Baboti—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
“Tiká makambo na bino nyonso esalema na bolingo.”—1 BAKOLINTI 16:14.
1. Baboti bayokaka ndenge nini ntango mwana abotami?
BABOTI mingi bakoki kondima ete kobotama ya mwana ezali likambo ya esengo mpenza. Mama moko na nkombo Aleah alobaki ete: “Ntango natalaki mwana oyo nautaki kobota, nazalaki na esengo ya koloba te. Namonaki ete azali kitoko koleka bana nyonso oyo namoná.” Kasi, likambo wana ya esengo ekoki mpe komemela baboti mitungisi. Mobali ya Aleah alobaki ete: “Mposa na ngai ezalaki ete nabɔkɔla mwana na ngai na ndenge oyo ekosalisa ye alonga mikakatano ya bomoi.” Baboti mingi bazalaka na mposa wana, mpe bayebaka ete basengeli kobɔkɔla bana na bango na bolingo. Nzokande, baklisto oyo balingi kobɔkɔla bana na bango na bolingo bazali kokutana na mikakatano. Wapi mwa mikakatano yango?
2. Baboti bazali kokutana na mikakatano nini?
2 Tokómi mpenza na nsuka ya mokili oyo. Ndenge Biblia esakolaki yango, bato bazali lisusu na bolingo te. Ata na kati ya mabota, bato “bazangi bolingo ya libota” mpe ‘bazangi botɔndi, bazangi bosembo, . . . bazangi komipekisa mpe bazali bato ya kongala.’ (2 Timote 3:1-5) Kokutana mokolo na mokolo na bato oyo bazali na bizaleli ya ndenge wana ekoki kobebisa bizaleli ya baklisto na kati ya mabota na bango. Lisusu, baboti bazali kobunda na oyo ya bango bizaleli ya mabe oyo babotamá na yango lokola kozanga komipekisa, koloba makambo oyo bakanaki te, mpe kozanga bososoli na makambo mosusu.—Baloma 3:23; Yakobo 3:2, 8, 9.
3. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bákola na esengo?
3 Atako mikakatano yango ezali, baboti bakoki kosalisa bana bákola na esengo mpe bálinga Yehova. Ndenge nini? Soki bazali kolanda toli ya Biblia oyo: “Tiká makambo na bino nyonso esalema na bolingo.” (1 Bakolinti 16:14) Kutu, bolingo ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:14) Tiká tótalela lolenge misato ya komonisa bolingo oyo ntoma Paulo alobeli na mokanda na ye ya liboso epai ya Bakolinti mpe tólobela ndenge oyo baboti bakoki kosalela yango ntango bazali kobɔkɔla bana na bango.—1 Bakolinti 13:4-8.
Basengeli kozala na motema molai
4. Mpo na nini baboti basengeli kozala motema molai?
4 Paulo akomaki ete: “Bolingo ezali na motema molai.” (1 Bakolinti 13:4) Liloba ya Grɛki oyo babongoli na “motema molai” epesaka likanisi ya koyeba kokanga motema mpe kosilikaka noki te. Mpo na nini baboti basengeli kozala motema molai? Na ntembe te, baboti mingi bakoki kopesa bantina ebele. Tózwa mwa bandakisa. Mbala mingi, soki mwana azali kosɛnga eloko, asukaka kaka na mbala moko te. Ata soki moboti aboyi na motema moko, mwana akokoba kaka kosɛnga, na elikya ete moboti akobongola makanisi. Bilenge bakoki kobanda kotya baboti na bango mbamba mpo bátika bango bálanda nzela moko oyo baboti bayebi ete ezali mabe. (Masese 22:15) Mpe lokola biso nyonso, bana bazongelaka mabunga na bango mosusu mbala na mbala.—Nzembo 130:3.
5. Nini ekoki kosalisa baboti bázala motema molai?
5 Nini ekoki kosalisa baboti bázala motema molai epai ya bana na bango? Mokonzi Salomo akomaki boye: “Bososoli ya moto ya mayele [ekokitisa, NW] nkanda na ye.” (Masese 19:11) Baboti bakoyeba komitya na esika ya bana na bango soki babosani te ete bango mpe bazalaki ‘koloba lokola bana mike, kokanisa lokola bana mike, kotalela makambo lokola bana mike.’ (1 Bakolinti 13:11) Baboti, bozali koyeba lisusu ndenge bozalaki kotungisa baboti na bino ntango bozalaki bilenge mpo na makambo ezangi ntina? Ntango ozalaki elenge, ozalaki ntango mosusu kokanisa ete baboti na yo bazali komitya na esika na yo te? Soki ezali bongo, na ntembe te oyebi ntina oyo bana na yo bazali kosala bongo mpe mpo na nini osengeli ntango nyonso kozala motema molai wana ozali kokundwela bango bikateli na yo. (Bakolose 4:6) Kobosana te ete Yehova ayebisaki baboti ya Yisalaele ete ‘bálakisaka na etingya’ mibeko na ye epai na bana na bango. (Deteronome 6:6, 7) Liloba ya Liebele oyo babongoli na “kolakisa na etingya” elimboli “kozongela,” “koloba mbala na mbala.” Yango emonisi ete baboti basengeli koyebisa bana mibeko ya Nzambe mbala na mbala mpo báyeba kosalela yango. Basengeli mpe kosalaka bongo ntango bazali koteya bango makambo mosusu ya bomoi.
6. Mpo na nini kozala moboti ya motema molai elimboli te kokangaka miso na mabe?
6 Nzokande, kozala moboti ya motema molai elimboli te kokangaka miso na makambo ya mabe. Liloba ya Nzambe epesi toli oyo: “Mwana oyo atikami epai na ye moko akokómisa mama na ye na nsɔni.” Mpo baboti báyoka nsɔni te, kaka vɛrsɛ yango elobi ete: “Fimbo mpe mpamela ekoyeisa mayele.” (Masese 29:15) Ntango mosusu, bana bakoki koloba ete baboti na bango bazali na lotomo te ya kosembola bango. Kasi, mabota ya baklisto esengeli te kotambwisama lokola na demokrasi, epai bana basengeli kopona ndenge oyo baboti basengeli kotambwisa bango. Na esika ezala bongo, Yehova, Mokonzi ya libota oyo aleki monene, apesá baboti mokumba ya koteya mpe kopesa bana disipilini na bolingo. (1 Bakolinti 11:3; Baefese 3:15; 6:1-4) Na yango, disipilini ezali mpenza na boyokani na lolenge mosusu ya komonisa bolingo oyo Paulo alobeli.
Ndenge ya kopesa disipilini na bolingo
7. Mpo na nini baboti ya boboto bapesaka bana na bango disipilini, mpe disipilini yango esɛngaka nini?
7 Paulo akomaki ete “bolingo ezali . . . na boboto.” (1 Bakolinti 13:4) Baboti oyo balingaka mpenza bana na bango bazalaka bongolabongola te na disipilini oyo bapesaka bana na bango. Soki bazali kosala bongo, bazali komekola Yehova. Paulo akomaki ete, “Yehova apesaka disipilini na moto oyo ye alingaka.” Tósimba ete disipilini oyo Biblia ezali kolobela elimboli te kaka kopesa etumbu. Elimboli mpe koteya. Ntina mpenza ya disipilini yango ezali nini? Paulo alobi ete: “Epai ya baoyo bateyami na yango ebotaka mbuma ya kimya, elingi koloba, boyengebene.” (Baebele 12:6, 11) Ntango baboti bazali koteya bana na bango na boyokani na mokano ya Nzambe, yango ekosala ete bázala bato ya kimya mpe bayengebene ntango bakokola. Soki bana bandimi “kolakisama na [Yehova],” bakozwa bwanya, boyebi mpe bososoli, makambo oyo ezali na ntina koleka palata to wolo.—Masese 3:11-18.
8. Nini emonanaka mbala mingi soki baboti bazali kopesa bana na bango disipilini te?
8 Epai mosusu, baboti oyo bapesaka bana na bango disipilini te balingaka bango te. Salomo akomaki na lisalisi ya elimo ya Yehova ete: “Ye oyo aboyi fimbo abebisi mwana na ye, kasi ye oyo alingi ye akopesa ye etumbu na ntango ekoki.” (Masese 13:24) Soki baboti bazali kopesa bana na bango disipilini te na ntango oyo esengeli, bana yango bakobanda koluka kaka matomba na bango moko mpe bakozala na esengo te. Nzokande, bana oyo baboti na bango bazali na bolingo, kasi basembolaka bango ntango esengeli, bazalaka mayele na kelasi, bayebaka kofanda na bato mpe mbala mingi bazalaka na esengo. Ya solo, baboti oyo bapesaka bana na bango disipilini balingaka bango.
9. Baboti baklisto basengeli koteya bana na bango makambo nini, mpe ndenge nini bana basengeli kotalela makambo yango?
9 Kopesa bana disipilini na boboto mpe na bolingo elimboli nini? Baboti basengeli koyebisaka bana polele makambo oyo basengeli kosala. Na ndakisa, baboti oyo bazali baklisto bateyaka bana na bango mitinda ya Biblia mpe basalisaka bango bámipesa na losambo ya solo banda bomwana. (Exode 20:12-17; Matai 22:37-40; 28:19; Baebele 10:24, 25) Bana basengeli koyeba ete bakoki kokakola makambo wana te.
10, 11. Mpo na nini baboti bakoki kotalela bamposa ya bana na bango ntango bazali kotya mibeko ya libota?
10 Ntango mosusu, ekoki kosɛnga ete baboti bátuna makanisi ya bana na bango ntango bazali kotyela bango mibeko. Soki bana bapesi mpe makanisi ntango baboti bazali kotya mibeko oyo ekotambwisa libota, bakobanda kotosa yango na motema moko. Na ndakisa, soki baboti balingi kokatela bana ngonga oyo basengeli kozala na ndako, bakoki kopona ngonga yango bango moko. Bakoki mpe kotika bana bápona ngonga yango mpe báyebisa ntina oyo baponi ngonga wana. Na nsima, baboti bakoki kopona ngonga oyo balingi bana bázalaka na ndako mpe koyebisa bango ntina oyo baponi ngonga wana. Baboti basengeli kosala nini soki bango ná bana bayokani te na likambo yango? Ntango mosusu, baboti bakoki komona malamu bándima likanisi ya bana soki ezali kobuka mibeko ya Biblia te. Kosala bongo, ekomonisa ete baboti basundoli mokumba na bango?
11 Mpo na koyanola na motuna wana, tótalela lolenge oyo Yehova asalelaki bokonzi na ye na bolingo nyonso epai ya Lota ná libota na ye. Nsima ya kobimisa Lota, mwasi na ye mpe bana na bango, baanzelu balobaki na bango ete: “Kimá epai na ngomba ete okufa te.” Kasi, Lota ayanolaki ete: “Te, bongo te, [Yehova].” Na nsima, Lota apesaki likanisi boye: “Talá mboka kuna ezali penepene mpe nakoki kokima wana, mpe yango ezali moke. Ee, Tiká ete namibikisa ngai mpenza kati na yango.” Yehova alobaki nini? Alobaki ete: “Talá, nakopesa yo mpe oyo elɔmbi yo lokola.” (Genese 19:17-22) Yehova asundolaki nde bokonzi na ye? Soki moke te! Kasi, ayokelaki Lota mpe amoniselaki ye boboto na likambo yango. Soki ozali moboti, otalelaka mpe makanisi ya bana na yo ntango ozali kotya mibeko ya libota?
12. Nini ekoki kosalisa mwana azala na kimya?
12 Bana basengeli te kaka koyeba mibeko kasi mpe bitumbu oyo bakoki kozwa soki babuki yango. Soki bolobeli bitumbu yango mpe bana basimbi yango malamu, ekozala malamu bóbanda kosalela yango. Baboti bakozanga bolingo soki mbala na mbala bazali koloba na mwana ete akozwa etumbu, kasi bazali kopesa ye etumbu yango te. Biblia elobi ete: “Mitema ya bana na bato ekani makasi kosalaka mabe, zambi etumbu mpo na kosala mabe epesami noki te.” (Mosakoli 8:11) Toboyi te, moboti akoki mbala mosusu koboya kopesa mwana etumbu esika bato bazali mingi to esika baninga na ye bazali mpo mwana ayoka nsɔni te. Kasi, bana bakozala na kimya mpe bakozala na botosi mingi mpo na baboti na bango ntango bayebi ete soki baboti na bango balobi “Ɛɛ,” elimbolaka kaka ɛɛ mpe soki balobi “Te,” elimbolaka kaka te, ezala ata soki balaki kopesa etumbu.—Matai 5:37.
13, 14. Ndenge nini baboti bakoki komekola Yehova ntango bazali koteya bana na bango?
13 Baboti ya bolingo bakopesa mwana kaka etumbu oyo ebongi na ye. Pam alobi boye: “Bana na biso mibale bazalaki kozwa moto na moto bitumbu oyo ebongi na ye. Bitumbu oyo ezalaki kosimba epai ya mwana moko ezalaki kosimba te epai ya oyo mosusu.” Mobali na ye, Larry, alobi boye: “Mwana na biso ya liboso azalaki kolinga kosala kaka makambo oyo motema na ye elingi, yango wana ezalaki kosɛnga azwaka bitumbu ya makasi. Nzokande, leki na ye azalaki koyoka mbala moko soki togangeli ye to totali ye kaka miso mabe.” Ɛɛ, baboti ya bolingo basalaka nyonso mpo na koyeba etumbu oyo ebongi na mwana mokomoko.
14 Yehova azali ndakisa malamu mpo na baboti na ndenge ayebaka makasi mpe bolɛmbu ya mosaleli na ye mokomoko. (Baebele 4:13) Lisusu, ntango apesaka bitumbu, Yehova alekisaka ndelo te, akangaka mpe miso na mabe te. Kasi, asembolaka basaleli na ye “na ndenge ebongi mpenza.” (Yilimia 30:11, NW) Baboti, boyebaka makasi mpe bolɛmbu ya bana na bino? Bokoki kosalela boyebi yango mpo na kosembola bango na ndenge ebongi mpe na bolingo? Soki ezali bongo, bozali komonisa ete bolingaka bana na bino.
Bólendisaka bana báfungolela bino mitema
15, 16. Ndenge nini baboti bakoki kolendisa bana na bango báfungolelaka bango motema, mpe wapi lolenge eleki malamu oyo baboti baklisto mosusu basalaki yango?
15 Biblia elobi mpe ete bolingo “esepelaka te na makambo ya kozanga boyengebene, kasi esepelaka nde na solo.” (1 Bakolinti 13:6) Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango bálingaka oyo ezali sembo mpe solo? Likambo ya ntina ezali ya kolendisa bana bálobaka bosembo, ata soki baboti bakosepela na makambo yango te. Yango wana, baboti basepelaka ntango bana bazali kobimisa makanisi oyo eyokani na mitinda ya sembo. Kasi, ntango mosusu makambo oyo mwana azali koloba ekoki komonisa ete azali na makanisi mabe. (Genese 8:21) Baboti basengeli kosala nini? Bakoki mbala mosusu kozala kaka na likanisi ya kopesa bana etumbu mbala moko. Kasi, soki baboti basali bongo, bana bakobanda koloba kaka makambo oyo bayebi ete ekosepelisa bango. Toboyi te, esengeli kosembola mbala moko makanisi ya mabe, kasi kolakisa bana ndenge ya koloba na limemya elimboli te koponela bango oyo basengeli koloba.
16 Ndenge nini baboti basengeli kosalisa bana na bango bálobaka bosembo? Aleah oyo tolobelaki liboso, alobi ete: “Lokola tozalaki kosilika makasi te soki bana balobi makambo oyo epesi biso mpasi, yango esalisaki bango bálobaka bosembo.” Tata moko na nkombo Tom alobi ete: “Tozalaki kolendisa mwana na biso alobaka, ata soki andimi makanisi na biso te. Tomonaki ete soki tozali kokata ye maloba ntango nyonso mpe kosɛnga andima kaka oyo biso tolobi, akokóma kobangabanga mpe akobanda lisusu te koyebisa biso makambo oyo ezali na motema na ye. Epai mosusu, koyokela ye esalisaki ye ayokelaka mpe biso.” Ya solo, bana basengeli kotosaka baboti na bango. (Masese 6:20) Kasi, soki baboti bazali kosolola na bana polelepolele, yango ekopesa bango libaku ya kosalisa bana bákolisa makoki na bango ya kokanisa. Vincent, tata moko ya bana minei alobi boye: “Mbala mingi, tozalaki kotalela elongo na bana na biso malamu ná mabe ya likambo moko mpo na kosalisa bango bámona ndenge ekoki kosuka. Yango esalisaki bango bákolisa makoki na bango ya kokanisa.”—Masese 1:1-4.
17. Baboti basengeli kozala na elikya nini?
17 Na ntembe te, na likambo etali kobɔkɔla bana, moboti moko te akoki kosalela toli ya Biblia na ndenge ya kokoka. Atako bongo, okoki kozala na elikya ete bana na yo bakozala na botɔndi mingi na milende oyo ozali kosala mpo na kobɔkɔla bango na motema molai, na boboto mpe na bolingo. Na ntembe te, Yehova akopambola milende oyo ozali kosala. (Masese 3:33) Baboti baklisto basalaka milende nyonso wana mpo balingaka bana na bango báyekola kolinga Yehova ndenge bango moko balingaka ye. Ndenge nini baboti bakoki kokokisa mokano kitoko wana? Lisolo oyo elandi ekolobela mayele mosusu oyo baboti bakoki kosalela.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini bososoli ekoki kosalisa moboti azala na motema molai?
• Boyokani nini ezali na kati ya bolingo ná disipilini?
• Mpo na nini ezali na ntina ete baboti ná bana básololaka na bosembo nyonso?
[Bililingi na lokasa 23]
Baboti, bozali koyeba lisusu makambo bozalaki kosala ntango bozalaki bana?
[Elilingi na lokasa 24]
Bólendisaka bana na bino báfungolelaka bino mitema?