Mituna ya batángi
Ndenge nini baklisto basengeli kotalela likambo ya kozala bafianse?
Ntango bato mibale bayokani bázala bafianse mpo na nsima bábalana ezalaka likambo ya esengo, kasi ezali mpe likambo ya kozwa na lisɛki te. Moklisto oyo akɔmeli asengeli kozwa likambo yango lokola lisano te; akanisa te ete akoki koboma yango soki alingi ata na likambo oyo ezangi ntina. Ntango mwana mwasi na mwana mobali bazali bafianse ezali ntango oyo basengeli koyebana malamumalamu liboso bábalana.
Wana tozali kolobela likambo oyo, tóyeba ete mimeseno ya bato mpo na libala mpe makambo oyo esalemaka liboso ya libala ekeseni mingi esika na esika mpe eleko na eleko. Biblia emonisi yango.
Bana basi mibale ya Lota, baoyo ‘bayebaki naino mobali te,’ bazalaki bafianse ya mibali mibale na mboka oyo bafandaki. ‘Babokilo’ ya Lota ‘basengelaki kokamata bana na ye,’ kasi Biblia eyebisi biso te mpo na nini to ndenge nini bayokanaki bázala bafianse. Toyebi te soki bana basi yango bazalaki mikóló. Toyebi mpe te soki bango moko baponaki mibali na bango. Mpe lisusu toyebi te soki bamonisaki na miso ya bato ete bakómi bafianse. (Genese 19:8-14) Kasi toyebi ete Yakobo ayokanaki ye moko na tata ya Laele mpo na kobala Laele soki asaleli ye mosala mbula nsambo. Atako Yakobo abéngaki Laele “mwasi na ngai,” basangisaki nzoto te na boumeli ya bambula wana. (Genese 29:18-21) Ndakisa mosusu, Saulo asɛngaki na Davidi ete liboso abala mwana na ye ya mwasi, asengelaki kolonga naino Bafilistia. Nsima ya kokokisa likambo oyo Saulo asɛngaki ye, Davidi abalaki Mikala, mwana na ya Saulo. (1 Samwele 18:20-28) “Boyokani” wana mpo na kozala bafianse ekesanaki mpe ekeseni na oyo esalemaka na bikólo mingi lelo oyo.
Mibeko ya Mose ezalaki na malako mpo na libala mpe kozala bafianse. Na ndakisa, mobali akokaki kozala na basi mingi; akokaki koboma libala mpo na bantina mingi, kasi ezalaki bongo te mpo na mwana mwasi. (Exode 22:16, 17; Deteronome 24:1-4) Mobali oyo asangisi nzoto na elenge mwasi oyo ayebi mobali te mpe azali na fianse te asengelaki kobala ye soki tata ya mwana mwasi yango andimi, mpe mobali wana akokaki koboma libala yango ata mokolo moko te. (Deteronome 22:28, 29) Mibeko mosusu etalelaki bato oyo babalani; na ndakisa ntango oyo mwasi na mobali bakokaki kosangisa nzoto te. (Levitike 12:2, 5; 15:24; 18:19) Malako nini ezalaki mpo na bafianse?
Na Mibeko ya Mose, mwasi Moyisalaele oyo azali fianse bazalaki kotalela ye ndenge moko te na mwasi oyo azali na fianse te; na makambo mosusu bazalaki kotalela ye lokola mwasi ya libala. (Deteronome 22:23-29; Matai 1:18, 19) Epai ya Bayisalaele, ezalaki na bandeko oyo bakokaki kozala bafianse te to kobalana te. Mingimingi baoyo bautaki na nkɔkɔ moko. Kasi bapekisaki mpe bato mosusu bázala bafianse to bábalana mpo na kobatela libula na bango. (Levitike 18:6-20; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1978, nkasa 25-28, ebimeli ya Lifalanse.) Tomoni polele ete basaleli ya Nzambe basengelaki kotalela likambo ya kozala bafianse na lisɛki te.
Bayisalaele bazalaki kolanda Mibeko ya Mose, kasi baklisto bazali kolanda Mibeko ya Mose te, bakisa mpe malako na yango mpo na kozala bafianse to mpo na libala. (Baloma 7:4, 6; Baefese 2:15; Baebele 8:6, 13) Kutu, Yesu ateyaki ete malako ya boklisto mpo na libala ekeseni na malako ya Mibeko ya Mose. (Matai 19:3-9) Atako bongo, atalelaki libala to kozala bafianse na lisɛki te. Na yango, ndenge nini baklisto basengeli kotalela likambo ya kozala bafianse?
Na mikili mingi, moto ye moko aponaka mwasi to mobali oyo akobala. Ntango mwasi na mobali bayokani mpo na libala, batalelaka bango lokala bafianse. Mbala mingi, esɛngaka makambo mingi te mpo bato yango mibale bándimama lokola bafianse. Na mikili mosusu, mbala mingi mobali apesaka mwasi lopɛtɛ mpo na kolakisa ete bakómi bafianse. To esalemaka mingi ete bato yango báyebisa bandeko na baninga na bango ete bakómi bafianse, na ndakisa, basalaka yango na mwa feti epai kuna libota mobimba bakolya mpe bakomela. Wana ezali ndenge bato na bato baponaka kosala, kasi Biblia elobi te ete tósala kaka bongo. Bato bakómaka bafianse ntango bayokani bango mibale.a
Moklisto asengeli kokende mbangumbangu te na likambo ya kosepela na mobali to mwasi, kozwa fianse, to kobala. Mikanda ya la Société ebimisá masolo oyo ezali komonisa likanisi ya Biblia mpo na kosalisa minzemba na koyeba soki ezali ntango malamu kobanda kosepela na mobali to mwasi to koluka fianse to kobala.b Likambo ya ntina na toli yango ezali ete libala ya baklisto ezalaka mpo na libela.—Genese 2:24; Malako 10:6-9.
Baklisto mibale basengeli koyebana malamu liboso ete bákanisa kokóma bafianse. Mokomoko akoki kotuna boye: ‘Nayebi moto yango malamu mpenza? Atyaka makambo ya elimo na esika ya liboso? Abangaka Nzambe? Nakoki mpenza kozala na elikya ete nakosalela Nzambe elongo na moto yango bomoi na ngai mobimba? Tozwaki mpenza ntango ekoki mpo na koyebana bizaleli? Nandimi solo ete tokoyokana malamu libela na libela? Moto na moto ayebi malamu bomoi moninga azalaki na yango kala mpe ndenge azali lelo oyo?’
Ntango baklisto mibale bakómi bafianse, ebongi ete bango moko to bato mosusu bázala na elikya ete bakobalana. Yesu apesaki toli ete: “Tiká ete liloba na bino lizala Ɛɛ! Ɛɛ!, mpe Te! Te!” (Matai 5:37) Soki baklisto bandimi kozala bafianse emonisi ete bakanisaki likambo yango malamumalamu. Nzokande, ekoki kosalema, kasi mingi te, ete moklisto moko oyo azali na fianse ayeba na nsima ete likambo moko monene elobelamaki te to ebombamaki liboso bákóma bafianse. Ekoki kozala likambo monene na bomoi ya fianse na ye liboso ayeba ye, mbala mosusu asalaki mabe monene to azalaki ndumba. Moklisto oyo ayei koyeba likambo yango nsima akopona nini akosala. Mbala mosusu bango mibale bakosolola likambo yango polele mpe bakoyokana ete bálanda kozala bafianse. To bakoki koyokana ete bákata. Atako yango ezali likambo oyo etali bango mibale, oyo bato mosusu basengeli kokɔta te, kozwela bango makanisi ya mabe te, to kosambisa bango te; kozwa mokano ya ndenge wana ezali likambo oyo basengeli kotalela na lisɛki te. Nzokande, ye oyo ayei koyeba likambo moko monene ya fianse na ye akoki komona ete ebongi bákata, ata soki moninga azali na mposa ete bázala kaka.—Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1975 (ebimeli ya Lifalanse).
Ezali malamu kosilisa makambo ya boye liboso ya kobalana. Yesu alobaki ete Biblia endimi ntina se moko mpo moto aboma libala mpe abala moto mosusu, ezali pornéïa, elingi koloba moto oyo abalá asali mpenza ekobo. (Matai 5:32; 19:9) Yesu alobaki te ete libala ekoki kokufa soki moto ayei koyeba ete mobalani na ye azali na mokakatano moko to asalaká makambo ya mabe liboso bábalana.
Na ndakisa, ntango Yesu azalaki awa na mabelé moto akokaki mpenza kozwa maladi ya maba. Soki Moyuda ayei koyeba ete mwasi na ye azalaki na maladi ya maba ntango abalaki ye (ezala ete ye moko ayebaki to ayebaki yango te), akokaki nde koboma libala yango? Na kolanda Mibeko ya Mose, Moyuda akokaki koboma libala yango, kasi Yesu alobaki ete yango ekoki kosalema bongo te mpo na bayekoli na ye. Tótala mwa makambo oyo ekoki kosalema na mikolo na biso. Mobali moko oyo azali na mikrobe ya kasende, herpès génital, sida, to maladi mosusu oyo ekoki kozwa moto mosusu akoki kobala kozanga ete ayebisa liboso mwasi na ye likambo yango. Mbala mosusu azwaki mikrobe yango ntango asangisaki nzoto na moto mosusu liboso ya kokóma fianse to ntango azalaki fianse. Mwasi oyo ayei koyeba ete mobali na ye azali na maladi to asalaki pite kala (ata soki abotaka te to akufá mokongo), yango ekoki koboma libala te. Biblia epesi mwasi nzela ya koboma libala te mpo mobali na ye azalaki na etamboli mabe liboso bábalana; to mobali ata soki mwasi azwaki maladi moko to mpe abombaki zemi ya mobali mosusu ntango libala esalamaki. Sikoyo bazali mwasi na mobali mpe bakataki ndai moko na mosusu.
Ya solo, makambo yango ya mawa ezalaka mingi te; kasi, bandakisa oyo esengeli komonisa likambo ya ntina mingi oyo: Kondima kozala fianse ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Liboso mpe ntango bandimi kozala bafianse, baklisto basengeli kosala makasi báyebana malamu. Basengeli koloba na bosembo makambo oyo moninga alingi koyeba to makambo oyo asengeli koyeba. (Na bikólo mosusu, Leta atyá mobeko ete liboso ya kobala, mwasi na mobali basengeli kosala ekizame ya monganga. Nzokande, bamosusu atako na ekólo na bango Leta atyá mobeko yango te, basepelaka kaka kosala yango mpo na koyeba.) Na ndenge yango, esengo mpe bonene ya likambo ya kozala bafianse ekozala na ntina mingi mpe ekomema bato mibale oyo balingani tii na likambo oyo eleki esengo mpe eleki monene, elingi koloba libala.—Masese 5:18, 19; Baefese 5:33.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na bisika mosusu, tii lelo oyo baboti baponelaka bana na bango bafianse. Mbala mosusu basalaka yango na ntango oyo bilenge bakómi naino na makoki ya kobala te. Na ntango yango bazali kotalela bango lokola bafianse, kasi babalani naino te.
b Talá buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, mokapo 28-32, mpe buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, mokapo 2, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.