Lobiko ebelemi mpo na bato bazali kobanga Nzambe!
’’Jéhovah ayebi kobikisa bato bazali kobanga Nzambe wana ezali bango kati na komekama nde kobómba bato mabe kino mokolo na kosambisa mpo na kobomama’’.—2 PETELO 2:9.
1. (a) Makambo nini na mpasi mazali kotungisa bato na mikolo na biso? (b) Na bongo mituna nini tokotalela sikawa?
MAKAMBO na bomoi mazali kobeba mpo na bato nyonso. Ezala moto azali kofanda na mokili oyo ezali na bozui mingi to na mokili oyo bazali babola, lolenge oyo na komonela makambo na bomoi ezali ndenge moko. Kobanga ezali bipai nyonso. Longola makambo matali kokwea na nkita, makama minene mazali mpo na ezingelo na biso mpe mpo na lolenge nyonso na bomoi awa na mabelé. Maladi ezali bipai nyonso. Maladi ya motema, kanser mpe bamaladi ndenge na ndenge ezali koboma bato mingi. Kopalangana na pite ezali kosala mpasi na motema mpe ezali kobebisa mabota. Lisusu, mokili etondi na mobulu. Makambo na mpasi oyo mazali kotungisa bato mazali kopusa biso na kotuna mituna oyo: Bantina ezali ya kozala na elikya na kosikwama na mikolo mizali koya? Soki ee, ndenge nini lobiko yango ekosalema? Mpe ekozala mpo na banani?—Tala Habakuku 1:2; 2:1-8.
2, 3. (a) Mpo na nini bozali kozua elendiseli kati na maloba mazwami na 2 Petelo 2:9? (b) Misala nini na kobikisa likoló na yango Biblia ezali kobenda likebi na biso mpo na kolendisa biso?
2 Makambo mazali kosalama lelo mazali kokundwela biso bileko mosusu na mpasi ya lisolo na bato. Ntoma Petelo azali kobenda likebi na biso likoló na misala na kobikisa oyo Nzambe akokisaki na bileko yango, mpe asukisi na maloba oyo na kolendisa “Jéhovah ayebi kobikisa bato bazali kobanga Nzambe wana ezali bango kati na komekama.” (2 Petelo 2:9). Totalela oyo ezali zingazinga na yango, na 2 Petelo 2:4-10:
3 “Mpo ete Nzambe atikaki baanzelu te baoyo basalaki masumu, kasi, abwakaki bango kati na (Tartare), atyaki bango na mabulu na molili tuu, ete babatelama mpo na kosambisama. Atikaki mokili na kalakala te, kasi abateli Noa, mosakoli na boyengebene, na bamosusu nsambo wana eyeisi ye mpela na mokili likolo na batyoli. Azikisi mpe mboka na Sodome mpe Gomore kino mputulu; akweisaki bango, atiaki bango elakiseli mpo na bamosusu bakolinga kotyola. Abikisi mpe Lota moyengebene, oyo azalaki komitungisa mingi mpo na etamboli na mobulu na bato oyo bazalaki kotyola mibeko. Mpamba te efandaki moyengebene kati na bango, amoni mpe ayoki misala na bango na kilikili mokolo na mokolo mpe anyokolami na molimo na ye sembo (mpo na misala na bango na kotyola mibeko), Jehovah ayebi kobikisa bato bazali kobanga Nzambe wana ezali bango kati na komekama nde kobomba bato mabe kino mokolo na kosambisa mpo babomama. Eleki mpe bongo na ntina na bango bakobilaka makanisi na nzoto mpo na mposa na bosoto mpe bazali kotyola bokonzi.” Lokola emonisami na baverset oyo, makambo malekaki na ntango na Noa mpe na eleko na Lota mazali na ndimbola monene mpo na biso.
Elimo na bato na ntango ya Noa
4. Na eleko ya Noa, mpo na nini mokili ebebaki na miso na Nzambe? (Nzembo 11:5)
4 Lisolo ya bomoi na bato kati na Genese mokapo 6 eyebisi biso ete na ntango na Noa mokili ebebaki na miso na Nzambe. Mpo na likambo nini? Ezali mpo na mobulu. Ezalaki te mwa mabe na epai na epai. Genese 6:11 elobi polele ete “mokili etondaki na mobulu”.
5. (a) Na mikolo ya Noa, ezalela nini bato bazalaki na yango oyo ekolisaki mobulu? (b) Likebisi nini Enoka apesaki mpo na batyoli ma Nzambe?
5 Ndenge nini makambo makomaki lolenge wana? Eteni touti kotanga na mokanda ya mibale ya Petelo elobeli mpo na batyoli. Na yango, kotyola mibeko ekotaki makasi epai na bato, baoyo bamonisaki bobele ezaleli ya kotyola mibeko na Nzambe te, kasi lisusu batombokelaki Nzambe ye moko’.a Tokoki mpenza komizela ete bato oyo batombokeli Nzambe bakoka kozala na boboto epai na bazalani na bango? Nkutu liboso ete Noa abotama, kotyola mibeko epalanganaki mingi kino ete Jéhovah aponaki Enoke mpo na kosakola nsuka na likambo wana. (Yuda 14, 15). Botomboki na bato epai na Nzambe ebendaki kosambisa na Nzambe likolo na bango.
6, 7. Baanzelu babimisaki makambo nini, oyo ebebisaki mingi bilenge na bomoi na bato liboso na mpela?
6 Ezali na ntina mosusu oyo esalaki ete mobulu eyikana mingi na eleko wana. Genese 6:1, 2 emonisi ntina yango polele. Totangi boye: “Na ntango bato bakomaki mingi na mokili, mpe bana basi babotamaki na bango, bana na Nzambe bamonaki ete bana basi na bato bazalaki bonzenga, mpe bakamataki kati na bango basi na bango na libala, baoyo eponaki bango.” Bana na Nzambe ya solo bazalaki banani? Bazalaki mpenza bato mpamba te, mpo ete esilaki koleka bikeke mingi wana mibali basilaki komona bonzenga na basi mpe bazwaki bango na libala. Bana wana na Nzambe bazalaki nde baanzelu oyo balataki nzoto ya mosuni. Na Yuda 6, bamonisami lokola “baanzelu baoyo babatelaki motindo na bango na liboso te kasi batikaki efandelo na bango.”—Tala 1 Petelo 3:19, 20.
7 Bikelamu wana ya elimo oyo balataki nzoto ya mosuni basanganaki na bana basi na bato. Mabala wana ebimisaki nini? “Bilombe bazalaki na mokili na mikolo yango mpe na nsima lokola, wana eyaki bana na Nzambe epai na bana basi na bato mpe babotelaki bango bana. Bazalaki bilombe mpe na lokumu na kalakala.” Ee, na mabala wana kati na baanzelu mpe bana basi na bato, bilombe babotamaki (Néfilime), mibali na nguya baoyo basalelaki makasi na bango mpo na konyokola bato mosusu.—Genese 6:4.
8. Ndenge nini Jéhovah asalaki ntango amonaki ete mabe ekolaki mingi na mokili?
8 Mabe ekolaki kino na nivo nini? Kino “Jéhovah amonaki ete masumu na bato mazalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso na mitema na bango mazalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso”. Jéhovah asalaki nini mpo na makambo yango? “Jéhovah ayokaki mawa ete asalaki bato bazala na nse, mpe likambo yango epesaki ye bolozi na motema.” mingi koloba te ete Nzambe amonaki ete asalaki libunga mpo azalisaki bato. Ayokaki mawa, na ntina ete, nsima na kozalisa bato, bakomaki mabe kino esengaki ete aboma bango.Genese 6:5-7.
Oyo abikisaki Noa
9. (a) Mpo na nini Nzambe amonisaki ngolu na ye epai na Noa? (b) Nzambe akebisaki Noa na likambo nini.
9 Nzokande, Noa “azwaki ngolu na miso na Jéhovah. . . . Noa azalaki moto na sembo mpe na boyengebene kati na bato ya ntango na ye. Noa atambolaki na Nzambe elongo.” (Genese 6:8, 9.) Na bongo, Jéhovah akebisaki Noa ete alingaki koyeisa mpela na mokili mobimba mpe apesaki Noa mokumba ya kotonga masuwa. Longola bobele Noa mpe libota na ye, bato nyonso mosusu basengelaki kobomama na mokili. Banyama mpe basengelaki kobomama, longola bobele mwa lolenge na banyama oyo Noa asengelaki kokotisa na masuwa.—Genese 6:13, 14, 17.
10. (a) Mosatu nini esengelaki kosalema mpo na kobikisa bomoi, mpe bonene na yango ezalaki ndenge nini? (b) Na lolenge nini na kokamwa Noa ekokisaki mokumba na ye?
10 Koyeba makambo wana liboso epesaki mokumba monene epai na Noa. Esengelaki na ye kotonga masuwa oyo ezalaki na lolenge ya sanduku monene, oyo ezalaki na volume ya 40 000 métres cubes. Noa asengelaki kobomba bilei na kati, lisusu kokotisa banyama mpe bandeke, “kati na nyama nyonso na bomoi”, mpo ebatelama. Mosala motindo oyo esengaki bambula mingi. Noa asalaki nini? “Asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye”.—Genese 6:14-16, 19-22; Baebele 11:7.
11. Mokumba nini monene Noa azalaki na yango mpo na libota na ye?
11 Wana ezalaki ye kokokisa mosala oyo, Noa asengelaki mpe kozwa ntango mpo na kosalisa libota na ye na elimo. Asengelaki kosenzela ete libota na ye bamekola te bizaleli na mobulu mpe ezalela na botomboki ya bato oyo bazingaki bango. Ezalaki na ntina mpenza ete makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo ezwa bango ntango nyonso te. Nzambe akanaki kopesa bango mosala, mpe yango esengelaki kozwa esika ya ntina na bomoi na bango. Lokola toyebi yango, libota na Noa bayokelaki ye mpe basanganaki na kondima na ye. Ya solo, Makomami mazali komonisa Noa, mwasi na ye, bana na ye misato mpe basi na bango bango nyonso bato mwambe lokola bato oyo bandimamaki na Nzambe.—Genese 6:18; 1 Petelo 3:20.
12. Lokola emonisami na 2 Petelo 2:5, mokumba nini Noa akokisaki na bosembo nyonso?
12 Noa azalaki na mokumba mosusu ya kokokisa asengelaki kokebisa bato ya ntango na ye likoló na koya na mpela mpe kolimbola bango ntina na yango. Ntembe ezali te ete Noa akokisaki mokumba wana na bosembo nyonso, mpamba te Liloba na Nzambe ebiangi ye “mosakoli na boyengebene”.—2 Petelo 2:5.
13. Kati na bizaleli nini na bato, Noa akokisaki mokumba oyo Nzambe apesaki ye?
13 Sikawa tokanisa naino kati na makambo nini oyo Noa akokisaki mosala na ye. Omitya na esika na ye. Soki ozalaki Noa to moko na basangani ya libota na ye, okokaki kozala na bomoi kati na mobulu oyo ezalaki kosalema mingi na Bilombe (Néfilime) mpe batyoli na Nzambe. Bopusi na baanzelu batomboki ekokaki kozala likama mpo na yo. Bakokaki koseka yo wana ezali yo kotonga masuwa. Mpe mbula na mbula, okokaki komona ete, na kosakoláká koya na mpela, bato bazali komipesa bobele na makambo na bango ya mokolo na mokolo ‘kozanga koyeba’ likambo kino koya na mpela mpe elongoli bango nyonso’.—Matai 24:39; Luka 17:26, 27.
Liteya nini okoki kozwa na bomoi na Noa?
14. Mpo na nini ezali mpasi te kokanga ntina ya makambo oyo kati na yango Noa mpe libota na ye bazalaki kobika?
14 Mpo na batangi na biso, mingi bazali na mpasi te na kokanisa makambo oyo malekaki na ntango ya Noa. Mpo na nini? Mpo ete makambo oyo mazali koleka na moi ya lelo makokani mingi na makambo oyo mazalaki na ntango ya Noa. Yesu Klisto alobaki ete, esengelaki kozala bongo. Kati na esakweli na ye monene mpo na kozonga na ye na boumeli ya nsuka na biloko ya ntango oyo, asakolaki ete: “Lokola ezalaki mikolo na Noa, (kozonga) na Mwana na moto ekozala bongo.”—Matai 24:37.
15, 16. (a) Kino wapi mokili esili kotonda na mobulu, lokola ezalaki na ntango ya Noa? (b) Mobulu to minyoko ya ndenge nini ezali kozwa bobele basali na Jéhovah?
15 Likambo yango ezali solo? Lelo mokili etondi na mobulu? Ntembe ezali te! Bitumba na ekeke ya ntuku mibale ebomaki bato koleka milió nkama. Bamosusu kati na batángi na biso bazwaki mpasi na bitumba yango, kasi mbala mosusu ezali na mingi ya baoyo basili kobundisama na miyibi mpo na kobotola bango mbongo to biloko mosusu. Bilenge, mpo na bango, bazali kokutana na mobulu na eteyelo.
16 Nzokande, basaleli na Jehovah bazali komona mpasi bobele na bitumba mpe mobulu oyo epalangani te. Bazali lisusu konyokwama mpo ete bazali kokota na makambo ya mokili te mpe bazali kosala makasi ete bazoba na bizaleli ya komipesa na makambo na Nzambe. (2 Timoté 3:10-12) Mbala mosusu, mobulu yango ekoki kozala bobele kobetama mbata to kotungisama te; kasi ekoki lisusu komonana na kobebisama ya biloko na bango, na kobetama makasi, to mbala mosusu mpe kobomama.—Matai 24:9.
17. Kotyola Nzambe epalangani na mikolo na biso? Limbola eyano na yo.
17 Wana batyoli bazali kosala makambo oyo ya mobulu, mbala mosusu bazali komonisa polele botyoli na bango mpo na Nzambe. Na mboka moko ya Afrike, bapolisie balobaki boye: “Ezali biso nde bato tozali koyangela. Na bongo, bokende epai na Nzambe, soki azali, mpe bosenga ye aya kosalisa bino.” Kati na boloko mpe ba camps mingi ya concentration, ba Témoins de Jéhovah bazwaki mpasi na maboko na bato lokola Baranowsky, komandá ya boloko ya Sachsenhausen, na Alemanye, oyo alobaki na nkanda makasi ete: “Nasili kobanda etumba elongo na Jéhovah. Tokotala nani kati na biso mibale akolonga mosusu, ngai to Jéhovah.” Nsima mwa moke, Baranowsky azwaki maladi mpe akufaki. Nzokande, bato mosusu bazali mpe kolakisa ezalela motindo moko. Ezali te bobele baoyo bazali kobimisa minyoko nde bazali kotyola Nzambe. Na mokili mobimba, basali na Nzambe bazali koyoka maloba mpe bazali komona misala oyo emonisi ete bato oyo bazali koloba to kosala yango, bazali kobanga Nzambe ata moke te.
18. Na lolenge nini bilimu mabe bazali mpe kobebisa mokili?
18 Na mikolo na biso, oyo mikokani mingi na ntango ya Noa, tozali komona mpe misala ya bilimu mabe. (Emoniseli 12:7-9) Badémo yango bazali baanzelu oyo, na mikolo ya Noa, balataki nzoto ya mosuni mpo na kobala basi. Wana mpela ekweyaki, basi mpe bana na baanzelu wana oyo bazangaki botosi babomamaki; kasi bango baanzelu, bazongaki na likoló. Bazongelaki lisusu te esika na bango kati na lisangá ya bulee ya Jéhovah; babwakamaki na Tartare, na esika na molili tuu, epai kuna bazali komona pole na Nzambe te. (2 Petelo 2:4, 5) Na litambwisi ya Satana, bazali ntango nyonso na boyokani elongo na bato mpe, atako bakoki lisusu kolata nzoto ya mosuni te, nzokande bazali kosala makasi mpo na kozwa na boombo, mibali, basi ata mpe bana. Bazali kosala yango na nzela na losambo na bilimu mabe. Bazali mpe kopusa bato kobomana kozanga ntina mpenza. Kasi esuki bongo te.
19. (a) Badémo bazali mingimingi kolekisa nkanda na bango epai na nani? (b) Badémo bazali koluka nini epai na biso?
19 Biblia emonisi lisusu ete badémo bazali kobundisa ‘baoyo bazali kotosa malako na Nzambe mpe bazali kotatola mpo na Yesu”. (Emoniseli 12:12, 17.) Ezali bilimu mabe yango nde bazali kotinda bato ete banyokola basaleli na Jéhovah. (Baefese 6:10-13). Na nzela ya myango nyonso oyo bazali kokanisa, na mayele mabe to na makasi, bazali koluka kobebisa bosembo ya bato oyo bazali kotosa Jéhovah mpe kopekisa bango ete batika kosakola Bokonzi na Ye oyo etambwisami na Yesu, Mokonzi Masiya.
20. Ndenge nini badémo bazali kokanga bato na boombo? (Yakobo 4:7)
20 Badémo bazali kosala makasi mpo na kopekisa bato bamisikola na boombo na bango te. Na mokili ya Brésil, mwasi moko oyo azalaki kosolola na bilimu mabe alobi ete, ntango Batemwe babetaki na ekuke na ye, mongongo ya badémo epekisaki ye ete afungola te; kasi ayokelaki bango te, likambo oyo nde epesaki ye nzela ete ayeba solo. Na bisika mingi, bademo bazali kosalela bandoki mpo na komeka kopekisa mosala ya ba Témoins de Jéhovah. Yango wana, na mboka moko ya Suriname, banguna ya Batemwe babengisaki ndoki moko oyo ayebanaki mingi mpo na koboma bato bobele na kolakisaka bango nsonge ya nzete na ye ya maji. Elongo moko na babini mpe na babeti mbunda, ndoki yango, kotambwisamaka na demó moko, amimonisaki liboso ya ba Témoins de Jéhovah. Alakelaki bango mabe na kolakisaka bango nzete na ye. Bato ya mboka bazelaki ete Batemwe bakweya mpe bakufa, kasi ezalaki nde ndoki yango moto akweyaki mpe bamemaki ye na bato na ye, na nsoni mingi.
20 Ata kati na mikili epai kuna bazali kosalela maji mpe ndoki na polele te, ba Témoins de Jéhovah nyonso bazali komeka kosakola epai na bato oyo bazali komipesa mingi na makambo ya bomoi kino bazali kolinga te ete balobela bango makambo mosusu. Lokola na mikolo ya Noa, bato mingi na ntango na biso ‘bazali koyeba eloko te’. (Matai 24:37-39.) Ekoki kozala ete, bato mosusu bazali kosepela na bomoko na biso to makambo oyo tozali kosala. Nzokande, mosala na biso ya kolendisa elimo oyo esangisi bangonga oyo tozali kolekisa mpo na boyekoli na biso moko, koyangana ntango nyonso na makita mpe mosala ya kosakola emonani nde bozoba na miso na bango. Wana ezali bango komipesa mingi na koluka bisengo mpe biloko na mosuni oyo bakoki kosepela na yango uta sikawa, bazali koseka biso mpo na elikya oyo tozali na yango na bilaka ya Liloba na Nzambe.
21. Lokola na ntango ya Noa, ndenge nini bato mingi bazali lelo koyamba kosakolama ya nsango malamu, mpe mpo na nini?
21 Bato oyo balingi Nzambe te bakokoba sé konyokola basali na sembo ya Jéhovah? Te! Likambo nini esalamaki na ntango ya Noa? Na etinda ya Nzambe, Noa mpe libota na ye bakotaki na masuwa, oyo kotongama na yango esilaki. Mpe na ntango oyo etyamaki na Nzambe, “maziba nyonso na mozindo monene ebimisaki mai mpe bikuke na likoló ezipwamaki”. Mai elekaki mingi kino ngomba molai nyonso ezipamaki. (Genese 7:11, 17-20) Baanzelu oyo batikaki bifandelo na bango balongolaki nzoto ya bomoto oyo balataki mpe bazongaki na likoló. Bilombe (Banéfilime) mpe bato mosusu ya bosoto, bakisa mpe baoyo baboyaki koyoka likebisi ya Noa, babomamaki. Na ngambo na bango, Noa, mwasi na ye, bana mibali na bango misato mpe basi na bango babikaki. Ezali na motindo yango nde Jéhovah asikolaki Noa mpe libota na ye kati na komekama oyo bayikelaki mpiko na bosembo nyonso na boumeli ya bambula mingi.
22, 23. Mpo na nini makambo malekaki na ntango ya Noa mazali kondimisa biso ete Jéhovah akobikisa bato bamipesi na makambo na Nzambe kati na komekama?
22 Nzambe akosala lolenge moko epai na bato oyo bazali kobanga ye na ntango na biso? Mpo na yango ntembe ata moke ezali te. Alakaki yango, mpe akoki kobuka lokuta te.—Tito 1:2; 2 Petelo 3:5-7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Anomia elimboli kotyola mibeko na Nzambe, to kozanga kokokisa yango; aseibéia (lolenge na liloba oyo ezali kobongola ‘kotuka’) esalelami mpo na komonisa ezalela motindo yango epai na Nzambe ye moko.” Dictionnaire interprétatif des mots de l’Ancien et du Nouveau Testament (angl.) ya Vine, tome 4, lokasa 170.
Bozongeli
◻ Ndenge nini Petelo amonisaki ete Jehovah ayebi kobikisa bato bazali komipesa na makambo na Nzambe wana ezali bango kati na komekama?
◻ Makambo nini makolisaki nzela na mobulu oyo epalanganaki mingi na mikolo ya Noa?
◻ Na ntina na koya na mpela na mokili mobimba, mokumba nini Noa azalaki na yango?
◻ Kokokana nini ezali kati na eleko na Noa mpe na ntango na biso?
[Elilingi na lokasa 12]
Kotongama ya masuwa esengaki bambula mingi ya mosala makasi
[Elilingi na lokasa 12]
Noa azuaki ntango mpo na kolendisa libota na ye na elimo.