Osepelaka na “Mobeko ya Yehova”?
“Esengo ezali na moto . . . [oyo asepelaka, NW] na Mobeko ya [Yehova].”—NZEMBO 1:1, 2.
1. Mpo na nini biso basaleli ya Yehova tozali na esengo?
YEHOVA asalisaka mpe apambolaka biso basaleli na ye ya sembo. Ya solo, tozali kokutana na mikakatano mingi. Kasi tozali mpe na esengo ya solosolo. Ezali likambo ya kokamwa te, mpo tozali kosalela “Nzambe ya esengo,” mpe elimo santu na ye ezali kobota esengo na kati ya mitema na biso. (1 Timote 1:11; Bagalatia 5:22) Esengo ezali bolamu ya solosolo oyo moto ayokaka ntango azali kozela kozwa to azwi eloko moko ya malamu. Tata na biso ya likoló apesaka biso makabo ya malamu. (Yakobo 1:17) Yango wana, tokoki kokamwa te soki tozali na esengo!
2. Nzembo nini tokolobela?
2 Esengo elobelami mingi mpenza na mokanda ya Nzembo. Na ndakisa, elobelami mingi na Nzembo 1 mpe 2. Bayekoli ya liboso ya Yesu Klisto balobaki ete loyembo ya mibale ekomamaki na Davidi, Mokonzi ya Yisalaele. (Misala 4:25, 26) Mokomi ya loyembo ya liboso, oyo nkombo na ye etángami te, abandi loyembo na ye oyo epemami na maloba oyo: “Esengo ezali na moto oyo aboyi [kolanda] toli ya bato mabe.” (Nzembo 1:1) Na lisolo oyo mpe na oyo elandi, tokomona ndenge Nzembo 1 mpe 2 ezali kopesa biso ntina ya kosepela.
Sɛkɛlɛ mpo na kozwa esengo
3. Na kolanda Nzembo 1:1, wapi mwa bantina oyo esalaka ete moto oyo abangaka Nzambe azala na esengo?
3 Nzembo 1 emonisi ntina oyo moto oyo abangaka Nzambe azali na esengo. Mokomi ya nzembo apesi bantina ya esengo yango ntango ayembi boye: “Esengo ezali na moto oyo aboyi [kolanda] toli ya bato mabe, oyo atɛlɛmi na nzela ya bato ya masumu te, oyo afandi esika moko na batyoli te.”—Nzembo 1:1.
4. Etamboli nini ya malamu Zekalia ná Elizabeti bazalaki na yango?
4 Mpo na kozala na esengo ya solosolo, tosengeli kotosa masɛngami ya sembo ya Yehova. Zekalia ná Elizabeti, oyo bazwaki libaku kitoko ya kobota Yoane Mobatisi, “bazalaki bayengebene liboso ya Nzambe mpamba te bazalaki kotambola kozanga mbeba na boyokani na bakomandema nyonso mpe na masɛngami ya mibeko ya Yehova.” (Luka 1:5, 6) Tokoki kozala na esengo soki tolandi etamboli ya ndenge wana mpe toboyi mpenza ‘kolanda toli ya bato mabe’ to kotambwisama na toli na bango ya mabe.
5. Nini ekoki kosalisa biso tókima “nzela ya bato ya masumu”?
5 Soki toboyi makanisi ya bato mabe, ‘tokotɛlɛma te na nzela ya bato ya masumu.’ Ya solo, tokokende soki moke te na bisika oyo bazalaka, elingi koloba, na bisika oyo basalaka masano ya mbindo to na bisika oyo ekendá nsango mabe. Bongo soki tomekami mpo tólanda etamboli ya bato ya masumu, oyo eyokani na Makomami te? Na ntango wana, tóbondela Nzambe asalisa biso tósala makambo oyo eyokani na maloba oyo ya ntoma Paulo: “Bósala te ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te. Mpo boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe botyoli-mibeko? To bosangani nini ezali na kati ya pole mpe molili?” (2 Bakolinti 6:14) Soki tozali kotyela Nzambe motema mpe tozali na “motema pɛto,” tokoboya elimo mpe lolenge ya bomoi ya bato ya masumu mpe tokozala na makanisi mpe bamposa ya pɛto, mpe na “kondima oyo ezangi bokosi.”—Matai 5:8; 1 Timote 1:5.
6. Mpo na nini tosengeli kokeba na batyoli?
6 Mpo na kosepelisa Yehova, tosengeli ‘kofanda esika moko na batyoli te.’ Bato mosusu bazali kotyola ezaleli ya kobanga Nzambe, kasi mbala mingi, na ‘mikolo oyo ya nsuka,’ bato oyo bazalaki baklisto mpe bakómá bapɛngwi batyolaka mingi koleka. Ntoma Petelo akebisaki baninga na ye bandimi ete: “Balingami, . . . boyebi libosoliboso likambo oyo, ete na mikolo ya nsuka basɛki bakoya ná kosɛka na bango, kotamboláká engebene bamposa na bango moko mpe kolobáká ete: ‘Wapi kozala na ye oyo elakamaki? Kutu, banda mokolo bankɔkɔ na biso balalá na kati ya liwa, makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.’” (2 Petelo 3:1-4) Soki ‘tofandi ata moke te esika moko na batyoli,’ tokozwa te mpasi oyo ekozanga te koyela bango.—Masese 1:22-27.
7. Mpo na nini tosengeli kotya likebi na maloba ya Nzembo 1:1?
7 Soki totye likebi te na maloba ya ebandeli ya Nzembo 1, tokoki kobebisa bizaleli na biso malamu ya elimo oyo tozwá na boyekoli ya Makomami. Kutu, tokoki kokóma mabe koleka. Kokwea na biso ekoki kobanda soki tolandi toli ya bato mabe. Na nsima, tokokóma ntango mosusu kokutana na bango mbala na mbala. Nsukansuka, tokoki kutu kokóma bapɛngwi mpe batyoli oyo bazangi kondima. Emonani polele ete kozala moninga ya bato mabe ekoki kokolisa epai na biso elimo moko ya kozanga kobanga Nzambe mpe ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova Nzambe. (1 Bakolinti 15:33; Yakobo 4:4) Tópesa nzela ata moke te ete likambo ya ndenge wana ekómela biso!
8. Nini ekosalisa biso tótyaka makanisi na biso kaka na makambo ya elimo?
8 Libondeli ekosalisa biso tótyaka makanisi na biso kaka na makambo ya elimo mpe tóboya kozala baninga ya bato mabe. Paulo akomaki boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” Ntoma Paulo alendisi biso tótalelaka makambo oyo ezali solo, oyo ebongi na lobanzo, oyo ya boyengebene, oyo ya pɛto, oyo ekoki kolingama, oyo elobelami malamu, oyo ezali ya malamu mpe ebongi kosanzolama. (Bafilipi 4:6-8) Tiká tolanda toli ya Paulo mpe tómikitisa soki moke te na molɔngɔ ya bato mabe.
9. Ata toboyaka misala ya mabe, ndenge nini tolukaka kosalisa bato ya lolenge nyonso?
9 Ata toboyaka misala ya mabe, topesaka bato litatoli na mayele, kaka ndenge Paulo alobaki na Felikisi, guvɛrnɛrɛ Moloma, mpo na “boyengebene mpe komipekisa mpe lisambisi oyo ekoya.” (Misala 24:24, 25; Bakolose 4:6) Tosakolaka nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato ya lolenge nyonso, mpe tosalelaka bango makambo na boboto. Tondimi mpenza ete ‘baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko’ bakokóma bandimi mpe bakosepela na mobeko ya Nzambe.—Misala 13:48.
Asepelaka na mobeko ya Yehova
10. Nini ekosalisa biso mpo makambo oyo tozali koyekola biso moko etikala libela na makanisi na biso mpe na motema na biso?
10 Mpo na moto yango ya esengo, mokomi ya nzembo alobi lisusu boye: “Asepelaka na mobeko ya Yehova; mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi.” (Nzembo 1:2, NW) Biso basaleli ya Nzambe ‘tosepelaka na mobeko ya Yehova.’ Soki likoki ezali, ntango tozali koyekola biso moko mpe komanyola, tokoki kotánga “na mongongo ya nse,” to kobimisa mongongo ntango tozali kotánga. Soki tosali bongo na eteni nyonso ya Makomami oyo tozali kotánga, yango ekosala ete makambo yango etikala libela na makanisi na biso mpe na motema na biso.
11. Mpo na nini tosengeli kotángaka Biblia “butu moi”?
11 “Moombo ya sembo mpe ya mayele” alendisaka biso tótángaka Biblia mokolo na mokolo. (Matai 24:45) Lokola tozali na mposa makasi ya komesana na nsango oyo Yehova akomisá mpo na bato, ekozala malamu tótángaka Biblia “butu moi,” ɛɛ, ata ntango mpɔngi ekimi biso mpo na ntina moko to mosusu. Petelo alendisi biso boye: “Lokola bana babotami sika, bózalaka na mposa makasi ya mabɛlɛ oyo ezali ya liloba, oyo basangisi na eloko te, mpo ete na nzela na yango bókola tii na lobiko.” (1 Petelo 2:1, 2) Osepelaka kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe komanyola Liloba ná mikano ya Nzambe na butu? Mokomi ya nzembo asalaki yango.—Nzembo 63:6.
12. Tokosala nini soki tozali kosepela na mobeko ya Yehova?
12 Tokozala na esengo ya libela na libela soki tozali kosepela na mobeko ya Nzambe. Mobeko yango ezali ya kokoka mpe ya sembo, mpe kotosa yango epesaka mbano monene. (Nzembo 19:7-11) Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Moto oyo azali kotalatala na kati ya mobeko ya kokoka oyo ezali ya bonsomi mpe oyo azali kotingama na yango, moto wana, lokola akómi moyoki oyo abosanaka te, kasi moto oyo azali kosala mosala, akozala na esengo na kosaláká yango.” (Yakobo 1:25) Soki tosepelaka mpenza na mobeko ya Yehova, mokolo ata moko te ekoleka kozanga ete tótalela makambo ya elimo. Ya solo, tokozala na mposa ya ‘kolukaluka na kati ya makambo mozindo ya Nzambe’ mpe ya kotya makambo ya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso. —1 Bakolinti 2:10-13; Matai 6:33.
Akómaka lokola nzete
13-15. Na ndenge nini tokoki kozala lokola nzete oyo elonami penepene ya liziba ya mai ebele?
13 Mokomi ya Nzembo alobi lisusu boye mpo na moto ya sembo: “[Akokóma, NW] lokola nzete oyo ekonami penepene ya bitima ya mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekokauka te. Nyonso ekosalaka ye [ekolonga, NW].” (Nzembo 1:3) Lokola bato mosusu nyonso oyo bazangi kokoka, biso basaleli ya Yehova mpe tokutanaka na mikakatano na bomoi na biso. (Yobo 14:1) Tokoki kokutana na minyoko mpe komekama mosusu ndenge na ndenge mpo na kondima na biso. (Matai 5:10-12) Kasi, na lisalisi ya Nzambe, tokoki kolonga koyikela mikakatano yango mpiko, kaka ndenge nzete ya makasi etɛlɛmaka atako mopɛpɛ ezali makasi.
14 Nzete oyo elonami penepene ya liziba oyo ebimisaka mai ntango nyonso ekaukaka te na ntango ya moi to na eleko oyo ezangi mbula. Soki tozali bato oyo babangaka Nzambe, makasi na biso ezali kouta na Liziba oyo ebimisaka mai ntango nyonso, elingi koloba, Yehova Nzambe. Paulo atalelaki Nzambe mpo na kozwa lisalisi mpe alobaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Bafilipi 4:13) Soki elimo ya Yehova ezali kotambwisa mpe kosalisa biso, tokokauka te, tokozanga te kobota mbuma mpe tokokufa te na elimo. Tokobota mbuma na mosala ya Nzambe mpe tokomonisa mbuma ya elimo na ye.—Yilimia 17:7, 8; Bagalatia 5:22, 23.
15 Ntango asalelaki liloba ya Liebele oyo ebongolami “lokola,” mokomi ya nzembo asaleli bokokanisi. Azali kokokanisa makambo mibale oyo ekeseni, atako nyonso mibale ezali na ezaleli moko oyo ekokani. Bato ná banzete bakeseni, kasi ntango mokomi ya nzembo akanisaki ndenge nzete oyo elonami penepene ya liziba ya mai ebele etondaka na nkasa, yango etindaki ye akanisa bomoi malamu oyo bato oyo ‘basepelaka na mobeko ya Yehova’ bazalaka na yango na elimo. Soki tozali kosepela na mobeko ya Nzambe, mikolo na biso ekokóma lokola oyo ya nzete. Kutu, tokozala na bomoi ya seko.—Yoane 17:3.
16. Mpo na nini mpe ndenge nini ‘nyonso oyo tozali kosala ekolonga’?
16 Ntango tozali na bomoi moko ya bosembo, Yehova akosalisa biso tóyikela komekama mpe mikakatano mpiko. Tozali na esengo mpe tozali kobota mbuma na mosala ya Nzambe. (Matai 13:23; Luka 8:15) ‘Nyonso oyo tozali kosala ekolonga’ mpamba te mokano na biso ya libosoliboso ezali ya kosala mokano ya Yehova. Lokola mikano na ye elongaka ntango nyonso mpe tozali kosepela na bakomandema na ye, tozali na bomoi ya malamu na elimo. (Genese 39:23; Yosua 1:7, 8; Yisaya 55:11) Ezali bongo ata ntango tozali kokutana na mikakatano.—Nzembo 112:1-3; 3 Yoane 2.
Bato mabe bamonani lokola bazali na bomoi ya malamu
17, 18. (a) Mokomi ya nzembo akokanisi bato mabe na eloko nini? (b) Ata soki bato mabe bazali na biloko mingi na mosuni, mpo na nini bazali na libateli oyo ekoumela te?
17 Bomoi ya bato mabe ekeseni mpenza na oyo ya bayengebene! Mpo na mwa ntango, ekoki komonana lokola ete bato mabe bazali na bomoi moko malamu na mosuni, kasi na elimo, bazali na bomoi malamu te. Yango emonani polele na maloba ya mokomi ya nzembo oyo elandi: “Bato mabe bazali bongo te, kasi bazali lokola [mposo ya mbuma, NW] oyo epanzami na mopɛpɛ. Boye, bato mabe bakotɛlɛma kati na kosambisama te, mpe bato ya masumu bakoumela kati na koyangana ya bayengebene te.” (Nzembo 1:4, 5) Omoni ete mokomi ya nzembo alobi ete “bato mabe bazali bongo te.” Alingi koloba ete bazali te lokola bato oyo babangaka Nzambe, bato oyo auti kokokanisa bango na banzete oyo ebotaka mbuma mpe eumelaka mingi.
18 Ata soki bato mabe bazali na biloko mingi na mosuni, bazali na libateli oyo ekoumela te. (Nzembo 37:16; 73:3, 12) Bazali lokola mozwi ya zoba oyo Yesu alobelaki na ndakisa moko apesaki ntango basɛngaki ye akata likambo moko etali libula. Yesu alobaki boye na bato oyo bazalaki elongo na ye: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya ezaleli ya kolula biloko ya bato, mpamba te ata ntango moto azali na mingi bomoi na ye euti te na biloko oyo azali na yango.” Yesu amonisaki likambo yango na ndakisa moko; alobaki ete mabelé ya mozwi moko ebotaki mbuma mingi, bongo akanaki kobuka bandako na ye ya kobomba biloko mpe atonga bandako ya minene koleka mpo ekoka kobomba biloko na ye nyonso ya malamu. Na nsima, moto yango akanaki kolya, komɛla mpe komisepelisa. Kasi Nzambe alobaki boye: “Zoba, na butu oyo bakosɛnga yo molimo na yo. Boye, nani akozwa biloko oyo otondisi esika moko?” Mpo na konyata likanisi na ye wana ya ntina, Yesu alobaki lisusu boye: “Ezali mpe bongo mpo na moto oyo abombi eloko ya motuya mpo na ye moko kasi azali moto ya bomɛngo te epai ya Nzambe.”—Luka 12:13-21.
19, 20. (a) Lobelá ndenge bazalaki kotutatuta mpe kopupola mbuma na ntango ya kala. (b) Mpo na nini bakokanisi bato mabe na mposo ya mbuma?
19 Bato mabe bazali ‘bato ya bomɛngo epai ya Nzambe’ te. Yango wana, bazali na libateli te mpe bapikami te, ndenge moko kaka na mposo oyo ezipaka mbuma lokola ya loso. Na ntango ya kala, nsima ya kobuka mbuma, bazalaki komema yango na esika ya kotutatuta yango; mbala mingi esika yango ezalaki patatalu mpe etombwanaki. Kuna, ezalaki na makalo ya kotutela, oyo ezalaki na mino ya mabanga to ya ebende na nse na yango mpe banyama bazalaki kobenda yango likoló ya bambuma mpo epanzapanza mwa banzete ya mbuma mpe elongola mposo ya mbuma yango. Na nsima, bazalaki kosalela nkanya moko ya kopupola mpo na kolɔkɔta mposo oyo esangani na mbuma mpe kobwaka yango likoló wana mopɛpɛ ezali kobɛta. (Yisaya 30:24, NW) Mbuma ezalaki kokwea na esika ya kotutatuta yango, nde mopɛpɛ ezalaki kolongola mwa banzete na yango pembeni mpe ezalaki komema mposo na yango mosika. (Luta 3:2) Nsima ya kolekisa mbuma yango na kiyungulu mpo na kolongola mabanga ya mikemike mpe biloko mosusu, ebongaki sikoyo mpo na kobomba yango to konika yango. (Luka 22:31) Kasi mposo ezalaki lisusu te.
20 Se ndenge mbuma ezalaki kokwea na mabelé mpe kobombama, kasi mposo ezalaki kokende na mopɛpɛ, ndenge moko mpe, bayengebene bakotikala nde bato mabe bakolongolama. Ya solo, tozali na esengo mpo mosika te, bato wana oyo basalaka mabe bakozala lisusu te libela na libela. Ntango bakolongolama, bato oyo basepelaka na mobeko ya Yehova bakopambwama mingi. Ya solo, nsukansuka, bato ya botosi bakozwa likabo ya Nzambe: bomoi ya seko.—Matai 25:34-46; Baloma 6:23.
“Nzela ya bayengebene” epambwami
21. Ndenge nini Yehova ‘ayebi bayengebene’?
21 Loyembo ya liboso esuki na maloba oyo: “Mpo ete [Yehova] ayebi nzela ya bayengebene, kasi nzela ya bato mabe ekobeba nyɛɛ.” (Nzembo 1:6) Ndenge nini Nzambe ‘ayebi bayengebene’? Soki tozali na etamboli moko ya sembo, tokoki kondima ete Tata na biso ya likoló azali komona ndenge tozali kotosa mibeko na ye na bomoi na biso mpe akotalela biso ete tozali basaleli na ye oyo andimi. Na yango, tokoki mpe tosengeli kobwaka mitungisi na biso nyonso epai na ye mpe kondima mpenza ete atyelaka biso likebi.—Ezekiele 34:11; 1 Petelo 5:6, 7.
22, 23. Nini ekokómela bato mabe mpe bayengebene?
22 “Nzela ya bayengebene” ekotikala libela na libela, kasi bato mabe oyo baboyi kosembolama bakokufa ntango Yehova akopesa bango etumbu. Mpe “nzela,” to etamboli na bango, ekosuka elongo na bango. Tokoki mpenza kotya elikya ete maloba oyo ya Davidi ekokokisama: “Nsima ya mwa ntango moke, moto ya mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te. Nde bato ya bopɔlɔ [bakozwa, NW] mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo. Bayengebene [bakozwa, NW] mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:10, 11, 29.
23 Oyo nde esengo tokozala na yango soki tozwi libaku malamu ya kozala na bomoi na paladiso na mabelé ntango bato mabe bakozala lisusu te! Na ntango yango, bato ya bopɔlɔ mpe bayengebene bakosepela na kimya ya solosolo, mpamba te bakosepela ntango nyonso na “mobeko ya [Yehova].” Kasi liboso likambo yango ekokisama, “ekateli ya Yehova” esengeli naino kokokisama. (Nzembo 2:7a, NW) Lisolo oyo elandi ekosalisa biso tóyeba soki ekateli yango ezali nini mpe soki ekozala na ntina nini mpo na biso mpe mpo na bato nyonso.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini moto oyo abangaka Nzambe azali na esengo?
• Nini emonisaka ete tosepelaka na mobeko ya Yehova?
• Ndenge nini moto akoki kozala lokola nzete oyo ezwaka mai mingi?
• Ndenge nini nzela ya bayengebene ekeseni na oyo ya bato mabe?
[Elilingi na lokasa 11]
Libondeli ekosalisa biso tóboya kozala baninga ya bato mabe
[Elilingi na lokasa 12]
Mpo na nini moyengebene azali lokola nzete?