Ntina oyo tosengeli “kolanda Klisto”
“Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko . . . mpe alanda ngai ntango nyonso.”—LUKA 9:23.
1, 2. Mpo na nini ebongi tóyeba ntina oyo tosengeli kolanda “Klisto”?
YEHOVA asepelaka mpenza ntango amonaka bino bilenge mpe bato ya sika na kati ya ebele ya basaleli na ye! Wana bozali kokoba koyekola Biblia, koyangana na makita, mpe kokola na boyebi ya solo ya Liloba ya Nzambe oyo ezali kobikisa bomoi ya bato, bóbosanaka te maloba ya Yesu oyo: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mokolo na mokolo mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Luka 9:23) Yesu alingaki koloba ete komiboya mpe kokóma moyekoli na ye ezali likambo oyo tosengeli kosala. Na yango, tosengeli mpenza koyeba ntina oyo ebongi tólanda “Klisto.”—Mat. 16:13-16.
2 Ezali boni mpo na baoyo babandá kolanda Yesu Klisto eleki sikoyo bambula mingi? Biblia elobi boye: “Bókoba kosala bongo malamumalamu lisusu.” (1 Tes. 4:1, 2) Ata soki touti koyamba solo sika to tozali na kati ya solo esili koleka bambula mingi, kokanisa bantina oyo tosengeli kolanda Klisto, ekosalisa biso tólanda toli ya Paulo mpe tólanda Yesu malamumalamu lisusu na bomoi na biso. Tótalela naino bantina mitano oyo tosengeli kolanda Klisto.
Ekokolisa boyokani na biso na Yehova
3. Wapi ndenge mibale oyo tokoki koyeba Yehova?
3 Ntango azalaki kosolola na bato ya Atene wana ‘atɛlɛmaki na katikati ya Aleopaji,’ ntoma Paulo alobaki boye: “[Nzambe] aponaki bantango oyo etyamá mpe bandelo oyo etyamá ya efandelo ya bato, mpo bango báluka Nzambe, soki esengeli báluka ye na komekameka epai na epai mpe bázwa ye mpenza, atako, ya solo, azali mosika te na mokomoko na biso.” (Mis. 17:22, 26, 27) Tokoki koluka Nzambe mpe koyeba ye mpenza. Na ndakisa, biloko oyo akelá emonisaka bizaleli mpe nguya na ye. Kokanisa biloko oyo akelá ekoki koteya biso makambo mingi na ntina na Mozalisi. (Lom. 1:20) Na Liloba na ye, Biblia, Yehova ayebisi biso mpe makambo na ye mosusu. (2 Tim. 3:16, 17) Soki tozali ‘komanyola’ mpe ‘kotya likebi na misala na ye,’ tokoyeba Yehova malamu lisusu koleka.—Nz. 77:12, NW.
4. Ndenge nini kolanda Klisto ekoki kosalisa biso tókóma na boyokani makasi na Yehova?
4 Lolenge eleki malamu ya kokolisa boyokani na biso na Yehova ezali ya kolanda Klisto. Kanisá naino nkembo oyo Yesu azalaki na yango pembeni ya Tata na ye “liboso ete mokili ezala”! (Yoa. 17:5) Azali “ebandeli ya bozalisi ya Nzambe.” (Emon. 3:14) Lokola azali “mwana ya liboso na bozalisi nyonso,” azalaki na bomoi bambula mingi na likoló elongo na Tata na ye, Yehova. Liboso aya awa na mabelé, Yesu afandaki mpamba te na Tata na ye. Azalaki moninga ya mosala ya Nzambe, azalaki kosala na esengo elongo na Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe yango esalaki ete bálingana mingi. Yesu azalaki kaka te kotala ndenge Tata na ye azalaki kosala, komona bizaleli minene ya Nzambe, kasi azalaki kozwa mpe kosalela makambo nyonso oyo azalaki komona epai ya Tata na ye. Mpo na yango, Mwana yango ya botosi akómaki mpenza lokola Tata na ye—amekolaki ye makasi, yango wana Biblia ebengi ye “elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te.” (Kols. 1:15) Soki tozali kolanda Klisto, tokoki kokóma na boyokani makasi na Yehova.
Mpo tómekola lisusu Yehova malamumalamu
5. Nini ekosalisa biso tómekola lisusu Yehova malamu koleka, mpe mpo na nini?
5 Nzambe akelá biso na ‘elilingi na ye,’ yango wana tozalaka na likoki ya komonisa bizaleli na ye. (Gen. 1:26, NW) Ntoma Paulo alendisaki baklisto ‘bákóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana balingami.’ (Ef. 5:1) Kolanda Klisto esalisaka biso tómekola Tata na biso ya likoló. Ezali bongo mpo Yesu amonisaki makanisi, mayoki, mpe bizaleli ya Nzambe mpe ateyaki makambo ya Nzambe malamu koleka moto mosusu nyonso. Ntango azalaki na mabelé, Yesu asukaki kaka te na koyebisa bato nkombo ya Yehova. Amonisaki bato mpe bomoto ya Nzambe. (Tángá Matai 11:27.) Yesu amonisaki yango na maloba, na misala, na mateya mpe na ndakisa.
6. Mateya ya Yesu emonisi nini na ntina na Yehova?
6 Na mateya na ye, Yesu amonisaki oyo Nzambe azali kosɛnga biso mpe ndenge oyo atalelaka bato oyo basambelaka ye. (Mat. 22:36-40; Luka 12:6, 7; 15:4-7) Na ndakisa, nsima ya kotánga moko ya Mibeko zomi—“osengeli kosala ekobo te”—Yesu amonisaki ndenge oyo Nzambe atalelaka makambo oyo moto akanisaka na motema na ye liboso kutu asala ekobo. Alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii na koyoka ye mposa asili kosala ekobo elongo na ye na kati ya motema na ye.” (Ex. 20:14; Mat. 5:27, 28) Nsima ya kolobela ndenge oyo Bafalisai bazalaki kolimbola Mobeko moko oyo: “Osengeli kolinga mozalani na yo mpe koyina monguna na yo,” Yesu amonisaki makanisi ya Yehova; alobaki boye: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.” (Mat. 5:43, 44; Ex. 23:4; Lev. 19:18) Koyeba ndenge oyo Nzambe akanisaka mpe ayokaka mpe makambo oyo azali kosɛnga biso ekosalisa biso tómekola ye lisusu malamu koleka.
7, 8. Ndakisa ya Yesu ezali koteya biso nini na ntina na Yehova?
7 Na ndakisa na ye, Yesu asalisaki mpe bato báyeba Tata na ye. Ntango totángaka na Baevanzile ndenge Yesu azalaki koyokela babola mpe bato oyo bazalaki konyokwama mawa, ndenge ayokaki mabe ntango bayekoli na ye babenganaki bana mike, esalisaka biso mpenza tómona ndenge Tata na biso ya likoló ayokaka! (Mko. 1:40-42; 10:13, 14; Yoa. 11:32-35) Kanisá mpe ndenge makambo oyo Yesu asalaki esalisaka biso tómona bizaleli minene ya Nzambe. Makamwisi oyo Klisto asalaki emonisaki nguya monene oyo Nzambe apesaki ye! Kasi, azalaki kosalela nguya yango mpo na matomba na ye moko to mpo na kosala bato mosusu mabe te. (Luka 4:1-4) Likambo oyo asalaki ya kobwaka libándá ya tempelo bato oyo bazalaki kotɛka emonisi bosembo na ye! (Mko 11:15-17; Yoa. 2:13-16) Mateya mpe maloba na ye ya kitoko oyo ezalaki kosimba mitema ya bato emonisi ete ‘alekaki Salomo’ na bwanya. (Mat. 12:42) Biblia emonisi na maloba kitoko bolingo oyo Yesu amonisaki na ndenge apesaki molimo na ye mpo na basusu; elobi boye: “Moto moko te azali na bolingo koleka oyo.”—Yoa. 15:13.
8 Mwana ya Nzambe amonisaki Yehova na ndenge ya kokoka na makambo nyonso oyo azalaki koloba mpe kosala; yango wana akokaki koloba boye: “Oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Tángá Yoane 14:9-11.) Kolanda Klisto elimboli komekola Yehova.
Yesu azali Mopakolami ya Yehova
9. Ntango nini mpe ndenge nini Yesu akómaki Mopakolami ya Nzambe?
9 Tótalela likambo oyo esalemaki na autonɛ ya mobu 29 T.B., ntango Yesu, oyo azalaki na mbula 30, akendaki epai ya Yoane Mobatisi. Biblia elobi ete: “Nsima ya kobatisama, Yesu na mbala moko abimaki na mai; mpe, talá! likoló efungwamaki, mpe amonaki elimo ya Nzambe ezali kokita lokola ebenga koyáká likoló na ye.” Na ntango yango, akómaki Klisto, to Masiya. Na ntango yango, Yehova ye moko amonisaki ete Yesu azali Mopakolami na ye; alobaki boye: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.” (Mat. 3:13-17) Oyo nde ntina malamu ya kolanda Klisto!
10, 11. (a) Titre “Klisto” esalelamaka ndenge nini mpo na kolobela Yesu? (b) Mpo na nini tosengeli kolanda Yesu Klisto?
10 Na Biblia, titre “Klisto” esalelami na ndenge mingi mpo na kolobela Yesu: Yesu Klisto, Klisto Yesu, mpe Klisto. Ya liboso, Yesu ye moko amibengaki “Yesu Klisto”—nkombo liboso ya titre. Na libondeli moko epai ya Tata na ye, alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoa. 17:3) Yango ebendi likebi epai ya moto oyo Nzambe atindaki mpe akómaki Mopakolami na ye. Ntango titre yango etyami liboso ya nkombo, na ndakisa “Klisto Yesu,” yango emonisaka esika to mosala oyo Nzambe apesi ye. (2 Kol. 4:5) Kobenga ye “Klisto” ezali mpe lolenge mosusu ya komonisa mokumba na ye ya Masiya.—Mis. 5:42.
11 Ezala batye titre “Klisto” liboso to nsima ya nkombo Yesu, yango emonisaka kaka likambo ya ntina mingi oyo: Atako Mwana ya Nzambe ayaki awa na mabelé lokola moto mpe ayebisaki mokano ya Tata na ye, azalaki lokola bato nyonso to basakoli nyonso te; ayaki mpo azala Mopakolami ya Yehova. Tosengeli mpenza kolanda ye.
Yesu azali nzela kaka moko ya lobiko
12. Likambo nini Yesu alobaki na Toma oyo ezali na ntina mpo na biso?
12 Ntina mosusu oyo tosengeli kolanda Masiya emonisami na maloba oyo alobaki na bantoma na ye ya sembo, mwa bangonga liboso ya liwa na ye. Ntango Toma atunaki Yesu epai oyo azali kokende mpo na kobongisela bango esika, Yesu ayanolaki boye: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoa. 14:1-6) Yesu azalaki koloba na bantoma na ye 11 ya sembo. Alakaki bango esika na likoló; kasi maloba na ye ezalaki mpe na ntina mingi mpo na baoyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabelé. (Emon. 7:9, 10; 21:1-4) Ndenge nini?
13. Na ndenge nini Yesu azali “nzela”?
13 Yesu Klisto azali “nzela.” Yango emonisi ete azali moto se moko oyo na nzela na ye tokoki kopusana penepene na Nzambe. Ezali mpe bongo na oyo etali libondeli; tokozala na elikya ete Tata akoyoka mabondeli na biso oyo eyokani na mokano na ye kaka soki tobondeli na nzela ya Klisto. (Yoa. 15:16) Nzokande, Yesu azali mpe “nzela” na ndenge mosusu. Lisumu ekabolaki bato na Nzambe. (Yis. 59:2) Yesu apesaki “molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Mat. 20:28) Mpo na yango, Biblia elobi boye: “Makila ya Yesu . . . ezali kopɛtola biso uta na lisumu nyonso.” (1 Yoa. 1:7) Na ndenge yango, Mwana afungolaki nzela mpo bato bázonga epai ya Nzambe. (Lom. 5:8-10) Tokoki kozala na boyokani na Nzambe kaka soki tondimeli Yesu mpe totosi maloba na ye.—Yoa. 3:36.
14. Ndenge nini Yesu azali “solo”?
14 Yesu azali “solo” kaka te mpo azalaki ntango nyonso koloba mpe komonisa solo, kasi mpe mpo bisakweli nyonso oyo ekomamaki mpo na Masiya, mingi kati na yango esilaki kokokisama epai na ye. Ntoma Paulo akomaki boye: “Ata soki bilaka ya Nzambe ezali ebele boni, yango ekómi Ɛɛ na nzela na ye.” (2 Kol. 1:20) Ata “elili ya makambo malamu oyo ekoya,” oyo ezalaki na Mibeko ya Moize, ekokisamaki na nzela ya Klisto Yesu. (Ebe. 10:1; Kols. 2:17) Bisakweli nyonso elobelaki Yesu, mpe emonisaki mokumba na ye na kokokisama ya mokano ya Yehova. (Emon. 19:10) Mpo na kozwa matomba na makambo oyo Nzambe abongisi mpo na biso, tosengeli kolanda Masiya.
15. Na ndenge nini Yesu azali “bomoi”?
15 Yesu azali “bomoi” mpo asombaki bato na makila na ye, bomoi ya seko ezali likabo oyo Nzambe apesi biso “na nzela ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” (Lom. 6:23) Yesu azali mpe “bomoi” mpo na baoyo nyonso bakufá. (Yoa. 5:28, 29) Kanisá mpe oyo akosala lokola Nganga-nzambe Monene na boumeli ya Boyangeli ya mbula Nkóto. Ntango akosikola bato nyonso awa na mabelé na lisumu mpe na liwa mpo na libela!—Ebe. 9:11, 12, 28.
16. Ntina nini tozali na yango ya kolanda Yesu?
16 Na yango, eyano oyo Yesu apesaki Toma ezali na ntina mingi mpo na biso. Yesu azali nzela mpe solo mpe bomoi. Azali moto oyo Nzambe atindaki na mokili mpo bato bábika na nzela na ye. (Yoa. 3:17) Mpe moto moko te akoki koya epai ya Tata soki na nzela na ye te. Biblia elobi polele boye: “Ezali na lobiko te na kati ya moto mosusu, mpo ezali na nkombo mosusu te na nse ya likoló oyo epesami na kati ya bato oyo na nzela na yango tosengeli kobikisama.” (Mis. 4:12) Na yango, ata soki bateyaki biso nini liboso, tokomonisa bwanya soki tondimeli Yesu, tolandi ye, mpe na ndenge yango akokamba biso na nzela ya bomoi.—Yoa. 20:31.
Nzambe asɛngi biso tóyoka Klisto
17. Mpo na nini ezali na ntina tóyoka Mwana ya Nzambe?
17 Petelo, Yoane, mpe Yakobo bazalaki wana ntango Yesu abongwanaki. Na ntango yango, bayokaki mongongo uta na likoló elobaki boye: “Oyo azali Mwana na ngai, oyo aponami. Bóyoka ye.” (Luka 9:28, 29, 35) Ezali mpenza na ntina tótosa etinda ya koyoka Masiya.—Tángá Misala 3:22, 23.
18. Ndenge nini tokoki koyoka Yesu Klisto?
18 Koyoka Yesu elimboli ‘kotala ye na likebi mpenza, kotya likebi mpenza na ndakisa na ye.’ (Ebe. 12:2, 3) Na yango, ekozala malamu “tótya likebi koleka mpenza na makambo” oyo totángaka mpo na ye na Biblia, na mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mpe na makambo oyo toyokaka mpo na ye na makita ya boklisto. (Ebe. 2:1; Mat. 24:45) Lokola bampate na ye, tiká tózala na mposa makasi ya koyoka Yesu mpe kolanda ye.—Yoa. 10:27.
19. Nini ekosalisa biso tókoba kolanda Klisto?
19 Tokoki kokoba kolanda Klisto ata soki tokutani na mokakatano nini? Ɛɛ, tokoki kosala yango soki tozali “kosimba ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba,” ntango tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola, “na kondima mpe na bolingo oyo ezali na bokangani na Klisto Yesu.”—2 Tim. 1:13.
Oyekoli makambo nini?
• Mpo na nini kolanda “Klisto” ekoki kokolisa boyokani na biso na Yehova?
• Mpo na nini komekola Yesu elimboli komekola Yehova?
• Na ndenge nini Yesu azali “nzela mpe solo mpe bomoi”?
• Mpo na nini tosengeli koyoka Mopakolami ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 29]
Mateya ya Yesu emonisaki polele makanisi ya Yehova
[Elilingi na lokasa 30]
Tosengeli kolanda na bosembo mopakolami ya Yehova
[Elilingi na lokasa 32]
Yehova alobaki ete: “Oyo azali Mwana na ngai, . . . bóyoka ye”