Etikali moke Nzambe akokisa mokano na ye mpo na mabelé
NTANGO Adama ná Eva bazalaki naino na Paladiso, Nzambe alobaki na bango boye: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló ya mbisi na mai, mpe na ndɛkɛ na likoló, mpe likoló ya nyama nyonso ya bomoi ekotambolaka na mokili.”—Genese 1:28.
Kotya mabelé na nse (to kozala na bokonzi likoló na yango) elimbolaki kaka te kolona to kobongisa eteni moko ya mabelé. Adama ná Eva mpe bana na bango basengelaki kokómisa mabelé mobimba Paladiso. Nzokande, mobali ná mwasi ya liboso basalaki lisumu mpe Nzambe abenganaki bango na elanga ya Edene. (Genese 3:23, 24) Kasi, yango elingi koloba te ete makambo nyonso esukaki wana.
Nzambe akopambola bato ya botosi, yango wana bakozala na bokonzi likoló ya mabelé. Ntango Nzambe azalaki kopambola Bayisalaele, bilanga na bango ezalaki kobota mingi mpe banzete na bango ezalaki kobota bambuma ya kitoko. Ekozala mpe bongo ntango mabelé ekokóma paladiso. Ndenge Liloba ya Nzambe elaki yango, ‘Mokili [to mabelé] ekobota mbuma na yango; Nzambe, ɛɛ Nzambe na biso akopambola biso.’ (Nzembo 67:6) Bazamba mpe bangomba, banzete mpe bafololo, bibale mpe mbu ekosepela. (Nzembo 96:11-13; 98:7-9) Mabelé ekozala na bazamba kitoko, bandɛkɛ ya ndenge na ndenge, banyama ya kitoko mpe bato ya boboto.
Etikali moke mokili ya sika eya!
Etikali moke mokili ya sika oyo Yehova Nzambe alaki eya. Ntoma Petelo akomaki boye: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) Nsima ya kotánga maloba yango, bato mosusu bakoki koloba ete ekosalema ata mokolo moko te ete mabelé ekóma paladiso. Mbala mosusu bakanisaka ete Nzambe akolongola likoló mpe mabelé oyo mpe na esika na yango, akosala mosusu. Kasi, ezali mpenza bongo?
“Likoló ya sika” ezali nini? Ezali te likoló oyo tozali komona na miso. (Nzembo 19:1, 2) Liboso Petelo akoma maloba wana, autaki kolobela “likoló” ya elilingi, elingi koloba baguvɛrnema ya mokili oyo ezali koyangela bato. (2 Petelo 3:10-12) “Likoló” yango elongi te kokokisa bamposa ya bato mpe Nzambe akolongola yango. (Yilimia 10:23; Danyele 2:44) “Likoló ya sika” ezali nde Bokonzi ya Nzambe. Na bokonzi yango Yesu Klisto akoyangela ná bato 144 000.—Baloma 8:16, 17; Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 3.
“Mabelé ya sika” oyo Petelo alobelaki ezali te mabelé mosusu. Yehova akelá mabelé malamu mpenza mpo bato báfanda wana libela. (Nzembo 104:5) Ntango mosusu Biblia esalelaka liloba “mabelé” mpo na kolobela bato. (Genese 11:1) Mabelé oyo Nzambe akoboma mosika te ezali nde bato oyo bazali kosala makambo ya mabe. Na ndakisa, Nzambe abomaki bato oyo bazalaki kotyola ye na Mpela ya ntango ya Noa. (2 Petelo 3:5-7) Kasi, “mabelé ya sika” ezali nini? Ezali bato ya malamu oyo bakofanda awa na mabelé, elingi koloba basaleli ya solo ya Nzambe, baoyo “bazali sembo kati na mitema na bango.” (Nzembo 125:4; 1 Yoane 2:17) Mibeko nyonso oyo ekotambwisa makambo na “mabelé ya sika” ekouta na “likoló ya sika.” Na mabelé yango ekozala na mibali ya sembo oyo bakotosisa mibeko yango.
Makambo ya sika mpe ya kokamwa!
Na ebandeli, Yehova abongisaki mabelé malamu mpenza mpo bato báfanda wana. Ye moko alobaki ete mosala na ye nyonso awa na mabelé ezalaki “malamu mingi.” (Genese 1:31) Satana Zabolo atindaki Adama ná Eva bátombokela Nzambe. (Genese 3:1-5; Emoniseli 12:9) Kasi, etikali moke Nzambe akopesa bato ya sembo “bomoi ya solosolo,” elingi koloba “bomoi ya seko” na kati ya Paladiso. (1 Timote 6:12, 19) Tótalela sikoyo mapamboli oyo bato bakozwa na ntango wana.
Na boumeli ya mbula nkóto oyo Klisto akoyangela, Satana akozala na bolɔkɔ mpe akosala lisusu bato mabe te. Ntoma Yoane alobaki boye: “Namonaki anzelu moko [anzelu-mokonzi Mikaele, elingi koloba Yesu Klisto] azali kokita uta na likoló ná fungola ya lobwaku mozindo mpe monyɔlɔlɔ moko ya monene na lobɔkɔ na ye. Mpe asimbaki dalagona, nyoka yango ya ebandeli, oyo azali Zabolo mpe Satana, mpe akangaki ye minyɔlɔlɔ mbula nkóto moko. Mpe abwakaki ye na kati ya lobwaku mozindo mpe akangaki yango mpe atyaki yango elembo na likoló na ye, mpo akoka lisusu kobungisa bikólo nzela te tii ntango mbula nkóto yango ekosuka.” (Emoniseli 20:1-3; 12:12) Na ntango nyonso oyo Satana akozala na lobwaku mozindo, akosala lisusu bato mabe moko te. Longola yango, Bokonzi ya Masiya ekomemela bato ebele ya mapamboli.
Makambo ya mabe, mobulu, mpe bitumba ekozala lisusu te. Biblia elobi ete: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te. Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo. Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:10, 11, 29) Yehova Nzambe “akosukisa bitumba kino na nsuka ya mokili.” (Nzembo 46:9) Maloba yango ezali kondimisa biso ete bato bakobanga lisusu eloko te mpe bakozala na kimya!
Bilei ekozala beboo. Mokomi ya Nzembo ayembaki boye: “Masango ekotondana na mokili ata kino likoló ya nkeka.” (Nzembo 72:16) Na ntango wana, ata moto moko te akozanga biloko ya kolya.
Moto moko te akotungisama na maladi. Biblia elobi ete: “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24; 35:5, 6) Ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabelé, abikisaki bato oyo bazalaki na maladi ya maba, atɛlɛmisaki bibɔsɔnɔ mpe afungolaki miso ya bato bakufá miso. (Matai 9:35; Malako 1:40-42; Yoane 5:5-9) Kanisá makambo minene oyo akosala na mokili ya sika! Kanisá esengo oyo tokozala na yango ntango bato oyo bakufá miso, baoyo bakufá matoi, bibɔsɔnɔ mpe bababa bakobika!
Bato ya botosi bakokóma mokemoke bato ya kokoka mpe mibange bakozonga nzoto makasi. Bato bakozala lisusu te na mposa ya biloko lokola manɛti, banzete ya bato bakufá miso to ya mibange, bakiti ya bibɔsɔnɔ; longola yango, balopitalo mpe nkisi ya monganga ekozala lisusu te. Biso nyonso tokozongela makasi ya bolenge! (Yobo 33:25) Mokolo na mokolo, tokobanda kolamuka nzoto makasi mpo na kosala mosala oyo ekopesa biso esengo.
Tokosepela mingi ntango tokomona bandeko na biso, baninga na biso, mpe bato mosusu oyo bakufá basekwi. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Kanisá esengo ya koyamba bato lokola Abele, Noa, Abalayama, Sala, Yobo, Moize, Luta, Davidi, Eliya, Esetele, mpe bongo na bongo! Bamilio ya bato mosusu mpe bakosekwa. Mingi kati na bango bayebaki Yehova te, kasi bato oyo bakokuta na bomoi bakoteya bango mikano ya Nzambe mpe makambo ya Mwana na ye, Yesu Klisto. Ntango bato oyo bakosekwa bakoyeba Mozalisi na bango, mabelé ekotonda na boyebi ya Yehova.
Likambo eleki malamu ezali ete tokosambela Nzambe kaka moko ya solo libela na libela. Tokozala na libaku malamu ya ‘kosalela Yehova na esengo,’ mpe tokotonga bandako kitoko, tokosala bilanga mpe, nsukansuka tokozala na bokonzi likoló ya mabelé mobimba; tokosala misala nyonso wana na bomoko. (Nzembo 100:1-3; Yisaya 65:21-24) Kanisá esengo ya kozala na bomoi ya seko na paladiso, epai milona ekobota malamu mpe kimya ekozala; paladiso oyo ekokumisa nkombo mosantu ya Yehova!—Nzembo 145:21; Yoane 17:3.
Komekama ya nsuka
Na boumeli ya mbula nkóto oyo Yesu akoyangela, akosala ete bato ya botosi bákóma malamu mpenza mpamba te asilaki kopesa mbeka mpo na kosikola bato. Nsukansuka, masumu nyonso ekolongwa mpe bato bakokóma bato ya kokoka. (1 Yoane 2:2; Emoniseli 21:1-4) Lokola mbuma mabe ya lisumu ya Adama ekolongwa, bato bakokóma na nzoto, na makanisi, na bizaleli mpe na elimo ya kokoka, ndenge Nzambe alingaki na ebandeli. Na ndenge yango nde ‘bakozonga na bomoi’ mpamba te bakozala lisusu na lisumu te. (Emoniseli 20:5) Makambo nyonso wana mpe mabelé yango moko oyo ekokóma Paladiso ekopesa Yehova nkembo!
Mwa moke nsima ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, bakobimisa Satana ná bademo na ye na lobwaku mozindo oyo bakangaki bango. (Emoniseli 20:1-3) Bakotika bango bámeka kozimbisa bato mpo na mbala ya nsuka. Atako mwa bato mosusu bakokwea, Satana ná bademo na ye bakolonga te kozimbisa bato nyonso. Yehova akoboma Satana, bademo na ye nyonso, mpe bato oyo bakolanda bango. Mabe ekolimwa mpo na libela. Bato mabe bakozala lisusu te, mpe bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.—Emoniseli 20:7-10.
Okozala na mokili yango?
Bato oyo balingaka Yehova Nzambe bakozwa bolamu ya seko. Bomoi ya seko na Paladiso ekozala ata na likambo moko te oyo ekolɛmbisa bato. Kutu, wana mikolo ezali koleka, bomoi ekokóma lisusu malamu koleka, mpo boyebi ya Yehova Nzambe ezali na nsuka te. (Baloma 11:33) Tokozala ntango nyonso na makambo ya koyekola, mpe tokozanga ntango te mpo na kosala yango. Mpo na nini? Mpamba te tokozala na bomoi, kaka mbula 70 to 80 te, kasi mpo na libela.—Nzembo 22:26; 90:10; Mosakoli 3:11.
Soki olingaka Nzambe, okozala ntango nyonso na esengo ya kosala mokano na ye. Ntoma Yoane akomaki boye: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye; kutu bakomandema na ye ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Na yango, kotika ata likambo moko te epekisa yo kosala makambo ya malamu oyo ekosepelisa Yehova Nzambe. Kanisáká elikya kitoko oyo Biblia, Liloba ya Nzambe, epesi yo. Zwá ekateli ya kosala mokano ya Yehova, mpe kotika kosala yango ata mokolo moko te. Soki osali bongo, okozala wana ntango mokano ya Nzambe mpo na mabelé ekokokisama mpe mabelé mobimba ekokóma paladiso mpo na libela.
[Elilingi na lokasa 4]
Ntango Nzambe azalaki kopambola Bayisalaele, bilanga na bango ezalaki kobota mingi
[Elilingi na lokasa 7]
Makambo nini ya malamu okomona na Paladiso?