Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yosua
NA MOBU 1473 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bana ya Yisalaele batɛlɛmaki na mokili ya Moaba, tokanisi mpenza ete bazalaki na esengo ntango bayokaki maloba oyo: “Bongisá biloko ya kolya na bino, mpo ete naino mikolo misato eleki te bokokata ngámbo ya Yolodani oyo mpo na kokɔta mpe kokamata mokili oyo [Yehova] Nzambe na bino apesi bino mpo na kokamata.” (Yosua 1:11) Bakómaki na nsuka ya mobembo na bango ya mbula 40 na esobe.
Bambula koleka 20 na nsima, Yosua motambwisi na bango atɛlɛmaki na katikati ya mokili ya Kanana mpe alobaki na mikóló ya Yisalaele boye: “Talá, napesi na bino lokola libula na mabota na bino mabota na bapaya matikali, esika moko na mabota nyonso esili ngai kobuka, longwa na Yolodani kino Mai Monene epai na kolimwa na ntango. [Yehova] Nzambe na bino, ye mpenza akobimisa bango liboso na bino mpe akolongola bango na miso na bino, mpe bino bokozwa mokili na bango lokola [Yehova] Nzambe na bino alakelaki bino.”—Yosua 23:4, 5.
Yosua nde akomaki mokanda oyo ezali na nkombo na ye, na mobu 1450 L.T.B. Mokanda yango ezali na masolo ya kitoko mpenza ya makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula 22. Lokola etikali moke tókɔta na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, biso mpe tokokani na bana ya Yisalaele oyo bakómaki pene ya kozwa Mokili ya Ndaka. Na bongo, tiká tótya likebi mpenza na mokanda ya Yosua.—Baebele 4:12.
NA “MOKILI POLELE YA YELIKO”
Yehova apesaki Yosua mokumba monene mpenza ntango ayebisaki ye boye: “Moize, moombo na ngai, akufi. Na bongo tɛlɛmá mpe katá ngámbo ya Yolodani oyo, yo mpe bato oyo nyonso, kokɔta na mokili oyo ezali ngai kopesa na bango, na bato ya Yisalaele.” (Yosua 1:2) Yosua asengelaki kotambwisa libota moko oyo ezalaki na bamilio mingi ya bato na Mokili ya Ndaka. Mpo na kobongisa nzela, atindaki banɔngi mibale na mokili ya Yeliko—engumba ya liboso oyo basengelaki kozwa. Lahaba, mwasi moko ya ndumba oyo azalaki kofanda na engumba yango, ayokaki nsango ya makamwisi oyo Yehova asalaki mpo na bato na ye. Yango wana, abombaki banɔngi yango mpe asalisaki bango, mpe bango balakaki ye ete bakobikisa ye.
Ntango banɔngi bazongaki, Yosua ná Bayisalaele babongamaki mpo na kokatisa Ebale Yolodani. Atako ezalaki na ntango ya mpela, ebale yango ekangelaki bango nzela te, mpo Yehova atɛlɛmisaki mai oyo ezalaki likoló lokola efelo mpe mai oyo ezalaki na nse ekitaki nyonso tii na Mbu Ekufá. Nsima ya kokatisa Yolodani, bana ya Yisalaele batyaki kaa na bango na Gilegale, pembeni ya Yeliko. Mikolo minei na nsima, elingi koloba na mokolo ya 14 ya sanza ya Abibe, basalaki Elekeli na mokili polele ya Yeliko. (Yosua 5:10) Mokolo oyo elandaki, babandaki kolya mwa biloko kitoko ya mokili yango, mpe mana etikaki kokwea. Na ntango yango, Yosua akataki bana mibali nyonso oyo babotamaki na esobe ngenga.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:4, 5—Mpo na nini Lahaba akosaki mibali oyo mokonzi atindaki mpo na koluka banɔngi? Lahaba atyaki bomoi na ye na likama na ndenge abatelaki banɔngi mpamba te azalaki na kondima epai ya Yehova. Yango wana, aboyaki kolakisa esika oyo basaleli ya Nzambe bazalaki epai ya bato oyo bazalaki koluka kosala bango mabe. (Matai 7:6; 21:23-27; Yoane 7:3-10) Kutu, Lahaba “atángamaki . . . moyengebene mpo na misala na ye,” oyo moko na yango ezali kokosa oyo akosaki bato oyo mokonzi atindaki.—Yakobo 2:24-26.
5:14, 15—Nani azali “mokonzi ya basoda ya Yehova”? Emonani ete mokonzi ya basoda oyo ayaki kolendisa Yosua ntango babandaki kokamata Mokili ya Ndaka ezalaki kaka “Liloba,” elingi koloba Yesu Klisto liboso abotama lokola moto. (Yoane 1:1; Danyele 10:13) Tozali mpenza kolendisama na koyeba ete Yesu Klisto oyo azwi nkembo, azali elongo na basaleli ya Nzambe lelo oyo na etumba ya elimo oyo bazali kobunda!
Mateya mpo na biso:
1:7-9. Soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, komanyola na makambo oyo tozali kotánga, mpe soki tozali kosalela makambo yango, ekosalisa biso tózala makasi elimo.
1:11. Yosua asɛngaki bana ya Yisalaele bábongisa biloko ya kolya na esika bákanga mabɔkɔ mpo na kozela Yehova apesa bango yango. Toli oyo Yesu apesaki ete tótika komitungisa mpo na biloko oyo tosengeli na yango mpo na bomoi, mpe elaka na ye ete “biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino,” elingi koloba te ete tosengeli kosala eloko moko te mpo na koluka biloko oyo tosengeli na yango.—Matai 6:25, 33.
2:4-13. Ntango Lahaba ayokaki nsango ya makamwisi oyo Yehova asalaki mpe ntango ayebaki likama oyo ezalaki liboso na bango, aponaki komitya na ngámbo ya basaleli ya Nzambe. Ezali boni mpo na yo, soki oyekolaka Biblia banda mwa ntango mpe oyebi ete tozali na “mikolo ya nsuka,” omoni te ete ekozala malamu ozwa ekateli ya kosalela Nzambe?—2 Timote 3:1.
3:15. Lokola banɔngi oyo batindaki na Yeliko bayaki na nsango ya malamu, Yosua asalaki nokinoki, azelaki te ete mai ya Yolodani ekita naino. Biso mpe, ntango tosengeli kosala makambo oyo etali losambo ya solo, tosengeli kosala na mpiko nyonso na esika ya kozela tii ntango makambo nyonso ekobonga.
4:4-8, 20-24. Mabanga 12 oyo bazwaki na Ebale Yolodani esengelaki kozala elembo mpo na bana ya Yisalaele. Ndenge moko mpe lelo, makambo oyo Yehova azali kosala mpo na kobikisa basaleli na ye na mabɔkɔ ya banguna na bango ezali elembo ete azali elongo na bango.
BAKOBI KOZWA BAMBOKA
Engumba Yeliko “ekangamaki na bikuke . . . Moto abimaki te mpe moto akɔtaki te.” (Yosua 6:1) Ndenge nini bakokaki kozwa engumba yango? Yehova apesaki Yosua mayele. Mosika te, bifelo nyonso ekweaki mpe engumba ebomamaki. Kaka Lahaba mpe libota na ye nde babikaki.
Engumba ya mibale oyo basengelaki kozwa ezalaki engumba Ai. Banɔngi oyo batindaki mpo na kokende kotala yango, bayaki na nsango ete engumba yango ezali na bafandi mingi te, boye ezalaki kosɛnga bato mingi te mpo na kobundisa yango. Kasi, basoda soki 3 000 oyo batindaki mpo na kobundisa engumba yango, bakimaki liboso ya mibali ya Ai. Mpo na nini? Mpo Yehova azalaki na Bayisalaele te. Akana, moto ya libota ya Yuda, asalaki lisumu ntango bazwaki Yeliko. Nsima ya kobongisa likambo yango, Yosua azongaki kobundisa engumba Ai. Lokola balongaki bato ya Yisalaele mbala ya liboso, mokonzi ya Ai azalaki na mposa makasi ya kobunda na bango lisusu. Kasi, Yosua asalelaki mayele oyo etindaki mibali ya Ai bákanisa ete Bayisalaele bazali na makasi ya kobunda na bango te, mpe nsukansuka azwaki engumba yango.
Gibona ezalaki ‘mboka monene—monene koleka Ai, mpe mibali nyonso ya engumba yango bazalaki makasi.’ (Yosua 10:2) Nzokande, ntango bayokaki nsango ete Yisalaele elongi Yeliko mpe Ai, mibali ya Gibona bakosaki Yosua mpe asalaki na bango kondimana ya kimya. Bamboka ya pembenipembeni bamonaki likambo oyo bato ya Gibona basalaki ete ezalaki likama mpo na bango. Yango wana, bakonzi mitano ya bamboka yango basanganaki mpe bakendaki kobundisa Gibona. Kasi, Bayisalaele bakɔtelaki bato ya Gibona mpe balongaki bakonzi yango nyonso. Yosua akambaki mibali ya etumba ya Yisalaele mpe balongaki bingumba mosusu na sudi mpe na wɛsti, bakisa mpe bakonzi oyo bazalaki na nɔrdi, oyo basanganaki mpo na kobundisa bango. Bakonzi nyonso oyo Bayisalaele balongaki na wɛsti ya Yolodani bazalaki 31.
Biyano na mituna ya Biblia:
10:13—Ndenge nini likambo ya ndenge wana ekokaki kosalema? “Likambo moko eleki nguya ya [Yehova],” Mozalisi ya likoló ná nse? (Genese 18:14) Soki Yehova alingi, akoki kobongola ndenge oyo mabelé ebalukaka mpe moto oyo azali awa na mabelé akomona lokola nde moi ná sanza etɛlɛmi esika moko. To akoki kotika kaka mabelé ná sanza ebalukaka, kasi asali ete kongɛnga ya moi mpe ya sanza emonana lokola nde ezali kaka kongɛngisa mabelé. Ata soki ezalaki ndenge nini, “mokolo mosusu [ndenge moko] na yango ezalaki liboso te mpe na nsima te” banda mokili ebandá.—Yosua 10:14.
10:13—Mokanda ya Yasala ezali nini? Balobeli lisusu mokanda yango na 2 Samwele 1:18 mpo na kolobela maloba ya ntɔki oyo babengaka “Litimbo”—loyembo oyo basalaki mpo na kolela Saulo mokonzi ya Yisalaele ná mwana na ye Yonatana. Ekoki kozala ete mokanda yango ezalaki na banzembo mpe na maloba ya ntɔki oyo ezalaki kolobela makambo ya minene oyo esalemaki na lisolo ya bana ya Yisalaele mpe Baebele mingi bayebaki yango malamu.
Mateya mpo na biso:
6:26; 9:22, 23. Elakeli mabe oyo Yosua alobaki ntango babomaki Yeliko ekokisamaki bambula soki 500 na nsima. (1 Mikonzi 16:34) Mabe oyo Noa alakelaki nkɔkɔ na ye Kanana ekokisamaki ntango bato ya Gibona bakómaki baombo. (Genese 9:25, 26) Liloba ya Yehova ezangaka te kokokisama.
7:20-25. Bato mosusu bakoki kotalela moyibi ya Akana lokola likambo moke, bakoki ntango mosusu koloba ete likambo yango esalaki moto moko mabe te. Bakoki mpe kotalela ndenge moko likambo ya koyiba biloko ya mikemike to mpe kobuka mibeko ya Biblia na makambo ya mikemike. Kasi, biso tosengeli kozala lokola Yosua, tosengeli kokangama na ekateli na biso ya koboya kokwea na makambo ya mbindo.
9:15, 26, 27. Tosengeli kozwa na lisɛki te boyokani oyo tosali na bato mpe tosengeli kotosaka maloba na biso.
YOSUA AKOKISI MOKUMBA MONENE NA YE YA NSUKA
Yosua akómi sikoyo mokóló mpenza—pene na mbula 90—mpe abandi kokabola mokili. Yango ezali mpenza mokumba monene! Libota ya Lubene mpe ya Gada mpe ndambo ya libota ya Manase basilaki kozwa libula na bango na ngámbo ya ɛsti ya Yolodani. Mabota mosusu oyo etikali ezwaki libula na ngámbo ya wɛsti na kobɛta mbɛsɛ.
Batyaki hema na Silo na mabelé ya Efelaima. Kalebe azwaki engumba ya Ebeloni, mpe Yosua azwaki engumba ya Timenate-sela. Balevi bazwaki bingumba 48; kati na yango bingumba 6 ya kobombama. Ntango mibali ya etumba ya Lubene, ya Gada, mpe ndambo ya mibali ya etumba ya Manase bazalaki kozonga na engumba na bango na ɛsti ya Yolodani batɛlɛmisaki etumbelo moko “monene mpe ekokaki [komonana na, NW] mosika.” (Yosua 22:10) Mabota oyo ezalaki na wɛsti ya Yolodani bamonaki likambo yango ete ezali lipɛngwi, mpe balingaki kokende kobundisa bango, kasi, lokola batunaki bango naino mpe bayokaki eyano na bango, epekisaki bango bábunda etumba oyo elingaki kotangisa ebele ya makila.
Nsima ya kofanda mwa bambula na Timenate-sela, Yosua abengaki mikóló nyonso, bankumu, basambisi, mpe bakapitɛnɛ ya Yisalaele mpe ayebisaki bango bázala na mpiko mpe bátikala sembo epai ya Yehova. Na nsima, Yosua ayanganisaki mabota nyonso ya Yisalaele na Sɛkɛmɛ. Kuna, azongelaki makambo oyo Yehova asalaki mpo na libota na bango banda na ntango ya Abalayama, mpe alendisaki bango ‘bábanga Yehova mpe básalela ye na bosembo mpe na bosolo.’ Bato ya Yisalaele bazongisaki ete: “Tokosalela Yehova Nzambe na biso, mpe tokoyoka mongongo na ye!” (Yosua 24:14, 15, 24, NW) Nsima na yango, Yosua akufaki na ntango akómaki na mbula 110.
Biyano na mituna ya Biblia:
13:1—Yango emonisi ete makambo oyo ezali na Yosua 11:23 ezali lokuta? Te, mpamba te kozwa Mokili ya Ndaka esalemaki na ndenge mibale: Ya liboso, etumba ya ekólo mobimba oyo ekweisaki mikonzi 31 ya mokili ya Kanana, oyo esukisaki nguya ya Bakanana; ya mibale, bitumba oyo libota mokomoko to mpe moto mokomoko abundaki mpe esalaki ete bakoka kozwa mokili yango mobimba. (Yosua 17:14-18; 18:3) Atako bana ya Yisalaele babenganaki Bakanana nyonso te na mabelé yango, Bakanana oyo batikalaki bakokaki te kobebisa kimya na bango. (Yosua 16:10; 17:12) Yosua 21:44 elobi ete: “[Yehova] apesaki bango kimya na bipai nyonso.”
24:2—Tela, tata ya Abalayama azalaki nde kosambela bikeko? Liboso, Tela azalaki kosambela Yehova Nzambe te. Ekoki kozala ete azalaki kosambela nzambe-sanza na nkombo Sin—nzambe oyo bato mingi ya Ulu bazalaki kosambela. Na kolanda lisolo ya bonkɔkɔ ya Bayuda, ekoki kozala ete Tela azalaki kutu kosala bikeko. Kasi ntango Abalayama alongwaki na Ulu ndenge Nzambe asɛngaki ye, Tela akendaki elongo na ye na Halana.—Genese 11:31.
Mateya mpo na biso:
14:10-13. Atako akómaki na mbula 85, Kalebe asɛngaki mokumba monene ya kobengana bato oyo bazalaki kofanda na etúká ya Ebeloni. Baanaki, oyo bazalaki bingambe ya mibali nde bazalaki kofanda na mokili yango. Na lisalisi ya Yehova, mobali yango ya etumba alongaki mpe Ebeloni ekómaki engumba ya kobombama. (Yosua 15:13-19; 21:11-13) Ndakisa ya Kalebe ezali kolendisa biso tókima te mikumba ya makasi na lisangá.
22:9-12, 21-33. Tosengeli kokeba ete tókanisela basusu mabe te.
‘Ata liloba moko te ezangaki kokokisama’
Ntango Yosua akómaki mobange, ayebisaki bankumu ya Yisalaele boye: “Ata liloba moko te na kati ya maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino ezangaki kokokisama. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino.” (Yosua 23:14, NW) Lisolo ya Yosua emonisi mpenza bosolo ya likambo yango!
Ntoma Paulo akomaki ete: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso, mpo ete na nzela ya ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami tókoka kozala na elikya.” (Baloma 15:4) Tosengeli kondima ete elikya oyo totye na bilaka ya Nzambe ezali ya mpamba te. Ata elaka moko te ekozanga kokokisama; nyonso ekokokisama.
[Karte na lokasa 10]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mokili oyo bazwaki ntango Yosua azalaki kokamba Yisalaele
BASANA
GILADA
ALABA
NEGEBE
Ebale Yaladene
Mai ya mungwa
Lobwaku ya Yaboko
Lobwaku ya Alanono
Hasola
Madona
Lasalona
Similona
Yokenama
Dolo
Megido
Kedese
Tanake
Hefele
Tisela
Afeke
Tapua
Betele
Ai
Gilegale
Yeliko
Gezele
Yelusaleme
Makeda
Yalemote
Adulama
Libena
Lakisi
Egelone
Ebeloni
Debili
Alada
[Elilingi na lokasa 9]
Oyebi mpo na nini Lahaba, mwasi ya ndumba, atángamaki moyengebene?
[Elilingi na lokasa 10]
Yosua alendisaki bana ya Yisalaele ete ‘bábanga Yehova mpe básalela ye’
[Elilingi na lokasa 12]
Moyibi ya Akana ezalaki likambo ya moke te; ememaki mpasi mingi
[Elilingi na lokasa 12]
“Na kondima bifelo ya Yeliko ekweaki.”—Baebele 11:30