“Azalisaki bango mobali mpe mwasi”
“Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza, na elilingi na Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali mpe mwasi.”—GENESE 1:27.
1. Na lolenge nini solo ezali lipamboli epai na mibali mpe basi baklisto?
OYO nde esengo ya kozala kati na basaleli ya Yehova mpe kosala na boninga mibali mpe basi, bilenge mibali mpe bilenge basi, oyo likambo ya liboso kati na bomoi na bango ezali ya kolinga Nzambe mpe kotosa ye! Solo ezali mpe kosikola biso na bizaleli mpe na etamboli oyo ezali kosepelisa Nzambe te, mpe ezali koteya biso lolenge baklisto basengeli komitambwisa kati na bomoi. (Yoane 8:32; Bakolose 3:8-10) Na ndakisa, bipai binso, bato bazali na mimeseno to na makanisi na lolenge mibali basengeli komonisa bobali na bango, mpe lolenge basi basengeli komonisa bomwasi na bango. Ezali bobele ete mibali babotama na makoki ya bobali mpe basi na makoki ya bomwasi? To ezali nde na makambo mosusu oyo esengeli kotalelama?
2. (a) Nini esengeli komonisa makanisi na biso na ntina na bobali mpe bomwasi? (b) Nini esili komonana na ntina na makanisi ya bobali mpe bomwasi?
2 Mpo na baklisto, Liloba ya Nzambe ezali na bokonzi oyo tosengeli kotosa, ezala na mimeseno nini to na makanisi nini ya bonkɔkɔ tosilaki kokóla na yango. (Matai 15:1-9) Biblia ezali kolobela te makambo nyonso matali bobali mpe bomwasi. Nzokande, Biblia ezali kopesa nzela na komonisa bobali mpe bomwasi na mitindo ndenge na ndenge lokola emonanaka na mimeseno ndenge na ndenge ya bato. Mpo ete bázala lolenge Nzambe azalisaki bango, mibali basengeli kozala na bobali mpe basi basengeli kozala na bomwasi. Mpo na nini? Mpamba te longola likambo oyo ete mobali mpe mwasi basalemaki mpo na kokokisana na nzoto, basengeli mpe kokokisana na bizaleli ya bobali mpe ya bomwasi. (Genese 2:18, 23, 24; Matai 19:4, 5) Nzokande, makanisi na ntina na bobali mpe bomwasi manyongotami mpe mabaluki. Mibali mingi bazali kotalela bobali ete ezali bokonzi ya makambo makasi, ya kokonza to komatela. Na mimeseno ya bamboka mosusu, emonanaka mingi te to ezalaka likambo ya nsɔ́ni ete mobali alela, ezala na miso ya bato to na nkuku. Nzokande, liboso na ebele ya bato, na libándá ya lilita ya Lasalo, “Yesu atangisi mpisoli.” (Yoane 11:35) Yango ezalaki likambo lilongobani mpo na Yesu, oyo bobali na ye ezalaki ya kokoka. Lelo oyo, bato mingi bakómi kolekisa ndelo na ntina na bomwasi, kotaleláká yango bobele lokola eloko ya kobenda likebi mpo na bonzenga na yango mpe mpo na bamposa ya nzoto.
Bobali mpe bomwasi ya solosolo
3. Na lolenge nini mibali bakeseni na basi?
3 Bobali ya solosolo ezali nini, mpe bomwasi ya solosolo ezali nini? The World Book Encyclopedia elobi ete: “Mingi mpenza mibali mpe basi bakeseni bobele na nzoto te, kasi na bizaleli mpe na bamposa. Bokeseni yango mosusu euti na lolenge tobotama. . . . Kasi emonani ete bokeseni mingi oyo ezali ya nzoto te etongami likoló na lolenge oyo moto na moto ayekolaki mokumba ya mwasi to ya mobali. Bato babotamaka mibali to basi, kasi bayekolaka kozala na bobali to na bomwasi.” Lolenge oyo tosalami ekoki kozala na bopusi na makambo mingi, kasi bokóli ya bobali to bomwasi oyo ebongi etaleli boyebi na biso ya makambo Nzambe azali kosɛnga na biso mpe na oyo toponi kolanda na bomoi na biso.
4. Biblia ezali komonisa nini na ntina na mikumba ya mobali mpe ya mwasi?
4 Lisoló ya Biblia lizali komonisa ete mokumba ya Adama ezalaki ya kotambwisa makambo lokola mokonzi ya mwasi na ye mpe ya bana na ye. Asengelaki mpe kotosa mokano ya Nzambe ya kotondisa mabelé, kozala na bokonzi likoló na yango, mpe likoló ya bikelamu nyonso ya mabelé. (Genese 1:28) Mpo na Eva mokumba ya bomwasi kati na libota ezalaki ya kozala “mosungi” oyo “abongi” na Adama, kotosa bokonzi na ye, kosala elongo na ye kati na kokokisama ya mokano ya Nzambe oyo alobaki mpo na bango.—Genese 2:18; 1 Bakolinti 11:3.
5. Na lolenge nini boyokani ya mwasi na mobali ebebaki?
5 Kasi Adama akokisaki mokumba na ye te, mpe Eva asalelaki bomwasi na ye na lolenge mabe na kolɛngoláká Adama na koboya kotosa Nzambe. (Genese 3:6) Na komipesáká ye mpenza na kosala oyo ayebaki ete ezalaki mabe, Adama alóngaki te kosalela bobali ya solosolo. Na bopɔtu nyonso aponaki kondima maloba ya mwasi na ye na esika ete andima oyo Tata mpe Mozalisi na ye ayebisaki ye. (Genese 2:16, 17) Mosika te, babalani ya liboso babandaki komona makambo Nzambe alobaki ete ekozala mbuma ya kozanga botosi. Adama, oyo liboso abimisaki maloba kitoko mpe ya ntɔ́ki mpo na mwasi na ye, sikawa, na mawa nyonso amonisi ye lokola ‘mwasi oyo yo opesaki ete azala na ngai.’ Ezaleli na ye ya kozanga kokoka ebebisaki mpe etambwisaki na lolenge mabe bobali na ye, oyo epesaki nzela na ‘kozala na bokonzi likoló na mwasi na ye.’ Eva, asengelaki kozala na “mposa” ya mobali na ye, mbala mosusu na lolenge ya koleka ndelo to ya kozanga bokatikati.—Genese 3:12, 16.
6, 7. (a) Konyongotama nini ya bobali emonanaki liboso ya Mpela? (b) Liteya nini tokoki kozwa na makambo malekaki liboso ya Mpela?
6 Kosalelama mabe ya bobali mpe bomwasi epalanganaki mingi liboso ya Mpela. Baanzelu oyo basundolaki etɛlɛmɛlo na bango na likoló, balataki nzoto ya bato mpo na kosangisa nzoto na basi. (Genese 6:1, 2) Lisoló ya Biblia elobeli bobele mibali oyo babotamaki na kosangisa nzoto wana ya mabe. Mpe emonani ete bana na bango bazalaki bingambe, oyo bazalaki na likoki ya kobota te. Bayebanaki lokola bato na nguya, banefilime, to bilombe, mpamba te moto moko te akokaki kobunda na bango. (Genese 6:4, NW; maloba na nsé ya lokasa) Emonani polele ete bazalaki na mobulu, na matumoli, bazalaki ata na mawa te.
7 Ya solo, kitoko ya nzoto, bonene, bolai, to makasi yango moko emonisaka te bobali to bomwasi ya malamu. Baanzelu oyo balataki nzoto ya bato bazalaki mbala mosusu kitoko. Mpe banefilime bazalaki mbinga mpe bingambe, kasi bizaleli na bango ezalaki mabe. Baanzelu wana bazangaki botosi mpe bana na bango batondisaki mabelé na makambo ya mbindo mpe mobulu. Na yango, Yehova abomaki mokili yango. (Genese 6:5-7) Nzokande, Mpela elongolaki bopusi ya bademo te, elongolaki mpe matomba mabe ya lisumu ya Adama te. Kosalelama na lolenge mabe ya bobali mpe ya bomwasi etondaki lisusu na mabelé nsima ya Mpela, mpe bandakisa ya mabe mpe ya malamu oyo ezali kati na Biblia tokoki kozwa na yango mateya.
8. Ndakisa nini ya bobali ya malamu Yosefe amonisaki?
8 Lisoló ya Yosefe mpe mwasi ya Potifala ezali komonisa bokeseni monene kati na bobali ya malamu mpe bomwasi ya mabe. Mwasi ya Potifala alulaki Yosefe, mpe na yango amekaki kolɛngola ye. Na ntango wana, ata mobeko moko ya Nzambe mokomami te oyo mozalaki kokweisa pité to ekobo. Nzokande, Yosefe akimaki mwasi yango ya bizaleli ya mbindo mpe amimonisaki ete azalaki mpenza mobali oyo azali na bobángi Nzambe, amonisaki bobali oyo endimamaki na Nzambe.—Genese 39:7-9, 12.
9, 10. (a) Na lolenge nini Mokonzi-Mwasi Waseti abebisaki bomwasi na ye? (b) Ndakisa nini ya bomwasi ya malamu Esetele apesaki biso?
9 Esetele mpe Mokonzi-Mwasi Waseti bamonisaki bokeseni monene mpo na basi. Waseti akanisaki mpenza ete lokola azalaki kitoko, Mokonzi Ahasewelusu akondima ntango nyonso masɛngi na ye. Kasi kitoko na ye ezalaki bobele ya libándá. Azangaki bopɔlɔ mpe bomwasi ya malamu, mpamba te atosaki mobali na ye te, mokonzi. Mokonzi aboyaki ye mpe aponaki mwasi oyo azalaki na bomwasi ya malamu, oyo azalaki na bobángi Yehova mpo na kozala mwasi ya mokonzi.—Esetele 1:10-12; 2:15-17.
10 Esetele azali mpenza ndakisa malamu mpo na basi baklisto. Azalaki “na bonzenga mpe na kitoko,” kasi amilatisaki eloko “ebombami na motema, kitoko oyo ekobeba te, oyo na [elimo, NW] na bopɔlɔ mpe na kimya.” (Esetele 2:7; 1 Petelo 3:4) Atalelaki kitoko ya libándá lokola eloko ya liboso te. Esetele amonisaki mayele mpe komipekisa, azalaki na botosi epai na mobali na ye, Ahasewelusu, ata ntango bomoi ya bato na ye ekómaki na likámá. Esetele azalaki nyɛɛ ntango ebongaki kosala bongo, nzokande alobaki na kozanga kobanga ntango yango esengelaki mpe na ntango ebongi. (Esetele 2:10; 7:3-6) Andimaki toli ya ndeko na ye oyo akɔmeli, Moledekai. (Esetele 4:12-16) Amonisaki bolingo mpe bosembo epai na bato na ye.
Kitoko ya libándá
11. Eloko nini tosengeli kobosana te na oyo etali kitoko ya libándá?
11 Fungola ya bomwasi ya solosolo ezali nini? Mama moko alobaki boye: “Bonzenga ekozimbisa mpe kitoko ezali mpamba, nde mwasi oyo akotosa [Yehova], ye akosanzolama.” (Masese 31:30) Na bongo, ezaleli malamu ya kobanga Nzambe ezali na ntina, boboto, kosepelisa, bopɔlɔ, mpe lolenge malamu ya kosalela lolemo ezali malamu mpenza mpo na bomwasi koleka kitoko ya nzoto.—Masese 31:26.
12, 13. (a) Likambo ya mawa, nini eyokanaka na maloba ya bato mingi? (b) Ndimbola ya Masese 11:22 ezali nini?
12 Likambo ya mawa, mibali mingi mpe basi mingi basalelaka monɔkɔ na bango na lolenge ya mayele te, ata mpe boboto ezalaka na lolemo na bango te. Maloba na bango ezalaka ya kozokisa, ya kotyola, ya bosɔtɔ mpe ya bilobela. Mibali mingi bakanisaka ete maloba ya bosɔtɔ ezali elembo ya bobali, mpe basi mosusu na bozoba nyonso bamekolaka bango. Nzokande, soki mwasi azali kitoko kasi azangi mayele, azali na makɛlɛlɛ, na bilobela, to alingi ntango nyonso koswana na bato, akoki mpenza kozala kitoko ya lolenge malamu? “Lokola lopɛtɛ na zolo na ngulube, boye mwasi na kitoko oyo azangi mayele.”—Masese 11:22.
13 Kitoko oyo esangani na maloba ya bosɔtɔ, ya kotyola, to ya kozanga mayele ekoki kolongobana te na kitoko ya bomwasi oyo moto akoki kosepela na yango. Ya solo, etamboli wana ya kozanga bobángi Nzambe ekoki kútu kosala ete kitoko ya nzoto ya moto emonana mabe. Na kozanga nkaka, tokoki mpenza komona ete kitoko ya libándá ya mobali to ya mwasi yango moko ekoki te kolóngisa to kozipa nkɛlɛ ya maloba ya nkanda, konganga to maloba ya kozokisa. Baklisto nyonso bakoki mpe basengeli kosala ete básepelisa Nzambe mpe baninga na bango bato na maloba mpe na etamboli oyo ezwi moboko na Biblia.—Baefese 4:31.
14. Motindo nini ya molato ekumisami na 1 Petelo 3:3-5, mpe makanisi na yo ezali nini na ntina na yango?
14 Atako bomwasi ya solosolo mpe bobali ya solosolo ezwi moboko na yango likoló na bizaleli ya elimo, lolenge ya kobongisa nzoto mpe ya komimonisa na miso ya bato, bakisa bilamba mpe lolenge ya kolata yango, ezali komonisa bomoto na biso. Na ntembe te ntoma Petelo azalaki kotalela kati na makanisi na ye lolenge moko ya elateli mpe monzɛlɛ oyo ezalaki na ekeke ya liboso, ntango apesaki toli epai na baklisto basi na maloba oyo: “Tiká kitoko na bino ezala kitoko na libándá te, lokola na kotongana na nsuki mpe komizingela na biloko na wolo soko na kolata bilamba na kitoko. Kasi tiká kitoko na bino ezala eloko ebombami na motema, kitoko oyo ekobeba te, oyo na [elimo, NW] na bopɔlɔ mpe na kimya; yango ezali na motuya monene na miso na Nzambe. Zambi kalakala basi na bulɛɛ baoyo balikyaki na Nzambe, bamikɛmbɛlaki nzoto bongo wana etosaki bango mibali na bango.”—1 Petelo 3:3-5.
15. Basi baklisto basengeli kosala milende ya komonisa nini na molato na bango?
15 Na 1 Timoté 2:9, 10, tozali kokuta maloba ya Paulo na ntina na molato ya basi: “Basi bámilatisa nzoto na bango na lolenge na bopɔlɔ mpe na makanisi malamu . . . na misala na kitoko lokola ebongi na basi baoyo bayamboli ete bazali kondima Nzambe.” Abɛ́taki mpenza nsɛtɛ́ likoló na elateli elongobani mpe ebongisami malamu oyo ezali komonisa makanisi malamu.
16, 17. (a) Lolenge nini basi mpe mibali mingi lelo bazali kolata na motindo mabe? (b) Bosukisi nini tokoki kopesa na toli oyo tozali kokuta na Deteronome 22:5?
16 Mpo na mobali to mwasi, elenge mobali to elenge mwasi, soki azali komitambwisa to kolata na lolenge ya kolamwisa mposa ya nzoto, yango ekoki te komonisa bobali to bomwasi ya solosolo, mpe ekokumisa Nzambe soko moke te. Bato mingi na mokili balekisaka ndelo kino kolakisa bobali to bomwasi na bango na makambo matali kosangisa nzoto, na elateli mpe na etamboli. Na ntina na mikano ya mbindo, basusu bazali kokɔtisa mobulungano na bokeseni oyo esengeli kozala kati na basi mpe mibali. Oyo nde botɔ́ndi biso baklisto tokoki kozala na yango na boye ete Biblia ezali komonisa makanisi ya Nzambe! Yehova alobaki na Yisalaele ya kala ete: “Mwasi akolata eloko na mobali te, mpe mobali akolata elamba na mwasi te, mpo ete ye oyo asali makambo oyo azali na mbindo na miso ya [Yehova] Nzambe na yo.”—Deteronome 22:5.
17 Na ntina yango, okoki kosepela kozongela lisusu makanisi oyo mazwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1988, na lokasa 17 (ebimeli ya Lifalansé) elobami ete: “Likambo ezali te ya kotalela soko modɛlɛ moko ebimi sika, kasi ezali nde soki ebongi mpo na moto oyo abéngami ministre ya Nzambe. (Baloma 12:2; 2 Bakolinti 6:3) Bilamba oyo bilongobani te to oyo bizali kokanga nzoto ekoki kobebisa lokumu ya nsango na biso. Midɛlɛ oyo ezali kokómisa mibali lokola basi mpe basi lokola mibali mibongi te mpo na basaleli ya Nzambe. (Kokanisá na Deteronome 22:5.) Ya solo, mimeseno ya mboka mikoki kokesene, engebene bileko, misala oyo bato bazali kosala, mpe bongo na bongo, na yango lisangá ya boklisto ezali kotya mibeko mitali molato te mpo na bandeko ya mokili mobimba.”
18. Matambe nini tosengeli kosala na kosaleláká toli ya Biblia na ntina na molato mpe monzɛlɛ?
18 Yango ezali mpenza toli ya bokatikati mpe ya kolongobana! Likambo ya mawa, baklisto mosusu, basi mpe mibali, na libunga nyonso bazali kolanda ata modɛlɛ nini oyo mokili ezali kobimisa kozanga kotalela lolenge yango ekozala na bopusi likoló na nkombo ya Yehova mpe na lisangá ya boklisto. Mokomoko na biso asengeli komitalela malamumalamu mpo na koyeba soko apusami te na makanisi ya mokili. To mpe tokoki kosolola na ndeko mobali to ndeko mwasi moko oyo azali na etamboli malamu mpe ateli mpo na kotuna ye mwa makanisi na ntina na mbongwana tosengeli kosala na molato na biso mpe na nsima kotalela makanisi na ye.
Mibali mpe basi baklisto bazali mibali mpe basi ya solosolo
19. Bopusi nini mabe tosengeli kolónga yango?
19 Satana azali nzambe ya mokili oyo, mpe bopusi na ye ekoki komonana na mobulungano kati na mibali mpe basi, mpe yango eleki bobele na likambo litali molato te. (2 Bakolinti 4:4) Na mikili mingi, basi bawelanaka na mibali na ntina na bokonzi, kobosanáká mitindá ya Biblia. Epai mosusu, motángo monene ya mibali bazali kosundola bokonzi na bango mpe mikumba na bango, lolenge Adama asalaki. Kútu ezali na basusu oyo bamekaka kobongola nzoto na bango na oyo etali kosangisa nzoto. (Baloma 1:26, 27) Biblia emonisi te ete lolenge mibale ya bomoi endimami na Nzambe. Mpe baoyo, liboso ya kokóma baklisto, babebisaki bomoto na bango komikómisáká mwasi na esika ya kozala mobali to komikómisáká mobali na esika ya kozala mwasi to babebisaki nzoto na bango na makambo matali kosangisa nzoto bakoki kotya motema ete ekozala mpo na bolamu na bango ya libela soki bakomitambwisa engebene mitindá ya Nzambe, mitindá oyo mikopesamela motuya na baoyo bakokóma na ezalela ya kokoka.
20. Bopusi nini Bagalatia 5:22, 23 ezali na yango likoló na makanisi na biso na ntina na bobali mpe bomwasi?
20 Makomami mazali komonisa ete baklisto mibali mpe basi basengeli kolóna mpe komonisa mbuma ya elimo ya Nzambe—bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, mpe komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23) Na mayele na ye monene, Nzambe apesi bato likoki ya kokólisa bobali na bango mpe bomwasi na bango, na kolónáká bizaleli na yango. Mobali oyo azali komonisa mbuma ya elimo ekozala mpasi te mpo na kotosa ye, mpe mwasi oyo azali kosala bongo ekozala mpasi te mpo na kolinga ye.
21, 22. (a) Ndakisa nini Yesu apesaki na ntina na lolenge ya bomoi? (b) Lolenge nini Yesu asalelaki bobali na ye?
21 Yesu Klisto azali moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo mpe baklisto basengeli komekola lolenge ya bomoi na ye. (1 Petelo 2:21-23) Lokola Yesu asalaki yango, mibali mpe basi basengeli komonisa bosembo epai na Nzambe mpe kotosa Liloba na Ye. Yesu amonisaki bizaleli kitoko ya bolingo, boboto mpe motema mawa. Lokola tozali baklisto ya solo, esengeli na biso komekola ye mpo na komonisa ete tozali bayekoli na ye.—Yoane 13:35.
22 Yesu Klisto azalaki mpenza mobali ya solosolo, mpe tokoki komona bizaleli na ye ya bobali wana tozali koyekola lisoló ya bomoi na ye oyo lizwami kati na Makomami. Abalaki te, kasi Biblia ezali komonisa ete azalaki kosepela na boninga ya bokatikati elongo na basi. (Luka 10:38, 39) Boninga na ye elongo na mibali mpe basi ezalaki ntango nyonso ya pɛto mpe ya lokumu. Azali mpenza ndakisa ya kokoka ya bobali. Apesaki nzela na moto moko te—mobali, mwasi, to anzelu motomboki—ete abotola ye bobali na ye oyo ebongi na miso ya Nzambe mpe bosembo na ye epai na Yehova. Akakatanaki te kondima mikumba na ye, mpe akokisaki yango kozanga komilelalela.—Matai 26:39.
23. Na kotaleláká mikumba ya bobali mpe ya bomwasi, na lolenge nini baklisto ya solo bapambolami?
23 Oyo nde esengo ya kozala kati na basaleli ya Nzambe mpe kosangana na mibali mpe basi, bakisa mpe bilenge mibali mpe bilenge basi, oyo kolinga mpe kotosa Yehova Nzambe ezali na esika ya liboso kati na bomoi na bango! Tozali kotungisama te wana tozali kotosa Liloba ya Nzambe. Nzokande, tosikolami na mokili oyo mpe misala na yango oyo mizali kobebisa kitoko, mokano, mpe bokeseni ya nzoto kati na mibali mpe basi. Tózala mibali to basi, tokoki kozwa esengo ya solosolo oyo ezali kouta na kokokisa etɛlɛmɛlo oyo Nzambe apesi biso na bomoi na biso. Ɛɛ, oyo nde botɔ́ndi tozali na yango epai na Yehova Nzambe, Mozalisi, mpo na bibongiseli oyo nyonso mpo na bolamu na biso mpe mpo ete azalisaki biso mibali mpe basi!
Okoyanola lolenge nini?
◻ Mikumba nini oyo mibongi na mibali mpe basi Biblia ezali komonisa?
◻ Lolenge nini likanisi na ntina na bobali enyongotamaki liboso ya Mpela, mpe lolenge nini bato bazali kotalela bobali mpe bomwasi na ntango na biso?
◻ Toli nini ya Biblia na ntina na molato okoluka kosalela?
◻ Na lolenge nini baklisto mibali mpe basi bakoki komimonisa ete bazali mibali mpe basi ya solosolo?
[Elilingi na lokasa 17]
Atako azalaki kitoko mpenza, Esetele akanisami mingimingi mpo na bopɔlɔ mpe bizaleli na ye
[Elilingi na lokasa 18]
Tyá likebi ya bokatikati na ntina na monzɛlɛ wana ozali kopesa motuya mingi na kitoko ya kati