Klisto azali kotambwisa lisangá na ye
“Talá! Nazali na bino mikolo nyonso tii na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”—MATAI 28:20, NW.
1, 2. (a) Nsima ya lisekwa na ye, eloko nini Yesu alakaki bayekoli na ye ntango atindaki bango bákende kokómisa bato bayekoli? (b) Ndenge nini Yesu azalaki kotambwisa mpenza lisangá na ye na ekeke ya liboso?
LIBOSO amata na likoló, nsima ya lisekwa na ye, Motambwisi na biso Yesu Klisto abimelaki bayekoli na ye mpe alobaki na bango boye: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele. Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Mpe talá! Nazali na bino mikolo nyonso tii na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”—Matai 23:10, NW; 28:18-20, NW.
2 Yesu asukaki te kaka na kopesa bayekoli na ye mosala ya kokómisa bato mingi mosusu bayekoli mpo bákoka kobika, kasi alakaki mpe bango ete akozala na bango elongo. Makambo oyo elekaki na lisangá ya boklisto ntango esalemaki sika, oyo ekomami na mokanda ya Misala, ezali komonisa mpenza ete Klisto asalelaki bokonzi oyo bapesaki ye mpo na kotambwisa lisangá yango oyo eutaki kosalema. Atindaki elimo santu, “mosungi” oyo alakaki, mpo elendisa bayekoli na ye mpe ekamba bango na mosala na bango. (Yoane 16:7; Misala 2:4, 33; 13:2-4; 16:6-10) Nsima ya lisekwa na ye, Yesu azalaki kotinda baanzelu mpo na kosalisa bayekoli na ye. (Misala 5:19; 8:26; 10:3-8, 22; 12:7-11; 27:23, 24; 1 Petelo 3:22) Lisusu, Motambwisi na biso asalaki lisangani ya mikóló-bakambi oyo esalemi na mibali ya makoki oyo basengelaki kokamba lisangá.—Misala 1:20, 24-26; 6:1-6; 8:5, 14-17.
3. Mituna nini tokozwa eyano na yango na lisolo oyo?
3 Kasi, tokoloba boni mpo na ntango na biso, oyo tobengi “nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo”? Ndenge nini Yesu Klisto azali kotambwisa lisangá ya boklisto lelo oyo? Mpe ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kondima ye atambwisa biso?
Nkolo azali na moombo ya sembo
4. (a) “Moombo ya sembo ya mayele” ezali nde banani? (b) Nkolo apesi moombo mokumba ya kobatela nini?
4 Ntango Yesu asakolaki elembo ya kozala na ye, alobaki mpe boye: “Nani oyo azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atii likoló ya basali na ndako na ye mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi? Esengo na moombo yango soki nkolo na ye, ntango akoya, akuti ye azali kosala bongo. Ya solo nalobi na bino, Akotya ye likoló ya biloko na ye nyonso.” (Matai 24:45-47, NW) “Nkolo” ezali Motambwisi na biso, Yesu Klisto; ye atii “moombo ya sembo mpe ya mayele,” elingi koloba baklisto bapakolami nyonso awa na mabele, mpo na kobatela biloko na ye nyonso awa na mabele.
5, 6. (a) Na emonaneli oyo ntoma Yoane amonaki, “bitɛlɛmiseli-ya-miinda nsambo ya wolo” mpe “minzoto nsambo” ezali komonisa nini? (b) Lokola “minzoto nsambo” ezali na lobɔkɔ ya mobali ya Yesu, yango elimboli nini?
5 Mokanda ya Emoniseli ezali komonisa ete Yesu Klisto ye moko nde azali kotambwisa moombo ya sembo mpe ya mayele. Na emonaneli moko ya “mokolo ya Nkolo,” ntoma Yoane amonaki “bitɛlɛmiseli-ya-miinda nsambo ya wolo, mpe ekelamu moko lokola mwana ya moto azalaki na katikati ya bitɛlɛmiseli-ya-miinda yango” mpe “azalaki na minzoto nsambo na lobɔkɔ na ye ya mobali.” Yesu alimbolelaki Yoane emonaneli yango boye: “Mpo na sɛkɛlɛ mosantu ya minzoto nsambo oyo omonaki na lobɔkɔ na ngai ya mobali, mpe ya bitɛlɛmiseli-ya-miinda nsambo ya wolo: Minzoto nsambo elakisi baanzelu ya masangá nsambo, mpe bitɛlɛmiseli-ya-miinda nsambo elakisi masangá nsambo.”—Emoniseli 1:1, 10-20, NW.
6 “Bitɛlɛmiseli-ya-miinda nsambo ya wolo” ezali komonisa masangá nyonso ya boklisto ya solo na “mokolo ya Nkolo,” oyo ebandaki na 1914. Kasi, ezali boni mpo na “minzoto nsambo”? Libosoliboso, yango ezalaki elilingi ya bakɛngɛli nyonso oyo babotami na elimo mpe bapakolami oyo bazalaki kokɛngɛla masangá nyonso ya ekeke ya liboso.a Bakɛngɛli bazalaki na lobɔkɔ ya mobali ya Yesu, elingi koloba ete ye moto azalaki kokamba bango. Tozali komona mpenza ete Klisto Yesu atambwisaki moombo ya sembo. Nzokande lelo oyo, bakɛngɛli oyo bazali bapakolami na elimo bazali moke mpenza. Ndenge nini Klisto azali kotambwisa masangá koleka 93 000 ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba?
7. (a) Ndenge nini Yesu asalelaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpo na kotambwisa masangá na mokili mobimba? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete elimo santu nde eponaka bakɛngɛli baklisto?
7 Se ndenge ezalaki na ekeke ya liboso, mwa ndambo moke ya mibali oyo bazali na makoki, oyo bazali kati na bakɛngɛli bapakolami basali lelo oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi; bango nde bazali bamonisi ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Motambwisi na biso azali kosalela Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpo na kopona mibali oyo bakokisi masɛngami, bázala bapakolami to te, mpo na kozala bankulutu na masangá. Na likambo yango, elimo santu oyo Yehova apesi Yesu nzela asalela yango, esalaka mosala ya ntina mingi. (Misala 2:32, 33) Libosoliboso, bakɛngɛli yango basengeli kokokisa masɛngami oyo ezali na Liloba ya Nzambe oyo epemamaki na elimo santu. (1 Timote 3:1-7; Tito 1:5-9; 2 Petelo 1:20, 21) Bankulutu basalaka libondeli liboso bátalela bandeko oyo bakoki kotinda bankombo na bango mpo bázwa mikumba, libondeli mpe esalemaka liboso ya kopona bango; mpe makambo nyonso wana etambwisamaka na elimo santu. Lisusu, bato oyo baponami bamonisaka mpenza ete bazali kolona mbuma ya elimo yango. (Bagalatia 5:22, 23) Yango wana, toli ya Paulo etalelaka bankulutu nyonso, ezala baoyo bazali bapakolami na elimo to baoyo bazali bapakolami te, ete: “Bókeba mpo na bino moko mpe mpo na etonga mobimba, oyo na kati na yango elimo santu etii bino bakɛngɛli.” (Misala 20:28, NW) Mibali yango oyo baponami balandaka malako ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe bandimaka komipesa mpo na kobatela lisangá. Na ndenge yango nde Klisto azali na biso lelo oyo mpe azali mpenza kotambwisa lisangá.
8. Na ndenge nini Klisto atindaka baanzelu mpo na kotambwisa bayekoli na ye?
8 Yesu azali mpe kosalela mpenza baanzelu mpo na kotambwisa bayekoli na ye. Lisese ya matiti mabe elobi ete ntango ya kobuka mbuma ekozala na “nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” Nkolo akotinda banani mpo na kobuka mbuma? Klisto alobaki ete “babuki bazali baanzelu.” Mpe abakisaki ete: “Mwana ya moto akotinda baanzelu na ye mpe bakolɔkɔta kati na bokonzi na ye makambo nyonso makoyokisa nsɔni mpe nyonso bakosalaka mabe.” (Matai 13:37-41) Lisusu, se ndenge oyo anzelu moko atambwisaki Filipo mpo akutana na mokube Moetiopia, makambo mingi ezali komonisa ete lelo oyo mpe Klisto azali kotinda baanzelu na ye mpo na kotambwisa mosala ya baklisto ya solo mpo bákutana na bato ya mitema sembo.—Misala 8:26, 27; Emoniseli 14:6.
9. (a) Klisto azali kotambwisa lisangá na ye na nzela nini lelo oyo? (b) Likambo nini tosengeli kotalela soki tolingi kozwa matomba ndenge Klisto azali kotambwisa biso?
9 Tozali mpenza kolendisama na koyeba ete lelo oyo Yesu Klisto azali kotambwisa bayekoli na ye na nzela ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, ya elimo santu mpe ya baanzelu! Ata soki esalemi ete, mpo na mwa ntango, malako ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekóma te na esika moko oyo basaleli ya Yehova bazali mpo minyoko ezali kuna to mikakatano mosusu, Klisto akotika te kotambwisa bango na nzela ya elimo santu mpe na lisungi ya baanzelu na ye. Kasi, tozwaka matomba soki tozali kotosa ye na ndenge azali kotambwisa biso. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kondima ete Klisto atambwisa biso?
“Bótosa . . . mpe bóyokela bango”
10. Ndenge nini tokoki komonisa limemya epai ya bankulutu na kati ya lisangá?
10 Motambwisi na biso apesi lisangá na lisangá “makabo na motindo na mibali”—‘bamosusu bazali bapalanganisi ya nsango malamu, bamosusu bazali babateli ya mpate mpe bateyi.’ (Baefese 4:8, 11, 12, NW) Ndenge oyo totalelaka bango mpe makambo oyo tosalelaka bango emonisaka mpenza ete tozali kondima ete Klisto azali kotambwisa biso to tozali kondima te. Ebongi mpenza ‘tózalaka na botɔndi’ mpo na mibali oyo bazali na makoki ya elimo, oyo Klisto apesi biso. (Bakolose 3:15) Ebongi mpe tópesaka bango limemya. Ntoma Paulo akomaki ete: “Tiká ete bankulutu oyo bazali kokamba na ndenge ya malamu bátángama bato babongi kozwa lokumu mbala mibale.” (1 Timote 5:17, NW) Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpe limemya epai ya bankulutu, to bakɛngɛli na kati ya lisangá? Paulo amonisi biso yango na maloba oyo: “Bótosa baoyo bazali kokamba bino mpe bóyokela bango.” (Baebele 13:17, NW) Ya solo, tosengeli kotosa bango mpe koyokela bango, elingi koloba kondima makanisi na bango.
11. Mpo na nini tolobi ete kotosa bankulutu ezali komonisa ete tozali kolanda nzela oyo tondimaki ntango tozwaki batisimo?
11 Motambwisi na biso azali moto ya kokoka. Bato oyo apesi biso lokola makabo bazali bato ya kozanga kokoka. Yango wana, bakoki kosala mabunga na bantango mosusu. Atako bongo, ezali na ntina mingi tótosa ntango nyonso ebongiseli ya Klisto. Kutu, mpo na komonisa ete tozali kotosa makambo oyo esɛngami na biso lokola tomipesaki na Nzambe mpe tozwaki batisimo, tosengeli kondima bato oyo elimo santu epesi bango bokonzi na kati ya lisangá mpe kotosa bango. Ntango tozwaki batisimo ‘na nkombo ya elimo santu,’ tomonisaki na miso ya bato nyonso ete tondimi elimo santu mpe tondimi mokumba oyo ezali kokokisa na mikano ya Yehova. (Matai 28:19) Batisimo na biso esɛngi ete tólanda nzela oyo elimo ezali kolakisa mpe tósala eloko moko te oyo ekopekisa mosala na yango na kati ya bayekoli ya Klisto. Lokola elimo santu esalisaka mingi mpo na kopona bankulutu, tokoki mpenza kokanisa ete tozali kaka kolanda nzela oyo tondimaki ntango tomipesaki na Nzambe soki tozali kotosa bankulutu te na kati ya lisangá?
12. Yuda atángi banani oyo batosaki te baoyo bazalaki liboso, mpe makambo oyo bakutanaki na yango ezali koteya biso nini?
12 Makomami epesi bandakisa mingi oyo ezali koteya biso ntina ya kotosa mpe koyokela bankulutu. Moyekoli Yuda alobaki mpo na baoyo bazalaki koloba mabe mpo na mibali oyo baponamaki na kati ya lisangá; alobelaki bandakisa misato oyo ezali kokebisa biso, ete: “Mawa na bango mpamba te balandi nzela ya Kaina, baweli kolanda libunga ya Balama mpo na kozwa lifuti, mpe babebi mpo balandi maloba ya botomboki ya Kola!” (Yuda 11, NW) Yehova apesaki Kaina toli na bolingo mpenza, kasi aboyaki koyoka mpe amonisaki motó makasi, atikaki koyina te mpe yango ememaki ye na koboma. (Genese 4:4-8) Mbala na mbala Nzambe akebisaki Balama, kasi ye alukaki kaka kolakela libota ya Nzambe mabe mpo báfuta ye. (Mituya 22:5-28, 32-34; Deteronome 23:5) Kola azalaki na esika ya lokumu na kati ya Yisalaele, kasi amonaki ete ekokaki kaka te. Abendaki bato mosusu na kotombokela Mose, mosaleli ya Nzambe, moto oyo alekaki bato nyonso na komikitisa awa na mabele. (Mituya 12:3; 16:1-3, 32, 33) Bato wana misato: Kaina, Balama na Kola, basukaki mabe. Makambo oyo ekómelaki bato wana misato ezali koteya biso koyoka toli ya bato oyo Yehova apesi bango mikumba mpe komemya bango!
13. Yisaya asakolaki mapamboli nini mpo na baoyo bakotosa bankulutu?
13 Moto moko te akoki koboya kozwa bolamu na ebongiseli malamu oyo Motambwisi na biso atii mpo na kokɛngɛla lisangá. Mosakoli Yisaya asakolaki mapamboli ya ebongiseli yango ntango alobaki boye: “Talá mokonzi akozala na lokumu kati na boyengebene, mpe bana na mokonzi kati na kosambisa-sembo; moto na moto akozala lokola [esika ya komibomba, NW] mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekauki, mpe lokola molili ya libanga monene kati na mokili molɛmbisami na moi.” (Yisaya 32:1, 2) Nkulutu mokomoko asengeli kozala “esika” ya komibatela ya ndenge wana. Ata soki tozalaka na mokakatano mpo na kotosa baoyo bazali liboso, tósala makasi mpe tóbondela mpo na kotosa mpe koyokela bato oyo Nzambe apesi bokonzi na kati ya lisangá.
Ndenge oyo bankulutu basengeli kotosa ndenge Klisto azali kotambwisa bango
14, 15. Ndenge nini baoyo bazali kokamba lisangá bamonisaka ete batosaka ndenge oyo Klisto azali kotambwisa lisangá?
14 Moklisto mokomoko, mingimingi bankulutu, basengeli kolanda ndenge Klisto azali kotambwisa lisangá. Bakɛngɛli to bankulutu bazali na mwa bokonzi na kati ya lisangá. Kasi balukaka kolandela bomoi ya bandeko mosusu te lokola ete bango nde ‘mikóló ya kondima ya bandeko na bango’ bandimi. (2 Bakolinti 1:24, NW) Bankulutu batosaka maloba ya Yesu ete: “Boyebi ete mikóló ya bapakano bazali mikonzi likoló na bango mpe bato minene bakonyokola bango na makasi. Nde kati na bino ezala bongo te.” (Matai 20:25-27) Ntango bankulutu bazali mpenza kosalela basusu nde bakokisaka mokumba na bango.
15 Bapesi baklisto toli ete: “Bókanisaka baoyo bazali kokamba bino, . . . mpe ntango bozali kotalela epai oyo etamboli na bango ememi bango, bólanda ndakisa ya kondima na bango.” (Baebele 13:7, NW) Soki basɛngi baklisto likambo yango, ezali te mpo ete bankulutu bazali batambwisi. Yesu alobaki ete: “Bozali na Motambwisi kaka moko, Klisto.” (Matai 23:10, NW) Baklisto basengeli kolanda nde ndakisa ya kondima ya bankulutu mpamba te bango moko balandaka ndakisa ya Klisto oyo azali Motambwisi na biso mpenzampenza. (1 Bakolinti 11:1) Tótalela makambo mosusu oyo bankulutu basalaka makasi ete bálanda ndakisa ya Klisto na boyokani na bango na bandeko mosusu na kati ya lisangá.
16. Atako Yesu azalaki na bokonzi mingi, ndenge nini azalaki na bayekoli na ye?
16 Atako Yesu alekaki bato ya kozanga kokoka na makambo nyonso mpe Tata na ye apesaki ye bokonzi oyo eleki bokonzi nyonso, azalaki na bopɔlɔ na kati ya bayekoli na ye. Azalaki komilakisa te na bato oyo azalaki koteya mpo akamwisi bango ete ye ayebi mingi. Yesu ayebaki mpenza bamposa ya bayekoli na ye mpe amoniselaki bango motema mawa; lokola bazalaki bato, azalaki kotalela bamposa na bango. (Matai 15:32; 26:40, 41; Malako 6:31) Ata mokolo moko te asɛngaki bayekoli na ye makambo oyo eleki bango, to kopesa bango mikumba oyo bakokoka komema yango te. (Yoane 16:12) Yesu azalaki na “boboto mpe na komikitisa.” Yango wana, azalaki kobɔndisa bato mingi.—Matai 11:28-30, NW.
17. Ndenge nini bankulutu bamoniselaka bandeko mosusu na kati ya lisangá bopɔlɔ lokola oyo ya Klisto?
17 Soki Klisto, Motambwisi na biso azalaki na bopɔlɔ, baoyo bazali kokamba lisangá basengeli komonisa ezaleli yango mingi koleka! Basengeli kokeba ete básalela mabe te bokonzi oyo bapesi bango. Lisusu, bazalaka te “na elobeli . . . oyo eleki mpenza” mpo na koluka kokamwisa basusu. (1 Bakolinti 2:1, 2, NW) Kasi, basengeli nde kosala makasi ete bálimbolaka mateya ya solo oyo ezali na kati ya Makomami na elobeli oyo ezali na mindɔndɔ te mpe ezali sembo. Longola yango, bankulutu basengeli koluka te ete bandeko mosusu básala makambo oyo bakokoka yango te, basengeli mpe kotalela bamposa ya basusu. (Bafilipi 4:5, NW) Lokola bayebi ete moto na moto azali na bolɛmbu na ye, babosanaka yango te na makambo mosusu oyo basɛngaka bandeko na bango. (1 Petelo 4:8) Bankulutu oyo bazali na komikitisa mpe na boboto babɔndisaka mpenza!
18. Bankulutu bakoki kozwa liteya nini na ndenge Yesu azalaki kotalela bana mike?
18 Bato bazalaki kobanga te kopusana penepene na Yesu, ata baoyo bazalaki bato mpamba. Yoká oyo alobaki na bayekoli na ye ntango bapekisaki bato oyo bazalaki ‘koya na bana mike epai na ye.’ Yesu alobaki ete: “Tiká bana mike báyaka epai na ngai, bópekisa bango te.” Na nsima, ‘azingelaki bango na mabɔkɔ na ye, atyaki mabɔkɔ na ye likoló na bango mpo na kopambola bango.’ (Malako 10:13-16) Yesu azalaki moto ya esengo mpe ya boboto, mpe bato mosusu bazalaki kosepela na ye. Yesu azalaki kobangisa bato te. Ata bana mike bazalaki kobanga te kozala penepene na ye. Bankulutu mpe basengeli kozala bato oyo bandeko babangaka te kopusana penepene na bango, mpe soki bazali bato ya esengo mpe ya boboto, bandeko mosusu—ata bana mike—bakomiyoka malamu penepene na bango.
19. Kozala na “makanisi ya Klisto” ezali kosɛnga nini, mpe mpo na kozwa yango, esengeli kosala nini?
19 Bankulutu bakolanda mpenza ndakisa ya Klisto Yesu soki bayebi ye malamu. Paulo alobaki boye: “Nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo na kolakisa ye? Kasi biso tozali na makanisi ya Klisto.” (1 Bakolinti 2:16) Kozala na makanisi ya Klisto esɛngi mpe koyeba ndenge azalaki kotalela makambo mpe bomoto na ye mobimba na boye ete tokoki koyeba soki akokaki kosala nini soki akutani na likambo boye to boye. Kanisá naino soki moto ayebi Motambwisi na biso malamu ndenge wana! Yango ezali kosɛnga ete tótángaka Baevanzile malamumalamu mpe tóyeba malamumalamu bomoi mpe ndakisa ya Yesu. Soki bankulutu bazali kosala molende mpo na kolanda ndenge Klisto azali kotambwisa lisangá bongo, bandeko na kati ya lisangá bakolanda ndakisa ya kondima na bango. Bankulutu mpe bakosepela ntango bakomona ete bandeko mosusu bazali kolanda na esengo mpenza lokolo ya Motambwisi.
Tótika te kolanda ndenge Klisto azali kotambwisa biso
20, 21. Ntango tozali kozela mokili ya sika oyo Nzambe alaki, mokano nini tosengeli kozala na yango?
20 Ezali na ntina mingi ete biso nyonso tólanda ntango nyonso ndenge Klisto azali kotambwisa biso. Lokola tozali se kopusana na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, bomoi na biso ezali lokola ya Bayisalaele ntango bakómaki na mokili ya Moaba na mobu 1473 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Bazalaki kotala Mokili ya Ndaka liboso na bango, mpe na nzela ya mosakoli Mose, Nzambe alobaki na Yosua boye: “Okokende na bato oyo elongo na kati ya mokili oyo [Yehova] asimbelaki batata na bango ndai ete akopesa na bango.” (Deteronome 31:7, 8) Yosua aponamaki lokola motambwisi. Mpo na kokɔta na Mokili ya Ndaka, Bayisalaele basengelaki kotosa Yosua, moto oyo azalaki kotambwisa bango.
21 Epai na biso, Biblia ezali koloba boye: “Bozali na Motambwisi kaka moko, Klisto.” Kaka Klisto nde akomema biso na mokili ya sika oyo ekozala na boyengebene. (2 Petelo 3:13) Yango wana, tómityela mokano ya kolanda kotambwisama na ye na makambo nyonso na bomoi na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Awa “minzoto” ezali komonisa te baanzelu oyo bazalaka na likoló. Tokanisi te ete Yesu akokaki kopesa na moto mokumba ya kokoma makambo oyo etali bikelamu ya elimo. Yango wana, “minzoto” ezali komonisa bakɛngɛli to bankulutu na kati ya masangá, na mokumba na bango ya bamemi-nsango ya Yesu. Minzoto yango ezali nsambo, motuya oyo ezali kolobela likambo oyo ezali ya kokoka na miso ya Nzambe.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini Klisto atambwisaki lisangá na ye na ekeke ya liboso?
• Ndenge nini Klisto azali kotambwisa lisangá na ye lelo oyo?
• Mpo na nini tosengeli kotosa baoyo bazali kokamba lisangá?
• Bankulutu basengeli kosala makambo nini mpo na komonisa ete Klisto azali Motambwisi na bango?
[Elilingi na lokasa 15]
Klisto azali kotambwisa lisangá na ye mpe asimbi bakɛngɛli na lobɔkɔ na ye ya mobali
[Bililingi na lokasa 16]
“Bótosa baoyo bazali kokamba bino mpe bóyokela bango”
[Elilingi na lokasa 18]
Yesu azalaki moto ya esengo mpe bato bazalaki kobanga kopusana penepene na ye te. Bankulutu basalaka makasi bázala lokola ye