Kominanola na ndenge ya malamu
“Ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”—1 BAKOLINTI 10:31.
1, 2. Mpo na nini tokoki kotalela makambo oyo tosalaka mpo na kosepelisa nzoto lokola “likabo ya Nzambe,” kasi likebisi nini ya polele Biblia epesi?
EZALI mabe te koluka kosepelisa nzoto. Yehova, Nzambe na biso ya esengo, alingi tósepela na bomoi, mpe apesaka biso biloko nyonso beboo mpo tósepela. (1 Timote 1:11; 6:17) Salomo, Mokonzi ya bwanya, akomaki boye: “Nayebi ete eloko mosusu eleki oyo te ete básepela . . . mpe ete moto na moto alya mpe amɛla mpe ayoka esengo mpo na malamu ya mosala na ye nyonso. Yango likabo ya Nzambe.”—Mosakoli 3:12, 13.
2 Esengo oyo eyaka ntango moto apemi mpo na kotala “malamu ya mosala na ye nyonso” ekitisaka mpenza motema, mingimingi soki azali elongo na bandeko mpe baninga na ye. Tokoki mpenza kotalela yango lokola “likabo ya Nzambe.” Kasi, elingi koloba te ete lokola Mozalisi na biso apesaka biso biloko nyonso beboo, tókóma kaka biyenga na biyenga. Biblia epekisi milangwa, lokoso, pite mpe ekobo, mpe elobi ete bato oyo basalaka makambo ya ndenge wana “bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”—1 Bakolinti 6:9, 10; Masese 23:20, 21; 1 Petelo 4:1-4.
3. Nini ekosalisa biso tólala mpɔngi te na elimo mpe tóbosana te mokolo monene ya Yehova?
3 Na mikolo ya nsuka mpe ya mpasi oyo, esengeli baklisto bátambolaka na mokili oyo ya mabe na bokɛngi lisusu koleka, mpo bálanda makambo na yango te. (Yoane 17:15, 16) Ndenge esakolamaki, bato lelo oyo bakómi “bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe,” mpe bazali ata kotya “likebi te” na makambo oyo ezali komonisa polele ete “bolɔzi moko monene” ekómi pene. (2 Timote 3:4, 5; Matai 24:21, 37-39) Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bókeba na bino moko ete mitema na bino ekóma kilo ata moke te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, mpe ete na pwasa mokolo wana ekwela bino na ntango wana kaka lokola motambo.” (Luka 21:34, 35) Lokola tozali basaleli ya Nzambe, ekateli na biso ezali ya kotosa maloba wana ya Yesu. Na bokeseni na bato ya mokili mabe oyo tofandi na bango, tosalaka nyonso mpo tólala mpɔngi te na elimo mpe tóbosana te mokolo monene ya Yehova.—Sefania 3:8; Luka 21:36.
4. (a) Mpo na nini ezalaka mpasi kominanola na ndenge ya malamu? (b) Toli nini epesami na Baefese 5:15, 16 oyo tosengeli kolanda?
4 Kokima makambo mabe ya mokili oyo ezali pɛtɛɛ te, mpamba te Zabolo akómisi yango kitoko mpe atondisi yango bipai nyonso. Ekómaka lisusu mpasi makasi ntango tozali kopona lolenge ya kominanola to kosepelisa nzoto. Makambo mingi oyo mokili ezali kobimisa ezali mpo na kolamusa “bamposa ya mosuni.” (1 Petelo 2:11) Masano ya mabe ekómi kolakisama mpe kotɛkama polelepolele, kasi ekoki mpe kokɔta tii na bandako na nzela ya mikanda, ya televizyo, ya Internet mpe bafilme. Nzokande, Liloba ya Nzambe ezali kopesa baklisto toli ya malamu mpenza oyo: “Bókeba mpenza mpo ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, komisombeláká ntango oyo ebongi, mpamba te mikolo ezali mabe.” (Baefese 5:15, 16) Kaka soki tolandi mpenza toli yango nde kominanola ya mabe ekolonga te kobenda biso, kolya ntango na biso, ata mpe kobebisa boyokani na biso na Yehova, mpe na nsuka komema biso na liwa!—Yakobo 1:14, 15.
5. kopema ya solosolo eutaka na nini?
5 Lokola baklisto basalaka mingi, bazalaka ntango mosusu na mposa ya kominanola mwa moke. Kutu, Mosakoli 3:4 elobi ete ezali na “ntango ya kosɛka” mpe “ntango ya kobina.” Na yango, Biblia elobi te ete kominanola ezali nde kobebisa ntango. Nzokande, kominanola esengeli kokitisa biso motema, kasi te kotya biso na likama ya elimo. Baklisto oyo bakɔmeli bayebi ete moto azwaka esengo ya solosolo soki azali kokabela basusu. Batyaka mokano ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango mpe bazwaka ‘kopema ya solosolo mpo na milimo na bango’ lokola bandimaka komema ekanganeli ya Yesu oyo ezali pɛpɛlɛ.—Matai 11:29, 30; Misala 20:35.
Lolenge ya kominanola ya malamu
6, 7. Nini ekoki kosalisa yo oyeba lolenge ya kominanola ya malamu?
6 Ndenge nini tokoki koyeba ete lolenge boye to boye ya kominanola ezali malamu mpo na moklisto? Baboti basalisaka bana na bango na likambo yango, mpe bankulutu bapesaka lisalisi oyo esengeli. Kasi, esengeli kaka te bato mosusu báyebisaka biso ete buku, filme, lisano, mabina to nzembo boye to boye ezali mabe. Paulo alobaki ete “bato oyo bakɔmeli, . . . makoki na bango ya kososola, lokola bazali kosalela yango, eteyami mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebele 5:14; 1 Bakolinti 14:20) Biblia epesi biso mitinda oyo esengeli kotambwisa biso. Lisosoli na yo oyo eteyami na Liloba ya Nzambe ekosalisa yo soki ozali koyokela yango.—1 Timote 1:19.
7 Yesu alobaki ete “na mbuma na yango nde nzete eyebanaka.” (Matai 12:33) Soki lolenge moko ya kominanola ekómi kotinda biso tólinga mingi makambo lokola mobulu, pite, ekobo to bikelakela, tosengeli koboya yango. Tosengeli mpe koboya yango soki ezali kotya bomoi to nzoto na biso na likama, soki ekoki kolya biso mbongo nyonso to kolɛmbisa biso nzoto to soki ekoki kobɛtisa basusu libaku. Ntoma Paulo akebisaki biso ete soki tozali kozokisa lisosoli ya ndeko na biso, tozali kosala lisumu. Akomaki boye: “Ntango bozali kosalela bandeko na bino lisumu na ndenge wana mpe kozokisa lisosoli na bango oyo ezali na bolɛmbu, bozali kosalela Klisto lisumu. Na yango, soki eloko moko ya kolya ezali kobɛtisa ndeko na ngai libaku, nakolya lisusu mosuni soki moke te, mpo nabɛtisa ndeko na ngai libaku te.”—1 Bakolinti 8:12, 13.
8. Masano ya video, ya ordinatɛrɛ mpe bafilme ezali na likama nini?
8 Masano ya ordinatɛrɛ, ya video mpe bafilme etondi mpenza kotonda na bamagazini mpe na bazando. Masano yango mosusu ekoki kozala ya malamu mpenza, kasi mingi kati na yango elakisaka makambo oyo Biblia epekisi. Soki moto azali kotala lisano ya video oyo basani na yango bazali kozokisa mpe koboma to kosala makambo ya nsɔni, tokoki koloba te ete asali eloko te. Yehova ayinaka bato oyo ‘balingi mobulu.’ (Nzembo 11:5; Masese 3:31; Bakolose 3:5, 6) Lisusu, soki lisano moko ezali kotinda yo okóma lokoso to mobulu, ezali kolɛmbisa yo na makanisi to ezali kolya yo ntango mingi, yebá ete ezali kobebisa yo na elimo mpe salá noki mpenza otika yango.—Matai 18:8, 9.
Kominanola na ndenge oyo ebongi
9, 10. Bato ya bososoli basalaka nini mpo na kokokisa mposa na bango ya kominanola?
9 Ntango mosusu, baklisto bamitunaka ete: “Wapi lolenge ya malamu ya kominanola? Lolenge mingi ya kominanola oyo mokili ezali kobimisa eyokanaka te na mitinda ya Biblia.” Yebá ete lolenge ya malamu ya kominanola ezangi te, kasi esɛngaka milende. Esɛngaka, mingimingi na baboti, bákanisa malamu liboso. Baklisto mingi basepelaka kominanola na kati ya libota mpe na bandeko ya lisangá. Kolya mpe komɛla ntango bozali kobɛta masolo ya makambo oyo bokutanaki na yango na mokolo wana to masolo ya Biblia ezalaka esengo mingi mpe elendisaka. Bokoki kobongisaka pikiniki, masano, to kobima elongo. Lolenge wana ya kominanola ekoki komema esengo mpe matomba mosusu.
10 Nkulutu moko ná mwasi na ye oyo babɔkɔlaki bana misato balobi boye: “Ntango bana na biso bazalaki naino mike, tozalaki mpe kopesa bango libaku ya kopona epai balingi tókende konje. Mbala mosusu, tozalaki koloba na mwana mokomoko abenga moninga na ye moko ya malamu mpo tókende na ye, mpe yango ezalaki kokómisa bakonje na biso kitoko lisusu koleka. Tozalaki kobosana te makambo mosusu ya ntina mingi na bomoi ya bana na biso. Tozalaki ntango mosusu kobenga bandeko na biso ya makila mpe baninga ya lisangá na ndako na biso. Tozalaki kolamba mpe kolya na libándá mpe kosakana. Tozalaki kokende kotambola na likoló ya bangomba na motuka mpe na makolo, mpe mabaku yango ezalaki kosalisa biso tóyeba biloko mingi oyo Yehova akelá.”
11, 12. (a) Bokoki kosala nini mpo na kokɔtisa bato mosusu ntango bozali komibongisa mpo na kominanola? (b) Kominanola ya ndenge nini bato mingi babosanaka te?
11 Bokoki kofungwama, ezala moto na moto to libota mobimba, mpe kokanisaka bato mosusu ntango bozali komibongisa mpo na kominanola. Bato mosusu, lokola basi bakufelá mibali, baoyo babalá te to baboti oyo bazali kobɔkɔla bana na bango kaka bango moko, bakoki kozala na mposa ya bilendiseli. (Luka 14:12-14) Bokoki mpe kobengaka bato mosusu oyo bayei sika na lisangá, kasi bosengeli kokeba ete bómemela basusu baninga ya mabe te. (2 Timote 2:20, 21) Soki bibɔsɔnɔ bazali na likoki ya kobima te, bokoki ntango mosusu komema bilei na ndako na bango mpo na kolya elongo na bango.—Baebele 13:1, 2.
12 Bato mingi babosanaka te ntango moko oyo balekisaki elongo na bandeko, balyaki elongo, bayokaki basusu bazali koyebisa ndenge bakómaki baklisto mpe nini esalisaki bango bátikala sembo epai ya Nzambe. Bokoki kotuna mituna ya Biblia mpe kosɛnga bayangani nyonso, ezala mpe bilɛngɛ, bápesa biyano. Masolo ya ndenge wana ekoki kopesa bayangani likoki ya kolendisana, kozanga ete báyokisa moto moko nsɔni.
13. Ndakisa nini Yesu ná Paulo batiká na oyo tosengeli kosalaka ntango toyambi bato to ntango bato mosusu bayambi biso?
13 Yesu atiká ndakisa malamu mpenza na oyo tosengeli kosala soki toyambi bapaya to bato mosusu bayambi biso. Azalaki ntango nyonso kosalela mabaku ya ndenge wana mpo na kolendisa bato na elimo. (Luka 5:27-39; 10:42; 19:1-10; 24:28-32) Bayekoli na ye ya liboso balandaki ndakisa na ye. (Misala 2:46, 47) Ntoma Paulo akomaki boye: “Nazali na mposa makasi ya komona bino, mpo nakabela bino mwa likabo ya elimo mpo bókóma makasi; to, kutu nde, mpo kolendisana ezala na kati na bino, moto na moto alendisama na kondima ya mosusu, na oyo ya bino mpe na oyo ya ngai.” (Baloma 1:11, 12) Biso mpe tosengeli kolendisanaka soki tokutani mpo na kominanola.—Baloma 12:13; 15:1, 2.
Batoli mpe makebisi
14. Mpo na nini ezali malamu te koyanganisaka bato ebeleebele?
14 Ezali malamu te koyanganisaka bato ebeleebele, mpamba te ezalaka mpasi kotya molɔngɔ. Mabota mosusu bakoki kopona ntango moko oyo basalaka makambo ya elimo te mpo na kokende na pikiniki elongo to kosakana kozanga ete báluka kowelana. Soki bankulutu, basaleli na misala to bandeko mosusu oyo bakɔmeli na elimo bazali na bokutani moko ya ndenge wana, bapesaka ndakisa malamu mpe yango ekoki kolendisa lisusu makasi.
15. Mpo na nini tosengeli kofungola miso ntango toyambi bato?
15 Ntango bokutani mpo na komisepelisa, baoyo babongisaki libaku yango basengeli kokeba ete makambo nyonso esalema na molɔngɔ. Atako osepelaka mingi koyamba bato, okozala nde na esengo soki oyoki ete, lokola okɛngɛlaki malamu te, likambo oyo esalemaki na ndako na yo ebɛtisaki ndeko moko libaku? Talá etinda oyo ezali na Deteronome 22:8. Moyisalaele oyo azali kotonga ndako ya sika asengelaki kotya lopango na likoló ya ndako yango, esika oyo bazalaki kosalela mingimingi mpo na koyamba bapaya. Mpo na nini? “Na ntina ete oyeisa ekweli ya kufa na ndako na yo te, soki moto akwei na yango.” Ndenge moko, makambo oyo okosala kozanga kolekisa ndelo mpo na kobatela bato oyo oyanganisi, esengeli komonisa ete ozali mpe komibanzabanza mpo na bolamu na bango ya mosuni mpe ya elimo.
16. Likambo nini tosengeli kotalelaka soki topesi bapaya na biso masanga?
16 Soki opesi bango masanga, osengeli kozala mayele. Baklisto mingi oyo bayambaka bato epai na bango bapesaka bango masanga kaka soki bayebi ete bango moko bakokɛngɛla mpo moto alekisa ndelo te. Tosengeli kopesa nzela te na likambo moko oyo ekoki kobɛtisa basusu libaku to kotinda moto alekisa ndelo. (Baefese 5:18, 19) Mpo na bantina ndenge na ndenge, bapaya mosusu baboyaka komela masanga. Na bisika mingi, mibeko epekisi bana mike komɛla masanga, mpe baklisto basengeli kotosa mibeko ya Kaisala ata soki emonani ete mibeko yango eleki ndelo.—Baloma 13:5.
17. (a) Soki bokobɛta miziki ntango boyangani mpo na komisepelisa, mpo na nini ezali na ntina ye oyo ayambi bato apona miziki ya malamu? (b) Soki bozali kobina na esika oyo boyangani, ndenge nini bosengeli komonisa bokatikati?
17 Moto oyo ayambi bato asengeli kokeba ete miziki, mabina to masano oyo ekosalema ezala na boyokani na mitinda ya boklisto. Bato na bato bazali na miziki oyo basepelaka na yango, mpe miziki ezali ndenge na ndenge. Kasi, miziki mingi lelo oyo ezali kotinda bato na botomboki, pite, ekobo mpe mobulu. Tosengeli koponaka miziki. Miziki ya malamu ezali kaka te oyo ezangi makelele, kasi esengeli mpe te kozala na maloba ya mbindo mpe kobɛta na lokito makasi. Esengeli te kotikela moto oyo alingaka kaka kobɛta miziki makasimakasi apona miziki oyo ekobɛta. Mabina ya mabemabe, oyo esɛngaka koningisa loketo mpe mabɛlɛ makasimakasi, ebongi soki moke te mpo na moklisto.—1 Timote 2:8-10.
18. Ndenge nini baboti bakoki kobatela bana na bango ntango bakei kosepela na baninga?
18 Baklisto basengeli koluka koyeba makambo oyo ebongisami na bokutani moko epai babengi bana na bango, mpe mbala mingi ekozala malamu bákende elongo na bango. Likambo ya mawa, baboti mingi batikaki bana bákende bango moko na bokutani epai bato mingi oyo bazalaki wana bakweaki na pite to makambo mosusu ya nsɔni. (Baefese 6:1-4) Ata soki bana bakómi mikóló mpe emonani mpenza ete bakoki kosala bozoba te, esengeli kaka kosalisa bango na ‘kokima bamposa oyo ekangani na bolenge.’—2 Timote 2:22.
19. Likambo nini ekoki kosalisa biso tótya makanisi na biso nyonso na eloko oyo tosengeli “koluka liboso” na bomoi na biso?
19 Kominanola na ndenge ya malamu ekoki kokómisa bomoi esengo. Yehova apimelá biso esengo yango te, kasi biso moko toyebi malamu ete kominanola ya ndenge wana kaka te nde ekosalisa biso na komibombela biloko ya motuya na likoló. (Matai 6:19-21) Yesu asalisaki bayekoli na ye báyeba ete “koluka liboso bokonzi mpe boyengebene” ya Nzambe ezali likambo eleki ntina na bomoi ya moto, kasi te biloko oyo tokoki kolya, komɛla to kolata, “biloko oyo bikólo mosusu balukaka na lokoso mpenza.”—Matai 6:31-34.
20. Basaleli ya Yehova ya sembo bazali kozela makambo nini ya malamu oyo Mopesi Monene alaki bango?
20 Ya solo, ezala tozali “kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu,” tokoki kosala “makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe” mpe kotɔnda Mopesi Monene mpo na biloko ya malamu oyo apesi biso, oyo tozali kosepela na yango na bokatikati. (1 Bakolinti 10:31) Na paladiso ya mabelé oyo ekómi pene, biso ná baninga ya malamu oyo bakokokisa masɛngami na ye ya sembo tokozala na mabaku ebele ya kosepela na biloko oyo Yehova akopesa biso.—Nzembo 145:16; Yisaya 25:6; 2 Bakolinti 7:1.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini baklisto lelo oyo bazali na mokakatano ya kominanola na ndenge ya malamu?
• Wapi mwa balolenge ya kominanola oyo ezalaka malamu mpenza mpo na mabota ya baklisto?
• Atako tozali kominanola na ndenge ya malamu, batoli mpe makebisi nini tosengeli kobosana te?
[Elilingi na lokasa 18]
Ponáká lolenge ya kominanola oyo ebotaka mbuma malamu
[Bililingi na lokasa 19]
Wapi lolenge ya kominanola oyo baklisto baboyaka?