Mokapo 28
Etumba mpo na kotemela nyama mabe mibale
Emonaneli 8—Emoniseli 13:1-18
Teme: Nyama na yauli na mitó nsambo, nyama na yauli na maseke mibale mpe elilingi na nyama na yauli
Eleko na kokokana na yango: Uta ntango na Nimirode kino bolozi monene
1, 2. (a) Yoane alobi nini na ntina na dalagona? (b) Ndenge nini Yoane alobeli, na maloba na elilingi, lisangá oyo dalagona azali kosalela mpe oyo ezali komonana?
DALAGONA monene abwakamaki na mabelé; mpe lokola boyekoli na biso ya Emoniseli esalisi biso kokanga ntina na yango polele, ezala ye Nyoka, ezala badémo na ye, bakozwa lisusu ndingisa te ya kozonga na likoló. Kasi nyoka yango akufi naino te, “oyo abyangami Diable mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba.” Yango wana lisolo elandi na koyebisaka sikisiki mpenza na nzela nini azali kobundisa ‘mwasi mpe libota na ye’. (Emoniseli 12:9, 17) Yoane alobi boye na ntina na dalagona, to nyoka: “Mpe atelemi na libongo na mai monene.” (Emoniseli 12:17b) (13:1a, MN) Totalela bongo eloko nini dalagona azali kosalela.
2 Satana mpe badémo na ye bazali lisusu kuna na makolo ya bosantu te. Bilimu mabe wana balongolamaki kuna mpe babwakamaki zongazonga na mabelé. Tala ntina mpo na yango bato mingi na ntango na biso bazali kosambela bilimu mabe. Nyoka na mayele mabe azali ntango nyonso kotambwisa lisangá ya elimo esili kobeba, kasi azali mpe kosalela lisangá oyo ezali komonana mpo na kozimbisa bato? Tala eyano ya Yoane: “Namonaki nyama kobima na mai monene. Azalaki na maseke zomi, na mitó na ye nkombo na kotuka. Nyama oyo namoni azalaki na motindo na nkoi, makolo na ye lokola makolo na ngombolo, mpe monoko na ye lokola monoko na nkosi. Dalagona apesi ye nguya na ye, na kiti na bokonzi na ye, na bokonzi monene.”—Emoniseli 13:1, 2.
3. (a) Banyama nini ya mabe mosakoli Danyele amonaki yango na emonaneli? (b) Banyama minene oyo elobelami na mokapo 7 ya mokanda ya Danyele elakisi nini?
3 Nyama oyo ya nsomo ezali nini? Biblia yango moko ekopesa ndimbola na yango. Liboso ete Babilone ekwea na mobu 539 liboso na ntango na biso, mosakoli Moyuda Danyele azwaki mpe bimonaneli na banyama mabe. Kati na esakweli na ye, mokapo 7, nzela ya kotanga 2 kino 8, alobi mpo na nyama minei ebimaki na mai; ya liboso ezalaki lokola nkosi, ya mibale lokola ngombolo (ours), ya misato lokola nkoyi, mpe “tala, nyama na minei azalaki na nsomo mpe na mabe mpe na nguya eleki nyonso . . . azalaki na maseke zomi.” Nyama yango ezali na bilembo bikokani na nyama oyo Yoane amonaki pene na mobu 96 ya ntango na biso. Mpamba te, nyama yango mpe ezali na bilembo na nkosi, na ngombolo mpe na nkoyi; azali mpe na maseke zomi. Nzokande, nyama minene oyo Danyele amonaki elimboli nini? Ye moko alobi na biso boye: “Banyama minene minei oyo bazali mikonzi minei bakobima na mokili.” (Danyele 7:17) Ya solo, nyama oyo elakisi “mikonzi” to biyangeli makasi ya politike awa na mabelé.
4. (a) Mpate mobali mpe ntaba mobali oyo elobelami na mokapo ya 8 ya mokanda ya Danyele elakisi nini? (b) Likambo oyo ete liseke monene na ntaba mobali ebukanaki, mpe mosusu minei ebimaki na esika na yango, elakisaki nini?
4 Kati na emonaneli mosusu, Danyele amonaki mpate mobali na maseke mibale abomami na ntaba mobali oyo azalaki na liseke moko monene. Anzelu Gabriele alimboli ye ntina na bililingi wana na nyama na maloba oyo: “Mobali na mpate . . . elakisi mikonzi na Medesi mpe na Pelese. Mpe mobali na ntaba elakisi mokonzi na Gelese.” Na nsima Gabriele asakolaki ete liseke monene na ntaba mobali ekobukana mpe maseke minei makobima na esika na yango. Ezali yango esalemaki mibu 200 na nsima, ntango Alexandre le Grand akufaki mpe bokonzi na ye ekabwanaki na bikonzi minei oyo biyangelamaki na bato minei, mikóló na basoda na ye.—Danyele 8:3-8, 20-25.a
5. (a) Pesa ndimbola na liloba na greke oyo ebongolami na liloba nyama. (b) Nyama na yauli, oyo elobelami na Emoniseli 13:1, 2, mpe mitó na yango nsambo, elimboli nini?
5 Ezali bongo polele ete Mokomisi na Biblia, mokanda mopemami na Nzambe, azali kotalela bikonzi ya politike awa na mabelé lokola banyama. Nyama ya motindo nini? Molimboli moko abengi yango “nyama na yauli,” nyama oyo elobelami na Emoniseli 13:1, 2, mpe na nsima abakisi: “Tozali kososola ndimbola nyonso ya θηρίον [thêrion, liloba ya greke mpo na “nyama”], lokola ete elima mabe, mobomi bato, nyama ya nsomo, nyama mabe ya zamba, bongo na bongo.”b Solo, liloba yango ekokani na ebongiseli ya politike ebebisami na makila, na nzela na yango Satana azali koyangela mokili! Mitó nsambo ya nyama mabe yango elakisi nguya motoba ya mokili mobimba oyo elandanaki kati na lisolo ya Biblia kino na mikolo na Yoane (Ezipito, Asulia, Babilone, Médo-Perse, Grèce mpe Rome), bakisa nguya ya nsambo ya mokili mobimba oyo, engebene esakweli, esengelaki kobima nsima.—Tala Emoniseli 17:9, 10.
6. (a) Mitó nsambo na nyama na yauli esalaki mpenza nini? (b) Ndenge nini Jéhovah asalelaki bokonzi ya Rome mpo na kokokisa ekateli na ye likoló na ebongiseli ya biloko ya Bayuda, mpe nini ekomelaki baklisto ya Yelusaleme?
6 Solo, longola oyo nsambo, nguya mosusu ya mokili mobimba ezalaki na boumeli ya Lisolo ya bato; emonisami mpe na likambo oyo ete nyama na yauli oyo Yoane amonaki azalaki na nzoto longola mitó na ye nsambo mpe maseke na ye zomi. Nzokande, mitó nsambo elakisi nguya nsambo ya mokili oyo elekaki makasi, mpe mokomoko na yango enyokolaki libota ya Nzambe. Na mobu 33, Rome ezalaki mokili elekaki nguya na mikolo wana, mpe Satana asalelaki motó wana mpo na koboma Mwana na Nzambe. Bobele na eleko wana moko, Nzambe abwakaki ebongiseli na biloko na Bayuda mpo ete bazalaki na botosi te, mpe na mobu 70 apesaki nzela na bokonzi ya Rome ete ekokisa ekateli na ye likoló na libota yango. Nzokande, esengo mpo na Yisraele na Nzambe, lisangá ya baklisto bapakolami, mpamba te bango basilaki kokebisama; baklisto oyo bazalaki kofanda na Yelusaleme mpe na Yuda bakimaki mpo na kokende komibomba kuna na ngambo mosusu na Yordani.—Matai 24:15, 16; Bagalatia 6:16.
7. (a) Nini esengelaki kosalama, wana ekomaki eleko na kosukisa biloko na ntango oyo mpe mokolo na Nkolo ekokaki? (b) Motó ya nsambo ya nyama na yauli oyo elobelami na Emoniseli 13:1, 2 elakisi nini?
7 Nzokande, pene na nsuka na ekeke ya liboso ya ntango na biso, mingi kati na basangani na lisangá oyo ya ebandeli batikaki solo; blé ya solo ya boklisto, “bana ya bokonzi,” emelamaki na matiti mabe, “bana na oyo mabe.” Kasi wana ekomaki eleko na kosukisa biloko na ntango oyo, baklisto bapakolami babimaki lisusu lokola etuluku ebongisami. Na boumeli na mokolo na Nkolo, bayengebene basengeli ‘kongenga lokola moi.’ Lisangá ya boklisto ebongisamaki bongo mpo na mosala oyo basengelaki kosala. (Matai 13:24-30, 36-43) Na eleko yango, Bokonzi ya Loma ezalaki lisusu te. Ezalaki bokonzi monene ya britannique mpe bokonzi ya nguya ya Etats-Unis d’Amérique nde ezwaki esika ya liboso kati na mokili mobimba. Mikili mibale oyo misangani mpo na kobimisa nguya ya mokili mobimba, emonani ete ezali motó ya nsambo ya nyama na yauli.
8. Mpo na nini ezali efingeli te na komona ete nguya ya Anglo-Ameriké elakisami na motindo na nyama?
8 Ezali kofinga te na kokokisa bikonzi na politike na nyama na yauli? Na boumeli na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, banguna mosusu ya ba Témoins de Jéhovah balobaki bongo, ntango wana lotomo ya Batemwe, mokomoko to lokola etuluku, endimamaki te na batribinale, mpe yango, kati na mokili mobimba. Nzokande mabota ya mokili bango moko bakoponaka banyama ete ezala bilembo ya bikolo na bango. Ndakisa nkosi mpo na bokonzi ya britannique, mpongo to ndeke aigle mpo na Amerike, dragon mpo na Chine. Na yango, mpo na nini bato bakooka mabe na komona ete Mokomisi na Biblia Mosantu, ye mpe asaleli banyama lokola bilembo ya bikonzi ya nguya na mokili mobimba?
9. (a) Mpo na nini tokoki kokamwa te na koyoka ete, engebene Biblia, ezali Satana nde apesi na nyama na yauli bokonzi monene oyo azali na yango? (b) Satana azali nani engebene Biblia, mpe bopusi nini azali na yango likoló na biyangeli?
9 Epai mosusu, mpo na nini komona mabe na koyoka ete, engebene Biblia, ezali Satana nde apesi na nyama na yauli bokonzi monene? Nzambe ye moko nde alobi yango; nzokande, na miso na ye, ‘mabota mazali lokola litanga ya mai kati na kantini mpe lokola mwa putulu.’ Ebongi ete mabota baluka ndenge nini bakoki kondimama epai na Nzambe, na esika ete basilika mpo na lolenge oyo Liloba na ye ya esakweli ezali komonisa bango. (Yisaya 40:15, 17; Nzembo 2:10-12) Satana azali lisapo ya mpamba te, lokola bakolobaka ete azali monyokoli na milimo na bawei kati na mɔ́to ya lifelo; nzokande, esika motindo wana ezali mpe te. Makomami mazali nde kolakisa Satana ete azali “anzelu ya kongenga,” mokosi monene oyo azali na bopusi na nguya likoló na makambo nyonso ya politike.—2 Bakolinti 11:3, 14, 15; Baefese 6:11-18.
10. (a) Na ndimbola nini motolé ezalaki likoló na liseke mokomoko kati na maseke zomi? (b) Maseke zomi mpe mitolé zomi elakisi nini?
10 Nyama na yauli azali na maseke zomi likoló na mitó na ye nsambo. Ekoki kozala ete mitó minei mizali na liseke mokomoko mpe mitó mosusu misato mizali na maseke mibalemibale. Epai mosusu, na maseke yango ezali na mitolé zomi. Motuya na maseke na nyama na nsomo oyo elobelami na mokanda na Danyele ezali se ndenge ekomami. Na motindo yango, maseke mibale na mpate mobali elakisaki bokonzi ya mokili mobimba oyo mikili mibale, Medese mpe Pelese basanganaki na yango. Mpo na oyo etali maseke minei ya ntaba mobali, yango elakisaki bikonzi minei oyo bibimaki na Bokonzi makasi ya greke, oyo Alexandre le Grand azalaki mokonzi na yango. (Danyele 8:3, 8, 20-22) Nzokande, mpo na maseke oyo Yoane amoni likoló na nyama, emonani lokola ete motuya zomi ezali ya elilingi. (Tala Danyele 7:24; Emoniseli 17:12.) Maseke yango elakisi motuya mobimba na biyangeli na mokili oyo esali lisangá mobimba ya politike ya Satana. Nyonso ezali na yauli mpe na mabe mingi, kasi lokola emonisami na mitó nsambo, bobele nguya mokomoko nde ezalaki kobima, mpo na koleka mosusu nyonso na mokili mobimba. Bobele bongo, mitolé zomi emonisi ete biyangeli yango nyonso bizali na bokonzi na eleko moko elongo na ekolo oyo ezali nguya ya mokili mobimba na eleko yango.
11. Likambo oyo ete nyama na yauli azalaki “na nkombo na kotuka na mitó na ye” elakisi nini?
11 Nyama na yauli azali na “nkombo na kotuka na mitó na ye,” elimboli ete na makambo azali koloba, azali mpenza kotyola Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto. Alukaki kokokisa mikano na ye ya politike na kolobaka ete azali kosala na nkombo na Nzambe mpe na Klisto; asalaki boyokani na losambo ya lokuta, kino kopesa nzela na bakonzi ya mangomba ete basangana na misala na ye ya politike. Na ndakisa, na Angleterre, ba episkopo bazali na bisika kuna na Parlemá. Na France mpe na Italie, ezalaki na ba Kardinale ya katolike oyo bazalaki na molongo ya liboso mpenza kati na makambo ya politike ya mboka na bango na kala, mpe na bambula eleki, basango mosusu kuna na Amérique ya nse bandimaki kosala misala kati na politike. Biyangeli mosusu ezali kokoma maloba lokola oyo “TOTII ELIKYA NA BISO NA NZAMBE,” likoló na nkasa ya mosolo oyo bazali kobimisa; mpe na bibende ya misolo na bango bazali kokoma maloba mpo na komonisa ete batambwisi na bango bandimami na Nzambe, ete baponami “na ngolu na Nzambe.” Nyonso oyo ezali solo kotuka to kofinga Nzambe. Kosalaka bongo, bazali komeka kokotisa Nzambe kati na makambo na bango ya politike mpe ya nationaliste ya mbindo.
12. (a) Na ndimbola nini nyama na yauli abimi na “mai monene,” mpe ntango nini abandaki kobima? (b) Na motindo nini dalagona apesi bokonzi na ye monene na nyama na yauli na elilingi?
12 Nyama na yauli abimi na mai monene, elembo ekoki mpo na kolakisa bibele na bato na yikiyiki na nzela na yango biyangeli na bato bizali kobotama. (Yisaya 17:12, 13) Nyama na yauli oyo ebandaki kobima na mai monene na mikolo na Nimerode (pene na ekeke ya ntuku mibale na moko liboso na ntango na biso), ntango wana, nsima na mpela, ebongiseli moko ebimaki oyo ezali kotemela Jéhovah. (Genese 10:8-12; 11:1-9) Kasi oyo ya nsuka kati na mitó nsambo ya “nyama” yango emonanaki polele bobele na boumeli ya mokolo ya Nkolo. Epai mosusu, ezali dalagona nde apesi na nyama “nguya na ye, na kiti na bokonzi na ye, na bokonzi monene.” (Tala Luka 4:6.) Nyama ezali bongo ebongiseli ya politike oyo Satana asali yango kati na bato. Satana azali solo “mokonzi na mokili oyo.”—Yoane 12:31.
Mpota na kufa
13. (a) Mpasi nini ezwaki nyama na yauli na ebandeli na mokolo na Nkolo? (b) Na ndimbola nini nyama na yauli mobimba ezwaki mpasi mpo na mpota na kufa oyo moko kati na mitó na yango ezokaki?
13 Pene na ebandeli na mokolo na Nkolo, mpasi ezwaki nyama na yauli. Yoane alobi: “Moko na kati na mitó na ye ezalaki lokola soko ezokaki kino kufa, nde mpota na ye na kufa ebikaki. Mokili mobimba ekamwi mpe elandaki nyama na yauli.” (Emoniseli 13:3) Engebene verset oyo, mpota na kufa ezwaki motó moko ya nyama na yauli, kasi verset 12 emonisi lokola ete mpasi ya mpota wana ezwaki nyama yango nyonso mobimba. Mpo na nini? Tomikundola ete mitó na nyama yango eyangelaki nyonso nzela moko te; moko na moko ezwaki likelemba na yango, kosalaka na lolendo epai na bato nyonso mpe mingimingi mpo na kotemela libota na Nzambe. (Emoniseli 17:10) Na yango, na ebandeli na mokolo na Nkolo, bobele motó moko, oyo ya nsambo, nde ezalaki koyangela lokola nguya ya mokili mobimba. Mpota na kufa oyo motó yango ezwaki esalaki mpasi na nyama na yauli mobimba.
14. Ntango nini nyama azokaki mpota ya kufa, mpe soda moko alobaki nini mpo na bopusi oyo yango esalaki likoló na nyama na yauli?
14 Mpota na kufa ezalaki nini? Elobelami mwa mosika ete ezalaki mpota na mopanga; nzokande, mopanga ezali elilingi ya etumba. Mpota na mopanga, oyo motó wana ezokaki na ebandeli na mokolo na Nkolo, ekokani na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, etumba oyo ebebisaki mpe elembisaki nyama na yauli na politike oyo etambwisami na Satana. (Emoniseli 6:4, 8; 13:14) Na ntina na mpasi ebimisamaki na etumba yango, tala maloba ya Maurice Genevoix, oyo azalaki mokonzi moko ya basoda na boumeli na etumba yango: “Bato nyonso bandimi ete, na kati na lisolo mobimba ya bato, ezali na badate mingi te oyo ezwaki ntina monene lokola date oyo ya le 2 Août 1914. Naino na Mpoto, mpe nsima na yango tokoki koloba ete mokili mobimba bamikotisaki kati na likambo oyo ya nsomo. Boyokani nyonso, mitinda ya bizaleli malamu, miboko nyonso ezalaki kolenga; bobele na mwa ntango moke, nyonso etikamaki pembeni. Likambo yango elekaki nyonso oyo ekokaki kokanisama. Elekaki ndelo, etondaki na mobulu, ezalaki na nsomo mabe, ezali kino lelo koningisa biso.”—Maurice Genevoix, membre de l’Académie française, maloba mazwami na mokanda Promesse de grandeur (angl.), 1968.
15. Ndenge nini motó ya nsambo ya nyama na yauli ezokaki mpota ya kufa?
15 Etumba yango ezalaki mpasi mingi mpo na motó ya nsambo ya nyama na yauli oyo ezalaki koyangela na mikolo wana. Grande-Bretagne mpe mikili misusu ya Mpoto bakufelaki ebele ya bilenge mibali na bango. Na 1916, bobele na etumba moko oyo babundaki zongazonga na ebale ebengami la Somme, kati na basoda koleka milió moko oyo bazokaki to bakufaki, 420 000 bazalaki ya Grande-Bretagne, soki 194 000 ya France mpe 440 000 ya Allemagne. Grande-Bretagne mpe mikili misusu ya Mpoto mibebisamaki mingi na makambo matali nkita. Boyangeli monene ya Britannique etengatengaki mpo na mpota yango, mpe kino lelo abika na yango mpenza mobimba te. Na ntembe te, etumba yango, oyo mikili 28 ya ntina basanganaki na yango, eningisaki mokili mobimba lokola ete ezoki mpota ya kufa. Na le 4 Août 1979, mibu 65 nsima wana Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebimaki, zulunalo moko ya monoko ya Anglais, oyo ebimaka na mboka Londres (The Economist) elobaki boye: “Na 1914, mokili ebungisaki bomoko oyo kino lelo balongi te mpo na kozongela yango lisusu.”
16. Na boumeli na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, ndenge nini Etats-Unis emonisaki ete esangani kati na nguya mibale ya mokili mobimba?
16 Bobele na ntango yango, Etumba Monene, ndenge bazalaki kobenga yango na eleko wana, epesaki nzela na Etats-Unis ete ebima polele lokola eteni moko ya Nguya ya mokili mobimba anglo-ameriké. Na boumeli ya bambula ya liboso ya etumba yango, Etats-Unis ayokelaki bato na ye mpe amikotisaki na etumba yango te. Kasi, lokola Esmé Wingfield-Stratford, mokomi na makambo na bato akomaki yango, “na eleko wana ya krise lokola emonanaki naino liboso te, likambo ezalaki ya koyeba soki Grande-Bretagne mpe Etats-Unis bakobosana matata na bango mpo na kokoma na bomoko makasi mpe kobimisa elongo boyangeli moko.” Lisolo emonisi ete ezali yango nde basalaki. Na 1917, Etats-Unis basalelaki bozwi na bango mpe basoda na bango mpo na kokotela mikili mibengamaki les Alliés, kati na etumba, mpamba te mikili yango mizalaki kotengatenga. Ezali motindo yango motó ya nsambo, Grande-Bretagne mpe Etats-Unis, elongaki etumba yango.
17. Nini ekomelaki ebongiseli na biloko na Satana na mabelé nsima na etumba?
17 Nsima na etumba, mokili ekomaki nyonso ndenge mosusu. Nzokande, atako ebebisamaki na mpota ya kufa oyo ezwaki, ebongiseli ya Satana awa na mabelé etelemaki lisusu mpe ekomaki makasi mingi koleka liboso; bato bakamwaki kokamwa na komona ndenge ezongelaki makasi na yango.
18. Ndenge nini tokoki koloba ete “mokili mobimba ekamwi mpe ebilaki nyama na yauli”?
18 Na ntina yango, tala oyo tozali kotanga na mokanda moko ekomamaki na Charles Mee Junior: “Kokwea ya ebongiseli ya kala [mpo na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba] ezalaki ebandeli esengelaki mpo na kopalangana na likanisi oyo ete bato na bato basengeli komiyangela bango moko, kosikola mikili mpe bituluku ya sika, lisusu kopesa bonsomi mpe lipanda lokola emonanaki liboso te.” Motó ya nsambo ya nyama na yauli, oyo sikawa esili kobika mpe kati na yango Etats-Unis ya Amerike nde ezali koleka liboso, motó oyo ya nsambo ezalaki na bopusi monene nsima na etumba. Nguya ya mokili mobimba Anglo-Ameriké ezalaki molobeli ya Société des Nations mpe ya Nations unies. Na mobu 2005, nguya ya politike ya Amerike epusaki mikili ya bozwi mingi ete batombola nivo ya bomoi na bango, balonga kosilisa bamaladi mpe bakolisa mayele ya kosala bamasini ndenge na ndenge. Amerike elongaki ata kino kotambolisa bato 12 na Sanza. Na bongo ezali likambo na kokamwa te na kotanga ete “mokili mobimba ekamwi mpe ebilaki nyama na yauli.”
19. (a) Longola kokamwa, bato basalaki lisusu nini mpo na nyama na yauli? (b) Nani azali mokonzi na bikonzi nyonso ya nse, mpe ndenge nini toyebi yango? (c) Ndenge nini Satana apesi bokonzi na ye na nyama na yauli, mpe yango ezali na bopusi nini likoló na bato mingi?
19 Na kotalela maye Yoane akomaki na nsima, bato basuki bobele na kokamwa te na ntina na nyama na yauli: “Bato basambelaki dalagona mpo ete ye apesaki nguya na nyama na yauli, mpe basambelaki nyama na yauli koloba ete, Nani akokani na nyama na yauli? Nani akoki kobunda na ye?” (Emoniseli 13:4) Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Satana alobaki ete bikonzi nyonso ya mokili ezali ya ye, mpe Yesu atyelaki ye ntembe mpo na yango te; nkutu, ye moko alobaki ete Satana azali mokonzi na mokili mpe aboyaki kosangana na makambo ya politike. Yoane nde akomaki boye epai na baklisto ya solo: “Toyebi ete tozali bana na Nzambe mpe mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19; Luka 4:5-8; Yoane 6:15; 14:30) Ya solo, Satana apesi bokonzi na nyama na yauli, mpe asali yango engebene bikolo. Na yango, na esika ete bazala na bomoko na nzela na bolingo boyokani na mokano na Nzambe, bato bazali nde na bokabwani mpo ete bato na bato bazali na lolendo mpo na ekolo na bango, mpo na mposo na bango mpe mpo na mokili na bango. Bato na bato bazali kosambela eteni na nyama na yauli oyo ezali koyangela na mokili oyo bango bafandi. Ezali nde motindo yango nyama na yauli mobimba ezali kozwa lokumu mpe losambo oyo bato bazali kopesa ye.
20. (a) Na ndimbola nini bato bazali kosambela nyama na yauli? (b) Mpo na nini baklisto basambeli na Jéhovah Nzambe bazali kosangana te na losambo na nyama na yauli, mpe bazali kolanda ndakisa ya nani?
20 Na ndimbola nini bato bazali kosambela nyama na yauli? Na ndimbola boye ete batii bolingo ya ekolo liboso ya bolingo na Nzambe. Ntalo monene na bato balingaka mokili na bango. Baklisto ya solo, awa ezali bango ba citoyens malamu, bakozalaka na limemya epai na batambwisi mpe na bilembo ya mokili epai bango bafandi, kotosaka mibeko mpe kosalaka oyo ekoki na bango mpo na bolamu ya bazalani na bango. (Baloma 13:1-7; 1 Petelo 2:13-17) Nzokande, bakoki te komipesa se na mokili moko mpe kotiola to kotemela oyo nyonso mosusu etikali. Ezali ezaleli ya boklisto te na koloba ete: “Esála malamu to esála mabe, ezali mokili na ngai.” Baklisto oyo bazali kosambela Jéhovah Nzambe bakoki te kosangana na losambo ya ekolo, ndenge ezali komonana na bato bazali na lolendo mpo na ekolo na bango, kosambelaka bongo eteni moko na nyama na yauli, mpamba te kosala bongo mbele ekozala kosambela dalagona, ye oyo apesi bokonzi epai na nyama na yauli. Bakoki te kotuna na kokamwa ete: “Nani akokani na nyama na yauli?” Nkutu, bazali nde kolanda ndakisa ya Mikaele, oyo nkombo na ye elimboli ete “Nani azali lokola Nzambe?,” kosimbaka bongo bokonzi ya Jéhovah na molongo mobimba. Na ntango oyo Nzambe asili kobongisa, Mikaele yango, Yesu Klisto, akotelemela nyama na yauli mpe akoboma yango, ndenge asili kolonga Satana, kobenganaka ye na likoló.—Emoniseli 12:7-9; 19:11, 19-21.
Azali kobundisa babulami
21. Engebene Yoane, Satana azali kopusa nyama na yauli ete asala nini?
21 Satana, ekelamu na elimo na mayele mabe, akanaki ete akosalela nyama na yauli mpo na koluka kolonga kati na mikano na ye. Ezali yango Yoane alimboli sikawa: “Monoko na kosolola makambo minene na bitukeli epesami na ye, bokonzi mpe epesami na ye mpo na kosala misala sanza ntuku minei na mibale. Azipoli monoko na ye na kotuka Nzambe, mpe atuki nkombo na ye, na efandelo na ye, mpe baoyo bafandi kati na likoló. Nguya epesami na ye na kobunda etumba na babulami mpe kolonga bango. Bokonzi epesami na ye likoĺo na mikili nyonso, na bikolo nyonso, na minoko nyonso, na mabota nyonso. Bato nyonso bafandi na mokili bakosambela ye, baoyo nkombo na bango ekomami te, longwa na bozalisi na mokili, na buku na bomoi na Mwana na Mpate oyo asili kobomama.”—Emoniseli 13:5-8.
22. (a) Sanza 42 ekokani na eleko nini? (b) Na boumeli ya sanza 42, motindo nini baklisto bapakolami ‘balongamaki’?
22 Sanza 42 oyo elobelami awa emonani ete ekokani na mbula misato na ndambo na boumeli na yango babulami babundisami na liseke moko ebimi na motó na nyama moko kati na nyama elobelami na esakweli na Danyele. (Danyele 7:23-25; tala mpe Emoniseli 11:1-4.) Na motindo yango, uta nsuka na mobu 1914 kino na 1918, ntango wana mabota kati na etumba bazalaki kobomana lokola banyama na zamba, ba citoyens na bango bapusamaki na makasi ete basambela nyama na yauli, basambela ekolo na bango, mpe ata kondima kokufa mpo na mokili na bango. Yango ebimisaki mpasi mingi mpo na baklisto bapakolami; mpo ete bango bayebaki ete basengeli liboso kotosa Jéhovah Nzambe mpe Mwana na ye, Yesu Klisto. (Misala 5:29) Komekama na bango ekomaki makasi koleka na Juin 1918, mpamba te na mbula wana ‘balongamaki.’ Na Etats-Unis, batambwisi na misala ya la Société Watch Tower mpe mwa bandeko mosusu oyo bazalaki na mikumba, bakangamaki na boloko kozanga ntina ya sembo, mpe mosala ya kosakola ekufaki. Lokola azali na bokonzi “likolo na mikili nyonso, na bikolo nyonso, na minoko nyonso mpe na mabota nyonso,” nyama na yauli abimisaki bipekiseli kotemela mosala ya Nzambe na mokili mobimba.
23. (a) “Buku na bomoi na Mwana na Mpate” ezali nini mpe mosala nini ezali kobelema na nsuka na yango uta 1918? (b) Mpo na nini kolonga nyonso oyo lisangá ya Satana na mabelé ekanisi ete elongi “babulami” ezali mpamba?
23 Yango wana emonanaki lokola elonga mpo na Satana mpe lisangá na ye. Kasi bakokaki kozwela yango bolamu ya koumela te, mpamba te na basangani nyonso na lisangá na Satana oyo ezali komonana, moko te azali oyo nkombo na ye esili kokomama kati “na buku na bomoi na Mwana na Mpate.” Na ndimbola ya elilingi, buku yango ezali na bankombo ya bato oyo babengami mpo na koyangela elongo na Yesu kati na Bokonzi na ye na likoló. Bankombo ebandaki kokomama na buku yango na Pantekote ya mobu 33. Na nsima, nkombo mingi ebakisamaki kati na buku yango. Uta 1918, mosala ya kotya bilembo na bilongi ya batikali bapakolami kati na batuki na libula na Bokonzi 144 000, mosala yango ebandaki kobelema na nsuka na yango. Mosika te, nkombo na bango nyonso ekokomama mpo na libela kati na buku na bomoi na Mwana na Mpate. Nzokande mpo na banguna na bango, oyo bazali kosambela nyama na yauli, ata moko te oyo nkombo na ye ekokomama kati na buku yango. Kolonga nyonso oyo bakoki kokanisa ete balongi “babulami” ezali se mpamba mpe ya ntango mokuse.
24. Na libyangami na Yoane, baoyo bazali na bososoli bazali koyoka maloba nini, mpe maloba yango malimboli nini mpo na basaleli na Nzambe?
24 Yoane abyangi sikawa baoyo bazali na bososoli ete bayoka na likebi nyonso: “Soko moto azali na matoi, ayoka!” Mpe abakisi: “Soko eponami ete moto moko akangama, mbele akokangama. Soko moto abomi na mopanga, ekoki na ye kobomama na mopanga. Oyo awa ntina na mpiko mpe na kondima na babulami.” (Emoniseli 13:9, 10) Yilimia alobaki se motindo moko epai na bato na ntango na ye na bambula oyo ezalaki liboso na mobu 607 liboso na ntango na biso, mpo na komonisa bango ete bikateli ya Jéhovah bikokokana na ntembe te likoló na engumba na Yelusaleme oyo ezangaki botosi. (Yilimia 15:2; tala mpe Yilimia 43:11; Zakari 11:9.) Mpo na Yesu, wana ekomaki ye pene na kozwa mpasi makasi, amonisaki polele ete bayekoli na ye basengeli te kobuka lisosoli na bango. Alobaki: “Baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52) Bobele bongo, na mikolo na biso, na boumeli na mokolo na Nkolo, basaleli na Nzambe basengeli kokangama na mitinda ya Biblia. Lobiko ekozala te mpo na basambeli na nyama na yauli oyo baboi kobongola motema. Ekosengela kondima makasi, mpiko, mpo na kobika na minyoko mpe mimekamo mizali koya.—Baebele 10:36-39; 11:6.
Nyama na yauli na maseke mibale
25. (a) Yoane alobi boni mpo na nyama na yauli mosusu ya elilingi oyo emonani na mokili? (b) Likambo oyo elakisi nini ete nyama oyo azali na maseke mibale mpe abimi na mabelé?
25 Kasi nyama mosusu ebimi sikawa kati na mokili. Yoane alobi boye: “Namoni nyama na yauli mosusu kobuta, kobima na kati na mokili; azalaki na maseke mibale lokola mwana na mpate, nde asololi lokola dalagona: Akosalaka na bokonzi nyonso na nyama na yauli na liboso, na miso na ye wana. Abyangi mokili na bafandi na yango kosambela nyama na yauli na liboso, oyo mpota na ye na kufa esili kobika. Asali mpe bilembo minene, bongo abimisi ata móto na likoló, kokitisa yango na nse na miso na bato.” (Emoniseli 13:11-13) Nyama na yauli oyo ezali na maseke mibale, elakisi ete ezali nguya mibale ya politike esangani esika moko. Elobami lisusu ete nyama yango ebimi uta na mabele, kasi uta na mai monene te; euti bongo na ebongiseli oyo ya biloko ya Satana na mabelé, ebongiseli oyo esili kopikama makasi. Ezali bongo nguya moko ya mokili mobimba oyo esili kokemba mpe ezali na bopusi mingi na boumeli na mokolo ya Nkolo.
26. (a) Nyama na yauli na maseke mibale ezali nini, mpe boyokani nini azali na yango na nyama na yauli oyo emonanaki liboso? (b) Na ndimbola nini maseke na nyama yango makokani na oyo ya mwana na mpate, mpe motindo nini nyama na yauli ezali “lokola dalagona,” wana ezali yango koloba? (c) Bato oyo bazali kobundela bikolo na bango (nationaliste) bazali nde kosambela nani, mpe tokoki koloba ete nationalisme ezali nini? (Tala note.)
26 Nguya yango nini? Ezali nguya Anglo-Ameriké, oyo elakisami mpe na motó ya nsambo ya nyama na yauli ya liboso, kasi awa emonisami nde na motindo mosusu. Lokola na kati na emonaneli yango alakisami ye moko na motindo na nyama na yauli mosusu, wana ezali kosalisa biso na kososola malamumalamu ete azali kosala ndenge alingi kati na makambo na mokili. Nyama na yauli oyo na elilingi na maseke mibale esalemi na nguya mibale ya politike oyo ezali koyangela na eleko moko mpe na lipanda, moko epai na mosusu, kasi bazali na makambo oyo bazali kosala yango elongo. Likambo oyo ete azali na maseke mibale “lokola mwana na mpate” emonani lokola ete azali koluka komonana na miso na bato ete azali na boboto mpe akotumolaka baninga te, azali na lolenge na boyangeli eleki malamu mpe azali kobenga bato nyonso ete balanda yango. Kasi azali koloba “lokola dalagona,” elingi koloba azali kosalela makaneli mpe ntango mosusu ata bibundeli, soki amoni ete bokonzi na ye endimami te. Azali kolendisa bato te ete bamitya na nse na Bokonzi oyo etambwisami na Mwana na Mpate, kasi azali nde kokotela matomba ya Satana, dalagona monene. Azali mpe kopusa bato na kokabwana mpe na koyinana kati na mikili, nyonso oyo ezali kokolisa losambo ya nyama na yauli oyo ya liboso.c
27. (a) Na kokitisaka móto longwa na likoló, nyama na yauli na maseke mibale azali koluka kosala nini? (b) Ndenge nini bato mingi bazali kotalela nyama na yauli na maseke mibale na ntango na biso?
27 Nyama na yauli oyo ya maseke mibale ezali kosala bilembo minene; ezali ata kokitisa móto longwa na likoló. (Tala Matai 7:21-23.) Elembo yango ekundoli biso Elie, mosakoli na Nzambe oyo atyanaki ntembe na basakoli ya Baala. Ntango Elie akitisaki mɔ́to longwa na likoló na nkombo ya Jéhovah, ntembe ezalaki lisusu te, emonisamaki polele ete ye azalaki mosakoli ya solo, nzokande basakoli ya Baala bazalaki nde basakoli ya lokuta. (1 Mikonzi 18:21-40) Lokola basakoli wana ya Baala, nyama na yauli na maseke mibale akanisi ete asili komonisa na motindo wana ete azali mosakoli. (Emoniseli 13:14, 15; 19:20) Azali koloba ete asili kolonga banguya ya mabe na boumeli ya bitumba mibale ya mokili mobimba mpe alongaki Bakoministe oyo bakondimaka Nzambe te. Mingi bazali mpenza komona ete nyama na yauli oyo ya maseke mibale na ntango na biso ezali solo mobateli na bonsomi mpe liziba na bolamu ya mosuni.
Ekeko ya nyama na yauli
28. Na maloba nini Yoane amonisi ete nyama na yauli oyo ata ezali na maseke mibale lokola mwana na mpate, ezali nyama malamu te?
28 Lokola nyama oyo azali na maseke mibale na motindo na mwana na mpate, elakisi ete akosalaka mabe te? Yoane abakisi: “Azimbisi bafandi na mokili mpo na bilembo oyo azwi nguya na kosala na miso na nyama na yauli, kolobaka na bafandi na mokili ete basala ekeko na nyama na yauli, oyo azoki mpota na mopanga nde abiki. Nguya epesami na ye ete apesa bomoi na ekeko na nyama na yauli, ntina ete ekeko na nyama na yauli esolola, mpe ete bato nyonso baoyo baboi kosambela ekeko na nyama na yauli babomama.”—Emoniseli 13:14, 15.
29. (a) Mokano nini ekeko na nyama na yauli ezali kolanda, mpe ntango nini ekeko yango esalemaki? (b) Mpo na nini ekeko wana na nyama na yauli ezali ekeko ya mpamba te oyo ezangi koningana?
29 Ekeko na “nyama na yauli” ezali nini mpe mokano na yango ezali nini? Mokano na yango ezali ya kokolisa losambo na nyama na yauli oyo na mitó nsambo, oyo ye azali elilingi na yango, mpo ete nyama na yauli wana eumela libela. Ekeko yango esalamaki nsima wana nyama na yauli na mitó nsambo abikaki na mpota na mopanga oyo azokaki, elingi koloba nsima na kosila na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Ezali ekeko ezangi koningana te lokola oyo Nabukadanezare atelemisaki na esobe ya Dura. (Danyele 3:1) Nyama na yauli na maseke mibale azali kopesa mpema ya bomoi na ekeko yango, mpe bongo ekeko yango ezali na bomoi mpe ezali kosala mosala kati na lisolo ya mokili.
30, 31. (a) Engebene Lisolo ya makambo ya bato, ekeko yango ezali nini? (b) Ezali na bato babomamaki mpo ete baboyaki kosambela ekeko yango? Limbola.
30 Lisolo ya makambo ya mokili emonisi ete ekeko yango ezali lisangá oyo kosalama na yango elendisamaki mpe elobelamaki na Grande-Bretagne mpe Etats-Unis, lisangá yango ebimaki liboso na nkombo Société des Nations. Mwa mosika, na Emoniseli mokapo 17, lisangá yango ekolobelama na motindo mosusu, na lolenge na nyama na yauli na langi motane oyo ezali na bomoi, ezali kopema mpe ezali kosala makambo ndenge elingi. Lisangá wana ya mokili mobimba ezali ‘koloba,’ na ndimbola boye ete ezali komikumisa ete ezali lisangá bobele moko oyo ekoki kopesa kimya mpe libateli epai ya bato. Kasi, mpo na koloba solo, ekomi nde esika epai mikili misangani kati na yango bazali kokende wana mpo na kofingana. Lisangá yango ezali kokanela mokili nyonso soko mpe libota nyonso oyo eboi kotosa bokonzi na ye, ete akotya yango pembeni to akotalisa yango mpasi makasi koleka liwa. Lisangá yango ebenganaki mpenza mikili oyo mitosaki makanisi na ye te ete balongwa na kati na ye. Na ebandeli ya bolozi monene, “maseke” na nyama na yauli yango, mampinga na ye, ekosala mosala moko ya koboma.—Emoniseli 7:14; 17:8, 16.
31 Uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ekeko na nyama na yauli, oyo lelo ezali bongo Lisangá ya mabota masangani esili koboma bato. Na ndakisa, na 1950, basoda ya O.N.U. basanganaki kati na etumba oyo Corée du Nord mpe Corée du Sud bazalaki kobunda. Ekanisamaka ete, elongo na basoda ya Corée du Sud, basoda ya O.N.U. babomaki bato 1 420 000 ya Corée du Nord mpe ya Chine. Bobele bongo, kobanda 1960 kino 1964, mampinga ya O.N.U. bayaki kobunda na Zaïre (ntango wana ezalaká Congo). Epai mosusu, bakonzi ya mokili, bakisa pape Paul ya Motoba mpe Jean-Paul ya Mibale, balobaki ntango nyonso ete ekeko yango ezali elikya ya nsuka mpe eleki malamu mpo na kimya. Balobi ete soki bato baboi kotosa lisangá yango, bakobomana. Mpo na bakonzi na mokili, bato nyonso oyo baboi kopesa maboko na ekeko na nyama mpe kosambela yango, babongi kobomama.—Deteronome 5:8, 9.
Elembo na nyama na yauli
32. Na maloba nini Yoane alimboli ete Satana azali kosalela eteni na politike na lisangá na ye oyo ezali komonana mpo na konyokola batikali na libota na mwasi na Nzambe?
32 Yoane amonisi sikawa Satana azali kosalela biteni bikeseni ya politike ya lisangá na ye oyo ezali komonana, mpo na kotalisa mpasi mingi mpenza na batikali na libota na mwasi na Nzambe. (Genese 3:15) Tala oyo abakisi na ntina na “nyama na yauli”: “Abimisi mobeko ete bato mike na bato minene, na bazwi, na babola, na bansomi, na baombo, batyama elembo na loboko na bango na mobali soko na elongi, boye moto akoki kosomba to koteka te soko azangi elembo, soko nkombo na nyama na yauli soko motuya na nkombo na ye. Mayele na yango oyo: moto na kososola atanga motuya na nkombo na nyama na yauli, mpo ete ezali motuya na moto. Motuya na ye, nkama motoba na ntuku motoba na motoba.”—Emoniseli 13:16-18.
33. (a) Nkombo na nyama na yauli ezali nini? (b) Motango motoba esalelamaka mpo na kolobela nini? Limbola.
33 Nyama na yauli azali na nkombo, mpe nkombo yango ezali motuya: 666. Motango motoba esalelamaka mpo na banguna ya Jéhovah. Na ndakisa, Biblia elobi mpo na Mofilistia moko “na molai mingi oyo azalaki na misapi motoba motoba na maboko na ye mpe motoba motoba na makolo na ye.” (1 Ntango 20:6) Mokonzi Nebukadanezare asalaki ekeko ya wolo oyo bonene na yango ezalaki mapeko to maboko 6 mpe molai na yango na kotelema, maboko to mapeko 60, mokano na yango ezalaki ete asangisa bato minene nyonso ya bokonzi na ye ete basalela losambo moko. Ntango basaleli na Nzambe baboyaki kosambela ekeko wana ya wolo, mokonzi atindaki ete babwaka bango na fulu ya móto. (Danyele 3:1-23) Motango motoba ezali na nse ya motango nsambo, nsambo elakisi ezalela ya eloko oyo ezali ya kokoka na miso ya Nzambe. Na yango, motoba elandani mbala misato elakisi kozanga kokoka mpenza, oyo emonani polele na bato nyonso.
34. (a) Na ndimbola nini motuya na nyama na yauli ezali “motuya na moto”? (b) Mpo na nini motuya 666 ezali nkombo ebongi mpo na ebongiseli ya politike ya mokili mobimba etambwisami na Satana?
34 Ntina ya nkombo ezali mpo na kokesenisa moto na bato mosusu. Motango oyo ezali bongo kolakisa nini mpo na nyama? Yoane alobi ete motuya na nkombo na nyama yango ezali “motuya na moto,” kasi ya ekelamu ya elimo te. Na yango, nkombo oyo emonisi ete nyama na yauli ezali eloko ya awa na nse, elakisi boyangeli ya bato. Lokola motango motoba ezali na nse na motango nsambo, bobele bongo motango 666 (6 mbala misato elandani) ezali nkombo ekoki mpo na ebakátá na ebongiseli ya politike oyo ebelemi ata moke te na kokokisa masengami na Nzambe mpo na oyo etali bosembo na makambo nyonso. Na yango, nyama na yauli na politike oyo ezali koyangela mokili mobimba azali na nkombo, mpe nkombo yango ezali motuya: 666; bibongiseli ya politike, ya mangomba mpe ya mombongo yango nde ezali kopusa nyama na yauli ete alanda konyata bato mpe konyokola libota na Nzambe.
35. Elimboli nini kozwa elembo, nkombo na nyama na yauli, na elongi to na loboko ya mobali?
35 Kozwa elembo na nkombo na nyama na yauli na elongi to na loboko mobali elimboli nini? Ntango Jéhovah apesaki Mibeko na Bayisraele, alobaki na bango maloba mazali na: “Bokobomba maloba na ngai oyo na mitema na bino mpe na milimo na bino, mpe okokanga yango lokola elembo na loboko na yo, mpe makozala lokola bikaniseli na kati na miso na bino.” (Deteronome 11:18.) Maloba oyo malimbolaki ete Bayisraele basengelaki ntango nyonso kobatela Mibeko yango liboso na bango kati na elimo na bango, mpo ete ekoka kozala na bopusi likoló na misala na bango nyonso mpe na makanisi na bango nyonso. Elobami mpo na baklisto 144 000 bapakolami ete nkombo na Tata mpe nkombo na Yesu Klisto ekomami na elongi na bango, oyo emonisi ete bazali bato ya Jéhovah Nzambe mpe ya Yesu Klisto. (Emoniseli 14:1) Satana azali kosala se ndenge moko, kasi na elembo na nyama na yauli. Wana ezali bango kosalaka misala na bango ya mokolo na mokolo, lokola kosomba to koteka, bato nyonso bapusami na komekola nyama na yauli, na ndakisa na kokumisaka bilambo. Bazali komizela ete basambela nyama yango, batika bomoi na bango na maboko na nyama yango ete atambwisa yango mobimba, mpo ete bakoka kozwa elembo na ye.
36. Baoyo baboi kozwa elembo na nyama na yauli bazali kokutana na mikakatano nini?
36 Baoyo baboi kozwa elembo na nyama na yauli bazali ntango nyonso kokutana na mikakatano. Na ndakisa, kobanda na 1930, basambaki makambo mingi na batribinale mpe bayikaki mpiko na mobulu ya bibele na bato mpe na minyoko mosusu. Na mikili miyangelamaki na bakonzi na yauli to badictateurs babwakamaki na ba camps de concentration, epai kuna mingi bakufaki. Uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ebele na bilenge bakoti boloko mbula mingi, bamosusu banyokwami makasi mpe kobomama, mpo ete baboi kobundela makambo ya mokili. Na mikili misusu, baklisto bakoki ata kosomba te ata koteka te; bamosusu bazali na lotomo te ya kozala na ndako to mabelé; bamosusu mpe babebisami, babomami to basili kobengana bango na mokili na bango. Mpo na ntina nini? Mpo ete, kotosaka lisosoli na bango, baboi kosomba karte ya parti politike.d—Yoane 17:16.
37, 38. (a) Mpo na nini ezali mpasi mingi na moto kobika kati na mokili soko aboi kozwa elembo na nyama na yauli? (b) Bato nini batikali sembo, mpe bazwi ekateli ete bakolanda kosala nini?
37 Na mikili misusu, lingomba ekota makasi na bomoi ya bato, yango wana moto na moto oyo ayambi solo oyo ezwami na Biblia ayinami na libota na ye mpe na baninga na ye ya kala. Esengeli kondima makasi mpo na koyika mpiko na komekama yango. (Matai 10:36-38; 17:22) Kati na mokili oyo bato mingi bazali kosambela bozwi, mpe kozanga kolongobana epalangani mingi, esengeli kozala na ekateli makasi mpo na kotikala peto. Baklisto oyo bazali kozwa maladi bazali mbala mingi kokutana na mikakatano na baminganga oyo bazali kopusa bango ete babuka mobeko na Nzambe na ntina etali makila; mbala mosusu bazali kosamba ata na batribinale na ntina na likambo oyo ya makila, mpo na kobatela kondima na bango. (Misala 15:28, 29; 1 Petelo 4:3, 4) Na eleko na biso oyo mosala ekomi mpasi, baklisto ya solo bazali ntango mosusu koboya mosala oyo ezali malamu te na miso ya Nzambe, atako ekateli motindo oyo ezali mpasi mpo na kozwa yango.—Mika 4:3, 5.
38 Solo, ezali mpasi kobika kati na mokili oyo soki ozwi elembo na nyama na yauli te. Komonisaka polele ete Jéhovah azali kopesa bango nguya na ye mpe mapamboli na ye, batikali na libota na mwasi, bakisa bato koleka milió motoba oyo basali ebele monene, batikali sembo atako bazali kozwa bopusi ndenge nyonso ete babuka mibeko na Nzambe. (Emoniseli 7:9) Biso nyonso elongo, kati na mokili mobimba, tika ete tolanda kokumisa Jéhovah mpe banzela na ye ya sembo, mpe toboya kozwa elembo na nyama na yauli!—Nzembo 34:1-3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo yango na mozindo, tala nkasa 165 kino 179 ya buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b L’Interprétation de la Révelation de saint Jean (angl.), ya R. Lenski, nkasa 390 mpe 391.
c Bato mingi oyo bapesaki makanisi na bango bamonisi ete bolingo ya ekólo to nationalisme ezali losambo. Na yango, bato bazali na bolingo ya ekólo bazali kosambela eteni ya nyama na yauli oyo emonisami na mboka kati na yango bafandi. Tala makambo tokoki kotanga mpo na bolingo na ekólo na Etats-Unis: “Bolingo ya ekólo, oyo ekoki mpe kotalelama lokola losambo, ezali na makambo mingi makokani na masangá mosusu minene ya losambo na kala . . . Na mikolo na biso, ye oyo akomisi bolingo ya ekólo lokola losambo na ye ayebi ete azali na nse na nzambe na ye ya ekólo. Azali koyoka mposa ya lisalisi makasi ekouta na Ye. Ayebi ete akozwa bolamu mpe esengo mpo na Ye. Akotosa Ye, lokola nzambe mpenza. . . . Azali komona ekólo lokola lisangá ekoumela libela mpe na miso na ye, liwa ya bana oyo bakufi sembo mpo na ekólo ezali se kobakisa lokumu mpe nkembo ezangi nsuka ya ekólo.”—Carlton Hayes, maloba na ye mazongelami na lokasa 359 ya mokanda Croyances et mode d’adoration des Américains (Angl.), ya Paul Williams.
d Mpo na yango, tala na ndakisa banimero elandi ya La Tour de Garde: 15 Mai 1972, lokasa 315; 15 Septembre 1974, lokasa 565; 1er Septembre 1975, lokasa 533; 1er Mai 1979, lokasa 23; 15 Septembre 1979, lokasa 20; 15 Août 1980, lokasa 10.
[Elilingi na lokasa 195]
Nguya epesami na ye ete apesa mpema na ekeko na nyama na yauli