Zwá mapamboli na nzela ya Mokonzi oyo atambwisami na elimo ya Nzambe!
“Elimo ya Yehova ekofanda mpenza likoló na ye.”—YIS. 11:2.
1. Makanisi nini bato mosusu babimisaki mpo na mikakatano oyo ezali na mokili?
NA MOBU 2006, Stephen Hawking, moto moko ya mayele na fizike, atunaki boye: “Lokola makambo ya politiki, bizaleli ya bato, zamba, mai mpe mopɛpɛ, ezali se kobeba, bato bakokoba mpenza kozala na bomoi nsima ya mbula 100?” Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (New Statesman) elobaki boye: “Tolongi te kosilisa bobola to kotya kimya na mokili. Kutu, emonani ete tobebisi nde makambo. Ezali te ete tomekaki te. Tomeki makambo ndenge na ndenge: na ndakisa, boyangeli oyo Leta azali kotambwisa makambo nyonso ya nkita mpe mosusu oyo Leta atikeli bato bonsomi na makambo ya nkita; tomekaki kosala mpe Lisangá ya Mabota (Société des Nations), ata mpe konduka bibundeli ya nikleere mpo na kobangisa banguna. Tobundi bitumba mingi mpo na kosilisa bitumba, mpo tóndima ete toyebi ndenge ya kosilisa bitumba.”
2. Ndenge nini mosika te Yehova akomonisa lotomo na ye ya kozala mokonzi na mabele?
2 Maloba ya ndenge wana ekamwisaka basaleli ya Yehova te. Biblia eyebisi biso ete bato bakelamaki na likoki ya komiyangela bango moko te. (Yir. 10:23) Yehova ye moko nde abongi kozala Mokonzi. Yango wana, ye nde azali na lotomo ya kotyela biso mibeko, koloba mokano oyo tosengeli kolanda na bomoi, mpe kotambwisa biso mpo tókokisa mokano yango. Longola yango, etikali moke asalela bokonzi na ye mpo na kosukisa milende oyo bato basalaka mpo na komitambwisa bango moko kasi elongaka te. Akobebisa mpe bato nyonso oyo, lokola baboyi kondima lotomo na ye ya kozala mokonzi, bakolinga ete bato bákoba kokangama na boombo ya lisumu, ya kozanga kokoka, mpe ya Satana Zabolo “nzambe ya makambo ya ntango oyo.”—2 Ko. 4:4.
3. Yisaya asakolaki nini mpo na Masiya?
3 Na mokili ya sika oyo ekozala Paradiso, boyangeli ya Yehova oyo ezali ya bolingo ekomonana na nzela ya Bokonzi ya Masiya. (Dan. 7:13, 14) Mpo na Mokonzi ya Bokonzi yango, Yisaya asakolaki boye: “Mwa etape ekobima mpenza na ekumu ya Yese; mpe mwa nzete ya sika oyo ekobima na misisa na ye ekobota. Mpe elimo ya Yehova ekofanda mpenza likoló na ye, elimo ya bwanya mpe ya mayele, elimo ya toli mpe ya nguya, elimo ya boyebi mpe ya kobanga Yehova.” (Yis. 11:1, 2) Na makambo nini ya sikisiki Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpo na kopesa “ekumu ya Yese,” to Yesu Kristo, makoki ya koyangela bato? Boyangeli na ye ekomema mapamboli nini? Tosengeli kosala nini mpo na kozwa mapamboli yango?
Nzambe apesi ye makoki ya koyangela
4-6. Boyebi nini ya ntina mingi oyo Yesu azali na yango ekosalisa ye azala Mokonzi, Nganga-nzambe Monene, mpe Mosambisi ya bwanya mpe ya motema mawa?
4 Yehova alingi ete bato oyo akoyangela bákóma bato ya kokoka na litambwisi ya Mokonzi, Nganga-nzambe Monene, mpe Mosambisi moko oyo atondi na bwanya mpe na motema mawa. Yango wana Nzambe aponaki Yesu Kristo, mpe na nzela ya elimo santu, apesaki ye makoki mpo na komema mikumba wana ya ntina mingi. Mpo na nini Yesu akokokisa malamu mpenza mikumba oyo Nzambe apesá ye? Tótala mwa bantina mosusu.
5 Yesu ayebi Nzambe malamu mpenza. Mwana se moko oyo abotamaki ayebá Tata na ye banda kala mpenza koleka moto mosusu nyonso, mbala mosusu banda bamiliare ya bambula. Na boumeli ya ntango wana, Yesu ayebaki Yehova malamumalamu mpenza na boye ete Biblia ebengi ye “elilingi ya Nzambe.” (Kol. 1:15) Yesu ye moko alobaki boye: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.”—Yoa. 14:9.
6 Nsima ya Yehova, Yesu nde ayebi malamu mpenza biloko nyonso oyo ezalisamá, ata mpe bato. Bakolose 1:16, 17 elobi boye: “Na nzela na ye [Mwana ya Nzambe] biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabele, biloko oyo emonanaka mpe biloko oyo emonanaka te . . . Lisusu, ye azali liboso ya biloko mosusu nyonso mpe na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki.” Kanisá naino likambo yango! Yesu, na ndenge azalaki “mosali ya mayele,” asalaki elongo na Nzambe na mosala ya kozalisa biloko mosusu nyonso. Na yango, ayebi makambo nyonso oyo etali molɔ́ngɔ́, banda na biteni mikemike ya ba-atɔmɛ tii na bɔɔngɔ ya moto oyo ezali eloko moko ya kokamwa. Ya solo, Kristo azali mpenza bwanya oyo emonisami lokola moto.—Mas. 8:12, 22, 30, 31.
7, 8. Ndenge nini elimo ya Nzambe esalisaki Yesu na mosala na ye?
7 Yesu atyamaki mafuta na elimo santu ya Nzambe. Yesu alobaki boye: “Elimo ya Yehova ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu, atindi ngai mpo nasakwela baoyo bakangami kosikolama mpe nafungola miso ya bato oyo bakufá miso, mpo natika bato oyo batutamá bákende na bonsomi, mpo na kosakola mbula ya kondimama na Yehova.” (Luka 4:18, 19) Emonani ete ntango Yesu azwaki batisimo, elimo santu esalisaki ye ayeba lisusu makambo oyo ayekolaki ntango azalaki na likoló, na ndakisa makambo oyo Nzambe alingaki ye asala na mosala na ye awa na mabele lokola Masiya.—Tángá Yisaya 42:1; Luka 3:21, 22; Yoane 12:50.
8 Lokola elimo santu epesaki ye nguya mpe azalaki na nzoto mpe na bɔɔngɔ ya kokoka, Yesu azalaki kaka te moto oyo aleki bato nyonso oyo bazalaki na bomoi na mabele, kasi mpe Moteyi Monene. Kutu, bayoki na ye “bakamwaki na ndenge na ye ya koteya.” (Mat. 7:28) Na ndakisa, Yesu atyaki likebi na ye na makambo oyo ebimiselaka bato mikakatano—lisumu, kozanga kokoka, mpe kozanga boyebi ya Nzambe. Yesu azalaki mpe na likoki ya komona makambo oyo ezalaki na mitema ya bato mpe kosala makambo na kolanda ndenge bato yango bazali.—Mat. 9:4; Yoa. 1:47.
9. Ndenge nini kokanisa bomoi ya Yesu awa na mabele ekosalisa yo omona mpenza ete abongi kozala Mokonzi?
9 Yesu akómaki moto. Kozala moto mpe kofanda esika moko na bato ya kozanga kokoka esalisaki Yesu mingi mpo azala na makoki ya kozala Mokonzi. Ntoma Paulo akomaki boye: “[Yesu] asengelaki kokóma lokola ‘bandeko’ na ye na makambo nyonso, mpo akóma nganga-nzambe monene ya motema mawa mpe ya sembo na makambo ya Nzambe, mpo apesa mbeka ya kozipa masumu ya bato. Yango wana, lokola ye moko amonaki mpasi ntango azalaki komekama, akoki kosalisa baoyo bazali komekama.” (Ebr. 2:17, 18) Lokola Yesu ye moko mpe ‘amekamaki,’ akoki komitya na esika ya bato oyo bazali komekama. Motema mawa ya Yesu emonanaki polele na mosala na ye awa na mabele. Bato nyonso, ezala bato ya maladi, bibɔsɔnɔ, baoyo bazalaki konyokwama na makanisi, ata mpe bana, bazalaki kobanga te kopusana pene na ye. (Mrk. 5:22-24, 38-42; 10:14-16) Bato ya komikitisa ná baoyo bazalaki na nzala ya elimo bazalaki mpe koya epai na ye. Nzokande, bato ya lolendo, ya lofundo, mpe baoyo bazalaki na “bolingo ya Nzambe te” na kati na bango baboyaki ye, bayinaki ye, mpe batɛmɛlaki ye.—Yoa. 5:40-42; 11:47-53.
10. Likambo monene nini Yesu asalaki mpo na komonisa bolingo mpo na biso?
10 Yesu apesaki bomoi na ye mpo na biso. Mbala mosusu likambo monene oyo emonisaka ete Yesu nde abongi mpenza kozala Mokonzi, ezali ndenge oyo andimaki kokufa mpo na biso. (Tángá Nzembo 40:6-10.) Alobaki boye: “Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye.” (Yoa. 15:13) Ya solo, na bokeseni na bakonzi ya bato ya kozanga kokoka, oyo mbala mingi bakómaka na bomoi ya bomɛngo na mbongo ya bato oyo bango bazali koyangela, Yesu apesaki kutu bomoi na ye mpo na bato.—Mat. 20:28.
Bapesi ye nguya mpo apesa matomba ya lisiko
11. Mpo na nini tokoki mpenza kotyela Mosikoli na biso Yesu motema mobimba?
11 Ezali malamu mpenza ndenge Yesu azali Nganga-nzambe Monene oyo akotambwisa makambo mpo na kopesa biso matomba ya mbeka na ye ya lisiko! Kutu, ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele, Yesu amonisaki mwa moke makambo oyo akosala mpo na komonisa ete azali Mosikoli na biso, na Boyangeli ya Mbula Nkóto, soki totikali sembo. Abikisaki bato ya maladi mpe bibɔsɔnɔ, asekwisaki bakufi, aleisaki ebele ya bato, mpe azalaki na bokonzi ata likoló ya mopɛpɛ mpe mbonge ya mai. (Mat. 8:26; 14:14-21; Luka 7:14, 15) Longola yango, asalaki makambo wana, mpo na kolakisa bokonzi to nguya na ye te, kasi mpo na komonisa motema mawa mpe bolingo na ye. Epai ya moto moko ya maba oyo asɛngaki ye abikisa ye, Yesu alobaki ete: “Nalingi.” (Mrk. 1:40, 41) Yesu akomonisa motema mawa ya ndenge wana na Boyangeli ya Mbula Nkóto, na mokili mobimba.
12. Ndenge nini Yisaya 11:9 ekokokisama?
12 Kristo ná bato oyo bakoyangela elongo na ye bakokoba mpe mosala ya koteya makambo ya Nzambe, oyo Yesu abandaki eleki sikoyo mbula soki 2 000. Na ntango wana, maloba ya Yisaya 11:9 ekokokisama: “Mabele ekotonda na boyebi ya Yehova ndenge mai etondi na mbu.” Na ntembe te, bakoteya biso mpe ndenge ya kobatela mabele mpe bikelamu ebele oyo ezali kati na yango, ndenge Nzambe ayebisaki Adama asala na ebandeli. Na nsuka ya mbula nkóto, mokano ya Nzambe ya ebandeli, oyo ezali na Ebandeli 1:28 ekosila kokokisama, mpe matomba nyonso ya mbeka ya lisiko ekosila kopesama.
Bapesi ye nguya ya kosambisa
13. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaka boyengebene?
13 Kristo azali “Moto oyo atyami na Nzambe mpo na kozala mosambisi ya bato ya bomoi mpe ya bakufi.” (Mis. 10:42) Na yango, koyeba ete moto te akoki kobebisa Yesu, ete boyengebene mpe bosembo ezali lokola mokaba ya bangɛi na ye, ezali mpenza kobɔndisa! (Yis. 11:5) Amonisaki ete ayinaka lokoso, bokosi, mpe makambo mosusu ya mabe, mpe apamelaki bato oyo bazalaki na mawa te mpo na mpasi ya basusu. (Mat. 23:1-8, 25-28; Mrk. 3:5) Longola yango, Yesu amonisaki ete akoki kokosama te na ndenge oyo moto azali komonana na miso, “mpo ye moko ayebaki eloko nini ezali na kati ya moto.”—Yoa. 2:25.
14. (a) Lelo oyo, ndenge nini Yesu azali komonisa ete alingaka boyengebene mpe bosembo? (b) Tosengeli komituna mituna nini?
14 Yesu azali kaka komonisa ete alingaka boyengebene mpe bosembo na ndenge azali kotambwisa mosala monene ya kosakola mpe ya koteya oyo ezali kosalema na mokili mobimba. Moto moko te, guvɛrnema moko te, demo moko te akoki kopekisa mosala yango ekokokisama mpenza ndenge Nzambe alingi. Na yango, tokoki mpenza kozala na elikya ete ntango Armagedone ekosila, na ntango yango bosembo ya Nzambe ekolonga. (Tángá Yisaya 11:4; Matai 16:27.) Omituna boye: ‘Na mosala ya kosakola, natalelaka bato ndenge Yesu azalaki kotalela bango? Napesaka Yehova nyonso oyo nakoki ata soki nzoto na ngai to makambo mosusu ezali kopekisa ngai nasala mingi?’
15. Mpo tósalela Nzambe na molimo mobimba, eloko nini tosengeli kobosana te?
15 Mpo tósalela Nzambe na molimo na biso mobimba, tosengeli kobosana te ete mosala ya kosakola ezali mosala na ye. Ye nde atindi biso tósala yango; azali kotambwisa yango na nzela ya Mwana na ye; mpe apesaka baoyo bazali kosala yango nguya na nzela ya elimo santu. Opesaka motuya na libaku oyo ozali na yango ya kozala moto oyo azali kosala elongo na Nzambe mpe elongo na Mwana na ye oyo atambwisami na elimo santu? Soki Yehova te, nani mosusu akoki kotinda bato koleka milio nsambo, oyo mingi na bango batalelamaka lokola “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba,” básakola nsango ya Bokonzi epai ya bato na mikili 236?—Mis. 4:13.
Mizwelá mapamboli na nzela ya Kristo!
16. Ebandeli 22:18 emonisi nini na oyo etali lipamboli ya Nzambe?
16 Yehova ayebisaki Abrahama boye: “Na nzela ya momboto na yo, bikólo nyonso ya mabele ekomizwela mpenza lipamboli, mpo oyoki mongongo na ngai.” (Eba. 22:18) Yango emonisi ete bato oyo bapesaka motuya na mosala ya Nzambe bakoki kozela na motema ya kokita mapamboli oyo ekoya na nzela ya Momboto to Masiya. Mpe bazali lelo kosalela Nzambe na molende, makanisi na bango kaka na mapamboli yango.
17, 18. Elaka nini ya Yehova ezali na Kolimbola Mibeko 28:2, mpe yango elimboli nini mpo na biso?
17 Mokolo moko Nzambe alobaki na ekólo Yisraele, oyo ezalaki momboto ya Abrahama, boye: “Mapamboli oyo nyonso [oyo elobami na kondimana ya Mibeko] ekokitela yo mpenza mpe ekozwa yo, mpamba te ozali kokoba koyoka mongongo ya Yehova Nzambe na yo.” (Mib. 28:2) Ezali mpe bongo mpo na basaleli ya Nzambe lelo. Soki olingi kozwa lipamboli ya Yehova, osengeli “kokoba koyoka” mongongo na ye. Na bongo, mapamboli na ye “ekokitela yo mpenza mpe ekozwa yo.” Kasi, “koyoka” Nzambe esɛngi nini?
18 Koyoka ye elimboli kotya mpenza likebi na makambo oyo ezali na Liloba ya Nzambe mpe na bilei ya elimo oyo azali kopesa. (Mat. 24:45) Elimboli mpe kotosa ye mpe Mwana na ye. Yesu alobaki boye: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Mat. 7:21) Koyoka Nzambe elimboli mpe kondima kotosa na motema moko ebongiseli oyo azali kosalela, elingi koloba lisangá ya bokristo, mpe bankulutu oyo batyamá, oyo bazali “makabo oyo ezali bato.”—Ef. 4:8.
19. Tokoki kosala nini mpo tózwa lipamboli?
19 Kati na “makabo oyo ezali bato,” tokoki kotánga bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo bazali bamonisi ya lisangá mobimba ya bokristo. (Mis. 15:2, 6) Kutu, ndenge oyo totalelaka bandeko ya Kristo ya elimo ekosalisa mingi mpo na koyeba lisambisi oyo tokozwa na bolɔzi monene oyo ezali koya. (Mat. 25:34-40) Na yango, likambo moko oyo tokoki kosala mpo tózwa lipamboli ezali kosunga na bosembo bato oyo Nzambe atye mafuta na elimo.
20. (a) Mokumba ya libosoliboso ya “makabo oyo ezali bato” ezali nini? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete tosepelaka na bandeko yango?
20 “Makabo oyo ezali bato” ezali mpe bandeko ya Komite ya filiale, bakɛngɛli-batamboli, mpe bankulutu ya lisangá—bango nyonso batyami na litambwisi ya elimo santu. (Mis. 20:28) Mokumba ya libosoliboso ya bandeko yango ezali ya kotonga basaleli ya Nzambe ‘tii ntango bango nyonso bakokóma na bomoko na kondima mpe na boyebi ya solosolo ya Mwana ya Nzambe, na motindo ya moto oyo akoli mpenza, na bokoli mobimba ya Kristo.’ (Ef. 4:13) Ya solo, ndenge moko na biso nyonso, bango mpe bazali bato ya kozanga kokoka. Atako bongo, tokopambwama soki tozali na botɔndi mpo na ndenge bazali kokɛngɛla biso na bolingo nyonso.—Ebr. 13:7, 17.
21. Mpo na nini tosengeli kotosa Mwana ya Nzambe?
21 Mosika te, Kristo akobebisa mokili mabe ya Satana. Ntango likambo yango ekosalema, bomoi na biso ekozala na mabɔkɔ ya Yesu, mpo ye nde moto oyo Nzambe atye mpo na komema “ebele mpenza ya bato” na “maziba ya mai ya bomoi,” ndenge esakolamaki. (Em. 7:9, 16, 17) Na yango, tósala makasi mpenza lelo mpo tótosaka mpe tómonisa botɔndi mpo na Mokonzi oyo atambwisami na elimo ya Yehova.
Oyekoli makambo nini na . . .
• Misala 10:42?
[Elilingi na lokasa 17]
Motema mawa ya Yesu emonanaki ntango asekwisaki mwana mwasi ya Yairuse
[Bililingi na lokasa 18]
Yesu Kristo azali kotambwisa mosala monene ya kosakola na mokili mobimba