Osengeli kotosaka Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ?
NA SANZA ya Desɛmbɛ 1988, mwa bituluku ya bato ya Lingomba ya Méthodiste, bazingaki Suva, mboka-mokonzi ya Fidji. Mibali, basi mpe bana—bango nyonso balataki bilamba ya lingomba na bango—bakangaki babalabala 70. Bapekisaki mimbongo nyonso, misala ya ndako esalema te mpe bampɛpɔ ata ya mikili mosusu emata te ekita mpe te. Nini etindaki bango básala bongo? Basalaki bongo mpo na kosɛnga ete ekólo mobimba ezongela momeseno ya kotosaka Sabata.
Na Israël, ndako nyonso ya sika ya etazi oyo etongamaki kobanda na mobu 2001, esengelaki kozala na ascenseur oyo etɛlɛmaka yango moko na etazi nyonso. Mpo na nini? Mpo Bayuda ya solosolo oyo batosaka Sabata, kobanda mokolo ya mitano na mpokwa tii mokolo ya pɔsɔ na mpokwa básalaka te “mosala” ya kofinaka butɔ ya ascenseur.
Na Tonga, bokonzi moko na Sudi ya Pasifike, bapekisá bato kosala mosala mokolo nyonso ya lomingo. Ata mpɛpɔ moko te ezalaka na ndingisa ya kokita, mpe ata masuwa moko te ezalaka na ndingisa ya kosɛma. Kɔntra nyonso oyo bato basali mokolo yango endimamaka te. Mobeko Likonzi (constitution) ya ekólo Tonga esɛngaka moto nyonso ete atalela mokolo ya lomingo lokola mokolo moko “mosantu” ata soki azali moto ya lingomba nini. Mpo na nini? Mpo ekólo mobimba etosa mokolo ya Sabata.
Ndenge bandakisa oyo touti kotánga emonisi, bato mingi bakanisaka ete Nzambe asɛngaka bato bátosaka mokolo ya Sabata pɔsɔ na pɔsɔ. Kutu, bamosusu balobaka ete kotosa Sabata ezali likambo ya ntina mingi mpe bandimaka ete yango etaleli lobiko na biso ya seko. Bato mosusu bamonaka ete mobeko ya Nzambe oyo eleki ntina ezali ya kotosa Sabata. Sabata ezali nini? Mpe Biblia esɛngaka bakristo bátosaka mokolo ya Sabata pɔsɔ na pɔsɔ?
Sabata ezali nini?
Liloba ya Lingala, “Sabata” euti na liloba ya Ebre oyo elimboli “kopema, kosilisa, kotika mosala.” Atako mokanda ya Ebandeli elobi ete na mokolo ya nsambo Yehova Nzambe apemaki na misala na ye ya bozalisi, ezalaki nde tii na ntango ya Moize nde Nzambe asɛngaki libota na ye bátosaka mokolo moko ya kopema to Sabata. (Ebandeli 2:2) Na nsima, ntango Bayisraele balongwaki na Ezipito na mobu 1513, liboso ya ntango na biso, Yehova apesaki bango mana na ndenge ya likamwisi na esobe. Na likambo etali kolɔkɔta mana, Bayisraele bazwaki malako oyo: “Mikolo motoba bokolɔkɔta yango, kasi mokolo ya nsambo ezali sabata. Na mokolo wana, yango ekozala te.” (Kobima 16:26) Na nsima, Biblia elobi ete “bato babandaki kotosa sabata na mokolo ya nsambo,” kobanda na kolala ya moi na mokolo ya mitano na mpokwa tii kolala ya moi na mokolo ya pɔsɔ na mpokwa.—Kobima 16:30.
Mwa ntango moke nsima ya kopesama ya malako wana, Yehova apesaki mobeko mpo na kotosa Sabata, akɔtisaki yango na Mibeko Zomi oyo apesaki Moize. (Kobima 19:1) mobeko ya minei ya Mibeko yango elobaki boye: “Kokanisa mokolo ya sabata mpo na kosantisa yango, okosala mosala mpe osengeli kosala misala na yo nyonso mikolo motoba. Kasi mokolo ya nsambo ezali sabata mpo na Yehova Nzambe na yo.” (Kobima 20:8-10) Na yango, kotosa Sabata ekómaki mpenza makasi na bomoi ya Bayisraele.—Kolimbola Mibeko 5:12.
Yesu azalaki kotosa Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ?
Ya solo, Yesu azalaki kotosa Sabata. Mpo na ye, Biblia eyebisi biso boye: “Kasi lokola ntango yango ekokaki, Nzambe atindaki Mwana na ye, oyo mwasi moko abotaki mpe oyo azalaki na nse ya mibeko.” (Bagalatia 4:4) Yesu abotamaki Moyisraele mpe azalaki na nse ya Mibeko, ata mpe na nse ya mobeko ya Sabata. Mobeko yango elongwaki kaka nsima ya liwa ya Yesu. (Bakolose 2:13, 14) Koyeba ntango oyo makambo yango esalemaki na ntango ya kala ekosalisa biso tóyeba makanisi ya Nzambe na likambo yango.—Talá karte na lokasa 15.
Ya solo, Yesu alobaki boye: “Bókanisa te ete nayaki mpo na kobebisa Mibeko to Basakoli. Nayaki mpo na kobebisa yango te, kasi mpo na kokokisa yango.” (Matai 5:17) Kasi, maloba “kokokisa” elimboli nini? Tózwa ndakisa: Moto oyo atongaka ndako akokisaka kɔntra ya kosilisa ndako, soki abuki kɔntra yango te, kasi asilisi nde kotonga ndako. Kasi, ntango mosala esili ndenge nkolo-ndako alingaki, kɔntra esilaka mpe motongi azalaka lisusu na nse ya kɔntra wana te. Ndenge moko, Yesu abukaki Mibeko te; kutu akokisaki nde yango na ndenge atosaki yango na kokoka. Ntango ekokisamaki, Mibeko yango to “kɔntra” ezalaki lisusu te kokanga basaleli ya Nzambe.
Mokristo asengeli kotosaka Sabata?
Lokola Kristo akokisaki Mibeko, bakristo basengeli kotosaka Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ? Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo ayanolaki boye: “Na yango, moto asambisa bino te mpo na kolya mpe komɛla to mpo na fɛti moko boye to mpo na kokumisa sanza ya sika to mpe mpo na sabata; mpo makambo wana ezali elili ya makambo oyo ekoya, kasi bosolo ezali nde epai ya Kristo.”—Bakolose 2:16, 17.
Maloba wana emonisi ete mbongwana ekɔtaki na makambo oyo Nzambe asɛngaki basaleli na ye. Mpo na nini mbongwana? Mpo bakristo bazali na nse ya mobeko ya sika, “mobeko ya Kristo.” (Bagalatia 6:2) Mobeko ya liboso ya kondimana oyo Nzambe apesaki Bayisraele na nzela ya Moize, esukaki ntango liwa ya Yesu ekokisaki yango. (Baroma 10:4; Baefese 2:15) Mobeko ya kotosa Sabata mpe esukaki? Ɛɛ. Nsima ya koloba ete “tolongwe na Mibeko,” Paulo alobelaki moko ya Mibeko Zomi. (Baroma 7:6, 7) Na yango, Mibeko Zomi—ata mpe oyo ya Sabata—ezali na kati ya Mibeko oyo esukaki. Na yango, basambeli ya Nzambe basɛngisami lisusu te kotosaka Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ.
Mbongwana oyo Bayisraele basalaki mpo na kokóma na losambo ya bokristo, ekoki kokokisama na ekólo oyo ebongoli Mobeko Likonzi na yango. Soki Mobeko Likonzi ya sika ebimi, bato basɛngisamaka lisusu te bátosa oyo ya kala. Ata soki mibeko mosusu oyo ezali na Mobeko Likonzi ya sika ekoki kokokana na oyo ya kala, mosusu ekoki kokesana. Na yango, moto asengeli koyekola Mobeko Likonzi ya sika na likebi mpenza mpo na koyeba mibeko oyo asengeli kotosa sikoyo. Lisusu, mwana-mboka ya solosolo akolinga koyeba ntango oyo Mobeko Likonzi ya sika ebandaki kosalelama.
Ndenge moko, Yehova Nzambe apesaki mibeko koleka 600, kati na yango mibeko zomi ya minene, mpo na ekólo ya Yisraele. Mibeko yango ezalaki na makambo oyo etali bizaleli malamu, bambeka, kolɔngɔnɔ ya nzoto, mpe kotosa Sabata. Kasi, Yesu alobaki ete bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo bakosala “ekólo” moko ya sika. (Matai 21:43) Kobanda na mobu 33 ya ntango na biso, ekólo yango ezwaki “mobeko likonzi” ya sika, oyo esimbamaki na mibeko mibale ya ntina—kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani. (Matai 22:36-40) Atako “mobeko ya kristo” ekokani na oyo Nzambe apesaki Bayisraele, tosengeli kokamwa te ete mibeko yango mosusu ekeseni mpenza mpe mosusu elongwe. Mobeko oyo ezalaki kosɛnga kotosa Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ ezali moko kati na mibeko oyo elongwaki.
Nzambe abongolá mitinda na ye?
Kosuka ya Mibeko ya Moize mpo na kotya oyo ya Kristo elimboli nde ete Nzambe abongoli mitinda na ye? Te. Ndenge kaka moboti abongolaka mibeko oyo atyaka mpo na bana na ye na kotalela mbula mpe makambo na bango, Yehova abongisaki mibeko oyo basaleli na ye basengelaki kotosa. Ntoma Paulo alimbolaki likambo yango boye: “Liboso kondima eya, mibeko ezalaki kokɛngɛla biso, ekangaki biso na bolɔkɔ, tozalaki kozela kondima oyo esengelaki komonisama. Yango wana, Mibeko ekómaki molakisi na biso oyo azalaki kokamba biso epai ya Kristo, mpo tótángama bayengebene mpo na kondima. Kasi sikoyo lokola kondima eyei, tozali lisusu kokambama na molakisi te.”—Bagalatia 3:23-25.
Ndenge nini makanisi wana ya Paulo ekoki kosalelama mpo na Sabata? Tózwa ndakisa oyo: Ntango mwana azali naino na kelasi, bakoki kosɛnga ye ayekolaka liteya moko na ndakisa mosala ya mabaya, na mokolo moko ya sikisiki na pɔsɔ. Kasi, soki abandi kosala akoki kosalela makoki oyo ayekolaki, mokolo wana kaka te, kasi mikolo nyonso na pɔsɔ. Ndenge moko, ntango Bayisraele bazalaki na nse ya Mibeko, basɛngisamaki bátikaka mokolo moko pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kopema mpe kosambela. Epai mosusu, bakristo basɛngisami kosambela Nzambe, kaka mokolo moko na pɔsɔ te, kasi mikolo nyonso.
Kasi, ezali nde mabe kotika mokolo moko pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kopema mpe kosambela? Te. Liloba ya Nzambe etikeli moto na moto azwa ekateli na likambo yango, elobi boye: “Moto moko akanisaka ’tè mokolo moko eleki mikolo mosusu na tina; kasi moto mosusu akanisaka ’tè mikolo nyonso ezali kaka ndenge moko. Ebongi moto na moto álanda kaka makanisi na ye.” (Baroma 14:5, Bible na lingala ya lelo oyo) Atako bato mosusu bakoki kotalela mokolo moko lokola nde eleki mikolo mosusu na bosantu, Biblia emonisi polele ete Nzambe asɛngaka te bakristo bátosaka Sabata pɔsɔ na pɔsɔ.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
“Mikolo motoba bokolɔkɔta yango, kasi mokolo ya nsambo ezali sabata. Na mokolo wana, yango ekozala te.”—KOBIMA 16:26
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]
“Mibeko ekómaki molakisi na biso oyo azalaki kokamba biso epai ya Kristo, mpo tótángama bayengebene mpo na kondima. Kasi sikoyo lokola kondima eyei, tozali lisusu kokambama na molakisi te.”—BAGALATIA 3:24, 25
[Etanda/Elilingi na lokasa 13]
Mokɔlɔtɔ oyo ebongolaka mokolo mpe Sabata
Mokɔlɔtɔ oyo ebongolaka mokolo ezalaka mokakatano mpo na bato oyo bandimaka ete esengeli kotosaka Sabata mokolo moko na pɔsɔ na mikili nyonso. Mokɔlɔtɔ yango ezali mokɔlɔtɔ ya solo te oyo eleká mingi na Mbu ya Pasifike nzela moko na meridien ya 180. Mikili oyo ezali na wɛsti ya mokɔlɔtɔ yango ezalaka mokolo moko liboso ya mikili oyo ezali na ɛsti.
Na ndakisa, soki bisanga ya Fidji mpe ya Tonga ekómi mokolo ya lomingo, na Samoa mpe na Niue, ezali naino mokolo ya pɔsɔ. Na yango, soki moto azali kotosa Sabata mokolo ya pɔsɔ na Fidji, bandimi mosusu ya Lingomba na ye na Samoa, oyo ezali kaka na ntaka ya kilomɛtrɛ 1 145, bakozala naino na mosala mpo epai na bango ezali mokolo ya mitano.
Bato ya Lingomba ya Adventiste ya Tonga batosaka Sabata mokolo ya lomingo, bakanisaka ete soki basali bongo, bazali kotosa Sabata ngonga moko na bandimi mosusu ya Samoa, oyo ezali mosika te, na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 850. Nzokande, kaka na ntango yango, bandimi ya Lingomba ya Adventiste ya Fidji oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 800, bapemaka te mpo kuna ezali mokolo ya lomingo, mpe bango batosaka Sabata nde mokolo ya pɔsɔ!
[Etanda]
\
\
\
\ SAMOA
\
— ― ― ― ― ― ― ―
FIDJI \
Mwalomingo \ Mwapɔsɔ
\
\
TONGA \
\
\
\
[Etanda na lokasa 15]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Sabata:
Atako vɛrsɛ moko ya Biblia ekoki komonisa ntina ya kotosa Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ, tosengeli koyeba mpenza ntango oyo maloba yango elobamaki.
Mobu 4026 L.T.B. LIBOSO YA NTANGO YA MOIZE
ADAMA AKELAMAKI Mobeko ya Sabata epesamaki te liboso ya
ntango ya Moize mpe ya Bayisraele.
Mobu 1513 L.T.B. MOBEKO YA NZAMBE EPAI YA BAYISRAELE
MIBEKO EPESAMI NA YISRAELE Mobeko ya Sabata epesamaki te na bikólo mosusu. (Nzembo 147:19, 20)
Epesamaki lokola “elembo” kati na Yehova
mpe bana ya Yisraele.—Kobima 31:16, 17.
Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ ezalaki kaka moko
ya ebele ya Sabata oyo Nzambe asɛngaki
Bayisraele bátosaka.—Balevi 16:29-31;
Mobu 33 T.B. MOBEKO YA KRISTO
NSUKA YA MIBEKO OYO EPESAMAKI NA YISRAELE Na mobu 49 ya ntango na
biso, ntango bantoma mpe mikóló na
Yerusaleme bazwaki ekateli mpo na koyeba
oyo Nzambe asɛngaki mpo na bakristo,
balobelaki te ntina ya kotosaka Sabata
pɔsɔ na pɔsɔ.—Misala 15:28, 29.
Ntoma Paulo azalaki komitungisa mpo na
bakristo oyo bazalaki kokangama ete bato
bátalelaka mikolo mosusu ete eleki
mikolo mosusu na ntina.—Bagalatia 4:9-11.
Mobu 2010 T.B.
[Elilingi na lokasa 11]
Bazulunalo elobelaki banzela oyo bituluku ya Ba-Méthodiste bakangaki mpo na kosɛnga ete Fiji ezongela kotosaka Sabata
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Fiji Times