Mokapo 5
Losambo ya nani Nzambe andimaka?
1. Mwasi Mosamalia alingaki koyeba nini na ntina na losambo?
OSILÁ komituna ete: ‘Losambo ya nani Nzambe andimaka?’ Motuna motindo oyo ezalaki na makanisi ya mwasi moko ntango azalaki kosolola elongo na Yesu Klisto pene na Ngomba Gelizimi kati na Samalia. Kobendáká likebi likoló na bokeseni oyo ezali kati na losambo ya Basamalia mpe oyo ya Bayuda, mwasi yango alobaki ete: “Bankɔ́kɔ na biso basambelaki na ngomba oyo mpe bino bokolobaka ete esika ekoki na bato kosambela ezali na Yelusaleme.” (Yoane 4:20) Yesu alobaki na mwasi wana Mosamalia ete Nzambe andimaka losambo nyonso? To alobaki nde ete makambo ya sikisiki masɛngami mpo na kosepelisa Nzambe?
2. Kati na eyano na ye epai na mwasi Mosamalia, Yesu alobaki nini?
2 Yesu apesaki eyano oyo ya kokamwa ete: “Ntango ekoya wana bokosambela Tata na ngomba oyo te to na Yelusaleme te.” (Yoane 4:21) Uta kala, Basamalia bazalaki kobanga Yehova, kasi bazalaki kosambela banzambe mosusu na Ngomba Gelizimi. (2 Mikonzi 17:33) Nde talá Yesu Klisto alobi ete ezala esika oyo to Yelusaleme ekozala lisusu na ntina te mpo na losambo ya solo.
SAMBELÁ NA ELIMO MPE NA SOLO
3. (a) Mpo na nini Basamalia bayebaki mpenza Nzambe te? (b) Lolenge nini Bayuda ya sembo mpe bato mosusu bayaki koyeba Nzambe?
3 Yesu akóbaki kolobela mwasi Mosamalia ete: “Bino bozali kosambela yango eyebi bino te; biso tozali kosambela oyo eyebi biso mpo ete lobiko euti na Bayuda.” (Yoane 4:22) Basamalia bazalaki na makanisi ya libungá na ntina na losambo mpe bazalaki kondima ete bobele mikanda mitano ya ebandeli na Biblia nde mipemamaki—mpe yango bobele na búku na bango moko oyo ebéngamaki ete Pantatɛ́kɛ ya Basamalia. Na yango, bayebaki mpenza Nzambe te. Nzokande, Bayuda bapesamelaki mokumba ya kobatela boyebi ya Makomami. (Baloma 3:1, 2) Makomami mapesaki epai na Bayuda ya sembo mpe epai na bato mosusu oyo balingaki koyoka makambo basengelaki na yango mpo na koyeba Nzambe.
4. Engebene Yesu, Bayuda mpe Basamalia basengelaki kosala nini mpo ete losambo na bango endimama epai na Nzambe?
4 Ya solo, Yesu amonisaki ete Bayuda mpe Basamalia basengelaki kosembola lolenge na bango ya kosambela mpo na kosepelisa Nzambe. Alobaki ete: “Ntango ekoya, mpe ezali sikawa, wana basambeli na solo bakosambela Tata na elimo mpe na solo. Mpamba te, Tata azali koluka bato motindo wana mpo na kosambela ye. Nzambe azali elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:23, 24, NW) Mpo na kosambela Nzambe “na elimo,” tosengeli kozala ne elimo na ye mpe kotambwisama na elimo yango. Likoki ezali ya kosambela Nzambe ‘na solo’ na koyekoláká Liloba na ye, Biblia, mpe na kosambeláká ye na boyokani na solo na ye oyo emonisami. Ozali na mposa ya kosala bongo?
5. (a) “Kosambela” elimboli nini? (b) Tosengeli kosala nini soki tolingi ete Nzambe andima losambo na biso?
5 Yesu alobelaki makasi ete Nzambe azali kosɛnga losambo ya solo. Yango emonisi ete ezali na mitindo ya losambo oyo Yehova andimaka yango te. Kosambela Nzambe elimboli kopesa ye lokumu na limemya mpe kosala mosala ya bulɛɛ mpo na ye. Soki olingi komonisa limemya epai na mokonzi moko ya nguya, na ntembe te okozala na mposa ya kosalela ye mpe kosala makambo makosepelisa ye. Ya solo, tolingi bongo kosepelisa Nzambe. Na esika ya koloba bobele ete ‘Lingomba na ngai ekoki na ngai,’ tosengeli nde kondimisama ete losambo na biso eyokani na masɛngami ya Nzambe.
SALÁ MOKANO YA TATA
6, 7. Mpo na nini Yesu andimaka te bato mosusu oyo balobaka ete bazali bayekoli na ye?
6 Tiká tótánga Matai 7:21-23 (NW), mpe tóluka komona na sikisiki likambo ya ntina oyo ezali kokata soki Nzambe andimaka losambo nyonso. Yesu alobaki ete: “Ezali banso te baoyo bakolobaka na ngai, ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta kati na Bokonzi na makoló, kasi ye oyo akosalaka mokano ya Tata na ngai oyo azali na makoló. Mingi bakolobaka na ngai na mokolo yango, Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te, mpe tobimisaki bademó [bilimu mabe] na nkombo na yo te, mpe na nkombo na yo, tosalaki misala na nguya te?’ Mpe na nsima nakoyambola epai na bango ete: Nayebi bino soko moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino batyoli na mibeko.”
7 Kondima Yesu Klisto lokola Nkolo ezali solo likambo ya ntina kati na losambo ya solo. Kasi eloko moko ezali kozanga kati na losambo ya bato mingi oyo bazali koloba ete bazali bayekoli ya Yesu. Alobaki ete basusu bakosala “misala na nguya,” lokola oyo balobaka ete makamwisi ya kobikisa bato na maladi. Nzokande, bazangaki kosala oyo Yesu alobaki ete ezali likambo lileki ntina: “mokano ya Tata [na ye].” Soki tolingi kosepelisa Nzambe, tosengeli koyekola nini ezali mokano ya Tata mpe na nsima kosala yango.
BOYEBI YA SIKISIKI—EZALI LIBATELI
8. Tosengeli kozwa nini mpo na kosala mokano ya Nzambe, mpe makanisi nini ya libungá tosengeli kopɛngola?
8 Kosala mokano ya Nzambe esɛngi kozala na boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe ya Yesu Klisto. Boyebi wana ezali komema na bomoi ya seko. Na yango, biso banso tosengeli kopesa motuya na likambo oyo ya kozwa boyebi ya sikisiki longwa na Biblia, Liloba ya Nzambe. Bamoko balobaka ete ntina ezali te na komibanzabanza na kozwa boyebi wana soki tozali sembo mpe na molende kati na losambo na biso. Basusu balobaka ete, ‘soki ozali na boyebi moke, bakosɛnga yo mpe makambo bobele moke.’ Nzokande, Biblia ezali kolendisa biso na kokóla kati na boyebi ya Nzambe mpe ya mikano na ye.—Baefese 4:13; Bafilipi 1:9; Bakolose 1:9.
9. Lolenge nini boyebi ya sikisiki ezali kobatela biso, mpe mpo na nini tozali na mposa ya libateli motindo yango?
9 Boyebi wana ezali libateli mpo na kopɛngola ete losambo na biso ebebisama te. Ntoma Paulo alobaki na ntina na ekelamu moko ya elimo oyo azali komimonisa lokola “anzelu na pole.” (2 Bakolinti 11:14) Na komimonisáká motindo wana, ekelamu yango ya elimo, ye Satana, azali koluka kozimbisa biso mpe kopusa biso na kosala makambo oyo mayokani te na mokano ya Nzambe. Bikelamu mosusu ya elimo oyo basanganaki elongo na Satana bazali mpe kobebisa losambo ya bato, mpamba te Paulo alobaki ete: “Biloko oyo mabota bakopesaka lokola mbeka, bakopesaka yango epai na bademó, kasi epai na Nzambe te.” (1 Bakolinti 10:20, NW) Na ntembe te, mingi bakanisaki ete bazalaki kosambela Nzambe na lolenge ya malamu, nzokande, bazalaki kosala te oyo Nzambe alingi. Bazimbisamaki kati na losambo ya lokuta mpe ya mbindo. Tokoyekola makambo mingi na ntina na Satana mpe bilimu mabe na nsima, kasi ezali polele ete banguna wana ya Nzambe basili kobebisa losambo ya bato.
10. Okosala nini soki moto moko atye ngɛ́ngɛ na nkó nyonso na liziba na yo ya mai, mpe boyebi ya sikisiki ya Nzambe ekopesa biso likoki ya kosala nini?
10 Soki oyebi ete moto moko asili kotya ngɛ́ngɛ na nkó nyonso na liziba na yo ya mai, okolanda komela mai ya liziba yango? Na ntembe te, nokinoki okoluka kozwa liziba mosusu oyo ezali na mai ya malamu mpe ya pɛto. Ee, boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe ezali kosalisa biso na koyeba losambo ya solo mpe na kobwaka makambo ya mbindo oyo mpo na yango losambo ya moto lokoki kondimama te na miso ya Nzambe.
BAZALI KOLAKISA MIBEKO YA BATO
11. Mpo na nini losambo ya Bayuda mingi ezalaki mabe?
11 Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Bayuda mingi basalaki te na boyokani na boyebi ya sikisiki ya Nzambe. Na yango, babungisaki libaku ya kozala na etɛlɛmɛlo ya pɛto liboso na Yehova. Na ntina na bango, Paulo akomaki ete: “Nazali kotatwela bango ete bazali na molende mpo na Nzambe; kasi engebene boyebi ya sikisiki te.” (Baloma 10:2, NW) Bazwaki ekateli bango moko mpo na oyo etali lolenge ya kosambela Nzambe na esika ya koyoka oyo ye azalaki koloba.
12. Nini ebebisaki losambo ya Bayisraele, mpe mbuma na yango ezalaki nini?
12 Na ebandeli, Bayisraele bazalaki kosalela losambo ya pɛto oyo Nzambe apesaki bango, kasi na nsima eyaki kobebisama na mateya mpe na bafilozofi ya bato. (Yilimia 8:8, 9; Malaki 2:8, 9; Luka 11:52) Atako bakonzi na mangomba ya Bayuda, Bafalisai, batyaki motema ete losambo na bango endimamaki epai na Nzambe, Yesu ayebisaki bango ete: “Yisaya asakolaki malamu na ntina na bino bakosi, lokola ekomami ete, ‘Bato oyo bakotosaka ngai na minɔkɔ kasi mitema na bango mizali mosika na ngai. Bakosanzolaka ngai mpamba, bakolakisaka malako mazali mibeko na bato.’ ”—Malako 7:6, 7.
13. Na lolenge nini tokoki kokokana na Bafalisai?
13 Mbala mosusu tozali kosala lokola Bafalisai basalaki? Yango ekoki kosalema soki tozali kolanda mimeseno ya mangomba oyo mipesameli biso na esika ya kotalela oyo Nzambe asili koloba na ntina na losambo. Kokebisáká biso na ntina na likámá wana mpenza, Paulo akomaki ete: “Liloba lipemami lilobi solo ete na bileko na ntango bikoya nsima, basusu bakopɛngwa longwa na kondima, kotyáká likebi na maloba mapemami mpe na mateya ya bademó.” (1 Timoté 4:1, NW) Na bongo, tokosuka te bobele na kokanisa ete losambo na biso ezali kosepelisa Nzambe. Lokola mwasi Mosamalia oyo akutanaki na Yesu, ekoki kozala ete tosangolaki lolenge na biso ya kosambela epai na baboti na biso. Kasi tosengeli koluka koyeba ete tozali solo kosala makambo oyo Nzambe andimi yango.
OKEBA ETE OTUKA NZAMBE TE
14, 15. Ata soki tozali na mwa boyebi ya mokano ya Nzambe, mpo na nini tosengeli kokeba?
14 Kozanga kotya likebi, tokoki kosala makambo oyo Nzambe andimaka yango te. Na ndakisa, ntoma Yoane akweaki na makolo ya anzelu moko mpo na “kosambela ye.” Kasi anzelu alobaki na ye ete: “Kebá! Kosala bongo te! Nazali bobele moombo moninga na yo mpe na bandeko na yo baoyo bazali na mosala oyo ya kotatola na ntina na Yesu. Sambelá Nzambe.” (Emoniseli 19:10, NW) Na yango, omoni ntina nini osengeli kondimisama ete losambo na yo ebebisami te na eloko nyonso etali losambo ya bikeko?—1 Bakolinti 10:14.
15 Ntango baklisto mosusu babandaki kosalela mimeseno ya mangomba oyo mizalaki kosepelisa Nzambe te, Paulo atunaki bango ete: “Boye nzela nini bobongwani lisusu epai na biloko yango na pɛtɛpɛtɛ mpe na mpamba oyo bozalaki baombo na yango liboso? Bozali kokumisa mikolo mpe sanza mpe bileko mpe bambula! Nabangi ete nasali mosala mpamba epai na bino.” (Bagalatia 4:8-11) Baklisto yango basilaki kozwa boyebi ya Nzambe, kasi na nsima basumukaki na kotosáká mimeseno ya mangomba mpe biyenga oyo endimamaki na Yehova te. Lokola Paulo alobaki yango, tosengeli “kotalaka malamumalamu yango ekosepelisa Nkolo.”—Baefese 5:10.
16. Lolenge nini Yoane 17:16 mpe 1 Petelo 4:3 ezali kosalisa biso na koyeba soki biyenga mpe mimeseno oyo tozali kolanda ezali kosepelisa Nzambe?
16 Tókeba ete tósalela te biyenga mpe mimeseno misusu ya mangomba oyo ezali kobuka mibeko ya Nzambe. (1 Batesaloniki 5:21) Na ndakisa, Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye ete: “Bazali bato na mokili te pelamoko ngai nazali moto na mokili te.” (Yoane 17:16) Lingomba na yo emikɔtisi nde kati na milulu mpe biyenga oyo bizali kobuka mobeko ya koboya kokɔta na makambo ya mokili oyo? To na bantango mosusu, basambeli ya lingomba na yo basanganaka nde kati na mimeseno mpe bilambo oyo ekoki komonisa etamboli oyo elobelamaki na ntoma Petelo? Akomaki ete: “Ntango esili koleka mpo na kosala mokano na bapakano. Na ntango yango botambolaki na mobulu mpe na mposa mabe, komɛlaka vinyo mpe kozala na lokoso mpe na molangwa mpe na kosambela bikeko.”—1 Petelo 4:3.
17. Mpo na nini tosengeli koboya likambo nyonso oyo ezali komonisa elimo ya mokili?
17 Ntoma Yoane alobelaki mingi ntina ya kopɛngola misala oyo mizali komonisa elimo ya mokili ya mbindo oyo ezingi biso. Akomaki ete: “Bólinga mokili te soko makambo kati na mokili te. Soko moto nani akolingaka mokili, bolingo na Tata ezali kati na ye te. Zambi makambo nyonso kati na mokili, na mposa mabe na nzoto mpe mposa mabe na miso mpe nzombo na bizaleli iuti na Tata te kasi iuti na mokili. Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.” (1 Yoane 2:15-17) Omoni ete bobele baoyo bazali ‘kosala mokano na Nzambe’ nde bakoumela seko? Ee, soki tozali kosala mokano ya Nzambe mpe koboya misala oyo mizali komonisa elimo ya mokili oyo, tokoki kozala na elikya ya bomoi ya seko!
TOSÁ MIBEKO MITOMBWAMI YA NZAMBE
18. Lolenge nini Bakolinti mosusu basalaki libungá na ntina na etamboli, mpe liteya nini tokoki kozwa mpo na yango?
18 Nzambe alingi lokola basambeli na ye bato oyo bazali kotosa mibeko na ye mitombwami ya bizaleli malamu. Basusu kati na Kolinti ya kala bakanisaki na libungá nyonso ete Nzambe apesaki nzela na etamboli ya mbindo. Tokoki komona ete bazalaki solo komikosa na kotángáká 1 Bakolinti 6:9, 10. Soki tolingi kosambela Nzambe na lolenge lobongi, tosengeli kosepelisa ye na maloba mpe na misala. Lolenge ya losambo na yo ezali kopesa yo likoki ya kosala bongo?—Matai 15:8; 23:1-3.
19. Bopusi nini losambo ya solo ezali na yango likoló na ezaleli na biso epai na basusu?
19 Boyokani na biso elongo na bato mosusu esengeli mpe komonisa ete tozali kotosa mibeko ya Nzambe. Yesu Klisto alendisaki biso na kosalela basusu lokola ezali biso kolinga ete básalela biso, mpamba te yango ezali eteni ya losambo ya solo. (Matai 7:12) Tósimba lisusu oyo ye alobaki na ntina na komonisa bolingo mpo na bandeko: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Bayekoli ya Yesu basengeli kolingana moko na mosusu mpe kosala oyo ezali malamu epai na baninga na bango oyo bazali basambeli mpe epai na bato mosusu.—Bagalatia 6:10.
KOSAMBELA NA MOLIMO MOBIMBA
20, 21. (a) Lolenge nini ya losambo Nzambe azali kosɛnga? (b) Mpo na nini Yehova aboyaki losambo ya Bayisraele na mikolo ya Malaki?
20 Kati na motema na yo, okoki kolinga kosambela Nzambe na lolenge lobongi. Soki ezali bongo, osengeli kozala na likanisi ya Yehova na ntina na losambo. Moyekoli Yakobo amonisaki ete likanisi ya Nzambe nde ezali na ntina mingi, kasi oyo ya biso te. Akomaki ete: “Losambo na pɛto mpe lobongi epai na Nzambe Tata na biso ezali boye: kotalaka bitike mpe basi-bakufeli-mibali kati na mpasi na bango mpe komibatela nzoto pɛto na makambo na mokili.” (Yakobo 1:27) Lokola tozali na mposa ya kosepelisa Nzambe, moko na moko kati na biso asengeli kotalela losambo na ye mpo na kondimisama ete ebebisami te na misala ya mbindo mpe ete tobosani likambo moko te oyo ye azali kotalela yango ete ezali na ntina mingi.—Yakobo 1:26.
21 Bobele losambo ya pɛto oyo epesami na molimo mobimba nde ezali kosepelisa Yehova. (Matai 22:37; Bakolose 3:23) Ntango libota ya Yisraele epesaki na Nzambe te losambo oyo lobongi na ye, Nzambe alobaki ete: “Mwana mobali akokumisa tata na ye mpe moombo nkolo na ye. Soko nde ngai nazali tata, wapi lokumu na ngai? Soko ngai nazali nkolo, wapi botosi na kotosa ngai?” Bazalaki kotuka Nzambe na kopesáká ye lokola mbeka banyama ekufa miso, oyo ezalaki kotɛnguma mpe oyo ezalaki na bokɔnɔ; Nzambe akokaki kondima mbeka motindo wana te. (Malaki 1:6-8) Yehova abongi kozwa losambo ya pɛto na makambo nyonso mpe azali kosɛnga ete tósambela bobele ye.—Exode 20:5; Masese 3:9; Emoniseli 4:11.
22. Soki tolingi ete Nzambe andima losambo na biso, tokoboya nini, mpe tokosala nini?
22 Mwasi Mosamalia oyo asololaki na Yesu amonanaki lokola ete azalaki koluka kosambela Nzambe na lolenge oyo endimami na Nzambe. Soki yango ezali mposa na biso, tokopɛngola mateya nyonso mpe misala nyonso ya mbindo. (2 Bakolinti 6:14-18) Nzokande, tokosala makasi na kozwa boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe kosala mokano na ye. Tokokangama makasi na masɛngami na ye mpo ete andima losambo na biso. (1 Timoté 2:3, 4) Batatoli ya Yehova bazali koboma nzoto na kosala bobele bongo, mpe na esengo nyonso bazali kolendisa yo ete osangana elongo na bango mpo na kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Yesu alobaki ete: “Tata azali koluka bato motindo wana mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:23, NW) Tozali kolikya ete yo mpe ozali moko na bato yango. Na ntembe te, lokola mwasi Mosamalia wana, olingi kozala na bomoi ya seko. (Yoane 4:13-15) Atako bongo, ozali komona ndenge bato bazali konuna mpe bazali kokufa. Mokapo molandi mokolimbola mpo na nini bongo.
MEKÁ BOYEBI NA YO
Lokola Yoane 4:23, 24 emonisi yango, losambo nini Nzambe andimaka?
Lolenge nini tokoki koyeba soki mimeseno mosusu mpe biyenga mosusu esepelisaka Nzambe?
Tángá mwa ndambo na masɛngami ya losambo oyo endimami na Nzambe?
[Elilingi na lokasa mobimba 44]