Biblia eteyaka nini na likambo etali koloba na minɔkɔ mosusu?
Eyano ya Biblia
“Koloba na minɔkɔ mosusu” ezali likoki ya kokamwa oyo bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso bazwaki; likoki oyo esalisaki bango báloba na monɔkɔ moko kozanga ete báyekola yango liboso. (Misala 10:46) Moto nyonso oyo ayebaki monɔkɔ oyo molobi azali koloba, azalaki koyoka yango kozanga mokakatano. (Misala 2:4-8) Koloba na minɔkɔ mosusu ezalaki moko ya makabo ya elimo santu oyo Nzambe apesaki bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso.—Baebre 2:4; 1 Bakorinti 12:4, 30.
Epai wapi mpe ntango nini koloba na minɔkɔ mosusu ebandaki?
Likamwisi yango esalamaki liboso na Yerusaleme na mokolo ya fɛti ya Pantekote ya Bayuda na mobu 33 ya ntango na biso na ntɔngɔ. Bayekoli ya Yesu soki 120 bayanganaki elongo ntango “bango nyonso batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba na minɔkɔ mosusu.” (Misala 1:15; 2:1-4) Ebele ya bato oyo “bauti na bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola” bayanganaki mpe “moto na moto azalaki koyoka bango bazali koloba na monɔkɔ na ye mpenza.”—Misala 2:5, 6.
Mpo na nini bazalaki koloba na minɔkɔ mosusu?
Mpo na komonisa ete Nzambe azalaki elongo na bakristo. Na kala, Nzambe apesaki basaleli na ye ya sembo likoki ya kosala makamwisi mpo na komonisa ete azalaki elongo na bango, na ndakisa Moize. (Kobima 4:1-9, 29-31; Mitángo 17:10) Koloba na minɔkɔ mosusu ezalaki mpe kaka na mokano wana, emonisaki ete Nzambe azalaki elongo na lisangá ya bokristo oyo eutaki kobotama sika. Ntoma Paulo akomaki: “Koloba na minɔkɔ mosusu ezali elembo, mpo na bandimi te, kasi mpo na bato bazangi kondima.”—1 Bakorinti 14:22.
Mpo bakristo bápesa litatoli malamumalamu. Baoyo bayokaki bayekoli ya Yesu na mokolo ya Pantekote balobaki: “Tozali koyoka bango bazali koloba makambo minene ya Nzambe na minɔkɔ na biso.” (Misala 2:11) Na yango, ntina mosusu ya likamwisi yango, ezalaki mpo esalisa bakristo ‘bápesa litatoli malamumalamu’ mpe ‘bákómisa bato bayekoli na bikólo nyonso,’ ndenge Yesu apesaki bango etinda. (Misala 10:42; Matai 28:19) Bato soki 3 000 oyo bamonaki likamwisi yango mpe bayokaki litatoli yango bakómaki bayekoli na mokolo wana.—Misala 2:41.
Koloba na minɔkɔ mosusu esengelaki kokoba mpo na libela?
Te. Makabo ya elimo santu, ata mpe koloba na minɔkɔ mosusu, ezalaki kaka mpo na mwa ntango. Biblia esakolaki: “Ezala makabo ya bisakweli, ekolongolama; ezala minɔkɔ, ekosuka.”—1 Bakorinti 13:8.
Ntango nini koloba na minɔkɔ mosusu esukaki?
Mbala mingi, bakristo mosusu bazalaki kozwa makabo ya elimo santu ntango bantoma bazali wana, mingimingi soki bantoma batyeli bango mabɔkɔ. (Misala 8:18; 10:44-46) Emonani ete baoyo bazwaki makabo ya elimo santu epai ya bantoma bazalaki te na likoki ya kopesa yango basusu. (Misala 8:5-7, 14-17) Na ndakisa, mokonzi moko ya Leta akoki kopesa moto mokanda oyo epesi ye ndingisa ya kotambwisa motuka, kasi yango elingi koloba te ete moto yango azwi ndingisa ya kopesa yango bato mosusu. Emonani lokola, koloba na minɔkɔ mosusu esukaki na liwa ya bantoma mpe ya bakristo oyo bazwaki likabo yango epai na bango.
Bongo koloba na minɔkɔ mosusu lelo oyo?
Emonani ete likabo ya koloba na minɔkɔ mosusu esukaki soki na nsuka ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso. Moto moko te lelo oyo akoki koloba ete azali koloba na minɔkɔ mosusu na nguya ya Nzambe.a
Ndenge nini tokoki koyeba bakristo ya solo?
Yesu alobaki ete bato bakoyeba bakristo ya solo na bolingo ya solosolo oyo bakomonisa. (Yoane 13:34, 35) Ndenge moko mpe, ntoma Paulo ateyaki ete bolingo ekozala elembo ya libela oyo ekomonisa bakristo ya solo. (1 Bakorinti 13:1, 8) Amonisaki ete elimo ya Nzambe ekosalisa bakristo bámonisa bizaleli oyo elobelami na mobimba lokola “mbuma ya elimo,” oyo ezaleli na yango ya liboso ezali bolingo.—Bagalatia 5:22, 23.
a Talá lisolo “Koloba na minɔkɔ mosusu—Eutaka epai ya Nzambe?”