Olandaka makanisi ya Yehova?
“Bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika.”—BAROMA 12:2.
1, 2. Wana tozali kokola na elimo, toyekolaka nini? Pesá ndakisa.
KANISÁ ete moto moko akabeli mwana moko ya moke eloko. Baboti ya mwana yango balobi na ye: “Lobá mersi.” Mwana alobi mersi, mingimingi mpo baboti bayebisi ye asala yango. Kasi, ntango mwana yango akoli, akómi komona ntina oyo baboti na ye bazalaki koyebisa ye amonisaka botɔndi ntango basusu basaleli ye bolamu. Na yango, akómi koloba mersi na ndenge na ye moko mpo ayekoli komonisa botɔndi.
2 Ndenge moko mpe, ntango tobandaki koyekola solo, toyekolaki ete ezali na ntina mingi kotosa mibeko ya Yehova. Kasi, wana tozali kokola na elimo, toyekolaka makambo mosusu oyo etali makanisi ya Yehova: makambo oyo alingaka, oyo alingaka te, mpe ndenge na ye ya kotalela makambo. Soki tozali kolanda makanisi ya Yehova na bikateli oyo tozwaka mpe na makambo oyo tosalaka, tokobanda kokanisa lokola ye.
3. Mpo na nini ekoki kozala mpasi kokanisa lokola Yehova?
3 Atako koyekola kokanisa lokola Yehova epesaka esengo, kasi na bantango mosusu ezalaka mpasi mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Na ndakisa, toyebi makanisi ya Yehova na likambo etali bizaleli ya pɛto, konduka biloko ya mokili, mosala ya kosakola, kosalela makila na ndenge ya mabe, mpe makambo mosusu. Kasi, ekoki kozala mpasi tóyeba ntina oyo atalelaka makambo yango bongo. Na yango, tokoki kosala nini mpo tókanisaka lokola Yehova na makambo mingi? Mpe ndenge nini yango ekosalisa biso tósala makambo ya malamu lelo oyo mpe na mikolo ezali koya?
NDENGE YA KOKANISA LOKOLA NZAMBE
4. Kokómisa makanisi na biso makanisi ya sika elimboli nini?
4 Tángá Baroma 12:2. Na vɛrsɛ yango, ntoma Paulo alobelaki likambo oyo tosengeli kosala mpo tóyekola kokanisa lokola Yehova. Alobaki ete tosengeli ‘kotika kolanda makambo ya ntango oyo.’ Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, yango elimboli ete tosengeli kobwaka makanisi mpe elimo ya mokili. Kasi, Paulo alobaki mpe ete tosengeli ‘kokómisa makanisi na biso makanisi ya sika.’ Yango elimboli ete tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe, kokanga ntina ya makanisi na ye, komanyola yango, mpe kosala makasi tóyokanisa makanisi na biso na makanisi ya Nzambe.
5. Bokeseni nini ezali kati na kotánga mpe koyekola?
5 Koyekola ezali te kotánga kaka likolólikoló to kotya mokɔlɔtɔ na biyano na mituna ya boyekoli. Ntango tozali koyekola, tosengeli kokanisa soki makambo yango eteyi biso nini mpo na Yehova, ndenge na ye ya kosala makambo, mpe makanisi na ye. Tosengeli koluka koyeba ntina oyo Yehova asɛngi biso tósala likambo moko mpe aboyi tósala mosusu. Tosengeli mpe kokanisa bambongwana oyo tosengeli kosala na bomoi na biso mpe na makanisi na biso. Ya solo, ntango mosusu tokotalela makambo nyonso wana te mbala nyonso oyo tozali koyekola. Kasi, ezali malamu tózwaka ntango, ata katikati ya ntango oyo tokolekisa na koyekola, mpo na komanyola makambo oyo tozali kotánga.—Nzembo 119:97; 1 Timote 4:15.
6. Nini ekosalema soki tozali komanyola Liloba ya Nzambe?
6 Likambo moko ya kokamwa ekosalema soki tozali komanyola Liloba ya Nzambe mbala na mbala. ‘Tokomindimisa biso moko’ ete makanisi ya Yehova ezali ya kokoka. Tokobanda koyeba ndenge na ye ya kotalela makambo, mpe nsukansuka biso mpe tokobanda kotalela yango bongo. Na ndenge yango, makanisi na biso ekokómisama sika mpe tokobanda kokanisa ndenge mosusu. Mokemoke, tokobanda kokanisa lokola Yehova.
MAKAMBO OYO TOSALAKA EUTAKA NA MAKANISI NA BISO
7, 8. (a) Ndenge nini Yehova atalelaka bozwi ya mokili? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Soki tolandaka makanisi ya Yehova, nini ekozala ntango nyonso na ntina mingi mpo na biso?
7 Makambo oyo tokanisaka emonanaka na misala na biso. (Marko 7:21-23; Yakobo 2:17) Tótalela mwa bandakisa oyo emonisi yango polele. Ya liboso, lisolo oyo elobeli mbotama ya Yesu emonisi polele makanisi ya Yehova mpo na biloko ya mokili. Nzambe ye moko aponaki Maria ná Yozefe bázala baboti ya Mwana na ye, atako bazalaki bazwi te. (Balevi 12:8; Luka 2:24) Ntango Yesu abotamaki, Maria “alalisaki ye na elyelo ya bibwɛlɛ, mpo bazwaki esika te na bandako oyo bapaya bazalaki kolala.” (Luka 2:7) Soki Yehova alingaki ete Yesu abotama na esika ya malamu koleka, akokaki kosala yango. Kasi, alingaki Yesu abɔkwama na libota ya bato oyo batyaka losambo ya Nzambe na esika ya liboso. Yango nde elekaki ntina mpo na Yehova.
8 Lisolo oyo elobeli mbotama ya Yesu ezali koteya biso ndenge Yehova atalelaka biloko ya mokili. Baboti mosusu balingaka bana na bango bázala na biloko ya mokili oyo eleki malamu, ata soki yango ekobebisa boyokani ya bana na Yehova. Kasi, ezali polele ete mpo na Yehova, makambo ya elimo nde ezali na ntina mingi koleka. Otalelaka likambo yango lokola Yehova? Makambo oyo osalaka emonisaka nini?—Tángá Baebre 13:5.
9, 10. Ndenge nini tokoki komonisa ete totalelaka likambo ya kobɛtisa basusu libaku ndenge Yehova atalelaka yango?
9 Ndakisa mosusu ezali ndenge oyo Yehova atalelaka likambo ya kobɛtisa basusu libaku, elingi koloba, kosala ete basusu básala lisumu to bátika kosalela Yehova. Yesu alobaki: “Moto nyonso oyo abɛtisi libaku moko ya bato mike oyo [bazali na kondima], ekokaki kozala malamu mpo na ye soki bákangisaka ye na nkingo libanga oyo banikaka na yango mbuma, lokola oyo mpunda ebalolaka, mpe abwakama mpenza na mbu.” (Marko 9:42) Yango ezali likambo ya kozwa na lisɛki te! Lokola Yesu amonisaki bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka, na ntembe te Yehova mpe asepelaka te na moto oyo azali kobɛtisa moyekoli ya Yesu libaku na nko.—Yoane 14:9.
10 Otalelaka likambo ya kobɛtisa basusu libaku ndenge Yehova ná Yesu batalelaka yango? Misala na yo emonisaka nini? Na ndakisa, okoki kosepela na molato moko to ndenge moko boye ya kosala monzɛlɛ. Kasi okosala nini soki oyebi ete yango ekoki kopesa bandeko mosusu mpasi to ekoki kolamwisa makanisi ya mbindo epai ya basusu? Okotika makambo oyo olingi mpo na bolingo oyo olingaka bandeko na yo?—1 Timote 2:9, 10.
11, 12. Ndenge nini tokomibatela soki toyekoli komipekisa mpe koyina makambo oyo Yehova ayinaka?
11 Ndakisa ya misato yango oyo: Yehova ayinaka makambo oyo ezangi boyengebene. (Yisaya 61:8) Ayebi ete na bantango mosusu ezalaka mpasi tósala oyo ezali sembo mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Atako bongo, alingi tómekola ye mpe tóyina oyo ezali mabe. (Tángá Nzembo 97:10.) Soki tozali komanyola ntina oyo Yehova ayinaka makambo ya mabe, ekosalisa biso tótalelaka yango lokola ye mpe ekopesa biso makasi ya kotɛmɛla makambo ya mabe.
12 Koyekola koyina oyo ezali mabe ekosalisa biso mpe tóyeba ete likambo boye to boye ezali mabe ata soki Biblia elobeli yango polele te. Na ndakisa, mabina ya nsɔni oyo esɛngaka kobinela moto wana ofandeli ye na makolo epalangani na bisika mingi na mokili lelo. Bato mosusu bazali koloba ete mabina yango ezali ndenge moko te na kosangisa nzoto, yango wana bazali komona ete ezali mabe te.a Kasi, Yehova mpe atalelaka yango ndenge wana? Kobosana te ete Yehova ayinaka mabe ya lolenge nyonso. Yango wana, zalá mosika ya eloko nyonso oyo ezali mabe; kolisá ezaleli ya komipekisa mpe yekolá koyina makambo oyo Yehova ayinaka.—Baroma 12:9.
KANISÁ LIBELA BIKATELI OYO OKOZWA SOKI LIKAMBO EBIMI
13. Mpo na nini kokanisa ndenge oyo Yehova atalelaka makambo ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu soki likambo ebimi?
13 Ntango tozali koyekola, tosengeli kokanisa ndenge oyo Yehova atalelaka makambo mpo yango ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu na nsima. Na ndenge yango, soki likambo moko ebimi oyo esɛngi tózwa ekateli nokinoki, ekozwa biso na mbalakaka te. (Masese 22:3) Tótalela mwa bandakisa ya Biblia.
14. Ndenge oyo Yozefe asalaki liboso ya mwasi ya Potifare eteyi biso nini?
14 Ntango mwasi ya Potifare alukaki kokweisa ye, Yozefe aboyaki mbala moko. Emonani ete amanyolaki makanisi ya Yehova na oyo etali kozala sembo epai ya molongani. (Tángá Ebandeli 39:8, 9.) Lisusu, maloba oyo Yozefe ayebisaki mwasi ya Potifare ete: “Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?” emonisi ete azalaki kokanisa lokola Nzambe. Bongo yo? Okosala nini soki moninga moko ya mosala abandi kokangamakangama na yo? To okosala nini soki moto atindeli yo mesaje ya makambo ya kosangisa nzoto to fɔtɔ ya mabe na telefone?b Tokobuka mibeko ya Yehova te soki toyekolá ndenge oyo atalelaka makambo yango, tondimá yango mpe tokanisá libela oyo tokosala.
15. Ndenge nini tokoki kotikala sembo epai ya Yehova, lokola bilenge Baebre misato?
15 Tótalela sikoyo ndakisa ya bilenge Baebre misato oyo bayebani na nkombo Shadrake, Meshake, mpe Abedenego. Baboyaki na motema moko kosambela ekeko ya wolo oyo Mokonzi Nebukadenezare asalaki, mpe eyano ya polele oyo bapesaki mokonzi yango emonisaki ete bakanisaki likambo oyo ekosalema soki batikali sembo epai ya Yehova. (Kobima 20:4, 5; Danyele 3:4-6, 12, 16-18) Bongo Lelo oyo? Okosala nini soki patrɔ na bino asɛngi yo opesa mbongo mpo na fɛti moko oyo ezali na boyokani na lingomba ya lokuta? Na esika ozela tii likambo ya ndenge wana esalema, ekozala malamu okanisa banda sikoyo ndenge oyo Yehova atalelaka makambo ya ndenge wana. Na ndenge yango, soki likambo ya bongo ebimi, ekozala mpasi te osala to oloba likambo oyo ebongi, ndenge bilenge Baebre misato basalaki.
16. Ndenge nini koyeba makanisi ya Yehova ekoki kosalisa biso ntango tosengeli kozwa lisalisi ya monganga na lombangu?
16 Komanyola libela makanisi ya Yehova ekoki mpe kosalisa biso tótikala sembo na ntango oyo esengeli kozwa lisalisi ya monganga na lombangu. Ya solo, tozalaka na ekateli ya koboya bátya biso makila to moko ya biloko minei oyo ezalaka na kati ya makila. (Misala 15:28, 29) Kasi, mayele mosusu oyo minganga basalelaka esɛngaka ete mokristo mokomoko azwa ekateli na ye na kolanda mitinda ya Biblia. Ntango nini eleki malamu kozwa ekateli yango? Ezali nde ntango tozali na lopitalo, mbala mosusu na nse ya mpasi, ntango bazali kotya biso mbamba tózwa ekateli nokinoki? Te. Sikoyo nde ntango ya kosala bolukiluki, ya kotondisa mokanda oyo esengeli, na ndakisa karte ya Pas de sang, mpo na koyebisa mposa na yo mpe kosolola na monganga oyo akosalisa yo.c
17-19. Mpo na nini ezali na ntina tóyeba banda sikoyo ndenge oyo Yehova atalelaka makambo? Pesá ndakisa.
17 Kanisá mpe ndenge Yesu apesaki Petro eyano mbala moko ntango alobaki na ye: “Komitungisa te, Nkolo.” Emonani ete Yesu asilaki komanyola mingi mokano ya Nzambe mpo na ye mpe bisakweli oyo elobelaki bomoi mpe liwa na ye awa na mabele. Boyebi yango epesaki ye makasi ya kotikala sembo epai ya Yehova mpe ya kopesa bomoi na ye mbeka mpo na biso nyonso.—Tángá Matai 16:21-23.
18 Lelo oyo, Nzambe alingi ete tózala baninga na ye mpe tómipesa na mosala ya kosakola. (Matai 6:33; 28:19, 20; Yakobo 4:8) Kasi, ndenge Petro asalaki epai ya Yesu, bato mosusu oyo bazali na makanisi ya mabe te bakoki koluka tózonga nsima. Na ndakisa, okosala nini soki patrɔ na yo alobi ete akopesa yo mosala ya lifuti mingi koleka, kasi ekolya yo mpe ntango ya koyangana na makita mpe ya kobima na mosala ya kosakola? To soki ozali mwana-kelasi, kanisá ete bapesi yo libaku ya kolongwa na ndako mpo okende kokoba kelasi na esika mosusu. Soki esalemi bongo, okobondela, okosala bolukiluki, mpe okosolola na bato ya libota na yo to bankulutu liboso ozwa ekateli? Ekoleka malamu soki oyebi banda sikoyo ndenge Yehova atalelaka makambo yango mpe oyekoli kokanisa lokola ye. Na ndenge yango, soki likambo ya ndenge wana esalemi, okoki komona ete komekama yango ezali mpenza makasi te. Okoyeba oyo osengeli kosala mpo osilaki kozwa ekateli ya kokoba komipesa na kosalela Yehova.
19 Tokoki kokanisa makambo mosusu ya mbalakaka oyo ekoki komeka bosembo na biso epai ya Yehova. Ya solo, tokoki te koyeba likambo mokomoko oyo ekoki kosalema mpo tómibongisa liboso. Kasi, soki tozali komanyola makanisi ya Yehova na ntango ya boyekoli ya biso moko, na ntembe te soki likambo ebimi, tokomikundwela makambo oyo toyekolaki mpe tokoyeba ndenge ya kosalela yango. Yango wana, ntango ozali koyekola yo moko, lukáká komona ndenge oyo Yehova atalelaka makambo, yekolá kokanisa lokola ye, mpe talá ndenge oyo yango ekosalisa yo ozwa bikateli ya malamu sikoyo mpe na mikolo ezali koya.
OKOZWA BOMOI SOKI OKANISAKA LOKOLA YEHOVA
20, 21. (a) Mpo na nini tokozala na bonsomi ata na mokili ya sika? (b) Ndenge nini tokoki kozala na esengo banda sikoyo?
20 Biso nyonso tozali kozela mokili ya sika. Mingi na biso tozali na elikya ya kofanda libela na libela na Paradiso awa na mabele. Na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe, mawa mpe bampasi oyo tozali komona na mokili oyo ekosila. Kasi, tokozala kaka na bonsomi ya kopona, tokobanda kozwa bikateli na kolanda makambo oyo tolingaka mpe bamposa na biso.
21 Kasi, bonsomi yango ekozala na ndelo. Mpo na kokata nini ezali mabe to malamu, bato ya komikitisa bakolanda kaka mibeko mpe makanisi ya Yehova. Mpe yango ekomema esengo monene mpe kimya mingi na mabele. (Nzembo 37:11) Liboso tókóma kuna, tokoki kozala na esengo sikoyo wana tozali koyokanisa makanisi na biso na makanisi ya Yehova.
a Mbala mingi, moto oyo azali kobina mabina yango alataka kaka mwa bilamba oyo tolataka na nse, afandeli moto na makolo mpe azali kobina na ndenge ya nsɔni. Na kotalela ndenge makambo esalemaki, ntango mosusu ekotalelama lokola pite mpe ekosɛnga bankulutu básala komite mpo na kosambisa moto oyo asanganaki na mabina yango. Mokristo oyo asalá likambo ya ndenge wana asengeli koluka lisalisi ya bankulutu.—Yakobo 5:14, 15.
b Bato mosusu batindelaka baninga bamesaje, bafɔtɔ, to bavideo ya makambo ya kosangisa nzoto na telefone. Na kotalela ndenge likambo ezali, ntango mosusu ekosɛnga bankulutu básala komite mpo na kosambisa moto oyo asali yango. Na bisika mosusu, bakonzi ya Leta basambisaka ata bana oyo bakokisi naino mbula 20 te mpo basalaki likambo ya ndenge wana. Mpo na koyeba makambo mosusu, kende na site jw.org mpe tángá lisolo “Le sexting: que faut-il savoir?” na Français (Kende na LA BIBLE ET VOUS > ADOLESCENTS), to lisolo “Comment parler des sextos à votre ado” na Réveillez-vous! ya sanza ya 11/2013, nkasa 4-5, na Français.
c Mpo na koyeba mitinda ya Biblia oyo ekoki mpenza kosalisa yo, okoki kotala buku Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, nkasa 246-249.