LISOLO YA BOYEKOLI 7
Mokumba oyo bankulutu bazali na yango na kati ya lisangá
“Kristo mpe azali mokonzi ya lisangá, ye mobikisi ya nzoto yango.”—EF. 5:23.
LOYEMBO 137 Basi ya sembo, basi bakristo
NA MOKUSEa
1. Wapi ntina ya liboso oyo esalaka ete tózala na bomoko?
TOSEPELAKA kozala na kati ya libota ya Yehova. Nini esalaka ete tózala na kimya mpe na bomoko? Ntina ya liboso ezali ete mokomoko na biso asalaka makasi atosa ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá. Kutu, soki toyebi malamu ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá, bomoko na biso ekokóma makasi.
2. Lisolo oyo ekoyanola na mituna nini?
2 Na lisolo oyo, tokolobela baoyo bazali na bokonzi na kati ya lisangá. Longola yango, tokoyanola mpe na mituna oyo elandi: Esika nini bandeko basi bazali na yango na kati lisangá? Ndeko mobali nyonso azali na bokonzi likoló ya ndeko mwasi nyonso? Bokonzi oyo nkulutu bazali na yango likoló ya bandeko ya lisangá, ezali ndenge moko na bokonzi oyo tata ya libota azalaka na yango likoló ya mwasi mpe bana na ye? Liboso, tólobela naino ndenge oyo tosengeli kotalelaka bandeko basi.
NDENGE NINI TOSENGELI KOTALELA BANDEKO BASI?
3. Nini ekosalisa biso tózwaka na motuya mingi mosala oyo bandeko basi basalaka?
3 Tosepelaka mingi na bandeko basi oyo basalaka mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango, mpo na kosakola nsango malamu, mpe mpo na kosalisa basusu na kati ya lisangá. Tokozwa lisusu bango na motuya mingi soki tozali kotalela bango ndenge oyo Yehova ná Yesu batalelaka bango. Na ndakisa ya ntoma Paulo, tokoyekola mpe ndenge oyo tosengeli kosalelaka bandeko basi makambo.
4. Ndenge nini Biblia emonisi ete Yehova azwaka basi na motuya kaka ndenge azwaka mibali?
4 Biblia emonisi ete Yehova azwaka bandeko basi na motuya kaka ndenge azwaka bandeko mibali. Na ndakisa, Biblia emonisi ete na siɛklɛ ya liboso, Yehova apesaki elimo na ye epai ya basi mpe mibali. Elimo yango esalisaki bango básala makambo ya kokamwa, na ndakisa, koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge. (Mis. 2:1-4, 15-18) Bango nyonso batyamaka mafuta na elimo santu mpe bakoyangela elongo na Yesu. (Gal. 3:26-29) Ezala basi to mibali, bango nyonso bakozwa mbano ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele. (Em. 7:9, 10, 13-15) Lisusu, ezala basi mpe mibali, bango nyonso bazwi mokumba ya kosakola mpe ya koteya nsango malamu. (Mat. 28:19, 20) Na ndakisa, mokanda ya Misala elobeli ndeko mwasi moko na nkombo Prisile. Ye ná mobali na ye Akila basalisaki Apolosi, oyo atángaki mingi, mpo ayeba makomami malamumalamu mpenza.—Mis. 18:24-26.
5. Ndenge nini Luka 10:38, 39, 42 emonisi ete Yesu azalaki kopesa basi lokumu?
5 Yesu azalaki kopesa basi lokumu. Amekolaki te Bafarisai oyo bazalaki koloba ete mibali bazali na ntina mingi koleka basi, mpe oyo bazalaki te kosolola na basi na esika ya bato nyonso. Bafarisai bazalaki mpe te kosolola na basi makambo etali Makomami. Kasi, Yesu azalaki koteya makambo mozindo ya makomami ezala epai ya basi to mibali.b (Tángá Luka 10:38, 39, 42.) Andimaki mpe ete basi bákende elongo na ye na mosala ya kosakola. (Luka 8:1-3) Mpe Yesu apesaki basi lokumu ya kokende koyebisa na bantoma ete asekwisamaki uta na bakufi.—Yoa. 20:16-18.
6. Ndenge nini ntoma Paulo amonisi ete azalaki kopesa basi lokumu?
6 Ntoma Paulo ayebisaki Timote apesaka bandeko basi lokumu. Paulo ayebisaki ye atalelaka ‘bandeko basi oyo bazali mikóló lokola bamama,’ mpe “bilenge basi lokola bandeko basi.” (1 Tim. 5:1, 2) Atako Paulo asalisaki Timote akóma na kondima makasi, kasi ayebaki ete mama ya Timote mpe nkɔkɔ na ye nde bato ya liboso oyo bateyaki ye “makomi mosantu.” (2 Tim. 1:5; 3:14, 15) Na mokanda na ye epai ya Baroma, Paulo apesaki bandeko basi mbote na bankombo na bango. Alobelaki makambo bandeko basi yango basalaki, mpe amonisaki botɔndi mpo na makambo yango.—Rom. 16:1-4, 6, 12; Flp. 4:3.
7. Mituna nini tokotalela sikoyo?
7 Ndenge baparagrafe oyo euti koleka emonisi yango, ezali ata na esika moko te na Biblia oyo emonisi ete bandeko mibali baleki bandeko basi. Bandeko basi basalisaka lisangá na makambo mingi, mpe bankulutu batyelaka bango motema ete bakoki kosalisa mpo kimya mpe bomoko ezala na lisangá. Kasi, tosengeli kozwa biyano na mituna mosusu. Na ndakisa: Mpo na nini na bantango mosusu Yehova asɛngi ete bandeko basi bázipaka mitó na bango? Lokola kaka bandeko mibali nde baponamaka mpo na kokóma bankulutu mpe basaleli na misala, yango elimboli ete ndeko mobali nyonso azali na bokonzi likoló ya ndeko mwasi nyonso na kati ya lisangá?
NDEKO MOBALI NYONSO AZALI NA BOKONZI LIKOLÓ YA NDEKO MWASI NYONSO?
8. Na kotalela Baefese 5:23, ndeko mobali nyonso azali na bokonzi likoló ya ndeko mwasi nyonso? Limbolá.
8 Na mokuse, ezali bongo te. Kristo nde azali mokonzi ya lisangá. (Tángá Baefese 5:23.) Na kati ya libota, mobali azali na bokonzi likoló ya mwasi na ye. Mwana mobali oyo azwi batisimo azali mokonzi ya mama na ye te. (Ef. 6:1, 2) Na kati ya lisangá mpe, bankulutu bazali na mwa bokonzi likoló ya bandeko basi mpe bandeko mibali. (1 Tes. 5:12; Ebr. 13:17) Basi oyo bazali minzemba mpe oyo bafandaka lisusu te na ndako ya baboti na bango, bakobaka komemya baboti na bango mpe bankulutu. Kasi, ndenge moko na bandeko mibali ya lisangá, bango mpe bazali na mokonzi kaka moko, Yesu.
9. Mpo na nini na bantango mosusu ekoki kosɛnga ete bandeko basi bázipa mitó na bango?
9 Yehova alingi ete makambo etambola malamu na lisangá. Yango wana, atyá Yesu azala mokonzi ya mobali. Mpe Yehova apesá bandeko mibali mokumba ya koteya mpe ya kokamba makambo ya losambo na kati ya lisangá. Kasi apesá bandeko basi mokumba yango te. (1 Tim. 2:12) Soki esalemi ete ndeko mwasi asala likambo oyo ndeko mobali nde asengeli kosala na lisangá, Yehova asɛngi ete ndeko mwasi yango azipa motó na ye.c (1 Ko. 11:4-7) Yehova asɛngi bandeko basi básalaka bongo mpo na kokitisa bango te, kasi nde mpo na kopesa bango likoki ya komonisa ete bazali na limemya epai ya baoyo apesá mwa bokonzi. Lokola ezali bongo, tóyanola sikoyo na motuna oyo: Bokonzi nini batata ya mabota mpe bankulutu bazali na yango?
BOKONZI OYO BATATA YA MABOTA MPE BANKULUTU BAZALI NA YANGO
10. Mpo na nini na bantango mosusu nkulutu akoki koluka kotyela bandeko ya lisangá mibeko?
10 Bankulutu balingaka Kristo. Balingaka mpe “bampate” oyo Yehova ná Kristo bapesá bango mokumba ya kobatela. (Yoa. 21:15-17) Lokola azali na mokumba ya kobatela lisangá, nkulutu akoki kokanisa ete azali lokola tata ya bandeko ya lisangá. Akoki kokanisa boye: Soki tata ya libota atyelaka bato ya libota na ye mibeko mpo na kobatela bango, boye ye mpe akoki kotya mibeko oyo akanisi ete ekobatela bampate ya Nzambe. Mpe bandeko mosusu ya lisangá bakoki kosɛnga ete bankulutu bázala lokola batata na bango ya elimo. Na ndakisa, bakoki kosɛnga ete bázwelaka bango bikateli. Kasi bankulutu mpe batata ya mabota bazali na bokonzi ndenge moko?
11. Bokonzi oyo batata ya mabota bazali na yango ná oyo ya bankulutu ekokani na makambo nini?
11 Ntoma Paulo amonisaki ete, bokonzi oyo batata ya mabota bazali na yango ná oyo ya bankulutu ekokani na makambo mosusu. (1 Tim. 3:4, 5) Na ndakisa, Yehova alingi ete mwasi mpe bana bátosaka tata ya libota. (Kol. 3:20) Alingi mpe ete bandeko ya lisangá bátosaka bankulutu. Yehova alingaka ete batata ya mabota mpe bankulutu básalisa baoyo bazali na nse ya bokonzi na bango mpo bázala na boyokani malamu elongo na ye. Basengeli mpe kolinga baoyo bazali na nse ya bokonzi na bango. Ndenge kaka batata malamu ya mabota basalaka, bankulutu mpe basalisaka bandeko ya lisangá oyo bazali na mposa ya lisalisi na ntango ya mpasi. (Yak. 2:15-17) Lisusu, Yehova alingaka ete bankulutu mpe batata ya mabota básalisaka baoyo bazali na nse ya bokonzi na bango mpo bátosa mibeko na ye. Kasi akebisi mpe bango ete, ‘bákende mosika te koleka makambo oyo ekomamá’ na Biblia.—1 Ko. 4:6.
12-13. Ndenge emonisami na Baroma 7:2, bokeseni nini ezali kati na bokonzi oyo batata ya mabota bazali na yango ná oyo ya bankulutu?
12 Kasi ezali mpe na bokeseni monene kati na bokonzi oyo nkulutu azali na yango ná oyo ya tata ya libota. Na ndakisa, Yehova apesá bankulutu mokumba ya kosala lokola bazuzi mpe ya kolongola na lisangá basumuki oyo baboyi kobongola motema.—1 Ko. 5:11-13.
13 Nzokande, Yehova apesá batata ya mabota mwa bokonzi mosusu oyo apesá bankulutu te. Na ndakisa, apesá batata ya mabota mokumba ya kotyela bato ya mabota na bango mibeko mpe ya komindimisa ete batosaka mibeko yango. (Tángá Baroma 7:2.) Lisusu, tata ya libota azali na lotomo ya kotyela bana na ye ngonga oyo basengeli kozongaka na ndako. Azali mpe na bokonzi ya kopesa bana na ye etumbu soki batosi mibeko yango te. (Ef. 6:1) Ezali solo ete, liboso ya kotyela bato ya libota na ye mibeko, tata ya malamu asengeli kosolola likambo yango ná mwasi na ye mpo bango mibale bazali “mosuni moko.”d—Mat. 19:6.
ZALÁ NA LIMEMYA EPAI YA KRISTO MPO AZALI MOKONZI YA LISANGÁ
14. (a) Na kotalela Marko 10:45, mpo na nini ezali malamu ndenge Yehova atyá Yesu azala mokonzi ya lisangá? (b) Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali na mokumba nini? (Talá etanda “Mokumba ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.”)
14 Na nzela ya lisiko, Yehova asombá bomoi ya ndeko mokomoko oyo azali na lisangá, mpe ya moto nyonso oyo andimelaka Yesu. (Tángá Marko 10:45; Mis. 20:28; 1 Ko. 15:21, 22) Na yango, ebongi ete apona Yesu azala mokonzi ya lisangá mpo apesaki bomoi na ye lisiko. Lokola Yesu nde azali mokonzi na biso, azali na lotomo ya kotya mibeko oyo bato, mabota mpe lisangá mobimba esengeli kotosa. (Gal. 6:2) Kasi, Yesu asukaka te kaka na kotya mibeko. Alingaka mpe atyelaka mokomoko na biso likebi.—Ef. 5:29.
15-16. Makambo oyo ndeko mwasi Marley mpe ndeko mobali Benjamin balobi eteyi yo nini?
15 Bandeko basi bamonisaka ete bamemyaka Kristo na ndenge batosaka malako ya mibali oyo Kristo atyá mpo na kobatela bango. Bandeko basi bazalaka na makanisi ndenge moko na oyo ya Marley, ndeko mwasi moko oyo afandaka na États-Unis. Alobi boye: “Nazwaka na motuya mingi esika oyo nazali na yango ya kozala mwasi ya libala mpe ndeko mwasi na kati ya lisangá. Ntango nyonso nasalaka makasi mpo nakoba kotosa bokonzi oyo Yehova apesá mobali na ngai mpe bankulutu na kati ya lisangá. Kasi, nakakatanaka te kosala yango mpo mobali na ngai mpe bandeko mibali ya lisangá bapesaka ngai lokumu mpe bamonisaka ete basepelaka na oyo nasalaka.”
16 Bandeko mibali bamonisaka ete batosaka ebongiseli ya bokonzi na ndenge bamemyaka mpe bapesaka bandeko basi lokumu. Benjamin, ndeko mobali moko oyo afandaka na Angleterre, alobi boye: “Nayekolá makambo mingi na biyano oyo bandeko basi bapesaka na makita mpe na batoli oyo bapesaka na oyo etali lolenge ya koyekola, ya kosakola, mpe ya koteya malamu. Namoni ete mosala oyo basalaka ezali na ntina mingi.”
17. Mpo na nini tosengeli kotosaka ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá?
17 Ntango bato nyonso na kati ya lisangá, ezala mibali, basi, batata ya mabota mpe bankulutu bazali kotosa ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá, lisangá ezalaka na kimya. Mpe oyo eleki nyonso, topesaka Yehova, Tata na biso ya bolingo, lokumu.—Nz. 150:6.
LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi.
a Esika nini bandeko basi bazali na yango na kati ya lisangá? Ndeko mobali nyonso na kati ya lisangá azali na bokonzi likoló ya ndeko mwasi nyonso? Bankulutu mpe batata ya mabota bazali na bokonzi ndenge moko? Na lisolo oyo, tokomona ndenge Biblia ekoki kosalisa biso tóyanola na mituna wana.
b Talá paragrafe 6 ya lisolo “Lendisáká bandeko basi bakristo,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 09/2020.
c Talá etanda “Ntango nini ndeko mwasi asengeli kozipa motó na ye.”
d Mpo na koyeba soki nani nde asengeli kopona lisangá oyo bato ya libota na ye bakozala, talá paragrafe 17-19 ya lisolo “Tosáká esika oyo moto na moto azali na yango na kati ya lisangá ya Yehova,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 08/2020.
e Mpo na koyeba makambo mosusu, talá buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe,” nkasa 209-212.
f Mpo na koyeba malamumalamu makambo mingi na oyo etali mokumba ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, nkasa 20-25.