Nzambe azwaka mpenza basi na valɛrɛ?
“Mwasi nde abandisaki lisumu, mpe mpo na ye biso nyonso tosengeli kokufa.”—MOKANDA YA SIRA, SIƐKLƐ YA MIBALE L.T.B.
“Bozali porte ya Zabolo: bino nde bato ya liboso bolyaki mbuma ya nzete oyo epekisamaki: bino nde bato ya liboso oyo bobukaki mobeko ya Nzambe . . . Bino nde botindaki mobali ya liboso asala lisumu.”—TERTULLIEN, NA BUKU NA YE (ON THE APPAREL OF WOMEN), SIƐKLƐ YA MIBALE T.B.
BAVƐRSƐ wana ya kala ezali ya Biblia te. Bandá basiɛklɛ mingi, basalelaka yango mpo na komonisa ete kotyola basi to kokitisa bango valɛrɛ ezali mabe te. Ata lelo oyo, bato mosusu bazali kaka kotánga mikanda mosusu ya mangomba mpo na komonisa ete ebongi konyokola basi; balobaka ete esengeli kopesa basi foti mpo na mpasi oyo ekómelá bato. Nzambe akanaki mpenza ete mibali básambwisaka basi mpe bányokolaka bango? Biblia elobi nini? Tótala naino.
Nzambe alakelá nde basi mabe?
Te. Nzambe ‘alakelaki mabe’ nde “nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo.” (Emoniseli 12:9; Ebandeli 3:14) Ntango Nzambe alobaki ete Adama “akozala na bokonzi likoló” ya mwasi na ye, amonisaki te ete ezali malamu mobali akonza mwasi. (Ebandeli 3:16) Azalaki komonisa kaka mpasi oyo lisumu ekobimisela mwasi ná mobali ya liboso.
Na yango, konyokola basi ezali moko ya makambo oyo eutá na lisumu oyo bato babotamá na yango, kasi ezali mokano ya Nzambe te. Biblia elendisaka te likanisi oyo elobaka ete mibali basengeli kokonza basi mpo báfuta lisumu ya ebandeli.—Baroma 5:12.
Nzambe akelá mibali mpo báleka basi?
Te. Ebandeli 1:27 elobi boye: “Nzambe abandaki kozalisa moto na elilingi na ye, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali ná mwasi.” Na yango, na ebandeli mpenza, ezala mobali to mwasi bakelamaki na likoki ya komonisa bizaleli ya Nzambe. Atako Adama ná Eva bazalaki ndenge moko te na nzoto mpe na makanisi, bango nyonso mibale bazwaki malako ndenge moko mpe bazalaki na lotomo ndenge moko na miso ya Mozalisi na bango.—Ebandeli 1:28-31.
Liboso ete Nzambe akela Eva, alobaki boye: “Nakosalela ye [Adama] mosungi, oyo abongi na ye.” (Ebandeli 2:18) Liloba “oyo abongi na ye” elimboli nde ete mobali aleki mwasi? Te, mpamba te liloba yango ya Ebre ekoki mpe kobongolama na “moto oyo akokani na” to “mosungi oyo akokani na” mobali. Tókanisa naino ndenge monganga oyo asalaka lipaso asalaka na boyokani ná monganga oyo apesaka ntonga ya kolalisa mpɔngi. Monganga oyo asalaka lipaso akoki nde kosala lipaso kozanga ete monganga oyo apesaka ntonga ya kolalisa mpɔngi apesa ntonga yango? Ekoki kosalema te! Lokola monganga oyo asalaka lipaso nde akosala lipaso yango, elingi nde koloba ete ye nde azali na ntina mingi koleka? Ezali mpasi tóloba bongo. Ndenge moko, Nzambe akelaki mobali ná mwasi mpo bápesanaka mabɔkɔ, kasi te mpo moko aleka mosusu.—Ebandeli 2:24.
Nini emonisi ete Nzambe azwaka basi na valɛrɛ?
Lokola Nzambe amonaki na mosika makambo oyo mibali oyo bakómi bato ya masumu bakosala, kaka na ebandeli, amonisaki polele mposa na ye ya kobatela basi. Na buku na ye (La Bible au féminin) mokomi Laure Aynard alobelaki Mibeko ya Moize oyo ekomamaki na siɛklɛ ya 16 liboso ya ntango na biso; alobi boye: “Mbala mingi, ntango Mibeko ya Moize ezali kolobela basi, ezali nde mpo na kokɔtela bango.”
Na ndakisa, Mibeko ezalaki kosɛnga bana bátosa batata ná bamama na bango. (Kobima 20:12; 21:15, 17) Ezalaki mpe kosɛnga ete bámemyaka basi ya zemi. (Kobima 21:22) Ata mpe lelo oyo, libateli oyo mibeko ya Nzambe ezalaki kopesa bato ekeseni mpenza na lotomo oyo basi mosusu bazalaka na yango te na bisika mingi na mokili. Kasi, esuki kaka wana te.
Mobeko oyo emonisi ndenge Nzambe atalelaka basi
Mibeko oyo Yehova Nzambe apesaki Bayisraele esalisaki ezala basi to mibali bázala malamu na nzoto, na bizaleli mpe na elimo. Ntango nyonso oyo bazalaki kotosa mibeko yango, ekólo na bango ezalaki “likoló ya bikólo mosusu nyonso ya mabele.” (Kolimbola Mibeko 28:1, 2) Mwasi azalaki na esika nini na Mibeko yango? Tótalela makambo oyo elandi:
1. Bonsomi ya moto na moto. Na kokesana na basi ya bikólo mosusu mingi na ntango ya kala, basi ya Yisraele bazalaki na bonsomi mingi. Atako bapesaki mobali mokumba ya kozala mokonzi ya libota, mobali azalaki kotyela mwasi na ye motema mpe mwasi akokaki ‘kotalela malamumalamu elanga moko mpe kozwa yango; kolona elanga ya vinyo.’ Soki mwasi yango ayebaki kolínga bansinga mpe kotonga bilamba, akokaki kotambwisa mombongo na ye moko. (Masese 31:11, 16-19) Na nse ya Mibeko ya Moize, basi bazalaki na lotomo lokola moto nyonso.
Na Yisraele, basi bazalaki mpe na likoki ya kozala na boyokani ná Nzambe. Biblia elobeli Hana, oyo abondelaki Nzambe mpo na likambo moko oyo ezalaki kotungisa ye mpe asalaki elako oyo moto mosusu ayebaki te. (1 Samwele 1:11, 24-28) Mwasi moko ya engumba Shuneme azalaki na momeseno ya kokende kotala mosakoli Elisha na mikolo ya sabata. (2 Bakonzi 4:22-25) Nzambe asalelaki basi lokola Debora mpe Huluda mpo bázala bamonisi na ye. Likambo ya kokamwa ezali ete mibali ya lokumu mpe banganga-nzambe bazalaki koluka toli epai ya basi yango.—Basambisi 4:4-8; 2 Bakonzi 22:14-16, 20.
2. Lotomo ya koyekola. Lokola Kondimana ya Mibeko etalelaki mpe basi, bazalaki kobengisa bango mpo báyoka botángi ya Mibeko, oyo ezalaki kopesa bango libaku ya koyekola. (Kolimbola Mibeko 31:12; Nehemia 8:2, 8) Bazalaki mpe kozwa formasyo mpo na kopesa mabɔkɔ na makambo mosusu ya losambo ya bato nyonso. Na ndakisa, basi mosusu bazalaki “kosala mosala oyo ebongisami” na tabernakle, nzokande bamosusu bazalaki koyemba elongo na mibali.—Kobima 38:8; 1 Ntango 25:5, 6.
Basi mingi bazalaki na mayele mpe makoki oyo esengelaki mpo na kotambwisa mombongo oyo ezalaki kofuta malamu. (Masese 31:24) Na kokesana na mimeseno ya bikólo mosusu ya ntango wana, oyo kaka tata nde azalaki koteya bana na ye ya mibali, na Yisraele bamama bazalaki mpe kopesa mabɔkɔ na koteya bana na bango ya mibali tii ntango bakómi mikóló. (Masese 31:1) Emonani polele ete basi na Yisraele bazalaki bato oyo bayekolá.
3. Bazalaki kopesa bango lokumu mpe limemya. Mibeko Zomi elobaki polele ete: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo.” (Kobima 20:12) Tozali kotánga boye na masese ya Salomo mokonzi ya bwanya: “Mwana na ngai, yoká disiplini ya tata na yo, mpe kotika mobeko ya mama na yo te.”—Masese 1:8.
Mibeko ezalaki mpe na malako ya sikisiki na ndenge bato oyo babalá te basengeli komitambwisa kati na bango na bango; basengelaki komemya basi. (Balevi 18:6, 9; Kolimbola Mibeko 22:25, 26) Mobali ya malamu asengelaki koyeba esika makasi ya mwasi na ye esuki mpe ndenge oyo nzoto na ye esalaka.—Balevi 18:19.
4. Lotomo ya kobatelama. Na Liloba na ye, Yehova amimonisi lokola “Tata ya bana mibali oyo batata bakufá mpe mosambisi ya basi oyo mibali bakufá.” Na maloba mosusu, azalaki mobateli ya baoyo bazalaki na batata te to na mibali te mpo na kobatela lotomo na bango. (Nzembo 68:5; Kolimbola Mibeko 10:17, 18) Na yango, ntango modefisi moko asalelaki mwasi moko oyo mobali na ye azalaki mosakoli mpe akufá makambo na ndenge oyo ebongi te, Yehova asalaki likamwisi mpo mwasi yango akoba kozala na bomoi mpe lokumu na ye ebatelama.—2 Bakonzi 4:1-7.
Liboso ete Bayisraele bákɔta na mokili ya ndaka, Zelofehade mokonzi moko ya libota akufaki kozanga ete abota mwana mobali. Bana na ye mitano ya basi basɛngaki Moize apesa bango “mabele” na mokili ya ndaka. Yehova apesaki bango koleka kutu oyo basɛngaki. Ayebisaki Moize boye: “Okopesa mpenza bango mabele ya libula na kati ya bandeko ya tata na bango, mpe osengeli kolekisa libula ya tata na bango epai na bango.” Kobanda na ntango wana, basi na Yisraele bakokaki kozwa libula epai ya batata na bango mpe kotikela yango bana na bango.—Mitángo 27:1-8.
Babebisi ndenge oyo Nzambe atalelaka basi
Na nse ya Mibeko ya Moize, basi bazalaki na esika moko ya lokumu mpe lotomo na bango ezalaki kotosama. Kasi, kobanda na siɛklɛ ya minei liboso ya ntango na biso, mimeseno ya Bagrɛki, oyo ezalaki komona ete mibali baleki basi, ebandaki kokɔta na losambo ya Bayuda.—Talá etanda “Ndenge oyo bazalaki kozwa basi na valɛrɛ te, na makomi ya kala.”
Na ndakisa, Hésiode, powɛti moko Mogrɛki (na siɛklɛ ya 8 liboso ya ntango na biso) alobaki ete soki bato nyonso bazali komona mpasi ezali foti ya basi. Na buku na ye (Théogonie), alobaki ete basi bazali “bato oyo balakelami mabe, oyo bafandi esika moko ná mibali mpo na konyokola bango.” Likanisi yango epalanganaki na losambo ya Bayuda na ebandeli ya siɛklɛ ya mibale liboso ya ntango na biso. Talmud buku ya mibeko ya Bayuda oyo ebandaki kokomama na siɛklɛ ya mibale ya ntango na biso, ekebisaki mibali boye: “Bósololaka ná basi mingimingi te, noki te bakokweisa bino na pite.”
Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, likanisi yango ebebisaki mpenza lokumu ya basi epai ya Bayuda. Na ntango ya Yesu, basi bazalaki kokɔta na kati ya tempelo te, bazalaki kosuka kaka na Lopango ya basi. Kaka mibali nde bazalaki na lotomo ya koyekola makambo ya Nzambe mpe na kati ya basinagoga, basi ná mibali bazalaki kofanda esika moko te. Talmud etángi maloba ya Rabi moko oyo alobaki boye: “Moto oyo azali koteya mwana na ye ya mwasi Torah [mibeko], azali koteya ye makambo ya nsɔni.” Lokola bakonzi ya mangomba ya Bayuda babebisaki ndenge oyo Nzambe atalelaka basi, bateyaki mibali mingi bázwaka basi na valɛrɛ te.
Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonaki likambo yango, oyo ezwaki mpenza misisa na bonkɔkɔ ya Bayuda. (Matai 15:6, 9; 26:7-11) Mateya ya ndenge wana ebebisaki nde lolenge na ye ya kosalela basi makambo? Liteya nini tokoki kozwa na ezaleli na ye? Bokristo ya solo, ekitisi basi mitema? Lisolo oyo ekolanda ekoyanola na mituna yango.