“Biloko kitoko” ezali kotonda na ndako ya Yehova
“Ngai [Yehova] nakoningisa mabota nyonso, mpe biloko kitoko ya mabota ekokɔta; mpe nakotondisa ndako oyo na nkembo.”—HAGAI 2:7, NW.
1. Soki likama ebimi, mpo na nini tokanisaka libosoliboso libota na biso?
BILOKO nini ya kitoko ezali na ndako na yo? Ozali na bakiti ya ntalo, ozali na televizyo oyo ebimi sika, ozali na vuatire ya sika na kati ya lopango? Ata soki ozali na biloko wana nyonso, okanisaka ete libota na yo, elingi koloba bato nde baleki ntina kati na nyonso oyo ozali na yango na ndako na yo, boye te? Na ndakisa, soki mokolo mosusu oyoki nsolo ya milinga na kati ya mpɔngi, olamuka boye, ndako na yo ezali kopela na mɔ́tɔ, osengeli kokima nokinoki! Makanisi na yo ekokende libosoliboso epai wapi? Na bakiti na yo? Na televizyo na yo? Na vuatire na yo? To okokanisa liboso nde libota na yo? Ya solo, okokanisa liboso bato mpo bango bazali na ntina mingi koleka biloko.
2. Yehova akelá nini na nini, mpe kati na yango, Yesu alingaka mingi nini?
2 Kanisá sikoyo Yehova Nzambe na Mwana na ye, Yesu Klisto. Yehova azali ‘Ye oyo asalaki likoló, na nse, na mai, na biloko nyonso bizali na kati na yango.’ (Misala 4:24) Yehova asalelaki Mwana na ye, oyo azalaki lokola “Kapita-Mosali” na ye mpo na kosala biloko mosusu nyonso. (Masese 8:30, 31, NW; Yoane 1:3; Bakolose 1:15-17) Na miso ya Yehova to mpe ya Yesu, nyonso oyo bakelá ezali na ntina mingi. (Talá Genese 1:31.) Kasi, na makanisi na yo, nini eleki ntina na kati ya nyonso oyo bakelá, biloko to bato? Lokola mayele oyo ezali koloba lokola moto, Yesu alobi boye: “Esengo na ngai ezalaki kati na bana na bato,” to ndenge Biblia Liloba lya Nzambe ebongoli yango, Yesu azalaki “koyoka elɛngi ya kofanda o ntei ya bato.”
3. Yehova asakolaki likambo nini na nzela ya Hagai?
3 Tomoni mpenza ete bato bazali na ntina mingi na miso ya Yehova. Likambo moko oyo asakolaki na nzela ya mosakoli Hagai na mobu 520 L.T.B. emonisi mpenza likambo yango. Yehova alobaki boye: “Ngai nakoningisa mabota nyonso, mpe biloko kitoko ya mabota ekokɔta; mpe nakotondisa ndako oyo na nkembo. . . . Nkembo ya ndako oyo ya nsuka ekoleka nkembo ya ndako ya liboso.”—Hagai 2:7, 9, NW.
4, 5. (a) Mpo na nini tokoki koloba te ete “biloko kitoko” ezali biloko oyo ebongisaka ndako? (b) “Biloko kitoko” ezali nini, mpe mpo na nini olobi bongo?
4 “Biloko kitoko” nini esengelaki kotonda na ndako ya Yehova mpe kopesa yango nkembo oyo ekoleka nkembo ya ndako ya liboso? Ezalaki nde biloko ya ntalo mpe biloko oyo bakotya mpo na kobongisa ndako yango? Ezalaki nde wolo, palata, mpe mabanga ya ntalo? Ekoki kozala biloko wana te. Tóbosana te ete tempelo ya liboso, oyo bafungolaki yango soki mbula 500 liboso, ezalaki ndako moko oyo basalaki yango na biloko oyo ekoki kosombama na bamiliare ya badolare!a Yehova akokaki kokanisa te ete mwa Bayuda moke oyo bautaki na boombo bátonga tempelo oyo ekozala kitoko koleka tempelo ya Salomo!
5 Na bongo, “biloko kitoko” oyo esengelaki kotonda na ndako ya Yehova ezalaki nini? Tozali komona polele ete ezali bato. Kutu, Yehova asepelaka mingi na bato oyo basalelaka ye na bolingo na bango, kasi na wolo na palata te. (Masese 27:11; 1 Bakolinti 10:26) Ya solo, Yehova alingaka mingi bato oyo basambelaka ye na ndenge oyo andimaka, bázala mibali, basi to mpe bana. (Yoane 4:23, 24) Bango nde “biloko kitoko,” mpe mpo na Yehova, bazali na motuya mingi koleka biloko kitoko oyo ezalaki kobongisa tempelo ya Salomo.
6. Tempelo ya kala ya Nzambe ezalaki na ntina nini?
6 Atako bazalaki kotika bango nyɛɛ te mpo bákoka kosala mosala na bango, basilisaki kotonga tempelo na mobu 515 L.T.B. Banda wana tii ntango Yesu apesaki nzoto na ye lokola mbeka, tempelo ya Yelusaleme ezalaki ndako ya losambo ya pɛto mpo na ebele ya “biloko kitoko,” elingi koloba Bayuda na Baprozelite. Kasi lokola tokomona yango nsima, tempelo ezalaki elilingi ya eloko moko monene koleka.
Kokokisama na ekeke ya liboso
7. (a) Tempelo ya kala ya Nzambe na Yelusaleme ezalaki elilingi ya nini? (b) Nganga monene azalaki kosala makambo nini na Mokolo ya Mbɔndi?
7 Tempelo ya Yelusaleme ezalaki elilingi ya ebongiseli monene ya losambo. Ebongiseli yango ezali tempelo ya Nzambe na elimo. Yehova atyaki Yesu lokola Nganga Monene na tempelo yango na mobu 29 T.B. (Baebele 5:4-10; 9:11, 12) Tótalela sikoyo makambo oyo ekokani kati na misala ya nganga monene na Yisalaele mpe misala ya Yesu. Mbula na mbula, na Mokolo ya Mbɔndi, nganga monene azalaki kokaba ngɔmbɛ lokola mbeka na etumbelo oyo ezalaki na kati ya lopango ya tempelo mpo na kolimbisama ya masumu ya banganga. Na nsima, azalaki komema makila ya ngɔmbɛ yango na kati ya tempelo, azalaki koleka bikuke oyo ekabolaki lopango na Esika Mosantu, mpe na nsima, azalaki koleka rido oyo ekabolaki Esika Mosantu na Esika Eleki Bosantu. Soki akómi na Esika Eleki Bosantu, nganga monene azalaki komwangisa makila liboso ya sanduku ya kondimana. Nsima na yango, azalaki kosala lisusu ndenge yango mpo na mbala ya mibale; na mbala oyo, azalaki kokaba ntaba lokola mbeka mpo na kolimbisama ya masumu ya mabota 12 oyo ezalaki mabota ya banganga te. (Levitike 16:5-15) Ndenge nini likambo yango ekokani na makambo ya tempelo ya Nzambe na elimo?
8. (a) Ndenge nini Yesu akabamaki lokola mbeka banda na mobu 29 T.B.? (b) Yesu azalaki mwana ya ndenge nini na miso ya Nzambe ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabelé?
8 Mokano ya Nzambe ezalaki lokola etumbelo oyo bakabaki Yesu lokola mbeka ntango azwaki batisimo mpe apakolamaki na elimo santu ya Nzambe na mobu 29 T.B. (Luka 3:21, 22) Yesu abandaki kopesa bomoi na ye lokola mbeka na ntango wana mpe eumelaki mbula misato na ndambo. (Baebele 10:5-10) Na ntango wana, na miso ya Nzambe, Yesu azalaki mwana oyo abotami na elimo. Bato bakokaki mpenza kokanga ntina malamu te ya esika oyo Yesu azalaki na yango na miso ya Tata na ye ya likoló. Ezalaki lokola nde eloko moko ezalaki kozipa bango miso mpo básosola te, se ndenge rido ezalaki kobomba Esika Mosantu na miso ya bato oyo bazalaki na kati ya lopango.—Exode 40:28.
9. Mpo na nini Yesu akokaki kokɔta na likoló te na nzoto lokola oyo ya moto, mpe nini esalemaki mpo nzela efungwama?
9 Atako Yesu azalaki Mwana ya Nzambe oyo abotami na elimo, akokaki kozwa bomoi na likoló te na ntango oyo azalaki moto; mpamba te mosuni na makila ekoki kozwa Bokonzi ya Nzambe na likoló te. (1 Bakolinti 15:44, 50) Lokola nzoto ya Yesu ezalaki kokanga ye nzela, bamonisaki nzoto yango malamu na elilingi ya rido oyo ezalaki kokabola Esika Mosantu na Esika Eleki Bosantu na tempelo ya Nzambe na ntango ya kala. (Baebele 10:20) Kasi ntango akufaki, mikolo misato na nsima, Nzambe asekwisaki Yesu na nzoto ya elimo. (1 Petelo 3:18) Kobanda wana, akokaki sikoyo kokɔta na Esika Eleki Bosantu na tempelo ya Nzambe na elimo, elingi koloba na likoló. Ezali mpe yango nde esalemaki. Paulo akomaki boye: “Klisto asili [kokɔta] na Esika na bulɛɛ [na ntembe te azalaki kokanisa Esika Eleki Bosantu] etongami na mabɔkɔ te, yango elilingi na oyo na solo, kasi [akɔti] kati na Likoló mpenza; [sikoyo] azali komonana liboso na Nzambe mpo na biso.”—Baebele 9:24.
10. Yesu asalaki nini ntango azongaki na likoló?
10 Kuna na likoló, na ndenge oyo Yesu alakisaki Yehova motuya ya makila na ye, ezalaki lokola nde ‘amwangisaki makila’ ya mbeka na ye. Kasi, asukaki kaka wana te. Mwa mikolo moke liboso akufa, ayebisaki bayekoli na ye boye: “Nakokenda kobongisela bino esika. Mpe soko nakokenda kobongisela bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai ete esika ezali ngai, bino bózala mpe wana lokola.” (Yoane 14:2, 3) Sikoyo lokola Yesu azwaki likoki ya kokɔta na Esika Eleki Bosantu, to na likoló, afungolaki nzela mpo bato mosusu mpe bákɔta. (Baebele 6:19, 20) Bato yango, oyo bakozala 144 000, bakosala lokola banganga-balandi na tempelo ya Nzambe na elimo. (Emoniseli 7:4; 14:1; 20:6) Se ndenge nganga monene na Yisalaele azalaki komema naino makila ya ngɔmbɛ na Esika Eleki Bosantu mpo na kolimbisama ya masumu ya banganga, motuya ya makila ya Yesu oyo esopamaki esalelamaki liboso epai ya banganga-balandi yango 144 000.b
“Biloko Kitoko” na mikolo na biso
11. Na Yisalaele, nganga monene azalaki kopesa ntaba lokola mbeka mpo na banani, mpe yango ezalaki elilingi ya nini?
11 Emonani ete mosala ya koyanganisa bapakolami esukaki na 1935.c Kasi, Yehova asukisaki naino komema nkembo na ndako na ye te. Nzela ezalaki naino polele mpo “biloko kitoko” ekoka kokɔta. Tóbosana te ete na Yisalaele nganga monene azalaki kokaba nyama mibale lokola mbeka: ngɔmbɛ mpo na masumu ya banganga mpe ntaba mpo na masumu ya mabota oyo ezalaki mabota ya banganga te. Lokola banganga bazalaki elilingi ya bapakolami oyo bakoyangela na Yesu na Bokonzi ya likoló, bongo mabota ya banganga te ezalaki elilingi ya banani? Eyano ezali na kati ya maloba ya Yesu na Yoane 10:16 ete: “Nazali mpe na bampate mosusu baoyo bazali na lopango oyo te, ekoki na ngai kokamba mpe bango mpe bakoyoka mongongo na ngai mpe bakozala etonga moko mpe na mobateli moko.” Na yango, makila ya Yesu esopamaki mpo na bolamu ya bituluku mibale: ya liboso, mpo na baklisto oyo bakoyangela na Yesu kuna na likoló mpe ya mibale, mpo na baoyo bakozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Tozali mpenza komona ete “biloko kitoko” oyo esakweli ya Hagai elobeli ezali nde etuluku oyo ya mibale.—Mika 4:1, 2; 1 Yoane 2:1, 2.
12. Lelo oyo, ndenge nini “biloko kitoko” ezali koya na ndako ya Yehova?
12 “Biloko kitoko” yango ezali naino kokɔta na ndako ya Yehova. Na bambula oyo euti koleka, baguvɛrnɛma ya mikili ya Mpoto ya Ɛsti, na mikili mosusu ya Afrika, mpe na mikili mosusu epesaki bandeko bonsomi ya kosakola. Yango epesi nzela ete nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe esakolama na bisika oyo bayokaki naino nsango yango te. Ntango bato oyo tozali kobenga biloko kitoko bazali koya na tempelo ya Nzambe, bango mpe bazali kosala makasi ete bákómisa bato mosusu bayekoli na kotosa maloba ya Yesu. (Matai 28:19, 20) Ntango bazali kosala mosala yango, bazali kokutana na bato mingi, bilenge mpe mikóló, oyo bakoki mbala mosusu kokóma “biloko kitoko” oyo ekopesa ndako ya Yehova nkembo. Tótalela mwa bandakisa mpo na komona ndenge makambo yango ezali kosalema.
13. Ndenge nini mwana moko moke ya mwasi na Bolivie amonisaki ete azali na molende mpo na kosakola nsango ya Bokonzi?
13 Na ekólo Bolivie, mwana moko ya mwasi oyo azali na mbula mitano mpe baboti na ye bazali Batatoli ya Yehova asɛngaki molakisi na ye apesa ye nzela aya na kelasi te na pɔsɔ oyo mokɛngɛli ya zongazonga akozala na lisangá bango. Mpo na nini? Mpamba te azalaki na mposa abima na mosala ya kosakola na pɔsɔ wana mobimba. Likambo yango ekamwisaki baboti na ye, kasi basepelaki na elimo malamu ya mwana na bango. Lelo oyo, mwa mwana yango azali koyekola Biblia na bato mitano, mpe bamosusu bazali koyangana na makita. Kutu, amemaki molakisi na bango na Ndako ya Bokonzi. Nani ayebi, mbala mosusu, na kati ya bato oyo azali koyekola na bango Biblia ezali na baoyo bakokóma “biloko kitoko” oyo ekokumisa ndako ya Yehova.
14. Na Corée, ndenge nini molende ya ndeko mwasi moko ebotaki mbuma malamu epai ya moto oyo amonanaki lokola nde akosepela na lisolo na ye te?
14 Na ekólo Corée, moklisto moko ya mwasi azalaki kozela engbunduka, apusanaki pene ya mwanakelasi moko oyo azalaki koyoka miziki na mwa radio oyo batyaka biyokeli na yango na matoi. Atunaki ye ete: “Osambelaka na lingomba nini?” Mwanakelasi yango apesaki eyano ete: “Nasepelaka ata na lingomba moko te.” Ndeko mwasi atikaki te. Alobaki na ye lisusu ete: “Na nsima ya mikolo, moto akoki kokóma na mposa ya kopona lingomba. Kasi soki ayebi makambo ya mangomba te, akoki kopona lingomba ya mabe.” Mbala moko, mwanakelasi yango afungolaki sikoyo matoi mpo na kolanda malamu makambo oyo ndeko mwasi yango azalaki koloba. Apesaki ye mokanda Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous? mpe alobaki na ye ete mokanda yango ekosalisa ye mingi ntango akokóma na mposa ya kopona lingomba. Andimaki mbala moko kozwa mokanda yango. Na pɔsɔ oyo elandaki, abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mpe lelo oyo azali koyangana na makita nyonso ya lisangá.
15. Ndenge nini elenge mwasi moko na Japon abandaka koyekola Biblia na bato mpe milende na ye eboti mbuma malamu nini?
15 Na ekólo Japon, Megumi, elenge mwasi moko ya mbula 12 amonaka ete eteyelo ezali teritware malamu mpenza mpo na kosakola mpe koteya. Kutu, azwi bato mingi oyo azali koyekola na bango Biblia. Megumi asalaka ndenge nini? Lokola atángaka Biblia mpe abongisaka makita na ntango oyo bapemaka, mbala mingi baninga na ye ya kelasi balingaka koyeba soki azali kosala nini. Bamosusu batunaka Megumi mpo na nini bamonaka ye te na masano mosusu oyo basalaka na kelasi. Megumi apesaka bango biyano mpe ayebisaka bango ete Nzambe azali na nkombo. Mbala mingi, yango epesaka bango mposa ya koyeba makambo mosusu. Na nsima nde atunaka bango soki bakolinga koyekola Biblia. Lelo oyo boye, Megumi azali koyekola Biblia na bato 20, mpe 18 kati na bango bazali baninga na ye ya kelasi.
16. Ndenge nini ndeko moko na Cameroun abandaki koyekola Biblia na bato mosusu oyo bazalaki kosɛka ye?
16 Na ekólo Cameroun, bato mwambe oyo bazalaki kosala mosala esika moko babengaki ndeko moko oyo azalaki kolakisa bazulunalo epai ya baleki-nzela. Mposa na bango ezalaki bátungisa ndeko yango, yango wana batunaki ye mpo na nini andimaka te mateya lokola Trinite, lifelo ya mɔ́tɔ, to mpe molimo ekufaka te. Ndeko yango apesaki bango biyano na Biblia. Yango esalaki ete misato kati na bato yango bándima koyekola Biblia. Moko na bango, nkombo na ye Daniel, abandaki koyangana na makita mpe atumbaki biloko nyonso oyo azalaki kosalela na losambo ya bilimu mabe. (Emoniseli 21:8) Mbula mobimba kutu ekokaki te, azwaki batisimo.
17. Ndenge nini bandeko mosusu na Salvador basalelaki mayele mpo na koteya moto oyo azalaki koboya koyoka nsango ya Bokonzi?
17 Na ekólo Salvador, mobali moko azalaki kokanga mbwa moko ya nkanda liboso ya ndako na ye soki kaka amoni Batatoli ya Yehova na balabala na bango. Moto yango azalaki kotika mbwa yango esika wana tii akomona ete Batatoli bakei, nde na nsima azalaki kozongisa yango na ndako. Bandeko bazalaki koyeba ndenge ya kosolola na moto yango te. Yango wana, mokolo mosusu bandeko bamekaki kosalela mayele mosusu. Lokola bayebaki ete moto yango akoki koyoka makambo oyo bakoloba, bakendaki sikoyo koteya mbwa. Bakendaki na ndako ya moto yango, bapesaki mbwa mbote, mpe balobaki na mbwa boye: “Tosepeli mingi lokola tozwi libaku ya kosolola na yo.” Bayebisaki mbwa yango ete mokolo mosusu mabelé oyo ekozala paladiso, moto moko te akokufa nzala, mpe ata banyama bakozala na kimya. Na nsima balobaki na mbwa atikala malamu mpe babandaki kokende. Mbala moko, mobali yango abimaki na ndako mpe asɛngaki bango bolimbisi na ndenge azalaki kopesa bango nzela ya kosolola na ye te. Azwaki bazulunalo, mpe abandaki koyekola Biblia. Ndenge tozali koloba boye, moto yango azali ndeko na biso na kati ya lisangá, ye mpe akómi moko ya ‘biloko kitoko’!
“Bóbanga te”
18. Baklisto mingi bazali kokutana na mikakatano nini, kasi ndenge nini Yehova atalelaka basaleli na ye?
18 Yo mpe ozali kosala mosala ya ntina etali kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli? Soki ezali bongo, yebá ete ozali mpenza na libaku malamu. Ezali na nzela ya mosala yango nde Yehova azali kokɔtisa “biloko kitoko” na ndako na ye. (Yoane 6:44) Ya solo, ntango mosusu okoki kolɛmba nzoto. Bato mosusu mpe, ata baoyo bazali kosalela Yehova na bosembo, ekómelaka bango bámiyoka lokola bazali na ntina moko te. Kasi kolɛmba te! Na miso ya Yehova, mosaleli na ye mokomoko azali eloko kitoko, mpe mposa na ye ezali mpenza ete yo obika.—2 Petelo 3:9.
19. Yehova apesaki elendiseli nini na nzela ya Hagai, mpe ndenge nini maloba yango ekoki kolendisa biso?
19 Soki toyoki lokola tobandi kolɛmba nzoto, ezala mpo bazali koboya biso to mpo na makambo mosusu ya mabe oyo tokoki kokutana na yango, maloba ya Yehova epai ya Bayuda oyo bautaki na boombo ekoki kolendisa biso. Na Hagai 2:4-6, tozali kotánga boye: “[Sikoyo, Yehova] alobi ete, Ɛ Yelubabele, yiká mpiko, ɛ Yosua, mwana na Yosadaka, nganga monene, yiká mpiko; ɛ, bino bato nyonso na mokili, yiká mpiko. [Yehova] alobi bongo. Bósala mosala, mpo ete [Yehova] na bibele alobi ete, Nazali na bino elongo, [kolanda] ndai esimbaki ngai na bino wana bobimaki na Ezipito ete, [elimo, NW] na ngai ezali koumela kati na bino. Bóbanga te! Zambi [Yehova] na bibele alobi boye ete, Mbala moko lisusu, na mwa ntango moke, [nakoningisa] lola mpe mokili mpe mai-na-monana mpe mokili mokauki.” Tomoni na maloba yango ete Yehova asuki kaka te na kolendisa biso tózala makasi kasi amonisi mpe ndenge oyo tokoki kozwa makasi. Ndenge nini? Yoká maloba ya kolendisa oyo: “Nazali na bino elongo.” Ntango tozali koyeba ete ezala mikakatano nini oyo tokutani na yango, Yehova azali na biso, likambo yango ezali mpenza kolendisa kondima na biso!—Baloma 8:31.
20. Ndenge nini nkembo oyo emonaná naino liboso te ezali kotonda na ndako ya Yehova?
20 Yehova amonisi mpenza ete azali kosunga basaleli na ye. Ezali mpenza ndenge alobaki na nzela ya mosakoli Hagai ete: “Nkembo na ndako oyo na nsima ekoleka yango na liboso mpe na esika oyo nakopesa kimya.” (Hagai 2:9) Ya solo, lelo oyo tempelo ya Yehova na elimo ezali na nkembo monene. Mbula na mbula, bankóto na bankóto ya bato bazali kondima losambo ya solo. Bazali kolya malamu na elimo, mpe ata na kati ya mokili oyo etondi na mobulu, bazali na kimya oyo, kaka kimya oyo ekozala na mokili ya sika nde ekoleka yango.—Yisaya 9:6, 7; Luka 12:42.
21. Mokano nini tosengeli kozala na yango?
21 Etikali moke, Yehova akoningisa mabota na Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16) Yango wana, tósalela ntango oyo etikali mpo na kosalisa bato mingi bábika. Tózala na mpiko mpe tótyela Yehova motema mobimba. Tózala ntango nyonso na mokano ya kosambela na tempelo monene ya elimo, kotondisa yango lisusu na “biloko kitoko” tii ntango Yehova ye moko akoloba ete sikoyo mosala esili.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Biloko oyo bapesaki mpo na kotonga tempelo ya Salomo ekoki kozala dolare miliare 40 na moi ya lelo. Biloko nyonso oyo etikalaki batyaki yango na ebombelo ya tempelo.—1 Mikonzi 7:51.
b Yesu azali lokola nganga monene ya Yisalaele te, ye azalaki na masumu te oyo esengelaki kolimbisama. Kasi, banganga oyo bakosala na ye elongo bazalaki na masumu mpamba te basombaki bango na kati ya bato ya masumu.—Emoniseli 5:9, 10.
c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1998, nkasa 17-22.
Ozali koyeba lisusu?
• Na miso ya Yehova, nini ezali na ntina koleka biloko?
• Tángá bituluku mibale ya bato oyo makila ya Yesu esopamaki mpo na bango.
• Banani bazali “biloko kitoko” oyo ezali kotondisa ndako ya Yehova na nkembo?
• Makambo nini emonisi ete esakweli ya Hagai ezali kokokisama lelo oyo?
[Etanda na lokasa 16]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Oyebi soki tempelo ya kala ya Yehova ezalaki elilingi ya nini?
Esika Eleki Bosantu
Rido
Esika Mosantu
Ekɔtelo
Etumbelo
Lopango
[Elilingi na lokasa 17]
Nganga monene azalaki kopesa ngɔmbɛ lokola mbeka mpo na masumu ya banganga mpe ntaba mpo na mabota ya Yisalaele oyo ezalaki ya bonganga te
[Elilingi na lokasa 18]
Mosala monene ya kosakola nsango ya Bokonzi na mokili mobimba ezali kobenda bato na ndako ya Yehova