Ntina oyo Biblia ezali na litomba lelo oyo
“Mikanda nyonso ya Nzambe ekòmamá na nguya na ye, pe ebongi po na . . . kobongisa bato pe kolakisa bango nzela.”—2 TIMOTE 3:16, Bible na lingala ya lelo oyo.
NA BOUMELI ya bikeke, Biblia esalisi bato ya bikólo ndenge na ndenge bábongola bomoi na bango. Vɛrsɛ oyo tolobeli na likoló eyebisi ntina oyo Biblia ezali kolonga kobongola bato—bwanya na yango euti epai ya Nzambe. Atako bato nde bakomaki yango, Biblia eyebisaka biso makanisi ya Nzambe. Elobi boye: “Bato balobaki oyo eutaki epai ya Nzambe wana bazalaki kopusama na elimo santu.”—2 Petelo 1:21.
Biblia ezali na litomba na makambo soki mibale. Ya liboso, esalisaka biso tótalelaka bomoi na ndenge ebongi. Ya mibale, ezali na nguya ya kosalisa bato básala mbongwana oyo ebongi mpenza mpo na kobongisa bomoi na bango. Tiká tótalela makambo yango mibale.
Mayele ya kososola
Na Biblia, Nzambe apesi elaka oyo: “Nakosala ete ozala na mayele ya kososola mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende. Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.” (Nzembo 32:8, NW) Simbá ete Nzambe apesaka kaka toli te, kasi apesaka mpe bososoli, oyo ezali likoki ya komona makambo mosika. Kozala na bososoli mpo na koyeba mikano oyo ebongi ekoki kosalisa biso tóbebisa te ntango na biso na kolanda makambo ezangá ntina.
Na ndakisa, mokano ya bato mingi ezalaka ya kokóma na bozwi mingi mpe lokumu. Babuku oyo elakisaka bato ndenge ya kobuba basusu mpo na kokóma na bozwi mpe lokumu ezali mingi. Nzokande, Biblia elobi boye: “Kolulela ya moto oyo akolulaka mozalani na ye . . . ezali mpamba mpe koluka kokwa mopɛpɛ.” “Ye oyo alingi mosolo [akotonda] mosolo te.” (Mosakoli 4:4; 5:10) Toli yango ebongi mpo na biso?
Mpo na komonisa ete batoli ya Biblia ebongi lelo oyo, tózwa ndakisa ya Akinori, na Japon. Akinori alongaki kosilisa kelasi na iniversite moko ya lokumu mpe azwaki mosala na kompanyi moko ya malamu. Emonanaki ete makambo na ye nyonso ezalaki kotambola malamu. Kasi, yango ememelaki ye esengo te ndenge azalaki kokanisa. Kutu, mitungisi ya mosala mpe kolɛmba ntango nyonso ebelisaki ye. Baninga na ye ya mosala basungaki ye mpenza te. Lokola anyokwamaki mingi na makanisi akómaki komɛla masanga mingi, mpe alukaki kutu komiboma. Na nsima, akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Makambo oyo ayekolaki esalisaki ye akóma kotalela bomoi na ndenge ebongi. Mosika te, maladi oyo abɛlaki mpo na mitungisi ekómaki kosila. Na esika ya kotika lolendo mpe lokumu etambwisa ye, Akinori amonaki ntina ya toli ya Biblia oyo: “Motema ya kimya ekoyeisela mosuni bomoi.”—Masese 14:30.
Mpo na yo, mokano oyo eleki malamu na bomoi ezali nini? Likambo nini ekoki kopesa yo esengo ya solosolo? Kozala na libala ya malamu? To kobongisa bana na yo mpo bázala na bomoi ya malamu? Kozala na baninga mingi? Kosepela na bomoi? Nyonso wana ezali mikano ya malamu. Kutu, Biblia elendisi yango, atako esengeli te kozwa esika ya liboso na bomoi. Na bwanya nyonso, Biblia emonisi likambo ya ntina mpo na kozala na bomoi ya malamu; elobi boye: “Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mitindo na ye. Mpo yango nde mokumba nyonso ya moto.” (Mosakoli 12:13, NW) Ntango moto alandi toli yango te, bomoi na ye ekozala na ntina te, akozala na esengo te mpe nsukansuka akolɛmba. Epai mosusu, Biblia elobi na biso boye: “Ye oyo akotalela [Yehova] azali na esengo.”—Masese 16:20.
Ndenge Biblia ebongolaka bato
Ntoma Paulo akomaki boye: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.” Lokola mopanga ya mino mibale oyo epeli makasi, Liloba ya Nzambe ekoki kokɔta tii kosimba makanisi mpe mikano ya moto oyo ebombami. (Baebele 4:12) Biblia ezali na nguya ya kobongola bomoi ya bato, mpamba te esalisaka bango bámimona ndenge bazali mpenza, kasi te ndenge bakanisaka ete bazali. Na ndenge yango, baoyo bazali na mitema oyo ebongi bakoki komona ete basengeli kobongola bomoto na bango. Na ndakisa, mpo na baklisto ya lisangá ya Kolinti, oyo kala bazalaki miyibi, balangwi masanga, bato ya ekobo, mpe bongo na bongo, Paulo alobaki boye: “Bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana. Kasi bosili kosukolama pɛɛ . . . na elimo ya Nzambe na biso.” (1 Bakolinti 6:9-11) Elimo santu ya Yehova ezali na nguya; ata lelo mpe ekoki kosalisa bato básala mbongwana oyo esengeli.
Mario, oyo afandaka na Mpoto azalaki moto ya mobulu, azalaki komɛla makaya mpe kotɛka bangi. Mokolo moko, ntango polisi moko akangaki bangi na ye, asilikaki makasi, abɛtaki polisi yango mpe abebisaki motuka na ye. Lisusu, Mario azalaki na mosala te mpe atondaki na banyongo. Lokola amonaki ete akokoka te kosilisa ye moko mikakatano na ye, andimaki koyekola Biblia. Ntango apusanaki na boyekoli na ye, Mario akómaki kobongisa nzoto na ye, atikaki komɛla mpe kotɛka bangi mpe atikaki mobulu. Bato mingi oyo bayebaki ye kala bazalaki kokamwa. Mbala mingi bazalaki kotɛlɛmisa ye mpe kotuna ye, “ezali mpenza yo Mario?”
Nini etindaka bato lokola Akinori mpe Mario bábongisa bomoi na bango mpe bázwa esengo ya solosolo na bomoi? Na ntembe te, ezali boyebi ya Nzambe oyo bazwaka na nzela ya boyekoli ya Biblia. Kaka Nzambe nde akoki kopesa biso malako oyo tozali na yango mposa mpo na kolonga na bomoi mpe kozala na elikya ya bomoi ya seko na mikolo ezali koya. Lokola Tata ya bolingo, Yehova Nzambe azali koloba na biso na Biblia boye: “Mwana na ngai, yoká mpe yambá maloba na ngai. Boye [bambula] ya bomoi na yo ekozala mingi . . . . Ekotambola yo, makolo na yo ekozwa nkaka te; ekopota yo, [okobɛta] libaku te. Simbá bososoli, tiká ye kolongwa te; batelá ye, zambi azali bomoi na yo.” (Masese 4:10-13) Ezali nde na toli mosusu oyo eleki toli oyo esɛngi biso tólanda litambwisi ya Mozalisi na biso?
[Etanda/Elilingi na lokasa 7]
Batoli oyo ebongi lelo oyo
Biblia ezali na batoli oyo ekoki kosalisa biso na makambo nyonso na bomoi. Talá mwa bandakisa oyo:
• Mpo na koyokana malamu na basusu
“Makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.”—Matai 7:12.
“Moto oyo azali komitambwisa lokola moto oyo azali mpenza moke na kati na bino nyonso azali moto oyo aleki monene.”—Luka 9:48.
“Bólanda nzela ya ezaleli ya koyamba bapaya.”—Baloma 12:13.
• Mpo na kotika bizaleli ya mabe
“Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.”—Masese 13:20.
“Zalá elongo na bamɛli ya masanga te.”—Masese 23:20.
“Zalá moninga ya moto ya nkanda te.”—Masese 22:24.
• Mpo na kozala na libala ya malamu
“Tiká ete mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo lokola amilingaka ye moko; mpe lisusu, mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”—Baefese 5:33.
“Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, motema malamu, elimo ya komikitisa, boboto mpe motema molai. Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.”—Bakolose 3:12, 13.
• Mpo na kobɔkɔla bana malamu
“Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; [ata ntango akokóma mobange, NW] akopɛngwa na yango tɛ.”—Masese 22:6.
“Bino, batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.”—Baefese 6:4.
• Mpo na kokima matata
“Eyano ya boboto, elembisaka kanda; kasi maloba ya mabe ekómisaka kanda makasi.”—Masese 15:1, Bible na lingala ya lelo oyo.
“Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.”—Baloma 12:10.
Ata ntango tozali kosala makambo etali mbongo na baninga, tokokima matata soki tokomi makambo nyonso na mokanda. Yango wana, Yilimia, mosaleli ya Nzambe akomaki boye: “Nakomaki mpe mokanda mpe nakangaki yango, nabengaki batatoli mpe [namekelaki] ye mosolo kati na epimelo ya bozito.”—Yilimia 32:10.
• Mpo na kozala na makanisi ebongi
“Makambo nyonso oyo ezali ya solo, . . . oyo ekoki kolingama, . . . soki ezaleli moko ya malamu ezali mpe soki eloko moko oyo ebongi kosanzolama ezali, bókoba kokanisa makambo wana.”—Bafilipi 4:8.
Biblia ezali kokebisa biso na makanisi oyo ebongi te mpe epekisi biso ‘tómilelalelaka mpo na ndenge bomoi na biso ezali.’ Elobi boye: “Bósepelaka na kati ya elikya.”—Yuda 4, 16; Baloma 12:12.
Soki tolandi batoli oyo, tokozala na kimya mpe tokosepela na oyo tozali na yango na bomoi; ekosalisa biso mpe tókokisa masɛngami ya Nzambe mpe tózwa mapamboli na ye. Biblia elobi boye: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:29.
[Bililingi na lokasa 5]
Akinori ntango azalaki kosala (na lobɔkɔ ya mwasi), elongo na mwasi na ye lelo oyo na mosala ya kosakola