Ozali na ngámbo ya bokonzi ya Yehova?
“Bóloba kati na mabota ete, [Yehova] azali mokonzi!”—Nzembo 96:10.
1, 2. (a) Likambo nini ya kokamwa esalemaki soki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 29 T.B.? (b) Likambo yango elimbolaki nini mpo na Yesu?
LIKAMBO moko ya kokamwa, oyo emonanaki naino te na mabelé, esalemaki soki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 29 ya ntango na biso (T.B.). Matai, moko ya bato oyo bakomaki Baevanzile, alobi boye: “Nsima ya kobatisama, Yesu na mbala moko abimaki na mai; mpe, talá! likoló efungwamaki, mpe [Yoane Mobatisi] amonaki elimo ya Nzambe ezali kokita lokola ebenga koyáká likoló na [Yesu]. Talá! Ezalaki lisusu na mongongo moko uta na likoló oyo elobaki ete: ‘Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.’” Oyo ezali moko ya mwa makambo oyo bakomi nyonso minei ya Baevanzile balobeli.—Matai 3:16, 17; Malako 1:9-11; Luka 3:21, 22; Yoane 1:32-34.
2 Elimo santu oyo ekitelaki Yesu emonisaki ete akómi Mopakolami, oyo elimboli Masiya to Klisto. (Yoane 1:33) Nsukansuka, “momboto” oyo alakamaki amonanaki! Moto oyo Satana asengelaki koswa na litindi mpe oyo asengelaki kopanza motó ya Satana, monguna monene ya Yehova mpe ya bokonzi na Ye, ye wana azalaki liboso ya Yoane Mobatisi. (Genese 3:15) Kobanda wana, Yesu ayebaki ete asengeli kosala makasi mpo na kokokisa mokano ya Yehova oyo etali boyangeli mpe Bokonzi na ye.
3. Ndenge nini Yesu amibongisaki mpo na mokumba oyo azalaki na yango ya kolongisa Bokonzi ya Yehova?
3 Mpo na komibongisa mpo na mosala oyo ezalaki kozela ye, “Yesu, wana atondaki na elimo santu, alongwaki na Yolodani, mpe amemamaki epai na epai na elimo na kati ya esobe.” (Luka 4:1; Malako 1:12) Kuna, na boumeli ya mikolo 40, Yesu akanisaki na mozindo ntembe oyo Satana abimisaki mpo na boyangeli ya Nzambe mpe oyo asengelaki kosala mpo na kolongisa Bokonzi ya Yehova. Ntembe yango etali bikelamu nyonso ya mayele: kuna na likoló mpe awa na mabelé. Na yango, tosengeli kotala etamboli ya sembo ya Yesu mpo na koyeba oyo tosengeli kosala mpo na komonisa ete biso mpe tolingi kolongisa bokonzi ya Yehova.—Yobo 1:6-12; 2:2-6.
Satana amonisi polele botɛmɛli na ye mpo na Bokonzi ya Yehova
4. Likambo nini Satana asalaki oyo emonisi ete atyelaki bokonzi ya Nzambe ntembe?
4 Na ntembe te, makambo nyonso oyo touti kolobela esalemaki na miso ya Satana. Kozanga kobungisa ntango, abandaki kobundisa mwana ya liboso na kati ya “momboto” ya “mwasi” ya Nzambe. (Genese 3:15) Mbala misato mobimba, Satana amekaki Yesu mpe asɛngaki ye asala makambo mpo na koluka litomba mpo na ye moko na esika ya kosala mokano ya Tata na ye. Komekama ya misato emonisaki polele ntembe oyo Satana abimisaki na ntina na boyangeli ya Nzambe. Alakisaki Yesu “makonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango” mpe alobaki na ye na lolendo nyonso ete: “Biloko oyo nyonso nakopesa yo soki okwei na nse mpe osambeli ngai.” Lokola Yesu ayebaki ete “makonzi nyonso ya mokili” ezali na mabɔkɔ ya Zabolo, amonisaki ete azali na ngámbo ya Nzambe mpe ayanolaki ete: “Longwá awa, Satana! Mpo ekomamá ete, ‘Ezali Yehova Nzambe na yo nde osengeli kosambela, mpe ezali kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’”—Matai 4:8-10.
5. Mokumba nini ya mpasi Yesu asengelaki kokokisa?
5 Bomoi ya Yesu emonisaki polele ete kolongisa bokonzi ya Yehova ezalaki likambo ya liboso mpo na ye. Yesu ayebaki ete asengeli kotikala sembo tii na kufa na mabɔkɔ ya Satana mpo na komonisa ete Nzambe azali na lotomo ya kozala mokonzi. Ndenge esakweli elobaki yango, liwa yango ezalaki lokola nde Satana aswi “momboto” ya mwasi na litindi. (Matai 16:21; 17:12) Asengelaki mpe kotatola ete Bokonzi ya Nzambe ezali ebongiseli oyo Yehova azwi mpo na kosukisa Satana mpe kozongisa kimya mpe molɔngɔ na kati ya bikelamu nyonso. (Matai 6:9, 10) Yesu asalaki nini mpo na kokokisa mokumba wana ya mpasi?
“Bokonzi ya Nzambe ekómi pene”
6. Ndenge nini Yesu amonisaki ete Bokonzi ezali ebongiseli oyo Nzambe akosalela mpo na “kobukabuka misala ya Zabolo”?
6 Libosoliboso, “Yesu akendaki na Galilai, kosakoláká nsango malamu ya Nzambe mpe kolobáká ete: ‘Ntango oyo etyamá ekoki, mpe bokonzi ya Nzambe ekómi pene.’” (Malako 1:14, 15) Alobaki ete: “Nasengeli . . . kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe . . . mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:18-21, 43) Atambolaki ekólo na bango mobimba, “koteyáká mpe kosakoláká nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 8:1) Yesu asalaki mpe makamwisi; na ndakisa aleisaki ebele ya bato, akitisaki mipɛpɛ mpe mai, abikisaki bato ya maladi mpe asekwisaki bakufi. Na makamwisi wana, Yesu amonisaki ete Nzambe akoki kolongola mabe mpe bampasi nyonso oyo eutá na botomboki oyo ebimaki na Edene mpe “kobukabuka misala ya Zabolo.”—1 Yoane 3:8.
7. Yesu atindaki bayekoli na ye básala nini, mpe matomba nini ezwamaki?
7 Mpo nsango malamu ya Bokonzi esakolama malamumalamu, Yesu ayanganisaki etuluku moko ya bayekoli ya sembo mpe abongisaki bango mpo na mosala yango. Ya liboso, atindaki bantoma na ye 12 bákende “kosakola bokonzi ya Nzambe.” (Luka 9:1, 2) Na nsima, atindaki bayekoli 70 bákende kosakola ete: “Bokonzi ya Nzambe ekómi pene na bino.” (Luka 10:1, 8, 9) Ntango bayekoli yango bazongaki mpe bayebisaki Yesu ete mosala yango eboti mbuma, alobaki ete: “Nabandaki komona Satana asili kokwea lokola mokalikali banda na likoló.”—Luka 10:17, 18.
8. Yesu amonisaki nini na bomoi na ye mobimba?
8 Yesu azalaki komipesa mingi mpo na kosakola Bokonzi, mpe azalaki kolekisa ata libaku moko te. Azalaki kosala makasi butu moi, mpe asundolaki ata bisengo ya mokili. Alobaki boye: “Bagambala bazalaka na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló bazalaka na bazumbu, kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó na ye te.” (Luka 9:58; Malako 6:31; Yoane 4:31-34) Mwa moke liboso akufa, Yesu alobaki na mpiko nyonso liboso ya Pilato ete: “Ezali mpo na yango nde nayaki na mokili, mpo napesa litatoli na ntina etali solo.” (Yoane 18:37) Yesu amonisaki na bomoi na ye mobimba ete ayaki na mabelé kaka te mpo azala moteyi monene, asalaka makamwisi to kaka amikaba mpo na kobikisa bato, kasi ezalaki nde mpo na kolongisa mokano ya Nzambe mpe kotatola ete Nzambe akokokisa mokano na ye na nzela ya Bokonzi na ye.—Yoane 14:6.
“Ekokisami!”
9. Ndenge nini Satana aswaki “momboto” ya mwasi ya Nzambe na litindi?
9 Nyonso oyo Yesu asalaki mpo na Bokonzi esepelisaki Monguna, Satana Zabolo ata moke te. Mbala na mbala, na nzela ya “momboto” na ye awa na mabelé, ezala bakonzi ya politiki to ya mangomba, Satana alukaki koboma “momboto” ya mwasi ya Nzambe. Banda kobotama ya Yesu tii na liwa na ye, Satana ná bato na ye bazalaki koluka koboma ye. Nsukansuka, na eleko ya molunge ya mobu 33 T.B., ntango ekokaki mpo Mwana ya moto akabama na mabɔkɔ ya Monguna mpo aswa ye na litindi. (Matai 20:18, 19; Luka 18:31-33) Baevanzile emonisi polele ndenge Satana asalelaki bato, kobanda na Yuda Mokeliota tii na banganga-nzambe minene, bakomeli, Bafalisai mpe Baloma, mpo na kokweisa Yesu mpe koboma ye na liwa moko ya mpasi likoló ya nzete.—Misala 2:22, 23.
10. Liwa ya Yesu likoló ya nzete ya mpasi ekokisaki libosoliboso likambo nini?
10 Nini eyelaka yo libosoliboso na makanisi soki ozali kokanisa ndenge Yesu azalaki konyokwama na nzete ya mpasi mpe kobunda na liwa? Ekoki kozala ete okanisaka ndenge amikabaki mpo na kosikola bato ya masumu. (Matai 20:28; Yoane 15:13) Okoki mpe kokamwa na bolingo monene oyo Yehova amonisaki mpo na kopesa mbeka yango. (Yoane 3:16) Ntango mosusu oyokaka lokola mokonzi ya basoda ya Loma oyo alobaki ete: “Ya solo oyo azalaki Mwana ya Nzambe.” (Matai 27:54) Na ntembe te, makanisi nyonso wana ezali mabe te. Nzokande, kobosana te maloba ya nsuka oyo Yesu alobaki likoló ya nzete ya mpasi: “Ekokisami!” (Yoane 19:30) Nini ekokisamaki? Atako liwa ya Yesu ekokisaki makambo mingi, ayaki nde te awa na mabelé libosoliboso mpo na kosilisa ntembe oyo Satana abimisaki na ntina na boyangeli ya Yehova? Esakolamaki te ete “momboto” akonyokwama makasi na mabɔkɔ ya Satana mpo na kolongola nsɔni nyonso oyo Satana abwakaki likoló ya nkombo ya Yehova? (Yisaya 53:3-7) Atako mikumba yango ezalaki kilo, Yesu akokisaki yango malamu mpenza. Oyo nde elonga monene!
11. Yesu akosala nini mpo na kokokisa, na mobimba na yango, esakweli oyo Yehova apesaki na Edene?
11 Lokola atikalaki sembo, Yesu asekwisamaki te lokola moto, kasi lokola “elimo oyo epesaka bomoi.” (1 Bakolinti 15:45; 1 Petelo 3:18) Yehova alakaki Mwana na ye ete: “[Fandá] na lobɔkɔ na ngai ya mobali kino ekotya ngai bayini na yo lokola etɛmɛlo ya makolo na yo.” (Nzembo 110:1) “Bayini” ezali monguna monene, Satana, mpe bato nyonso oyo bazali na kati ya “momboto” na ye. Lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, Yesu Klisto akosukisa batomboki nyonso, ezala na likoló to awa na mabelé. (Emoniseli 12:7-9; 19:11-16; 20:1-3, 10) Na ntango wana, esakweli ya Genese 3:15 ekokokisama na mobimba na yango, ndenge moko mpe libondeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye bábondelaka ete: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.”—Matai 6:10; Bafilipi 2:8-11.
Ndakisa oyo tosengeli kolanda
12, 13. (a) Nsango malamu oyo ezali kosakolama lelo oyo ebimisi matomba nini? (b) Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kolanda matambe ya Klisto?
12 Lelo oyo, ndenge Yesu alobaki yango, nsango malamu ezali kosakolama na mikili mingi. (Matai 24:14) Yango wana, bamilio ya bato basili komipesa na Nzambe. Bazali kosepela na mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe ekomema. Bazali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela, na kimya, na paladiso awa na mabelé, mpe bazali koyebisa basusu elikya na bango na esengo nyonso. (Nzembo 37:11; 2 Petelo 3:13) Yo mpe ozali moko ya basakoli yango ya Bokonzi? Soki ezali bongo, topesi yo longonya. Nzokande, ezali na likambo mosusu oyo mokomoko na biso asengeli kobosana te.
13 Ntoma Petelo akomaki boye: “Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (1 Petelo 2:21) Simbá ete awa, Petelo atángi te molende ya Yesu na mosala ya kosakola to mayele na ye ya koteya, kasi nde mpasi na ye. Petelo amonaki na miso na ye moko ndenge Yesu andimaki komona mpasi mpo na kotosa bokonzi ya Yehova mpe komonisa ete Satana azali mokosi. Kasi, ndenge nini biso tokoki kolanda matambe ya Yesu? Tosengeli komituna boye: ‘Nandimaka mpenza konyokwama mpo na komonisa ete nazali na ngámbo ya Bokonzi ya Yehova mpe mpo na kopesa yango lokumu? Ndenge oyo nazali kotambwisa bomoi na ngai mpe ndenge oyo nasalaka mosala ya kosakola emonisaka ete natyaka bokonzi ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ngai?’—Bakolose 3:17.
14, 15. (a) Yesu asalaki nini ntango bazalaki kopesa ye makanisi oyo ebongaki te, mpe mpo na nini? (b) Likambo nini tosengeli kobosanaka te? (Salelá mpe makanisi oyo ezali na etanda “Monisá ete ozali na ngámbo ya Yehova.”)
14 Mokolo na mokolo, tokutanaka na mikakatano mpe tozwaka bikateli, ya minene mpe ya mike. Likambo nini tosengeli kobosanaka te na nyonso wana? Na ndakisa, tokosala nini soki tomekami mpo na kosala likambo moko oyo ekofingisa nkombo ya baklisto? Yesu asalaki nini ntango Petelo alobaki na ye ete azala na boboto epai na ye moko? Yesu alobaki na ye ete; “Leká nsima na ngai, Satana! . . . Ozali kokanisa, makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.” (Matai 16:21-23) Tokolanda ndakisa ya Yesu soki tozwi libaku moko ya kozwa mbongo mingi to ya komata na mosala, oyo ekoki kozongisa biso nsima na elimo? Ntango Yesu amonaki ete bato oyo bamonaki makamwisi na ye “balingaki báya kokanga ye mpo na kotya ye mokonzi,” alongwaki mbala moko na esika wana.—Yoane 6:15.
15 Mpo na nini Yesu azwaki bikateli makasi bongo na mabaku wana mpe mosusu? Ezali mpo amonaki polele ete ezalaki na likambo moko oyo ezalaki na ntina mingi koleka matomba na ye moko. Alingaki kosala mokano ya Tata na ye mpe kosimba bokonzi ya Yehova, ata soki yango ekomemela ye mpasi ya ndenge nini. (Matai 26:50-54) Yango wana, soki tozali kobosana ntembe oyo Satana abimisaki na ntina na bokonzi ya Yehova, tokoki kobanda kokakola kondima na biso to mpe kokwea na mitambo ya Satana. Mpo na nini? Mpo Satana, oyo ayebi mpenza kobimisa mabe lokola malamu mpe malamu lokola mabe, ndenge asalaki ntango akosaki Eva, akoki kozwa biso na mitambo na ye.—2 Bakolinti 11:14; 1 Timote 2:14.
16. Ntango tozali kosalisa basusu, mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala nini?
16 Na mosala ya kosakola, tosalaka nyonso mpo na kolobela makambo oyo ezali kotungisa bato mpe kolakisa bango biyano ya Biblia. Yango ezali lolenge ya malamu mpenza ya kopesa bango mposa ya koyekola Biblia. Nzokande, mokano na biso ya libosoliboso ezali te kaka ya kosalisa bato báyeba oyo Biblia ezali koloba to mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe ekomema. Tosengeli kosalisa bango báyeba ntembe oyo Satana abimisá na ntina na bokonzi ya Nzambe. Balingi nde kokóma baklisto ya solo, ‘komema nzete na bango ya mpasi’ mpe konyokwama mpo na Bokonzi? (Malako 8:34) Balingi mpenza kosangana na baoyo bazali na ngámbo ya bokonzi ya Nzambe mpe komonisa ete Satana azali mokosi? (Masese 27:11) Tozali mpenza na libaku malamu ya komisalisa mpe kosalisa basusu na likambo yango.—1 Timote 4:16.
Ntango Nzambe akokóma “makambo nyonso epai ya moto nyonso”
17, 18. Eleko nini ya nkembo tokoki kozela na elikya mpenza soki tozali komonisa ete toponi kolanda bokonzi ya Yehova?
17 Wana tozali kosala nyonso mpo na komonisa na etamboli na biso mpe na mosala ya kosakola ete toponi kolanda bokonzi ya Yehova, tokoki kozela na elikya mpenza ntango oyo Yesu Klisto “akozongisa bokonzi epai na Nzambe na ye mpe Tata.” Akosala yango ntango nini? Ntoma Paulo alobi boye: “ntango akosilisa kobebisa nyɛɛ guvɛrnema nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya. Mpo asengeli koyangela tii ntango Nzambe akosilisa kotya banguna nyonso na nse ya makolo na ye. . . . Na ntango yango Mwana ye moko mpe akomitya na nse ya Moto oyo atyaki biloko nyonso na nse na ye, mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.”—1 Bakolinti 15:24, 25, 28.
18 Ntango Nzambe akokóma “makambo nyonso epai ya moto nyonso” ekozala mpenza eleko ya nkembo na nkembo! Na ntango wana, Bokonzi ya Nzambe ekokokisa mokumba na yango. Batɛmɛli nyonso ya bokonzi ya Yehova bakosila nyɛɛ. Kimya mpe molɔngɔ ekozonga na molɔ́ngɔ́ mobimba. Ndenge mokomi ya nzembo alobaki yango, bikelamu nyonso ekoyemba ete: “Bópesa [Yehova] lokumu oyo ekoki na nkombo na ye; . . . Bóloba kati na mabota ete, [Yehova] azali Mokonzi!”—Nzembo 96:8, 10.
Okoki koyanola?
• Ndenge nini Yesu amonisaki ete abosanaki te ntembe oyo Satana abimisaki na ntina na boyangeli ya Nzambe?
• Mosala ya Yesu mpe liwa na ye ekokisaki libosoliboso likambo nini?
• Na ndakisa ya Yesu, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na ngámbo ya bokonzi ya Yehova?
[Etanda/Bililingi na lokasa 29]
MONISÁ ETE OZALI NA NGÁMBO YA YEHOVA
Ndenge bandeko ya Corée mpe ya bisika mosusu bayebi yango, soki baklisto bakutani na mikakatano ya makasi mpe babosani te ntina oyo mikakatano yango ekómeli bango, yango ekosalisa bango mingi.
Motatoli ya Yehova moko oyo akɔtaki bolɔkɔ na ntango ya boyangeli ya Bakoministe alobaki boye: “Eloko esalisaki biso tóyika mpiko ezali ete tobosanaki te ntembe oyo Satana abimisaki na elanga ya Edene na ntina na lotomo ya Yehova ya koyangela. . . . Toyebaki ete yango ezali libaku ya komonisa ete tozali na ngámbo ya bokonzi ya Yehova. . . . Yango epesaki biso makasi mpe esalisaki biso tótikala kaka sembo.”
Motatoli mosusu ayebisaki eloko oyo esalisaki ye ná Batatoli mosusu na kaa moko ya bakangami. Alobaki boye: “Yehova asungaki biso, mpe atako tozalaki konyokwama makasi, tozalaki kaka makasi na elimo. Tozalaki ntango nyonso kolendisana na likanisi ete toponi kozala na ngámbo ya Yehova na ntembe oyo Satana abimisaki na ntina ya boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba.”
[Elilingi na lokasa 26]
Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali na ngámbo ya bokonzi ya Yehova ntango Satana amekaki ye?
[Elilingi na lokasa 28]
Liwa ya Yesu ekokisaki makambo nini?