Tózwa bolamu ya “masangu ya likoló”
MWA ntango moke nsima ya kobima na Ezipito na ndenge ya likamwisi, Bayisalaele bazangaki kondima epai na Yehova, Mosikoli na bango. Yango wana, Yehova atikaki bango báyengayenga na mokili mokauki ya Sinai mbula 40. Na ntango nyonso wana, Bayisalaele na bapaya, “ebele na bato ya ndenge na ndenge” oyo bakendaki na bango, balyaki, bamelaki mpe ‘batondaki.’ (Exode 12:37, 38) Nzembo 78:23-25 eyebisi biso ndenge likambo yango esalemaki: “Ye [Yehova] apesaki mobeko na mapata na likoló; azipolaki bikuke na likoló; abwakaki mana epai na bango [lokola] mbula ete bálya; apesaki bango masangu na likoló. Bato balyaki kwanga na bantoma-na-likoló; atondisaki bango na bilei.”
Mose, ye mpe alyaki mana, alimbolaki ndenge bilei yango ezalaki. Akomaki ete na ntɔngɔ, “esilaki mamwe kolongwa, eloko moke na mbinga te etikalaki na nse kati na lisobe, moke lokola matandala na nse. Emonaki bato na Yisalaele yango balobanaki ete, Oyo nini?” to na Liebele, “man houʼ?” Ekoki kozala ete maloba yango nde ebimisaki nkombo “mana,” nkombo oyo Bayisalaele bapesaki bilei yango. Mose alobaki boye: “Yango ezalaki mpɛmbɛ [lokola] nkona na kolianda, mpe elɛngi na yango ezalaki [lokola] mikate misalami na mafuta na nzoi.”—Exode 16:13-15, 31.
Mana ezalaki bilei lokola bilei nyonso te, ndenge bato mosusu balobaka. Ezalaki kobima na ndenge ya likamwisi. Na ndakisa, mana ezalaki kobima bisika nyonso mpe na bileko nyonso. Soki babombi yango butu mobimba, ezalaki kopola mpe kobimisa nkusu mpe ezalaki kolumba nsolo. Kasi, bilei ya mikolo mibale oyo libota mokomoko bazalaki kolɔkɔta na mokolo oyo ezalaki liboso ya Sabata ezalaki kobeba te butu mobimba, yango wana bazalaki kolya yango na mokolo ya Sabata, mokolo oyo mana ezalaki kokwea te. Ya solo, mana ezalaki likamwisi.—Exode 16:19-30.
Maloba “bantoma-na-likoló,” to “baanzelu” oyo ezali na mokanda ya Nzembo 78, emonisi ete ekoki kozala ete Yehova asalelaki baanzelu mpo na kopesa mana. (Nzembo 78:25) Ezala bongo to te, bato basengelaki kopesa Nzambe matɔndi mpo na boboto na ye. Nzokande, Bayisalaele mingi bazangaki botɔndi epai na Ye oyo asikolaki bango na boombo na Ezipito. Biso mpe tokoki kotalela biloko oyo Yehova azali kopesa biso na kilo te to tokoki kozanga botɔndi soki tozali kokanisa boboto na ye te. Tosengeli kozala na botɔndi mpo Yehova akomisi lisolo oyo elobeli ndenge oyo Bayisalaele basikwamaki na boombo mpe makambo mosusu oyo esalamaki na nsima, mpo na “kolakisa biso.”—Baloma 15:4.
Liteya Bayisalale bazwaki epesi baklisto litomba
Ntango Yehova azalaki kopesa mana, azalaki kokanisa kaka te kokokisa bamposa ya mosuni ya Bayisalaele oyo bazalaki soki milio misato. Alingaki ‘kokitisa bango mpe komeka bango’ mpo abongisa bango mpe ateya bango mpo na bolamu na bango. (Deteronome 8:16; Yisaya 48:17) Soki bandimaki ete Yehova abongisa bango mpe ateya bango, mbɛlɛ Yehova alingaki ‘kosalela bango malamu na nsuka,’ elingi koloba kopesa bango kimya, bomɛngo, mpe esengo na Mokili na Ndaka.
Basengelaki koyeba likambo oyo, yango ezali na ntina mingi, ete “moto akotikala na bomoi bobele mpo na kwanga te, kasi ete moto akotikala na bomoi mpo na makambo nyonso makobimaka na monɔkɔ na [Yehova].” (Deteronome 8:3) Bayisalaele bandimaki mpenza ete soki Nzambe apesaki mana te, balingaki kokufa na nzala. (Exode 16:3, 4) Mokolo na mokolo, Bayisalaele oyo bazalaki na botɔndi bazalaki komona ete bomoi na bango ezali na mabɔkɔ ya Yehova mpe na ndenge yango bamikitisaki. Ntango balingaki kokóma na Mokili na Ndaka epai biloko ezalaki mingi, balingaki kobosana te ete lobiko na bango ezali na mabɔkɔ ya Yehova.
Ndenge moko na Bayisalaele, baklisto basengeli kobosana te ete nyonso oyo bazali na yango mposa mpo na kozala na bomoi, ezala na mosuni to na elimo, ezali na mabɔkɔ ya Yehova. (Matai 5:3; 6:31-33) Yesu Klisto atángaki maloba ya Mose oyo ekomami na Deteronome 8:3, mpo na kopesa Zabolo eyano ntango amekaki ye; alobaki boye: “Ekomami ete, Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ na [Yehova].” (Matai 4:4) Ɛɛ, basambeli ya solo ya Nzambe baleisamaka na kotánga maloba ya Yehova oyo ezali na kati ya Biblia. Lisusu, kondima na bango ekómaka makasi ntango bazali komona bolamu ya maloba yango na bomoi na bango wana bazali kotambola na Nzambe mpe bazali kotya matomba ya Bokonzi na ye na esika ya liboso.
Bato ya masumu bakoki kozanga botɔndi mpo na biloko oyo bazali kozwa mpo na kokokisa mposa ya bomoi na bango ya mokolo na mokolo, ata soki biloko yango ezali komonisa bolingo ya Yehova. Na ndakisa, na ebandeli, Bayisalaele bazalaki kokamwa mpe kosepela na mana oyo bazalaki kozwa; kasi, na nsima mingi bakómaki komilelalela. Na kozanga limemya nyonso, bamilelaki ete: “Biloko mabe oyo ebai biso.” Wana ezalaki elembo ete bazalaki ‘kotangwa na Nzambe na bomoi.’ (Mituya 11:6; 21:5; Baebele 3:12) Yango wana, ndakisa na bango, ezali “[kokebisa, NW] biso mpo ete nsuka na bikeke eyei na biso.”—1 Bakolinti 10:11.
Ndenge nini tokoki kotalela likebisi bapesi biso na ndakisa yango? Lolenge moko ya kosala ezali ete tótika nzela te ete mateya ya Biblia to bilei oyo kelasi ya moombo ya sembo mpe ya mayele ezali kopesa biso tókóma kotalela na kilo te, to lokola eloko oyo ezangi ntina. (Matai 24:45) Soki tobandi kotalela makabo ya Yehova ete ezali na ntina mingi te to tobandi kolɛmba yango, tóyeba ete boyokani na biso na ye ebandi kolɛmba.
Yehova ayebi ntina oyo ntango nyonso te azali kosopela biso biloko ebele ya sika. Kasi, azali kobakisa kongɛnga na Liloba na ye mokemoke, malɛmbɛmalɛmbɛ. (Masese 4:18) Yango ezali kosalisa bato na ye básimba mpe básalela makambo oyo bazali koyekola. Yesu alandaki ndakisa ya Tata na ye ntango azalaki koteya bayekoli na ye ya liboso. Alimbwelaki bango Liloba ya Nzambe “lokola ekoki bango koyoka yango,” to “koyeba,” ndenge Babiblia mosusu ebongoli yango.—Malako 4:33; talá Yoane 16:12.
Sepelá na bilei oyo Nzambe azali kopesa
Yesu azalaki kozongela makambo oyo azalaki koteya mbala na mbala. Ya solo, moto akoki kokanga likambo moko na motó, lokola motinda moko ya Biblia, mbala moko; kasi mpo moto atya yango na motema mpe ekɔta na kati ya “bomoto ya sika” ya moklisto, esɛngaka mwa ntango, mingimingi soki moto alingaká banzela ya mokili mpe bizaleli na yango ekɔtelaki ye mingi. (Baefese 4:22-24) Ezalaki bongo epai ya bayekoli ya Yesu ntango esengelaki bátika lolendo mpe bámikitisa mingi. Yesu ateyaki bango komikitisa mbala na mbala, ntango mosusu azalaki koteya bango na ndenge mingi mpo básimba yango malamu, mpe nsukansuka basimbaki yango malamu.—Matai 18:1-4; 23:11, 12; Luka 14:7-11; Yoane 13:5, 12-17.
Na eleko na biso, makita ya boklisto mpe mikanda ya la Société Watch Tower elandaka ndakisa ya Yesu: azongelaka mateya oyo ebongisami malamu mbala na mbala. Tiká tótalelaka yango lokola elembo oyo ezali kolakisa ete Nzambe azali na bolingo mpe amibanzabanza mpo na biso mpe tólɛmba makambo oyo tozali koyekola te, ndenge Bayisalaele balɛmbaki mana. Kasi, soki tozali na motema molai mpe tozali koyoka makambo oyo Yehova azali kozongela biso mbala na mbala, tokomona mbuma malamu na yango na bomoi na biso. (2 Petelo 3:1) Soki tozali na botɔndi motindo boye ekomonisa ete tozali ‘kokanga ntina’ ya Liloba ya Nzambe na mitema na biso mpe na makanisi na biso. (Matai 13:15, 19, 23) Mpo na yango, tozali na ndakisa malamu ya Davidi, mokomi ya nzembo, oyo, atako azalaki na bilei ya elimo ndenge na ndenge te lokola oyo biso tozali kozwa lelo oyo, alobaki ete nzela ya Yehova “eleki mafuta na nzoi na elengi, ata mafuta yango makwei na nse na ndako na nzoi”!—Nzembo 19:10.
“Mana” oyo ezali kopesa bomoi ya seko
Yesu alobaki na Bayuda ete: “Ngai nazali kwanga na bomoi. Bankɔkɔ na bino balyaki mana na lisobe mpe bakufaki. . . . Ngai nazali kwanga na bomoi oyo ekiti longwa na likoló. Soko moto nani akolya kwanga oyo, akozala na bomoi libela; . . . kwanga ekopesa ngai ezali mosuni na ngai mpo na bomoi na mokili.” (Yoane 6:48-51) Kwanga to mana ya solo epesaki bomoi ya seko te mpe ekoki kopesa yango te. Kasi baoyo basalaka misala oyo ezali komonisa kondima na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola bato bakozwa bomoi ya seko.—Matai 20:28.
Ebele ya bato oyo bazali kozwa bolamu na lisiko ya Yesu bakozala na bomoi ya seko na paladiso na mabelé. “Ebele monene” ya bato yango, oyo bamonisamaki na ndenge ya elilingi na “ebele na bato ya ndenge na ndenge” ya bapaya oyo bakendaki na Bayisalaele ntango babimaki na Ezipito, bakobika na “bolɔzi monene” oyo ezali koya mpe oyo ekolongola mabe nyonso na mokili. (Emoniseli 7:9, 10, 14; Exode 12:38) Bato oyo bazali elilingi ya Bayisalaele bango moko bakozwa libonza monene koleka. Ntoma Paulo alobaki ete bato yango 144 000, bazali Yisalaele ya Nzambe, yango ezali libota ya elimo. Soki bakufi, bazali kozwa libonza na bango, elingi koloba bazali kosekwa mpo na bomoi na likoló. (Bagalatia 6:16; Baebele 3:1; Emoniseli 14:1) Kuna, Yesu akopesa bango mana ya ndenge mosusu.
Ndimbola ya “mana masili kobombama”
Nsima ya lisekwa na ye, Yesu ayebisaki Yisalaele ya elimo ete: “Molongi, nakopesa ye mana masili kobombama.” (Emoniseli 2:17) Mana ya elilingi oyo masili kobombama ezali kokanisela biso mana oyo Nzambe alobaki na Mose abomba na mbeki ya wolo na kati ya sanduku ya kondimana. Sanduku yango ezalaki kofanda na Esika Eleki Bosantu na tabernakle. Kuna, bato bazalaki komona yango te, ebombamaki mpenza. Mwa mana wana babombaki ezalaki lokola ekaniseli mpo na kolakisa na mabota oyo ekobotama nsima. Epolaki te ntango efandaki na kati ya Sanduku; na bongo, ezalaki elilingi oyo ebongi mpo na bilei oyo ekoki kopola te. (Exode 16:32; Baebele 9:3, 4, 23, 24) Lokola Yesu apesi ba 144 000 mana masili kobombama, apesi bango ndanga ete bakokóma bana ya Nzambe na elimo na nzoto oyo ekoki kokufa to kopola te.—Yoane 6:51; 1 Bakolinti 15:54.
Mokomi na nzembo alobaki boye: “Na yo [Yehova] ezali liziba ya bomoi.” (Nzembo 36:9) Lokola apesaki mana ya solo mpe ya elilingi endimisi solo ete Yehova azali liziba ya bomoi! Ezala mana oyo Nzambe apesaki Yisalaele ya kala, to nzoto ya Yesu oyo apesaki biso lokola mana ya elilingi, mpe mana ya elilingi oyo masili kobombama oyo azali kopesa ba 144 000 na nzela ya Yesu, ezali koyebisa biso nyonso ete lobiko na biso ezali na mabɔkɔ ya Nzambe. (Nzembo 39:5, 7) Tosengeli koyeba likambo yango ntango nyonso na komikitisa mpe na bopɔlɔ. Na nsima, Yehova ‘akosalela biso malamu na nsuka.’—Deteronome 8:16.
[Bililingi na lokasa 26]
Mpo na kozwa bomoi ya seko, lobiko ya bato nyonso ezali na “kwanga ya bomoi oyo ekiti longwa na likoló.”
[Elilingi na lokasa 28]
Koyangana na makita nyonso ya boklisto ekomonisa ete tozali na botɔndi na makambo oyo Yehova ateyaka biso mbala na mbala.