Ndimbola ya nyama mabe mpe ya elembo na yango
OSEPELAKA na lisano ya kolimbola mabombami? Mpo na kosala yango, olukaka bilembo oyo ekosalisa yo na kozwa ndimbola. Na kati ya Liloba na ye, Nzambe apesi biso bilembo oyo esengeli mpo na koyeba ndimbola ya motángo 666, oyo ezali nkombo to elembo ya nyama mabe oyo elobelami na Emoniseli mokapo 13.
Na lisolo oyo, tokotalela makambo minei ya ntina, to bilembo, oyo ekosalisa biso na koyeba ndimbola ya elembo ya nyama. Tokotalela (1) ndenge baponaki bankombo mosusu oyo ezali na Biblia, (2) soki nyama mabe elimboli nini, (3) ntina oyo motángo 666 ezali “motángo ya moto,” mpe (4) ndimbola ya motuya 6 mpe mpo na nini bakomi yango mbala misato, to 600 bakisá 60, bakisá lisusu 6, oyo epesi motángo 666.—Emoniseli 13:18.
Bankombo oyo ezali na Biblia ezali na ndimbola
Bankombo mingi oyo ezali na Biblia ezalaka na ndimbola, mingimingi, soki Nzambe nde apesaki yango. Na ndakisa, lokola Abalama asengelaki kokóma tata ya bikólo mingi, Nzambe abongolaki nkombo na ye na Abalayama, elingi koloba “Tata ya ebele ya bana.” (Genese 17:5, NW; maloba na nse ya lokasa) Nzambe ayebisaki Yozefe ná Malia ete bábenga mwana oyo Malia akobota Yesu, nkombo oyo elimboli “Yehova azali lobiko.” (Matai 1:21, maloba na nse ya lokasa; Luka 1:31) Na boyokani na ndimbola ya nkombo wana, Yehova apesi bato libaku ya kozwa lobiko na nzela ya mosala ya Yesu mpe ya liwa na ye lokola mbeka.—Yoane 3:16.
Na bongo, motángo 666, nkombo oyo Nzambe apesi, esengeli komonisa bizaleli oyo Nzambe azali komona epai ya nyama yango. Nzokande, mpo na koyeba yango, tosengeli naino koyeba nyama yango mpe misala na yango.
Nyama emonisami polele
Mokanda ya Danyele ezali kosalisa biso mingi na koyeba ndimbola ya banyama ya elilingi. Mokapo 7 ezali kolobela “banyama minei ya minene”—nkɔsi, ngombolo, nkoi, mpe nyama mosusu ya nsɔmɔ oyo ezali na mino ya ebende. (Danyele 7:2-7) Danyele alobi ete banyama yango bazali komonisa “bakonzi,” to bikonzi ya politiki, oyo ezali kolandana na koyangela bikólo minene.—Danyele 7:17, 23.
Buku moko (The Interpreter’s Dictionary of the Bible) elobi ete nyama ya Emoniseli 13:1, 2 “ezali yango moko na makambo nyonso ya banyama minei ya emonaneli ya Danyele . . . Na bongo, nyama wana ya liboso [ya Emoniseli] ezali elilingi ya biyangeli ya politiki ya mokili mobimba oyo ezali kotɛmɛla Nzambe.” Emoniseli 13:7 endimisi likanisi yango, mpamba te elobi mpo na nyama yango boye: “Bapesaki ye bokonzi likoló ya mabota nyonso mpe ya mikili nyonso mpe ya minɔkɔ nyonso mpe ya bikólo nyonso.”a
Mpo na nini Biblia esaleli banyama lokola elilingi ya biyangeli ya bato? Mpo na bantina soki mibale. Ya liboso, ezali mpo ete banda kala, biyangeli yango ezali kosopa makila ya ebele ya bato na bonyama mpenza. Will ná Ariel Durant, bato ya mayele na makambo ya kala, bakomaki boye: “Bitumba ezali moko ya makambo oyo esilaka te mpe ekiti te atako mokili ekei liboso na makambo mingi to atako demokrasi ekɔti.” Emonani mpenza ete ‘moto azali na bokonzi likoló ya mosusu mpo na kopesa ye mpasi’! (Mosakoli 8:9) Ntina ya mibale ezali ete “dalagona [Satana] apesaki nyama yango nguya na ye mpe kiti na ye ya bokonzi mpe bokonzi monene.” (Emoniseli 12:9; 13:2) Yango wana, biyangeli ya bato ezali ebongiseli ya Zabolo mpe ezali komonisa elimo na ye ya bonyama, to ya dalagona.—Yoane 8:44; Baefese 6:12.
Kasi, yango elingi koloba te ete mokonzi mokomoko azalaka mosaleli ya Satana. Kutu, soki totali makambo na ndenge mosusu, bakonzi ya mokili bazali ‘baministre ya Nzambe’; basalaka ete makambo etambola na molɔngɔ na kati ya bato. Lisusu, bakonzi mosusu babundelaki ntomo ya bato, ata mpe ntomo ya kosambela Nzambe ya solo—likambo oyo Satana asepelaka na yango te. (Baloma 13:3, 4; Ezela 7:11-27; Misala 13:7) Atako bongo, lokola elimo ya Satana ezali kosala, moto moko te, to mpe ebongiseli moko te ya bato elongi kopesa bato kimya ya solo.b—Yoane 12:31.
“Motángo ya moto”
Likambo ya misato oyo ekosalisa biso na koyeba ndimbola ya motángo 666 ezali ete ezali “motángo ya moto.” Ebengeli yango ekoki kozala mpo na moto moko boye te, mpamba te Satana nde azali na bokonzi likoló ya nyama yango, kasi moto te. (Luka 4:5, 6; 1 Yoane 5:19; Emoniseli 13:2, 18) Nzokande, lokola balobi ete nyama yango ezali na “motángo ya moto,” to elembo, emonisi ete ezali ebongiseli ya bato, kasi ya bilimo to bademo te; yango wana, ezali na makambo mosusu ya bato. Ekoki kozala makambo nini? Biblia epesi eyano oyo: “Bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Baloma 3:23) Na bongo, lokola nyama yango ezali na “motángo ya moto” emonisi ete biyangeli ezali na ezaleli ya bato, elingi koloba lisumu mpe kozanga kokoka.
Makambo oyo eleká ezali komonisa yango. Henry Kissinger, secrétaire d’État ya kala ya États-Unis, alobaki boye: “Bibongiseli nyonso oyo bato basalá esukaki kaka na kokwea. Lisolo ya bato etondi na makambo oyo ezali komonisa milende oyo bato basalaki kasi elongaki te, bamposa oyo bazalaki na yango, kasi ekokisamaki te . . . Yango wana, moto nyonso oyo ayekolaka makambo ya kala ayebaka ete nsukansuka, likama ekoya kaka.” Maloba wana ya bosembo oyo Kissinger alobaki ezali kondimisa solo oyo Biblia elobá: “Nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.”—Yilimia 10:23.
Sikoyo, lokola toyebi nyama yango mpe ndenge oyo Nzambe atalelaka yango, tokoki kotalela likambo ya nsuka ya libombami oyo tozali koluka koyeba: motángo 6 mpe ntina oyo bakomi yango mbala misato, elingi koloba 666, to 600 bakisá 60 bakisá lisusu 6.
Mpo na nini motoba ezongelami mbala misato?
Na Biblia, mitángo mosusu ezalaka na ndimbola. Na ndakisa, mbala mingi motángo nsambo emonisaka eloko ya mobimba, to ya kokoka, na miso ya Nzambe. Na ndakisa, pɔsɔ ya bozalisi ezali na ‘mikolo’ to bileko milai nsambo oyo, na boumeli na yango Nzambe akelaki biloko nyonso oyo akanaki kosala awa na mabelé. (Genese 1:3–2:3) “Maloba” ya Nzambe ezali lokola palata oyo “elangolami mbala nsambo,” elingi koloba epɛtolami malamumalamu. (Nzembo 12:6; Masese 30:5, 6) Bayebisaki Namana, moto ya maba, ete asukola mbala nsambo na Ebale Yolodani mpe maladi na ye esilaki nyonso.—2 Mikonzi 5:10, 14.
Motoba ezali nsambo longolá moko. Emonani ete ezali elilingi ebongi mpenza mpo na komonisa eloko oyo ezangi kokoka, to oyo ezali na mbeba na miso ya Nzambe! (1 Ntango 20:6, 7) Lisusu, soki bakomi motángo yango mbala misato, elingi koloba 666, ezali mpo na komonisa kozanga kokoka yango malamumalamu. Likambo endimisi biso ete yango nde ndimbola ya malamu ezali ete motángo 666 ezali “motángo ya moto,” ndenge toutaki koloba liboso. Na yango, makambo ya nyama, to “motángo ya moto” oyo bapesi nyama yango, ná yango moko motángo 666, nyonso ezali komema biso na likanisi se moko: kozanga kokoka mpe kokwea na miso ya Yehova.
Ndenge oyo balobeli kozanga kokoka ya nyama etindi biso tókanisa makambo oyo balobaki mpo na Belesasala, mokonzi ya Babilone ya kala. Na nzela ya Danyele, Yehova alobaki na mokonzi yango boye: “Omekami na emekeli ya bozito, mpe ozwami na kozanga.” Na butu wana kaka Belesasala abomamaki, mpe Babilone, oyo ezalaki ekólo ya nguya, ekweaki. (Danyele 5:27, 30) Ndenge moko mpe, Nzambe akoboma biyangeli ya politiki oyo emonisami na elilingi ya nyama mpe bato nyonso oyo bazali na elembo na yango, oyo ezali komonisa ete bazali nsima na yango. Kutu, na mbala yango, Nzambe akosuka kaka te na koboma ebongiseli ya politiki, kasi akosukisa mpe boyangeli ya bato. (Danyele 2:44; Emoniseli 19:19, 20) Yango wana, esengeli mpenza tóboya kozala na elembo ya nyama mpamba te baoyo bazali na yango bakobomama!
Elembo ya nyama elimbolami
Nsima ya kolobela motángo 666, mokanda ya Emoniseli elobeli bayekoli 144 000 ya Mwana ya Mpate, Yesu Klisto, oyo bazali na nkombo na ye mpe nkombo ya Tata na ye, Yehova, ekomami na bilongi na bango. Baoyo bazali na nkombo yango bazali bato ya Yehova mpe ya Mwana na ye, bazali koyoka nsɔni te kotatola mpo na bango. Baoyo bazali na elembo ya nyama bazali mpe kosakola ete bazali baombo na yango. Na bongo, soki moto azali na elembo ya nyama na lobɔkɔ ya mobali to na elongi, yango ezali elilingi oyo ezali komonisa ete azali kosambela ebongiseli ya politiki ya mokili. Baoyo bazali na elembo yango bazali kopesa na “Kaisala” oyo ezali ya Nzambe. (Luka 20:25; Emoniseli 13:4, 8; 14:1) Na ndenge nini? Na ndenge bazali kokumisa—tóloba ata kosambela—ekólo, bilembo na yango, mpe basoda na yango mpe bibundeli na bango, bazali kotyela yango elikya mpe kokanisa ete ekobikisa bango. Losambo na bango epai ya Nzambe ya solo ezali kaka ya maloba.
Nzokande, Biblia elobi na biso boye: “Ndimelá bana ya mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te. Soki [elimo, NW] ekolongwa, moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.” (Nzembo 146:3, 4) Baoyo balandaka toli malamu wana bayokaka motema mpasi te ntango baguvɛrnema ekokisi bilaka na yango te to ntango bakonzi oyo bato bazalaki kotyela motema balongwe.—Masese 1:33.
Yango elingi koloba te ete baklisto ya solo batalaka kaka makambo na miso mpe basalaka eloko te mpo na mpasi ya bato. Kutu, balɛmbaka te kosakola guvɛrnema kaka moko oyo ekosilisa mikakatano ya bato: Bokonzi ya Nzambe, oyo bazali bamonisi na yango.—Matai 24:14.
Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato
Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, azalaki kosakola libosoliboso Bokonzi ya Nzambe. (Luka 4:43) Na libondeli oyo ateyaki lokola ndakisa, oyo ebengamaka Libondeli ya Nkolo, Yesu alakisaki bayekoli na ye bábondelaka ete Bokonzi yango eya mpe mokano ya Nzambe esalema awa na mabelé. (Matai 6:9, 10) Bokonzi yango ezali guvɛrnema oyo ekoyangela mabelé mobimba; mboka-mokonzi na yango ekozala awa mabelé te, ekoyangela nde longwa na likoló. Yango wana, Yesu abengaki yango “bokonzi ya likoló.”—Matai 11:12.
Soki Yesu Klisto te, moto oyo akufaki mpo na bato na ye, nani mosusu abongi kozala Mokonzi ya Bokonzi yango? (Yisaya 9:6, 7; Yoane 3:16) Etikali moke Mokonzi yango oyo azali moto ya kokoka mpe azali sikoyo na nzoto ya elimo mpe na nguya mingi, abwaka nyama, ná bakonzi na yango, mpe basoda na yango na “laki ya mɔtɔ oyo ezali kopela na sufulu,” oyo ezali elilingi ya kobomama ya seko. Kasi, ekosuka wana te. Yesu akoboma mpe Satana, likambo oyo moto moko te akoki kosala.—Emoniseli 11:15; 19:16, 19-21; 20:2, 10.
Bokonzi ya Nzambe ekotya kimya mpo na bato nyonso oyo yango ekoyangela. (Nzembo 37:11, 29; 46:8, 9) Mawa, mpasi mpe liwa ekozala lisusu te. Talá elikya kitoko mpo na bato oyo bazali na elembo ya nyama te!—Emoniseli 21:3, 4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bavɛrsɛ yango elimbolami na molai na buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, mokapo 28, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Atako baklisto ya solo bayebi ete mbala mingi biyangeli ya bato esalaka makambo na bonyama, batosaka “bakonzi oyo bazali liboso” ndenge Biblia esɛngi. (Baloma 13:1) Kasi, soki bakonzi yango basɛngi bango makambo oyo mibeko ya Nzambe epekisi, ‘batosaka Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.’—Misala 5:29.
[Etanda na lokasa 5]
Bilembo mpo na koyeba ndimbola ya motángo 666
1. Mbala mingi, bankombo oyo ezali na Biblia emonisaka bizaleli ya bankolo na yango to elimbolaka likambo moko na bomoi na bango, na ndakisa Abalayama, Yesu, mpe bato mingi mosusu. Ndenge moko mpe, motángo ya nyama ezali komonisa bizaleli na yango.
2. Na mokanda ya Danyele, banyama ezali bililingi ya bikonzi to biyangeli ya bato. Nyama ya Emoniseli 13:1, 2 ezali elilingi ya ebongiseli ya politiki ya mokili mobimba, oyo Satana apesi yango nguya na ye mpe ye moko azali kotambwisa yango.
3. Lokola nyama ezali na “motángo ya moto,” emonani ete ezali ebongiseli ya bato, kasi ya bademo te. Na yango, ezali komonisa bolɛmbu ya bato mpo na lisumu mpe kozanga kokoka.
4. Na miso ya Nzambe, motángo 6 ezali komonisa kozanga kokoka, mpamba te ezali na nse ya motángo 7 oyo, na Biblia, elimboli eloko ya mobimba to ya kokoka. Elembo 666 ezongeli motángo 6 mbala misato komonisa kozanga kokoka yango malamumalamu.
[Bililingi na lokasa 6]
Boyangeli ya bato ekoki makambo te, ebongi mpenza emonisama na motángo 666
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mwana azali konyokwama na nzala: NATIONS UNIES/Fɔtɔ ya F. GRIFFING
[Bililingi na lokasa 7]
Yesu Klisto akotya boyangeli ya kokoka awa na mabelé