Lisolo ya bomoi
Banda na bolɔkɔ ya nse ya mabelé, tii na bangomba ya Alpes ya Suisse
YA LOTHAR WALTHER
Nsima ya kolekisa mbula misato na bolɔkɔ ya nse ya mabelé na Allemagne ya Ɛsti oyo eyangelamaki na Bakoministe, nazalaki na esengo mingi ya kozwa lisusu bonsomi mpe ya kokutana lisusu na libota na ngai.
KASI, nayokaki mpasi mingi ndenge Johannes, mwana na ngai oyo akómaki na mbula motoba, azalaki kotala na ngai na kokamwa. Mbula misato mobimba, amonaki tata na ye te. Epai na ye, nazalaki mpenza mopaya.
Ngai nakutanaki te na likambo oyo ekómelaki mwana na ngai; nazalaki ntango nyonso esika moko na baboti na ngai mpe balingaki ngai mingi. Bolingo mpe boyokani makasi ezalaki na ndako na biso na engumba Chemnitz, na Allemagne, esika nabotamaki na 1928. Tata azalaki koloba polele ete asepelaka na makambo ya mangomba te. Akokaki kobosana te ndenge oyo, na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, basoda ya ngámbo nyonso, oyo bazalaki komibenga “baklisto,” bazalaki kotombelana “Noele malamu” na mokolo ya 25 Desɛmbɛ, kasi na mokolo oyo elandaki babandaki lisusu kobomana. Mpo na ye, mangomba ezali na nsuka ya bokosi.
Natiki bilikya ya mpamba mpe nakómi na kondima
Likambo ya esengo, ngai nakutanaki na bokosi ya ndenge wana te. Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki ntango nazalaki na mbula 17, yango wana nakɔtaki mosala ya soda te. Atako bongo, nazalaki komitungisa mingi mpe komituna mituna lokola oyo: ‘Mpo na nini ebele ya bato bazali kobomama? Nani nakoki kotyela motema? Epai wapi nakoki kozwa kimya ya solosolo?’ Allemagne ya Ɛsti, ekólo na biso, ekómaki na ngámbo ya Union soviétique. Makanisi ya Bakoministe, elingi koloba kotya bosembo, kosala ete bato nyonso bázala ndenge moko, bázala na bomoko, mpe boyokani ezala kati na bato, esepelisaki bato oyo balɛmbaki nzoto mpo na makambo mabe oyo bitumba ememaki. Kasi mosika te, mingi kati na bato yango bamonaki ete bakosamaki, na mangomba lisusu te, kasi na bakonzi ya politiki.
Ntango nazalaki koluka biyano na mituna na ngai, mama kulutu na ngai moko, oyo azalaki Motatoli ya Yehova, ateyaki ngai bindimeli na bango. Apesaki ngai buku moko oyo elimbolaka Biblia, oyo epesaki ngai mposa ya kotánga, mpo na mbala ya liboso, Matai mokapo 24 mobimba. Nasepelaki mingi na bandimbola malamu mpenza oyo bapesaki na buku yango, oyo emonisaki ete tozali lelo oyo na “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” mpe elimbolaki ntina oyo bato bazali komona mpasi.—Matai 24:3; Emoniseli 12:9.
Mosika te, nazwaki mikanda mosusu ya Batatoli ya Yehova mpe, ntango nazalaki kotánga yango, namonaki mpenza ete nazwi solo oyo nazalaki koluka na molende mpenza. Nasepelaki mingi ntango nayebaki ete Yesu Klisto akómaki mokonzi na likoló na 1914, mpe ete mosika te akolonga bibongiseli nyonso oyo eboyi kotosa Nzambe mpo na komemela bato ya botosi bolamu. Likambo mosusu ya ntina mingi oyo nayebaki ezali ndimbola ya polele mpenza ya lisiko. Yango etindaki ngai nabondela Yehova Nzambe na motema mobimba mpo na kosɛnga ye bolimbisi ya masumu na ngai. Maloba ya boboto oyo ezali na Yakobo 4:8 esimbaki mpenza motema na ngai: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”
Atako solo oyo nayekolaki ezalaki kopesa ngai esengo monene, baboti na ngai ná yaya na ngai ya mwasi bazalaki kondima mpenza te makambo oyo nazalaki koyebisa bango. Kasi, yango ekitisaki te mposa na ngai ya koyangana na makita oyo mwa etuluku ya Batatoli bazalaki kosala pene na engumba Chemnitz. Likambo ya kokamwa, baboti na ngai ná yaya na ngai bakendaki elongo na ngai na likita ya liboso oyo nayanganaki! Ezalaki na eleko ya mpiɔ ya 1945-1946. Na nsima, ntango etuluku moko ya boyekoli esalemaki na engumba Harthau, esika tozalaki kofanda, libota mobimba tokómaki koyangana na makita nyonso.
“Ngai nazali bobele elenge”
Lokola nazalaki koyekola solo ya Biblia mpe koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya basaleli ya Yehova, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo mokolo ya 25 Mai 1946. Nazalaki na esengo monene ya komona ete baboti na ngai ná yaya na ngai bakolaki na elimo mpe, na nsima, bango nyonso misato bakómaki Batatoli. Yaya na ngai azali kosalela Yehova tii lelo na lisangá moko ya engumba Chemnitz. Tata ná mama batikalaki sembo na mosala ya Yehova tii na liwa na bango; mama akufaki na 1965 mpe tata na 1986.
Sanza motoba nsima ya kozwa batisimo, nakómaki mobongisi-nzela monene. Yango ezalaki ebandeli ya mosala ya bomoi na ngai mobimba, ezala “na eleko ya malamu [mpe] na eleko ya mpasi.” (2 Timote 4:2) Mwa moke na nsima, nazwaki mikumba mosusu. Bazalaki na mposa ya babongisi-nzela na teritware moko ya mosika na ɛsti ya Allemagne. Ngai ná ndeko moko tosɛngaki bátinda biso kuna, kasi nazalaki komona ete nazalaki naino na makoki te mpe nakɔmelaki naino mpenza te na elimo mpo na mokumba monene wana. Lokola nazalaki kaka na mbula 18, nazalaki kokanisa lokola Yilimia oyo alobaki ete: “Aha, . . . [Yehova], talá; nayebi koloba te zambi ngai nazali bobele elenge.” (Yilimia 1:6) Atako nazalaki na mwa kobanga, na boboto mpenza bandeko oyo bazalaki kotambwisa mosala ya kosakola batindaki biso na teritware yango. Na bongo, tokendaki na Belzig, engumba moko ya moke na etúká ya Brandebourg.
Mosala ya kosakola ezalaki mpasi na teritware yango, kasi ezalaki formasyo ya ntina mingi mpo na ngai. Mwa moke na nsima, basi mingi ya mombongo bandimaki nsango ya Bokonzi mpe bakómaki Batatoli ya Yehova. Kasi, likambo oyo basalaki ya kokóma Batatoli ya Yehova, eyokanaki te na bonkɔkɔ ya mwa mboka wana. Bakonzi ya Lingomba ya Katolike ná ya Protesta bakómaki kotɛmɛla biso makasi mpenza mpe bakómaki kokosela biso makambo mpo na kobebisa mosala na biso ya kosakola. Kasi, lokola totyelaki litambwisi mpe libateli ya Yehova motema, tosalisaki ebele ya bato bándima solo.
Botɛmɛli ekómi komonana mokemoke
Na 1948, nazwaki mapamboli mingi mpe nakutanaki na mikakatano oyo nakanisaki te. Ya liboso, batindaki ngai mobongisi-nzela na engumba Rudolstadt, na etúká ya Thuringe. Kuna, nayebanaki na ebele ya bandeko ya sembo, mpe nasepelaki mpenza kosala na bango. Na sanza ya Yuli ya mbula yango, nazwaki lipamboli mosusu ya monene mpenza. Nabalaki Erika Ullmann, elenge moklisto ya sembo mpe ya molende, oyo nayebanaki na ye ntango nabandaki koyangana na makita na lisangá ya engumba Chemnitz. Tobandaki mosala ya mobongisi-nzela elongo na engumba Harthau, mboka ya baboti na ngai. Kasi na nsima, mpo na mikakatano ya nzoto mpe mpo na makambo mosusu, Erika akokaki lisusu te kokoba na mosala ya mobongisi-nzela.
Na bambula wana basaleli ya Yehova bazalaki konyokwama mpenza. Mpo na kopusa ngai na koluka mosala oyo nakobanda kosala mokolo mobimba mpo natika kosakola, bakonzi ya biro ya Ministère ya mosala na engumba Chemnitz balobaki ete nakoki lisusu kosalela te karte na ngai ya kosomba biloko na ntalo moke. Bandeko oyo bazalaki kokamba mosala ya kosakola bamemaki likambo yango na tribinale mpo Leta andima mosala na biso. Tribinale eboyaki, mpe na mokolo ya 23 Yuni 1950, bafutisaki ngai amande mpe bakatelaki ngai bolɔkɔ ya mikolo 30. Tomemaki likambo yango na tribinale ya monene, kasi tribinale yango eboyaki kolongola etumbu yango mpe nakɔtaki bolɔkɔ.
Wana ezalaki kaka mwa elembo oyo emonisaki ete botɛmɛli ya makasi ezali koya. Mwa mikolo na nsima, na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1950, Bakoministe babandaki kolobela biso mabe na radio, na televizyo mpe na bazulunalo, mpe nsukansuka bapekisaki mosala na biso. Lokola lisangá ezalaki kokola nokinoki mpe tozalaki kokɔta na makambo ya politiki te, bakómaki koloba ete tozali banɔ́ngi ya bikólo ya Mpoto mpe ya Amerika, mpe ete tozali kobombana nsima ya lingomba mpo na kosala “misala ya mabe.” Kaka na mokolo oyo mobeko ebimaki ete mosala na biso epekisami, na ndako, mwasi na ngai abotaki mwana na biso, Johannes, wana ngai na bolɔkɔ. Atako mwasi oyo abotisaki mwasi na ngai aboyaki, basoda ya sirete bakɔtaki na ndako na biso na makasi mpo na koluka biloko oyo ekondimisa makambo oyo bafundaki biso na yango. Kasi, bamonaki eloko te. Atako bongo, na nsima bakɔtisaki moto moko na lisangá mpo ayebisaka bango makambo oyo tozalaki kosala. Yango wana, na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1953, bakangaki biso nyonso oyo tozalaki kotambwisa lisangá.
Na bolɔkɔ ya nse ya mabelé
Nsima ya kosambisa biso mpe kokatela biso etumbu ya bolɔkɔ banda mbula misato tii motoba mpo na bamosusu, batyaki biso na bolɔkɔ ya nse ya mabelé, oyo ezalaki salite mpenza, na ndako monene ya Osterstein, na engumba Zwickau, esika ebele ya bandeko mosusu bazalaki. Atako ezalaki esika mabe mpenza, tozalaki na esengo ya kozala esika moko na bandeko oyo bakɔmeli na elimo. Atako tozangaki bonsomi, tozangaki bilei ya elimo te. Atako guvɛrnema ezalaki kotyola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe epekisaki yango, tozalaki kozwa yango ata na kati ya bolɔkɔ! Ndenge nini?
Bandeko mosusu oyo bazalaki kotinda na mosala ya kotimola charbon, bazalaki kokutana na bandeko ya libándá oyo bazalaki kopesa bango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Bandeko bazalaki kokɔta na yango na kati ya bolɔkɔ mpe, na mayele mpenza, bazalaki kolekisa bilei ya elimo oyo biso nyonso tozalaki na mposa na yango. Nazalaki na esengo mpenza mpe nalendisamaki makasi na komona ndenge Yehova azalaki kobatela mpe koteya biso!
Na nsuka ya 1954, batindaki biso na bolɔkɔ moko ya mabe mpenza na engumba Torgau. Batatoli oyo bazalaki kuna basepelaki mpenza ntango tokutanaki na bango. Tii na ntango wana, batikalaki makasi na elimo mpo bazalaki kozongela mbala na mbala masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo bakangaki na motó. Bazalaki na mposa makasi ya bilei ya elimo ya sika! Tozalaki na mposa ya koyebisa bango makambo oyo toyekolaki na bolɔkɔ ya Zwickau. Kasi, ezalaki mpasi mpamba te bapekisaki biso kosolola ntango tozali kotambolatambola na moi. Bandeko bapesaki biso mayele oyo tosengelaki kosalela, mpe lobɔkɔ ya Yehova ya nguya ezalaki kotambwisa biso. Likambo yango esalisaki biso tómona ntina ya kozala na molende mpo na koyekola Biblia mpe komanyola yango ntango tozali na bonsomi mpe na likoki ya kosala yango.
Ntango ya kozwa bikateli ya ntina
Na lisalisi ya Yehova, tolɛmbaki te na elimo. Likambo ya kokamwa, na nsuka ya 1956, guvɛrnema esɛngaki ete bábimisa mingi kati na biso na bolɔkɔ. Maloba ezangi ngai mpo na kolobela esengo oyo toyokaki ntango tobimaki na bolɔkɔ! Na ntango wana, mwana na ngai akómaki na mbula motoba, mpe nazalaki na esengo monene ya kokutana lisusu na mwasi na ngai mpo tóbɔkɔla mwana na biso elongo. Na boumeli ya mwa ntango, Johannes azalaki komona ngai lokola mopaya, kasi mwa moke na nsima tokómaki koyokana malamu mpenza.
Batatoli ya Yehova ya Allemagne ya Ɛsti bazalaki konyokwama mpenza. Lokola balingaki mosala na biso ya kosakola te mpe bazalaki kosepela na biso te mpo tolingaki kokɔta na makambo ya politiki te, tozalaki na kimya te; bomoi na biso ezalaki ntango nyonso na likama. Yango wana, ngai ná Erika totalelaki bomoi na biso malamumalamu mpe na kati ya libondeli, mpe tomonaki ete tosengeli kokende epai mosusu mpo tózala mwa malamu; tózalaka ntango nyonso motema likoló te. Tozalaki na mposa ya kozala na bonsomi ya kosalela Yehova mpe ya kolanda mikano ya elimo.
Na 1957, tozwaki libaku ya kokende na engumba Stuttgart, na Allemagne ya Wɛsti. Kuna, mosala ya kosakola epekisamaki te, mpe tozalaki na bonsomi ya koyanganaka na makita elongo na bandeko na biso. Bandeko bamoniselaki biso bolingo mpe basalisaki biso mingi mpenza. Tosalaki mbula nsambo na lisangá ya Hedelfingen. Na ntango wana, mwana na biso akɔtaki kelasi mpe azalaki kokola mpenza na elimo. Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1962, nazwaki libaku malamu ya kokɔta na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi na engumba Wiesbaden. Kuna, balendisaki ngai nakende ná libota na ngai na bitúká mosusu ya Allemagne mpe ya Suisse epai bazalaki na mposa ya bateyi ya Biblia oyo balobaka monɔkɔ ya Allemand.
Tokei na bangomba ya Alpes ya Suisse
Yango wana, na 1963, tokendeki na Suisse. Batindaki biso na lisangá moko ya moke na engumba Brunnen, oyo ezali na pembeni ya Laki kitoko ya Lucerne, na katikati mpenza ya bangomba ya Alpes ya Suisse. Tozalaki komona lokola nde tozali na paladiso. Tosengelaki koyekola monɔkɔ ya Allemand oyo elobamaka kuna, komesana na bomoi ya mboka yango mpe ezaleli ya bato na yango. Atako bongo, tozalaki kosepela mpenza kosala mpe kosakola na kati ya bato yango oyo balingá kimya. Tosalaki mbula 14 na engumba Brunnen. Mwana na biso akolaki na engumba yango.
Na 1977, ntango nazalaki na mbula soki 50, babengaki biso tókende kosala na Betele ya Suisse, na engumba Thoune. Tomonaki yango mokumba moko ya ntina mingi mpe tondimaki yango na esengo mpenza. Ngai ná mwasi na ngai tosalaki na Betele mbula libwa, mpe tii lelo oyo tomonaka yango ete ezalaki ntango moko ya ntina mingi na bomoi na biso ya boklisto mpe mpo na bokoli na biso ya elimo. Tozalaki na esengo ya kosakola elongo na bandeko ya masangá ya Thoune mpe ya bamboka ya pembenipembeni, epai tozalaki ntango nyonso komona “misala ya kokamwa” ya Yehova, elingi koloba bangomba ya Alpes ya Berne, oyo nsɔngɛ na yango ezipami na mbula mpɛmbɛ.—Nzembo 9:1.
Batindi biso epai mosusu
Na ebandeli ya 1986, batindaki biso epai mosusu. Batindaki biso babongisi-nzela monene na teritware moko monene, teritware ya lisangá ya engumba Buchs, na ɛsti ya Suisse. Kuna, tosengelaki lisusu komesana na bomoi ya lolenge mosusu. Kasi, lokola tozalaki na mposa ya kosalela Yehova ata na esika nini oyo amoni ete tokosalela ye malamu, tokendeki na teritware yango mpe Yehova apambolaki biso. Ntango mosusu, nazalaki kotala bandeko na masangá mpo na kolendisa bango lokola mokɛngɛli-motamboli mosungi. Tokokisi lelo mbula 18 na teritware yango, mpe tokutani na makambo mingi ya esengo na mosala ya kosakola. Lisangá ya engumba Buchs ekoli, mpe toyanganaka na makita na Ndako ya Bokonzi moko kitoko, oyo bafungolaki eleki lelo mbula mitano.
Yehova apamboli biso mingi mpenza. Tolekisi ndambo monene ya bomoi na biso na mosala ya ntango nyonso, kasi tozangaki eloko moko te. Tozali na esengo ya komona mwana na biso, mwasi na ye, bankɔkɔ na biso, mpe bana ya bankɔkɔ na biso, bango nyonso bazali kotambola sembo na nzela ya Yehova.
Soki natali ndenge tolekisi bomoi na biso, namonaka mpenza ete tosaleli Yehova “na eleko ya malamu [mpe] na eleko ya mpasi.” Mosala ya boklisto ememi ngai banda na bolɔkɔ ya Bakoministe na nse ya mabelé tii na mokili kitoko ya bangomba ya Alpes ya Suisse. Ngai ná libota na ngai tomonaka te ete tolekisi ntango na biso mpamba na mosala ya boklisto.
[Etanda na lokasa 28]
Batatoli oyo bazwaki etumbu mbala mibale batikalaki sembo na kati ya minyoko
Bakonzi ya République démocratique allemande (RDA), oyo bazalaki mpe kobenga Allemagne ya Ɛsti, bazalaki mpenza na mokano ya kosilisa Batatoli ya Yehova. Mikanda ezali komonisa ete Batatoli koleka 5 000 batindamaki na bakaa ya misala ya makasi mpe na babolɔkɔ mpo bazalaki kosakola mpe bazalaki koboya kokɔta na makambo ya politiki.—Yisaya 2:4.
Balobaka ete bamosusu kati na bango bazwaki etumbu mbala mibale. Batatoli soki 325 bakɔtaki babolɔkɔ ya Banazi. Na nsima, na bambula ya 1950, Stasi, elingi koloba basirete ya RDA, ezalaki kolandela bango mpe kotya bango na bolɔkɔ. Kutu babolɔkɔ mosusu esalelamaki mbala mibale, liboso na Banazi mpe na nsima, na Stasi.
Na boumeli ya mbula zomi ya liboso ya monyoko makasi, elingi koloba banda na 1950 tii na 1961, Batatoli 60, basi mpe mibali, bakufaki na babolɔkɔ mpo na minyoko, nzala, bamaladi mpe bobange. Bakatelaki Batatoli 12 etumbu ya kolekisa bomoi na bango mobimba na bolɔkɔ, mpe na nsima bakitisaki yango na mbula 15.
Lelo oyo, na bandako oyo ezalaki biro monene ya Stasi, na Berlin, batyá bafɔtɔ mpe mikanda oyo ezali komonisa ndenge oyo banyokolaki Batatoli ya Yehova na Allemagne ya Ɛsti na boumeli ya mbula 40. Bafɔtɔ mpe masolo ya bato oyo banyokwamaki oyo batyá wana ezali komonisa mpiko mpe bokasi ya elimo ya Batatoli oyo batikalaki sembo na kati ya minyoko.
[Karte na lokasa 24]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
ALLEMAGNE YA ƐSTI
Rudolstadt
Belzig
Torgau
Chemnitz
Zwickau
[Elilingi na lokasa 25]
Ndako monene ya Osterstein, na engumba Zwickau
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fotosammlung des Stadtarchiv Zwickau, Deutschland
[Elilingi na lokasa 26]
Elongo na mwasi na ngai, Erika