“Liloba ya Nzambe . . . ezali na nguya”
“Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”—BAEBRE 4:12.
1. Nini endimisaka yo ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya? (Talá elilingi ya ebandeli.)
BASALELI ya Yehova bandimaka ete liloba na ye, elingi koloba nsango na ye epai ya bato, “ezali na bomoi mpe ezali na nguya.” (Baebre 4:12) Tomoni nguya ya Biblia na bomoi na biso mpe na bomoi ya basusu. Bato mosusu oyo bazali kosalela Yehova, bazalaki liboso miyibi, baombo ya bangi to drɔgɛ, mpe basali pite. Basusu bazalaki na lokumu to mbongo mingi, kasi bazalaki koyoka ete bazangi eloko moko na bomoi na bango. (Mosakoli 2:3-11) Likambo ya esengo, bato mingi oyo liboso bazangaki elikya bazwá litambwisi mpe elikya. Totángaka masolo ya bato ebele ya ndenge wana na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na eteni oyo elobi “Biblia ebongolaka bato.” Ata nsima ya kokóma bakristo, bato basengeli kokoba kokómisa makasi boyokani na bango na Yehova na lisalisi ya Biblia.
2. Ndenge nini nguya ya Liloba ya Nzambe esalisaki bato na siɛklɛ ya liboso?
2 Tókamwa te soki bato mingi bazali kosala mbongwana minene ntango bayekoli solo. Na siɛklɛ ya liboso, ata bandeko na biso ya mibali mpe ya basi oyo bazalaki na elikya ya kokende likoló basalaki mbongwana ya ndenge wana. (Tángá 1 Bakorinti 6:9-11.) Ntango ntoma Paulo alobelaki bato oyo bakozwa libula ya Bokonzi ya Nzambe te, abakisaki: “Bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana.” Liloba ya Nzambe mpe elimo santu na ye esalisaki bango bábongwana. Kasi, ata nsima ya kokóma bakristo, bamosusu basalaki mbeba minene oyo ebebisaki boyokani na bango na Yehova. Na ndakisa, Biblia elobeli ndeko mobali moko oyo atyamaki mafuta na elimo, oyo esɛngaki bálongola ye na lisangá. Na nsima, asalaki mbongwana oyo esengeli mpe azongisamaki na lisangá. (1 Bakorinti 5:1-5; 2 Bakorinti 2:5-8) Tolendisamaka mingi na komona ete bandeko na biso ya mibali mpe ya basi balongi kosala mbongwana minene na nguya ya Liloba ya Nzambe.
3. Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Liloba ya Nzambe ezali na nguya mpenza. Lokola Yehova apesi biso Liloba na ye, tosengeli kosalela yango malamu. (2 Timote 2:15) Lisolo oyo ekolobela ndenge tokoki kosalela nguya ya Liloba ya Nzambe (1) na bomoi na biso, (2) na mosala ya kosakola, mpe (3) ntango tozali koteya na estrade. Makambo oyo tokoyekola ekosalisa biso tómonisa bolingo mpe botɔndi epai ya Tata na biso ya likoló, oyo ateyaka biso mpo na litomba na biso moko.—Yisaya 48:17.
NA BOMOI NA BISO
4. (a) Tokoki kosala nini mpo Liloba ya Nzambe esala mosala kati na biso? (b) Ntango nini otángaka Biblia?
4 Mpo Liloba ya Nzambe esala mosala na bomoi na biso, tosengeli kotánga yango mbala na mbala. Ebongi tósalaka bongo mokolo na mokolo. (Yosua 1:8) Mingi kati na biso tozalaka na makambo ebele, kasi tosengeli kotika eloko te, ata mpe mikumba na biso, epekisa biso kotánga Biblia. (Tángá Baefese 5:15, 16.) Tokoki kosala makasi tózwa ntango ya kotánga Biblia na ntɔngɔntɔngɔ, na boumeli ya mokolo, to na butu. Toyokaka lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki: “Nalingaka mobeko na yo mingi mpenza! Ezali lobanzo na ngai mokolo mobimba.”—Nzembo 119:97.
5, 6. (a) Mpo na nini komanyola ezali na ntina? (b) Nini okoki kosala mpo na komanyola malamu? (c) Ndenge nini kotánga Biblia mpe komanyola esalisá yo?
5 Kasi, kosuka kaka na kotánga ekoki te. Osengeli komanyola yango, elingi koloba kokanisa na mozindo makambo oyo otángi. (Nzembo 1:1-3) Soki tosali bongo, tokoyeba kosalela bwanya ya Biblia na bomoi na biso. Yango wana, ata soki otángaka Biblia na papye, na tablɛti, to na telefone, mokano na yo esengeli kozala ya kotika yango ekɔta na motema na yo.
6 Nini okoki kosala mpo na komanyola malamu? Ntango ozali kotánga Biblia, osengeli kotɛlɛma na vɛrsɛ moko mpe komituna boye: ‘Likambo oyo eteyi ngai nini mpo na Yehova? Na bomoi na ngai, nasalelaka mpenza makambo oyo natángi awa? Makambo nini nasengeli lisusu kobongisa?’ Ntango ozali kokanisa ndenge wana mpe kobondela mpo na makambo oyo ozali kotánga, okolinga kosalela yango. Soki ozali kosala bongo, okomona nguya ya Liloba ya Nzambe na bomoi na yo.—2 Bakorinti 10:4, 5.
NA MOSALA YA KOSAKOLA
7. Ndenge nini tokoki kosalela Liloba ya Nzambe malamu na mosala ya kosakola?
7 Ezali na ntina ete tósalelaka Liloba ya Nzambe mingi ntango tozali kosakola mpe koteya. Ndeko mobali moko alobaki boye: “Soki obimi mpo na kosakola ndako na ndako elongo na Yehova, kaka yo nde okoloba to okotikela ye mpe aloba?” Ntango totángeli moto Biblia, ezali lokola totiki Yehova aloba na ye. Vɛrsɛ moko oyo eponami malamu ezali na nguya koleka makambo nyonso oyo tokoki koloba. (1 Batesaloniki 2:13) Ntango ozali na mosala ya kosakola, osalaka makasi otánga Biblia mbala nyonso oyo okoki?
8. Mpo na nini tosengeli kosuka kaka te na kotángela bato bavɛrsɛ?
8 Kasi, kosuka kaka na kotángela moto vɛrsɛ ekoki te. Bato mingi bayebaka ndimbola ya bavɛrsɛ ya Biblia te. Ezalaki bongo na siɛklɛ ya liboso, ezali mpe bongo lelo. (Baroma 10:2) Tókanisa te ete moto oyo totángeli vɛrsɛ ayebi ndimbola na yango. Tokoki kosalisa ye; tokoki kozongela maloba to makanisi ya ntina ya vɛrsɛ yango, mpe kolimbolela ye yango. Na ndenge yango, Liloba ya Nzambe ekoki kokɔta na motema mpe na makanisi ya bato oyo bazali koyoka biso.—Tángá Luka 24:32.
9. Mpo na kosalisa bato bámemya Biblia, tokoki koloba nini liboso ya kotángela moto vɛrsɛ? Pesá ndakisa.
9 Makambo oyo tolobi liboso ya kotánga vɛrsɛ ekoki mpe kosalisa moto amemya Liloba ya Nzambe. Na ndakisa, tokoki koloba: “Tótala oyo Mozalisi na biso alobi na likambo yango.” To soki tozali kosolola na moto oyo azali mokristo te, tokoki koloba, “Tótala oyo Makomami Mosantu elobi.” Soki tokutani na moto oyo alingaka makambo ya mangomba te, tokoki kotuna ye: “Osilá koyoka maloba oyo ya ntango ya kala?” Soki obosani te ete moto na moto azali na makanisi mpe bindimeli na ye, okosala nyonso oluka maloba oyo ebongi mpo na ye.—1 Bakorinti 9:22, 23.
10. (a) Likambo nini ndeko mobali moko akutanaki na yango? (b) Okutanaki na likambo moko na mosala ya kosakola oyo emonisi nguya ya Liloba ya Nzambe?
10 Bato mingi bamonaka ete kosalela Liloba ya Nzambe ekoki mpenza kosalisa bato oyo tozali koteya. Na ndakisa, ndeko moko akendaki kotala mobange moko ya mobali oyo atángaka bazulunalo na biso banda bambula mingi. Mokolo moko, na esika apesa ye kaka nimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ndeko yango amonaki malamu atángela ye vɛrsɛ moko. Atángaki 2 Bakorinti 1:3, 4, oyo elobi: “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso . . . abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” Maloba yango esimbaki motema ya mobange wana mpe asɛngaki ndeko mobali azongela kotánga bavɛrsɛ yango. Na nsima, alobaki ete ye ná mwasi na ye bazalaki mpenza na mposa ya libɔndisi. Mokapo wana etindaki ye aluka koyeba Biblia malamu. Kosalela Liloba ya Nzambe na mosala ya kosakola esalisaka mpenza!—Misala 19:20.
NTANGO OZALI KOTEYA NA ESTRADE
11. Mokumba nini bandeko mibali oyo bateyaka na estrade bazali na yango?
11 Tolingaka koyangana na makita mpe na mayangani na biso ya minene mpe ya mike. Ntina na yango ya liboso ezalaka mpo na kosambela Yehova. Tozwaka mpe mateya na makambo oyo toyokaka kuna. Yango wana, bandeko mibali oyo bateyaka na estrade bazali na libaku monene mpe mokumba ya kozwa na lisɛki te. (Yakobo 3:1) Basengeli komindimisa ete makambo oyo bazali koteya euti na Liloba ya Nzambe. Soki ozwi mokumba yango, ndenge nini okoki kokɔtisa nguya ya Liloba ya Nzambe mpo na kosimba mitema ya bayoki?
12. Molobi akoki kosala nini mpo Makomami ezala na esika ya liboso na diskur na ye?
12 Makomami nde esengeli kozala na esika ya liboso na diskur nyonso. (Yoane 7:16) Yango wana, kebáká ete ndenge na yo ya kosala diskur, masolo oyo okobɛta to bandakisa oyo okopesa elongola likebi na Biblia te. Lisusu, kobosana te ete kotánga Biblia ekeseni na koteya Biblia. Soki otángi bavɛrsɛ ebeleebele, bato bakobosana yango. Boye, poná malamu bavɛrsɛ oyo okosalela. Na nsima, zwá ntango ya kotánga, kolimbola, kopesa mwa ndakisa, mpe komonisa ndenge ya kosalela yango. (Nehemia 8:8) Soki diskur na yo ezali na plan, yekolá plan yango malamu mpe bavɛrsɛ oyo ezali na kati. Meká komona ndenge maloba eyokani na bavɛrsɛ oyo etyami. Mpe salelá mwa bavɛrsɛ mpo na koteya makanisi ya ntina oyo ezali na plan. (Okozwa makanisi ya malamu na liteya 21 tii na 23 na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.) Likambo eleki ntina, bondelá Yehova asalisa yo oyeba kobimisa makanisi ya ntina oyo ezali na Liloba na ye.—Tángá Ezera 7:10; Masese 3:13, 14.
13. (a) Ndenge nini vɛrsɛ oyo ndeko mwasi moko ayokaki na makita esalisaki ye? (b) Ndenge nini bavɛrsɛ oyo totángaka na makita esalisá yo?
13 Ndeko mwasi moko na Australie akutaná na makambo mingi ya nsɔmɔ na bomwana na ye. Atako na nsima ayebaki Yehova, azalaki kaka kondima mpenza te ete Yehova alingaka ye. Na likita moko, ndeko mwasi yango ayokaki vɛrsɛ moko oyo esimbaki mpenza motema na ye. Amanyolaki yango mpe asalaki bolukiluki, mpe yango ememaki na bavɛrsɛ mosusu. Akómaki kondima ete Yehova alingaka ye.a (Talá maloba na nse ya lokasa.) Yo mpe osilá koyoka vɛrsɛ moko oyo esimbaki motema na yo ndenge wana, ezala na makita, na liyangani ya moke to ya monene?—Nehemia 8:12.
14. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Liloba ya Yehova?
14 Tozali na botɔndi mingi epai ya Yehova mpo na Liloba na ye, Biblia. Alakaki ete ekoumela, mpe akokisi elaka yango. (1 Petro 1:24, 25) Yango wana, tángáká Biblia mokolo na mokolo, saleláká toli na yango na bomoi na yo, mpe saleláká yango mpo na kosalisa basusu. Soki osali bongo, okomonisa ete olingaka mpenza eloko yango ya motuya, mpe Mobandisi na yango, Yehova Nzambe.
a Talá etanda “Esika makambo ebongwanaki.”