Ndenge ya kosepela na oyo tozali na yango na ntango ya mikakatano ya mbongo
“LOKOLA biloko ekómaki ntalo mpenza mpe tokómaki kobanga mpo na bomoi na biso na mikolo ekoya, ngai ná mwasi na ngai tozwaki ekateli ya kokende na mboka mopaya mpo na kozwa mosala ya malamu mpenza. Tokanisaki kobengisa bana na biso na nsima. Kasi, bomoi oyo tokómaki na yango ezalaki mpasi koleka ndenge oyo tokanisaki, mpe tokokaki te kobengisa bana na biso ndenge tokanaki. Bandeko ya esika oyo toutaki bayebisaki ngai ete bana na biso bazalaki lisusu komonana mpenza te na makita to na mosala ya kosakola.”—Samuel.a
Basaleli mingi ya Nzambe bafandaka na bisika oyo kozwa mosala ezali mpasi to oyo bobola ezali makasi. Mpo na yango, basusu bazwi ekateli oyo bakanisaki ekosala ete bázala na bomoi ya malamu kozanga kotalela mikakatano oyo ekoki kobima. Basusu batiká balongani to bana na bango mpe bakendá na mboka mopaya mpo na koluka bomoi ya malamu koleka. Basusu bamipesi na koluka kokóma na bozwi nokinoki mpe yango ememeli bango lisusu mikakatano makasi ya mbongo. Soki ozali komitungisa mpo na mbongo, ndenge nini okoki koboya kozwa bikateli ya mabe?
SEKELE YA KOSEPELA NA OYO OZALI NA YANGO
Ntoma Paulo ayekolaki likambo oyo abengaki “sekele,” elingi koloba, kosepela na oyo azalaki na yango na makambo nyonso ya bomoi na ye. Akomaki boye: “Nayebi ndenge ya kozanga biloko, mpe nayebi ndenge ya kozala na biloko mingi. Na makambo nyonso, nayekoli sekele ya kotonda mpe ya kozala na nzala; ya kozala na biloko mingi mpe ya kokelela.”—Flp. 4:11, 12.
Simbá ete Paulo asengelaki koyekola kosepela na oyo azali na yango. Tótalela mitinda minei ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso mpe tósala ndenge wana.
Motinda ya liboso: “Bózala na bolingo ya mbongo te na bomoi na bino, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo. Mpo alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’”—Ebr. 13:5.
Ndenge oyo motinda yango ekoki kosalisa. Bolingo ya mbongo ekoki kotinda yo okokanisaka oyo ozali na yango na oyo ya basusu. Bolingo ya ndenge wana elongolaka bato kimya mpe esalaka ete básepela te na oyo bazali na yango. Soki tobundisi bolingo ya mbongo mpe totye makanisi na oyo tozali na yango, tokozala na kimya ya motema mpe tokosepela na oyo tozali na yango.
Oyo okoki kosala. Tyá makanisi na oyo ozali na yango mpe na oyo okokoka kosomba na esika ya kotala lolenge ya bomoi oyo basusu bazali na yango. Kobosana te, Yehova alaki kopesa oyo esengeli epai ya baoyo batyaka makambo ya elimo na esika ya liboso. (Mat. 6:24, 33) Apesi elaka yango te epai ya baoyo batyaka koluka mbongo na esika ya liboso na bomoi na bango. Zaláká na botɔndi ntango nyonso ndenge Yehova apesaka mpenza oyo tosengeli na yango. Paulo akomaki: “Soki tozali na bilei mpe na elamba, tósepela na biloko yango.”—1 Tim. 6:8.
Tyá mosala ya Yehova na esika ya liboso
Motinda ya mibale: “Bómitungisa ata moke te mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo elukaka na lokoso mpenza. Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.”—Mat. 6:31, 32.
Ndenge oyo motinda yango ekoki kosalisa. Soki totye motema na lisalisi mpe lisungi ya Yehova, mbala mosusu tokomituna te “bongo soki . . . ,” na ndakisa “Bongo soki makambo ebebi lisusu koleka?” to “Bongo soki nazali na likoki te ya kokokisa bamposa ya libota na ngai?” Eric, na Ghana, amonisi ete azalaki na makanisi ya ndenge wana. Kasi sikoyo, akómá kotalela makambo ndenge mosusu. Alobi boye: “Kosepela na oyo ozali na yango elakisi te koboya kotya likebi na mikakatano na yo. Kasi, elakisi nde kopona kotya likebi na oyo tokoki kosala mpe kozala na botɔndi mpo na oyo tozali na yango, ata na ntango ya mpasi.”
Oyo okoki kosala. Sɛngá Yehova oyo osengeli na yango mpenza mpe bwanya. (Yak. 1:5) Lisusu, sololá likambo na yo na bakristo oyo bakɔmɛli, mpe tyá likebi na ndenge oyo basalaki ntango bakutanaki na mikakatano ya ndenge wana. (Mas. 20:18) Tyá mpe likebi na ndenge Yehova azali kokokisa bamposa na yo ya mokolo na mokolo. Yango ekosalisa yo omitungisa mingi te mpo na lobi mpe otya likebi na oyo osengeli na yango sikoyo. (Mat. 6:25-30, 34) Kobosana soki moke te maloba ya mokomi ya nzembo Davidi, oyo alobaki: “Bampasi ya moto ya sembo ezali mingi, kasi Yehova abikisaka ye na yango nyonso.”—Nz. 34:19.
Motinda ya misato: “Moto ya ekɛngɛ amonaka likama mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele akobaka kokende mpe azwaka mpasi.”—Mas. 27:12.
Ndenge oyo motinda yango ekoki kosalisa. Bapiblisite mpe basite ya kosolola na bato ekoki komonisa mabaku ya kokóma na bozwi nokinoki, mpe yango ekoki kobenda biso ntango tozali na mikakatano ya mbongo. Kasi, baoyo bamikɔtisi na makambo yango basuki na kolɛmba nzoto. (Mas. 18:11; 1 Tim. 6:9) Kozala ekɛngɛ ekosalisa yo okima mitambo yango.
Oyo okoki kosala. Biblia elobi: “Moto oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ akanisaka liboso ya kosala likambo.” (Mas. 14:15) Na yango, soki moto moko ayebisi yo ete okoki kokóma na mbongo mingi na pɛtɛɛ nyonso, osengeli mpenza kosala keba. Salá mpenza bolukiluki liboso ya kozwa ata ekateli nini. Mpe ata ndenge nini, kotika te motema na yo ememama na koluka kokóma na bozwi nokinoki to omipesa na makambo oyo ekosɛnga ete osala makambo oyo ezangi bosembo.—Mas. 28:6, 20; Yir. 17:9.
Koyoka nsɔni te kosala mosala oyo bato bamonaka ntina te
Motinda ya minei: “Nani kati na bino oyo alingi kotonga ndako molai akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga, mpe komona soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango?”—Luka 14:28.
Ndenge oyo motinda yango ekoki kosalisa. Kozwa mosala ekoki kosilisa mwa mikakatano kasi mpe kobimisa mikakatano mosusu. Soki otaleli makambo mosala oyo olingi kozwa ekosɛnga, elingi koloba, malamu mpe mabe na yango, okozwa ekateli ya malamu mpe okoboya mikakatano oyo kozwa ekateli kozanga kokanisa ebimisaka.
Oyo okoki kosala. Kanisáká malamumalamu na libaku nyonso oyo ozwi ya koluka kozwa mbongo. Na ndakisa, kokende na mboka mopaya ekoki kopesa yo mbongo mingi, kasi ekoki mpe kosɛnga mbongo mingi mpo na kofanda kuna. Lisusu, talá mpe oyo yango ekosala na elimo mpe boyokani na yo ná molongani to na bana na yo soki otiki bango. Longola yango, talelá mpe oyo yango ekosala na makambo na yo ya elimo. Okozala kaka na likoki ya kosalela Yehova “na molimo na yo mobimba”?—Luka 10:27.
Okobatela libota na yo soki ozali elongo na bango
MATOMBA YA KOSEPELA NA OYO OZALI NA YANGO
Soki toyekoli sekele ya kosepela na oyo tozali na yango, tokomindimisa makasi ete Yehova alingaka biso mpe akokisaka bamposa na biso nyonso. (Nz. 34:8) Tokozala lisusu na botɔndi mingi mpo na oyo apesaka biso mokolo na mokolo mpe ndenge akokisaka bamposa na biso na bolingo mpenza.
Samuel, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, amonaki bosolo ya likambo yango. Alobi boye: “Nsima ya kosɛnga Yehova bwanya na libondeli, ngai ná mwasi na ngai tozwaki ekateli ya kozonga na mboka na biso, kozongela misala oyo tozalaki na yango liboso, mpe kobɔkɔla bana na biso. Sikoyo tozali mbala na mbala koyekola Biblia na mokomoko na bango, komema bango na makita mpe na mosala ya kosakola. Kotya likebi mingi na makambo ya elimo esali ete namitungisa mingi te. Toyokaka mawa te ndenge tozwá ekateli ya kozonga na mboka na biso.”
Kobosana soki moke te ete tosalelaka “Nzambe ya esengo” mpe ete elimo santu na ye ekoki kobota esengo kati na biso ata soki makambo ya bomoi na biso ezali ndenge nini. (1 Tim. 1:11; Gal. 5:22, 23) Mosika te, Yehova akotya mokili oyo ekotonda na biloko ya malamu mpo na bato nyonso.—Nz. 72:16; 145:16.
a Topesi bango bankombo mosusu.