Yehova asepelaka na bosembo ya bandeko oyo basali mingi
NA MOKILI mobimba, bankulutu basepelaka mingi na mikumba oyo bazali na yango na ebongiseli ya Yehova. Basalaka mingi mpo na masangá! Kasi, mikolo eleki, mbongwana esalemaki. Basɛngaki bankulutu oyo bakómi mibange mpe bazalaki na mikumba minene bátikela yango bankulutu mosusu. Na ndenge nini?
Ebongiseli yango ya sika esɛngi ete bakɛngɛli ya zongazonga mpe balakisi na biteyelo ya Teokrasi bátika mikumba yango ntango bakokisi mbula 70. Lisusu, bankulutu oyo bazali na mbula 80 bakotikela bankulutu mosusu mikumba ndenge na ndenge, na ndakisa kozala mokambi ya Komite ya filiale to mokambi-misala ya bankulutu. Ndenge nini bankulutu ya mibange batalelaki mbongwana yango? Bamonisi bosembo na bango epai ya Yehova mpe na ebongiseli na ye!
Ndeko Ken, oyo azalaki mokambi ya Komite ya filiale mbula pene na 49 alobi boye: “Nandimaki ekateli yango na motema moko. Kutu, na ntɔngɔ oyo nayebaki ekateli yango, nabondelaki Yehova mpe nayebisaki ye ete esengeli ndeko moko ya elenge azala mokambi ya Komite ya filiale.” Maloba ya Ken emonisi ndenge bandeko ya sembo oyo bakómi mibange batalelaki likambo yango na mokili mobimba. Ya solo, lokola bazalaki na esengo ya kosalela bandeko na bango, na ebandeli basusu bayokaki mabe.
Esperandio, oyo azalaki mokambi-misala ya bankulutu alobi boye: “Epesaki ngai mwa mawa.” Kasi abakisi ete: “Nazalaki mpe na mposa ya ntango mingi mpo na kolandela kolɔngɔnɔ ya nzoto na ngai.” Tii lelo, ndeko Esperandio asalelaka Yehova na bosembo mpe asalisaka lisangá na bango mingi.
Bongo bandeko oyo baumelaki mingi na mosala ya mokɛngɛli-motamboli? Ndeko Allan, oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli mbula 38 alobi boye: “Ntango nayebaki likambo yango, ebulunganisaki ngai.” Kasi, andimaki ete kolakisa bandeko mibali oyo bazali bilenge makambo ezali na matomba mingi, mpe tii lelo azali kosalela Yehova na bosembo.
Ndeko Russell, oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli mpe molakisi na biteyelo ya Teokrasi mbula 40, alobi ete na ebandeli ye ná mwasi na ye bayokaki mabe. Alobi boye: “Tolingaki mosala na biso mingi mpenza mpe tomonaki ete tozali naino na makasi ya kokoba.” Ndeko Russell ná mwasi na ye bazali kosalela makoki mpe mayele na bango na lisangá, mpe bandeko ya lisangá bazali na esengo ya kosala elongo na bango.
Mbala mosusu yo moko oyokaki te lokola bandeko oyo tolobeli; kasi lisolo moko oyo ezali na 2 Samwele ekoki kosalisa yo omitya na esika na bango.
AYEBAKI ESIKA MAKOKI NA YE ESUKI MPE AZALAKI NA MAKANISI MALAMU
Ntango Abisalome, mwana ya Mokonzi Davidi, atombokaki, Davidi akimaki Yerusaleme mpe akendaki na Mahanaime, na ɛsti ya Ebale Yordani. Kuna, Davidi ná bato na ye bazalaki na mposa ya biloko ya kobikela. Oyebi lisusu likambo oyo esalemaki?
Mibali misato ya mboka yango bakabelaki bango bambeto, biloko ya kolya, mpe bisaleli oyo basengelaki na yango. Barazilai azalaki moko ya mibali yango. (2 Samwele 17:27-29) Ntango botomboki ya Abisalome esilaki, Davidi akokaki sikoyo kozonga na Yerusaleme, mpe Barazilai akendaki kotika ye na Yordani. Davidi asɛngaki ye bákende na Yerusaleme mpe ayebisaki ye ete akopesa ye biloko ya kolya. Barazilai azalaki “moto monene mpenza” mpe azalaki na mposa ya biloko ya kolya te. (2 Samwele 19:31-33) Kasi, emonani ete Davidi asepelaki nde na bizaleli malamu ya Barazilai mpe batoli nyonso oyo akokaki kopesa. Kofanda mpe kosala na ndako ya mokonzi elingaki kozala lokumu monene mpenza mpo na Barazilai!
Kasi, lokola Barazilai azalaki na makanisi malamu mpe ayebaki esika makoki na ye esuki, alobaki ete azali na mbula 80. Na nsima abakisaki: “Nakoki nde kokesenisa malamu na mabe?” Alingaki koloba nini? Na ntembe te, lokola Barazilai aumelaki na bomoi akómaki na bwanya mingi. Akokaki kopesa toli ya malamu, ndenge kaka “mikóló” basalaki yango epai ya Mokonzi Rehoboame na nsima. (1 Bakonzi 12:6, 7; Nzembo 92:12-14; Masese 16:31) Na yango, mbala mosusu Barazilai alobaki ete akoyeba te kokesenisa malamu na mabe mpo na komonisa ete bobange elɛmbisaki to ebebisaki nzoto na ye. Andimaki ete bobange ebebisaki likoki na ye ya koyoka elɛngi ya bilei mpe matoi na ye. (Mosakoli 12:4, 5) Na yango, Barazilai ye moko ayebisaki Davidi azwa nde elenge mobali Kimehame, mbala mosusu mwana na ye, mpo bákende na Yerusaleme.—2 Samwele 19:35-40.
KOBONGISA MAKAMBO MPO NA MIKOLO EZALI KOYA
Mbongwana oyo tolobelaki na ebandeli esalemaki na kolanda makanisi ya Barazilai. Ya solo, mpo na kosala mbongwana yango, esɛngaki te kotalela bomoi mpe makoki ya moto mokomoko, ndenge ezalaki mpo na Barazilai. Esɛngaki kotalela malamu nini mpenza ebongi mpo na ya bankulutu nyonso ya sembo na mokili mobimba.
Na ntembe te, bakristo yango ya mibange oyo bayebi esika makoki na bango esuki bamoni mbala moko ete ebongiseli ya Yehova ekokoba kokende liboso na mikolo ezali koya soki mikumba oyo bakokisaka banda kala epesami na mabɔkɔ ya bandeko mibali ya bilenge. Mbala mingi, bandeko mibali ya mibange nde bapesaki bandeko ya bilenge formasyo, ndenge mbala mosusu Barazilai asalaki epai ya mwana na ye, mpe ntoma Paulo epai ya Timote. (1 Bakorinti 4:17; Bafilipi 2:20-22) Bandeko yango ya bilenge bazali sikoyo “makabo oyo ezali bato,” mpe bakoki kosalisa na “kotongama ya nzoto ya Kristo.”—Baefese 4:8-12; talá mpe Mitángo 11:16, 17, 29.
MAKAMBO NDENGE NA NDENGE YA KOSALA
Bandeko mingi na mokili mobimba oyo batiki mikumba mosusu bazali sikoyo na ntango mingi mpe bakoki kosala makambo mosusu na mosala ya Yehova.
Ndeko Marco, oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli mbula 19 alobi boye: “Sikoyo nazali mpenza na ntango ya kosalisa mibali oyo bazali Batatoli te, kasi basi na bango bazali Batatoli na lisangá na biso.
Ndeko Geraldo, oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli mbula 28, alobi boye: “Tomityeli mokano ya kosalisa bandeko oyo batiká kosakola mpe ya koyekola Biblia na bato ebele.” Abakisi ete banda wana, ye ná mwasi na ye bazali koyekola Biblia na bato 15, mpe basalisi bandeko mingi oyo batikaki kosakola bázongela koya makita.
Ndeko Allan, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Tokoki sikoyo kolekisa ntango mingi koleka na mosala ya kosakola. Tosakolaka na bisika ya bato ebele, na bisika ya mombongo, mpe toteyaka bato ya kartye na biso, kutu mibale bayaki na Ndako ya Bokonzi.”
Soki ozali ndeko mobali ya sembo oyo asali mingi mpe ozwi mikumba mosusu na ebongiseli ya Nzambe, okoki kosala likambo moko ya malamu mpenza mpo na kosalisa: okoki kokabola mayele na yo na bilenge mibali ya lisangá na bino mpo mosala ya Yehova ekende liboso. Ndeko Rusell, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Yehova azali koteya mpe kosalela bilenge mibali oyo bazali na makoki. Makoki na bango ya koteya mpe ya kobatela bampate ezali kosalisa mpenza bandeko na mokili mobimba!”—Talá etanda “Salisá bilenge mibali básalela makoki na bango nyonso.”
YEHOVA ASEPELAKA NA BOSEMBO NA YO
Soki outi kozwa mokumba mosusu, batelá makanisi ya malamu. Mosala na yo esalisi bato ebele bábongola bomoi na bango, mpe okoki kokoba kosala yango. Bandeko balingaki yo, mpe na ntembe te bazali kaka kolinga yo.
Na koleka, ozali na esika na motema ya Yehova. ‘Akobosana te mosala na yo mpe bolingo oyo omoniselaki nkombo na ye, na ndenge osalelaki basantu mpe ozali kokoba kosalela bango.’ (Baebre 6:10) Mokapo yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe emonisi ete Yehova akosuka kaka te na kokanisa mosala oyo osalaki kala. Lokola ozali na motuya mingi na miso ya Yehova, akobosana te milende oyo osalaki kala mpe oyo ozali kokoba kosala mpo na kosepelisa ye!
Ata soki mbongwana oyo tolobeli ekómeli yo te, likambo yango etali yo kaka. Na ndenge nini?
Soki ozali sikoyo elongo na ndeko mobali ya sembo oyo azwi mokumba mosusu, okoki kozwa matomba na mayele mpe bososoli oyo akolisi na boumeli ya bambula. Tunáká ye toli. Sɛngáká ye apesa yo makanisi. Mpe talá ndenge azali kosalela mayele na ye na bosembo na mokumba oyo azwi sikoyo.
Ozala ndeko ya mobange oyo azwi mokumba mosusu, to ndeko mobali to ndeko mwasi na lisangá, kobosana te ete Yehova asepelaka na bosembo ya bato oyo basalelaka ye banda kala mpe bazali kokoba kosalela ye.