazali mpe kobundisa biso na ntango oyo tokanisaki te, lokola koswa ya etupa oyo ebombami. Ntango mosusu, mpo na kobundisa biso, bakonzi ya mangomba bamibombaka nsima ya bakonzi ya Leta oyo bazali kobimisa mibeko, bazuzi mpe bato mosusu. Kasi, na lisalisi ya Yehova, totombokaka te, tokendaka nde na batribinale mpo bazuzi bákata makambo na bosembo, mpe na ndenge yango ‘tozali kolongisa mpe kondimisa nsango malamu na mibeko.’—Bafilipi 1:7, NW; Nzembo 94:14, 20-22.
17. Ndenge nini tozali konyata “nkosi”?
17 Mokomi ya nzembo alobelaki konyata “nkosi mpe nyoka monene.” Nkosi ekoki kozala na nkanda ya mabe mpenza, mpe nyoka ekoki kozala monene mpe molai mpenza. (Yisaya 31:4) Kasi, ata soki nkosi eyei na nkanda nini mpo na kobundisa biso, na elobeli ya elilingi, tozali konyata yango ntango tozali kotosa Nzambe na esika ya kotosa bato to bibongiseli oyo ekokani na bankosi. (Misala 5:29) Na yango, “nkosi” oyo ezali konguluma ezali kosala biso mabe ata moko te na elimo.
18. “Nyoka monene” ekoki kotinda biso na kokanisa nani, mpe tosengeli kosala nini soki abundisi biso?
18 Na Libongoli ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki, “nyoka monene” babengi yango “dalagona.” Yango ekoki kotinda biso na kokanisa ‘dalagona monene, nyoka ya kalakala oyo ebengami [Zabolo, NW] mpe Satana.’ (Emoniseli 12:7-9; Genese 3:15) Azali lokola nyoka monene ya nsɔmɔ oyo ekoki kofina eloko na yango ya kolya mpe komɛla yango. (Yilimia 51:34) Ntango Satana azali koluka kozingama na nzoto na biso mpo na kokanga biso mpema, elingi koloba ntango azali konyokola biso na nzela ya mikakatano ya mokili oyo, mpe na nsima koluka komɛla biso, tóbenda nzoto na biso mpe tónyata “nyoka monene” yango. (1 Petelo 5:8) Bapakolami na elimo basengeli kosala bongo soki balingi ete bango mpe básangana na kokokisama ya Baloma 16:20.
Lobiko na biso eutaka epai ya Yehova
19. Mpo na nini tozali komibomba epai ya Yehova?
19 Na ntina na losambo ya solo, mokomi ya nzembo amonisi maloba ya Nzambe ete: “Nakobikisa ye mpo ete ye azali kolinga ngai; nakotombola ye likoló mpo ete ayebi nkombo na ngai.” (Nzembo 91:14) Maloba oyo ete “nakotombola ye likoló” elingi koloba na esika oyo ezali mpasi mpo na kokóma. Tozali komibomba epai ya Yehova lokola basambeli na ye mingimingi mpamba te ‘tozali kolinga ye.’ (Malako 12:29, 30; 1 Yoane 4:19) Bongo, Nzambe ye mpe ‘azali kobikisa biso’ na mabɔkɔ ya banguna na biso. Ekosalema ata mokolo moko te ete básilisa biso nyɛɛ na mokili. Kutu, tokobikisama mpamba te toyebi nkombo ya Nzambe mpe tozali kobelela yango na kondima. (Baloma 10:11-13) Tozali mpe na ekateli ya ‘kotambola na nkombo ya Yehova libela na libela.’—Mika 4:5; Yisaya 43:10-12.
20. Na nsuka ya Nzembo 91, Yehova alaki nini mpo na mosaleli na ye ya sembo?
20 Na nsuka ya Nzembo 91, Yehova alobi mpo na mosaleli na ye ya sembo ete: “Akobyanga ngai mpe nakozongisela ye; ngai nakozala na ye kati na mpasi; nakobikisa ye mpe nakokumisa ye. Nakotondisa ye na mikolo mingi mpe nakomonisa ye kobikisa na ngai.” (Nzembo 91:15, 16) Ntango tobondelaka Nzambe na ndenge oyo eyokani na mokano na ye, ayanolaka biso. (1 Yoane 5:13-15) Tosili kokutana na mikakatano mingi oyo Satana monguna na biso abimiselaki biso. Kasi maloba oyo ete “nakozala na ye kati na mpasi” ezali kolendisa biso mpo na mikakatano oyo ekoya mpe ezali kondimisa biso ete Nzambe akosunga biso ntango mokili mabe oyo ekobomama.
21. Ndenge nini bapakolami na elimo basili kokumisama?
21 Atako Satana azali kotɛmɛla bango na nkanda makasi, bapakolami nyonso oyo bazali kati na biso bakozwa nkembo na likoló na ntango oyo Yehova abongisi, nsima ya “mikolo mingi” awa na mabele. Nzokande, ata sikoyo, bapakolami bazali mpenza na nkembo ya elimo mpamba te Nzambe azali kobikisa bango. Bazwi mpe lokumu monene ya kozala na molɔngɔ ya liboso lokola Batatoli ya Yehova awa na mabele na mikolo oyo ya nsuka! (Yisaya 43:10-12) Lobiko eleki monene oyo Yehova akopesa bato na ye ekozala na etumba na ye monene ya Armagedon ntango akolongisa bokonzi na ye mpe akosantisa nkombo na ye.—Nzembo 83:18; Ezekiele 38:23; Emoniseli 16:14, 16.
22. Nani ‘akomona kobikisa ya Yehova’?
22 Ezala ete tozali na kati ya bapakolami na elimo to tozali baninga na bango oyo mpe bamipesi na Nzambe, biso nyonso tozali kozela lobiko ya Nzambe. Na mokolo ya Yehova, ‘mokolo na ye monene mpe ya nsɔmɔ,’ baoyo bazali kosalela Nzambe na bosembo bakobikisama. (Yoele 2:30-32) Baoyo bakozala na kati ya “ebele monene” oyo bakobika mpe bakokɔta na mokili ya sika mpe bakotikala sembo na komekama ya nsuka, Nzambe ‘akotondisa bango na mikolo mingi’ elingi koloba ete akopesa bango bomoi ezangi nsuka. Akosekwisa mpe bato ebele. (Emoniseli 7:9; 20:7-15) Yehova akozala na esengo mingi ya ‘komonisa biso lobiko na ye’ na nzela ya Yesu Klisto. (Nzembo 3:8) Lokola tozali kozela likambo monene wana, tótya miso na biso epai ya Nzambe mpo asalisa biso na kotánga mikolo na biso mpo na nkembo na ye. Na maloba na biso mpe na misala na biso, tókoba komonisa ete Yehova azali esika na biso mpo na komibomba.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato oyo bakomaki Makomami ya Grɛki ya boklisto balobelaki Nzembo 91 lokola esakoli ya Masiya te. Ya solo, ntango Yesu Klisto azalaki moto awa na mabele, Yehova azalaki esika na ye mpo na komibomba mpe ndako makasi na ye, ndenge mpe azali esika mpo na komibomba mpe ndako makasi mpo na bayekoli ya Yesu bapakolami na elimo na baninga na bango nyonso oyo bamipesi epai na ye na “ntango ya nsuka” oyo tozali.—Danyele 12:4, NW.
Okopesa eyano nini?
• “Esika oyo ebombami ya Oyo-Aleki-Likoló” ezali nini?
• Mpo na nini tozali na kobanga te?
• Ndenge nini ‘mpasi ekokwela biso’ te?
• Mpo na nini tokoki koloba ete lobiko na biso eutaka epai ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 17]
Oyebi soki na meko nini solo ya Yehova ezali nguba monene mpo na biso?
[Bililingi na lokasa 18]
Yehova asalisaka basaleli na ye na kokokisa mosala na bango atako bazali kobundisa bango na ntango oyo bakanisaki te to na ndenge ya polele
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Cobra: A. N. Jagannatha Rao, Trustee, Madras Snake Park Trust ▼