Osengeli kofuta mpako?
BATO mingi te basepelaka kofuta mpako. Mingi bamonaka ete mbongo ya mpako esalelamaka malamu te, ekendaka na mabenga ya bakonzi, mpe bafutisi-mpako balyelaka bango. Kasi, bato mosusu balingaka kofuta mpako te mpo na makambo ya mabe oyo bakonzi basalaka na mbongo yango. Mpo na kolimbola ntina oyo baboyaki kofuta mpako, bato ya engumba moko ya Moyen-Orient balobaki boye: “Tokoki te kopesa mbongo mpo na kosomba masasi oyo ekoboma bana na biso.”
Bato mingi bakanisaka bongo mpe likambo yango ebandi lelo te. Mohandas Ghandi, oyo azalaká mokonzi ya Lingomba ya Hindu, amonisaki ntina oyo aboyaki kofuta mpako na maloba oyo: “Moto oyo azali kopesa Leta mabɔkɔ na lolenge moko to mosusu mpo asunga basoda, azali kosangana na masumu na ye. Moto nyonso, mokóló to elenge, azali kosangana na masumu ntango azali kofuta mpako mpo Leta asala misala na ye.”
Ndenge moko mpe, Henry David Thoreau, moto moko ya filozofi na siɛklɛ ya 19, alobaki ete akoki kofuta mpako te mpo bazalaki kosalela mbongo yango mpo na bitumba. Atunaki boye: “Mwana-mboka asengeli nde, ata mpo na mwa ntango, to ata moke, koboya kolanda lisosoli na ye mpo na kotosa mibeko ya bakonzi? Boye, mpo na nini moto na moto azali na lisosoli?”
Likambo yango etaleli mpe bakristo, mpamba te Biblia ezali koteya polele ete basengeli kobatela lisosoli ya malamu na makambo nyonso. (2 Timote 1:3) Lisusu, Biblia elobi ete bakonzi ya Leta bazali na lotomo ya kofutisa mpako. Elobi boye: “Tiká molimo nyonso eyokelaka bakonzi oyo bazali liboso [bakonzi ya Leta], mpo bokonzi ekoki kozala te soki Nzambe atikeli yango nzela te; bokonzi na bango ezali na ndelo oyo etyami na Nzambe. Yango wana, bosengeli mpenza koyokela bango, kaka mpo na nkanda wana te kasi lisusu mpo na lisosoli na bino. Yango wana bozali mpe kofuta mpako; mpo bazali basaleli ya Nzambe mpo na bolamu ya bato nyonso, bazali kosala ntango nyonso mpo na ntina wana mpenza. Bózongisela bango nyonso oyo esengeli na bango: oyo asɛngi mpako, mpako.”—Baroma 13:1, 5-7.
Mpo na yango, bakristo ya siɛklɛ ya liboso bayebanaki ete bafutaka mpako na bango, atako mbongo mingi ya mpako yango ezalaki kokende na mosala ya basoda. Ezali mpe bongo mpo na Batatoli ya Yehova lelo oyo.a Ndenge nini tokoki kolimbola likambo yango oyo ezali lokola bongolabongola? Mokristo asengeli nde koboya kotosa lisosoli na ye ntango basɛngi ye afuta mpako?
Mpako mpe lisosoli
Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete mbongo mosusu ya mpako oyo basɛngaki bakristo ya liboso báfutaka ezalaki kosalelama mpo na mosala ya basoda. Yango nde likambo mpenza oyo etindaki Gandhi ná Thoreau báboya kofuta mpako.
Tósimba ete bakristo bazalaki kotosa mobeko oyo ezali na Baroma mokapo 13, kaka mpo na kokima etumbu te, kasi mpe “mpo na lisosoli na [bango].” (Baroma 13:5) Ya solo, lisosoli ya mokristo esɛngi ete afuta mpako, ata soki mbongo yango ezali kosalelama na makambo oyo andimaka te. Mpo na kokanga ntina ya likambo yango, tosengeli koyeba likambo moko ya ntina mingi mpo na lisosoli, likoki oyo esalisaka biso tóyeba ete likambo boye ezali malamu to mabe.
Ndenge Thoreau amonisaki yango, moto nyonso azali na lisosoli, kasi lisosoli nyonso te nde ezalaka malamu. Mpo na kosepelisa Nzambe, esengeli ete lisosoli na biso eyokana na mibeko na ye. Mbala mingi, esɛngaka tóyokanisa makanisi na biso na oyo ya Nzambe, mpamba te makanisi na ye eleki oyo ya biso. (Nzembo 19:7) Yango wana, tosengeli kosala makasi tóyeba ndenge oyo Nzambe atalelaka baguvɛrnema ya mokili. Atalelaka yango ndenge nini?
Tomoni ete ntoma Paulo abengaki baguvɛrnema yango “basaleli ya Nzambe.” (Baroma 13:6) Yango elingi koloba nini? Yango elimboli libosoliboso ete batyaka kimya mpe bakokisaka makambo ya ntina mpo na bato. Ata baguvɛrnema oyo eleki mabe, mbala mingi esalisaka bana-mboka na makambo lokola posita, biteyelo, kobatela bato na makama ya mɔtɔ, mpe kotya mibeko. Atako Nzambe ayebi malamu ete baguvɛrnema ya bato ezali mabe, azali kondima ete ezala mpo na mwa ntango mpe asɛngi ete tófutaka mpako mpo na kotosa ebongiseli yango, elingi koloba, ndenge atiki nzela ete baguvɛrnema yango eyangela bato.
Nzokande, Nzambe atiki baguvɛrnema ya bato ezala kaka mpo na mwa ntango. Azali kokana kolongola yango mpe kotya Bokonzi ya likoló mpe nsukansuka, kosilisa makambo nyonso ya mabe oyo baguvɛrnema yango ezali komemela bato banda bankama ya bambula. (Danyele 2:44; Matai 6:10) Kasi, liboso na yango, Nzambe apesi bakristo ndingisa te ya koboya kofuta mpako to kosala makambo mosusu mpo na kotɛmɛla bakonzi.
Kasi, ezali boni soki ozali kokanisa lokola Gandhi ete kofuta mpako oyo bazali kosalela mpo na bitumba ezali kosangana na lisumu? Se ndenge moto oyo azali likoló ya ngomba amonaka mosika koleka moto oyo azali na nse, biso mpe tokoki kobongola makanisi na biso mpe koyokanisa yango na oyo ya Nzambe soki tokanisi ete makanisi na ye eleki mpenza oyo ya biso. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Nzambe alobaki boye: “Ndenge likoló etombwani mosika koleka mabele, ndenge mpe banzela na ngai etombwani mosika koleka banzela na bino, mpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino.”—Yisaya 55:8, 9.
Tosengeli kotosa na makambo nyonso?
Atako Biblia elobi ete tosengeli kofuta mpako, yango elingi koloba te ete bakonzi ya mokili bakoki kosɛnga bana-mboka ata makambo nini. Yesu ateyaki ete bokonzi oyo Nzambe apesi baguvɛrnema yango ezali na ndelo. Ntango batunaki ye soki ezali malamu na miso ya Nzambe bato báfuta mpako na guvɛrnema ya Roma oyo ezalaki koyangela na ntango wana, Yesu apesaki eyano oyo: “Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.”—Marko 12:13-17.
Ezali “Kaisala” to baguvɛrnema nde esalaka mbongo mpe ekataka valɛrɛ na yango. Na yango, na miso ya Nzambe, baguvɛrnema ezali na lotomo ya kosɛnga ete bázongisela bango yango na kofuta mpako. Kasi, Yesu amonisaki ete ebongiseli moko te ya bato ekoki kosɛnga biso “biloko ya Nzambe,” elingi koloba bomoi na biso mpe losambo na biso. Ntango mibeko to makambo oyo bato bazali kosɛnga eyokani te na mibeko ya Nzambe, bakristo ‘basengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.’—Misala 5:29.
Lelo oyo, bakristo bakoki komitungisa soki bakanisi ndenge oyo mbongo mosusu ya mpako ezali kosalelama, kasi balukaka te kozala na likambo ya koloba to koboya makambo ya guvɛrnema to mpe koboya kofuta mpako. Kosala bongo ekomonisa ete bazali kotyela Nzambe motema te na ndenge akosilisa mikakatano ya mokili. Bango bazelaka na motema molai ntango oyo Nzambe akotambwisa makambo ya mokili na nzela ya Mwana na ye Yesu, oyo alobaki ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.”—Yoane 18:36.
Matomba ya kotosa toli ya Biblia
Okoki kozwa matomba mingi soki otosi oyo Biblia eteyaka na oyo etali kofuta mpako. Okozwa etumbu te oyo bakonzi bapesaka bato oyo batosaka mibeko te mpe okozala na kobanga te ete bázwa yo na likambo. (Baroma 13:3-5) Oyo eleki ntina, okobatela lisosoli ya malamu liboso ya Nzambe mpe okopesa ye nkembo na botosi na yo. Atako okoki kobungisa mbongo mingi oyo bato oyo baboyaka kofuta mpako to oyo bakosaka bakobungisa te, okoki kozala na elikya ete Nzambe akokokisa elaka na ye ya kobatela basaleli na ye ya sembo. Davidi, mokomi moko ya Biblia, amonisaki yango na maloba oyo: “Nazalaki elenge, nakómi mpe mobange, kasi namoná naino te moyengebene asundolami mpenza, to bana na ye bazali koluka limpa.”—Nzembo 37:25.
Na nsuka, koyeba mobeko ya Nzambe mpo na mpako mpe kotosa yango ekopesa yo kimya ya motema. Nzambe akopesa yo foti te mpo na makambo nyonso oyo guvɛrnema ezali kosala na mbongo ya mpako, ndenge kaka mibeko ekokweisa yo te mpo na makambo oyo nkolo ndako azali kosala na mbongo oyo yo ofutaka ye. Na boumeli ya bambula mingi liboso Stelvio ayekola Biblia, azalaki koluka kobongola makambo ya politiki na mboka na ye, na sudi ya Mpoto. Mpo na kolimbola ntina oyo atikaki, alobaki boye: “Namonaki ete moto akoki te kotya bosembo, kimya, mpe bondeko na mokili. Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kobongola bomoi ya bato mpe kokómisa yango malamu.”
Na ndakisa ya Stelvio, soki yo mpe ozali ‘kopesa biloko ya Nzambe epai ya Nzambe’ na bosembo nyonso, yo mpe okoki kozala na elikya yango. Okomona ntango oyo Nzambe akotya boyangeli ya sembo na mabele, akolongola makambo ya mabe mpe kozanga bosembo oyo boyangeli ya bato ememi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo oyo emonisi ete Batatoli ya Yehova bafutaka mpako, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2002, lokasa 12, paragrafe 15, mpe ya 1 Mai 1996, lokasa 16, paragrafe 7.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]
Tosengeli kobongola makanisi na biso mpe koyokanisa yango na oyo ya Nzambe mpamba te makanisi na ye eleki mpenza oyo ya biso
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]
Soki bakristo bazali kofuta mpako na bosembo nyonso, bakobatela lisosoli malamu liboso ya Nzambe mpe bakomonisa ete bazali kotya motema ete akokokisa bamposa na bango
[Bililingi na lokasa 22]
“Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Copyright British Museum