Basalaki mokano ya Yehova
Mose mpe Alona: Basakoli na mpiko ya Liloba ya Nzambe
KANISÁ naino likambo oyo: Mose oyo azalaki na mibu ntuku mwambe mpe ndeko na ye ya mobali, Alona, batɛlɛmi liboso na moto oyo alekaki bato nyonso na nguya awa na mabelé—Falo na Ezipito. Mpo na bato ya Ezipito, moto yango azali te bobele momonisi ya banzambe. Bango bandimaka ete ye moko mpe azali nzambe. Batalelaka ye ete azali Horus oyo amonani na nzoto ya moto, nzambe oyo motó ya ekeko na ye ezali bongo elilingi ya mpongó. Elongo na Isis mpe Osiris, Horus asalaki bosato oyo eyebani mingi kati na banzambe mpe banzambe-basi ya Ezipito.
Moto nyonso oyo azalaki kobɛlɛma epai na Falo akokaki kozanga te komona elilingi ya motó ya kobra, oyo etyamaki na katikati ya ekoti na ye ya bokonzi. Ezalaki kokanisama ete nyoka wana ezalaki na likoki ya kobimisa mɔ́tɔ mpe libebisi likoló na banguna ya Falo. Sikawa Mose mpe Alona bayei liboso na nzambe-mokonzi wana, kosɛnga ye likambo moko ya monene mpenza—ete abimisa Bayisalaele oyo bazalaki na boombo ete básala elambo mpo na Nzambe na bango, Yehova.—Exode 5:1.
Yehova asilaki kosakola liboso ete Falo akozala na motó makasi. Na yango, Mose mpe Alona bakamwaki te mpo na eyano ya ntembe oyo azongiselaki bango: “[Yehova] azali nani ete nayoka monɔkɔ na ye mpe natika Yisalaele kokenda? Ngai nayebi [Yehova] te, mpe nakotika Yisalaele kokenda te.” (Exode 4:21; 5:2) Na yango, ezalaki bongo kolɛngɛlama ya etumba moko ya nsɔ́mɔ. Na boumeli ya bokutani ya mibale, Mose mpe Alona bamonisaki elembeteli moko monene epai na Falo, ete bazalaki bamonisi ya Nzambe ya solo mpe mozwi-na-nguya nyonso.
Likamwisi moko esalemi
Lokola Yehova alakisaki bango, Alona asalaki likamwisi moko oyo emonisaki bonene ya Yehova likoló na banzambe ya Ezipito. Abwakaki nzeté na ye na nsé liboso na Falo, mpe na mbala moko ebongwanaki nyoka moko monene! Kobulunganisamáká na likamwisi wana, Falo abéngaki banganga-soloka na ye.a Na lisalisi ya nguya ya bademó, mibali yango bazalaki na likoki ya kosala mpe likamwisi motindo wana na banzeté na bango.
Soki Falo mpe banganga na ye bakamwaki na bosepeli nyonso, kasi ezalaki bobele mpo na mwa ntango moke. Kanisá naino lolenge bilongi na bango bikómaki na ntango nyoka ya Alona emelaki banyoka na bango mokomoko! Baoyo nyonso bazalaki wana bakokaki komona ete banzambe ya Ezipito bakokani soko moke te na Nzambe ya solo, Yehova.—Exode 7:8-13.
Nzokande, ata nsima ya likambo wana, Falo azalaki ntango nyonso na motó makasi. Bobele nsima wana Nzambe akweisaki bitumbu to malózi zomi likoló na Ezipito nde na nsuka Falo ayebisaki Mose mpe Alona ete: “Tɛlɛmá mpe bimá na kati na bato na ngai, bino mpe bato na Yisalaele. Kendá kosalela [Yehova] lokola elobaki bino.”—Exode 12:31.
Batoli oyo tokoki kozwa kati na likambo yango
Nini epesaki Mose mpe Alona likoki ya kobɛlɛma liboso na Falo na Ezipito oyo azalaki na nguya mingi? Na ebandeli, Mose azangaki kotya motema na makoki na ye, alobaki ete azalaki “moto na maloba polele te.” Ata nsima wana Yehova alakaki ye ete akosunga ye, asɛngaki ete: “Nabondeli yo, tindá ye oyo ekotinda yo.” Elingi koloba ete, Mose asɛngaki ete Nzambe atinda moto mosusu. (Exode 4:10, 13) Atako bongo, Yehova asalelaki Mose, moto na bopɔlɔ, apesaki ye mayele mpe makasi oyo asengelaki na yango mpo na kokokisa mokumba na ye.—Mituya 12:3.
Lelo oyo, basaleli ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto bazali kokokisa etindá ya “kozalisa bayekoli na mabota nyonso.” (Matai 28:19, 20) Mpo ete tókokisa mokumba na biso kati na kokokisama ya etindá wana, tosengeli kosalela malamu boyebi ya Makomami mpe makoki nyonso oyo tokoki kozala na yango. (1 Timoté 4:13-16) Na esika ya kotɛlɛmisa makanisi na biso likoló na bolɛmbu na biso, tiká ete tóyamba na kondima mokumba nyonso oyo Nzambe asili kopesa biso. Akoki kobongisa biso mpe kopesa biso makasi ya kosalela mokano na ye.—2 Bakolinti 3:5, 6; Bafilipi 4:13.
Lokola Mose atɛmɛlaki bato mpe bademó, na ntembe te, azalaki na mposa ya nguya oyo eleki nguya ya bato. Na yango, Yehova apesaki ye elikya oyo ete: “Talá, nakómisi yo Nzambe liboso na Falo.” (Exode 7:1, NW) Ee, Mose azwaki lisungi mpe bokonzi oyo eutaki na Nzambe. Lokola elimo ya Yehova ezalaki likoló na ye, Mose azalaki na ntina te ya kobanga Falo to basodá ya mokonzi wana ya lolendo.
Biso mpe tosengeli kotya motema epai na elimo santu ya Yehova, to nguya na ye oyo ekosalaka mosala, mpo na kokokisa mosala na biso. (Yoane 14:26; 15:26, 27) Na lisalisi ya lisungi ya Nzambe tokoki kozongela maloba oyo ya Davidi, oyo ayembaki ete: “Natii elikya na ngai epai na Nzambe. Nakobanga te. Moto na mabelé akoki kosala ngai nini?”—Nzembo 56:11, NW.
Mpo na ezaleli na ye ya motema mawa, Yehova atikaki Mose ye moko te kati na mokumba na ye. Nzokande, Nzambe alobaki ete: “Alona ndeko na yo akozala mosakoli na yo. Okosolola makambo nyonso makolobela ngai yo, mpe Alona ndeko na yo akosolola na Falo.” (Exode 7:1, 2) Yehova amonisaki mpenza bolingo mpamba te atalelaki bandelo ya makoki ya Mose!
Nzambe apesi biso libaku ya kozala elongo na baninga na biso baklisto oyo bandimi ntembe monene ya kozala Batatoli ya Yehova, ye oyo Aleki-likoló. (1 Petelo 5:9) Na bongo, atako bipekiseli oyo tokoki kokutana na yango, tiká ete tózala lokola Mose mpe Alona—tózala basakoli ya mpiko ya Liloba na Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “banganga-soloka” elobelaka etuluku ya bandoki oyo bazalaki koloba ete bazalaki na nguya monene mpenza koleka oyo ya bademó. Ekanisamaki ete mibali wana bakokaki kobénga bademó ete bátosa bango mpe ete bademó bazalaki na nguya te likoló na bandoki wana.
[Elilingi na lokasa 25]
Na mpiko nyonso, Mose mpe Alona bamonisaki Yehova liboso na Falo