Baboti, bozali kosalisa bana na bino bákende liboso tii bázwa batisimo?
“Mpo na nini ozali koumela? Tɛlɛmá, zwá batisimo.”—MISALA 22:16.
1. Likambo nini baboti balingaka komindimisa liboso mwana na bango azwa batisimo?
NDEKO moko na nkombo Blossom Brandt alobeli makambo oyo esalemaki ntango azwaki ekateli ya kozwa batisimo. Alobi boye: “Na boumeli ya basanza, nazalaki koyebisa papa ná mama ete nalingi kozwa batisimo, mpe tosololaki mingi mpo na likambo yango. Balingaki komindimisa ete nakangi mpenza ntina ya batisimo, mpo ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Nsukansuka na mokolo ya 31/12/1934, nazwaki batisimo.” Lelo oyo mpe, baboti balingaka kosalisa bana na bango bázwa bikateli ya malamu. Kozongisa batisimo ya mwana nsima kaka mpamba, ekoki kobebisa boyokani na ye na Yehova. (Yakobo 4:17) Kasi, liboso mwana azwa batisimo, baboti ya bwanya balingaka komindimisa ete akoki mpenza mpo na kokóma moyekoli ya Kristo.
2. (a) Likambo nini bakɛngɛli ya zongazonga mosusu bamoni? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Bakɛngɛli ya zongazonga mosusu bamoni ete bilenge mingi ya mbula pene na 20 to mwa moke koleka, bazwi naino batisimo te, atako bakolá na kati ya solo. Mbala mingi, bilenge yango bakendaka na makita, babimaka mosala ya kosakola, mpe bamimonaka ete bazali Batatoli ya Yehova. Nzokande, bamipesi naino na Yehova te mpe bazwi batisimo te. Mpo na nini? Mpo na bilenge mosusu, baboti nde bamonaka ete bakoki naino te mpo na kozwa batisimo. Na lisolo oyo, tokolobela makambo minei oyo etungisaka baboti mpe epekisaka bango bálendisa bana na bango bázwa batisimo.
MWANA NA NGAI AKÓMI NA MBULA OYO EKOKI MPO NA KOZWA BATISIMO?
3. Likambo nini ezalaki kotungisa baboti ya Blossom?
3 Baboti ya Blossom, oyo tolobelaki na paragrafe ya liboso, bazalaki komituna soki mwana na bango azalaki na mbula oyo ekoki mpo na koyeba ndimbola ya batisimo mpe kozwa yango na lisɛki te. Ndenge nini baboti bakoki koyeba soki mwana na bango akoki mpo na komipesa na Yehova?
4. Ndenge nini etinda ya Yesu oyo ezali na Matai 28:19, 20 ekoki kosalisa baboti?
4 Tángá Matai 28:19, 20. Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, Biblia epesi mbula te oyo moto asengeli kokokisa mpo azwa batisimo. Kasi, ezali malamu baboti báyeba malamu soki kokómisa bato bayekoli elimboli nini. Na monɔkɔ ya Grɛki, maloba ‘kokómisa bato bayekoli’ oyo basaleli na Matai 28:19 elimboli koteya moto na mokano ya kosalisa ye akóma moyekoli. Moyekoli ezali moto oyo azali koyekola mpe kokanga ntina ya makambo oyo Yesu ateyaki mpe alingi kotosa ye. Na yango, banda ntango bana babotami, baboti basengeli koteya bango na mokano ya kosalisa bango bámipesa na Yehova mpe bákóma bayekoli ya Kristo. Ya solo, bana oyo babotami sika bakokisi masɛngami te mpo na kozwa batisimo. Kasi, Biblia emonisi ete ata bana mike bakoki kokanga ntina ya mateya ya Biblia mpe kolinga yango.
5, 6. (a) Ndenge oyo Biblia elobeli Timote etindi biso tóloba nini mpo na batisimo? (b) Ndenge nini baboti ya bwanya bakoki kosalisa bana na bango?
5 Timote azalaki moyekoli oyo azwaki ekateli ya kosalela Yehova ntango azalaki mpenza elenge. Ntoma Paulo alobaki ete Timote abandaki koyekola Makomami ‘banda bomwana na ye mpenza.’ Tata ya Timote azalaki kosalela Yehova te, kasi mama ya Timote ná nkɔkɔ na ye ya mwasi basalisaki ye alinga Liloba ya Nzambe. Yango esalaki ete akóma na kondima makasi. (2 Timote 1:5; 3:14, 15) Ekoki kozala ete azalaki na mbula pene ya 20 to mwa moke koleka ntango akokisaki masɛngami mpe azwaki mikumba minene na lisangá.—Misala 16:1-3.
6 Bana nyonso bazalaka ndenge moko te; bakɔmɛlaka mpe na mbula moko te. Bana mosusu bakangaka ntina ya solo, bazwaka bikateli ya malamu mpe bamonisaka mposa ya kozwa batisimo ntango bazali naino mike. Bana mosusu esɛngaka bákola lisusu mwa moke. Na yango, baboti ya bwanya batyaka bana mbamba te ete bázwa batisimo. Kasi, basalisaka mwana mokomoko na kolanda makoki na ye. Baboti basepelaka soki mwana na bango asaleli toli ya Masese 27:11. (Tángá.) Kasi, basengeli kobosana mokano na bango te: kosalisa bana na bango bákóma bayekoli ya Kristo. Na yango, basengeli mpe komituna boye: ‘Mwana na ngai azali na boyebi oyo ekoki mpo amipesa na Nzambe mpe azwa batisimo?’
MWANA NA NGAI AZALI NA BOYEBI OYO EKOKI?
7. Moto asengeli koyeba liteya mokomoko ya Biblia na mozindo liboso azwa batisimo? Limbolá.
7 Ntango baboti bateyaka bana na bango, basalisaka bango bázwa boyebi ya solo. Boyebi yango ekotinda bango bámipesa na Nzambe. Kasi yango elingi koloba te ete moto asengeli koyeba liteya mokomoko ya Biblia na mozindo liboso amipesa na Nzambe mpe azwa batisimo. Moyekoli nyonso ya Kristo asengeli kokoba kokola na boyebi ya solosolo, ata nsima ya kozwa batisimo. (Tángá Bakolose 1:9, 10.) Na yango, boyebi ya ndenge nini moto asengeli kozala na yango liboso azwa batisimo?
8, 9. Likambo nini ekómelaki mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ na Filipi, mpe liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango?
8 Lisolo ya libota moko ya siɛklɛ ya liboso ekoki kosalisa baboti lelo. (Misala 16:25-33) Ntango Paulo asalaki mobembo na ye ya mibale na mosala ya misionɛrɛ, akendaki na engumba ya Filipi na mobu 50 T.B. Ntango azalaki kuna, bakoselaki ye ná Silasi makambo, bakangaki bango, mpe batyaki bango na bolɔkɔ. Na butu, mabele eninganaki makasi mpe baporte nyonso ya bolɔkɔ efungwamaki. Mokɛngɛli ya bolɔkɔ akanisaki ete bato nyonso ya bolɔkɔ bakimi, mpe alingaki komiboma. Kasi, Paulo apekisaki ye. Na nsima, Paulo ná Silasi bateyaki moto yango ná bato ya libota na ye. Bato yango bandimaki makambo oyo bayekolaki mpo na Yesu mpe bamonaki ete ezali na ntina mingi bátosa ye. Na yango, bazwaki batisimo kozanga koumela. Lisolo yango ezali koteya biso nini?
9 Mbala mosusu, mokɛngɛli wana ya bolɔkɔ azalaká liboso soda ya Roma. Ayebaki Makomami te. Na yango, mpo akóma mokristo, asengelaki koyekola mateya ya ebandeli ya Biblia, koyeba makambo oyo Yehova asɛngaka basaleli na ye, mpe kozwa ekateli ya kotosa makambo oyo Yesu ateyaki. Makambo oyo ayekolaki na mwa ntango mokuse etindaki ye azwa batisimo. Kozanga ntembe, akobaki koyekola makambo mosusu nsima ya batisimo. Na kotalela ndakisa wana, okosala nini soki mwana na yo ayebisi yo ete azali na mposa ya kozwa batisimo mpo alingi Yehova mpe alingi kotosa ye? Okoki kotinda ye asolola na bankulutu mpo báyeba soki akoki mpo na kozwa batisimo.a Ndenge moko na bakristo nyonso oyo bazwá batisimo, akokoba koyekola makambo mosusu mpo na Yehova bomoi na ye mobimba, ata mpe libela na libela.—Baroma 11:33, 34.
MWANA NA NGAI ASENGELI NAINO KOPUSANA NA KELASI?
10, 11. (a) Baboti mosusu bakanisaka nini? (b) Nini mpenza ekobatela mwana?
10 Baboti mosusu bakanisaka ete ekoleka malamu mwana na bango apusana na kelasi, azwa mosala ya malamu, bongo na nsima azwa batisimo. Mbala mosusu baboti yango bazali na makanisi ya malamu, kasi basengeli komituna boye: ‘Yango ekosalisa mpenza mwana na ngai azala na bomoi ya malamu? Yango eyokani na makambo Biblia elobi? Ndenge nini Yehova alingi tósalela bomoi na biso?’—Tángá Mosakoli 12:1.
11 Ezali na ntina mingi tóbosana te ete mokili oyo mpe makambo na yango eyokani te na makambo oyo Yehova alingaka mpe oyo akanisaka. (Yakobo 4:7, 8; 1 Yoane 2:15-17; 5:19) Boninga makasi na Yehova nde ekobatela mwana mpe ekosalisa ye atɛmɛla Satana, mokili na ye mpe makanisi na yango ya mabe. Soki baboti batye kelasi mpe mosala ya malamu na esika ya liboso, mwana na bango akoki kokanisa ete makambo ya mokili ezali na ntina koleka kozala na boyokani malamu na Yehova. Lokola ozali moboti mpe olingaka mwana na yo, olingi mpenza alanda makanisi ya mokili oyo na oyo etali kozala na bomoi ya malamu? Likambo ya solo ezali ete mpo na kozala na bomoi ya malamu mpe esengo ya solosolo, tosengeli kotya Yehova na esika ya liboso.—Tángá Nzembo 1:2, 3.
BONGO SOKI MWANA NA NGAI ASALI LISUMU?
12. Mpo na nini baboti mosusu bamonaka ete eleki malamu mwana azwa naino batisimo te?
12 Mama moko ayebisaki ntina oyo azalaki kolinga te ete mwana na ye ya mwasi azwa batisimo. Alobaki boye: “Ezali kosala ngai nsɔni koloba ete ebongiseli ya kolongolama na lisangá nde ezalaki mpenza kotinda ngai naboya.” Ndenge moko na ndeko wana, baboti mosusu bamonaka ete eleki malamu mwana azwa naino batisimo te tii akokóma na likoki ya kokima bozoba ya bomwana. (Ebandeli 8:21; Masese 22:15) Baboti yango bakanisaka ete lokola mwana azwi batisimo te, akolongolama na lisangá te. Kasi mpo na nini makanisi yango ebongi te?—Yakobo 1:22.
13. Soki moto azwi naino batisimo te, akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova te? Limbolá.
13 Ya solo, baboti bakolinga te ete mwana azwa batisimo soki akangi te ntina ya komipesa na Yehova. Kasi ekozala mpenza libunga kokanisa ete soki mwana azwi naino batisimo te, akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova te. Mwana akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova ntango ayebi oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe na miso ya Yehova. (Tángá Yakobo 4:17.) Na yango, baboti ya bwanya bapekisaka bana na bango kozwa batisimo te, kasi basalaka nyonso mpo na kopesa bango ndakisa ya malamu. Bateyaka bana bálinga Yehova mpe mitinda na ye oyo etali bizaleli malamu ntango bazali naino mike mpenza. (Luka 6:40) Soki mwana akómi kolinga Yehova, yango ekobatela ye mpo asala lisumu ya monene te, mpo akolinga kosala oyo ezali malamu na miso ya Yehova.—Yisaya 35:8.
BANDEKO MPE BAKOKI KOSALISA
14. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa baboti?
14 Bankulutu bakoki kolendisa baboti soki bazali kolobela mikano ya elimo na ndenge ya malamu. Ndeko mwasi moko oyo azalaki mobongisi-nzela mbula koleka 70 abosanaka te makambo oyo ndeko Charles Russell ayebisaki ye ntango azalaki na mbula 6. Alobaki boye: “Asololaki na ngai miniti 15 mpo na kotuna ngai mikano na ngai ya elimo.” Ya solo, maloba oyo ebongi mpe oyo elendisaka ekoki kobongola bomoi ya moto. (Masese 25:11) Bankulutu bakoki mpe kosɛnga baboti ná bana na bango báya kosala misala na Ndako ya Bokonzi. Bakoki kopesa bana misala na kolanda mbula mpe makoki na bango.
15. Ndenge nini bandeko mosusu bakoki kosalisa bilenge?
15 Bandeko mosusu mpe bakoki kosalisa soki bazali kotyela bilenge likebi na ndenge oyo ebongi. Na ndakisa, okoki kotya likebi na makambo oyo ezali komonisa ete elenge azali kokola malamu na elimo. Mwana moko apesaki eyano ya malamu na makita, to asalaki lisolo na makita ya kati ya pɔsɔ? Apesaki litatoli na kelasi, to asalaki likambo oyo ebongaki ntango akutanaki na komekama? Soki ɛɛ, koumela te kopesa ye longonya! Okoki komityela mokano ya kosolola na bilenge liboso mpe nsima ya makita. Soki ozali kosala bongo, bana bakomona ete bango mpe bazali na esika na “lisangá monene.”—Nzembo 35:18.
SALISÁ MWANA NA YO AKENDE LIBOSO TII AZWA BATISIMO
16, 17. (a) Mpo na nini ezali na ntina ete bana bázwa batisimo? (b) Esengo nini baboti oyo bazali bakristo bakoki koyoka? (Talá elilingi ya ebandeli.)
16 Koteya bana bálinga Yehova ezali lokumu monene mpenza mpo na baboti oyo bazali bakristo. (Nzembo 127:3; Baefese 6:4) Lokola Yisraele ya kala ezalaki ekólo oyo esilá komipesa na Nzambe, bana bazalaki na ntina ya komipesa na Yehova te. Kasi lelo ezali bongo te. Soki baboti balingaka Yehova mpe mateya ya solo, elingi koloba te ete bana na bango mpe bakosala bongo. Ntango kaka mwana abotami, baboti basengeli kozala na mokano ya kosalisa ye akóma moyekoli ya Yesu, amipesa na Nzambe mpe azwa batisimo. Yango nde eleki ntina! Komipesa, kozwa batisimo, mpe kosalela Yehova na bosembo nde ekosalisa moto abika na bolɔzi monene.—Matai 24:13.
17 Ntango ndeko Blossom Brandt alingaki kozwa batisimo, baboti na ye balukaki komindimisa ete akoki kosala likambo yango ya ntina mingi. Ntango bamonaki ete akoki, bandimaki ekateli na ye. Mokolo moko liboso azwa batisimo, tata na ye asalaki likambo moko ya malamu mpenza na butu. Ndeko Blossom alobaki ete: “Biso nyonso tofukamaki mpe tata asalaki libondeli. Ayebisaki Yehova ete azalaki na esengo mingi ndenge mwana na ye ya moke azwi ekateli ya komipesa epai na ye.” Nsima ya mbula koleka 60, ndeko Blossom alobaki: “Ata soki bambula boni eleki, nakobosana butu wana te!” Baboti, tiká ete bino mpe bóyoka esengo ya komona bana na bino bakómi basaleli ya Yehova oyo bamipesi mpe bazwi batisimo.
a Baboti bakoki kotalela elongo na mwana na bango makambo oyo ezali na buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, nkasa 304-310. Bótala mpe “Biyano na mituna na bino” na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya 04/2011, lokasa 2.