Ondimaka mpenza ete Klisto azali motambwisi na yo?
“Bóbengama mpe ‘batambwisi’ te, mpo bozali na Motambwisi kaka moko, Klisto.”—MATAI 23:10, NW.
1. Nani azali Motambwisi kaka moko ya baklisto nyonso ya solo?
MOKOLO ya mibale 11 Nisana, Yesu Klisto akendaki na tempelo mpo na mbala ya nsuka mpamba te mikolo misato na nsima, babomaki ye. Mokolo yango, Yesu ateyaki ebele ya bato oyo bayanganaki wana na bayekoli na ye likambo moko ya ntina mingi. Alobaki boye: “Bóbengama Labi te, mpo bozali na moteyi kaka moko, kasi bino nyonso bozali bandeko. Lisusu, awa na mabele bóbenga moto moko te tata na bino, mpo bozali na Tata kaka moko, Oyo azali na likoló. Bóbengama ‘batambwisi’ te, mpo bozali na Motambwisi kaka moko, Klisto.” (Matai 23:8-10, NW) Ezali polele ete Yesu Klisto nde azali Motambwisi ya baklisto nyonso ya solo.
2, 3. Makambo nini ya malamu tokomona na bomoi na biso soki totii matoi na maloba ya Yehova mpe tondimi Motambwisi oyo aponi?
2 Soki tondimi ete Yesu atambwisa biso na bomoi na biso, tokozwa bolamu mingi! Yehova Nzambe ayebisaki koya ya Motambwisi yango ntango alobaki na nzela ya mosakoli Yisaya ete: “Ɛ moko na moko oyo ayoki mposa ya komɛla, yaká epai na mai! Ye oyo azali na mosolo te, yaká, osomba mpe olya! Yaká, osomba vinyo mpe mabɛlɛ, na mosolo te, na motuya mpe te. . . . Bóyokamela ngai koyoka mpenza mpe bólya yango ezali malamu, bómisepelisa na mafuta. . . . Talá nazalisi ye motatoli epai na bato, [motambwisi] mpe mokóló mpo na bato.”—Yisaya 55:1-4.
3 Yisaya asalelaki mai, mabɛlɛ mpe vinyo—biloko ya komɛla oyo bato bameseni na yango—lokola elilingi mpo na kolobela makambo ya malamu oyo tokomona na bomoi na biso soki totii matoi na maloba ya Yehova mpe tolandi Motambwisi mpe Mokóló oyo ye apesi biso. Yango ekokitisa motema, lokola kɔpɔ ya mai ya mpiɔ na ntango ya molunge makasi. Mposa na biso ya koyeba makambo ya solo mpe ya bosembo ekokokisama. Mabɛlɛ epesaka bana oyo babotami sika makasi mpe esalisaka bango bákola; ndenge moko mpe, ‘mabɛlɛ ya liloba’ epesaka biso makasi mpe esalisaka biso mpo ete boyokani na biso na Nzambe ekola. (1 Petelo 2:1-3) Lisusu, biso nyonso toyebi ete vinyo ebakisaka esengo na esika ya fɛti! Ndenge moko mpe, kosambela Nzambe ya solo mpe kolanda Motambwisi oyo aponi epesaka “esengo” na bomoi. (Deteronome 16:15) Yango wana, ezali na ntina mingi ete biso nyonso, bilenge mpe mikóló, basi mpe mibali, tómonisa ete tondimaka mpenza ete Klisto azali motambwisi na biso. Kasi, ndenge nini tokoki komonisa na bomoi na biso ya mokolo na mokolo ete Masiya azali Motambwisi na biso?
Bilenge: Bókoba “kokola na bwanya”
4. (a) Ntango Yesu azalaki na mbula 12, likambo nini esalemaki ntango akendaki na Yelusaleme mpo na Elekeli? (b) Na ndenge nini Yesu azalaki mwana ya mayele ata ntango azalaki na mbula 12 ya mpamba?
4 Tótalela ndakisa oyo Motambwisi na biso apesaki bilenge. Biblia eyebisi mpenza te makambo oyo elekaki ntango Yesu azalaki kokola, kasi likambo moko oyo Biblia elobeli ezali koteya biso mingi. Ntango Yesu azalaki na mbula 12, baboti na ye bamemaki ye na Yelusaleme mpo na fɛti ya Elekeli oyo ezalaki kosalema mbala moko na mbula. Ntango bazalaki kuna, Yesu akendaki na esika oyo bazalaki kosolola makambo ya Makomami; baboti na ye babosanaki ye mpe bazongaki na mboka na bango. Nsima ya mikolo misato, baboti na ye, Yosefe na Malia, oyo bazalaki koluka ye na mitema likoló, bakendaki kokuta ye na tempelo, “afandi na kati ya balakisi ya Mibeko; azalaki koyoka bango mpe kotuna bango mituna.” Lisusu, “bato nyonso oyo bazalaki koyoka ye bazalaki se kokamwa na bososoli na ye mpe biyano na ye.” Kanisá naino! Yesu azalaki kaka na mbula 12, kasi azalaki kotuna mituna ya makasi etali makambo ya elimo, azalaki mpe kopesa biyano ya mayele! Ekoki mpenza kozala ete baboti na ye bazalaki koteya ye.—Luka 2:41-50, NW.
5. Ndenge nini bilenge bakoki koyeba ndenge oyo batalelaka boyekoli ya Biblia na libota?
5 Mbala mosusu yo mpe ozali elenge. Soki baboti na yo bazali basaleli ya Nzambe, ekoki mpenza kozala ete mbala na mbala boyekolaka Biblia na kati ya libota. Ndenge nini otalelaka boyekoli na bino ya libota? Ebongi omituna naino mituna oyo: ‘Nasalaka mpenza makasi mpo ete programɛ ya koyekola Biblia na kati ya libota na biso etambolaka malamu? Nasalaka nyonso mpo nabebisa programɛ yango te?’ (Bafilipi 3:16) ‘Napesaka mpenza biyano na boyekoli yango? Soki esengeli, natunaka mituna na makambo oyo tozali koyekola mpe napesaka makanisi na ndenge ya kosalela yango? Lokola nazali kokola na elimo, nazali kokóma na mposa ya “bilei ya makasi [oyo] ezali mpo na bato oyo bakɔmeli”?’—Baebele 5:13, 14, NW.
6, 7. Ndenge nini kotánga Biblia mokolo na mokolo ekoki mpenza kosalisa bilenge?
6 Ezali mpe na ntina mingi kozala na programɛ ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. Mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Esengo na moto atamboli na toli ya bato mabe te, . . . kasi asepelaka na mibeko ya Yehova, mpe atángaka mibeko na ye na mongongo ya nse butu na moi.” (Nzembo 1:1, 2, NW) Yosua, moto oyo atambwisaki Bayisalaele nsima ya liwa ya Mose, ‘azalaki kotánga mokanda ya mibeko na mongongo ya nse butu na moi.’ Yango esalisaki ye asala makambo na mayele mpe akokisa mpenza mosala oyo Nzambe apesaki ye. (Yosua 1:8, NW) Motambwisi na biso Yesu Klisto alobaki ete: “Ekomami ete, Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ ya Nzambe.” (Matai 4:4) Lokola tozalaka na mposa ya bilei mokolo na mokolo, tosengeli kozala na mposa mingi lisusu ya kolya bilei ya elimo mokolo na mokolo!
7 Elenge mwasi moko, nkombo na ye Nicole, ayebaki mposa na ye ya elimo mpe abandaki kotánga Biblia mokolo na mokolo ntango azalaki na mbula 13.a Lelo oyo, akómi na mbula 16 mpe asilisi kotánga Biblia mobimba; azongeli yango lisusu, mpe sikoyo akómi na katikati. Alandaka programɛ moko oyo ezali mindɔndɔ te. Alobi boye: “Namityelá mokano ya kotánga ata mokapo moko na mokolo.” Kotánga Biblia mokolo na mokolo ememeli ye matomba nini? Ye moko apesi eyano: “Lelo oyo makambo ya mabe ekómi mingi. Kondima na ngai emekamaka mokolo na mokolo, ezala na kelasi to na bisika mosusu. Lokola natángaka Biblia mokolo na mokolo, mibeko mpe mitinda ya Biblia oyo elendisaka ngai nakwea na komekama te eyelaka ngai nokinoki na makanisi. Yango esalaka ete namiyoka ete nazali moninga ya Yehova mpe ya Yesu.”
8. Yesu azalaki kosala nini ntango bazalaki kokende na sinagoga, mpe ndenge nini bilenge bakoki kolanda ndakisa na ye?
8 Yesu azalaki na momeseno ya koyoka mpe ya kotánga ye moko Makomami na kati ya sinagoga. (Luka 4:16, NW; Misala 15:21, NW) Ezali mpenza malamu ete bilenge bálanda ndakisa yango, basengeli koyanganaka ntango nyonso na makita mpamba te kuna totángaka mpe toyekolaka Biblia! Elenge mobali moko ya mbula 14, nkombo na ye Richard, amonisi biso ntina oyo ye asepelaka na makita: “Makita ezali na motuya mingi mpo na ngai. Na makita, bamonisaka ngai ntango nyonso oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, oyo ebongi mpe oyo ebongi te, oyo eyokani na bomoto ya Klisto mpe oyo eyokani na yango te. Ezali na ntina te ete namona naino mpasi mpo na koyeba kokesenisa makambo yango.” Ya solo mpenza, “makambo oyo Yehova azongelaka ekoki kotyelama motema, epesaka mayele na oyo azangi yango.” (Nzembo 19:7, NW) Nicole amityelá mpe mokano ya koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita nyonso mitano ya lisangá. Azwaka mpe ngonga mibale to misato na boumeli ya pɔsɔ mpo na kobongisa makita yango.—Baefese 5:15, 16.
9. Ndenge nini bilenge bakoki kokoba “kokola na bwanya”?
9 Ntango moto azali elenge ezali ntango malamu ya ‘koyeba Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo ye atindaki, Yesu Klisto.’ (Yoane 17:3, NW) Mbala mosusu oyebi bilenge oyo balekisaka ntango mingi na kotánga mikanda oyo ezali na masolo ya kosɛkisa, kotala televizyo, kosakana na masano ya video, to kotala makambo ndenge na ndenge na Internet. Okanisi mpenza ete ebongi kolanda ndakisa na bango na esika ya kolanda ndakisa ya kokoka ya Motambwisi na biso? Ntango Yesu azalaki elenge, azalaki kosepela koyekola makambo ya Yehova. Yango ememelaki ye nini? Lokola alingaki makambo ya elimo, “Yesu akobaki kokola na bwanya.” (Luka 2:52, NW) Yo mpe okoki kolanda kokola na bwanya.
“Bótosanaka”
10. Nini ekoki kopesa kimya mpe esengo na kati ya libota?
10 Ndako ekoki kozala esika ya kimya mpe ya esengo to mpe esika ya koswana mpe ya matata. (Masese 21:19; 26:21) Soki tondimi mpenza ete Klisto azala motambwisi na biso, libota na biso ekozala na kimya mpe na esengo. Yesu azali mpenza kopesa biso ndakisa na oyo etali koyokana malamu na kati ya libota. Makomami elobi boye: “Bótosanaka mpo na kobanga Klisto. Bino basi bótosaka babali na bino [lokola] epai ya Nkolo mpo ete mobali azali motó ya mwasi [lokola] Klisto azali motó ya Lingomba. Ye wana azali mobikisi ya nzoto. . . . Bino babali, bólingaka basi na bino [lokola] Klisto alingaki Lingomba mpe amipesaki ye moko mpo na [yango].” (Baefese 5:21-25) Na mokanda oyo atindelaki lisangá ya Kolose, ntoma Paulo akomaki ete: “Bino bana, bótosaka baboti na bino na makambo nyonso, mpo ekoki bongo kati na Nkolo.”—Bakolose 3:18-20.
11. Ndenge nini mobali akoki komonisa ete andimaka mpenza ete Klisto azali motambwisi na ye?
11 Kolanda toli yango ezali kosɛnga ete mobali azala mokonzi ya libota, mwasi asungaka ye na motema moko, mpe bana bátosaka baboti na bango. Kasi, bokonzi ya mobali ekopesa esengo se soki azali kosalela yango na ndenge oyo ebongi. Mpo na kosalela bokonzi na ye malamu, mobali ya mayele asengeli koyekola ndakisa ya moto oyo azali Mokonzi mpe Motambwisi na ye, elingi koloba Klisto Yesu. (1 Bakolinti 11:3) Ya solo, Yesu akómaki “[mokonzi, NW] likoló ya makambo nyonso mpo na Lingomba,” kasi liboso na yango, ayaki awa na mabele, “mpo [bato] básalela ye te, kasi mpo na kosalela [bato].” (Baefese 1:22; Matai 20:28, NW) Ndenge moko mpe, mobali oyo azali moklisto azali mokonzi oyo alukaka bolamu na ye moko te, kasi mokonzi oyo alukaka nde bolamu ya mwasi na ye mpe ya bana na ye, to mpe bolamu ya libota mobimba. (1 Bakolinti 13:4, 5) Alandaka bizaleli malamu ya mokonzi na ye, Yesu Klisto. Lokola Yesu, azalaka na bopɔlɔ mpe na komikitisa. (Matai 11:28-30) Soki asali libunga, ayokaka monɔkɔ kilo te mpo na koloba “limbisá ngai” to “yo nde olongi.” Ndakisa malamu ya ndenge wana eyeisaka makambo pɛpɛlɛ mpo mwasi azala “mosungi” mpe “moninga” na ye; mwasi na ye akoyekola makambo mingi epai na ye mpe akopesa ye mabɔkɔ.—Genese 2:20; Malaki 2:14.
12. Nini ekoki kosalisa mwasi na kotosa bokonzi na ndenge oyo Nzambe abongisi yango na kati ya libota?
12 Mwasi asengeli nde kotosa mobali na ye. Kasi, soki elimo ya mokili oyo ekɔteli ye, yango ekoki kobanda kobebisa makanisi na ye na oyo etali bokonzi ndenge Nzambe abongisi yango na kati ya libota, mpe akobanda kokakatana mpo na kotosa mobali na ye. Makomami elobi te ete mobali asengeli kokonza mwasi na ye, kasi esɛngi na basi ete bátosa mibali na bango. (Baefese 5:24) Biblia ezali komonisa ete mobali to tata nde azali motó ya libota; mpe soki libota elandi toli ya Biblia, ekozala na kimya.—Bafilipi 2:5.
13. Ndakisa nini ya botosi Yesu apesi bana?
13 Bana basengeli kotosa baboti na bango. Na likambo yango, Yesu apesaki ndakisa ya malamu mpenza. Nsima ya likambo oyo elekaki ntango Yesu azalaki na mbula 12, elingi koloba ntango baboti na ye babosanaki ye na Yelusaleme mpe bakendaki komona ye nsima ya mikolo misato, “akitaki na [baboti na ye] elongo, mpe akómaki na Nasalete, mpe [alandaki kotosa, NW] bango.” (Luka 2:51) Ntango bana bazali kotosa baboti na bango, yango epesaka kimya mpe boyokani na kati ya libota. Soki moto na moto na kati ya libota azali kotosa litambwisi ya Klisto, libota ekozala na esengo.
14, 15. Nini ekosalisa biso na kosilisa mokakatano soki ebimi na kati ya libota? Pesá ndakisa.
14 Ata ntango mikakatano ebimi na kati ya libota, mpo na kosilisa yango esengeli kolanda ndakisa ya Yesu mpe kondima litambwisi na ye. Na ndakisa, mobali moko ya mbula 35, nkombo na ye Jerry abalaki Lana, oyo azalaki na mwana moko ya mwasi oyo asilaki kokóma elenge; na nsima, mokakatano moko oyo bakanisaki kutu te ebimaki na libota na bango. Jerry alobi boye: “Nayebaki ete mpo na kozala mokonzi ya malamu, nasengelaki kolanda mitinda ya Biblia oyo ezali mpe kosalisa mabota mosusu. Kasi, naumelaki te mpo na koyeba ete nasengelaki kozala na mayele mingi mpe na bososoli mingi ntango nazali kosalela mitinda yango.” Mwana ya mwasi na ye azalaki komona lokola ete Jerry ayaki kokabola ye na mama na ye; yango wana azalaki kolinga ye ata moke te. Esɛngaki Jerry asalela bososoli mpo na koyeba ete makambo oyo mwana wana azalaki koloba mpe kosala ezalaki mpo na makanisi oyo azalaki na yango. Jerry asalaki nini? Ye moko alobi boye: “Ngai na Lana toyokanaki ete na ebandeli ye nde asembolaka mwana mpe ngai nakosala makasi mpo nayokana na ye malamu. Nsukansuka, ndenge oyo toyokanaki ebotaki mbuma ya malamu.”
15 Ntango tokutani na mikakatano na kati ya libota, tosengeli kozala na bososoli mpo na koyeba ntina oyo moto mokomoko na kati ya libota azali koloba to kosala makambo na ndenge oyo to na ndenge mosusu. Tosengeli mpe kozala na bwanya mpo na kosalela mitinda ya Nzambe na ndenge oyo esengeli. Na ndakisa, Yesu asosolaki ntina oyo mwasi oyo azalaki kotanga makila asimbaki ye, mpe amonisaki bwanya mpe boboto ntango alobaki na ye. (Levitike 15:25-27; Malako 5:30-34) Motambwisi na biso azali na bwanya mpe na bososoli. (Masese 8:12, NW) Tokozala na esengo soki tozali kosala makambo na ndenge oyo ye alingaki kosala yango.
‘Bólukaka liboso Bokonzi’
16. Likambo nini esengeli kozala na esika ya liboso na kati ya bomoi na biso, mpe ndenge nini Yesu apesaki ndakisa mpo na yango?
16 Yesu amonisaki polele likambo oyo esengeli kozala na esika ya liboso na bomoi ya baoyo bandimi ye lokola motambwisi na bango. Alobaki boye: “Bólukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye.” (Matai 6:33) Ye moko apesaki ndakisa mpo na komonisa biso ndenge ya kosala yango. Nsima ya batisimo na ye, Yesu alyaki te na boumeli ya mikolo 40, azalaki se komanyola mpe kobondela; mpe na nsima amekamaki. Satana Zabolo alobaki na ye ete akopesa ye ‘bikonzi nyonso ya mokili.’ Kanisá bomoi oyo Yesu alingaki kozala na yango soki andimaki kosala likambo wana oyo Zabolo asɛngaki ye! Nzokande, Klisto atyaki makanisi na ye nyonso na kosala mokano ya Tata na ye. Lisusu, ayebaki ete bomoi ya ndenge wana na mokili oyo ya Satana elingaki kozala ya ntango mokuse. Aboyaki mbala moko likambo oyo Zabolo asɛngaki ye mpe alobaki ete: “Ekomami ete, ‘Osengeli kosambela Yehova Nzambe na yo, kaka ye nde osengeli kosalela mosala mosantu.’ ” Mwa moke na nsima, Yesu “abandaki kosakola ete: ‘Bóbongola mitema, mpamba te bokonzi ya likoló ekómi pene.’ ” (Matai 4:2, 8-10, 17, NW) Kobanda ntango wana tii ntango asukisaki bomoi na ye awa na mabele, Klisto azalaki mosakoli ya Bokonzi ya Nzambe, azalaki na mosala mosusu te.
17. Ndenge nini tokoki komonisa ete totyaka matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso?
17 Tosengeli kolanda ndakisa ya Motambwisi na biso mpe tosengeli kotika te ete mokili ya Satana ekosa biso, bongo koluka mosala oyo bakofuta biso mbongo mingi mpe ya lokumu ekóma mokano ya liboso na kati ya bomoi na biso. (Malako 1:17-21) Tokomikosa mpenza soki tomikɔtisi na motambo ya koluka biloko ya mokili mpe kozongisa matomba ya Bokonzi nsima! Yesu apesi biso mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Ya solo, ntango mosusu tozali na libota to mpe tozali na mikumba mosusu oyo tosengeli kokokisa, kasi, tokanisi te ete tokoki kokokisa mokumba na biso ya kosakola mpe ya koteya na bampokwa mpe bawikende? Ezali mpenza esengo na komona ete na mobu 2001, bato soki 780 000 basalaki mosala ya mobongisi-nzela!
18. Nini esalisaka biso tósepela na mosala ya kosakola?
18 Baevanzile ezali komonisa ete Yesu azalaki moto oyo alingaki mosala, kasi azalaki mpe na motema mawa. Ntango amonaki ete bato oyo bazalaki na ye bazalaki mpenza na nzala na elimo, ayokaki mawa mingi mpe asalisaki bango. (Malako 6:31-34) Mosala na biso epesaka biso esengo soki tozali kosala yango mpo tolingi bato mpe tozali na mposa mpenza ya kosalisa bango. Kasi, ndenge nini tokoki kokóma na mposa yango? Elenge mobali moko, nkombo na ye Jayson, alobi boye: “Ntango nazalaki kokola, nazalaki mpenza kolinga mosala ya kosakola te.” Kasi nini esalisaki Jayson akóma kolinga mosala ya kosakola? Ye moko apesi eyano: “Na libota na biso, tozalaki na programɛ ya kobima na mosala ya kosakola mokolo nyonso ya pɔsɔ na ntɔngɔ. Yango esalisaki ngai mpamba te lokola nazalaki kobima mingi na mosala ya kosakola, nakómaki komona malamu ya mosala yango mpe nakómaki kosepela na yango mingi.” Biso mpe tosengeli kosakolaka ntango nyonso mpe na molende.
19. Na oyo etali kotambwisama na Klisto, mokano na biso esengeli kozala nini?
19 Ya solo, kondima Klisto ete azala motambwisi na biso elendisaka mpe epesaka matomba. Soki tondimi ete Klisto atambwisa biso, na bolenge na biso tokokola na boyebi mpe na bwanya. Tokozala na kimya mpe na esengo na kati ya mabota na biso mpe mosala ya kosakola ekopesa biso esengo. Yango wana, tózwa ekateli ya komonisa, na bomoi na biso ya mokolo na mokolo mpe na bikateli oyo tozali kozwa, ete Klisto azali mpenza motambwisi na biso. (Bakolose 3:23, 24) Kasi, Yesu Klisto azali mpe kotambwisa biso na nzela ya lisangá ya boklisto. Lisolo oyo elandi ekolobela bolamu oyo tokozwa soki tondimi ete atambwisa biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
Ozali koyeba lisusu?
• Matomba nini tozwaka soki tolandi Motambwisi oyo Nzambe aponi?
• Ndenge nini bilenge bakoki komonisa ete bandimi ete Yesu atambwisa bango?
• Nini emonanaka na kati ya libota oyo bandimaka ete Klisto atambwisa bango?
• Ndenge nini tokoki komonisa na mosala na biso ya kosakola ete Klisto azali mpenza motambwisi na biso?
[Bililingi na lokasa 9]
Bolenge ezali ntango malamu ya koyekola koyeba Nzambe mpe koyeba Motambwisi oyo aponi mpo na biso
[Elilingi na lokasa 10]
Libota ezalaka na esengo soki bazali kondima ete Klisto atambwisa bango
[Pictures na lokasa 12]
Yesu alukaki liboso Bokonzi. Ezali boni mpo na yo?