Luká Nzambe na motema mpe makanisi na yo
Lingomba ya solo ya boklisto elendisaka bato básalela mitema mpe makanisi na bango mpo bákóma na kondima oyo ekosepelisa Nzambe.
KUTU Yesu Klisto, moto oyo asalaki lingomba ya boklisto, ateyaki ete tosengeli kolinga Nzambe na ‘motema na biso mobimba,’ na ‘molimo na biso mobimba’ mpe na ‘elimo’ to makanisi ‘na biso mobimba.’ (Matai 22:37) Ya solo, kosalela makanisi na biso ezali na ntina mingi na kati ya losambo.
Mpo bato oyo bazalaki koyoka ye bákanisa likoló na makambo oyo azalaki koteya, mbala mingi Yesu azalaki koloba: ‘Bokanisi nini?’ (Matai 17:25; 18:12; 21:28; 22:42) Ntoma Petelo mpe akomelaki baninga na ye bandimi mpo na ‘kolamwisa makoki na bango ya kokanisa malamumalamu.’ (2 Petelo 3:1, NW) Ntoma Paulo, misionɛrɛ oyo atambolaki mingi koleka na ekeke ya liboso, alendisaki baklisto ete básalela “makanisi” na bango mpo na “kokanga ntina ya mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoká.” (Baloma 12:1, 2, NW) Mpo baklisto bákóma na kondima oyo ekosepelisa Nzambe mpe oyo ekosalisa bango bálonga komekama ndenge na ndenge oyo ekómelaka moto, basengeli kotalela malamumalamu bindimeli na bango.—Baebele 11:1, 6.
Mpo na kosalisa bato mosusu bákóma na kondima motindo wana, basakoli ya nsango malamu na ekeke ya liboso bazalaki “kosalela Makomami mpo na kokanisa na bango elongo, bazalaki kolimbola mpe kopesa bavɛrsɛ mpo na kondimisa” makambo oyo bazalaki koteya. (Misala 17:1-3, NW) Ndenge malamu wana bazalaki kosala, elingi koloba kokanisa na bato elongo, ezalaki kosala ete bato ya mitema sembo bándima nsango na bango. Na ndakisa, bato mingi ya engumba Beloya, na etúká ya Makedonia “bayambaki liloba [ya Nzambe] na mposa makasi mpenza, mpe mokolo na mokolo bazalaki kotánga Makomami malamumalamu mpo na koyeba soki makambo yango [oyo Paulo na baninga na ye bazalaki koloba] ezalaki bongo.” (Misala 17:11, NW) Tosimbi makambo mibale ya ntina na vɛrsɛ yango. Ya liboso, bato ya Beloya bazalaki na mposa ya koyoka Liloba ya Nzambe; ya mibale, bandimaki kaka bindimela te ete makambo oyo bayokaki ezali solo, kasi bazalaki kotánga na kati ya Makomami. Misionɛrɛ Luka akumisaki mpenza bato ya Beloya mpo na elimo yango, alobaki ete bazali na “makanisi ya malamu.” Ozalaka na makanisi ya malamu ndenge wana mpo na makambo ya elimo?
Makanisi mpe motema esalaka elongo
Lokola tolobaki yango liboso, losambo ya solo esɛngaka kosalela makanisi mpe motema. (Malako 12:30) Tózonga lisusu na ndakisa oyo topesaki na lisolo ya liboso, ndakisa ya moto oyo apakoli langi oyo ebongi te na ndako moko. Soki alandaki malamumalamu ndenge nkolo-ndako alingaki, mbɛlɛ asalaki mosala na ye na elikya ete nkolo-ndako akosepela na yango. Ezali mpe bongo mpo na losambo na biso.
Yesu alobaki ete “basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:23, NW) Na bongo, ntoma Paulo akomaki ete: “Yango wana, . . . totiki kobondela mpo na bino te. Tokolɔmbaka ete bótonda na boyebi [ya solosolo, NW] ya mokano na ye, na mayele nyonso mpe na bososoli ya [elimo, NW]. Na bongo, bótambola na sembo ya Nkolo mpe bósepelisa ye na makambo nyonso.” (Bakolose 1:9, 10) “Boyebi ya solosolo” wana nde esalisaka bato ya sembo na komipesa na losambo na elikya nyonso mpamba te bazali “kosambela oyo [bayebi].”—Yoane 4:22.
Yango wana, Batatoli ya Yehova babatisaka te bana oyo babotami sika to mpe bato ya sika oyo bayekoli naino Makomami malamumalamu te. Yesu atindaki bayekoli na ye ete: “Bókende kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo natindaki bino.” (Matai 28:19, 20, NW) Moto azwaka ekateli ya malamu na makambo ya losambo se nsima ya koyekola Biblia mpe koyeba mokano ya Nzambe malamumalamu. Osalaka makasi mpo na kozwa boyebi wana ya solosolo?
Ndimbola ya Libondeli ya Nkolo
Mpo na komona bokeseni oyo ezali kati na koyeba mateya ya Biblia malamumalamu mpe koyeba yango likolólikoló, tótalela libondeli oyo ebengamaka Tata na Biso, to Libondeli ya Nkolo, oyo ezali na Matai 6:9-13.
Na bandako-nzambe, ebele ya bato basalaka mbala na mbala libondeli ya ndakisa oyo Yesu ateyaki. Kasi, bato boni bayebaka ndimbola na yango, mingimingi maloba na yango ya liboso oyo etali nkombo mpe Bokonzi ya Nzambe? Makambo yango ezali na ntina mingi, yango wana Yesu alobelaki yango liboso na libondeli yango.
Libondeli yango ebandaka boye: “Tata na biso oyo azali na Likoló, Nkombo na yo ezala mosantu.” Omoni ete Yesu alobaki ete tóbondelaka ete nkombo ya Nzambe ezala mosantu. Bato mingi bakoki komituna mituna mibale. Ya liboso, nkombo yango ezali nkombo nini? Mpe ya mibale, mpo na nini esengeli kosantisama?
Eyano na motuna ya liboso ezali na bisika soki 7 000 na kati ya Biblia na minɔkɔ oyo bakomaki yango na ebandeli. Moko na bisika yango ezali Nzembo 83:18 (NW), oyo elobi ete: “Mpo báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, kaka yo ozali Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” Exode 3:15 elobi mpo na nkombo ya Nzambe, Yehova, ete: “Oyo ezali nkombo na ngai lobiko na lobiko, mpe nakanisama bongo kino libota na libota.”a Kasi mpo na nini nkombo ya Nzambe, oyo yango moko mpenza ezali komonisa bopɛto mpe bosantu, esengeli kosantisama? Mpamba te babebisaki lokumu na yango banda kaka bato ya liboso bazalaki na bomoi.
Na elanga ya Edene, Nzambe ayebisaki Adama na Eva ete soki balei mbuma oyo apekisaki, bakokufa. (Genese 2:17) Satana alobaki makambo oyo ekeseni mpenza na oyo Nzambe alobaki, ayebisaki Eva ete: “Bino bokokufa solo te.” Na maloba mosusu, Satana alobaki ete Nzambe akosaki. Kasi asukaki wana te. Abebisaki mpe lokumu ya nkombo ya Nzambe na ndenge ayebisaki Eva ete Nzambe asalaki likambo oyo ezali sembo te, abombelaki bango makambo ya ntina mingi. “Mpo ete Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya yango, miso na bino [makofungwama], mpe bino bokozala [lokola] Nzambe, koyeba malamu na mabe.” Oyo ezali kobebisa lokumu ya Nzambe te?—Genese 3:4, 5.
Lokola balyaki mbuma oyo Nzambe apekisaki, Adama na Eva balandaki makanisi ya Satana. Kobanda wana, bato mingi, báyeba yango to te, bazali kobebisa lokumu ya nkombo ya Nzambe na ndenge bazali koboya malako na ye ya sembo. (1 Yoane 5:19) Bato bazali mpe kobebisa lokumu ya Nzambe na ndenge bazali kopesa ye foti mpo na bampasi na bango ata soki ezali mpo na makambo ya mabe oyo bango moko bazali kosala. Mokanda ya Batoli (Masese) 19:3 elobi ete: “Soki moto amitie na nzela ya mabe na bozoba na ye moko, akómaka koyokela Yawe kanda.” (Bible na Lingala ya lelo oyo) Sikoyo okangi ntina oyo Yesu, moto oyo alingaki mpenza Tata na ye, abondelaki ete nkombo na Ye ezala mosantu?
“Tiká Bokonzi na yo eya”
Nsima ya kobondela ete nkombo ya Nzambe esantisama, Yesu alobaki ete: “Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalama na nse [lokola] na Likoló.” (Matai 6:10) Tokoki kotuna mituna ete: ‘Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Mpe koya na yango ezali na boyokani nini na kokokisama ya mokano ya Nzambe awa na mabele?’
Na Biblia, liloba “bokonzi” elimbolaka libosoliboso “boyangeli ya mokonzi.” Yango wana, Bokonzi ya Nzambe elimboli boyangeli, to guvɛrnɛma ya Nzambe, na mabɔkɔ ya mokonzi oyo ye aponi. Mokonzi yango ezali nde Yesu Klisto oyo asekwaki, “Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo.” (Emoniseli 19:16; Danyele 7:13, 14) Mpo na Bokonzi ya Nzambe oyo apesi yango na Masiya na ye Yesu Klisto, mosakoli Danyele akomaki boye: “Na mikolo na mikonzi yango [elingi koloba baguvɛrnɛma ya bato oyo bazali koyangela lelo oyo,] Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko,” elingi koloba, mpo na libela.—Danyele 2:44.
Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele mobimba, ekolongola mabe nyonso mpe ekoumela “lobiko na lobiko,” elingi koloba, mpo na libela. Na bongo, Bokonzi ya Nzambe ezali nzela oyo Yehova abongisi mpo na kosantisa nkombo na ye, akozongisa lokumu na yango nyonso oyo ebebi mpo na lokuta ya Satana mpe ya bato mabe.—Ezekiele 36:23.
Lokola guvɛrnɛma nyonso, Bokonzi ya Nzambe ezali na bato oyo yango ekoyangela. Bato yango ezali banani? Biblia elobi boye: “Bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nzembo 37:11) Yesu mpe alobaki ete: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo mabele ekozala libula na bango.” Kasi, bato yango bayekolaki makambo ya Nzambe malamumalamu, oyo ezali moko ya makambo oyo esengeli mpo na kozwa bomoi.—Matai 5:5, NW; Yoane 17:3.
Kanisá soki mokili mobimba etondi na bato ya bopɔlɔ, bato ya boboto oyo balingaka mpenza Nzambe mpe balinganaka kati na bango! (1 Yoane 4:7, 8) Ezali yango nde Yesu asɛngaki na libondeli na ye ntango alobaki ete: “Tiká ete Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalama na nse [lokola] na Likoló.” Okangi sikoyo ntina oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ndenge yango? Kasi motuna oyo eleki ntina yango oyo: Soki makambo oyo libondeli yango elobeli ekokisami, okoki kokanisa ndenge oyo bomoi na yo ekokóma?
Ebele ya bato bazali kokanisa na kati ya Makomami
Yesu asakolaki ete mosala ya koteya bato makambo ya elimo ekosalema na mokili mobimba mpo na kosakola koya ya Bokonzi ya Nzambe. Alobaki boye: “Nsango Malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
Batatoli ya Yehova bazali soki milio motoba; bazali koyebisa bazalani na bango na mokili mobimba nsango malamu yango. Bazali kolendisa yo na “kotánga Makomami malamumalamu” mpe na nsima kokanisa mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali Nzambe mpe Bokonzi na ye. Soki osali yango, ekolendisa kondima na yo mpe ekopesa yo elikya ya bomoi na paladiso awa na mabele oyo “ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.”—Yisaya 11:6-9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Balimboli mosusu ya Biblia babongolaka yango “Yawe.” Kasi, babongoli mingi ya Biblia na mikolo na biso balongoli nkombo ya Nzambe na mabongoli na bango, mpe na esika na yango batii batitre lokola “Nkolo” to “Nzambe.” Soki olingi koyeba malamumalamu likambo etali nkombo ya Nzambe, tángá mwa buku Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Elilingi na lokasa 8]
TÓLANDA NDAKISA YA MOTEYI MONENE
Ntango Yesu azalaki koteya, mbala mingi azalaki na mitó ya likambo oyo azalaki kolobela. Na ndakisa, nsima ya lisekwa na ye, alimbwelaki bayekoli na ye mibale oyo bazalaki komitungisa na ntina na liwa na ye mokumba oyo azali na yango mpo na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Luka 24:27 elobi boye: “Abandaki na mikanda ya Mose na basakoli nyonso mpe alimbolaki mpo na bango makambo na ntina na ye mpenza na kati ya [Makomami] nyonso.”
Tomoni ete Yesu aponaki motó ya likambo moko—“ye mpenza,” Masiya—mpe na ntango azalaki kosolola na bango, alobaki makambo oyo ezali na kati ya “Makomami nyonso.” Yesu aponaki bavɛrsɛ ya Biblia oyo ebongi mpe alimbolaki yango mokomoko mpo na kosalisa bayekoli na ye bákanga ntina ya mateya ya solo. (2 Timote 1:13) Yango wana, makambo oyo alobaki esukaki kaka te na kofungola bango miso, kasi esimbaki mpe mitema na bango. Lisolo yango elobi na biso boye: “Balobanaki bango na bango ete: ‘Motema na bino ezikaki te ntango azalaki koloba na biso na nzela, ntango azalaki kofungolela biso Makomami polele?’ ”—Luka 24:32, NW.
Na mosala na bango ya kosakola, Batatoli ya Yehova basalaka makasi ete bálanda ndakisa ya Yesu. Basalelaka mingimingi mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? mpe buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko mpo na koyekola na bato. Mikanda yango ezali na ebele ya mitó ya makambo oyo esepelisaka bato, na ndakisa: “Nzambe azali nani?,” “Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?,” “Lolenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?,” “Oyo ezali mikolo ya nsuka!,” mpe “Ndenge nini kotonga libota oyo ezali kokumisa Nzambe.” Liteya mokomoko ezali na ebele ya bavɛrsɛ ya Makomami.
Tolendisi yo oluka Batatoli ya Yehova na esika oyo ofandi to okoma mokanda na adresi oyo ezali na lokasa 2 ya zulunalo oyo mpo báya koyekola na yo Biblia ofele; na boyekoli yango bokotalela mitó ya makambo oyo touti kotánga mpe mitó ya makambo mosusu.
[Elilingi]
Tózalaka na masolo oyo ezali mitó ya makambo mpo na kosimba motema ya moto oyo tozali koyekola na ye
[Bililingi na lokasa 7]
Ozali koyeba ndimbola ya libondeli ya ndakisa oyo Yesu ateyaki?
“Tata na biso oyo azali na Likoló, Nkombo na yo ezala mosantu . . . ”
“Tiká Bokonzi na yo [oyo opesi na mabɔkɔ ya Masiya] eya, . . . ”
“Tiká mokano na yo esalama na nse [lokola] na Likoló”