Mokapo 6
Mpo na nini tonunaka mpe tokufaka?
1. Eloko nini bato na siansi bazali kokoka te kolimbola na ntina na bomoi ya bato?
BATO ya siansi bayebaka te mpo na nini bato banunaka mpe bakufaka. Emonani ete baselile na biso esengeli kolanda kozongaka ntango nyonso ya sika mpe ete tosengeli kozala na bomoi ya seko. Búku Hyojun Soshikigaku (Zébi ekotalelaka lolenge ya bikelamu ya bomoi) elobi ete: “Ezali likambo ya kokamwisa na komona ete konuna ya baselile ekangisami na konuna mpe na liwa ya moto.” Bato mingi ya siansi bandimaka ete bomoi ezali na “ndelo na yango.” Okanisi ete bazali na elónga?
2. Basusu basili kosala nini lokola bomoi ezali komonana mpenza mokuse?
2 Uta kala, bato bazalaka na mposa makasi ya kozala na bomoi molai mpe nkutu bamekaki koluka kokóma kino na kozanga kokufa. Uta ekeke ya minei L.T.B., ekanisamaki ete monɔ mosusu ekoki kopesa nzela na kozanga kokufa, mpe yango ebendaki likebi ya bato minene ya Chine. Na nsima bakonzi mosusu ya Chine bamekaki komela oyo bazalaki kobénga ete bankisi ya bomoi—esalemaki uta na mercure—mpe bakufaki mbala mosusu na ngɛ́ngɛ na yango! Bipai nyonso kati na mokili, bato bandimaka ete liwa ezali nsuka ya bomoi na bango te. Babudiste, Bahindu, Bamizilmá mpe basusu, bango nyonso bazalaka na elikya makasi ya bomoi nsima na liwa. Kati na mangomba oyo emibéngaka ete ya boklisto, mingi bazali kotya elikya na komona bisengo ya likoló nsima ya liwa.
3. (a) Mpo na nini bato bazali na mposa ya bomoi ya seko? (b) Mituna nini na ntina ya liwa misengeli kozwa biyano?
3 Makanisi ya komona bolamu nsima na liwa mazali komonisa mposa ya bomoi ya seko. Na ntina na likanisi ya bomoi ya seko oyo Nzambe atyá kati na biso, Biblia elobi ete: “Ata likanisi ya bomoi ya seko asili kotya yango kati na mitema na bango.” (Mosakoli 3:11, NW) Azalisaki bato ya liboso na elikya ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabelé. (Genese 2:16, 17) Na bongo, mpo na nini bato bakufaka? Lolenge nini kufa ekɔtaki kati na mokili? Boyebi oyo Nzambe azali kopesa ezali kongɛngisa mituna oyo.—Nzembo 119:105.
MAYELE MABE
4. Lolenge nini Yesu amonisaki mobandisi ya kufa ya bato?
4 Mosáli-na-mabe alukaka kobomba bilembeteli ya mabe na ye. Yango mpe ezali solo mpo na moto oyo ayeisaki kufa likoló na bamiliare ya bato. Atambwisaki makambo na mayele mabe na motindo boye ete liwa ya bato ezala libombami. Yesu Klisto amonisaki polele mosáli wana ya mabe ntango alobaki na baoyo balingaki koboma Ye ete: “Bino bouti na tata na bino, Satana, mpe mokano na bino ezali ete bósala mposa na tata na bino. Ye mobomi na bato longwa na ebandeli; atɛlɛmi kati na solo te mpo ete solo ezali kati na ye te.”—Yoane 8:31, 40, 44.
5. (a) Ekelamu oyo akómaki Satana Zábolo azalaki nani na ebandeli? (b) Maloba “Satana” mpe “Zábolo” malimboli nini?
5 Ee, Zábolo azali mozimbisi “mobomi na bato.” Biblia ezali komonisa ete azali moto mpenza, kasi azali te mabe oyo efandi kati na motema ya moto. (Matai 4:1-11) Atako azalisamaki lokola anzelu ya sembo, “atɛlɛmaki kati na solo te.” Ntina wana abéngami Satana Zábolo! (Emoniseli 12:9) Nkombo “Satana,” elimboli “motɛmɛli,” mpamba te atɛmɛlaki Yehova mpe atombokelaki ye. Mosáli wana ya mabe abéngami lisusu “Zábolo,” oyo elimboli “motɔ́ngi,” mpamba te atukaki mpe alobaki lokuta na ntina na Nzambe.
6. Mpo na nini Satana atombokelaki Nzambe?
6 Nini epusaki Satana na kotombokela Nzambe? Lokoso. Na lokoso nyonso, alulaki losambo oyo bato bazalaki kopesa na Yehova. Zábolo abwakaki te mposa ya kozwa losambo wana, oyo ebongi kopesama bobele epai na Mozalisi. (Kokanisá na Ezekiele 28:12-19.) Na esika ete aboya mposa yango, anzelu oyo akómaki Satana akólisaki mposa wana ya lokoso kino ekɔmɛlaki mpe ebotaki lisumu.—Yakobo 1:14, 15.
7. (a) Eloko nini ememaki kufa epai na bato? (b) Lisumu ezali nini?
7 Tosili koyeba mobandisi ya mabe oyo masili komema kufa epai na bato. Kasi ntina ya sikisiki ya liwa ya bato ezali nini? Biblia elobi ete: “Esweli na kufa ezali lisumu.” (1 Bakolinti 15:56) Mpe lisumu ezali nini? Mpo na koyeba liloba wana, tiká tótalela ndimbola na yango na nkótá oyo Biblia ekomamaki na ebandeli. Likelelo ya Liebele mpe ya Greke oyo libongolamaka mingi na “kosumuka” elimboli “kozanga,” elingi koloba kozanga kokóma na mokano moko to kozanga kokokisa yango. Mokano nini biso banso tozangi kokokisa? Mokano ya botosi ya kokoka epai na Nzambe. Atako bongo, lolenge nini lisumu likɔtaki kati na mokili?
LOLENGE MAYELE MABE MASALELAMAKI
8. Lolenge nini Satana amekaki kosala ete bato básambelaka ye?
8 Satana asalelaki mayele mabe, oyo akanisaki ete ekopesa ye nzela ete ayangela bato banso mpe ete bábanda kosambela ye. Apusaki mobali mpe mwasi ya liboso, Adama mpe Eva, ete básalela Nzambe lisumu. Yehova asilaki kopesa baboti na biso ya liboso boyebi oyo esengelaki komema bango na bomoi ya seko. Bayebaki ete Mozalisi na bango azalaki malamu mpamba te asilaki kotya bango kati na elanga kitoko ya Edene. Adama amonaki mpenza bolamu ya Tata na ye ya makoló ntango Nzambe apesaki ye mwasi moko kitoko mingi mpo ete azala mosungi na ye. (Genese 1:26, 29; 2:7-9, 18-23) Bomoi ya seko mpo na mobali mpe mwasi ya liboso etalelaki botosi na bango epai na Nzambe.
9. Mobeko nini Nzambe apesaki epai na moto ya liboso, mpe mpo na nini yango ezalaki makasi te?
9 Nzambe apesaki mobeko oyo epai na Adama ete: “Yo okoki kolya mbuma na nzeté nyonso na elanga, nde mbuma na nzeté na koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16, 17) Lokola Mozalisi, Yehova Nzambe azalaki na lotómo ya kopesa mibeko mitali bizaleli malamu mpe koyebisa nini ezali malamu mpe nini ezali mabe mpo na bikelamu na ye. Mobeko na ye ezalaki makasi te, mpamba te Adama mpe Eva bazalaki na bonsomi ya kolya mbuma ya banzeté nyonso mosusu oyo ezalaki kati na elanga. Bakokaki komonisa limemya monene mpo na lotómo oyo Yehova azali na yango ya koyangela na kotosáká mobeko wana na esika ya kotya na lolendo nyonso mitindá na bango moko mpo na oyo etali malamu mpe mabe.
10. (a) Lolenge nini Satana amekaki kobenda bato na ngámbo na ye? (b) Makanisi nini Satana abimisaki na ntina na Yehova? (c) Likanisi na yo ezali nini na ntina na matumoli ya Satana epai na Nzambe?
10 Zábolo asalelaki mayele mabe mpo na kopɛngwisa bato ya liboso longwa na Nzambe. Mpo na kolengola bango ete bázala na ngámbo na ye, Satana abukaki lokuta. Kosaleláká nyoka, na lolenge ya bato oyo bayebi koloba kozanga koningisa bibɛbu mpo na kopesa likanisi ete nyama moko to ekeko moko nde ezali koloba, Zábolo atunaki Eva ete: “Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma na nzeté nyonso na elanga te?” Ntango Eva atángaki mobeko ya Nzambe, Satana alobaki ete: “Bino bokokufa solo te.” Na nsima, abimisaki makanisi mabe na ntina na Yehova, kolobáká ete: “Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya yango, miso na bino makofungwama, mpe bino bokozala pelamoko na Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 3:1-5) Zábolo apesaki likanisi ete Nzambe azalaki kobombela bango eloko moko ya malamu. Oyo nde matumoli ya lokuta na ntina na Yehova, Tata na biso ya likoló, oyo alobaka ntango nyonso solo mpe oyo atondi na bolingo!
11. Lolenge nini Adama mpe Eva basanganaki na mabe ya Satana?
11 Eva atalaki lisusu nzeté yango, mpe mbuma na yango emonanaki mpenza kitoko. Na bongo, akamataki mbuma mpe alyaki yango. Na nsima, mobali na ye, na bolingo na ye moko, alandaki ye kati na lisumu wana ya kozanga botosi epai na Nzambe. (Genese 3:6) Atako Eva nde akosamaki, ye mpe Adama balandaki mayele mabe ya Satana mpo na oyo etali koyangela bato. Kosaláká bongo, bakómaki basangani na mabe na ye.—Baloma 6:16; 1 Timoté 2:14.
12. Matomba nini mabimaki na ntina na botomboki ya bato liboso na Nzambe?
12 Adama mpe Eva bakutanaki na mbuma mabe ya misala na bango. Bakómaki te lokola Nzambe, na kozwáká boyebi ya koleka. Nzokande, bayokaki nsɔni mpe bamibombaki. Yehova asambisaki Adama mpe akatelaki ye etumbu oyo: “Na milunge na elongi na yo okolya mampa, kino ntango ekozonga yo kati na mabelé, mpo ete okamatamaki na yango, zambi ozali mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.” (Genese 3:19) “Na mokolo” oyo baboti na biso ya liboso balyaki mbuma ya nzeté ya koyeba malamu na mabe, Nzambe akweisaki bango mpe bakómaki bakufi na miso na ye. Na nsima, babimisamaki na Paladiso mpe babandaki kobeba kino bakufaki kati na nzoto.
LOLENGE LISUMU MPE KUFA EPALANGANAKI
13. Lolenge nini lisumu epalanganaki epai na bato banso?
13 Emonanaki lokola ete Satana alóngaki kati na mayele na ye mabe na komema bato ete básambela ye. Kasi Satana akokaki te kobatela basambeli na ye ete bákufa te. Ntango lisumu ebandaki mosala na yango kati na bato mibale ya liboso, bakokaki soko moke te kopesa ezalela ya kokoka epai na bakitani na bango. Lokola likomi oyo lizali likoló na libanga, lisumu ekɔtaki makasi kati na nzoto ya baboti na biso ya liboso. Na yango, bakokaki kobota bobele bana oyo bazangi kokoka. Lokola bana na bango nyonso babotamaki nsima wana Adama mpe Eva basalaki lisumu, bana na bango nyonso basangolaki lisumu mpe kufa.—Nzembo 51:5; Baloma 5:12.
14. (a) Baoyo bazali koangana masumu na bango bakokani na nani? (b) Lolenge nini Bayisraele basosolaki ezaleli na bango ya bato na masumu?
14 Nzokande, lelo oyo, mingi bayebaka te ete bazali basumuki. Na biteni mosusu ya mokili, likanisi ya lisumu-lisango eyebani na bato mingi te. Kasi yango emonisi te ete lisumu ezali te. Mwana moke oyo azali na bosɔtɔ na elongi akoki koloba ete azali pɛto, kasi akoki kondimisama ete azali na mbindo soki amitali na talatálá. Bayisraele ya kala bazalaki lokola mwana moke wana ntango bazwaki Mibeko ya Nzambe na nzela ya mosakoli na Ye Mose. Mibeko mimonisaki polele ete lisumu ezalaki mpenza. Ntoma Paulo alimbolaki ete: “Soko Mibeko te, mbɛlɛ nasosoli masumu te.” (Baloma 7:7-12) Lokola mwana moke oyo azali komitala na talatálá, na kosaleláká Mibeko mpo na komitala bango moko, Bayisraele bakokaki komona ete bazalaki mbindo na miso ya Yehova.
15. Nini tozali komona wana ezali biso kotala kati na talatálá ya Liloba ya Nzambe?
15 Na komitaláká na talatálá ya Liloba na Nzambe mpe kososoláká mitindá na yango, tokoki komona ete tozali bato bazangi kokoka. (Yakobo 1:23-25) Na ndakisa, tótalela oyo Yesu Klisto alobaki na bayekoli na ye na ntina na kolinga Nzambe mpe bazalani na bango, lokola yango ekomami na Matai 22:37-40. Mbala mingi bato bazangaka mpenza kokokisa mokano oyo! Mingi batungisamaka ata kati na lisosoli na bango te lokola bazali kozanga komonisa bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango.—Luka 10:29-37.
KEBÁ NA MAYELE MABE YA SATANA!
16. Nini tokoki kosala mpo na kopɛngola ete tózwama te na mayele mabe ya Satana, mpe mpo na nini yango ezali mpasi?
16 Satana alukaka kopusa biso na kosala masumu na nkó. (1 Yoane 3:8) Nzela ezali ya kopɛngola ete tózwama te na mayele mabe na ye? Ee, kasi yango esɛngi kobundisa mposa ya kosalaka masumu na nkó. Yango ezali likambo ya pɛtɛɛ te mpamba te mposa ya kosala masumu oyo tobotamá na yango ezali mpenza makasi. (Baefese 2:3) Paulo asengelaki kobunda mpenza etumba. Mpo na nini? Mpamba te lisumu efandaki kati na ye. Soki tolingi kondimama epai na Nzambe, biso mpe tosengeli kobundisa mposa ya masumu oyo efandi kati na biso.—Baloma 7:14-24; 2 Bakolinti 5:10.
17. Nini ezali kobakisela biso mikakatano kati na etumba oyo tozali kobunda na mposa na biso ya kolinga kosala masumu?
17 Lokola Satana azali ntango nyonso koluka mabaku mpo na komema biso na kobuka mibeko ya Nzambe, etumba na biso mpo na kotɛmɛla lisumu ezali likambo ya pɛtɛɛ te. (1 Petelo 5:8) Komonisáká lobanzo oyo azalaki na yango mpo na baninga na ye baklisto, Paulo alobaki ete: “Nabangi ete makanisi na bino makopɛngwa longwa na sembo mpe mpɛto mpo na Klisto.” (2 Bakolinti 11:3) Lelo oyo, Satana azali mpe kosalela mayele mabe motindo moko. Azali komeka kolóna ntembe na ntina na boboto ya Yehova mpe matomba oyo mazwamaka na kotosa mibeko ya Nzambe. Zábolo azali koluka kosalela mposa ya kosala masumu oyo tobotamá na yango mpe alingi komona biso kolanda ezaleli ya lolendo, ya lokoso, ya koyinana mpe ya kozala na makanisi mabe mpo na basusu.
18. Lolenge nini Satana azali kosalela mokili mpo na kopalanganisa masumu?
18 Moko na biloko oyo Zábolo azali kosalela mpo na kobundisa biso ezali bongo mokili, oyo ezali na nsé na nguya na ye. (1 Yoane 5:19) Soki tokebi te, bato mabe mpe bazangi kolongobana oyo bazali kati na mokili oyo ezingi biso bakoki kopusa biso na nzela ya masumu oyo ezali kobuka mitindá mitombwami ya bizaleli malamu ya Nzambe. (1 Petelo 4:3-5) Mingi bazali kotyola mibeko ya Nzambe mpe bazali koboya koyoka ata lisosoli na bango, kino ete lisosoli yango ezali kokebisa bango lisusu te. (Baloma 2:14, 15; 1 Timoté 4:1, 2) Mokemoke, basusu bamekolaka makambo oyo kala, ata lisosoli na bango lizangi kokoka, elingaki te kopesa bango nzela ya kosala yango.—Baloma 1:24-32; Baefese 4:17-19.
19. Mpo na nini ekoki te bobele kozala na bomoi ya pɛto?
19 Kozala na bomoi ya pɛto ezali lokola kolónga etumba monene kati na mokili oyo. Nzokande, mpo na kosepelisa Mozalisi na biso, makambo mingi masɛngami. Tosengeli lisusu kozala na kondima epai na Nzambe mpe koyeba ete tozali na mokumba liboso na ye. (Baebele 11:6) Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Ye oyo ayebi kosala malamu nde akosalaka boye te, ezali na ye lisumu.” (Yakobo 4:17) Ee, koboya na nkó nyonso kotosa Nzambe mpe mibeko na ye ezali lisumu.
20. Lolenge nini Satana akoki komeka kopekisa yo na kosala oyo ezali malamu, kasi nini ekoki kosalisa yo na kotɛmɛla bopusi yango?
20 Satana akoki kobimisela yo botɛmɛli mpo na kopekisa yo kozwa boyebi ya Nzambe na nzela ya boyekoli ya Biblia. Tondimisami mpenza ete okotika nzela te na matindiki wana ete mápɛngwisa yo na kosala oyo ezali malamu. (Yoane 16:2) Bakonzi mingi bandimelaki Yesu na boumeli ya mosala na ye, kasi bayambolaki ye polele te, mpamba te bazalaki kobanga noki bakobimisama na eyanganelo. (Yoane 12:42, 43) Na kozanga mawa nyonso, Satana azali kobangisa moto nyonso oyo azali koluka boyebi ya Nzambe. Nzokande, osengeli ntango nyonso komikundola makambo kitoko oyo Yehova asili kosala mpe kosepela na yango. Okoki mpe ata kosalisa batɛmɛli ete bámonisa botɔ́ndi motindo moko.
21. Lolenge nini tokoki kolónga mokili mpe mposa na biso ya kolinga kosala masumu?
21 Ntango nyonso oyo tokozala bato bazangi kokoka, tokolanda kosala masumu. (1 Yoane 1:8) Nzokande, tosalisami mpo na kolónga kati na etumba oyo. Ee, likoki ezali ya kolónga na etumba oyo tozali kobunda na oyo mabe, Satana Zábolo. (Baloma 5:21) Na nsuka na mosala na ye awa na mabelé, Yesu alendisaki bayekoli na ye na maloba oyo: “Kati na mokili bozali na bolózi; nde bóyika mpiko, ngai nasili kolónga mokili.” (Yoane 16:33, NW) Ata mpo na bato bazangi kokoka, likoki ezali ya kolónga mokili na lisalisi ya Nzambe. Satana azali na nguya te likoló na baoyo bazali kotɛmɛla ye nde bazali ‘kotosa Nzambe.’ (Yakobo 4:7; 1 Yoane 5:18) Lokola tokomona yango, Nzambe asili kobongisa nzela mpo na kolongola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa.
MEKÁ BOYEBI NA YO
Satana Zábolo azali nani?
Mpo na nini bato banunaka mpe bakufaka?
Lisumu ezali nini?
Lolenge nini Satana azali kobenda bato na kosalela Nzambe masumu na nkó?
[Elilingi na lokasa mobimba 54]