Koloba na minɔkɔ mosusu—Eutaka epai ya Nzambe?
DEVON, alobi boye: “Nayebaka te mpo na nini, pɔsɔ nyonso na lingomba na ngai emonanaka ete bato mingi bazwaka elimo santu mpe balobaka na minɔkɔ ndenge na ndenge. Bamosusu kati na bango bazalaka na bomoi moko ya mbindo. Nzokande, ngai nasalaka makasi mpo namitambwisa malamu. Kasi, atako nabondelaka mingi mpo nazwa likabo ya elimo, nazwaka yango te. Mpo na nini bongo?”
Ndenge moko, Gabriel mpe akendaka na ndako-nzambe epai emonanaka ete bato bazwaka elimo santu mpe balobaka na minɔkɔ mosusu. Alobi boye: “Likambo etungisaka ngai ezali ete ntango nazali kobondela, basusu bakataka ngai na ndenge balobaka na mongongo makasi maloba oyo ngai na bango tokangaka ntina na yango te. Moto moko te azwaka litomba na maloba yango. Likabo ya elimo ya Nzambe esengeli te kozala na ntina moko boye?”
Makambo oyo Devon mpe Gabriel balobi, ebimisi motuna moko oyo ezali kobenda likebi; koloba na minɔkɔ mosusu, ndenge esalemaka na mangomba mosusu eutaka mpenza epai ya Nzambe? Mpo na kozwa eyano, ebongi tótalela naino ntina oyo bakristo ya ekeke ya liboso bazwaki likabo ya koloba na minɔkɔ mosusu.
“Babandaki koloba na minɔkɔ mosusu”
Na Biblia, totángaka masolo ya mibali mpe basi mosusu oyo bazwaki nguya ya koloba na minɔkɔ oyo bayekolaki ata moke te. Mbala ya liboso oyo likambo yango esalemaki, ezalaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, mwa bapɔsɔ nsima ya liwa ya Yesu Kristo. Na mokolo yango na Yerusaleme, bayekoli ya Yesu soki 120 “batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba na minɔkɔ mosusu.” Bapaya oyo bautaki na mikili mosusu “bakamwaki makasi, mpamba te moto na moto azalaki koyoka bango bazali koloba na monɔkɔ na ye mpenza.”—Misala 1:15; 2:1-6.
Biblia elobeli mpe bayekoli mosusu ya liboso ya Yesu baoyo bazwaki mpe likabo yango. Na ndakisa, elimo santu epesaki ntoma Paulo nguya ya koloba minɔkɔ mingi na ndenge ya likamwisi. (Misala 19:6; 1 Bakorinti 12:10, 28; 14:18) Kasi, likabo nyonso ya ndenge wana oyo elimo santu ezalaki kopesa esengelaki kozala na mokano moko ya ntina. Na yango, na ntango ya kala koloba na minɔkɔ mosusu ezalaki kokokisa mokano nini?
Elembo ete Nzambe azali na bango
Ntango akomelaki bakristo ya engumba Korinti, epai emonanaki ete bamosusu bazalaki koloba na minɔkɔ mosusu, Paulo alobaki ete “koloba na minɔkɔ mosusu ezali elembo . . . mpo na bato bazangi kondima.” (1 Bakorinti 14:22) Na yango, nguya ya koloba na minɔkɔ mosusu mpe makabo mosusu ya kosala makamwisi, ezalaki elembo ete Nzambe andimaki lisangá yango ya sika ya bokristo mpe azalaki kosunga yango. Likabo ya kosala makamwisi ezalaki lokola elembo moko ya nzela, oyo ezalaki kolakisa bato oyo bazalaki koluka solo, esika bakokaki kokuta bato oyo Nzambe aponi.
Nzokande, Biblia emonisi te ete Yesu to bato mosusu ya sembo oyo bazalaki na bomoi liboso na ye bazalaki koloba na minɔkɔ mosusu na ndenge ya likamwisi. Na yango, emonani ete likabo ya koloba na minɔkɔ mosusu oyo bayekoli ya Yesu bazwaki ezalaki na ntina mosusu.
Esalisaki mpo na kopalanganisa nsango malamu
Na ebandeli ya mosala na ye, Yesu apesaki bayekoli na ye etinda básakola nsango malamu ya Bokonzi kaka epai ya Bayuda. (Matai 10:6; 15:24) Mpo na yango, bayekoli bazalaki mpenza te kokende kosakola epai Bayuda bazalaki moke. Kasi, makambo esengelaki kobongwana mosika te.
Mwa moke nsima ya liwa na ye na mobu 33 ya ntango na biso, Yesu oyo asekwaki atindaki bayekoli na ye ‘bákómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ Ayebisaki mpe bayekoli na ye ete bakozala batatoli na ye “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Matai 28:19; Misala 1:8) Kopalanganisa nsango malamu na ndenge wana elingaki kosɛnga koloba minɔkɔ mingi na esika ya koloba kaka Ebre.
Nzokande, mingi kati na bayekoli yango ya liboso ‘batángaki kelasi mingi te mpe bazalaki bato mpamba.’ (Misala 4:13) Kasi, ndenge nini bakokaki kosakola na mikili ya mosika epai bazalaki koloba minɔkɔ mosusu oyo bango bayokaki naino te, mpe bayekolaki te koloba yango? Elimo santu epesaki basusu kati na basakoli wana ya molende, nguya ya kosakola polele na minɔkɔ oyo bayebaki liboso te ndenge ya koloba yango.
Na yango, likabo ya koloba na minɔkɔ mosusu ezalaki na mikano mibale ya ntina. Ya liboso, ezalaki elembo ete Nzambe azali na bango. Ya mibale, ezalaki kosalisa bakristo ya ekeke ya liboso bákokisa mokumba na bango ya kosakola nsango malamu epai ya bato ya minɔkɔ mingi. Koloba na minɔkɔ mosusu ndenge esalemaka na mangomba mingi lelo oyo, ekokisaka mokano yango?
Koloba na minɔkɔ mosusu lelo oyo—Elembo ya lisungi ya Nzambe?
Esika nini okoki kotya elembo mpo bato mingi na kartye na bino bázwela yango litomba? Na kati ya mwa ndako moko? Te! Makambo oyo esalemaki na mokolo ya Pantekote emonisi biso ete “ebele” ya baleki-nzela bamonaki elembo ndenge bayekoli bakómaki koloba na minɔkɔ mosusu na ndenge ya kokamwa. Mpo na yango, “milimo soki nkóto misato (3 000) ebakisamaki” na lisangá ya bokristo na mokolo yango! (Misala 2:5, 6, 41) Soki bato lelo oyo bazali kotuta ntolo ete balobaka na minɔkɔ mosusu kasi bazali kosala yango kaka na mangomba na bango, ndenge nini likambo yango ekoki kozala lokola elembo mpo na ebele ya bato oyo bazali bandimi te?
Liloba ya Nzambe emonisi pite mpe ‘misala mosusu ya nzoto’ ete etɛmɛlaka mosala ya elimo santu; ebakisi ete “baoyo basalaka makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (Bagalatia 5:17-21) Soki omoni bato oyo basalaka makambo ya mabe bazali koloba na minɔkɔ mosusu, ntango mosusu okomituna boye: ‘Elimo santu ya Nzambe emikosi te mpo epesa makabo na bato ya ndenge wana, oyo bazali kokoba kosala makambo oyo Liloba ya Nzambe eboyi?’ Yango ekozala lokola kotya elembo oyo ezali kolakisa bato nzela ya mabe.
Koloba na minɔkɔ mosusu lelo oyo—Esalisaka mpo na kopalanganisa nsango malamu?
Ezali boni mpo na mokano mosusu oyo koloba na minɔkɔ mosusu ekokisaki na ekeke ya liboso? Koloba na minɔkɔ mosusu ndenge esalemaka lelo na mangomba mosusu esalisaka mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge? Kobosana te ete bato oyo bazalaki na Yerusaleme na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, bautaki na mikili mingi, mpe bayokaki malamu minɔkɔ oyo bayekoli bazalaki koloba na ndenge ya likamwisi. Nzokande, baoyo balobaka na minɔkɔ mosusu lelo oyo, babimisaka maloba oyo bato bakokaka kokanga ntina na yango te.
Emonani polele ete, koloba na minɔkɔ mosusu lelo oyo, ekeseni mpenza na likabo ya elimo santu oyo bayekoli ya liboso ya Yesu bazwaki. Kutu, banda liwa ya bantoma, ezali ata na lisolo moko te oyo emonisi ete bato mosusu bazwaki likabo yango ya elimo. Yango ezali kokamwisa te bato oyo batángaka Biblia. Mpo na makabo ya kokamwa ata mpe oyo ya koloba na minɔkɔ mosusu, ntoma Paulo asakolaki boye: “Ekosuka.” (1 Bakorinti 13:8) Kasi, ndenge nini moto akoki koyeba nani azali na elimo santu lelo oyo?
Banani bamonisaka ete bazali na elimo santu?
Yesu ayebaki malamu ete likabo ya koloba na minɔkɔ mosusu ekosila nsima ya kosalema ya lisangá ya bokristo. Mwa moke liboso akufa, Yesu alobelaki elembo moko oyo esengelaki kosuka te, oyo esengelaki komonisaka bayekoli na ye ya solo. Alobaki boye: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Kutu, na vɛrsɛ yango kaka epai Liloba ya Nzambe esakolaki ete nsukansuka makabo ya likamwisi ekosuka, ebakisi boye: “Bolingo esilaka soki moke te.”—1 Bakorinti 13:8.
Bolingo etángami na esika ya liboso na biteni libwa ya “mbuma” ya elimo santu ya Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23) Na yango, lelo oyo baoyo bazali mpenza na elimo ya Nzambe—mpe na lisungi na ye—balinganaka mpenza. Lisusu, eteni ya misato ya mbuma ya elimo ezali kimya. Na yango, baoyo lelo oyo bazali na elimo santu basengeli kofandaka na kimya, koboya makambo lokola kokanisela basusu mabe, kopona mposo, mpe koboya mobulu.
Lisusu, kanisá esakweli ya Yesu oyo ezali na Misala 1:8. Asakolaki ete bayekoli na ye bakozwa nguya ya kozala batatoli na ye “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” Yesu amonisaki mpe ete mosala yango ekokoba “tii na suka ya mokili.” (Matai 28:20, Bible na Lingala ya lelo oyo) Na yango, mosala yango ya kosakola na mokili mobimba ekokoba kozala elembo oyo ekolakisa baoyo bazali mpenza kotambwisama na elimo santu.
Okanisi nini? Omonaka elembo ya elimo santu epai ya banani lelo oyo? Banani na mokili mobimba bazali komonisa mbuma ya elimo, mingimingi bolingo mpe kimya tii kondima konyokwama na mabɔkɔ ya bakonzi mpo baboyi kosimba mindoki? (Yisaya 2:4) Banani bazali kosala makasi mpo na koboya misala ya nzoto, na ndakisa pite, ata mpe kobengana baoyo baboyi kotika misala wana mabe? (1 Bakorinti 5:11-13) Banani bazali kosakola na mabele mobimba nsango malamu ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato?—Matai 24:14.
Babimisi ya zulunalo oyo bakakatanaka te koloba ete Batatoli ya Yehova nde bakokisi makambo oyo Biblia elobi mpo na baoyo bazali na elimo santu. Mpo na nini te koluka koyeba bango malamu mpe kozwa ekateli ya komona yo moko soki Nzambe azali mpenza na bango?