Okoki komibatela mpo motema na yo ya elilingi ekangama te
Elombe moko ya masano oyo ayebanaki mokili mobimba azalaki kosala lisano na ye malamu mpenza mpe azalaki komonana nzoto kolɔngɔnɔ. Kasi, mokolo mosusu, ntango azalaki komekameka mpo na komilɛngɛla, mbala moko akweaki mpe akufaki. Elombe yango, nkombo na ye ezalaki Sergei Grinkov, azwaki medayi ya wolo mbala mibale na masano ya olympique; akufaki liwa ya mbalakaka na ntango oyo azalaki kokóma makasi na lisano ya patinage; azalaki na mbula 28 mpamba. Ezalaki mpenza mawa! Nini ebomaki ye? Motema na ye ekangamaki. Nsima ya liwa na ye, balobaki ete moto moko te akokaki kokanisa ete akokaki kokufa liwa ya mbalakaka ndenge wana mpamba te eloko moko te ezalaki komonisa ete azali na maladi ya motema. Kasi, ntango minganga batalaki nzoto na ye, bamonaki ete motema na ye ezalaki ya kovimba mpe mafuta elekaki mingi na kati ya misisa oyo ememaka makila na motema, yango wana makila ezalaki kotambola malamu te.
TOKOKI kokanisa ete kokangama motema mbala mingi eyaka mbalakaka, nzokande minganga bazali koloba ete ezalaka mpenza bongo te. Soki totali malamu, makambo oyo ememaka maladi yango, lokola kozala nzoto mineneminene, mpe bilembo oyo elakisaka ete moto akoki kozala na maladi yango, lokola koyoka mpema mokuse mpe koyoka mpasi na kati ya ntolo, bato mingi batyelaka yango likebi te. Yango wana, ata soki moto oyo akangami motema akufi te, mingi bazwaka mikakatano minene oyo ekotikala bomoi na bango mobimba.
Lelo oyo, minganga nyonso bazali koloba ete mpo moto abatela motema na ye, asengeli ntango nyonso kotalela malamu kolya na ye, makambo oyo azali kosalisa nzoto na ye, mpe asengeli mbala na mbala kokendaka epai ya monganga mpo na kotalisa motema na ye.a Makambo nyonso wana, na mposa mpenza ya kondima kotika makambo mosusu, na ndakisa oyo monganga apekisi, esalisaka mingi mpo moto abatela motema na ye.
Nzokande, tozali na motema mosusu oyo tosengeli kotyela yango likebi mingi koleka. Biblia elobi ete: “Batelá motema na yo na mpiko nyonso mpo ete makambo ya bomoi ikoutaka wana.” (Masese 4:23) Vɛrsɛ oyo ezali mpenzampenza kolobela motema ya elilingi. Toyebi ete mpo na kobatela motema na biso, tosengeli kolandelaka yango malamu; kasi, tosengeli kolandela mingi lisusu motema na biso ya elilingi soki tolingi kobatela yango mpo ezwa te maladi oyo ekoki koboma biso na elimo.
Makambo oyo esalaka ete moto akangama motema na ye ya elilingi
Lokola kaka mpo na motema ya solo, lolenge malamu mpenza ya kobatela motema na biso ya elilingi mpo ete ekangama te ezali ya koluka koyeba makambo oyo esalaka ete moto abela maladi yango mpe kosala oyo esɛngami mpo na komibatela. Yango wana, tótalela mwa makambo oyo, mbala mingi ebimisaka mikakatano, ezala na motema ya solo to ya elilingi.
Kolya. Toyebi biso nyonso ete bilei ya sukali lokola bombo na bisikiti, atako ezalaka elɛngi na monɔkɔ, ezalaka na litomba mpenza te mpo na nzoto. Ndenge moko mpe, bilei oyo tokoki kobenga bilei ya sukali mpo na elimo ezalaka mpasi te mpo na kozwa yango, ezalaka kitoko na kotala mpe ezalaka elɛngi na monɔkɔ, kasi ezali malamu te mpo na kolɔngɔnɔ ya elimo. Televizyo mpe bazulunalo ezali kolakisa ebele ya biloko ya ngɛlingɛli, bazali kolakisa yango nzela moko na makambo ya pite mpe ekobo, komɛla bangi, mobulu mpe bikelakela. Soki moto moko azali koleisa bɔɔngɔ na ye na makambo ya ndenge wana, azali nde koboma motema na ye ya elilingi. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Makambo nyonso kati na mokili, na mposa mabe ya nzoto mpe mposa mabe ya miso mpe nzombo ya bizaleli iuti na Tata te kasi iuti na mokili. Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano ya Nzambe akoumelaka seko.”—1 Yoane 2:16, 17.
Moto oyo alingaka kolya biloko ya sukali, asepelaka te na bilei oyo etongaka nzoto, lokola mbuma mpe ndunda. Ndenge moko mpe, moto oyo ameseni koleisa elimo mpe motema na ye makambo ya mpambampamba ya mokili, asepelaka mpenza te na bilei oyo ezali malamu mpo na elimo. “Mabɛlɛ” ya Liloba ya Nzambe ekoki kobatela moto ya ndenge wana na bomoi mwa ntango moko boye. (Baebele 5:13) Kasi nsima ya mikolo, akokola mpenza te na elimo mpo akoka kokokisa mikumba na ye na kati ya lisangá mpe asakolaka na ndenge oyo esengeli mpenza. (Matai 24:14; 28:19; Baebele 10:24, 25) Bato mosusu ya ndenge yango batikaki ete elimo na bango elɛmba mpe nsukansuka bakómaki Batatoli ya nkombo mpamba!
Likama mosusu ezali ete makambo oyo ezali komonana na miso ekoki kokosa. Soki moklisto azali kokokisa mikumba na ye kaka bongobongo, ekoki kozala elembo ete maladi ezali kokola na motema na ye ya elilingi. Ntango mosusu ekoki kozala ete motema na ye elɛmbi mpo ete, na kobombana, amipesi na biloko ya mokili to na masano oyo ezali kokumisa pite to ekobo, mobulu to mpe makambo ya bikelakela. Kolya mabe ndenge wana na elimo ekoki komonana ete ezali mpenza likama te, kasi ekoki kobebisa motema ya elilingi ndenge oyo bilei oyo ezangi vitamini ekoki kokómisa makasi misisa oyo ememaka makila mpe kobebisa motema. Yesu akebisaki na likambo ya kolona mposa ya mabe na motema na biso. Alobaki mpenza boye: “Ye nani akotala mwasi na mposa mabe na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.” (Matai 5:28) Ya solo, moto oyo alyaka malamu te na elimo, motema na ye ekoki kokangama. Kasi, nyonso esuki te kaka na kozanga kolya malamu.
Kosala ngalasisi. Eyebani malamu ete soki moto azali komitika ete akóma nzoto kilo, yango ekoki kobotela ye mindɔndɔ lokola kokangama motema. Ndenge moko mpe, moto oyo azali goigoi na elimo akoki kozwa makama ya kosakana te. Na ndakisa, ekoki kozala ete moto mosusu abimaka mosala ya kosakola, kasi asalaka yango se na ndenge oyo amonaka ete ebongi mpo na ye, asalaka mpenza makasi te ete akóma “mosali oyo abongi koyoka nsɔni te, awa ezali [ye] kosembola liloba ya solo.” (2 Timote 2:15) To mpe ekoki kozala na moto mosusu oyo ayanganaka na makita mosusu kasi asalaka mpenza makasi te mpo na komibongisa liboso mpe kopesa biyano na makita yango. Ekoki kozala na moto mosusu oyo amityelaka mikano ya elimo te to amipesaka mpenza na makambo ya elimo te. Soki na elimo, moto azali kosalisa nzoto na ye ngalasisi te, nsukansuka, ata mwa kondima oyo azalaki na yango ekolɛmba, to mpe ekosila mpenza kosila. (Yakobo 2:26) Ntoma Paulo alobelaki likama yango na mokanda oyo akomelaki Baebele oyo bakómaki baklisto; bamosusu kati na bango bakómaki na goigoi na elimo. Yoká makambo akomaki mpo na komonisa ndenge oyo ezaleli wana ekokaki kolɛmbisa elimo na bango. “Bandeko, bókebaka ete motema mabe mpe ya kozanga kondima ezala kati na moko na bino te ete bótangwa na Nzambe ya bomoi te. Kasi bópesanaka toli kati na bino mpenza mokolo na mokolo naino ezali yango kobyangama Lelo ete moko kati na bino te azalisama makasi na bozimbisi na masumu.”—Baebele 3:12, 13.
Mitungisi. Likambo mosusu oyo ememaka bato mingi na kokangama motema ezali bongo ntango bazali komitungisa na koleka ndelo. “Mitungisi ya bomoi” ekoki mpe kozala likama mpo na motema ya elilingi, ekoki kutu kosala ete moto atika mpenza kosalela Nzambe. Na likambo ya ndenge wana, likebisi oyo Yesu apesaki ebongi mpenza ete: “Kebá na bino ete mitema na bino mikóma makasi mpo na kolunda te, soko na kolangwa te, soko na [mitungisi] ya bomoi te. Bongo mokolo yango ebimela bino pwasa lokola motambo te.” (Luka 21:34, 35) Mitungisi ekoki mpe kobebisa motema na biso ya elilingi soki tobombá lisumu moko banda kala mpe yango ezali kosala ete tózala na kimya te. Mokonzi Davidi amonaki ndenge oyo motungisi ya ndenge wana esalaka mpasi; alobaki boye: “Ezali na kimya kati na mikuwa na ngai te mpo na masumu na ngai. Mpo ete mabe na ngai eleki likoló na motó na ngai; ezali na bozito boleki nguya na ngai.”—Nzembo 38:3, 4.
Komityela motema koleka. Bato mingi, liboso mpenza motema na bango ekangama, bazalaki kokanisa mpenza ete bazali nzoto kolɔngɔnɔ. Mbala mingi, likambo ya kotalisa nzoto to kosalisa baekizamɛ epai ya monganga bazalaki kotyela yango likebi te to mpe bazalaki mpenza kotala yango mpamba, ete ezali na ntina moko te. Ndenge moko mpe, bato mosusu bakoki kokanisa ete lokola basili koumela banda bakómá baklisto, likambo moko ekoki koyela bango te. Bakoki kobosana kotalaka motema na bango ya elilingi to kobosana komitalela bango moko tii mokolo oyo likama ekoyela bango. Ezali na ntina mingi tóbosanaka te toli malamu oyo Paulo apesaki mpo tómityela motema koleka te: “Tiká ete ye oyo akanisi ete azali kotɛlɛma ngwi akeba ete akwea te.” Likambo ya mayele ezali ya kondima ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe esengeli mbala na mbala totalelaka elimo na biso.—1 Bakolinti 10:12; Masese 28:14.
Kotala mpamba te bilembo oyo elakisaka likama
Soki Makomami ezali kobenda likebi mingi na bokolɔngɔnɔ ya motema ya elilingi, ezali mpamba te. Yilimia 17:9, 10 elobi boye: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango? Ngai [Yehova], nakolukaluka kati na motema, nakomeka makanisi, mpo na kopesa epai ya moto na moto lokola ezali nzela na ye.” Yehova atalaka mitema na biso; kasi, abongisi mpe makambo ya malamu mpo biso moko mpe tótalaka mitema na biso.
Yehova azali kosalela “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo ete na ntango oyo ebongi mpenza, azongelaka makambo oyo tosilá koyekola. (Matai 24:45) Na ndakisa, lolenge moko oyo motema na biso ya elilingi ekoki mpenza kokosa biso ezali na kotinda biso na komipesa na makanisi mpamba ya mokili. Makanisi ya ndenge wana ezali bandɔtɔ to bibanzabanza ya mpamba. Yango ekoki kokóma likama, mingimingi soki ezali kolamwisa makanisi ya kosala pite to ekobo. Yango wana, tosengeli mpenza kobengana yango. Soki tozali koyina ezaleli ya kotyola mibeko ndenge oyo Yesu ayinaki yango, tokobatela mitema na biso mpe tokomitika te ete tólanda makanisi mpamba ya mokili.—Baebele 1:8, 9.
Lisusu, na kati ya lisangá, tozali na bankulutu oyo batondi na bolingo oyo bakoki kosalisa biso. Atako tokosepela ete bato mosusu mpe bamibanzabanzaka mpo na motema na biso, nzokande mokumba ya kobatela motema na biso ya elilingi ezali libosoliboso ya moto ye moko. Biso moko nde tosengeli ‘komekaka makambo nyonso’ mpe ‘komimekaka mpenza soki tozali na kati ya kondima.’—1 Batesaloniki 5:21; 2 Bakolinti 13:5.
Batelá motema na yo
Biblia elobi ete: “Soko moto akokona nini akobuka bobele yango.” (Bagalatia 6:7) Ezali mpe bongo mpo na bokolɔngɔnɔ ya motema na biso ya elilingi. Mbala mingi, oyo emonanaka lokola likama ya mbalakaka ezalaka nde mbuma mabe ya likambo oyo ebandá kala; ntango mosusu, na kobombana, moto azalaki komipesa na makambo oyo ebebisaka elimo, lokola kotala bafɔtɔ to bafilme oyo elakisaka bolumbu ya basi na mibali, komitungisa mingi mpo na biloko ya mokili to koboma nzoto mpo na koluka kokóma moto monene to kozwa lokumu.
Yango wana, moto oyo alingi kobatela motema na ye asengeli mpenza kotalela malamu soki azali koleisa elimo na ye bilei ya ndenge nini. Mpo ete makanisi mpe motema na yo ezala malamu, leisáká yango Liloba ya Nzambe. Boyá bilei ya sukali na elimo; yango ezalaka mpasi te mpo na kozwa yango mpe ezalaka elɛngi na lolemo, kasi nsukansuka, elɛmbisaka motema ya elilingi. Mokomi ya Nzembo alobi likambo moko malamu oyo ezali kokebisa mpenza mpe ekokani na maloba ya minganga, ete: “Mitema na bango izali bobele mafuta mpenza.”—Nzembo 119:70.
Soki ozalaka na makambo ya mabe oyo osalaka banda kala, salá makasi otika yango, noki te misisa na yo oyo ememaka makila na motema ya elilingi ekotonda na mafuta. Soki makambo ya mokili ekómi kobenda yo mpe soki okómi kosepela mingi na bisengo mpe masano, zwá ntango ya kokanisa na toli malamu ya ntoma Paulo. Akomaki boye: “Bandeko, nazali koloba ete ntango eyei mokuse, [sikoyo] tiká ete . . . bango bakosalisa mokili mosala [bázala] [lokola] bango bazali kosalisa mokili mosala te. Mpo ete motindo ya mokili oyo ezali [kobongwana, NW].” (1 Bakolinti 7:29-31) Soki mpe okómi kobendama na bozwi ya mokili, kanisá malamu maloba ya Yobo oyo ete: “Soko natii wolo lokola elikya na ngai, to nabyangi wolo na kitoko kondimana na ngai; yango mpe ikozala lisumu kopesamela etumbu na mosambisi, zambi nazalaki kowangana Nzambe na likoló.”—Yobo 31:24, 28; Nzembo 62:10; 1 Timote 6:9, 10.
Mpo na komonisa ete soki moto akómi na momeseno ya koboya koyoka toli ya Biblia ezali mpenza likama, Biblia elobi boye: “Moto oyo bapameli ye mbala mingi, kasi azali kokómisa nkingo na ye makasi, akobukana na mbalakaka, mpe akobika lisusu te.” (Masese 29:1, NW) Nzokande, soki tozali kobatela motema na biso ya elilingi, tokozala na esengo mpe tokozala na kimya ya makanisi oyo moto ayokaka soki azali na bomoi ezangi mindɔndɔ mpe ya mobulu te. Yango nde bomoi oyo balendisaka ntango nyonso baklisto bázala na yango. Ntoma Paulo apemamaki na elimo ya Nzambe mpe akomaki ete: “Ɛɛ, litomba monene ezali na makambo ya Nzambe soko makokitisa motema. Zambi toyei na eloko kati na mokili te mpe tokoki kolongwa na eloko na mokili te. Awa ezali biso na biloko ya kolya mpe na bilamba ya kolata, ebongi na biso bongo.”—1 Timote 6:6-8.
Soki tozali komeka mpe koluka komesena na bomoi ya moto oyo abangaka Nzambe, yango ekosalisa biso tózala na motema ya elilingi oyo ezali kosala malamu. Soki tozali kotala malamu bilei na biso ya elimo, tokotika te ete elimo mpe makanisi ya mokili, oyo ezali pwazo, ebebisa biso na elimo. Likambo eleki ntina ezali ete soki tozali kotosa bibongiseli nyonso oyo Yehova azali kozwa na kati ya lisangá na ye, ekozala lokola nde tozali kotalisa mitema na biso ya elilingi epai ya monganga. Soki tozali kosala yango ntango nyonso, tokomibatela mpo motema na biso ezwa te maladi ya elilingi te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá masolo oyo elobeli kokangama motema na Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ 1996 (ebimeli ya Lifalanse) na motó ya likambo “Crise cardiaque—Que faire?”; ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 10]
SOKI MOTO AZALI KOLYA MALAMU TE NA ELIMO, MOTEMA NA YE YA ELILINGI EKOKI KOBEBA NDENGE KAKA MOTO OYO AZALI KOLYA MALAMU TE NA MOSUNI, MISISA NA YE OYO EMEMAKA MAKILA EKOKI KOKÓMA MAKASI MPE KOBEBISA MOTEMA NA YE
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 10]
KOZALA GOIGOI NA ELIMO EKOKI KOMEMELA MOTO MAKAMA
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]
“MITUNGISI YA BOMOI” EKOKI KOBEBISA MOTEMA YA ELILINGI
[Elilingi na lokasa 11]
Soki tozali na bolɛmbu mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ na biso ya elimo, yango ekoki kobotela biso mpasi
[Bililingi na lokasa 13]
Soki toloni mimeseno malamu mpo na elimo na biso, yango ekobatela motema na biso ya elilingi
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]
AP Photo/David Longstreath