Basalaki Mokano ya Yehova
Bakei koluka mwasi mpo na Yisaka
MOBALI oyo afandi pene na libulu ya mai alɛmbi mpenza. Ye na basungi na ye elongo na bakamela na bango zomi bauti kosala mobembo molai kouta na mboka oyo ezali pene na Bele-seba na Nɔ́rdi ya Mésopotamie—na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 800.a Sikawa lokola bakómi na esika bakanaki kokende, mosáli mobembo oyo alɛmbi mpenza apemi mwa moke mpo na komanyola likoló na mokumba na ye monene. Moto yango ezalaki nani, mpe mpo na nini asilaki kosala mobembo wana ya mpasi mingi?
Moto yango azalaki mosaleli ya Abalayama, “mokóló na bato na ndako na ye.” (Genese 24:2) Atako nkombo na ye etángami te kati na lisoló, emonani mpenza ete ezalaki bongo Eliezele, ye oyo Abalayama alobaki liboso na ntina na ye ete ‘ye oyo abotamaki na ndako na ye’ mpe ye oyo alobaki na ntina na ye ete ‘asengelaki kokitana ye lokola mosangoli.’ (Genese 15:2, 3, NW) Ya solo, wana esalamaki na ntango oyo Abalayama mpe Sara bazalaki na mwana te. Sikawa mwana na bango, Yisaka, akómaki na mibu 40 ya kobotama, mpe atako Eliezele azalaki lisusu mosangoli ya liboso ya libula ya Abalayama te, azalaki ntango nyonso mosaleli na ye. Na yango andimaki ntango Abalayama asɛngaki ye likambo moko ya mpasi. Ezalaki nini?
Mokumba ya mpasi
Na eleko oyo Abalayama azalaki na bomoi, libala ezalaki likambo litalelaki bobele libota te kasi etúlúká mobimba, to molɔngɔ́ ya libota ya Tata. Na yango, ezalaki na momesano ete baboti bápona mobalani mpo na mwana mobali na bango. Nzokande, ntango asengelaki koluka mwasi mpo na mwana na ye Yisaka, Abalayama azalaki na mokakatano. Etamboli mabe ya Bakanana oyo bafandaki na mboka yango esalaki ete Abalayama aboya kobalisa mwana na ye na bana basi na bango. (Deteronome 18:9-12) Mpe atako ezalaki na momesano mpo na moto ete abala kati na etúlúká na ye, bandeko ya Abalayama bafandaki na mboka oyo ezali mosika na ntáká ya bankámá mingi ya bakilomɛtɛlɛ na nɔ́rdi ya Mésopotamie. Akokaki te kotika Yisaka ete akenda kofanda kuna, mpamba te Yehova asilaki kolaka epai na Abalayama ete: “Nakopɛsa mokili oyo na libota na yo,” mokili ya Kanana. (Genese 24:7) Na yango, Abalayama alobaki na Eliezele ete: “Okokenda na mokili na ngai mpe na libota na ngai, mpe okokamata mwasi mpo na mwana na ngai Yisaka.”—Genese 24:4.
Na ntango asukisi mobembo na ye molai, Eliezele apemaki pene na libulu ya mai wana ezali ye komanyola na ntina na mokumba na ye. Amonaki ete mosika te bana basi basengelaki kobanda koya na libulu mpo na kotoka mai mpo na butu. Na yango abondelaki Yehova na maloba oyo ete: “Moseka oyo ngai nakolɔmba ye ete, kitisá mbeki na yo ete namela, mpe ye akozongisela ngai ete, Melá, mpe nakomelisa bakamela na yo, tiká ete azala mwasi eponi yo mpo na moombo na yo Yisaka. Bongo nakoyeba ete omonisi boboto na nkolo na ngai.”—Genese 24:14.
Wana azalaki naino kosambela, elenge mwasi moko na bonzenga mpenza abéngami nkombo ete Lebeka abɛlɛmaki. Eliezele alobaki na ye ete: “Tiká namela mwa ndambo na mai na mbeki na yo.” Lebeka apesaki ye mai mpe alobaki ete: “Nakokata mai mpo na bakamela na yo lokola, kino esili bango komela.” Oyo nde boboto, mpamba te kamela oyo azali na mposa na mai akoki komela kino balitɛlɛ 95 ya mai bobele na miniti zomi! Ezala ete bakamela ya Eliezele ezalaki na mposa na mai to te, Lebeka ayebaki ete mosala oyo asɛngaki ete akokisa yango ezalaki mpenza ya kolɛmbisa. Ya solo, ye “asopaki mai na ye na kati na emelelo mpe atambolaki mbangu epai na liziba mpo na kotoka mpe atokaki mpo na bakamela na ye nyonso.”—Genese 24:15-20.
Komonáká litambwisi ya Yehova kati na likambo yango, Eliezele apesaki epai na Lebeka lopɛtɛ ya wolo mpe makɔmɔ mibale ya wolo, nyonso na motuya ya badolare 1 400 na emekeli ya lelo. Na ntango Lebeka ayebisaki ye ete azali mwana na mwana na Nahola, ndeko mobali na Abalayama, Eliezele asalaki libondeli ya matɔndi epai na Nzambe. Alobaki ete: “[Yehova] akambi ngai na nzela na ndako na bandeko na nkolo na ngai.” (Genese 24:22-27) Bamemaki Eliezele kino na libota na Lebeka. Na nsima, Lebeka akómaki mwasi na Yisaka, mpe azwaki libaku malamu ya kokóma nkɔ́kɔ ya Masiya, Yesu.
Liteya mpo na biso
Yehova apambolaki milende oyo Eliezele asalaki na kotyáká motema epai na Nzambe mpo na kolukela Yisaka mwasi oyo azali na bobángi Nzambe. Tómikundola ete libala ya Yisaka ekanganaki mpenza na mokano ya Nzambe ete akobimisa mombóto na nzela na Abalayama. Na yango, lisoló oyo esengeli te komema biso na kokanisa ete moto nyonso oyo akosala libondeli mpo na kozwa mobalani akopesamela ye na nzela ya likamwisi. Nzokande, soko tokangami na mitindá ya Yehova, akopesa biso makasi ya koyika mpiko liboso na mikakatano oyo mizali koya na nzela na ezalela nyonso kati na bomoi—libala to bonzemba.—1 Bakolinti 7:8, 9, 28; kokanisá na Bafilipi 4:11-13.
Eliezele asengelaki kosala milende makasi ete asala makambo engebene mitindá ya Yehova. Biso mpe tokoki komona ete kolanda banzela ya Yehova ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Na ndakisa, ekoki kozala mpasi na kozwa mosala oyo ezali te kobebisa manáka na biso ya misala ya teokrasi, kozwa mobalani oyo azali na bobángi Yehova, baninga oyo bayebi kolendisa, kominanola oyo ezangi mbindo. (Matai 6:33; 1 Bakolinti 7:39; 15:33; Baefese 4:17-19) Nzokande, Yehova akoki kosunga baoyo baboyi kobuka mitindá ya Biblia. Biblia elaki ete: “Talelá Yehova na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”—Masese 3:5, 6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na kotalela mwayene ya mbangu ya bakamela, ekoki kozala ete esengelaki mikolo koleka 25 mpo na kokóma na nsuka ya mobembo wana.