Balasilai ayebaki ndelo na ye
BALASILAI, mobange moko ya mbula 80, alobaki na Davidi, mokonzi ya Yisalaele ete: ‘Mpo na nini ngai nazala bozito epai na yo?’ Biblia elobi ete Balasilai azalaki “moto monene,” na ntembe te mpo azalaki na bozwi mingi. (2 Samwele 19:32, 35) Balasilai azalaki kofanda na mokili ya Gileadi, etúká moko ya bangombangomba na ɛsti ya Ebale Yolodani.—2 Samwele 17:27; 19:31.
Ntango nini Balasilai alobaki na Davidi maloba yango? Mpo na nini mobali yango alobaki ndenge wana?
Abesaloma atombokeli mokonzi
Davidi azalaki na likama. Mwana na ye Abesaloma abɔtɔlaki bokonzi nsima ya ‘kozimbisa mitema ya bato ya Yisalaele.’ Emonanaki polele ete Abesaloma akokaki te kotika na bomoi moto oyo azali na ngámbo ya tata na ye. Yango wana, Davidi ná basaleli na ye bakimaki Yelusaleme. (2 Samwele 15:6, 13, 14) Ntango Davidi akómaki na Mahanaimi, oyo ezalaki na ɛsti ya Ebale Yolodani, Balasilai asalisaki ye.
Balasilai, Sobi mpe Makili bapesaki Davidi biloko ebele. Mibali yango misato bamonisaki ete bayebaki mikakatano ya Davidi ntango balobaki mpo na ye mpe bato na ye ete: “Bato bayoki nzala, balɛmbi mpe bayoki mposa ya mai kati na lisobe.” Mibali yango basalaki nyonso oyo bakokaki mpo na kokokisa bamposa ya Davidi ná bato na ye; bapesaki bango bambeto, masango, loso, fufu, masango batumbá, madesu, mafuta ya nzoi, manteka, mpate, mpe biloko mosusu.—2 Samwele 17:27-29.
Kosalisa Davidi ezalaki komitya na likama. Na ntembe te, soki Abesaloma ayokaki ete moto moko asalisi mokonzi, alingaki kopesa moto yango etumbu. Na yango, Balasilai amonisaki ete azalaki na mpiko mpe azalaki sembo na ndenge asalisaki Davidi.
Makambo ebongwani
Mwa moke na nsima, basoda ya Abesaloma bakutanaki na bato ya Davidi. Babundaki na zamba ya Efalaima, oyo mbala mosusu ezalaki pembeni ya Mahanaimi. Basoda ya Abesaloma balongaki te mpe ‘ezalaki na kufa monene na mokolo yango.’ Abesaloma akimaki, kasi eumelaki te, bazwaki ye mpe babomaki ye.—2 Samwele 18:7-15.
Na nsima, Davidi azongelaki bokonzi na ye. Bato na ye bazalaki lisusu kokimakima te. Kutu, lokola bazalaki sembo epai ya Davidi, apesaki bango lokumu mpe mbano.
Ntango Davidi alingaki kozonga na Yelusaleme, “Balasilai Mogileade akitaki longwa na Logelimi mpo akende na Yolodani elongo na mokonzi, mpo ete atika ye na Yolodani.” Na libaku yango, Davidi ayebisaki Balasilai boye: “Yo katisá elongo na ngai, mpe nakopesa yo biloko ya kolya elongo na ngai na Yelusaleme.”—2 Samwele 19:15, 31, 33, NW.
Na ntembe te Davidi azalaki na botɔndi mingi mpo na lisalisi ya Balasilai. Soki Mokonzi Davidi alukaki kopesa Balasilai biloko ya kobikela, ezalaki kaka te mpo na kozongisela ye bolamu oyo asalelaki ye. Balasilai azalaki na bozwi mingi mpe azalaki na mposa ya biloko yango te. Mbala mosusu Davidi alingaki ete mobange yango akende kofanda na ndako ya mokonzi mpo azalaki na bizaleli ya malamu mpenza. Soki Balasilai afandaki na ndako ya mokonzi alingaki kozwa lokumu mpe libaku ya kozala moninga ya mokonzi.
Bopɔlɔ mpe makanisi ya malamu
Balasilai apesaki Mokonzi Davidi eyano ete: “Ngai nazali na [bambula] mosusu boni ya bomoi ete nakenda na mokonzi na Yelusaleme? Lelo oyo, nazali na [mbula] ntuku mwambe; ngai nakolonga lisusu kokata kati na malamu ná mabe? Ngai moombo na yo, nakoki koyeba yango ekolya ngai to yango ekomɛla ngai? Ngai nakolonga koyoka lisusu mingongo ya mibali mpe basi baoyo bakoyemba?” (2 Samwele 19:34, 35) Na yango, Balasilai aboyaki na limemya nyonso kokende kofanda na ndako ya mokonzi. Mpo na nini?
Mbala mosusu Balasilai azwaki ekateli wana mpo amonaki ete lokola akómaki mobange, akokaki lisusu kosala makambo mingi te. Ekoki mpe kozala ete Balasilai amonaki ete azali lisusu na bomoi molai te. (Nzembo 90:10) Asilaki kosala oyo akokaki mpo na kosunga Davidi, kasi ayebaki mpe ndelo oyo bobange etyelaki ye. Balasilai atikaki te ete makanisi ya kozala moto monene mpe ya lokumu epekisa ye atalela malamu makoki na ye. Balasilai azalaki na bopɔlɔ; azalaki te lokola Abesaloma, oyo alingaki lokumu.—Masese 11:2.
Ntina mosusu oyo Balasilai aboyaki kokende ekoki kozala ete alingaki te ete bolɛmbu na ye epekisa mokonzi akokisa malamu mosala na ye. Balasilai alobaki boye: “Mpo na nini ngai moombo na yo nakozala bozito epai ya nkolo na ngai mokonzi?” (2 Samwele 19:35) Atako Balasilai azalaki kosunga Davidi, na ntembe te amonaki ete mobali oyo azali naino elenge akokaki kokokisa mikumba yango malamu koleka ye. Ekoki mpenza kozala ete Balasilai alakisaki mwana na ye mpe alobaki boye: “Talá moombo na yo, Kimeama, tiká ete [akatisa, NW] esika moko na nkolo na ngai mokonzi; salelá ye mpe lokola ekomonana malamu na miso na yo.” Davidi asilikelaki ye te, kasi, andimaki likanisi na ye. Kutu, liboso Davidi akatisa Yolodani, “apwɛpwaki Balasilai mpe apambolaki ye.”—2 Samwele 19:37-39.
Tosengeli kozala na bokatikati
Lisolo ya Balasilai eteyi biso ete tosengeli kozala na bokatikati. Tosengeli te kokimaka mikumba na lisangá to koboya kosala milende mpo na kozwa yango mpo tolingi bomoi ya mindɔndɔ te to mpo tokanisi ete tozali te na makoki ya kokokisa yango. Nzambe akosalisa biso soki tosɛngi ye makasi mpe bwanya.—Bafilipi 4:13; Yakobo 4:17; 1 Petelo 4:11.
Epai mosusu, tosengeli koyeba ndelo na biso. Na ndakisa moklisto moko akoki kozala na mikumba mingi na lisangá. Akoki komona ete soki andimi mikumba mosusu, akokoka te kokokisa makambo mosusu oyo Biblia ezali kosɛnga ye, na ndakisa kosunga libota na ye na elimo mpe na mosuni. Na ntango yango, akomonisa ete azali na bopɔlɔ mpe na bokatikati soki aboyi kondima mikumba oyo balingi kobakisela ye.—Bafilipi 4:5; 1 Timote 5:8.
Balasilai apesaki ndakisa malamu, mpe tosengeli komanyola likoló na yango. Azalaki moto ya sembo, azalaki na mpiko, azalaki kokaba mpe azalaki na bopɔlɔ. Longola nyonso wana, Balasilai azalaki na ekateli ya kotya Nzambe na esika ya liboso.—Matai 6:33.
[Karte na lokasa 15]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Balasilai, mobange ya mbula ntuku mwambe, asalaki mobembo molai mpo na kosalisa Davidi
GILEADI
Logelimi
Sukote
Mahanaimi
Ebale Yolodani
Gilegale
Yeliko
Yelusaleme
EFALAIMA
[Elilingi na lokasa 13]
Mpo na nini Balasilai aboyaki kokende na Davidi?