Esakweli ezali nini?
Eyano ya Biblia
Esakweli ezali nsango to emonaneli euti epai ya Nzambe. Biblia elobi ete basakoli “balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.” (2 Petro 1:20, 21) Mosakoli azali moto oyo azwi nsango epai ya Nzambe mpe ayebisi yango epai ya basusu.—Misala 3:18.
Ndenge nini basakoli bazwaki nsango epai Nzambe?
Nzambe asalelaki mayele ndenge na ndenge mpo na kopesa basakoli bansango na ye:
Makomi. Nzambe asalelaki yango kaka mbala moko ntango apesaki Moize mibeko zomi oyo ye moko akomaki.—Kobima 31:18.
Baanzelu basololaki na bato. Na ndakisa, Nzambe atindaki anzelu moko apesa Moize malako etali nsango oyo alingaki koyebisa Farao. (Kobima 3:2-4, 10) Soki esɛngi asalela maloba moko boye ya sikisiki, Nzambe azalaki kotinda baanzelu báloba liloba mokomoko oyo moto asengeli kokoma, ndenge asalaki yango ntango alobaki na Moize boye: “Komá mpo na yo maloba oyo, mpamba te ezali na boyokani na maloba oyo nde nazali kosala kondimana ná yo mpe na Yisraele.”—Kobima 34:27.a
Bimonaneli. Nzambe azalaki kopesa mosakoli moko bimonaneli ata soki alali te mpe azali koyeba mpenza makambo. (Yisaya 1:1; Habakuku 1:1) Bimonaneli mosusu ezalaki nsɔmɔ mpenza na boye ete baoyo bazwaki yango balobaki mpe mwa maloba na bimonaneli yango. (Luka 9:28-36; Emoniseli 1:10-17) Na bantango mosusu, Nzambe azalaki kopesa moto bimonaneli ntango moto asenzwi. (Misala 10:10, 11; 22:17-21) Nzambe apesaki mpe nsango na ye epai ya basakoli na bandɔtɔ, ntango mosakoli alali.—Danyele 7:1; Misala 16:9, 10.
Kotambwisa makanisi ya moto. Nzambe atambwisaki makanisi ya basakoli mpo bápesa nsango na ye. Yango wana Biblia elobi: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” Maloba “na litambwisi ya elimo ya Nzambe” ekoki mpe kolimbola “epemami na Nzambe.” (2 Timote 3:16) Nzambe asalelaki elimo santu na ye to nguya oyo asalaka na yango misala mpo na kokɔtisa makanisi na ye na bɔɔngɔ ya basaleli na ye. Nsango ezalaki ya Nzambe, kasi basakoli baponaki ndenge ya kokoma maloba yango.—2 Samwele 23:1, 2.
Esakweli nyonso ezalaka kaka mpo na koyebisa makambo ekoya?
Te, bisakweli ya Biblia elobelaka kaka te makambo oyo ekosalema na mikolo ezali ekoya. Ata bongo, mingi ya bansango oyo euti epai ya Nzambe elobeli avenire, atako elobeli yango polele te. Na ndakisa, basakoli ya Nzambe bakebisaki bayisraele mbala na mbala mpo na misala na bango ya mabe. Makebisi yango emonisaki mapamboli oyo balingaki kozwa soki batosi yango mpe libebi oyo elingaki koyela bango soki baboyi kotosa. (Yirimia 25:4-6) Makambo elingaki kobonga to kobeba na kotalela ndenge bango moko bakopona.—Kolimbola Mibeko 30:19, 20.
Bandakisa ya bisakweli ya Biblia oyo elobeli te makambo oyo ekoya
Na ntango moko oyo Bayisraele basɛngaki Nzambe lisalisi, atindaki mosakoli ayebisa bango ete lokola baboyaki kotosa mibeko na ye, akosalisa bango te.—Basambisi 6:6-10.
Ntango Yesu asololaki na mwasi Mosamaria, amonisaki makambo mwasi yango asalá na bomoi na ye; Yesu ayebaki yango kaka mpo Nzambe alakisaki ye yango. Mwasi yango andimaki ete Yesu azali mosakoli atako Yesu ayebisaki ye te makambo oyo ekoya.—Yoane 4:17-19.
Ntango bazalaki kosambisa Yesu, banguna na ye bazipaki ye elongi mpe babɛtaki ye mpe bazalaki koloba na ye ete: “Sakolá. Nani abɛti yo?” Ezalaki te mpo asakola makambo oyo ekoya kasi nde ayebisa bango na nguya ya Nzambe moto oyo abɛti ye.—Luka 22:63, 64.
a Atako na ndakisa oyo ekoki komonana lokola Nzambe asololaki mbala moko na Moize, kasi Biblia emonisi ete Nzambe asalelaki baanzelu mpo na kopesa Mibeko ya Moize.—Misala 7:53; Bagalatia 3:19.