Olandaka makanisi ya nani?
“Bótika kolanda makambo ya ntango oyo.”—BAROMA 12:2.
1, 2. (a) Yesu alobaki nini ntango Petro ayebisaki ye amitungisa te? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mpo na nini Yesu alobaki bongo?
BAYEKOLI ya Yesu bakamwaki makasi! Bakanisaki ete Yesu akozongisa bokonzi na Yisraele, kasi Yesu alobaki ete mosika te akonyokwama mpe akokufa. Ntoma Petro nde azwaki maloba liboso; alobaki: “Komitungisa te, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” Yesu alobaki na ye: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali eloko oyo ezali kobɛtisa ngai libaku, mpo ozali kokanisa makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.”—Matai 16:21-23; Misala 1:6.
2 Na maloba wana, Yesu amonisaki polele ete makanisi ya Yehova ekeseni na makanisi ya mokili oyo eyangelami na Satana. (1 Yoane 5:19) Petro alendisaki Yesu aluka bolamu na ye, ezaleli ya moimi oyo emonanaka epai ya bato mingi na mokili. Kasi, Yesu ayebaki ete Yehova alingi amibongisa mpo mosika te akokutana na minyoko mpe akokufa. Eyano ya Yesu emonisaki polele ete andimaki makanisi ya Yehova mpe abwakaki makanisi ya mokili.
3. Mpo na nini ezali mpasi kondima makanisi ya Yehova mpe kobwaka oyo ya mokili?
3 Bongo yo? Okanisaka lokola Yesu to lokola bato ya mokili? Ya solo, lokola tozali bakristo, tosalaka makasi tósala makambo oyo Nzambe asɛngi. Bongo makanisi na yo? Osalaka makasi okanisaka lokoka Yehova, elingi koloba otalelaka makambo ndenge ye atalelaka yango? Esɛngaka milende mingi mpo na kosala yango. Kasi, kokanisa lokola bato ya mokili ezali mpasi ata moke te, mpo elimo ya mokili ezali bisika nyonso. (Baefese 2:2) Lisusu, mbala mingi bato ya mokili balukaka liboso bolamu na bango moko, mpe makanisi yango ekoki kokɔtela biso. Ya solo, ezali mpasi kokanisa lokola Yehova, kasi ezali pɛtɛɛ kokanisa lokola bato ya mokili.
4. (a) Nini ekosalema soki tolandi makanisi ya mokili? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
4 Soki tozali kolanda makanisi ya mokili, tokokóma na moimi mpe tokoluka kozala na lipanda. (Marko 7:21, 22) Na yango, ezali na ntina mingi tóyekola kozala na “makanisi ya Nzambe,” kasi te “oyo ya bato.” Lisolo oyo ekosalisa biso. Tokomona ntina oyo kotalela makambo lokola Yehova etyaka biso nkaka te, kasi ezali nde malamu mpo na biso. Tokotalela mpe makambo oyo tokoki kosala mpo tóboya kolanda makanisi ya mokili oyo. Na lisolo oyo elandi, tokoyekola ndenge oyo tokoki kotalela makambo ndenge na ndenge lokola Yehova, mpe ndenge oyo tokoki kobanda kokanisa lokola ye.
MAKANISI YA YEHOVA EZALI MALAMU MPO NA BISO
5. Mpo na nini bato mosusu balingaka te kolanda makanisi ya basusu?
5 Bato mosusu basepelaka ata moke te na likanisi ya kolanda makanisi ya basusu. Balobaka, “Nakolanda makanisi na ngai moko.” Na maloba yango, bamonisaka ete balingaka kozwa bikateli bango moko mpe ete bazali na lotomo ya kosala yango. Balingaka te bato mosusu bálandela bango, to bátinda bango bázala lokola bato mosusu.a
6. (a) Bonsomi nini Yehova apesi biso? (b) Bonsomi yango ezangi ndelo?
6 Kasi, ezali malamu tóyeba ete kotalela makambo ndenge Yehova alingi tótalela yango elakisi te ete biso tokozala na likambo ya koloba te. Ndenge 2 Bakorinti 3:17 elobi yango, “esika elimo ya Yehova ezali, bonsomi ezali wana.” Yehova apesi biso bonsomi ya kokóma na bomoto oyo tolingi. Tokoki kozala na makambo oyo tolingaka mpe oyo tosepelaka na yango. Yehova akelá biso ndenge wana. Kasi, bonsomi na biso ezali na ndelo. (Tángá 1 Petro 2:16.) Mpo na koyeba nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, Yehova alingi tólanda makanisi na ye oyo ezali na Liloba na ye. Yango etyaka nde bomoi nkaka, to ezali malamu mpo na biso?
7, 8. Kotalela makambo ndenge Yehova alingi tótalela yango etyaka biso nkaka? Pesá ndakisa.
7 Tózwa ndakisa. Baboti basalaka makasi báteya bana na bango bizaleli malamu. Balakisaka bango ndenge ya kozala sembo, kosala mosala makasi, mpe kotyela basusu likebi. Ezalaka te mpo na kotya bana nkaka. Ezalaka nde mpo na kosalisa bango bázala na bomoi ya malamu soki bakómi mikóló. Soki bana bakoli mpe balongwe na ndako, bakokóma na bonsomi ya kopona makambo bango moko. Soki baponi komitambwisa na kolanda bizaleli malamu oyo baboti bateyaki bango, na ntembe te bakozwa bikateli ya malamu mpe bakokima mindɔndɔ, mitungisi, mpe bakoyoka te mpasi oyo bato bayokaka mpo bazwaki bikateli ya mabe.
8 Lokola moboti ya malamu, Yehova alingi bana na ye bázala na bomoi ya malamu mpenza. (Yisaya 48:17, 18) Yango wana, apesi biso mitinda ya ntina mingi na oyo etali bizaleli malamu mpe ndenge ya kosalela basusu makambo. Asɛngi biso tóyekola kotalela makambo lokola ye mpe tómonisa yango na etamboli na biso. Ezali te mpo na kotya biso nkaka. Epesaka biso bwanya mpe esalisaka biso tóyeba kotalela makambo malamu. (Nzembo 92:5; Masese 2:1-5; Yisaya 55:9) Tokobanda kozwa bikateli ya malamu oyo ekopesa biso esengo mpe tokozala kaka na makambo oyo tolingaka. (Nzembo 1:2, 3) Makanisi ya Yehova ezali mpenza malamu mpo na biso!
MAKANISI YA YEHOVA ELEKI MOSIKA OYO YA MOKILI
9, 10. Nini emonisi ete makanisi ya Yehova eleki mosika oyo ya mokili?
9 Ntina mosusu oyo tolingaka kokanisa lokola Yehova ezali ete makanisi na ye eleki mosika makanisi ya mokili. Mokili epesaka toli na oyo etali bizaleli malamu, ndenge ya kozala na libota ya esengo, ndenge ya kobatela mosala, mpe makambo mosusu ya bomoi. Kasi, makanisi yango mingi eyokani te na makanisi ya Yehova. Na ndakisa, mbala mingi mokili elendisaka bato báluka kaka bolamu na bango moko mpe bámona ete pite ezali mabe te. Mpe na bantango mosusu, elobaka ete bato oyo babalaná bakozala na esengo mingi soki bakabwani to babomi libala mpo na makambo ya mikemike. Toli ya ndenge wana eyokani te na mateya ya Biblia. Kasi, makanisi mosusu ya mokili ebongi mpo na mikolo na biso, koleka toli ya Biblia?
10 Yesu alobaki: “Bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.” (Matai 11:19) Atako mikolo oyo bato ya mokili bakómi na mayele mingi na makambo ya teknoloji, balongi te kosilisa makambo minene oyo epekisaka bato bázala na esengo, na ndakisa bitumba, koyina bato ya loposo mosusu, mpe mobulu. Longola yango, mokili emonaka ete pite ezali mabe te. Kasi, bato mingi bamoni ete yango epanzaka mabota, ememaka maladi, mpe ememaka makambo mosusu ya mabe. Bongo toli ya Yehova? Bakristo oyo balandaka makanisi ya Yehova bazalaka na mabota ya esengo, bazwaka te bamaladi oyo eutaka na pite, mpe bazali na boyokani ya kimya na lisangá ya bandeko na bango na mokili mobimba. (Yisaya 2:4; Misala 10:34, 35; 1 Bakorinti 6:9-11) Yango emonisi polele ete makanisi ya Yehova eleki mosika makanisi ya mokili.
11. Moize alandaki makanisi ya nani, mpe esukaki ndenge nini?
11 Basaleli ya sembo ya Yehova ya ntango ya kala bayebaki ete makanisi ya Yehova eleki malamu. Na ndakisa, atako Moize ateyamaki “na bwanya nyonso ya Baezipito,” ayebaki ete bwanya ya solosolo eutaka epai ya Yehova. (Misala 7:22; Nzembo 90:12) Yango wana asɛngaki ye: “Salá ete nayeba banzela na yo.” (Kobima 33:13) Lokola Moize alandaki makanisi ya Yehova, Yehova asalelaki ye na ndenge ya kokamwa mpo na kokokisa mokano na ye mpe apesaki ye lokumu na ndenge atángaki ye moto ya kondima makasi.—Baebre 11:24-27.
12. Paulo alandaki nini mpo na kozwa bikateli?
12 Ntoma Paulo azalaki mayele, atángaki mingi, mpe ayebaki koloba minɔkɔ mibale to koleka. (Misala 5:34; 21:37, 39; 22:2, 3) Kasi, abwakaki bwanya ya mokili mpe alandaki makanisi ya Liloba ya Nzambe mpo na kozwa bikateli. (Tángá Misala 17:2; 1 Bakorinti 2:6, 7, 13.) Na yango, Paulo asalisaki bato ebele báyeba Nzambe mpe atyaki miso na mbano oyo ekoumela seko.—2 Timote 4:8.
13. Nani azali na mokumba ya kobongisa makanisi na biso mpo eyokana na makanisi ya Yehova?
13 Ezali polele ete makanisi ya Nzambe eleki mosika makanisi ya mokili. Soki tolandi makanisi ya Nzambe, tokozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo mpenza. Kasi, Yehova atindaka biso na makasi te tólanda makanisi na ye. “Moombo ya sembo mpe ya mayele,” ata mpe bankulutu, bazali bakonzi ya makanisi na biso te. (Matai 24:45; 2 Bakorinti 1:24) Mokomoko na biso azali na mokumba ya kobongisa makanisi na ye mpo eyokana na makanisi ya Yehova. Ndenge nini tokoki kosala yango?
BOYÁ KOLANDA MAKANISI YA MOKILI
14, 15. (a) Mpo tókanisaka lokola Yehova, tosengeli komanyola nini? (b) Mpo na nini tosengeli te kokɔtisa makanisi ya mokili na bɔɔngɔ na biso? Pesá ndakisa.
14 Baroma 12:2 elobi: “Bótika kolanda makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika, mpo bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” Vɛrsɛ yango emonisi ete ata soki tozalaki kolanda makanisi nini liboso tóyeba solo, tokoki kobongola makanisi na biso mpo eyokana na makanisi ya Nzambe. Ya solo, ndenge na biso ya kotalela makambo elandaka mpe mwa moke bizaleli oyo tozwá epai ya baboti na biso to makambo oyo tokutaná na yango na bomoi. Mpe makanisi na biso ekobongwana mingimingi na kolanda makambo oyo toponi kokanisa. Soki tozali komanyola makanisi ya Yehova, tokomindimisa ete makanisi na ye ezalaka ntango nyonso malamu. Yango ekopesa biso mposa ya kotalela makambo ndenge ye atalelaka yango.
15 Kasi, mpo makanisi na biso eyokana na makanisi ya Yehova, tosengeli ‘kotika kolanda makambo ya ntango oyo.’ Yango elimboli ete tosengeli kotika kotala, kotánga, mpe koyoka eloko nyonso oyo eyokani te na makanisi ya Nzambe. Mpo na kosalisa biso tómona ntina na yango, tózwa ndakisa ya biloko ya kolya. Moto oyo alingi kobatela kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye akoki kozwa ekateli ya kolya kaka biloko ya malamu. Kasi, milende nyonso wana ekozala na ntina te soki azali mpe kolya mbala na mbala biloko oyo epɔlá! Ndenge moko mpe, milende nyonso oyo tozali kosala mpo na koyeba makanisi ya Yehova ekozala na ntina mpenza te soki tozali mpe kotika makanisi ya mokili ekɔta na bɔɔngɔ na biso.
16. Ndenge nini tokoki komibatela?
16 Tokoki kokima makanisi nyonso ya mokili? Te, mpo tokoki kolongwa na mokili te. (1 Bakorinti 5:9, 10) Ata na mosala ya kosakola, tokokutana na bato oyo bazali na makanisi ya mabe mpe ya libunga. Kasi, ata soki toyoki makanisi ya mabe, tosengeli te kokoba kokanisa yango to kondima yango. Ndenge moko na Yesu, tosengeli kobwaka mbala moko makanisi oyo ekosepelisa Satana. Mpe tokomibatela soki toboyi kotika makanisi ya mokili ekɔtela biso mpambampamba.—Tángá Masese 4:23.
17. Ndenge nini tokoki koboya makanisi ya mokili ekɔtela biso mpambampamba?
17 Na ndakisa, tosengeli kopona baninga na biso malamu. Biblia ekebisi biso ete soki tokómi baninga ya motema na bato oyo basambelaka Yehova te, tokobanda kokanisa lokola bango. (Masese 13:20; 1 Bakorinti 15:12, 32, 33) Tosengeli mpe kopona malamu kominanola na biso. Ntango tozali koboya kominanola oyo ezali kolendisa liteya ya evolisyo, mobulu, to pite, tozali kobatela makanisi na biso na makambo oyo “ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe.”—2 Bakorinti 10:5.
18, 19. (a) Mpo na nini tosengeli kokeba na makanisi ya mokili oyo emonisamaka polele te? (b) Mituna nini tosengeli komituna, mpe mpo nini?
18 Tosengeli mpe koyeba makanisi ya mokili oyo emonisami polele te mpe kobwaka yango. Na ndakisa, bansango mosusu epesamaka na ndenge oyo ekotinda bato básepela na makanisi moko boye ya politiki. Mpe mosusu etindaka bato bámityela mikano mpe bámipesa na makambo oyo mokili esepelaka na yango. Bafilme mpe babuku mosusu elendisaka bato báluka liboso matomba na bango moko mpe ya libota na bango, mpe emonisaka yango lokola ezali makanisi oyo ebongi, oyo esepelisaka, ata mpe oyo ezali malamu. Nzokande, makanisi yango eyokani te na Biblia, oyo elobi ete moto ná libota na ye bakozala na esengo ya solosolo soki balingi Yehova koleka nyonso. (Matai 22:36-39) Longola yango, masano mosusu ya bana, ata soki mingi na yango ezalaka mabe te, na ndenge ya nsense ekoki kotinda bana bándima bizaleli ya mbindo.
19 Yango elingi koloba te ete ezali mabe kominanola na makambo ya malamu. Kasi, tosengeli komituna boye: ‘Nayebaka makanisi ya mokili ata soki emonisami na ndenge ya polele te? Namibatelaka mpe nabatelaka bana na ngai na makanisi ya mokili oyo emonisamaka na nzela ya televizyo mpe na babuku? Nasalisaka bana na ngai báyeba kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango mpo bálanda te makambo ya mokili, oyo bayoki to bamoni?’ Soki toyebi kokesenisa makanisi ya Nzambe na makanisi ya mokili, tokolanda te “makambo ya ntango oyo.”
OLANDAKA MAKANISI YA NANI?
20. Ndenge nini tokoyeba soki tolandaka makanisi nini?
20 Tosengeli kobosana te ete makanisi eutaka kaka na bisika mibale: epai ya Yehova mpe epai ya Satana ná mokili na ye. Yo olandaka makanisi ya nani? Eyano ezali ete olandaka makanisi oyo okɔtisaka na bɔɔngɔ na yo. Soki ondimi makanisi ya mokili, okobanda kokanisa mpe kosala makambo na ndenge ya moimi. Yango wana, ezali na ntina mingi tókeba na makambo oyo totalaka, oyo toyokaka, mpe oyo tokanisaka.
21. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
21 Na lisolo oyo, toyekoli ete mpo tókanisaka lokola Yehova, tosengeli koboya makanisi ya mokili. Tosengeli mpe komanyola makanisi ya Nzambe mpo tókóma kokanisa mingi lokola ye. Na lisolo oyo elandi, tokolobela malamumalamu ndenge ya kosala yango.
a Mpo na koloba solo, ata bato oyo bamonaka ete bazali na lipanda balandaka makanisi ya basusu. Ata na makambo minene lokola ebandeli ya bomoi, to makambo mikemike lokola kopona elamba oyo tokolata, tolandaka kaka makanisi ya basusu, ata mwa moke. Kasi, tokoki kopona soki tokolanda makanisi ya nani.