“Tókokanisa bavɛrsɛ ya Biblia”
MOBALI moko nkombo na ye George Storrs alɔkɔtaki trakte na kati ya engbunduka ntango azalaki kokende na New York. Trakte yango elobaki ete ‘molimo ekufaka.’ Maloba yango ebendaki likebi ya pastɛrɛ yango, mpe abandaki kotánga yango. Akamwaki mingi mpamba te ye azalaki koyeba kaka ete molimo ekufaka te. Na ntango wana, ayebaki te nani akomaki trakte yango. Kasi, amonaki ete trakte yango elimbolaki makambo polele mpe ebongaki ete ayekola na likebi bavɛrsɛ mpe makanisi oyo epesaki.
Likambo yango esalemaki na mobu 1837, mbula oyo Charles Darwin akomaki makanisi oyo ememaki ye abimisa liteya ya evolisyo. Na bambula wana, bato mingi bazalaki kondima Nzambe mpe komipesa na losambo. Mingi bazalaki kotánga Biblia mpe kotosa yango.
Na nsima, Storrs ayebaki ete moto oyo akomaki trakte wana ezalaki Henry Grew, oyo azalaki kofanda na Philadelphie, na etúká ya Pennsylvanie. Grew azalaki koloba ete “ndimbola malamu ya makomami . . . esengeli kouta kaka na kati ya makomami.” Grew ná baninga na ye bazalaki koyekola Biblia mpo na kosalela mitinda na yango na bomoi na bango. Boyekoli na bango esalisaki bango báyeba mwa mateya ya solo na Biblia.
Makambo oyo Grew akomaki epesaki Storrs mposa ya koyeba oyo Biblia elobi mpo na molimo mpe alobelaki likambo yango na bapastɛrɛ mosusu. Nsima ya komipesa na koyekola Biblia na boumeli ya mbula mitano, Storrs azwaki mokano ya koyebisa bato liteya ya solo oyo ayekolaki. Na ebandeli, abongisaki lisukulu moko oyo asengelaki kosala mokolo moko ya lomingo na mobu 1842. Kasi, na nsima amonaki ete asengeli kobakisa masukulu mosusu mpo na kolimbola likambo yango malamumalamu. Nsukansuka, asalaki masukulu motoba mpo na kolimbola ete molimo ekufaka, mpe abimisaki yango na buku Masolo motoba. Storrs akokanisaki bavɛrsɛ ya Biblia mpo na komonisa polele mateya ya solo oyo ebombamaki mpo na mateya ya lokuta ya mangomba ya boklisto.
Biblia eteyaka nde ete molimo ekufaka te?
Biblia elobi ete bayekoli ya Yesu oyo bazali bapakolami na elimo bakozwa nzoto oyo ekoki kokufa te lokola mbano mpo na bosembo na bango. (1 Bakolinti 15:50-56) Storrs akanisaki boye, soki kozanga kokufa ezali mbano oyo Nzambe akopesa bato ya sembo, boye ekoki kozala solo te ete molimo ya bato mabe ekufaka te. Na esika abimisa makanisi na ye moko, alukaki na kati ya Biblia. Atalelaki Matai 10:28 (Bible na Lingala ya lelo oyo), oyo elobi boye: “Bóbangaka kaka Nzambe oyo akoki kobwaka molimo ná nzoto mbala moko na lifelo.” Maloba yango emonisi ete molimo ekoki kobomama. Atángaki mpe Ezekiele 18:4, oyo elobi: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” Ntango ayokanisaki makanisi ya Biblia mobimba, solo emonanaki polele. Storrs akomaki boye: “Soki makanisi oyo nazwi na likambo oyo ezali solo, boye bavɛrsɛ mingi ya Biblia oyo tozalaki koyeba kolimbola te mpo na liteya oyo ebele ya bato bandimaka ete molimo ekufaka te, ekómi polele mpenza.”
Kasi, ezali boni mpo na mikapo lokola Yuda 7? Vɛrsɛ yango elobi boye: “Ndenge moko mpe Sodoma ná Gomola ná bingumba ya zingazinga na yango . . . basalaki pite koleka mpe balandaki mosuni mpo na kosalela yango na ndenge ebongi te, batyami liboso na biso lokola ndakisa ya kokebisa na ndenge bazwaki etumbu ya lisambisi ya mɔtɔ ya seko.” Bato mingi, ntango batángi maloba ya vɛrsɛ yango, bakanisaka ete milimo ya bato oyo babomamaki na Sodoma ná Gomola enyokwamaka libela na libela na mɔtɔ. Storrs akomaki ete: “Tókokanisa bavɛrsɛ ya Biblia.” Na nsima, atángaki mokapo ya 2 Petelo 2:5, 6, oyo elobi boye: “Amipekisaki te kopesa mokili moko ya kala etumbu, kasi abatelaki Noa . . . ntango ayeisaki mpela likoló ya mokili moko ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe; mpe na kokómisáká bingumba ya Sodoma mpe Gomola putulu ya mɔtɔ akweisaki yango, kopesáká bato oyo batyolaka Nzambe ndakisa ya makambo oyo ekoya.” Bingumba ya Sodoma ná Gomola ebomamaki na mɔtɔ elongo na bafandi na yango mpo na libela.
Storrs alobaki boye: “Maloba ya Petelo ezali kosalisa biso tókanga ntina ya maloba ya Yuda. Mikanda yango mibale ezali komonisa polele nkanda oyo Nzambe amoniselaki basumuki. . . . Bitumbu oyo apesaki mokili ya kala, Sodoma ná Gomola, etikalá ndakisa ya libela to ‘ya seko,’ mpo na kokebisa bato nyonso tii na nsuka ya mokili.” Na bongo, Yuda alingaki koloba ete mosala ya mɔtɔ oyo ebebisaki Sodoma ná Gomola ekotikala seko. Yango ebongoli eloko moko te na liteya oyo elobi ete molimo ekufaka.
Storrs azalaki te koluka bavɛrsɛ oyo ekolongisa makanisi na ye mpe kotika bavɛrsɛ mosusu. Azalaki kotalela lisolo mobimba epai vɛrsɛ moko euti mpe makanisi oyo eyokani na mateya ya Biblia. Soki amoni lokola makanisi ya vɛrsɛ moko eyokani te na oyo ya bavɛrsɛ mosusu, Storrs azalaki koluka ndimbola oyo ebongi na kati ya Biblia.
Ndenge ya Russell ya koyekola Biblia
Na kati ya bato oyo George Storrs azalaki kosolola na bango, ezalaki na elenge moko oyo azalaki koyekola Biblia ná baninga na ye na Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie. Nkombo na ye ezalaki Charles Russell. Moko ya masolo ya liboso oyo akomaki ebimaki na mobu 1876 na zulunalo oyo Storrs azalaki kobimisa (Bible Examiner). Russell azalaki kondima ete bato mosusu oyo bayekolaki Biblia liboso na ye basalisaki ye mingi. Na nsima, ntango akómaki kobimisa zulunalo na ye moko (Zion’s Wath Tower), akomaki ete Storrs asungaki ye mingi, ezala na masolo oyo bazalaki kosolola to na mikanda oyo bazalaki kokomelana.
Charles Russell azalaki na mbula 18 ntango asangisaki bato mpo báyekolaka Biblia mpe bayokanaki ndenge oyo bakosala yango. Alexander Macmillan, moko ya bato oyo bayekolaki Biblia na Russell, alimbolaki ndenge oyo bazalaki kosala: “Moko na bango azalaki kotuna motuna. Bazalaki kopesana makanisi. Bazalaki koluka bavɛrsɛ nyonso oyo elobeli likambo yango mpe, soki bamoni boyokani oyo ezali na bavɛrsɛ yango, bazalaki kokoma likanisi ya nsuka oyo bazwi.”
Russell azalaki kondima ete soki totaleli Biblia lokola buku kaka moko, tokomona ete mikanda na yango nyonso ezali na boyokani mpe ezali na nsango kaka moko, oyo ezali komonisa bizaleli ya Nzambe, Nkolo na yango. Na makanisi ya Russell, soki bakutani na mokakatano mpo na kokanga ntina ya eteni moko ya Biblia, kaka bavɛrsɛ mosusu ya Biblia nde ekolimbola yango.
Momeseno oyo ebandá kala
Momeseno ya kolimbola Biblia na lisalisi ya Biblia yango moko ebandaki na Russell to Storrs to Grew te. Ebandaki na Yesu Klisto, Mobandisi ya lingomba ya boklisto. Yesu azalaki kosalela bavɛrsɛ ya Biblia mpo na kolimbola bavɛrsɛ mosusu. Na ndakisa, ntango Bafalisai balobaki ete bayekoli na ye basalaki mabe ndenge babukaki mitó ya blé mokolo ya Sabata, Yesu asalelaki lisolo ya 1 Samwele 21:6 mpo na komonisa ndenge oyo basengeli kotalela mobeko ya Sabata. Bakonzi ya mangomba bayebaki malamu lisolo yango oyo elobi ete Davidi ná bato na ye balyaki mampa ya kolakisama. Na nsima, Yesu alobelaki bavɛrsɛ ya Mibeko oyo elobi ete kaka banganga-nzambe, bato ya libota ya Alona, nde bakoki kolya mampa ya kolakisama. (Exode 29:32, 33; Levitike 24:9) Nzokande, bapesaki Davidi ndingisa ya kolya yango. Yesu asukisaki na makanisi oyo ezali na mokanda Hosea ete: “Soki bokangaki ntina ya likambo oyo ete, ‘Nalingi motema mawa, kasi mbeka te,’ mbɛlɛ bolingaki te kokweisa bato oyo basali mabe moko te.” (Matai 12:1-8) Yango ezali ndakisa malamu mpenza ya kokokanisa bavɛrsɛ mpo na kozwa ndimbola ya malamu!
Bayekoli ya Yesu balandaki ndakisa na ye ya kosalela bavɛrsɛ ya Biblia mpo na kolimbola vɛrsɛ moko. Ntango ntoma Paulo azalaki koteya bato na Tesaloniki, “azalaki kososola elongo na bango uta na Makomami, kolimboláká mpe kondimisáká na nzela ya mikapo ete ezalaki na ntina ete Klisto anyokwama mpe asekwa na bakufi.” (Misala 17:2, 3) Na mikanda oyo akomaki, Paulo mpe asalelaki kaka Biblia mpo na kolimbola Biblia. Na ndakisa, na mokanda oyo akomelaki Baebele, atángaki bavɛrsɛ ndenge na ndenge mpo na komonisa ete Mibeko ezalaki elili ya makambo malamu oyo ekoya.—Baebele 10:1-18.
Tomoni ete bayekoli ya sembo ya Biblia na bambula ya 1800 mpe na ebandeli ya bambula ya 1900 bazongelaki kaka momeseno oyo Klisto ye moko abandaki. Tii lelo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elandaka momeseno wana ya kokokanisa bavɛrsɛ. (2 Batesaloniki 2:15) Batatoli ya Yehova basalelaka mayele yango ntango bazali koluka koyeba ndimbola ya vɛrsɛ moko ya Biblia.
Tóyeba lisolo mobimba
Ntango tozali kotánga Biblia, ndenge nini tokoki kolanda ndakisa malamu ya Yesu ná bayekoli na ye? Ya liboso, tosengeli kotalela lisolo mobimba epai vɛrsɛ oyo tolingi koyeba ndimbola na yango euti. Ndenge nini lisolo mobimba ekoki kosalisa biso tózwa ndimbola yango? Tózwa ndakisa ya maloba ya Yesu na Matai 16:28: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete ezali na bamosusu na kati ya baoyo batɛlɛmi awa oyo bakoyoka ata nsolo ya liwa te kozanga komona liboso Mwana ya moto koya na kati ya bokonzi na ye.” Bato mosusu bakoki kokanisa ete maloba wana ekokisamaki te mpamba te bayekoli nyonso ya Yesu oyo bazalaki wana bakufaki liboso Bokonzi ya Nzambe ebanda koyangela na likoló. Kutu, buku moko (The Interpreter’s Bible) elobi boye: “Esakweli yango ekokisamaki te, mpe na nsima baklisto bamonaki ete esengeli kolimbola ete ezalaki maloba ya elilingi.”
Nzokande, lisolo mobimba epai vɛrsɛ yango ezali, bakisá mpe mikapo ya Malako ná ya Luka oyo elobeli lisolo yango, ezali kosalisa biso tókanga ntina na yango malamu. Nsima ya maloba wana, Matai akomaki nini? Akomaki boye: “Mikolo motoba na nsima Yesu akamataki elongo na ye Petelo ná Yakobo ná Yoane ndeko na ye mpe amemaki bango na ngomba moko molai bango moko kaka. Mpe abongwanaki liboso na bango.” (Matai 17:1, 2) Malako ná Luka bamonisi mpe ete maloba wana ya Yesu etalelaki kobongwana na ye. (Malako 9:1-8; Luka 9:27-36) Kobongwana ya Yesu, to ndenge oyo amonanaki na nkembo liboso ya bayekoli na ye misato, emonisaki koya na ye lokola mokonzi. Petelo amonisaki ete ezali bongo ntango alobelaki “nguya mpe kozala ya Nkolo na biso Yesu Klisto,” oyo bayebaki ntango bamonaki kobongwana na ye.—2 Petelo 1:16-18.
Otikaka ete Biblia emilimbola yango moko?
Soki otángi vɛrsɛ moko ya Biblia kasi okangi ntina na yango te ata nsima ya kotánga lisolo mobimba, osengeli kosala nini? Okoki kozwa ndimbola ya malamu soki okokanisi yango na bavɛrsɛ mosusu, kozanga kobosana mateya to makanisi ya Biblia mobimba. Biblia Libongoli ya Mokili ya sika ya Makomami Mosantu, oyo ebimisami lelo oyo na mobimba to na ndambo na minɔkɔ 57 ekoki mpenza kosalisa yo. Biblia yango ezali na mitindami na katikati ya lokasa mokomoko. Mitindami yango ezali koleka 125 000 na Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau avec notes et références (Libongoli ya Mokili ya sika, oyo ya monene). “Maloba ya ebandeli” ya Biblia yango elobi boye: “Soki motángi azali kokokanisa mitindami mpe azali kotalela maloba na nse ya lokasa, akomona ete mikanda 66 ya Biblia ezali na boyokani, likambo oyo ezali kondimisa ete ezali buku kaka moko, oyo epemami na Nzambe.”
Tótala ndenge oyo tokoki kosalela mitindami mpo na kokanga ntina ya vɛrsɛ moko. Tózwa ndakisa ya lisolo ya Abalama, to Abalayama. Motuna yango oyo: Nani akambaki libota mobimba ntango Abalama ná bandeko na ye balongwaki na Ulu? Na Genese 11:31 tozali kotánga boye: “Tela akamataki Abalama mwana na ye mpe Lota . . . mpe Salai bokilo na ye, . . . Bango babimaki elongo na Ulu ya Bakaladi ete bákenda na mokili ya Kanana. Bakomaki na Halana mpe bafandaki wana.” Soki moto atángi kaka lisolo yango, akoloba mbala moko ete Tela, tata ya Abalayama, nde akambaki bango. Nzokande, na Libongoli ya Mokili ya sika, vɛrsɛ yango ezali na mitindami 11. Vɛrsɛ ya nsuka na molɔngɔ yango ezali Misala 7:2, epai tokoki kotánga toli oyo Setefano apesaki Bayuda na ekeke ya liboso: “Nzambe ya nkembo abimelaki nkɔkɔ na biso Abalayama ntango azalaki na Mezopotamia, liboso ete abanda kofanda na Halana, mpe alobaki na ye ete, ‘Bimá na mokili na yo mpe na bato ya libota na yo mpe yaká na mokili oyo nakolakisa yo.’” (Misala 7:2, 3) Ekoki nde kozala ete Setefano abosanaki mpe alobelaki ntango Abalama alongwaki na Halana? Te, mpamba te ekomami na kati ya Liloba epemami na Nzambe.—Genese 12:1-3.
Kasi, mpo na nini Genese 11:31 elobi ete “Tela akamataki Abalama mwana na ye” ná bato mosusu ya libota na ye mpe alongwaki na Ulu? Tela azalaki mokóló ya libota yango mobimba mpe lokola Andimaki kokende na Abalama, tokoki koloba ete ye nde amemaki libota na Halana. Soki tokokanisi bavɛrsɛ yango mibale mpe toyokanisi yango, tokomona polele ndenge likambo yango elekaki mpenza. Lokola Abalama azalaki na limemya epai ya tata na ye, ayebisaki ye likambo oyo Nzambe asɛngaki ye mpe andimisaki ye ete basengeli kolongwa na Ulu.
Ntango tozali kotánga Biblia, tosengeli kotalela lisolo mobimba, bakisa mpe makanisi ná mateya ya Biblia mobimba. Bapesi baklisto toli oyo: “Biso tozwaki elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti epai ya Nzambe, mpo tókoka koyeba makambo oyo Nzambe apesi biso na boboto. Tozali mpe kolobela makambo yango, na maloba oyo eteyami na bwanya ya bato te, kasi na oyo eteyami na elimo, wana tozali kosangisa makambo ya elimo ná maloba ya elimo.” (1 Bakolinti 2:11-13) Tosengeli kosɛnga Yehova asalisa biso tókanga ntina ya Liloba na ye mpe tómeka “kosangisa makambo ya elimo ná maloba ya elimo,” elingi koloba tótalela lisolo mobimba epai vɛrsɛ euti mpe bavɛrsɛ mosusu oyo eyokani na yango. Tiká tókoba koyekola Liloba ya Nzambe mpo na komona makambo ya ntina mingi oyo ezali kati na yango.
[Bililingi na lokasa 12]
Bayekoli ya Biblia na bambula ya 1800 oyo bakokanisaki bavɛrsɛ mpo na kozwa ndimbola ya malamu: George Storrs, Henry Grew, Charles Russell, Alexander Macmillan
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Na likoló: MASOLO MOTOBA, ya George Storrs (1855); oyo ya mibale: Collection of The New-York Historical Society/69288
[Elilingi na lokasa 15]
Ntoma Paulo asalelaki bavɛrsɛ ya Biblia mpo na kolimbola mateya na ye