Biblia elobi nini na ntina na Nzambe mpe Yesu?
MOTO oyo akotanga Biblia na mobimba na yango kozanga ete ayeba Trinité liboso, akokoka nde kozwa ye moko likanisi ya liteya wana? Soko moke te.
Na solo, likanisi oyo likozala na boongó ya motangi yango azangi kokótela moto moko ezali oyo ete, bobele Nzambe nde azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe Mozalisi, akeseni na nyonso mpe ete, Yesu azali moto mosusu akeseni na Nzambe, azalaki bongo ata liboso ete akóma moto awa na mabelé, mpe azali ekelamu oyo azali na nsé na Nzambe.
Nzambe azali misato te, kasi moko
LITEYA ya Biblia oyo ete Nzambe azali moko, libengami monothéisme. Levi Paine, profesere ya Lisoló ya mangomba alobi boye ete, monothéisme na lolenge na yango ya kokoka, elóngóbáni na Trinité te: “Kondimana na Kala elobi bobele ete Nzambe azali moko. Nzambe azali bobele moto moko. Likanisi oyo ete liteya ya Trinité ekoki kozwama na kati na yango . . . ezali solo te.”
Koya na Yesu awa na mabelé ebebisaki nde liteya oyo ete Nzambe azali moko (monothéisme)? Levi Paine ayanoli boye: “Mpo na likambo yango, kokesena soko moke ezali te kati na Kondimana na Kala mpe Kondimana na Sika. Liteya oyo ete Nzambe azali moko ezali ntango nyonso bobele bongo. Yesu azalaki Moyuda, ateyamaki engebene mitinda ya Kondimana na Kala na baboti oyo bazalaki mpe Bayuda. Mateya na ye mazalaki mpenza ya Bayuda; ezalaki solo Evanzile ya sika, kasi téoloji ya sika te. . . . Lisusu, asalelaki maloba oyo mamonisaki ete Nzambe azali moko mpo na Bayuda: ‘Yoka ɛ Yisraele, Jéhovah Nzambe na biso azali bobele Nzambe moko.’”
Maloba oyo mazwami na Deteronome 6:4. Tala lolenge nini maloba yango mabongolami kati na La Bible de Jérusalem: “Yoka, ɛ Yisraele: Yahvé Nzambe na biso azali bobele Yahvé moko.” Na grammaire, liloba “bobele” elandamaka te na maloba oyo makobongwana na ebele, maye makopesa likanisi ete likambo yango litaleli bato mingi.
Mabongoli mosusu ya Biblia mazali kobénga nkombo ya Nzambe “Yahvé,” mosusu ezali kobénga “Jéhovah.”
Ntoma Paulo ye mpe alobaki ete libongwani moko ezali te na ntina etali lolenge oyo Nzambe azali, mpe etikalaki bongo ata nsima na koya na Yesu awa na mabelé. Ntoma akomaki boye: “Mpe Nzambe azali moko.”—Bagalatia 3:20; tala 1 Bakolinti 8:4-6.
Mbala mingi, Biblia ezali koloba na ntina na Nzambe lokola mpo na moto bobele moko. Wana ezali Nzambe koloba, Biblia ekomonisaka yango lokola ete elobami na moto bobele moko, oyo akokabwanaka te. Biblia emonisi polele mpenza likambo yango. Nzambe alobi: “Ngai nazali Jéhovah, yango nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te.” (Yisaya 42:8, MN) “Ngai nazali Jéhovah Nzambe na yo. . . . Okozala na banzambe mosusu liboso na ngai te.”—Exode 20:2, 3; MN.
Soko ezali solo ete Nzambe asalami na ba persona misato, mpo na nini bakomi nyonso ya Biblia oyo bapemamaki na Nzambe bazalaki koloba na ntina na ye lokola moto bobele moko? Liteya motindo yango ekokósa bobele bato kasi ekosalisa bango te. Soko Nzambe asalamaki na ba persona misato, mbele asalaki ye moko ete bakomi ya Liloba na ye batya likambo yango na polele mpenza ete ntembe ezala te. Mbala mosusu tokokanisa ete bakomi ya Makomami na greke ya boklisto, bato oyo bazalaki elongo na Mwana na Nzambe, basalaki likambo yango; nzokande basalaki yango te.
Na kokesene, bakomi ya Biblia bamonisaki solo oyo ete, Nzambe azali bobele Moto moko, azali bobele ye moko, akokabwanaka te mpe akokani na mosusu te: “Ngai nazali Jéhovah, mpe mosusu azali te. Nzambe mosusu azali te bobele ngai.” (Yisaya 45:5, MN) “Ezali bobele Yo nde ozali na nkombo Jéhovah, Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba.”—Nzembo 83:18, MN.
Azali Nzambe na koyikitanya te
YESU abengaki Nzambe, “Nzambe [bobele] moko ya solo.” (Yoane 17:3, MN) Na ntina na ye, Yesu alobaki te lokola na Nzambe oyo asalami na bato mingi. Yango wana kati na Biblia, moto mosusu te bobele Jéhovah nde abéngami Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Soko ezalaki lolenge mosusu, liloba “mozwi-na-nguya-nyonso” ekokaki kozala na ntina te. Ezala Yesu, ata elimo santu bapesameli titre yango te, mpamba te bobele Jéhovah nde aleki likoló. Na Genese 17:1, Jéhovah alobi boye: “Ngai nazali Nzambe na Nguya-Nyonso.” Na Exode 18:11 totangi ete: “Jéhovah aleki banzambe nyonso.”
Kati na Makomami na hébreu, liloba ’eloh’ah (nzambe) ezali na bandenge mibale ya kotya na boike (pluriel): ’elo·him’ (banzambe) mpe ’elo·heh’ (banzambe ya). Bandenge yango mibale ezali mingi mpenza komonisa Jéhovah; na ntango wana ekobongolama ete “Nzambe” lokola nde bazali kolobela moto moko (bomei to singulier). Lolenge wana ya kosalela boike ezali nde komonisa Trinité? Te. Kati na mokanda Un Dictionnaire de la Bible (angl.), William Smith alobi ete: “Likanisi ya kokamwisa oyo engebene yango ’elo·him’ emonisi bato misato kati na Nzambe moko, ezali lelo kozwa bobele bandimi moke kati na bato ya mayele. To lolenge wana ya koloba ekokani na oyo bato ya grammaire babengi pluriel de majesté (kolobela na boike mpo na komonisa lokumu ya moto), to elakisi litondi (plénitude) ya bokasi na bonzambe, nguya nyonso oyo Nzambe azali kosalela.”
Na ntina na liloba ’elo·him’, mokanda Le Journal américain des littératures et des langues sémites elobi boye: “’elo·him’ elobelamaka bobele mpo na moto moko, mpe elimbolamaka na kotalela moto moko.” Lisolo ya kozalisama ezali kopesa biso nzela na kolimbola malamu etaleli yango: tozali kokuta nkombo ’elo·him’ mbala 35 kati na Biblia, mpe verbe oyo ezali komonisa oyo Nzambe alobi mpe likambo oyo ye asali, ezali kotalela moto moko (bomei). (Genese 1:1 kino 2:4) Mokanda yango mosukisi boye ete: “Soki ’elo·him’ elobelami na boike, ezali nde mpo na komonisa bonene mpe lokumu ya moto oyo alobelami.”
’Elo·him’ elimboli “bato” te, kasi “banzambe.” Na yango, baoyo bakolobaka ete liloba ’elo·him’ ezali kopesa likanisi ya Trinité, bazali bongo kosambela ebele na banzambe (polythéistes): bazali kosambela banzambe mingi. Mpo na nini tolobi boye? Mpo ete likanisi na bango ezali kondima bobele ete, ezali na banzambe misato kati na Trinité. Nzokande, pene na bandimi nyonso ya Trinité bazali solo koboya likanisi ya Trinité oyo esalami na banzambe misato bakeseni.
Biblia esaleli mpe maloba ’elohim’ mpe ’elo·heh’ mpo na kolobela ebele na banzambe ya lokuta to bikeko. (Exode 12:12; 20:23) Nzokande na mabaku mosusu, maloba wana ekoki kosalelama mpo na komonisa nzambe bobele moko ya lokuta, lokola oyo elobamaki na ntina na nzambe ya bafilistia, oyo na nkombo “Dagon, nzambe [’elo·heh’] na bango.” (Basambisi 16:23, 24) Bála mpe abengami “nzambe [’elo·him’].” (1 Mikonzi 18:27) Lisusu, liloba yango lizali mpe kosalelama mpo na bato. (Nzembo 82:1, 6) Jéhovah alobaki na Moïse ete, asengelaki kozala “Nzambe” [’elo·him’] mpo na Aro mpe Farao.—Exode 4:16; 7:1.
Na bosolo nyonso, likambo oyo ete ba titres ’elo·him’ mpe ’elo·heh’ emonisi banzambe ya lokuta mpe bato lisusu, elingi koloba te ete yango ezali kosalelama na esika nyonso mpo na boike ya banzambe. Bobele bongo, soko ’elo·him’ mpe ’elo·heh’ esalelami mpo na Jéhovah, tokoki te koloba ete kati na Nzambe ezali na bato mingi, soko tokotalela mingi mpenza bilembo mosusu ya Biblia na ntina na likambo yango.
Yesu, ekelamu ekeseni na Nzambe
YESU azalaki moto awa na mabelé—atako azalaki na kokoka, mpamba te Nzambe atyaki bomoi ya Mwana na ye kati na libumu ya Marie. (Matai 1:18-25) Nzokande, Yesu azalaki na bomoi liboso na eleko wana. Ye moko alobaki ete “akitaki longwa na likoló.” (Yoane 3:13) Akokaki bongo koloba epai na bayekoli na ye ete, “Soko nde bokomona Mwana na moto kobuta esika ezalaki ye liboso?”—Yoane 6:62.
Na yango, liboso na koya na mabelé, Yesu azalaki naino na bomoi na likoló. Azalaki nde moko na bato ya bosato na Bonzambe, mozwi-na-nguya-nyonso mpe oyo na seko? Te, mpamba te Biblia elobi polele mpenza ete liboso na kokóma moto, Yesu azalaki bobele lokola baanzelu, azalaki ekelamu ya elimo oyo azalisamaki na Nzambe. Ezala baanzelu, ezala Yesu, nyonso bazalaki na bomoi te liboso na kozalisama.
Na bomoi na ye wana liboso na kokóma moto, Yesu azalaki “Mobotami na liboso ya biloko nyonso bizalisamaki” (Bakolose 1:15), “ebandeli na kozalisama ya Nzambe.” (Emoniseli 3:14) Na bosembo mpenza, tokoki te kolimbola “ebandeli” [na greke ar·khe’] lokola ete Yesu azalaki moto ‘oyo abandisaki’ bozalisi na Nzambe. Kati na makomi na ye, Yoane asaleli liloba ar·khe’ koleka mbala 20, mpe, na ntango nyonso liloba yango lizali kosalelama, ezali na ndimbola ya “ebandeli.” Ee, Yesu azalisamaki na Nzambe: azali ebandeli na kozalisama ya biloko bizangi komonana.
Tokoki komona boyokani makasi oyo bozali kati na maloba oyo mazali kolakisa ebandeli na Yesu, mpe maloba oyo masalelami mpo na “Mayele” na elilingi kati na mokanda ya Masese: “Jéhovah atongaki ngai na ebandeli ya nzela na ye liboso na misala na ye ya kala. Nabotamaki naino ngomba efandamaki te, naino nkeka ezalaki te. Naino asalaki mabelé to bilanga to eloko moko ya liboso na mputulu ya mokili te.” (Masese 8:12, 22, 25, 26) Ata soko liloba “Mayele” esalelami mpo na koloba na ntina ya ekelamu oyo ezalisami na Nzambe, kasi balimboli mingi ya Biblia bandimi ete, yango ezali solo lolenge na kokoma ya elilingi oyo ezali komonisa Yesu na ntango azalaki naino ekelamu ya elimo liboso na koya awa na mabelé.
Kolobáká bongo lokola “Mayele” (liboso na kokóma moto), Yesu alandi na koloba ete, azalaki “pembeni na ye [na Nzambe] lokola mokonzi ya mosala.” (Masese 8:30, Jé) Na boyokani na oyo mokonzi ya mosala asengeli kosala, Bakolose 1:16 elobi na ntina na Yesu ete “kati na ye, nde biloko nyonso bizalisamaki, biloko ya likoló mpe biloko ya nsé.”
Ezali bongo na nzela na mokonzi oyo ya mosala—ye mosali na Nzambe oyo akosalaka elongo na ye—nde Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso asalaki biloko nyonso. Na mokuse, Biblia emonisi mokumba ya moko na moko na bato yango mibale ete: “Mpo na biso Nzambe moko azali, ye Tata, biloko binso bizalisamaki na ye . . . mpe Nkolo moko azali, ye Yesu Klisto, biloko binso bizalisamaki [na nzela] na ye.”—1 Bakolinti 8:6.
Emonani polele ete ezali epai na mokonzi ya mosala nde Nzambe azalaki koloba ete: “Tika tozalisa moto na lolenge na biso.” (Genese 1:26) Bamosusu balobi ete maloba “tozalisa” mpe “biso” ezali kolóngisa Trinité. Nzokande, soko yo moko olobi ete: ‘tosala eloko,’ solo moto moko akoloba te ete yo osalemi na bato mingi. Na maloba yango olingi koloba bobele ete, bato mibale to bato mingi bakosala na yo elongo. Bobele bongo, ntango Nzambe asalelaki maloba “tozalisa” mpe “biso,” azalaki mpenza koloba epai na moto mosusu, ekelamu na ye ya liboso ya elimo, ye mokonzi ya mosala, Yesu, liboso na kokóma moto.
Nzambe akoki nde komekama?
MATAI 4:1 elobi na ntina na Yesu ete “amekamaki na Diable.” Nsima na kolakisa ye “bokonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango,” Satana alobi na Yesu ete: “Nakopesa yo nyonso oyo soko okokwea mpe okokumbamela ngai.” (Matai 4:8, 9) Mokano ya Satana ezalaki ete apusa Yesu na kobebisa bosembo na ye epai na Nzambe.
Soko Yesu azalaki Nzambe, ndenge nini bosembo na ye ekokaki komekama? Nzambe akokaki nde komitombokela ye moko? Te, nzokande baanzelu mpe bato bakoki kotombokela Nzambe, nkutu yango esili kosalama na bamosusu. Komekama na Yesu ekozwa ndimbola na yango bobele soko ye azali mpenza Nzambe te, kasi soki nde azali moto oyo akeseni na Nzambe, mpe azali na bonsomi ya kozwa makatami na ye moko; ye oyo soki alingaki, akokaki kozanga bosembo epai na Nzambe lokola oyo esalaki banzelu mpe bato mosusu.
Epai mosusu, tokoki kokanisa soko moke te ete Nzambe akosalaka masumu to akoki kozanga bosembo epai na ye moko. “Mpo nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe na sembo . . . ye moyengebeni mpe mosembwi.” (Deteronome 32:4) Na yango soko Yesu azalaki Nzambe, mbele akokaki komekama te.—Yakobo 1:13.
Lokola azali Nzambe te, Yesu akokaki kozanga bosembo; kasi atikalaki sembo na kolobáká ete: “Longwa na yo Satana. Mpamba te ekomami ete: Okokumbamela [Jéhovah] Nzambe na yo mpe okosalela bobele ye.’”—Matai 4:10.
Lisiko ezali na ntina nini?
MOKO na bantina oyo mpo na yango Yesu ayaki na mokili ezali na boyokani na oyo etali Trinité. Totangi boye kati na Biblia: “Mpo ete Nzambe moko azali mpe Moyokanisi moko kati na Nzambe mpe bato, ye moto Klisto Yesu, oyo amipesaki lokola lisiko likokani mpo na banso.”—1 Timoté 2:5, 6, MN.
Yesu, moto na kokoka mpenza, akómaki lisiko libongaki na kozongisa oyo Adam abungisaki: likoki ya kozala na bomoi ya kokoka na mabelé. Ezali mpo na yango nde Paulo abéngaki ye “Adam na nsuka”; ntoma alobi lisusu ete: “Mpamba te lokola na Adam nyonso bakokufaka, boye na Klisto nyonso bakozwa bomoi.” (1 Bakolinti 15:22, 45) Bomoi na Yesu ya kokoka ezalaki mpenza “lisiko” likokani na oyo esengami na boyengebene na Nzambe. Ata na boyengebene ya bato, ezali na etinda ya moboko oyo engebene yango ntalo ya kofuta esengeli kokokana na mabe masalami.
Epai mosusu, soko Yesu azalaki mosangani ya Bonzambe, mbele lisiko elingaki kozala na motuya mingi koleka oyo esengamaki na mobeko na Nzambe. (Exode 21:23-25; Levitike 24:19-21) Adam, moto oyo asalaki lisumu na Edene, azalaki bobele moto ya kokoka, kasi azalaki Nzambe te. Na yango, mpo ete lisiko elongobana na boyengebene ya Nzambe, esengelaki ete ekokana mpenza; esengelaki bobele bomoi ya moto ya kokoka; oyo ya “Adam na nsuka.” Ntango Nzambe atindaki Yesu na mabelé mpo na komipesa lokola lisiko, asalaki yango na lolenge ete boyengebene ekokisama; moto moko amibómbaki te kati na Yesu, azalaki mpe nzambe-moto te, kasi moto ya kokoka oyo azalaki “na nsé ya baanzelu.” (Baebele 2:9; tala Nzembo 8:5, 6.) Nani mosangani ya Bonzambe na Nguya-Nyonso—Tata, Mwana to mpe Elimo-Santu—oyo akoki kozala na nsé ya baanzelu?
Na ndimbola nini azali “Mwana sé moko”?
BIBLIA ebengi Yesu “Mwana na likinda [na elobeli ya polele, oyo abotami sé ye moko]” na Nzambe. (Yoane 1:14; 3:16, 18; 1 Yoane 4:9) Engebene bandimi ya Trinité, lokola ete Nzambe azali seko, Mwana na Nzambe ye mpe azali seko. Kasi, ndenge nini mwana akoki kozala na mbula moko na Tata na ye?
Bandimi ya Trinité bazali koloba ete, na oyo etali Yesu, boyokani bokoki kotyama te kati na nkombo oyo “likinda [na elobeli ya polele, oyo abotami sé ye moko]” mpe ndimbola oyo ba diksionere ezali kopesa na ntina na nkombo “kobotama”: “kokela mosusu”; “kopesa mosusu, kobimisa bomoi.” Bobele engebene bandimi ya Trinité, na ntango liloba yango lisalelami na ntina na Yesu, esengeli kososola ete ezali nde na “lolenge ya boyokani oyo bozwaki libandeli te,” motindo ya boyokani oyo bozali na mwana bobele moko oyo azangi kobotama. (Dictionnaire interprétatif des mots de l’Ancien et Nouveau Testament, angl., de Vine) Likanisi yango lizali ya mayele? Moto akoki nde kokóma tata kozanga kobota?
Epai mosusu, lokola oyo Vine alobelaki yango kozanga kolimbola, mpo na nini Biblia esaleli liloba yango moko libongolami na “likinda,” na monoko na greke mpo na komonisa boyokani oyo bozali kati na Yisaka mpe Abrahame? Na Baebele 11:17, Yisaka abengami “mwana na likinda” to “mwana sé moko” ya Abrahame. Na oyo etali Yisaka, ntembe ezali te ete azalaki mpenza mwana sé moko na ndimbola oyo eyebani na bato nyonso, kasi azalaki na mbula moko te na tata na ye to mpe akokanaki na ye te.
Liloba ya greke (libongolami na “likinda”) oyo lisalelami mpo na komonisa Yesu mpe Yisaka, ezali mo·no·ge·nes’, euti na mo’nos, “sé moko,” mpe gi’no·maï, liloba oyo lizali kolimbola “kobota”; “kokóma, (kozalisama).” Bongo Mo·no·ge·nes’ elimbolami ete: “abotami sé ye moko, elingi koloba mwana na likinda.”—Lexique grec-anglais du Nouveau Testament (angl.), E. Robinson.
Mokanda Dictionnaire théologique du Nouveau Testament (angl.), oyo ekomamaki na Gerhard Kittel elobi boye: “[Mo·no·ge·nes’] elimboli ‘oyo abotami sé ye moko,’ elingi koloba azangi ndeko mwasi to ndeko mobali.” Kati na Yoane 1:18; 3:16, 18; 1 Yoane 4:9, mokanda yango mozali komonisa polele ete “boyokani na Yesu mpe Nzambe bokokani bobele te na oyo ezali kati na mwana oyo alingami epai na tata na ye; kasi oyo ezali mpenza kati na [Mwana] na likinda mpe Tata na ye.”
Na yango, Mwana bobele moko azali na ebandeli. Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, mpo na ye, abongi mpenza kobengama Tata na ye, Oyo abotaki ye na lolenge ya tata oyo azali moto ya mosuni, lokola Abrahame abotaki mwana na ye. (Baebele 11:17) Yango wana Biblia ezali koloba ete Nzambe azali “Tata” na Yesu, ezali mpenza komonisa ete bazali bato mibale bakeseni. Nzambe aleki Yesu, ezala na mbula, na lokumu, na nguya to mpe na boyebi.
Wana tozali komona ete Yesu azali te bobele ye moko Mwana na Nzambe na elimo kati na makoló, tozali kokanga ntina ete nkombo “Mwana [mobotami]—sé moko (likinda)” epesamelaki ye. Ebele na baanzelu, mpe bikelamu mosusu ya elimo babengami “bana ya Nzambe” lokola—lolenge moko na Adam, mpo ete nguya na bango ya bomoi euti na Jéhovah, ye Liziba ya bomoi. (Yobo 38:7; Nzembo 36:9; Luka 3:38) Nzokande, bikelamu nyonso wana bizalisamaki na nzela ya “Mwana na likinda,” oyo azalisamaki mpenza na maboko ya Nzambe ye moko.—Bakolose 1:15-17.
Okanisaki ete Yesu azali Nzambe?
ATA soki Yesu abengami mbala mingi Mwana na Nzambe kati na Biblia, na ekeke ya liboso, moto moko akanisaki te na koloba ete Yesu azalaki nde Nzambe Mwana. Ata bademó, baoyo ‘bandimi ete Nzambe azali moko,’ lokola bazalaki na likoló, bayebi ete Yesu azali Nzambe te. Yango wana bazalaki koloba na ye lokola na moto oyo akeseni na Nzambe, lokola “Mwana na Nzambe.” (Matai 8:29; Yakobo 2:19) Lisusu na ntango Yesu akufaki, basoda ya Roma oyo bazalaki wana, atako bazalaki bapakano, bayebaki ete oyo bayokaki na minoko ya bayekoli na ye esengelaki kozala solo: balobaki te ete Yesu azali Nzambe, kasi ete “na solo, oyo azalaki Mwana na Nzambe.”—Matai 27:54.
Na bongo, liloba “Mwana na Nzambe” emonisi ete Yesu azali ekelamu ekeseni na Nzambe, kasi mosangani ya Trinité te. Lokola azali Mwana na Nzambe, akoki lisusu te kozala ye moko Nzambe, mpamba te, Yoane 1:18 elobi boye: “Moto moko te asili komona Nzambe.”—Biblia ya Osty.
Bayekoli bazalaki te kotalela Yesu lokola Nzambe ye moko, kasi lokola nde “moyokanisi kati na Nzambe mpe bato.” (1 Timoté 2:5) Na ndimbola na yango, moyokanisi akeseni na bato oyo bazali na mposa ya mosala na ye ya koyokanisa, ekozala bongólábongola soko Yesu akozala lisusu ye moko kati na baoyo ye alingi koyokanisa. Soko Yesu alobaki bongo, mbele alingaki bongo komimonisa na lolenge oyo ye azalaki mpenza te.
Kati na Biblia mobimba, tozali kokuta ndimbola ya polele ya boyokani oyo bozali kosangisa Nzambe mpe Yesu. Bobele Jéhovah nde azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Ye moko nde azalisaki Yesu liboso na kotinda ye na mabelé. Yesu azali na ebandeli mpe akokani te na Nzambe, ezala na nguya to na seko.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]
Lokola azalisamaki na Nzambe ye moko, Yesu azali kozwa esika ya mibale mpo na oyo etali bambula ya bomoi, nguya mpe boyebi
[Elilingi na lokasa 15]
Yesu alobaki ete azalaki na bomoi liboso ya koya na mabelé, mpamba te azalisamaki na Nzambe, azalaki ebandeli ya kozalisama na bikelamu na ye ya elimo