Yehova azali Nzambe ya motema molai
“[Yehova], azali Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto.”—EXODE 34:6.
1, 2. (a) Nzambe amoniselaki banani motema molai na ntango ya kala? (b) “Motema molai” elimboli nini?
BANDA na bato ya ntango ya Noa, Bayisalaele oyo batambolaki na Mose na mokili ekauki, to Bayuda ya ntango ya Yesu, bato na bato bazali na makambo oyo bakutanaki na yango. Kasi, Yehova amoniselaki bango nyonso ezaleli na ye oyo tobengi motema molai. Ezaleli yango ebikisaki bamosusu kati na bango. Lelo oyo mpe motema molai ya Yehova ekoki kobikisa bomoi na biso.
2 Motema molai ezali nini? Ntango nini Yehova amonisaka motema molai mpe mpo na nini? Kozala na “motema molai” elimboli “koyikela makambo ya mabe to matumoli mpiko mpe kozala kaka na elikya ete makambo ekobonga.” Na yango, moto amonisaka ezaleli yango na ntina. Mingimingi, bamonisaka motema molai mpo na bolamu ya moto oyo azali kobebisa makambo. Atako bongo, kozala na motema molai elimboli te kokanga miso na mabe. Ntango likambo oyo moto amoniselaki motema molai ekokisami to ntango ntina ya kolanda komonisa motema molai ezali lisusu te, motema molai esukaka.
3. Nzambe azali komonisa motema molai mpo na nini, mpe ntango nini esukaka?
3 Ya solo, bato bakoki kozala na motema molai, kasi Yehova nde aleki mpo na komonisa ezaleli yango. Banda bato bakweá na lisumu mpe boyokani na bango na Yehova ebebá, Mozalisi na biso amonisi motema molai mpe asali ebongiseli oyo na nzela na yango bato oyo babongoli motema bakoki koyokana na ye. (2 Petelo 3:9; 1 Yoane 4:10) Kasi, ntango ntina oyo Nzambe azali komonisa motema molai ekokokisama, akobebisa bato ya mabe mpe akoboma mokili oyo.—2 Petelo 3:7.
Motema molai ezali na boyokani na bizaleli ya Nzambe oyo eleki minene
4. (a) Ndenge nini Makomami ya Liebele elobeli motema molai? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (b) Nahumu alobi nini mpo na Yehova, mpe maloba yango ezali komonisa nini mpo na motema molai ya Yehova?
4 Na kati ya Makomami ya Liebele basaleli maloba mibale mpo na motema molai; maloba yango elimboli mpenzampenza “bolai ya madusu ya zolo” mpe ebongolami na “kosilika noki te” na Traduction du monde nouveau.a Mosakoli Nahumu alobaki boye: “[Yehova] akosilika noki te, azali monene na nguya na ye; akolongisa bato mabe te.” (Nahumu 1:3) Elingi koloba ete soki Yehova azali na motema molai, yango ezali komonisa bolɛmbu te; lisusu, motema molai na ye ezalaka na ndelo na yango. Lokola Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso asilikaka noki te, nzokande azali na nguya mingi, yango emonisi ete amipekisaka; yango wana azali na motema molai. Azali na nguya ya kopesa etumbu, kasi akendaka mbangu te mpo na kosala yango mpo na kotikela moto ya mabe ntango akoka kobongwana. (Ezekiele 18:31, 32) Nyonso wana emonisi ete motema molai ya Yehova ezali ndenge ya komonisa bolingo na ye mpe emonisaka ete asalelaka nguya na ye na mayele.
5. Ndenge nini motema molai ya Yehova eyokani na boyengebene na ye?
5 Motema molai ya Yehova eyokani mpe na boyengebene na ye. Ye moko alobaki na Mose ete azali “Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu, akoyoka nkanda noki te [“azali na motema molai,” King James] mpe aleki na boboto mpe na solo.” (Exode 34:6) Bambula mingi na nsima, Mose ayembaki nzembo ya kokumisa Yehova ete: “Nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe ya sembo mpe ya mabe te, ye moyengebene mpe mosembwi.” (Deteronome 32:4) Ya solo, ngɔlu ya Yehova, motema molai na ye, bosembo na ye mpe boyengebene na ye, nyonso etambolaka nzela moko.
Ndenge oyo Yehova amonisaki motema molai liboso ya Mpela
6. Wapi elembo monene ya motema molai oyo Yehova amonisi na bana ya Adama na Eva?
6 Kozanga botosi ya Adama na Eva na kati ya elanga ya Edene ebebisaki mpo na libela boyokani malamu oyo bazalaki na yango na Yehova, Mozalisi na bango ya bolingo. (Genese 3:8-13, 23, 24) Yango wana, bana na bango mpe bakabwanaki na Nzambe, bazwaki lisumu, ezaleli ya kozanga kokoka mpe liwa. (Baloma 5:17-19) Atako mwasi na mobali ya liboso basalaki lisumu na nko, Yehova atikaki bango bábota bana. Na nsima, abongisaki ndenge oyo esengelaki kosalisa bana ya Adama na Eva báyokana lisusu na ye. (Yoane 3:16, 36) Ntoma Paulo alobaki boye: “Nzambe amonisi bolingo na ye mpo na biso na nzela oyo: naino ezalaki biso bato ya masumu, Klisto akufelaki biso. Na koleka mpenza, awa elongi biso na nzela ya makila na ye, tokobika na ntango ya nkanda. Zambi tozalaki liboso bayini ya Nzambe. Soko tozongi na bondeko na Nzambe mpo na kufa ya mwana na ye mbɛ, na koleka mpenza, nsima na kozonga na bondeko, tokobika na bomoi na ye.”—Baloma 5:8-10.
7. Ndenge nini Yehova amonisaki motema molai liboso ya Mpela, mpe mpo na nini tokoki koloba ete azalaki na ntina malamu ya koboma bato oyo bazalaki liboso ya Mpela?
7 Yehova amonisaki motema molai na ye na mikolo ya Noa. Koleka mbula nkama liboso ete Mpela eya, “Nzambe atalaki mokili mpe yango ezalaki mabe mpenza, mpo ete bato nyonso babebisaki nzela na bango na mokili.” (Genese 6:12) Kasi, Yehova amoniselaki bato motema molai na boumeli ya mwa ntango. Alobaki boye: “Elimo na ngai ekoumela seko kati na bato te, mpo ete moto azali bobele mosuni, mpe mikolo na ye ikozala mbula mokama na ntuku mibale.” (Genese 6:3) Mbula 120 wana epesaki Noa, moto ya sembo, nzela ya kobota bana mpe ntango Nzambe ayebisaki ye mokano na ye, azwaki ntango ya kotonga masuwa mpe kokebisa bato ya ntango wana ete etikali moke Mpela eya. Ntoma Petelo akomaki boye: “Wana ezilaki Nzambe na motema molai ntango na mikolo ya Noa, naino ezalaki [masuwa] kotongama. Bato mingi te, bobele mwambe, babikaki na kati na yango mpo na mai.” (1 Petelo 3:20) Longola mwasi ya Noa, bana na ye na basi ya bana na ye, bato mosusu, atako azalaki kosakola epai na bango, “batalaki makambo nyonso mpamba.” (Matayo 24:38, 39, Boyokani ya Sika) Kasi, lokola Yehova atikelaki Noa ntango atonga masuwa mpe asalela ye lokola “mosakoli ya boyengene,” mbala mosusu na boumeli ya bambula ebele, yango epesaki bato ya eleko ya Noa ntango oyo ekoki mpenza mpo bátika banzela ya mabe mpe básalela Ye. (2 Petelo 2:5; Baebele 11:7) Azalaki mpenza na ntina ebongi ya koboma bato nyonso ya mabe ya ntango wana.
Yehova amoniselaki Yisalaele motema molai mingi
8. Ndenge nini Yehova amoniselaki libota ya Yisalaele motema molai?
8 Yehova amoniselaki Bayisalaele motema molai na boumeli ya bambula mingi mpenza koleka mbula 120 oyo atikelaki bato ya ntango ya Noa. Na boumeli ya mbula koleka 1500 oyo ekólo yango ezalaki libota ya Nzambe, kaka na mwa bantango mosusu nde Bayisalaele bamekaki motema molai ya Nzambe te. Mwa bapɔsɔ mpamba nsima ya kobimisa bango na Ezipito na ndenge ya kokamwa, basambelaki ekeko; likambo oyo emonisaki mpenza kozanga limemya epai ya Mobikisi na bango. (Exode 32:4; Nzembo 106:21) Na boumeli ya bambula oyo elandaki, Bayisalaele bazalaki komilelalela mpo na bilei oyo Yehova apesaki bango na ndenge ya likamwisi na kati ya mokili mokauki ete ezalaki malamu te, bazalaki koimaima mpo na Mose na Alona, balobaki mabe mpo na Yehova, basalaki pite na bato ya bikólo mosusu, tii kutu bakómaki kosambela Baala. (Mituya 11:4-6; 14:2-4; 21:5; 25:1-3; 1 Bakolinti 10:6-11) Yehova azalaki mpenza na ntina ebongi ya koboma bato na ye, kasi amoniselaki bango motema molai.—Mituya 14:11-21.
9. Ndenge nini Yehova amonisaki ete azali Nzambe ya motema molai na ntango ya Basambisi mpe na ntango ya bakonzi?
9 Na ntango oyo Basambisi bazalaki kotambwisa ekólo yango, Bayisalaele bazalaki mbala na mbala kolanda losambo ya bikeko. Soki basali bongo, Yehova azalaki kotika ete banguna na bango bányokola bango. Kasi, soki babongoli mitema mpe babeleli ye, azalaki komonisa motema molai mpe azalaki kotinda basambisi mpo na kobikisa bango. (Basambisi 2:17, 18) Na eleko molai oyo bakonzi bayangelaki, bakonzi moke kaka nde bamipesaki mobimba epai ya Yehova. Ata ntango oyo mokonzi moko ya sembo azali koyangela, bato bazalaki mbala mingi kosangisa losambo ya lokuta na oyo ya solo. Ntango Yehova azalaki kotindela bango basakoli mpo na kokebisa bango na ntina etali kozanga bosembo, bato bazalaki nde kosepela koyoka banganga oyo bazalaki na etamboli ya mabe mpe basakoli ya lokuta. (Yilimia 5:31; 25:4-7) Kutu, Bayisalaele banyokolaki basakoli ya sembo ya Yehova mpe babomaki bamosusu kati na bango. (2 Ntango 24:20, 21; Misala 7:51, 52) Atako bongo, Yehova azalaki kaka na motema molai.—2 Ntango 36:15.
Motema molai ya Yehova esilá te
10. Ntango nini motema molai ya Yehova ekómaki na nsuka?
10 Makambo oyo eleká ezali komonisa ete motema molai ya Nzambe ezali na ndelo. Na mobu 740 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), atikaki nzela ete Baasulia bálonga Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi, mpe bámema bato na boombo. (2 Mikonzi 17:5, 6) Lisusu, na nsuka ya ekeke oyo elandaki, atikaki nzela ete bato ya Babilone bábundisa Yuda, bokonzi ya mabota mibale, mpe bábebisa Yelusaleme na tempelo na yango.—2 Ntango 36:16-19.
11. Ndenge nini Yehova amonisaki motema molai ata ntango azalaki kopesa etumbu?
11 Kasi, ata ntango apesaki Yisalaele na Yuda etumbu, Yehova azalaki kaka na motema molai. Na nzela ya mosakoli Yilimia, Yehova asakolaki ete libota na ye ekozonga. Alobaki boye: “Soko bosili bokokisi mibu ntuku nsambo o Babilon, ngai nakoya kotala bino mpe nakokokisa elako ya esengo nalakelaki bino mpe nakozongisa bino lisusu awa. Nakosalisa bino mpo ‘te bokoka kozwa ngai. . . . Nakolongola bino o boombo, o bikolo mpe o bisika binso napanzaki bino.”—Yirimia 29:10, 14, Liloba lya Nzambe.
12. Nini ezali komonisa ete ndenge oyo Bayuda oyo bazalaki naino na bomoi na nsuka ya boombo bazongaki na mboka na bango ezalaki na mokano ya Nzambe mpo na koya ya Masiya?
12 Na kati ya Bayuda oyo bakendaki boombo, ndambo oyo batikalaki na bomoi na nsuka ya boombo bazongaki na Yuda mpe bazongisaki losambo ya Yehova na tempelo oyo etongamaki lisusu na Yelusaleme. Mpo na kokokisama ya mikano ya Yehova, batikali yango basengelaki kokóma lokola ‘mamwe euti na Yehova,’ oyo mazali kopesa mpiɔ mpe mazali kokolisa. Basengelaki mpe kozala na mpiko mpe makasi lokola “nkosi katikati na banyama ya zamba.” (Mika 5:7, 8) Ekoki kozala ete maloba oyo: bakozala lokola “nkosi katikati na banyama ya zamba” ekokisamaki na eleko oyo Bayuda oyo batambwisamaki na bato ya libota ya Makabe babenganaki banguna na bango na Mokili ya Ndaka mpe bafungolaki lisusu tempelo oyo ekómaki mbindo. Na ndenge yango, ekólo na tempelo ebatelamaki mpo ete batikali mosusu ya sembo báyamba Mwana ya Nzambe ntango amonanaki kuna lokola Masiya.—Danyele 9:25; Luka 1:13-17, 67-79; 3:15, 21, 22.
13. Ata nsima wana Bayuda babomaki Mwana na ye, ndenge nini Yehova akobaki komonisela bango motema molai?
13 Ata ntango Bayuda babomaki Mwana na ye, Yehova akobaki komonisela bango motema molai na boumeli ya mbula misato na ndambo, apesaki bango libaku ya kobengama mombóto ya Abalayama na elimo, libaku oyo apesaki yango naino na bato mosusu te. (Danyele 9:27)b Liboso ya mobu 36 T.B. mpe na nsima na yango, Bayuda mosusu bandimaki libyangi yango mpe, lokola Paulo alobaki yango na nsima, “ezalaki na mwa ndambo ya bato oyo batikali oyo baponamaki mpo na ngɔlu.”—Baloma 11:5, NW.
14. (a) Na mobu 36 T.B., banani oyo Nzambe apesaki bango libaku malamu ya kokóma mombóto ya Abalayama na elimo? (b) Paulo alobaki nini na kotala ndenge oyo Yehova aponaki basangani ya Yisalaele ya elimo?
14 Na mobu 36 T.B., libaku ya kozala mpe mombóto ya Abalayama na elimo epesamaki mpo na mbala ya liboso epai ya bato oyo bazalaki Bayuda te, ata baoyo bazalaki na Lingomba ya Bayuda te. Moto nyonso oyo andimaki libyangi yango azwaki litomba na ngɔlu mpe motema molai ya Yehova. (Bagalatia 3:26-29; Baefese 2:4-7) Mpo na komonisa botɔndi na ye na mayele ya Yehova mpe na ntina oyo Yehova azali komonisa motema molai mpe ngɔlu na ye oyo esali ete ayanganisa Yisalaele ya elimo nyonso, Paulo alobaki ete: “Ɛɛ, bozwi mpe boyebi mpe bososoli ya Nzambe izali na bozindo boni! Bikateli na ye bikoki koyebana ntina te; bilekelo na ye ikomonana nzela te.”—Baloma 11:25, 26, 33; Bagalatia 6:15, 16.
Motema molai na ntina na nkombo na Ye
15. Ntina ya libosoliboso oyo Nzambe amonisaka motema molai ezali nini, mpe likambo nini esengelaki kokatama?
15 Mpo na nini Yehova amonisaka motema molai? Libosoliboso mpo na kokumisa nkombo na ye mosantu mpe kolongisa bokonzi na ye. (1 Samwele 12:20-22) Esɛngaki ntango mingi mpo na kosilisa, na ndenge oyo ebongi mpenza liboso ya bikelamu nyonso, ntembe monene oyo Satana abimisaki mpo na ndenge oyo Yehova asalelaka bokonzi na ye. (Yobo 1:9-11; 42:2, 5, 6) Yango wana, ntango bazalaki konyokola libota na ye na Ezipito, Yehova alobaki na Falo ete: “Natiki yo na ntina boye ete namonisa yo nguya na ngai, ete nkombo na ngai esakolama bipai nyonso na molɔ́ngɔ́.”—Exode 9:16.
16. (a) Ndenge nini motema molai ya Yehova epesi ye nzela ya kobongisa bato mpo na nkombo na ye? (b) Ndenge nini nkombo ya Yehova ekosantisama mpe bokonzi na ye ekolongisama?
16 Ntoma Paulo azongelaki maloba oyo Yehova alobaki na Falo ntango alimbolaki ntina ya motema molai ya Nzambe mpo na kokumisa nkombo na Ye mosantu. Na nsima Paulo akomaki boye: “Soko nde Nzambe akani komonisa nkanda na ye mpe kososolisa nguya na ye mpe boye ayikeli mbeki ya nkanda mpiko monene, yango ikoki mpo na kobebisama nyɛ? Soko asalaki bongo ete ayebisa motuya monene ya nkembo na ye ebongisami mpo na mbeki ya mawa, yango ebongisaki ye liboso mpo na nkembo oyo? Biso tozali mbeki ya lolenge yango. Abyangi biso bobele longwa na Bayuda te kasi longwa Bapakano lokola. [Lokola] elobi ye kati na Mokanda ya Hosea; Baoyo bazalaki bato na ngai te, nakotánga bango bato na ngai.” (Baloma 9:17, 22-25) Lokola Yehova amonisaki motema molai, yango epesaki ye nzela abimisa “bato mpo na nkombo na ye” na bikólo ya mokili. (Misala 15:14) ‘Basantu’ yango bazali kolanda Mokonzi na bango Yesu Klisto mpe bakozala na Bokonzi oyo Yehova akosalela mpo na kosantisa Nkombo na ye monene mpe mpo na kolongisa bokonzi na Ye.—Danyele 2:44; 7:13, 14, 27; Emoniseli 4:9-11; 5:9, 10.
Motema molai ya Nzambe ezali mpo na lobiko
17, 18. (a) Nini ekomonisa ete tozali komona mabe ndenge Yehova azali na motema molai? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela motema molai ya Yehova?
17 Banda bato bakweá na lisumu, Yehova amonisaka ete azali Nzambe ya motema molai. Lokola amonisaki motema molai liboso ete Mpela eya, yango epesaki ntango ya kokebisa bato mpe kotonga masuwa oyo esengelaki kobikisa bato. Kasi, motema molai na ye ekómaki na nsuka na yango mpe atindaki Mpela. Lelo oyo mpe ndenge moko, Yehova azali komonisa motema molai mpe ezali koumela koleka kutu ndenge oyo bato mosusu bakanisaki. Kasi, tosengeli kolɛmba nzoto te mpo na yango. Soki tolɛmbi nzoto ekozala lokola nde tozali komona mabe lokola Nzambe azali na motema molai. Paulo atunaki motuna oyo: “Ozali nde kotyola boboto na ye monene na motema na ye molai mpe mpiko na ye? Ososoli te ete boboto ya Nzambe ezali kobenda yo mpo na kobongola motema na yo?”—Baloma 2:4.
18 Moto moko te na kati na biso akoki koyeba na meko nini tosengeli mpenza na motema molai ya Nzambe mpo andima ete tobongi na miso na ye mpo akoka kobikisa biso. Paulo azali kopesa biso toli ete ‘tóluka nzela ya kobika na biso na nsɔmɔ mpe na kolɛnga.’ (Bafilipi 2:12) Ntoma Petelo akomelaki baninga na ye baklisto ete: “Yehova azali koumela te mpo na kokokisa elaka na ye, lokola bato mosusu bazali kokanisa ete azali koumela, kasi azali na motema molai epai na bino, mpo ete alingi te ete moto moko abeba, kasi alingi ete bato nyonso bákóma na kobongola motema.”—2 Petelo 3:9, NW.
19. Ndenge nini motema molai ya Yehova ekoki komemela biso litomba?
19 Yango wana, tózala motema mɔ́tɔmɔ́tɔ te ntango tozali komona ndenge oyo Yehova azali kosala makambo. Tólanda nde toli mosusu oyo Petelo apesaki mpe ‘tókanisa ete motema molai ya Nkolo na biso ezali lokola lobiko.’ Lobiko ya banani? Lobiko na biso mpe ya ebele ya bato mosusu oyo basengeli naino koyoka ‘nsango malamu ya bokonzi.’ (2 Petelo 3:15; Matai 24:14) Yango ekosalisa biso na kosepela na motema molai ya Yehova oyo ezali mpenza monene mpe ekotinda biso tózala na motema molai epai ya bato mosusu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Liebele, liloba ‘aph, oyo elakisi “zolo” to “madusu ya zolo,” esalelamaka mbala mingi lokola elilingi mpo na kolobela nkanda; mpamba te moto oyo asiliki makasi apemaka mbangumbangu mpe makasi.
b Mpo na kozwa bandimbola mosusu ya esakweli yango, talá mokanda Tyá likebi na esakweli ya Danyele!, nkasa 191-194, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okoki kolimbola?
• Na kati ya Biblia, maloba “motema molai” elimboli nini?
• Ndenge nini Yehova amonisaki motema molai na ye liboso ya Mpela, nsima ya boombo na Babilone, mpe na ekeke ya liboso ya T.B.?
• Mpo na bantina nini Yehova amonisaki motema molai?
• Ndenge nini tosengeli kotalelaka motema molai ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 9]
Motema molai ya Yehova liboso ya Mpela epesaki bato libaku ya kobongwana
[Elilingi na lokasa 10]
Ntango Babilone ekweaki, Bayuda bazwaki litomba na motema molai ya Yehova
[Elilingi na lokasa 11]
Na ekeke ya liboso, Bayuda na bato ya bikólo mosusu bazwaki litomba na motema molai ya Yehova
[Bililingi na lokasa 12]
Lelo oyo, baklisto bazali kozwa litomba na motema molai ya Yehova