Mokapo ya mitano
Bonsomi ya basambeli ya Yehova
1, 2. (a) Nzambe apesaki babalani ya liboso bonsomi ya ndenge nini? (b) Lobelá mwa mibeko mosusu oyo ezalaki kotambwisa mosala ya Adama na Eva.
NTANGO Yehova akelaki mobali na mwasi ya liboso, bazalaki na bonsomi koleka bonsomi nyonso oyo bato bazali na yango lelo. Bazalaki kofanda na Paladiso, elanga kitoko ya Edene. Lokola bazalaki na makanisi ya kokoka mpe na nzoto ya kokoka, maladi moko te ebebisaki esengo na bango. Liwa mpe ezalaki kozela bango te ndenge ezelaka moto nyonso lelo oyo. Bazalaki kotambwisama lokola barobo te, kasi bazalaki na likabo moko malamu, elingi koloba bonsomi ya kopona, likoki ya kozwa bikateli bango moko. Nzokande, mpo na kokoba kozala na bonsomi ya malamu ndenge wana, basengelaki kotosa mibeko ya Nzambe.
2 Tótalela na ndakisa, mibeko oyo Nzambe atyá mpo na kotambwisa biloko oyo akelá. Atako mibeko yango ekomamaki te, kasi ndenge oyo Adama na Eva basalemaki, basengelaki kaka kotosa yango. Nzala ezalaki koyebisa bango ete basengeli kolya; mposa ya mai ezalaki koyebisa bango ete basengeli komɛla mai; kolala ya moi ezalaki koyebisa bango ete basengeli kolala mpɔngi. Yehova apesaki bango mpe mosala. Mosala yango ezalaki lokola mobeko, mpamba te esengelaki kotambwisa makambo na bango. Basengelaki kobota bana, kozala na bokonzi likoló ya bikelamu mingi ya mabele, mpe kokómisa Paladiso monene kino ekotonda na mabele mobimba. (Genese 1:28; 2:15) Mobeko yango ezalaki mpenza na matomba! Epesaki bango mosala oyo ezalaki mpenza kosepelisa bango, esalisaki bango mpe básalela makoki na bango nyonso na ndenge ya malamu mpenza. Bazalaki mpe na mwa bonsomi ya kozwa bikateli na ndenge bakokokisa mosala na bango. Eloko nini bazangaki!
3. Ndenge nini Adama na Eva bakokaki koyekola kosalela bonsomi na bango malamu mpo na kozwa bikateli?
3 Ya solo, ntango bapesaki Adama na Eva nzela ya kozwa bikateli, yango elingaki koloba te ete ekateli nyonso oyo bakozwa ekobimisa mbuma malamu. Basengelaki kosalela bonsomi na bango ya kozwa bikateli na bisika oyo mibeko mpe mitinda ya Nzambe epesaki bango nzela. Ndenge nini bakokaki koyeba mibeko mpe mitinda yango? Na koyokáká Mozalisi na bango mpe na kotaláká misala na ye. Nzambe apesaki Adama na Eva mayele oyo esengelaki mpo na kosalela makambo oyo bazalaki koyekola. Lokola bakelamaki bato ya kokoka, makanisi na bango ya bomoto esengelaki komonisa bizaleli ya Nzambe na ntango bazali kozwa bikateli. Ya solo, basengelaki kozala na likebi mpo na kosala bongo soki bazalaki mpenza na botɔndi na nyonso oyo Nzambe asalaki mpo na bango mpe soki balingaki kosepelisa ye.—Genese 1:26, 27; Yoane 8:29.
4. (a) Lokola Nzambe apesaki Adama na Eva mobeko ete bálya te mbuma ya nzete kaka moko, yango elongolaki bonsomi na bango? (b) Mpo na nini mobeko yango ebongaki mpenza?
4 Lokola Nzambe nde apesaki bango bomoi, azalaki na lotomo ya komeka bosembo na bango epai na ye mpe soki bakokoka kotikala na kati ya bandelo oyo atyelaki bango. Yehova apesaki Adama mobeko oyo: “Okoki kolya mbuma ya nzete nyonso na elanga, nde mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16, 17) Ntango Eva asalemaki, bayebisaki ye mpe mobeko yango. (Genese 3:2, 3) Mobeko yango elongolaki bonsomi na bango? Soki moke te. Bazalaki na biloko ndenge na ndenge mpo na kolya atako bapekisaki bango kolya mbuma ya nzete kaka moko. (Genese 2:8, 9) Ebongaki mpenza báyeba ete mabele ezali ya Nzambe, mpo ye nde asalaki yango. Yango wana, azalaki na lotomo ya kotya mibeko oyo eyokani na mokano na ye mpe ezali na litomba mpo na bato.—Nzembo 24:1, 10.
5. (a) Ndenge nini Adama na Eva babungisaki bonsomi na bango ya malamu oyo bazalaki na yango? (b) Nini ezwaki esika ya bonsomi oyo Adama na Eva bazalaki na yango, mpe yango esali biso nini?
5 Kasi likambo nini esalemaki? Anzelu moko alonaki makanisi mabe mpe asalelaki bonsomi na ye na ndenge ya mabe, mpe na yango akómaki Satana, oyo elimboli “Motɛmɛli.” Akosaki Eva mpe andimisaki ye likambo moko oyo eyokanaki te na mokano ya Nzambe. (Genese 3:4, 5) Adama mpe alandaki Eva mpe abukaki mobeko ya Nzambe. Lokola bakamataki eloko oyo ezalaki ya bango te, babungisaki bonsomi na bango ya malamu. Lisumu ekómaki kotambwisa bango, mpe na nsima bakufaki ndenge Nzambe alobaki. Libula oyo batikelaki bana na bango ezalaki bongo lisumu—likanisi ya kosalaka ntango nyonso mabe oyo tobotamaka na yango. Lisumu mpe ememaki kolɛmba ya nzoto oyo epesaka maladi, bobange, mpe liwa. Likanisi ya kosalaka ntango nyonso mabe, oyo ekómaka makasi mpo na masɛnginya ya Satana, ebimisi koyinana kati na bato, mobulu, monyokoli, mpe bitumba oyo ebomi bamilio ya bato. Oyo nde bokeseni na bonsomi oyo Nzambe apesaki bato na ebandeli!—Deteronome 32:4, 5; Yobo 14:1, 2; Baloma 5:12; Emoniseli 12:9.
Epai tokoki kozwa bonsomi
6. (a) Epai wapi bonsomi ya solosolo ekoki kozwama? (b) Bonsomi ya lolenge nini Yesu alobelaki?
6 Na kotalela makambo ya mpasi oyo ezali komonana bipai nyonso lelo oyo, ezali likambo ya kokamwa te ndenge bato bazali koluka bonsomi ya solosolo. Kasi epai wapi bonsomi ya solosolo ekoki kozwama? Yesu alobaki ete: “Soki botikali kaka na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:31, 32) Bonsomi yango ezali te oyo bato bakanisaka ete bakozwa ntango baboi mokonzi moko to boyangeli moko boye mpe bandimi oyo mosusu. Nzokande, bonsomi yango ezali na boyokani mpenzampenza na mikakatano ya bato. Bonsomi oyo Yesu azalaki kolobela ezalaki oyo ya kosikolama na boombo ya lisumu. (Yoane 8:24, 34-36) Yango wana, soki moto akómi moyekoli ya solosolo ya Yesu Klisto, amonaka mpenza mbongwana na bomoi na ye, yango ezali mpenza bonsomi!
7. (a) Na lolenge nini tokoki kosikolama na lisumu na ntango oyo? (b) Tosengeli kosala nini mpo na kozwa bonsomi yango?
7 Yango elingi koloba te ete na ntango oyo, baklisto ya solo bakozala lisusu te na makanisi oyo babotamá na yango ya kosala lisumu. Lokola basangolaki lisumu, basengeli naino kobunda mpo na yango. (Baloma 7:21-25) Kasi, soki moto azali mpenza kolanda mateya ya Yesu na bomoi na ye, akozala moombo ya lisumu lisusu te. Epai na ye, lisumu ekozala lisusu te lokola mokonzi mabe oyo azali kopesa ye mitinda oyo asengeli kaka kotosa. Akokangama te na motambo ya kozala na bomoi oyo ezangi ntina mpe oyo ezali kotungisa lisosoli na ye. Akozala na lisosoli ya pɛto liboso ya Nzambe mpamba te masumu na ye ya kala elimbisamaki mpo na kondima oyo amonisaki na mbeka ya Klisto. Makanisi ya lisumu ekoki koyela ye, kasi ntango aboi kosalela yango mpo amikundoli mateya ya pɛto ya Klisto, akomonisa ete lisumu ezali lisusu kotambwisa ye te.—Baloma 6:12-17.
8. (a) Boklisto ya solo epesaka biso bonsomi nini? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela bakonzi ya Leta?
8 Tótalela naino bonsomi na biso baklisto. Tosikolami na mabe ya mateya ya lokuta, na boombo ya biyambayamba mpe ya lisumu. Solo oyo etali ezalela ya bato oyo bakufá mpe lisekwa esikoli biso na bobangi ya liwa. Lokola toyekoli mpe sikoyo toyebi ete Bokonzi ya sembo ya Nzambe ekoyangela na esika ya biyangeli ya bato, yango elongoli biso makanisi ya kozanga elikya. (Danyele 2:44; Matai 6:10) Kasi, bonsomi yango elimboli te ete tosengeli koboya kotosa bakonzi ya Leta mpe mibeko na bango.—Tito 3:1, 2; 1 Petelo 2:16, 17.
9. (a) Ndenge nini Yehova asalisaka biso na bolingo mpenza mpo tózala na bonsomi monene koleka oyo ekoki kopesama na bato na ntango oyo? (b) Ndenge nini tokoki kozwa bikateli ya malamu?
9 Yehova atikaka biso te ete tósalaka mabunga, tómona mpasi mpe na nsima tóyeba nzela ya malamu oyo tosengeli komitambwisa na yango. Ayebi ndenge tosalemá, ayebi nini ekoki kopesa biso bolamu, mpe nini esengeli mpo na kozwa matomba ya libela. Ayebi makanisi mpe bizaleli oyo ekoki kobebisa boyokani oyo moto azali na yango na Ye mpe na bato mosusu, mpe makambo oyo ekoki mbala mosusu ata kopekisa moto yango kokɔta na mokili ya sika. Na bolingo mpenza, Yehova Nzambe ayebisaka biso makambo yango nyonso na nzela ya Biblia mpe na nzela ya ebongiseli na ye oyo ezali komonana. (Malako 13:10; Bagalatia 5:19-23; 1 Timote 1:12, 13) Na nsima, biso nde tozali na mokumba ya kosalela bonsomi oyo Nzambe apesi biso mpo na kozwa ekateli na makambo oyo tosengeli kosala. Na bokeseni na Adama, soki totii likebi na makambo oyo Biblia ezali koteya biso, tokozwa bikateli ya malamu. Tokomonisa ete kozala na boyokani malamu na Yehova ezali likambo ya ntina mingi na bomoi na biso.
Balingaka bonsomi ya lolenge mosusu
10. Bonsomi ya lolenge nini Batatoli ya Yehova mosusu balukaka kozala na yango?
10 Na bantango mosusu, bilenge oyo bazali Batatoli ya Yehova—bakisa mpe mikóló mosusu—bakoki kokanisa ete bazali na mposa ya bonsomi ya lolenge mosusu. Mpo na bango, mokili ekoki komonana ete ezali na makambo ya kitoko, mpe wana bazali kokanisa yango mingi, mposa ya kosala makambo ya mokili ekómaka mpe makasi. Mbala mosusu bato yango bazali te kokanisa komɛla bangi, kolangwa masanga, to kosala pite. Kasi babandaka kotambola na bato mosusu oyo bazali baklisto ya solo te, mpe balingaka kondimama na miso na bango. Bakoki kutu kobanda komekola elobeli na bango mpe etamboli na bango.—3 Yoane 11.
11. Mbala mosusu makanisi ya kosala mabe eutaka wapi?
11 Mbala mosusu makanisi ya kokóma na etamboli mabe eutaka na moto oyo alobaka ete asalelaka Yehova. Likambo yango emonanaki epai ya baklisto mosusu ya liboso, ekoki mpe komonana na mikolo na biso. Bato ya ndenge wana balingaka kosala makambo oyo bakanisaka ete ekopesa bango esengo, kasi makambo yango eyokani te na mibeko ya Nzambe. Batindaka basusu ‘bámisepelisa.’ ‘Balakaka bango bonsomi, nzokande bango moko bazali baombo ya libebi.’—2 Petelo 2:19.
12. Mbeba nini eutaka na etamboli oyo eyokani te na mibeko mpe mitinda ya Nzambe?
12 Bonsomi ya ndenge wana ebotaka ntango nyonso mbuma ya mabe, mpamba te yango elimboli koboya kotosa mibeko ya Nzambe. Na ndakisa, pite ekoki kotungisa makanisi, kopesa maladi, komema na liwa, kozwa zemi ya balabala, mpe mbala mosusu kobebisa libala. (1 Bakolinti 6:18; 1 Batesaloniki 4:3-8) Bangi ekoki kokómisa moto nkandankanda, kotinda moto na kobimisa maloba ya bosɔtɔ, kobebisa miso, kopesa kizunguzungu, mpema mokuse, mobulu na makanisi, mpe liwa. Ekoki kokómisa moto moombo, mpe komema ye na kosala mabe mpo na kozwa mbongo ya kosombaka bangi yango. Mbeba mingi ya ndenge wana mpe eutaka na momeseno ya komɛla masanga mingi. (Masese 23:29-35) Baoyo bakómaka na etamboli ya ndenge wana bakoki kokanisa ete bazali na bonsomi, kasi na nsima bayaka komona ete bakómi baombo ya lisumu. Mpe lisumu ezali mpenza mokonzi mabe! Kokanisa likambo yango sikoyo ekoki kobatela biso na mbeba ya ndenge wana.—Bagalatia 6:7, 8.
Epai mikakatano ebandaka
13. (a) Ndenge nini mposa oyo ememaka na mikakatano mbala mingi ekolaka? (b) Mpo na koyeba mpenza soki “baninga mabe” bazalaka banani, tosengeli kolanda likanisi ya nani? (c) Ntango ozali koyanola na mituna oyo ezali na paragrafe 13, monisá likanisi ya Yehova polele.
13 Kanisá naino epai mikakatano ebandaka. Biblia elobi ete: “Moto na moto amekamaka nde na komemamáká mpe na kobendamáká na mposa na ye moko. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu; na ngala na yango, lisumu, ntango ekokisami, eboti liwa.” (Yakobo 1:14, 15) Ndenge nini mposa ebandaka? Ebandaka na makambo oyo ekɔtaka na makanisi ya moto. Mbala mingi yango eutaka na momeseno ya kozala esika moko na bato oyo basalelaka mitinda ya Biblia te. Ya solo, biso nyonso toyebi malamu ete tosengeli kokima “baninga mabe.” (1 Bakolinti 15:33) Kasi baninga mabe bazali banani? Ndenge nini Yehova atalelaka likambo yango? Soki tokanisi likoló ya mituna oyo elandi mpe toluki bavɛrsɛ oyo bapesi, yango ekosalisa biso tóyeba likambo yango malamumalamu.
Lokola bato mosusu bamonanaka bato ya lokumu, yango elingi koloba ete bazali baninga malamu? (Genese 34:1, 2, 18, 19)
Masolo na bango mpe masɛki na bango ezali mbala mosusu komonisa soki tozalaka mpenza baninga na bango ya motema? (Baefese 5:3, 4)
Ndenge nini Yehova ayokaka soki toponi baninga na biso ya motema kati na bato oyo balingaka ye te? (2 Ntango 19:1, 2)
Atako tosalaka to totángaka esika moko na bato oyo bazali na bindimeli ndenge moko na biso te, mpo na nini tosengeli kokeba? (1 Petelo 4:3, 4)
Kotala televizyo mpe bafilme, kosalela Internet, kotánga babuku, bazulunalo mpe mikanda mosusu, ezali lolenge ya kozala elongo na bato mosusu. Tosengeli kokeba na makambo nini oyo ezali kouta na biloko yango? (Masese 3:31; Yisaya 8:19; Baefese 4:17-19)
Lolenge na biso ya kopona baninga emonisaka Yehova ete tozali bato ya lolenge nini? (Nzembo 26:1, 4, 5; 97:10)
14. Bonsomi nini ya monene ezali kozela baoyo bazali kosalela toli ya Biblia na bosembo nyonso lelo oyo?
14 Mokili ya sika ya Nzambe ezali mpenza liboso na biso. Na nzela ya boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe na likoló, bato bakosikolama na boombo ya Satana mpe ya mokili na ye oyo mabe. Mokemoke, mbeba nyonso ya lisumu ekolongolama epai ya bato ya botosi, bakokóma na makanisi ya kokoka mpe na nzoto ya kokoka, mpe na yango tokozala na bomoi ya seko na Paladiso. Nsukansuka, bikelamu nyonso ekosepela na bonsomi oyo ezali mpenza na boyokani na “elimo ya Yehova.” (2 Bakolinti 3:17) Ekozala mpenza likambo ya mayele kozanga makambo nyonso wana kaka mpo toboi kolanda toli ya Liloba ya Nzambe lelo? Ntango tozali kosalela bonsomi ya biso baklisto na lolenge ya malamu lelo oyo, tómonisa biso nyonso polele ete oyo tolingi ezali nde “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”—Baloma 8:21.
Bozongeli
• Bonsomi ya lolenge nini babalani ya liboso bazalaki na yango? Ndenge nini tokoki kokokanisa yango na oyo bato bazali na yango lelo?
• Bonsomi nini baklisto ya solo bazali na yango? Ndenge nini yango ekeseni na oyo mokili ezali kobenga bonsomi?
• Mpo na nini ezali mpenza na ntina koboya kozala na baninga mabe? Na bokeseni na Adama, biso tokondima bikateli ya nani na oyo etali koyeba soki nini ezali mabe?
[Bililingi na lokasa 46]
Liloba ya Nzambe ekebisi biso ete: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu”