Balingaki Liloba ya Nzambe
MBALA mingi bansango ya ntina ebongolamaka na minɔkɔ ebele mpo bato mingi bázwa likoki ya koyoka yango. Biblia, oyo ezali Liloba ya Nzambe, ezali na nsango moko ya ntina mingi. Atako ekomamá kala, makambo oyo ezali na Biblia “ekomamaki mpo na kolakisa biso,” kobɔndisa mpe kopesa biso elikya mpo na mikolo ezali koya.—Baloma 15:4.
Yango wana, Biblia, buku oyo ezali na nsango oyo eleki bansango nyonso na ntina, esengelaki kobongolama na minɔkɔ mingi. Na boumeli ya bikeke, bato basalaki nyonso mpo na kobongola Biblia atako batungisamaki na maladi, botɛmɛli ya Leta, to mpe etumbu ya liwa. Mpo na nini? Mpo balingaki Liloba ya Nzambe. Lisolo oyo ekomonisa biso mwa moke ndenge Biblia ebongolamaki.
“Bato ya Lingelesi bakoyekola mobeko ya Klisto malamu koleka na monɔkɔ na bango”
Na mobu soki 1330 ya ntango na biso, ntango John Wycliffe abotamaki, na Angleterre misa ezalaki kosalema na monɔkɔ ya Latin. Nzokande, Lingelesi ezalaki monɔkɔ oyo bato bazalaki koloba na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Bazalaki kosolola na baninga na bango, ata mpe kobondela Nzambe kaka na Lingelesi.
Wycliffe, oyo azalaki sango, ayebaki mpenza koloba Latin. Kasi, amonaki ete mpo na koteya Makomami, ezalaki malamu te kosalela Latin, monɔkɔ oyo kaka bato minene bayebaki. Akomaki boye: “Mobeko ya Nzambe esengeli koteyama na monɔkɔ oyo ezali pɛtɛɛ, mpamba te makambo oyo ezali koteyama ezali Liloba ya Nzambe.” Yango wana, Wycliffe ná baninga na ye basanganaki mpo na kobongola Biblia na Lingelesi. Mosala yango ezwaki bango mbula soki 20.
Lingomba ya Katolike eboyaki likanisi wana ya kobimisa libongoli ya sika ya Biblia. Buku moko (The Mysteries of the Vatican), eyebisi ntina oyo Lingomba eboyaki: “Yango elingaki kopesa bato likoki ya komona bokeseni kati na mateya mpe lolenge ya bomoi ya baklisto ya liboso mpe oyo ya Lingomba ya Katolike . . . Bokeseni monene oyo ezalaki na mateya ya Mobandisi ya Lingomba ya boklisto, mpe oyo ya pápa ekómaki komonana polele.”
Pápa Grégoire XI abimisaki mibeko mitano mpo na kokweisa Wycliffe. Kasi, Wycliffe alɛmbaki te. Alobaki boye: “Bato ya Lingelesi bakoyekola mobeko ya Klisto malamu koleka na monɔkɔ na bango. Moize ayokaki Mobeko ya Nzambe na monɔkɔ na ye, ezalaki mpe bongo mpo na bantoma ya Yesu.” Na mobu soki 1382, mwa moke liboso Wycliffe akufa, libongoli mobimba ya Biblia na Lingelesi ebimaki. Mbula soki zomi na nsima, moko ya bato oyo babongolaki Biblia yango atalelaki lisusu libongoli yango mpe abimisaki oyo ya pɛtɛɛ.
Lokola masini ya kobimisa mikanda ezalaki naino te, ezalaki kosɛnga likebi mpenza mpo na kokoma maniskri mokomoko na mabɔkɔ, mosala monene oyo ekokaki kozwa sanza zomi! Kasi, likanisi ya kopesa bato nyonso likoki ya kozala na Biblia esepelisaki bakonzi ya Lingomba te; yango wana episkɔpɔ-mokonzi moko alobaki ete akobengana na lingomba moto nyonso oyo akotánga yango. Mbula koleka 40 nsima ya liwa ya Wycliffe, na ndingisa ya pápa, basango batimolaki nzoto ya Wycliffe, batumbaki mikuwa na ye mpe babwakaki mputulu na yango na ebale Rhin. Atako bongo, bato oyo bazalaki kolinga solo balukaki Biblia ya Wycliffe. Profesɛrɛ William Blackburn, alobaki boye: “Ebele ya bakopi ya Biblia ya Wycliffe ebimisamaki, ekabolamaki na bato ya bileko ndenge na ndenge.”
Biblia mpo na moto ya pusu
Mbula soki 200 na nsima, Lingelesi oyo Wycliffe asalelaki na Biblia na ye ezalaki kolobama lisusu te. Elenge moko oyo azalaki moteyi pene na engumba Bristol ayokaki mawa ndenge bato moke kaka nde bakokaki koyeba makambo oyo ezali na Biblia. Mokolo moko, William Tyndale, ayokaki moto moko oyo atángá kelasi mingi azali koloba ete ekozala malamu kozanga mobeko ya Nzambe na esika ya kozanga oyo ya pápa. Tyndale ayanolaki ete soki Nzambe apesi ye nzela, mosika te akosala ete ata moto ya pusu ayeba Biblia malamu koleka moto oyo atángá kelasi.
Wycliffe abongolaki uta na Biblia ya Latin Vulgate mpe akomaki yango na mabɔkɔ. Na mobu 1524, Tyndale alongwaki na Angleterre mpe akendaki na Allemagne, epai abandaki kobongola uta na Liebele mpe Grɛki, minɔkɔ oyo bakomelaki Biblia, mpe asalelaki masini na engumba Cologne mpo na kobimisa bakopi ya Biblia na ye. Mosika te, banguna ya Tyndale bayokaki nsango ya Biblia yango mpe batindaki parlema ya engumba Cologne epesa mitindo mpo bábɔtɔla bakopi nyonso.
Tyndale akimaki na engumba Worms na Allemagne, mpe akobaki mosala na ye. Mwa moke na nsima, na ndenge ya nkuku, atindaki na Angleterre bakopi ya Makomami ya Grɛki oyo abongolaki na Lingelesi. Na boumeli ya sanza motoba mpamba, ebele ya bakopi ya Biblia etɛkamaki; mpo na yango, bakonzi ya lingomba basalaki likita nokinoki mpe bazwaki ekateli ya kobanda kotumba Babiblia.
Mpo na kopekisa bato bátánga Biblia mpe kosukisa lipɛngwi ya Tyndale, episkɔpɔ ya Londres atindaki Thomas More akoma makambo mpo na kokweisa Tyndale. More amonaki mabe mpenza ndenge Tyndale asalelaki liloba “lisangá” na esika ya “eklezia,” mpe “nkulutu” na esika ya “sango.” Maloba yango ekitisaki lokumu ya pápa mpe elongolaki bokeseni kati na basango mpe bandimi. Lisusu, Thomas More akweisaki ndenge Tyndale abongolaki liloba ya Grɛki a·gaʹpe na “bolingo” na esika ya kobongola yango na “bolingi.” Buku moko (If God Spare My Life), elobi boye: “Likambo yango mpe ezalaki likama mpo na Eklezia, mpo yango elingaki kotinda bato bápesaka lisusu te lisungi mpe makabo oyo bandimi ya sembo bazalaki kokanisa ete soki bazali kopesa yango, ekofungwela bango nzela ya lola.”
Thomas More alendisaki likanisi ya kotumba “bapɛngwi,” yango wana na Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 1536, bakakisaki Tyndale na nzete mpe batumbaki ye. Thomas More ye moko mpe na nsima bakataki ye motó mpo mokonzi azalaki kosepela na ye lisusu te. Atako bongo, na 1935 Lingomba ya Katolike ya Loma etyaki ye na molɔngɔ ya basantu, mpe na mobu 2000, Pápa Jean Paul II akómisaki ye tata mosantu ya bato ya politiki.
Tyndale azwaki lokumu wana te. Kasi, liboso ya liwa na ye, moninga na ye Miles Coverdale asangisaki biteni nyonso ya Biblia oyo Tyndale abongolaki mpe akɔtisaki yango na Biblia ya mobimba ya liboso ya Lingelesi oyo ebongolamaki uta na Liebele mpe na Grɛki! Na ndenge yango, moto nyonso ya pusu akokaki sikoyo kotánga Liloba ya Nzambe. Kasi, ezali boni mpo na Biblia ya minɔkɔ mosusu?
“Likambo oyo ekokaki kosalema te”
Atako libota mpe baninga ya misionɛrɛ Robert Morrison batɛmɛlaki ye, akangamaki kaka na likanisi na ye ya kobimisa Biblia mobimba na monɔkɔ ya Chinois, yango wana na mobu 1807 akendaki na Chine. Mosala na ye ya kobongola ezalaki pɛtɛɛ te. Charles Grant, mokambi ya kompanyi moko (East India Company) ya ntango wana alobaki boye: “Emonanaki ete likambo yango ekokaki kosalema te.”
Ntango Morrison akómaki na Chine, ayokaki ete bapekisaki bato ya Chine bálakisa bapaya monɔkɔ na bango; mpe moto oyo akotosa te, bakoboma ye. Mpo na komibatela mpe kobatela bomoi ya bato oyo bandimaki koteya ye monɔkɔ ya Chinois, Morrison azalaki kobima te. Lapolo moko elobi ete “nsima ya mbula mibale ya koyekola, akómaki koloba monɔkɔ ya Mandarin mpe minɔkɔ mosusu ya ekólo yango, ata mpe kotánga mpe kokoma monɔkɔ yango.” Na ntango yango, mokonzi abimisaki mobeko oyo elobaki ete moto nyonso oyo akobimisa mikanda ya boklisto akobomama. Atako bongo, na mokolo ya 25 Novɛmbɛ 1819, Morrison asilisaki kobongola Biblia mobimba na monɔkɔ ya Chinois.
Na mobu 1836, babimisaki Babiblia soki 2 000 ya mobimba, bakopi 10 000 ya Makomami ya Grɛki mpe biteni mosusu ya Biblia 31 000 ebimaki na monɔkɔ ya Chinois. Bolingo mpo na Liloba ya Nzambe epesaki nzela na “likambo oyo ekokaki kosalema te,” esalema.
Biblia na kusɛ
Pɔsɔ mibale nsima ya libala na bango, na Febwali 1812, Adoniram Judson ná mwasi na ye Ann, oyo bazalaki bamisionɛrɛ, basalaki mobembo molai tii na Birmanie na 1813.a Babandaki mbala moko koyekola Birman, moko ya minɔkɔ oyo eleki makasi na mokili. Nsima ya mwa bambula ya koyekola monɔkɔ yango, Judson akomaki boye: “Toyekoli monɔkɔ oyo elobamaka na bato ya ngámbo mosusu ya mokili, oyo ndenge na bango ya kokanisa ekeseni mpenza na oyo ya biso . . . Tozali na diksionɛrɛ te, mpe moto te mpo na kolimbola biso liloba mokomoko ya monɔkɔ yango.”
Mikakatano oyo akutanaki na yango mpo na koyekola monɔkɔ epekisaki Judson te akoba mosala na ye. Asilisaki kobongola Makomami ya Grɛki na monɔkɔ ya Birman na sanza ya Yuni, na mobu 1823. Na nsima, bitumba ebimaki na Birmanie. Bafundaki Judson ete azali monɔngi mpe batyaki ye na bolɔkɔ, bakangaki ye makasi na minyɔlɔlɔ, mpe bakangisaki ye na nzete moko molai mpo aninganaka te. Na buku moko oyo akomaki mpo na bomoi ya Judson na 1853, Francis Wayland akomaki boye: “Moko ya biloko ya liboso oyo Judson asɛngaki ntango bapesaki ye nzela ya kokutana na mwasi na ye mpe kosolola na Lingelesi, ezalaki maniskri ya libongoli ya Testamá ya sika.” Lokola abombaki maniskri yango na nse ya mabelé, Ann abangaki ete malili ebebisa yango, yango wana akɔtisaki yango na kusɛ mpe amemelaki mobali na ye kusɛ yango na bolɔkɔ. Kasi, maniskri yango ebebaki te.
Nsima ya kolekisa basanza mingi na bolɔkɔ, Judson abimaki. Kasi, esengo na ye ezalaki ya ntango mokuse. Mwa basanza na nsima, mwasi na ye Ann, abɛlaki fɛfɛlɛ makasi mpe nsima ya mwa bapɔsɔ akufaki. Sanza motoba na nsima, mwana na ye Maria oyo azalaki na mbula mibale, akufaki na maladi moko ya mabe. Atako Judson azalaki na mawa makasi, azongelaki mosala na ye. Nsukansuka, asilisaki kobongola Biblia mobimba na mobu 1835.
Olingaka Liloba ya Nzambe?
Bolingo mpo na Liloba ya Nzambe oyo babongoli wana bamonisaki ezali likambo ya sika te. Na Yisalaele ya kala, mokomi ya nzembo ayembelaki Yehova Nzambe boye: “Ɛ nalingi Mobeko na yo na bolingo bɛ! Nakobanzaka yango mokolo mobimba.” (Nzembo 119:97) Biblia ezali lokola mikanda mosusu te. Ezali na nsango ya ntina mingi. Otángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpo na komonisa ete ezali lobanzo na yo? Okoki mpenza kondima ete soki osali bongo mpe osaleli makambo oyo ozali koyekola, ‘okozala na esengo na kosaláká yango.’—Yakobo 1:25.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lelo oyo, Birmanie ná monɔkɔ ya Birman eyebani na nkombo ya Myanmar.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]
“Bato ya Lingelesi bakoyekola mobeko ya Klisto malamu koleka na monɔkɔ na bango.”—JOHN WYCLIFFE
[Bililingi na lokasa 9]
William Tyndale mpe lokasa moko ya Biblia ya Tyndale
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Tyndale: Euti na buku The Evolution of the English Bible
[Bililingi na lokasa 10]
Robert Morrison mpe libongoli na ye ya Biblia na Chinois
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Ebatelami na Library of Congress, section asiatique
Robert Morrison, liyemi ya W. Holl, euti na buku The National Portrait Gallery Volume IV, ebimisamaki soki na 1820 (litho), Chinnery, George (1774-1852) (after)/Private Collection/Ken Welsh/The Bridgeman Art Library International
[Elilingi na lokasa 11]
Adoniram Judson mpe libongoli na ye ya Biblia na monɔkɔ ya Birman
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Judson: liyemi ya John C. Buttre/Dictionary of American Portraits/Dover
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]
Wycliffe: Euti na buku The History of Protestantism (Vol. I); Biblia: Na ndingisa ya American Bible Society Library, New York